Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2014

 LISOLO YA BOMOI

Makambo oyo nakutani na yango na mosala ya Yehova

Makambo oyo nakutani na yango na mosala ya Yehova

Na mobu 1947, na Santa Ana, na El Salvador basango ya katolike, balukaki kobimisela Batatoli ya Yehova mobulu. Ntango bandeko bazalaki koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya pɔsɔ wana, bana mibali babwakaki mabanga ya minene na porte ya ndako ya bamisionɛrɛ oyo ezalaki ya kofungwama. Na nsima etuluku oyo bansango bazalaki kokamba eyaki. Bato mosusu na etuluku yango bamemaki miinda; bamosusu bamemaki bikeko to bililingi. Na boumeli ya ngonga mibale, babambaki mabanga na ndako mpe bazalaki kozongela maloba oyo: “Ngɔndɔ aumela seko na seko!” mpe “Yehova akufa!” Bazalaki kosala bongo mpo na kobangisa bamisionɛrɛ bálongwa na engumba wana. Nayebi lisolo oyo mpo nazalaki na boyekoli wana ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esili koleka mbula 67. *

MBULA mibale liboso makambo yango esalema, ngai ná Evelyn Trabert, moninga na ngai ya misionɛrɛ toutaki kokɔta eteyelo ya mbala ya minei ya Gileadi oyo esalemaki mosika te na Ithaca, na New York. Batindaki biso na Santa Ana. Kasi liboso nakoba kobɛtɛla bino na mokuse makambo oyo nakutani na yango na boumeli ya mbula 29 ya mosala ya misionɛrɛ, tiká nayebisa bino ntina naponaki mosala wana.

LIBULA NA NGAI YA ELIMO

Baboti na ngai, John ná Eva Olson, bazalaki kofanda na Spokane, na Washington, na États-Unis na mobu 1923, na mbula yango nde ngai nabotamaki. Baboti na ngai bazalaki Baprotesta kasi, bazalaki te kondima liteya ya lifelo mpo bayebaki ete Nzambe azali bolingo. (1 Yoane 4:8) Papa azalaki kosala na esika oyo batumbaka bagato, mpe mokolo moko na mpokwa, moninga na ye moko ya mosala ayebisaki ye ete Biblia eteyaka te ete lifelo ezali esika ya minyoko. Eumelaki te, Batatoli ya Yehova bakómaki koyekola Biblia ná baboti na ngai mpe bayebaki oyo Biblia eteyaka mpenza mpo na liwa.

Nazalaki kaka na mbula libwa, kasi nazali lisusu koyeba ndenge baboti na ngai bazalaki kolobela na esengo mateya oyo bautaki koyekola na Biblia. Esengo na bango ebakisamaki lisusu ntango bayebaki ete nkombo ya Nzambe ya solo ezali Yehova, mpe basikwamaki na boombo ya liteya ya Trinite, oyo ezalaka bongolabongola. Nabandaki mpenza kokɔtisa mateya wana kitoko ndenge kaka linyuka emɛlaka  mai, nayekolaki ‘solo oyo epesaka moto bonsomi.’ (Yoane 8:32) Na yango, namonaka te ete koyekola Biblia ezali motungisi, kasi nasepelaka nde kotángaka yango. Atako nazalaki nsɔninsɔni, nazalaki kokende ná baboti na ngai na mosala ya kosakola. Bazwaki batisimo na mobu 1934. Na mobu 1939, wana nazalaki na mbula 16, ngai mpe nazwaki batisimo.

Ngai, mama mpe papa na liyangani na St. Louis na Missouri na 1941

Na sanza ya nsambo ya mobu 1940, baboti na ngai batɛkaki ndako na bango, biso nyonso misato tobandaki mosala ya mobongisi-nzela na Coeur d’Alene, Idaho. Tozalaki kofutela apartema moko oyo ezalaki likoló ya esika oyo babongisaka mituka. Makita ezalaki mpe kosalema na ndako na biso. Na ntango wana, kaka masangá moke nde ezalaki na Bandako ya Bokonzi, yango wana, makita ezalaki kosalema na bandako ya bandeko to na bisika ya kofutela.

Na mobu 1941 ngai ná baboti na ngai tokendeki liyangani na St. Louis, na Missouri. Mokolo ya lomingo ezalaki “mokolo ya bana,” mpe bana ya mbula 5 tii 18 bafandaki liboso ya ebaelo. Na nsuka ya diskur na ye, ndeko Joseph Rutherford alobaki na biso bilenge ete: “Bino nyonso . . . bana . . . oyo bondimi kotosa Nzambe mpe mokonzi na ye, botɛlɛma!” Biso nyonso totɛlɛmaki. Na nsima, ndeko Rutherford alobaki na mongongo makasi ete: “Bótala, batatoli ya sika ya Bokonzi koleka 15 000!” Likambo yango ekómisaki lisusu makasi ekateli na ngai ya kosala mosala ya mobongisi-nzela bomoi na ngai mobimba.

MOKUMBA YA LIBOTA NA BISO

Mwa basanza nsima ya liyangani ya St. Louis, libota na biso ekendaki na Sudi ya Californie. Kuna, na engumba ya Oxnard, tozwaki mokumba ya kofungola lisangá. Tozalaki kofanda na mwa wagɔ moko ya moke mpe tozalaki kaka na mbeto moko. Liboso nazalaki na shambrɛ na ngai moko, sikoyo, butu nyonso bazalaki kotanda “mbeto” na ngai likoló ya mesa oyo tozalaki kolyela!

Mwa moke liboso tókóma na Californie, Japon ebundisaki Pearl Harbor na Hawaii, na mokolo ya 7/12/1941. Mokolo oyo elandaki, États-Unis ekɔtaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Bakonzi bapekisaki bato kopelisa miinda na butu mpe tosengelaki koboma miinda nyonso na butu. Bamasuwa ya bitumba ya basoda ya Japon ezalaki kotambolatambola pembenipembeni ya libongo ya Californie, mpe molili makasi ezalaki kopekisa bango bábɛta bato ya Californie masasi to bábwakela bango bɔmbi.

Mwa basanza na nsima, na sanza ya libwa na mobu 1942, tokendaki na Liyangani ya Teokrasi ya Mokili ya Sika, oyo esalemaki na Cleveland, na etúká ya Ohio. Kuna, toyokaki ntango ndeko Nathan Knorr asalaki diskur oyo elobaki, “Kimya—Ekoki koumela?” Alobelaki mokanda ya Emoniseli mokapo 17, oyo elobeli “nyama mabe” oyo “ezalaki, kasi ezali te, mpe atako bongo etikali moke ebima na libulu mozindo.” (Em. 17:8, 11) Ndeko Knorr alimbolaki ete “nyama mabe” ezalaki ebongiseli babengi Société des Nations oyo misala na yango esilaki na 1939. Biblia esakolaki ete ebongiseli mosusu ekozwa esika ya ebongiseli yango mpe ekomema kimya mpo na mwa ntango. Mpe na mobu 1945, ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki. Mpe nsima na yango, “nyama” yango ebimaki lisusu na nkombo ya O.N.U. Batatoli ya Yehova basakolaki lisusu mingi na mokili mobimba mpe banda ntango wana bokoli monene emonani mpenza!

Diplome na ngai ya Gileade

Esakweli wana esalisaki ngai namona makambo oyo ezalaki liboso. Ntango bapesaki liyebisi ete Eteyelo ya Gileade ekobanda na mbula oyo ekolanda, mposa na ngai ya kokóma misionɛrɛ ekómaki lisusu makasi. Na 1943, batindaki ngai lokola mobongisi-nzela na Portland, na Oregon. Na ntango wana, tozalaki kosalela fono mpo na koyokisa bato badiskur na bandako na bango, mpe na nsima tozalaki kopesa  bango mikanda na biso oyo elobelaka Bokonzi ya Nzambe. Mbula wana mobimba, nazalaki kaka kokanisa na ntina etali mosala ya misionɛrɛ.

Na mobu 1944, nasepelaki mingi mpenza ntango babengisaki ngai ná moninga na ngai ya motema Evelyn Trabert na Eteyelo ya Gileade. Na boumeli ya sanza mitano, balakisi na biso bamonisaki biso ndenge ya kozwa esengo ntango tozali koyekola Biblia. Ezaleli na bango ya komikitisa ekamwisaki biso. Na ntango mosusu, ntango tozalaki kolya, bandeko yango nde bazalaki komemela biso biloko. Tozwaki badiplome na mokolo 22/01/1945.

EPAI BATINDAKI NGAI MISIONƐRƐ

Na sanza ya motoba ya mobu 1946, ngai, Evelyn mpe Leo ná Esther Mahan tokómaki na esika oyo batindaki biso na El Salvador. Tomonaki ete mboka yango ezali mpenza elanga oyo “eteli mpo na bobuki mbuma.” (Yoa. 4:35) Likambo oyo nalobeli na ebandeli ya lisolo oyo emonisi mpenza nkanda makasi oyo bakonzi ya mangomba bazalaki na yango. Pɔsɔ moko liboso likambo yango esalema, tosalaki liyangani ya zongazonga ya liboso na Santa Ana. Tosalaki mpenza kampanye moko monene mpo na kobenga bato mpe tosepelaki mingi komona bato soki 500 na liyangani yango. Na esika ete tóbanga mpe tólongwa na engumba yango, tozwaki nde ekateli makasi ya kotikala wana mpe kosalisa bato ya mitema sembo. Atako bakonzi ya mangomba bapekisaki bato kotánga Biblia mpe kaka bato moke nde bazalaki na makoki ya kosomba yango, ebele ya bato bazalaki mpenza na mposa ya solo. Basepelaki na milende na biso ya koyekola monɔkɔ ya Espagnol mpo na koteya bango makambo etali Nzambe ya solo, Yehova, mpe elaka na ye kitoko ya kozongisa Paradiso awa na mabele.

Ngai ná baninga minei ya kelasi na biso ya Gileade totindamaki na El Salvador. Banda na lobɔkɔ ya mwasi: Evelyn Trabert, Millie Brashier, Esther Mahan, ngai, mpe Leo Mahan

Rosa Ascencio azalaki moto ya liboso oyo nayekolaki na ye Biblia. Ntango abandaki koyekola Biblia, akabwanaki na mobali oyo azalaki ná ye. Na nsima mobali yango mpe akómaki koyekola Biblia. Babalanaki, na nsima bazwaki batisimo mpe bakómaki Batatoli ya Yehova ya molende mpenza. Rosa akómaki mobongisi-nzela ya liboso na Santa Ana. *

Rosa azalaki na mwa butiki. Ntango azalaki kobima mosala ya kosakola, azalaki kokanga butiki na ye mpe azalaki kotya motema ete Yehova akokokisa bamposa na ye. Mpe ntango azalaki kofungola yango nsima ya mwa bangonga, bakiliya bazalaki kosopana lokola mayebo. Amonaki mpenza na miso bosolo ya maloba oyo ezali na Matai 6:33 mpe atikalaki sembo tii liwa.

Mokolo moko, sango moko ya esika wana akendaki kokutana na nkolo-ndako oyo biso nyonso bamisionɛrɛ motoba tozalaki kofutela mpe akebisaki ye ete soki kaka atiki biso tófutelaka epai na ye, bakobengana ye ná mwasi na ye na lingomba. Nkolo-ndako yango azalaki moto ya mombongo oyo ayebanaki mingi, mpe lokola azalaki kosepela te na bizaleli mabe ya bakonzi ya mangomba, asalelaki makanisi wana te. Kutu ayebisaki sango ete soki akobengana ye na lingomba abengana. Ayebisaki biso ete tokotikala wana ntango nyonso oyo tokolinga.

MOTO MOKO YA LOKUMU AKÓMI MOTATOLI

Biro ya filiale oyo etongamaki na 1955

Na San Salvador, engumba-mokonzi ya El Salvador, misionɛrɛ mosusu azalaki koyekola Biblia ná  mwasi ya ingénieur moko na nkombo Baltasar Perla. Mobali wana ya motema sembo atikaki kondimela Nzambe mpo na makambo mabe oyo amonaki epai ya bakonzi ya mangomba. Atako akómaki naino Motatoli te, ntango esɛngaki kotonga Betele, Baltasar apesaki mabɔkɔ na kosala plan mpe kotonga kozanga ete asɛnga mbongo.

Nsima ya kosala ná Batotoli ya Yehova na mosala wana ya botongi, Baltasar andimaki mpenza ete azwi lingomba ya solo. Azwaki batisimo na mokolo ya 22/07/1955 mpe mwa moke na nsima mwasi na ye Paulina mpe azwaki batisimo. Bazali kosalela Yehova na bosembo mpenza ná bana na bango. Mwana na ye ya mobali Baltasar, Jr., asali mbula 49 na Betele ya Brooklyn, epai azali kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola na mokili mobimba oyo ezali se kokende liboso mpe lelo oyo azali na Komite ya filiale ya États-Unis. *

Ntango tobandaki kosala mayangani na San Salvador, ndeko Perla asalisaki biso tósalela ndako moko ya ngalasisi. Na ebandeli tozalaki kosalela kaka bisika moke, kasi na lipamboli ya Yehova, motángo ya bato ezalaki se kobakisama mbula na mbula tii tokómaki kotondisa ndako ya ngalasisi yango mpe ekómaki moke! Na bantango wana ya esengo, nazalaki komona bato oyo nayekolaki na bango Biblia. Kanisá esengo oyo nazalaki na yango ntango bato oyo nayekolaki na bango Biblia bazali kolakisa ngai “bankɔkɔ” na ngai ya elimo, bato oyo bango bayekolaki na bango mpe bazwi batisimo!

Ndeko F. W. Franz azali kosala diskur liboso ya bamisionɛrɛ na liyangani

Na liyangani moko, ndeko moko ayaki epai na ngai mpe ayebisaki ngai ete alingi kosɛnga bolimbisi. Nazalaki koyeba ye lisusu te mpe nazalaki kotala ye. Alobaki: “Nazalaki na kati ya bana mibali oyo babambaki yo mabanga na Santa Ana.” Sikoyo, akómaki kosalela Yehova lokola ngai. Nasepelaki makasi. Lisolo wana emonisaki ngai lisusu polele ete mosala ya ntango nyonso ezali mosala oyo epesaka matomba koleka misala nyonso oyo moto akoki kosala.

Liyangani ya zongazonga ya liboso oyo tosalaki na El Salvador

BIKATELI YA MALAMU

Nasalaki bambula pene na 29 na mosala ya misionɛrɛ na El Salvador. Nabandaki naino na engumba Santa Ana, mpe na Sonsonate, na nsima na Santa Tecla, mpe na nsuka na San Salvador. Na 1975, nsima ya kokanisa mingi mpe kobondela, nazwaki ekateli ya kotika mosala na ngai ya misionɛrɛ mpe  kozonga na Spokane. Baboti na ngai bakómaki mikóló mpe bazalaki na mposa ya lisalisi na ngai.

Nsima ya liwa ya papa na 1979, nakómaki kosalisa mama, mpo akómaki kolɛmba mokemoke mpe azalaki lisusu makasi te. Mbula mwambe na nsima ya liwa ya papa, akufaki na mbula 94. Na ntango wana ya mpasi, nalɛmbaki mingi na nzoto mpe nazalaki komitungisa mingi. Mitungisi wana ememelaki ngai maladi moko na nkombo zona. Kasi mabondeli mpe lisalisi ya bolingo ya Yehova, esungaki ngai nayikela komekama wana mpiko. Ezalaki lokola nde Yehova azalaki koloba na ngai, ‘kino okokóma na nsuki mpɛmbɛ, ngai moko nakumba yo mpe ngai moko nakomema yo mpe nakobikisa yo.’Yis. 46:4.

Na 1990, nakendaki na Omak, na Washington. Kuna mpe namonaki ete nakoki kosala mingi na teritware oyo balobaka monɔkɔ ya Espagnol, mpe bato mingi oyo nayekolaki na bango Biblia bazwaki batisimo. Na sanza ya zomi na moko ya mobu 2007, nazalaki lisusu kokoka te kobatela ndako na ngai na Omak, yango wana nakendaki kofanda na apartema moko pembeni ya engumba Chelan, na Washington. Banda ntango wana, bandeko ya lisangá ya Espangol ya awa basalisaka ngai mpenza mpe nazali na botɔndi mingi mpo na bango. Lokola nazali mobange kaka moko ya lisangá yango, na boboto mpenza, bandeko “bazwaka” ngai lokola “nkɔkɔ” na bango.

Atako naboyi kobala mpe kobota bana mpo nasalela Yehova mingi “kozanga kotya makanisi na makambo mosusu,” nazali na ebele ya bana ya elimo. (1 Ko. 7:34, 35) Namonaki ete nakokoka te kozwa biloko nyonso na bomoi oyo. Yango wana natyaki makambo eleki ntina na esika ya liboso, elingi koloba, komipesa mpo na kosalela Yehova motema mobimba. Na mokili ya sika, ekozala na ntango mingi ya kosepela na makambo ndenge na ndenge ya kitoko. Vɛrsɛ oyo nalingaka mingi ezali Nzembo 145:16, oyo emonisaka biso ete Yehova ‘akokokisa mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.’

Mosala ya mobongisi-nzela esalisaka ngai namimonaka kaka elenge

Sikoyo nakómi na mbula 91, kasi lokola nazali kaka mwa makasi, nazali kokoba na mosala ya mobongisi-nzela. Mosala ya mobongisi-nzela esalisaka ngai namimonaka kaka elenge mpe namona ete bomoi na ngai ezali na ntina. Ntango nakómaki na El Salvador, mosala ya kosakola eutaki nde kobanda. Atako Satana azalaki ntango nyonso kobimisa botɛmɛli, lelo oyo ekólo yango ekómi na basakoli 39 000. Yango elendisi mpenza kondima na ngai. Ya solo, emonani mpenza ete elimo santu ya Yehova ezali kosunga milende ya basaleli na ye!

^ par. 4 Talá Annuaire 1981 des Témoins de Jéhovah, nkasa 45-46.

^ par. 19 Annuaire 1981, nkasa 41-42.

^ par. 24 Annuaire 1981, nkasa 66-67, 74-75.