Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2014

Bokokóma “bokonzi moko ya banganga-nzambe”

Bokokóma “bokonzi moko ya banganga-nzambe”

“Bokokóma mpo na ngai bokonzi moko ya banganga-nzambe mpe ekólo moko mosantu.”​—KOB. 19:6.

1, 2. Libateli nini momboto ya mwasi esengelaki na yango, mpe mpo na nini?

ESAKWELI ya liboso oyo ekomami na Biblia ezali na ntina mingi mpo na kokokisama ya mokano ya Yehova. Ntango apesaki elaka ya Edene, Nzambe ya solo alobaki boye: “Nakotya bonguna kati na yo [Satana] ná mwasi mpe kati na momboto na yo ná momboto na ye.” Bonguna yango esengelaki kozala makasi ndenge nini? Yehova alobaki boye: “Ye [momboto ya mwasi] akopanza motó na yo [Satana] mpe yo okozokisa ye na litindi.” (Eba. 3:15) Bonguna kati na nyoka mpe mwasi esengelaki kozala makasi mpenza na boye ete Satana akosala nyonso mpo na kobebisa momboto ya mwasi.

2 Tokokamwa te ete mokomi moko ya nzembo ayebisaki Nzambe na libondeli mpo na bato oyo ye aponaki ete: “Talá banguna na yo bazali na yikiyiki; mpe bato oyo bazali koyina yo makasi batomboli motó na bango. Bazali kokoba kosalela bato na yo masolo ya nkuku na mayele mabe; mpe bazali kosala likita mpo na bato oyo yo obombi. Balobi ete: ‘Bóya mpe tósilisa bango bázala ekólo lisusu te.’” (Nz. 83:2-4) Molɔngɔ ya bakitani oyo ememaki na momboto ya mwasi esengelaki kobatelama mpo  esilisama te mpe ebebisama te. Mpo na kobatela momboto yango mpe kopesa ndanga ete Bokonzi ya Masiya ekolonga, Yehova asalaki kondimana ndenge na ndenge.

KONDIMANA OYO EBATELAKI MOMBOTO

3, 4. (a) Ntango nini kondimana ya mibeko ebandaki kosala, mpe ekólo Yisraele endimaki kosala nini? (b) Kondimana ya mibeko ezalaki kopekisa makambo nini?

3 Lokola bana ya Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo bakómaki mingi mpenza, Yehova akómisaki bana yango ekólo Yisraele. Na nzela ya Moize, Yehova asalaki kondimana moko ya ntina mingi ná ekólo yango na ndenge apesaki bango mibeko, mpe ekólo Yisraele endimaki makambo nyonso ya kondimana yango. Biblia elobi ete: “[Moize] akamataki buku ya kondimana mpe atángaki yango na matoi ya bato. Bongo balobaki ete: ‘Nyonso oyo Yehova alobi tondimi kosala mpe kotosa yango.’ Bongo Moize akamataki makila mpe amwangiselaki yango bato mpe alobaki ete: ‘Oyo ezali makila ya kondimana oyo Yehova asali ná bino mpo na maloba oyo nyonso.’”​—Kob. 24:3-8.

4 Kondimana ya mibeko ebandaki kosala na 1513 L.T.B. na Ngomba Sinai. Na nzela ya kondimana wana, ekólo Yisraele etyamaki pembeni lokola ekólo oyo Nzambe aponaki. Yehova akómaki ‘Mosambisi na bango, Moto oyo apesaka bango mibeko, mpe Mokonzi na bango.’ (Yis. 33:22) Lisolo ya ekólo Yisraele emonisi makambo oyo ezalaki kokómela bango ntango bazalaki kotosa mibeko ya sembo ya Yehova mpe ntango bazalaki kotosa yango te. Lokola mibeko ezalaki kopekisa kobalana na bapakano mpe kosangana na losambo ya lokuta, yango ezalaki kobatela bakitani ya Abrahama mpo bábebisama te.​—Kob. 20:4-6; 34:12-16.

5. (a) Kondimana ya mibeko epesaki Yisraele libaku nini? (b) Mpo na nini Nzambe aboyaki ekólo Yisraele?

5 Kondimana ya mibeko ebimisaki mpe ebongiseli moko mpo na mosala ya bonganga-nzambe, elilingi ya ebongiseli moko monene na mikolo ezali koya. (Ebr. 7:11; 10:1) Ya solo, na nzela ya kondimana wana, Yisraele ezwaki libaku moko malamu ya kokóma “bokonzi moko ya banganga-nzambe.” Mpo na yango, basengelaki kotosa mibeko ya Yehova. (Tángá Kobima 19:5, 6.) Kasi, batosaki te. Na esika ya kosepela na koya ya Masiya, oyo azali eteni ya liboso ya momboto ya Abrahama, ekólo yango eboyaki ye. Yango wana, Nzambe aboyaki ekólo yango.

Kozanga botosi ya Yisraele elakisaki te ete kondimana ya mibeko elongaki te (Talá paragrafe 3-6)

6. Likambo nini Mibeko ekokisaki?

6 Lokola batikalaki sembo te epai ya Nzambe, ekólo ya Yisraele ekómaki te bokonzi moko ya banganga-nzambe. Kasi yango elingi koloba te ete mibeko ezalaki na ntina te. Mibeko ezalaki kobatela momboto mpe komema bato epai ya Masiya. Ntango Kristo ayaki mpe amonanaki, mokumba yango ekokisamaki. Biblia elobi ete: “Kristo azali nsuka ya Mibeko.” (Rom. 10:4) Kasi motuna ezali kaka: Banani basengelaki kozwa libaku  ya kokóma bokonzi moko ya banganga-nzambe? Yehova Nzambe asalaki boyokani moko oyo eyokani na mibeko mpo na kosala ekólo moko ya sika.

EKÓLO YA SIKA ESALEMI

7. Yehova asakolaki nini na nzela ya mosakoli Yirimia na likambo etali kondimana ya sika?

7 Bambula mingi liboso ete kondimana ya mibeko esila, na nzela ya mosakoli Yirimia, Yehova asakolaki ete akosala “kondimana ya sika” ná ekólo Yisraele. (Tángá Yirimia 31:31-33.) Kondimana yango esengelaki kokesana ná kondimana ya mibeko mpo yango ekosala ete masumu elimbisama kozanga kopesa bambeka ya banyama. Esengelaki kosalema ndenge nini?

8, 9. (a) Makila ya Yesu ekokisi nini? (b) Libaku nini efungwamaki mpo na baoyo bazali na kati ya kondimana ya sika? (Talá elilingi ya ebandeli.)

8 Basiɛklɛ na nsima, Yesu abandisaki bolei ya mpokwa ya nkolo na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B. Ntango alobelaki kɔpɔ ya vinyo, ayebisaki bayekoli na ye 11 ya sembo ete: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopama mpo na bino.” (Luka 22:20) Evanzile ya Matai emonisi ete Yesu alobaki mpo na vinyo boye: “Oyo elakisi ‘makila ya kondimana’ na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi mpo na kolimbisa masumu.”​—Mat. 26:27, 28.

9 Makila ya Yesu oyo esopanaki ekómisaki kondimana ya sika likambo ya solo. Makila yango esalaki ete bolimbisi ya masumu esalema mpo na mbala moko mpe mpo na libela. Yesu azalaki te na kati ya kondimana ya sika. Lokola azalaki na lisumu te, asengelaki te kolimbisama. Kasi Nzambe akokaki kosalela motuya ya makila ya Yesu oyo esopamaki mpo na bana ya Adama. Akokaki mpe kokómisa bato mosusu ya sembo “bana” na ye mpe kotya bango mafuta na elimo santu. (Tángá Baroma 8:14-17.) Lokola na miso ya Nzambe bazali na lisumu te, na maloba mosusu, bazali lokola Yesu, Mwana ya Nzambe oyo azangi lisumu. Bakristo yango oyo batyami mafuta na elimo bakokóma “bazwi-ya-libula elongo na Kristo” mpe bakozwa libaku ya kokóma “bokonzi moko ya banganga-nzambe.” Yango ezalaki libaku oyo ekólo Yisraele na nse ya mibeko elingaki kozala na yango. Ntoma Petro alobaki mpo na “bazwi-ya-libula elongo na Kristo” ete: “Bino bozali ‘libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu, bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza, mpo bósakola bizaleli malamu’ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na pole na ye ya kokamwa.” (1 Pe. 2:9) Kondimana ya sika ezali mpenza na ntina! Epesi bayekoli ya Yesu libaku ya kokóma eteni ya mibale ya momboto ya Abrahama.

KONDIMANA YA SIKA EKÓMI KOSALA

10. Ntango nini kondimana ya sika ebandaki kosala, mpe mpo na nini kaka ntango wana?

10 Ntango nini kondimana ya sika ekómaki kosala? Ezalaki te ntango Yesu alobelaki yango na butu na ye ya nsuka awa na mabele. Mpo ekóma kosala, esengelaki makila ya Yesu esopama mpe motuya na yango esengelaki komonisama epai ya Yehova na likoló. Lisusu, esengelaki elimo santu esopama likoló ya baoyo basengelaki kozala “bazwi-ya-libula elongo na Kristo.” Na yango, kondimana ya sika ekómaki kosala na Pantekote ya mobu 33 T.B. ntango bayekoli ya Yesu ya sembo batyamaki mafuta na elimo santu.

11. Ndenge nini kondimana ya sika esali ete Bayuda ná bato ya bikólo mosusu bakóma basangani ya Yisraele ya elimo, mpe bato boni bazali na kati ya kondimana ya sika?

11 Atako kondimana ya kala ya mibeko ekómaki lokola ‘esili ngala’ ntango Yehova alobaki na nzela ya Yirimia ete akosala kondimana ya sika ná ekólo Yisraele, kondimana yango esilaki te tii ntango kondimana ya sika ebandaki kosala. (Ebr. 8:13) Ntango esalemaki, Nzambe akómaki kotalela  Bayuda ná bato ya bikólo oyo bakatamá ngɛnga te oyo bazalaki bandimi ndenge moko, mpo ‘kokatama ngenga na bango ezali oyo ya motema na elimo, kasi te na mibeko oyo ekomami.’ (Rom. 2:29) Ntango asalaki kondimana ya sika ná bango, Nzambe atyaki mibeko na ye ‘na makanisi na bango, mpe akomaki yango na mitema na bango.’ (Ebr. 8:10) Motángo mobimba ya baoyo bazali na kati ya kondimana ya sika ezali 144 000 mpe basali ekólo moko ya sika, elingi koloba “Yisraele ya Nzambe” to Yisraele ya elimo.​—Gal. 6:16; Em. 14:1, 4.

12. Kondimana ya mibeko mpe kondimana ya sika ekokani na makambo nini?

12 Kondimana ya mibeko mpe kondimana ya sika ekokani na makambo nini? Kondimana ya mibeko esalemaki kati na Yehova ná Yisraele ya mosuni, kasi kondimana ya sika esalemaki kati na Yehova ná Yisraele ya elimo. Moize azalaki moyokanisi ya kondimana ya kala, mpe Yesu azali Moyokanisi ya kondimana ya sika. Makila ya nyama nde ekómisaki kondimana ya mibeko likambo ya solo; makila ya Yesu oyo esopamaki nde ekómisaki kondimana ya sika likambo ya solo. Lisusu, ekólo Yisraele ebongisamaki na nzela ya kondimana ya mibeko na litambwisi ya Moize, baoyo bazali na kati ya kondimana ya sika babongisami na nse ya litambwisi ya Yesu, mokonzi ya lisangá.​—Ef. 1:22.

13, 14. (a) Kondimana ya sika eyokani na Bokonzi na nini? (b) Esɛngi nini mpo Yisraele ya elimo eyangela elongo na Kristo na likoló?

13 Kondimana ya sika eyokani na Bokonzi mpo ebimisi ekólo moko mosantu oyo ezali na libaku ya kokóma bakonzi mpe banganga-nzambe na Bokonzi ya likoló. Ekólo yango esali eteni ya mibale ya momboto ya Abrahama. (Gal. 3:29) Na yango, kondimana ya sika endimisi ete kondimana ya Abrahama ekokokisama.

14 Likambo mosusu oyo etali Bokonzi esengeli kosalema. Kondimana ya sika ebimisi Yisraele ya elimo mpe esali ete bato ya kondimana yango bákóma “bazwi-ya-libula elongo na Kristo.” Kasi ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakoki koyangela elongo na Yesu lokola bakonzi mpe banganga-nzambe na likoló? Kondimana mosusu epesi nzela na likambo yango.

KONDIMANA OYO EPESI BATO MOSUSU LIKOKI YA KOYANGELA NÁ KRISTO

15. Kondimana nini Yesu asalaki ná bantoma na ye ya sembo?

15 Nsima ya kobandisa bolei ya mpokwa ya Nkolo, Yesu asalaki kondimana ná bayekoli na ye ya sembo, mbala mingi ebengamaka kondimana mpo na Bokonzi. (Tángá Luka 22:28-30.) Longola kondimana ndenge na ndenge oyo ezalaki kosalema kati na Yehova ná bato mosusu, kondimana oyo, esalemi kati na Yesu ná bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo. Ntango alobaki, “ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana ná ngai,” ekoki kozala ete Yesu azalaki kolobela kondimana oyo Yehova asalaki ná ye mpo na kozala “nganga-nzambe libela na libela lokola Melekisedeke.”​—Ebr. 5:5, 6.

16. Kondimana mpo na Bokonzi epesi bakristo oyo batyami mafuta na elimo likoki nini?

16 Bantoma 11 ya sembo ‘bakangamaki na Yesu makasi na komekama na ye.’ Kondimana mpo na Bokonzi endimisaki bango ete bakozala elongo na Yesu na likoló mpe bakofanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela lokola bakonzi mpe kosala lokola banganga-nzambe. Kasi, libaku yango esengelaki kosuka te kaka na bantoma wana 11. Yesu abimelaki ntoma Yoane na emonaneli moko mpe alobaki boye: “Moto oyo alongi nakopesa ye nzela afanda elongo na ngai na kiti na ngai ya bokonzi, ndenge ngai mpe nalongaki mpe nafandi elongo na Tata na ngai na kiti na ye ya bokonzi.” (Em. 3:21) Na yango, kondimana mpo na Bokonzi esalemaki ná bakristo 144 000 oyo batyami mafuta na elimo. (Em. 5:9, 10; 7:4)  Yango nde kondimana oyo esali ete báyangela elongo na Yesu na likoló. Likambo yango ezali lokola mwasi oyo aponami mpo na kobala mokonzi moko. Soki babalani, mwasi yango akoki mbala mosusu kozala na libaku ya koyangela elongo na mokonzi yango. Kutu, Makomami ebengaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo “mwasi ya libala” ya Kristo, “ngɔndɔ moko ya pɛto” oyo alakami na libala epai ya Kristo.​—Em. 19:7, 8; 21:9; 2 Ko. 11:2.

ZALÁ NA KONDIMA MAKASI NA BOKONZI YA NZAMBE

17, 18. (a) Lobelá na mokuse kondimana motoba oyo eyokani ná Bokonzi oyo toyekoli. (b) Mpo na nini tosengeli kozala na kondima makasi na Bokonzi?

17 Kondimana nyonso oyo totaleli na masolo oyo mibale eyokani na likambo moko to makambo mingi ya ntina mpenza oyo etali Bokonzi. (Talá etanda “Ndenge oyo Nzambe akokokisa mokano na ye” na lisolo oyo eleki). Bokonzi yango ekolonga mpenza mpo kondimana ndenge na ndenge oyo esalemi, ezali likambo ya solo. Na yango, tosengeli mpenza kotya motema mobimba ete Nzambe akosalela Bokonzi ya Masiya mpo na kokokisa mokano oyo azalaki na yango na ebandeli mpo na mabele mpe bato.​—Em. 11:15.

Na nzela ya Bokonzi ya Masiya, Yehova akokokisa mokano na ye mpo na mabele (Talá paragrafe 15-18)

18 Tokoki mpenza kotya ntembe ete makambo oyo Bokonzi ezali kosala ekomemela bato mapamboli ya libela? Na motema mobimba, tokoki kosakola na molende nyonso ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi nyonso ya bato mpo na libela. Tiká ete tósakwela basusu solo yango na molende mpenza!​—Mat. 24:14.