Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2014

Sepelá na libaku oyo ozali na yango ya kosala na Yehova!

Sepelá na libaku oyo ozali na yango ya kosala na Yehova!

“Tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.”​—1 Ko. 3:9.

1. Yehova ayokaka ndenge nini na mosala na ye, mpe etindaki ye kosala nini?

YEHOVA azali mosali oyo asepelaka na oyo asalaka. (Nz. 135:6; Yoa. 5:17) Mpo na kopesa bikelamu na ye libaku ya koyoka mpe esengo ya mosala, Yehova apesi bango mosala moko kitoko ya kosala. Na ndakisa, asalaki ná mwana na ye ntango azalaki kokela. (Tángá Bakolose 1:15, 16.) Biblia elobi ete ntango azalaki kuna na likoló, Yesu azalaki pembeni ya Nzambe “lokola mosali ya mayele.”​—Mas. 8:30.

2. Nini emonisi ete bikelamu ya elimo bazalaka ntango nyonso na mosala moko ya ntina mingi?

2 Kobanda na ebandeli tii na nsuka, Biblia emonisi ete Yehova azalaki kopesa bana na ye ya elimo mosala ya kosala. Ntango Adama ná Eva basalaki lisumu, mpe babimisamaki na Paradiso, epai bazalaki kofanda, Nzambe “atyaki bakeruba na ɛsti ya elanga ya Edene mpe mopanga, oyo mɔtɔ ezalaki kopela na ebende na yango, ezalaki kaka kobalukabaluka mpo na kokɛngɛla nzela ya nzete ya bomoi.” (Eba. 3:24) Mpe Emoniseli 22:6 emonisi ete Yehova “atindaki anzelu na ye mpo na kolakisa baombo na ye makambo oyo esengeli kosalema nsima ya mwa ntango moke.”

 BATO BAZWAKI MOSALA NINI?

3. Ntango azalaki awa na mabele, ndenge nini Yesu alandaki ndakisa ya tata na ye?

3 Ntango azalaki awa na mabele lokola moto ya kokoka, Yesu akokisaki na esengo nyonso mosala oyo Yehova apesaki ye asala. Na ndakisa ya tata na ye, Yesu mpe apesaki bayekoli na ye mosala moko ya ntina mingi. Mpo na kopesa bango mposa makasi ya mosala oyo bakokokisa, alobaki boye: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Moto oyo azali kondimela ngai, moto yango akosala mpe misala oyo ngai nazali kosala; mpe akosala misala ya minene koleka oyo, mpo nazali kokende epai ya Tata.” (Yoa. 14:12) Mpo na komonisa ete mosala yango esengeli kosalema na lombangu, Yesu alobaki boye: “Tosengeli kosala misala ya ye oyo atindaki ngai wana moi ezali naino; butu ezali koya wana moto moko te akokoka kosala mosala.”​—Yoa. 9:4.

4-6. (a) Mpo na nini tokoki kozala na botɔndi ndenge Noa ná Moize bakokisaki mikumba oyo Yehova apesaki bango? (b) Mikumba nyonso oyo Nzambe apesá basaleli na ye ezali na boyokani na likambo nini?

4 Ata liboso Yesu aya, Nzambe apesaki bato misala ya kosala. Atako Adama ná Eva bakokisaki te mokumba oyo Nzambe apesaki bango, kasi bato mosusu basalaki makambo oyo Nzambe asɛngaki. (Eba. 1:28) Nzambe apesaki Noa malako ya sikisiki mpo na kotonga masuwa mpo abikisa bomoi na ntango ya Mpela monene. Akokisaki na ndenge mpenza esengeli oyo Yehova asɛngaki ye. Lelo oyo, tozali na bomoi mpo alandaki malamumalamu malako ya Yehova!​—Eba. 6:14-16, 22; 2 Pe. 2:5.

5 Moize azwaki malako ya sikisiki mpo na kotonga tabernakle mpe kobongisa bonganga-nzambe, mpe alandaki malako yango malamumalamu. (Ko. 39:32; 40:12-16) Kino lelo, tozwaka litomba na ndenge akokisaki mokumba yango na bosembo nyonso. Ndenge nini? Ntoma Paulo alimbolaki ete makambo oyo Mobeko elobelaki, ezalaki elilingi ya “makambo kitoko oyo esengelaki koya.”​—Ebr. 9:1-5, 9; 10:1.

6 Lokola mokano ya Nzambe ezali kokende liboso, basaleli na ye bazali kozwa mikumba ndenge na ndenge. Atako bongo, mosala oyo basili kokokisa, ezali kokumisa Yehova mpe ezali komemela bato ya kondima matomba. Yango emonani mpenza na makambo oyo Yesu akokisaki liboso aya awa na mabele mpe ntango azalaki awa na mabele. (Yoa. 4:34; 17:4) Ndenge moko, mosala oyo Yehova apesi biso lelo ekumisaka ye. (Mat. 5:16; tángá 1 Bakorinti 15:58.) Mpo na nini ezali bongo?

TÓTALELAKA MIKUMBA NA BISO NA LOLENGE YA MALAMU

7, 8. (a) Lobelá mokumba oyo bakristo bazali na yango ya kosala. (b) Tosengeli kosala nini na malako oyo Yehova apesaka?

7 Na ntembe te, ozali kondima ete ezali likambo ya kokamwa ete Yehova abengi bato ya kozanga kokoka mpe apesi bango lokumu ya kozala basali elongo na ye. (1 Ko. 3:9) Bandeko oyo batongaka Bandako ya mayangani, Bandako ya Bokonzi mpe babiro ya filiale, bazali mpenza kopesa mabɔkɔ na programɛ ya misala ndenge Noa mpe Moize basalaki. Ezala ozali kosala mpo na kobongisa Ndako moko ya Bokonzi to kotonga bandako ya biro monene ya Batatoli ya Yehova na Warwick, na New York, sepelá mpenza na libaku wana. (Talá mayemi oyo ezali na ebandeli.) Ezali mosala mosantu. Nzokande, mbala mingi, basɛngaka na bakristo bámipesa na programɛ ya kotonga na elimo. Yango mpe esalemaka mpo na kokumisa Yehova mpe ememelaka bato ya botosi matomba. (Mis. 13:47-49) Ebongiseli ya Nzambe epesaka malako ya sikisiki mpo na lolenge malamu ya kosala mosala yango. Yango emonisi ete na bantango mosusu, ekoki kosalema ete bápesa biso mikumba mosusu ya sika ya mosala.

8 Basaleli ya Yehova ya sembo batosaka ntango nyonso na esengo malako ya teokrasi. (Tángá Baebre 13:7, 17.) Na ebandeli tokoki mbala mosusu koyeba te bantina nini esengeli kokokisa mosala oyo basɛngi biso na lolenge moko boye. Nzokande, toyebaka  ete tokozwa mapamboli beboo soki tondimi mpenza bambongwana oyo Yehova amoni malamu asala.

9. Ndakisa nini na likambo etali mosala bankulutu bapesaka lisangá?

9 Mposa makasi ya kokokisa mokano ya Yehova emonanaka na ndenge bankulutu bazali kotambwisa lisangá. (2 Ko. 1:24; 1 Tes. 5:12, 13) Na bolingo nyonso, basalaka mosala makasi mpe batambolaka elongo na bambongwana oyo ezali kosalema. Basalelaka na lombangu mayele ya sika oyo ezali kopesama na likambo etali mosala na biso ya kosakola Bokonzi ya Nzambe oyo etyamá. Atako na ebandeli basakoli mosusu bakoki kokakatana mpo na kozwa bibongiseli ya kopesa litatoli na telefone, na mabongo to na bisika mosusu oyo bato bazalaka ebele, kasi eumelaka te bazwaka matomba ya malamu. Na ndakisa, babongisi-nzela minei na Allemagne bamonaki malamu kokende kosakola na teritware moko ya bato ya mimbongo, oyo basakoli mingi bazalaki kokipe te. Ndeko Michael alobi boye: “Lokola tosakolá te na bisika ya boye eleki sikoyo bambula mwa mingi, motema ekómaki lukuluku. Yehova ayebaki ndenge tokómaki, mpe asalisaki biso tósakola malamu mokolo wana na ntɔngɔ mpe nabosanaka yango te. Tosepelaki mpenza ndenge tosalelaki toli oyo tozwaki na Mosala na biso ya Bokonzi mpe totyaki motema ete Yehova akosunga biso!” Okosepela komeka balolenge mosusu ya kobanda kopesa litatoli oyo ebongi na teritware na bino?

10. Bambongwana nini esalemi na boumeli ya bambula oyo euti koleka na oyo etali kotambwisa makambo?

10 Na ntango mosusu, esɛngaka bambongwana esalema na oyo etali kotambwisa makambo. Na bambula oyo euti koleka, basangisaki bafiliale mosusu ná bafiliale ya bikólo mosusu. Atako bambongwana yango ezali kosɛnga ete bandeko oyo basalaka na bafiliale yango bábongola mpe makambo mosusu, kasi matomba ya bambongwana yango emonani mpenza polele. (Mos. 7:8) Ezali mpenza esengo mpo ete basali wana ya bolingo malamu bakokisi mosala monene na lisolo ya basaleli ya Yehova!

11-13. Mikakatano nini bandeko mosusu bakutanaki na yango ntango bambongwana esalemaki na ndenge ya kotambwisa makambo?

11 Tokoki kozwa mateya mingi epai ya bandeko oyo bazalaki kosala na bafiliale oyo bakɔtisaki na bafiliale mosusu. Basusu basalaki na Babetele ya mboka na bango bambula mingi. Basɛngaki na ndeko moko ná mwasi na ye oyo bazalaki kosala na mwa Betele moko na Amerika ya ntei bákende kosala na Betele ya Mexique, oyo ezalaki monene mbala 30 koleka oyo bazalaki liboso. Ndeko Rogelio alobi ete: “Kotika libota ná baninga ezalaki mpasi.” Ndeko mobali mosusu na nkombo Juan, oyo basɛngaki akende na Mexique alobi ete: “Ezali lokola obotami lisusu; mpe osengeli koluka kokóma na baninga ya sika. Esɛngaka komesana na makambo ya sika mpe lolenge ya bato ya kokanisa.”

12 Bandeko ya Betele ya mikili ya Mpoto oyo basɛngaki bango bákende na biro ya filiale ya Allemagne bakutanaki mpe na mikakatano yango. Moto nyonso oyo asepelaka na bangomba akoki komona ete ezalaki mpasi mpo na bandeko ya Suisse kotika bangomba milaimilai ya Alpes oyo ezalaka zingazinga. Mpe bandeko ya Autriche batikaki bomoi kitoko oyo bazalaki na yango kuna.

13 Mpo na baoyo bazali kokende na ekólo mosusu, esengelaki bámesana na bisika ya sika ya kolala, kosala ná bandeko oyo bayebaki te, mpe ntango mosusu koyekola misala mosusu. Esɛngaki mpe komesana na lisangá mpe kosakola na teritware ya sika, ntango mosusu kutu na monɔkɔ ya sika. Kosala bambongwana wana ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Atako bongo, bandeko mingi ya Betele bandimaki mokakatano yango. Mpo na nini basalaki yango?

14, 15. (a) Ndenge nini bandeko mingi bamonisi ete bazwaka na motuya libaku oyo bazali na yango ya kosala elongo na Yehova ezala mosala yango ezali epai nini? (b) Na nini bandeko yango bazali ndakisa malamu mpo na biso?

14 Ndeko Grethel alobi ete: “Nandimaki  mbongwana wana mpo, ezalaki mpo na ngai lolenge ya komonisa Yehova ete bolingo na ngai mpo na ye, eleki mosika ekólo, ndako to mokumba moko boye.” Ndeko Dayska alobi ete: “Ntango nakanisaki ete Yehova nde moto atindi ngai, nandimaki na esengo nyonso.” Ndeko André ná Gabriela bandimi mpe likambo yango. Balobi boye: “Na likambo yango, tomonaki ete ezali libaku mosusu oyo tozwi ya kosalela Yehova mpe kotya mopanzi bamposa na biso moko. Tolobaki, ‘Soki Yehova alakisi lolenge ya sika ya kosala makambo, ekozala malamu kolanda yango.’”

Libaku monene oyo tozali na yango ezali ya kosala mosala ya Yehova!

15 Lokola basangisaki Babetele mosusu, bazongisaki bandeko mosusu ya Betele bákende kosala lokola babongisi-nzela. Esalemaki bongo mpo na bandeko mingi ya Betele ntango basangisaki filiale ya Danemark, Norvège mpe Suède mpo na kobimisa biro ya filiale ya Scandinavie. Na kati na bango tokoki kotánga ndeko Florian mpe Anja, oyo balobaki ete: “Tozali komona mokumba na biso ya sika lokola mokakatano te kasi lokola likambo ya esengo. Mpo na biso, ezali likambo ya esengo mpenza ete Yehova asalela biso ezala na esika nini. Tokoki mpenza koloba ete tozwi mapamboli beboo!” Ata soki mingi kati na biso tosalá bambongwana ya ndenge wana te, kasi tokoki te komekola elimo oyo bandeko wana bamonisaki mpo na kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso? (Yis. 6:8) Yehova apambolaka ntango nyonso baoyo bazwaka na motuya libaku oyo bazali na yango ya kosala mosala elongo na ye, ezala mosala yango ezali epai nini.

KOBÁ KOSEPELA NA LIBAKU OYO OZALI NA YANGO YA KOSALA ELONGO NA YEHOVA!

16. (a) Mokanda ya Bagalatia 6:4 eyebisi biso tósala nini? (b) Wapi mosala oyo eleki misala nyonso oyo moto akoki kosala?

16 Biso bato ya kozanga kokoka tozalaka na makanisi ya komikokanisa na basusu, kasi Liloba ya Nzambe ezali koyebisa biso ete tótya nde makanisi na oyo biso tokoki kosala. (Tángá Bagalatia 6:4.) Mingi kati na biso bazali te na mokumba ya kotambwisa na kati ya ebongiseli ya Yehova. Ndenge moko mpe, biso nyonso te tokoki kozala babongisi-nzela, bamisionɛrɛ to kosala na Betele. Mpo na koloba solo, mikumba yango ezali kitoko mpenza! Kasi, tosengeli  kobosana soki moke te ete mosala ya ntina mingi ezali oyo biso nyonso tozali na yango. Mosala yango ezali: kozala basali elongo na Yehova na mosala ya kosakola. Yango nde mosala kitoko mpenza oyo tosengeli kozwaka na motuya!

17. Likambo nini ekokoba komonana ntango nyonso oyo mokili ya Satana ekozala, kasi mpo na nini likambo yango ekoki kolɛmbisa biso mingi te?

17 Ntango nyonso oyo mokili ya Satana ekozala, makoki na biso ya kosalela Yehova ekozala na ndelo. Ekoki kozala na makambo oyo biso tokoki te kopekisa yango. Na ndakisa, mikumba ya libota to maladi. Kasi, ezali na ntina te ete tólɛmba nzoto makasi. Kozwa na lisɛki te likoki oyo ozali na yango ya kosala elongo na Nzambe mpo na kopesa litatoli na nkombo na ye mpe koyebisa Bokonzi na ye na libaku nyonso. Likambo eleki mpenza ntina ezali ete ozali kosala oyo okoki kosala mpo na Yehova, mpe ozali kobondela mpo ete Yehova apambola bandeko na yo bakristo mpo básala mingi koleka oyo biso tozali kosala. Kobosana te, moto nyonso oyo asanzolaka nkombo ya Yehova azali na motuya mingi na miso na ye!

18. Tosengeli kondima kozongisa makambo nini nsima, mpe mpo na nini?

18 Atako tozali na bolɛmbu mpe bato ya kozanga kokoka, Yehova asepelaka ete tósala elongo na ye. Tosepelaka mpenza na libaku oyo tozali na yango ya kosala elongo na Yehova na mikolo oyo ya nsuka! Na yango, tosengeli kondima kozongisa nsima ezaleli ya kokokisa naino ebele ya bamposa na biso moko, mpo toyebi ete na mokili na ye ya sika, Yehova akopesa biso “bomoi ya solosolo,” elingi koloba bomoi ya seko, epai makambo nyonso ekopesa esengo mpe kimya.​—1 Tim. 6:18, 19.

Ozwaka na motuya libaku oyo ozali na yango ya mosala? (Talá paragrafe 16-18)

19. Yehova abombeli biso nini na mikolo ezali koya?

19 Salá lokola otɛlɛmi mpenza na porte ya mokili ya sika, mpe kanisá na oyo Moize alobaki na Bayisraele mwa moke liboso bákɔta na Mokili ya ndaka ete: “Yehova Nzambe na yo akosala ete, na mosala nyonso ya lobɔkɔ na yo, ozala na mingi koleka oyo esengeli.” (Mib. 30:9) Soki Armagedone eleki, baoyo basalaki elongo na Nzambe na molende bakozwa mabele oyo alakaki bango. Na nsuka, tokotya likebi na biso na mokumba ya sika: kokómisa mabele paradiso moko kitoko!