Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2014

“Bókoba kotya makanisi na bino na makambo ya likoló”

“Bókoba kotya makanisi na bino na makambo ya likoló”

“Bókoba kotya makanisi na bino na makambo ya likoló, na makambo ya mabele te.”​—KOL. 3:2.

1, 2. (a) Nini emonisi ete lisangá ya siɛklɛ ya liboso na Kolose ezalaki na likama? (b) Toli nini epesamaki mpo na kosalisa bandeko ya Kolose bátengatenga te?

LISANGÁ ya bokristo na siekle ya liboso na Kolose ezalaki na likama! Bandeko mosusu bazalaki kobimisa bokabwani na ndenge bazalaki kolendisa bato bákangama na Mobeko ya Moize. Basusu bazalaki kolendisa mateya ya filozofi oyo ezalaki kotinda bato báboya bisengo nyonso. Mpo na kopekisa ete mateya wana ya lokuta epalangana, ntoma Paulo akomaki mokanda moko ya kolendisa mpenza, mpe akebisaki bandeko ya Kolose ete: “Bókeba: mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato, na kolanda makambo mikemike ya mokili kasi na kolanda Kristo te.”​—Kol. 2:8.

2 Soki bakristo wana oyo batyamaki mafuta na elimo batyaki makanisi na bango na “makambo mikemike ya mokili,” balingaki kopesa ebongiseli oyo Yehova azwá mpo na lobiko mokongo. (Kol. 2:20-23) Mpo na kosalisa bango bábatela boyokani na bango ya malamu elongo na Nzambe, ntoma Paulo alendisaki bango ete: “Bókoba kotya makanisi na bino na makambo ya likoló, na makambo ya mabele te.” (Kol. 3:2) Ya solo, bandeko ya Kristo  basengelaki kobatela na makanisi elikya na bango ya kozwa libula oyo ebebaka te, oyo ‘babombeli bango na likoló.’​—Kol. 1:4, 5.

3. (a) Elikya nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakobaka kotya na makanisi? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

3 Lelo oyo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo batyaka mpe makanisi na bango na Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló mpe na elikya na bango ya kozala “bazwi-ya-libula elongo na Kristo.” (Rom. 8:14-17) Kasi tokoloba nini mpo na baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele? Ndenge nini maloba oyo ya ntoma Paulo etaleli mpe bango? Na ndenge nini “bampate mosusu” bazali kokoba kotya makanisi “na biloko ya likoló”? (Yoa. 10:16) Mpe ndenge nini biso nyonso tokoki kozwa litomba na kotalela bandakisa ya mibali ya sembo lokola Abrahama mpe Moize, oyo atako bakutanaki na mikakatano, bakobaki kotya makanisi na bango na makambo ya likoló?

KOTYA MAKANISI NA BISO NA MAKAMBO YA LIKOLÓ ELIMBOLI NINI?

4. Ndenge nini bampate mosusu bakoki kokoba kotya makanisi na bango na makambo ya likoló?

4 Atako bampate mosusu bazali te na elikya ya bomoi ya likoló, bango mpe bakoki kokoba kotya na makanisi makambo ya likoló. Ndenge nini? Soki bazali kotya Yehova Nzambe mpe matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bango. (Luka 10:25-27) Mpo na yango, totalelaka Kristo ndakisa na biso. (1 Pe. 2:21) Ndenge moko na bandeko na biso ya siekle ya liboso, biso mpe tokutanaka na makanisi ya mabe, mateya ya filozofi, mpe ezaleli ya koluka mingi biloko ya mosuni na ebongiseli oyo ya Satana. (Tángá 2 Bakorinti 10:5.) Lokola tozali bamekoli ya Yesu, tosengeli kozala ekenge mpo na komibatela na makambo wana oyo ekoki kobebisa elimo na biso.

5. Ndenge nini tokoki kotalela makanisi na biso na likambo etali koluka mingi biloko ya mosuni?

5 Makanisi ya mokili na likambo etali koluka mingi biloko ya mokili ekɔteli biso? Biloko oyo tolingaka emonanaka mbala mingi na makanisi na biso mpe na makambo oyo tosalaka. Yesu alobaki ete: “Epai eloko na yo ya motuya ezali, motema na yo ekozala mpe kuna.” (Mat. 6:21) Mpo na koyeba epai nini motema na biso ezali komema biso, ekozala malamu tómitalelaka mbala na mbala. Omituna boye: ‘Ngonga boni nalekisaka na kokanisa na makambo etali mbongo? Makambo lokola kosala mimbongo, koluka kokóma na bomoi ya malamu mingi nde ezwaka ngai ntango mingi? To nasalaka makasi ete liso na ngai etala kaka makambo ya elimo?’ (Mat. 6:22) Yesu amonisaki ete baoyo bazali koluka libosoliboso ‘komibombela biloko ya motuya awa na mabele’ bazali kotya boyokani na bango ná Yehova na likama mpenza.​—Mat. 6:19, 20, 24.

6. Nini esalisaka biso tólonga makanisi mabe ya nzoto?

6 Nzoto na biso ya kozanga kokoka etindaka biso mingi na makambo oyo esepelisaka biso. (Tángá Baroma 7:21-25.) Soki elimo santu ya Nzambe ezalaka kosala na bomoi na biso te, tolingaki kokwea na “misala ya molili.” Na kati ya misala yango, tokoki kotánga ‘bafɛti ya lokoso, milangwa, misala mabe ya kosangisa nzoto mpe etamboli ya nsɔni.’ (Rom. 13:12, 13) Mpo na kolonga etumba ya “makambo ya mabele,” elingi koloba biloko oyo esepelisaka nzoto, tosengeli kokoba kotya makanisi na biso na makambo ya likoló. Kosala bongo, esɛngaka milende. Yango wana, ntoma Paulo alobaki ete: “Nazali kobɛtabɛta nzoto na ngai mpe kokómisa yango lokola moombo.” (1 Ko. 9:27) Na ntembe te, tosengeli kosala milende mpo na kokoba kopota mbangu mpo na kozwa bomoi! Tótalela oyo mibali mibale ya sembo ya ntango ya kala basalaki mpo na ‘kosepelisa Nzambe.’​—Ebr. 11:6.

ABRAHAMA “ANDIMELAKI YEHOVA”

7, 8. (a) Mikakatano nini Abrahama ná Sara bakutanaki na yango? (b) Abrahama atyaki makanisi na ye mobimba na likambo nini?

7 Ntango Yehova asɛngaki Abrahama  amema libota na ye na mokili ya Kanana, Abrahama andimaki na motema moko. Lokola Abrahama amonisaki kondima mpe botosi, Yehova asalaki kondimana elongo na ye, mpe alobaki ete: “Nakosala ete ekólo moko monene euta na yo mpe nakopambola yo.” (Eba. 12:2) Nzokande, bambula na nsima, Abrahama ná mwasi na ye Sara bazalaki kaka kobota te. Yehova abosanaki elaka oyo apesaki Abrahama? Lisusu, bomoi na Kanana ezalaki pɛtɛɛ te. Abrahama ná libota na ye batikaki ndako mpe bandeko na bango na Ure, engumba moko ya bozwi na Mezopotamia. Basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 1 600 mpo na kokóma Kanana, epai babandaki kofanda na bahema, batungisamaki na nzala mpe bakutanaki na bato mabe. (Eba. 12:5, 10; 13:18; 14:10-16) Ya solo, bazalaki na mposa te ya kozongela bomoi kitoko oyo batikaki na Ure!​—Tángá Baebre 11:8-12, 15.

8 Na esika ya kotya makanisi na “makambo ya mabele,” Abrahama “andimelaki Yehova.” (Eba. 15:6) Ya solo, atyaki makanisi na ye na makambo ya likoló na ndenge abosanaki ata moke te bilaka ya Nzambe. Kondima ya Abrahama ezwaki mbano ntango Nzambe Oyo-Aleki-Likoló abimelaki ye mpe alobaki na ye ete: “‘Nabondeli yo, talá na likoló mpe tángá minzoto, soki okokoka mpenza kotánga yango.’ Mpe alobaki na ye lisusu ete: ‘Momboto na yo ekokóma kaka bongo.’” (Eba. 15:5) Likambo yango ekitisaki ye mpenza motema! Ntango nyonso oyo Abrahama azalaki komona minzoto na likoló, azalaki komikundola elaka oyo Yehova apesaki ya kokómisa mingi momboto na ye. Mpe wana ntango oyo Nzambe alakaki ekokaki, Abrahama abotaki mwana, ndenge kaka elaka epesamaki.​—Eba. 21:1, 2.

9. Ndenge nini kolanda ndakisa ya Abrahama ekoki kolendisa biso tókoba komipesa na mosala ya Nzambe?

9 Lokola Abrahama, biso mpe tozali kozela kokokisama ya bilaka ya Nzambe. (2 Pe. 3:13) Soki tozali kokoba te kotya makanisi na biso na makambo ya likoló, tokomona lokola ete kokokisama ya bilaka yango ezali koumela mpe tokolembisa mabɔkɔ na mosala ya Yehova. Na ndakisa, omipimelaki makambo mosusu mpo okóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza to mpo osala mosala boye to boye ya ntango nyonso? Soki ezali bongo, topesi yo longonya. Bongo sikoyo? Kobosana te, Abrahama azalaki kokoba kotya na makanisi “engumba oyo ezali na miboko ya solosolo.” (Ebr. 11:10) “Andimelaki Yehova, mpe batángaki ye moyengebene.”​—Rom. 4:3.

MOIZE AZALAKI KOMONA “MOTO OYO AMONANAKA TE”

10. Moize azalaki na bomoi ya lolenge nini ntango azalaki elenge?

10 Moto mosusu oyo akobaki kotya makanisi na ye na makambo ya likoló ezali Moize. Ntango azalaki elenge, “ateyamaki na bwanya nyonso ya Baezipito.” Ezalaki kotánga ya mpambampamba te. Atako Ezipito ezalaki nguya ya mokili mobimba na ntango wana, kasi Moize azalaki kofanda epai ya Farao. Kozanga ntembe, na kotánga ya ndenge wana, Moize akómaki na “nguya na maloba mpe na misala na ye.” (Mis. 7:22) Meká naino komona na makanisi mabaku kitoko oyo ezalaki liboso na ye! Atako bongo, makanisi ya Moize ezalaki na makambo ya ntina mingi: kosala mokano ya Nzambe.

11, 12. Mateya nini Moize azwaki na motuya mingi, mpe ndenge nini toyebi yango?

11 Ntango Moize azalaki mwana, na ntembe te, mama na ye Yokebede ateyaki ye makambo etali Nzambe ya Baebre. Moize azalaki kozwa boyebi ya Yehova na motuya mingi mpe amonaki ete boyebi yango eleki mosika mpenza bomengo nyonso mosusu. Yango wana, atako azalaki kofanda epai ya Farao mpe azalaki na mabaku kitoko oyo ekokaki kokómela ye, kasi asundolaki yango. (Tángá Baebre 11:24-27.) Na ntembe te, mateya ya Nzambe oyo Moize azwaki mpe kondima oyo azalaki na yango epai na ye,  etindaki ye atya makanisi na ye na makambo ya likoló.

12 Moize azwaki mateya ya bakelasi ya likoló mpenza oyo ezalaki na mikolo na ye, kasi asalelaki nde yango mpo na kokóma moto monene na Ezipito, ayebana mingi, to mpo na kokóma na bozwi? Te. Soki asalaka bongo, mbele akokaki te koboya “kobengama mwana ya mwana mwasi ya Farao, aponaki konyokwama elongo na bato ya Nzambe na esika ya kozwa esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu.” Emonani polele ete Moize asalelaki mateya ya Nzambe oyo azwaki mpo ete mokano ya Yehova ekende liboso.

13, 14. (a) Nini esalisaki Moize mpo akóma na makoki ya mosala oyo Yehova alingaki kopesa ye? (b) Na ndakisa ya Moize, tosengeli kosala nini?

13 Moize azalaki mpenza na mposa ya kosalela Yehova mpe bato na ye. Ntango akómaki na mbula 40, Moize akanisaki ete ntango ekoki mpo na kosikola bato ya Nzambe na boombo na Ezipito. (Mis 7:23-25) Kasi, liboso ete Yehova apesa ye mokumba yango, Moize asengelaki naino komonisa bizaleli mosusu mingi. Asengelaki komonisa bizaleli lokola komikitisa, motema molai, motema boboto mpe komipimela. (Mas. 15:33) Moize azalaki na mposa ya formasyo oyo esengelaki kobongisa ye mpo na kolonga mikakatano mpe makambo mosusu ya mpasi oyo ezalaki kozela ye. Bambula oyo alekisaki lokola mobateli ya mpate, esalisaki ye akóma na bizaleli yango.

14 Formasyo wana oyo Moize azwaki ya mobateli ya mpate esalisaki ye? Ɛɛ, esalisaki ye mpenza! Liloba ya Nzambe elobi ete Moize akómaki “na komikitisa mingi koleka bato nyonso oyo bazalaki na mabele.” (Mit. 12:3) Akolisaki ezaleli ya komikitisa mpe yango esalisaki ye mpo ete amonisa motema molai epai ya bato ya lolenge nyonso mpe mikakatano na bango. (Kob. 18:26) Ndenge moko, biso mpe tosengeli komonisa bizaleli ya elimo oyo ekosalisa biso tóleka na “bolɔzi monene” mpe tókɔta na mokili ya sika ya boyengebene oyo Nzambe alaki. (Em. 7:14) Toyokanaka malamu na bato nyonso, ata mpe baoyo tomonaka ete badasukaka to basilikaka mpambampamba? Ekozala malamu tólanda toli oyo ntoma Petro apesaki baninga na ye bakristo ete: “Bókumisa bato ya ndenge nyonso, bólinga lisangá mobimba ya bandeko.”​—1 Pe. 2:17.

TÓKOBA KOTYA MAKANISI NA BISO NA MAKAMBO YA LIKOLÓ

15, 16. (a) Mpo na nini ezali na ntina ete tótya makanisi na biso na makambo ya malamu? (b) Mpo na nini ezali na ntina ete bakristo bázalaka ntango nyonso na etamboli malamu?

15 Tozali kobika na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Tim. 3:1) Yango wana mpo ete tólala te mpɔngi na elimo, tosengeli kokoba kotya makanisi na biso na makambo ya malamu. (1 Tes. 5:6-9) Tótala ndenge tokoki kosala yango na makambo misato ya bomoi na biso.

16 Etamboli na biso: Ntoma Petro ayebaki ntina ya kozala na etamboli malamu. Alobaki boye: ‘Bózalaka na etamboli malamu na kati ya bikólo, mpo bápesa Nzambe nkembo ntango bazali komona na miso na bango misala na bino ya malamu.’ (1 Pe. 2:12) Ezala tozali na ndako, na mosala, na eteyelo, tozali kosakana, to na mosala ya kosakola, tosalaka makasi ete tópesa Yehova nkembo na nzela ya etamboli na biso ya malamu. Kasi, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tosalaka mabe. (Rom. 3:23) Soki tozali kokoba ‘kobunda etumba malamu mingi ya kondima,’ tokoki mpenza kolonga etumba oyo tozali na yango ya nzoto na biso ya kozanga kokoka.​—1 Tim. 6:12.

17. Ndenge nini tokoki komekola makanisi oyo Kristo Yesu azalaki na yango? (Talá elilingi ya ebandeli.)

17 Ezaleli na biso: Kozala na etamboli malamu eyokani mpenza na kozala na ezaleli malamu. Ntoma Paulo alobaki ete: “Bóbatela na kati na bino makanisi oyo Kristo Yesu mpe azalaki na yango.” (Flp. 2:5) Yesu azalaki na ezaleli nini? Azalaki moto ya  komikitisa. Ezaleli ya komikitisa ezalaki kotinda ye amipesa mingi na mosala na ye. Kosakwela basusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezalaki mpenza likambo ya liboso oyo ezalaki na makanisi na ye. (Mrk. 1:38; 13:10) Yesu azalaki kotalela Liloba ya Nzambe lokola buku oyo esengeli kokata makambo nyonso. (Yoa. 7:16; 8:28) Azalaki koyekola malamumalamu Makomami mpo alobelaka yango, akɔtelaka yango mpe alimbolaka yango. Soki tozali na komikitisa mpe na molende na mosala ya kosakola mpe toyekolaka Biblia biso moko, tokozala na makanisi lokola oyo ya Kristo.

Kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe nde likambo ya liboso oyo ezalaki na makanisi ya Yesu (Talá paragrafe 17)

18. Wapi lolenge malamu oyo tokoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya Yehova?

18 Kopesa mabɔkɔ: Mokano ya Yehova ezali ete ‘na nkombo ya Yesu, mabɔlɔngɔ nyonso ya baoyo bazali na likoló mpe ya baoyo bazali na mabele egumbama.’ (Flp. 2:9-11) Atako azali na lokumu mingi, Yesu akomikitisa na nse ya mokano ya tata na ye, biso mpe tosengeli kosala bongo. (1 Ko. 15:28) Ndenge nini? Soki tozali kopesa mabɔkɔ na motema mobimba na mosala oyo tosengisami kosala, elingi koloba ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Mat. 28:19) Lisusu, tozali na mposa ya ‘kosalela bato nyonso oyo ezali malamu,’ to kosalela bazalani mpe bandeko na biso oyo ezali malamu.​—Gal. 6:10.

19. Ekateli na biso esengeli kozala ya kosala nini?

19 Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova akundweli biso ete tókoba kotya makanisi na biso na makambo ya likoló! Mpo na yango, tosengeli “kopota mbangu na momekano oyo etyami liboso na biso.” (Ebr. 12:1) Tiká ete biso nyonso tósala ‘na molimo na biso mobimba lokola mpo na Yehova,’ mpe tata na biso ya likoló akopambola milende mpenza oyo tozali kosala.​—Kol. 3:23, 24.