Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2014

Zalá na kondima makasi na Bokonzi

Zalá na kondima makasi na Bokonzi

“Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa.”​—EBR. 11:1.

1, 2. Nini ekosalisa biso tózala mpenza na kondima makasi ete Bokonzi ekokokisa mokano ya Nzambe mpo na bato, mpe mpo na nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

BISO Batatoli ya Yehova, tolobaka mbala mingi ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano na biso nyonso, mpe na esengo nyonso tobendaka likebi ya bato na likambo wana ya ntina oyo Biblia elobeli. Tozwaka mpe makasi na elikya oyo bokonzi yango epesaka biso. Kasi, kondima na biso ezali mpenza makasi mpe tondimaka mpenza ete bokonzi yango ezali likambo ya solo mpe ekokokisa mokano na yango? Nini mpenza ezali kotinda biso tózala na kondima makasi na elikya ya Bokonzi?​—Ebr. 11:1.

2 Bokonzi ya Masiya ezali ebongiseli oyo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azwi mpo na kokokisa mokano na ye na ntina etali bozalisi na ye. Bokonzi yango esimbami na moboko ya solosolo mpenza: Lotomo oyo kaka Yehova nde azali na yango ya koyangela. Makambo ya ntina ya bokonzi yango, na ndakisa mokonzi na yango, baoyo bakoyangela elongo na ye, esika bakoyangela: nyonso elobelamaki na nzela ya kondimana ndenge na ndenge, to boyokani to bibongiseli oyo esalemaki kati na Nzambe to  Mwana na ye, Yesu Kristo. Kokanisa na kondimana yango ndenge na ndenge, ekokolisa bososoli na biso mpe tokondimisama mpenza ete mokano ya Nzambe ekokokisama mpe ekosalisa biso tómona ete ebongiseli yango epikami mpenza.​—Tángá Baefese 2:12.

3. Na lisolo oyo mpe oyo ekolanda, tokotalela nini?

3 Biblia elobeli kondimana ya minene motoba oyo eyokani na Bokonzi ya Masiya oyo Nzambe apesi Kristo Yesu. Kondimana yango ezali (1) kondimana ya Abrahama, (2) kondimana ya mibeko, (3) kondimana ya Davidi, (4) kondimana mpo na nganga-nzambe lokola Melekisedeke, (5) kondimana ya sika, mpe (6) kondimana mpo na Bokonzi. Tótalela ndenge kondimana yango mokomoko ezali na boyokani ná Bokonzi mpe ezali kosala ete mokano ya Nzambe mpo na mabele mpe bato ezali kokende mokemoke mpo na kokokisama.​—Talá etanda “ Ndenge oyo Nzambe akokokisa mokano na ye.”

ELAKA MOKO EMONISI NDENGE MOKANO YA NZAMBE EKOKOKISAMA

4. Ndenge mokanda ya Ebandeli emonisi yango, makambo nini Yehova alobaki na ntina na bato?

4 Nsima ya kobongisa planɛti na biso kitoko mpo bato báfanda, Yehova ayebisaki makambo oyo misato na ntina na bato: Nzambe na biso asengelaki kokela moto na elilingi na ye, bato basengelaki kokómisa Paradiso na mabele mobimba mpe kotondisa yango na bana ya sembo, mpe Nzambe apekisaki bato kolya mbuma ya nzete ya koyeba malamu ná mabe. (Eba. 1:26, 28; 2:16, 17) Makambo wana emonisaki na mobimba mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mabele. Nsima ya kokelama ya moto, kotosa makambo mosusu mibale ezalaki na ntina mpo ete mokano ya Nzambe ekokisama. Kasi, mpo na nini kondimana ndenge na ndenge esengelaki kosalema?

5, 6. (a) Ndenge nini Satana alukaki kopekisa mokano ya Nzambe? (b) Yehova asalaki nini ntango Satana abimisaki ntembe na Edene?

5 Mpo na kokanga nzela ete mokano ya Nzambe esalema te, Satana Zabolo abandisaki botomboki. Asalaki yango na ndenge atyaki likebi na mobeko oyo ezalaki kosɛnga moto ete amonisa botosi. Amekaki Eva, mwasi ya liboso mpo abuka mobeko oyo etalaki nzete ya koyeba malamu ná mabe. (Eba. 3:1-5; Em. 12:9) Ntango asalaki bongo, Satana atyaki ntembe na lotomo oyo Nzambe azali na yango ya koyangela bikelamu na ye. Na nsima, Satana alobaki mpe ete basaleli ya Nzambe basalelaka ye mpo na bamposa na bango ya lokoso.​—Yobo 1:9-11; 2:4, 5.

6 Yehova asengelaki kosala nini mpo na kopesa eyano na ntembe wana oyo Satana abimisaki na Edene? Koboma batomboki wana, elingaki kosukisa botomboki na bango. Kasi, yango elingaki komonisa ete mokano oyo Nzambe alobaki ete mabele ekotonda na bana ya Adama ná Eva ya botosi elingaki kokokisama te. Na esika aboma batomboki yango mbala moko, Mozalisi ya bwanya ayanolaki na likambo yango na nzela esakweli moko ya ntina mingi: Elaka oyo epesamaki na Edene, mpo na kondimisama ete likambo mokomoko oyo alobaki ekokokisama.​—Tángá Ebandeli 3:15.

7. Elikya nini elaka oyo epesamaki na Edene epesi biso na ntina na nyoka mpe momboto na ye?

7 Na nzela ya elaka oyo epesamaki na Edene, Yehova akataki likambo ya nyoka mpe momboto na ye, elingi koloba bamonisi ya Satana Zabolo mpe baoyo nyonso bakozala na ngambo na ye na ntembe oyo ebimaki mpo na lotomo ya Nzambe ya koyangela. Nzambe ya solo apesaki momboto ya mwasi na ye ya likoló bokonzi ya koboma Satana. Lisusu, elaka oyo epesamaki na elanga ya Edene emonisaki mpe ete moto oyo abimisaki botomboki na Edene mpe makambo nyonso ya mabe oyo eutá na  mabe na ye ekolongwa, kasi emonisi mpe nzela oyo likambo yango ekosalema.

8. Tokoki koloba nini mpo na mwasi mpe momboto na ye?

8 Nani asengelaki kozala momboto ya mwasi? Lokola momboto yango asengelaki kopanza motó ya nyoka, elingi koloba, ‘kobebisa nyɛɛ’ Satana Zabolo, oyo azali ekelamu ya elimo, momboto yango asengelaki mpe kozala ekelamu ya elimo. (Ebr. 2:14) Na yango, mwasi oyo asengelaki kobota momboto yango asengelaki mpe kozala mwasi na ndenge ya elimo. Ntango momboto ya nyoka ekómaki mingi, ndimbola ya momboto ya mwasi mpe mwasi yango eyebanaki te na boumeli ya mbula soki 4 000 nsima ya elaka oyo Yehova apesaki na Edene. Na nsima, Yehova asalaki kondimana ndenge na ndenge oyo elimbolaki momboto yango mpe amonisaki basaleli na ye ete momboto yango ekozala nzela oyo Nzambe akolongola makambo mabe oyo Satana amemeli bato.

KONDIMANA MOKO OYO ELIMBOLI MOMBOTO YANGO

9. Kondimana ya Abrahama ezali nini, mpe ntango nini ebandaki kosala?

9 Mbula soki 2 000 nsima ya kokata likambo ya Satana, Yehova apesaki Abrahama etinda ete alongwa na Ure na Mezopotamia mpe akende na mokili ya Kanana. (Mis. 7:2, 3) Yehova alobaki na ye boye: “Longwá na mboka na yo mpe tiká bandeko na yo mpe ndako ya tata na yo mpe kende na mboka oyo nakolakisa yo. Mpe nakosala ete ekólo moko monene euta na yo mpe nakopambola yo mpe nakokómisa nkombo na yo monene; mpe zalá mpenza lipamboli. Mpe nakopambola baoyo bazali kopambola yo, mpe ye oyo azali kolakela yo mabe, nakolakela ye mabe, mpe mabota nyonso ya mabele ekomizwela mpenza lipamboli na nzela na yo.” (Eba. 12:1-3) Oyo ezali lisolo ya liboso mpenza ya kondimana ya Abrahama, to kondimana oyo Yehova Nzambe asalaki ná Abrahama. Kasi eyebani te na bosikisiki  ntango oyo Yehova asalaki mpo na mbala ya liboso kondimana ná Abrahama. Nzokande, ebandaki kosala na mobu 1943 L.T.B., ntango Abrahama azalaki na mbula 75, alongwaki na Harane mpe akatisaki Ebale Efrata.

10. (a) Ndenge nini Abrahama amonisaki kondima makasi na bilaka ya Nzambe? (b) Makambo nini mosusu Yehova amonisaki mokemoke na ntina na momboto ya mwasi?

10 Yehova azongelaki elaka oyo apesaki Abrahama mbala ebele, mpe abakisaki makambo mosusu. (Eba. 13:15-17; 17:1-8, 16) Mpe ntango Abrahama amonisaki kondima makasi na bilaka ya Nzambe ndenge andimaki kopesa mwana na ye kaka moko mbeka, Yehova apesaki elaka moko ya ntina mingi mpo na komonisa ete abosani te kondimana oyo asalaki ná ye. (Tángá Ebandeli 22:15-18; Baebre 11:17, 18.) Ntango kondimana ya Abrahama ebandaki kosala, Yehova abandaki komonisa mokemoke makambo mingi ya ntina oyo etali momboto ya mwasi. Momboto asengelaki kobima epai ya Abrahama, asengelaki kozala mingi, kozala mokonzi, koboma banguna nyonso mpe kozala lipamboli mpo na ebele ya bato mosusu.

Abrahama amonisaki kondima makasi na bilaka ya Nzambe (Talá paragrafe 10)

11, 12. Ndenge nini Makomami emonisi ete kondimana ya Abrahama ekokokisama lisusu na monene na yango, mpe ezali na ndimbola nini mpo na biso?

11 Atako kondimana ya Abrahama ekokisamaki mpenza mpo na bana ya Abrahama ntango bazwaki Mokili ya ndaka, Makomami emonisi ete maloba ya kondimana yango esengelaki mpe kokokisama na ndenge ya elimo. (Gal. 4:22-25) Na kokokana na yango monene, ndenge ntoma Paulo alimbolaki yango, eteni ya liboso ya momboto ya Abrahama ezali Kristo mpe eteni ya mibale ezali bakristo 144 000, oyo batyami mafuta na elimo. (Gal. 3:16, 29; Em. 5:9, 10; 14:1, 4) Mwasi oyo asengelaki kobimisa momboto yango ezali “Yerusaleme ya likoló,” eteni ya likoló ya ebongiseli ya Nzambe oyo esalemi na bikelamu ya elimo ya sembo. (Gal. 4:26, 31) Ndenge kondimana ya Abrahama elakaki, momboto ya mwasi esengelaki komemela bato mapamboli.

12 Kondimana ya Abrahama epesi ndanga ya solosolo mpo na Bokonzi ya likoló mpe efungweli mokonzi mpe baoyo bakoyangela elongo na ye nzela ya kozwa Bokonzi. (Ebr. 6:13-18) Kino ntango boni kondimana yango esengelaki kokoba kosala? Na Ebandeli 17:7, Biblia elobi ete ezali “kondimana moko ya ntango oyo etyami ndelo te.” Ekokoba kosala tii ntango Bokonzi ya Masiya ekoboma banguna ya Nzambe mpe mabota nyonso ya mabele ekopambolama. (1 Ko. 15:23-26) Na yango, baoyo bakozala na bomoi awa na mabele, bakosepela na bomoi ya seko. Kondimana ya Nzambe ná Abrahama emonisi ete Yehova azali na ekateli ya kokokisa mokano na ye mpo ete bato ya sembo ‘bátondisa mabele.’​—Eba. 1:28.

KONDIMANA MOKO OYO EMONISI ETE BOKONZI EKOUMELA

13, 14. Kondimana ya Davidi epesi ndanga nini na likambo etali boyangeli ya Masiya?

13 Elaka oyo epesamaki na Edene mpe kondimana ya Abrahama emonisi likambo moko ya ntina ete boyangeli ya Yehova, ndenge emonisami na nzela ya Bokonzi ya Masiya, esimbami mpenza na mitinda ya sembo ya Nzambe. (Nz. 89:14) Ekosalema ete guvɛrnema ya Masiya ebeba mpe na nsima elongolama? Kondimana mosusu epesi ndanga ete likambo ya ndenge wana ekoki kosalema ata moke te.

14 Tótalela oyo Yehova alakaki Davidi, mokonzi ya Yisraele na nzela ya kondimana ya Davidi. (Tángá 2 Samwele 7:12, 16.) Yehova asalaki kondimana yango ná Davidi ntango oyo Davidi azalaki koyangela Yerusaleme, mpe alakaki ye ete Masiya akozala mokitani na ye. (Luka 1:30-33) Na yango, Yehova amonisaki lisusu polele molɔngɔ oyo ekomema tii na momboto mpe alobaki  ete mokitani ya Davidi nde akozala na “lotomo oyo euti na mibeko” mpo na kiti ya Bokonzi ya Masiya. (Ezk. 21:25-27) Na nzela ya Yesu, bokonzi ya Davidi “ekozala na nsuka te.” Ya solo, “ekozala mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpe kiti na ye ya bokonzi lokola moi.” (Nz. 89:34-37) Na ntembe te, boyangeli ya Masiya ekobeba soki moke te, mpe makambo oyo boyangeli yango ekosala ekoumela libela!

KONDIMANA OYO EKOKISAKI MOSALA YA NGANGA-NZAMBE

15-17. Na kotalela kondimana mpo na nganga-nzambe lokola Melekisedeke, mokumba nini mosusu momboto akokokisa, mpe mpo na nini?

15 Atako kondimana ya Abrahama mpe kondimana ya Davidi emonisi ete momboto ya mwasi asengelaki kokokisa mokumba ya mokonzi, kaka mokumba wana te nde ekokaki komemela bato ya bikólo nyonso mapamboli. Mpo ete bápambolama mpenza, basengelaki kosikolama na lisumu mpe kokɔta na libota ya Yehova ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Mpo na kosala yango, momboto yango asengelaki mpe kozala na makoki ya kosala lokola nganga-nzambe. Mozalisi na biso oyo atondi na bwanya akokisaki mposa yango na nzela ya ebongiseli mosusu, kondimana mpo na nganga-nzambe lokola Melekisedeke.

16 Yehova amonisaki na nzela ya mokonzi Davidi ete akosala kondimana ná Yesu, mpe kondimana yango ekozala na mikano mibale: ‘Kofanda na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe’ tii atya banguna na ye na nse mpe azala “nganga-nzambe mpo na ntango oyo etyami ndelo te lokola Melekisedeke.” (Tángá Nzembo 110:1, 2, 4.) Mpo na nini “lokola Melekisedeke”? Mpo ete ntango molai liboso ete bakitani ya Abrahama bákɔta na Mokili ya Ndaka, Melekisedeke, mokonzi ya Saleme, asalaki lokola “nganga-nzambe ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló.” (Ebr. 7:1-3) Yehova atyaki ye mbala moko mpo asala mosala yango. Kaka ye nde Makomami ya Ebre emonisi ete asalaki lokola mokonzi mpe nganga-nzambe. Na yango, lokola azali na moto te liboso to nsima na ye, akoki kobengama “nganga-nzambe seko na seko,” to libela na libela.

17 Yesu atyamaki mbala moko nganga-nzambe na nzela ya kondimana wana oyo Yehova asalaki ná ye, mpe akotikala “nganga-nzambe libela na libela lokola Melekisedeke.” (Ebr. 5:4-6) Kondimana yango emonisi polele ete Yehova apesi ndanga ete akosalela Bokonzi ya Masiya mpo mokano na ye mpo na bato mpe mabele ekokisama.

KONDIMANA NDENGE NA NDENGE ESALI MOBOKO YA SOLOSOLO MPO NA BOKONZI

18, 19. (a) Kondimana ndenge na ndenge oyo tolobeli emonisi nini na ntina na Bokonzi? (b) Motuna nini etikali?

18 Soki totali kondimana ndenge na ndenge oyo touti koyekola, tokoki komona ndenge ezali na boyokani na Bokonzi ya Masiya mpe ete ebongiseli ya Bokonzi esimbami mpenza na boyokani ya solosolo. Elaka oyo esalemaki na Edene esali ete Yehova akokisa mokano na ye mpo na mabele mpe bato na nzela ya momboto ya mwasi. Momboto yango asengelaki kozala nani, mpe akokokisa mokumba nini? Kondimana ya Abrahama emonisi ndenge makambo nyonso ekozala.

19 Kondimana ya Davidi elobeli makambo mingi mpo na molɔngɔ ya libota ya Masiya mpe epesi ye lotomo ya koyangela mabele mpo ete makambo oyo bokonzi yango ekosala ezala libela na libela. Kondimana mpo na nganga-nzambe lokola Melekisedeke ekómi moboko mpo ete momboto akokisa mokumba ya nganga-nzambe. Kasi, mpo na kokómisa bato na ezaleli ya kokoka, Yesu akozala ye moko te. Bato mosusu mpe batyami mafuta na elimo mpo na kosala lokola bakonzi mpe banganga-nzambe. Basengelaki kouta wapi? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.