Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2014

Bamipesaki na bolingo na bango moko—na Taïwan

Bamipesaki na bolingo na bango moko—na Taïwan

ELEKI mbula soki mitano, ndeko Choong Keon ná mwasi na ye Julie, oyo bazali sikoyo na mbula koleka 30, basalaki lokola babongiseli-nzela ya sanza na sanza na Sydney, na ekólo Australie. Ndeko Choong Keon alobi boye: “Tozalaki kosala mosala ya ntango mokuse mpe tozalaki na bomoi ya malamu. Epai tozalaki, malili to molunge ezalaki mingi te, makasi mpe te mpe bato bazalaki na bomoi ya malamu. Tozalaki kosepela kozala ná mabota mpe baninga na biso.” Atako bongo, lisosoli ya Choong Keon ná Julie ezalaki kotungisama. Mpo na nini? Bayebaki ete ntango oyo bazalaki na yango, epesaki bango libaku ya kosala mingi na mosala ya Yehova, kasi bakakatanaki mpo na kosala bambongwana oyo esengeli.

Kasi, na liyangani moko oyo esalemaki na 2009, bayokaki diskur moko oyo esimbaki mpenza mitema na bango. Molobi abendaki likebi na ye epai ya baoyo bakokaki kosala lisusu mingi. Alobaki ete: “Kanisá na likambo oyo: Sofɛlɛ akoki komema motuka na ye na ngambo ya lobɔkɔ ya mwasi to mobali, kasi akoki kosala yango kaka soki motuka ezali kotambola. Ndenge moko, Yesu akoki kotambwisa biso mpo tókolisa mosala na biso; kasi akoki kosala yango kaka soki biso mpe tolingi, elingi koloba soki tozali kosala mpenza milende mpo na kokokisa mokano na biso.” * Ndeko yango ná mwasi na ye bamonaki lokola ete molobi azali koloba mpenza na bango. Kaka na liyangani yango, basololaki na misionɛrɛ moko ná mwasi na ye oyo bazalaki kosala na Taïwan. Balobelaki esengo oyo bazali kozwa na mosala yango mpe bamonisaki polele ete mposa ya basakoli ezali makasi. Na mbala wana, ndeko Choong Keon ná mwasi na ye Julie bamiyokaki lokola ete maloba wana elobami mpenza mpo na bango.

Ndeko Julie alobi boye: “Nsima ya liyangani yango, tobondelaki Yehova apesa biso mpiko ya kozwa ekateli mpo na kokende na Taïwan.” Abakisi ete: “Kasi tozalaki kobanga. Ezalaki lokola tolingi komibwaka na kati ya pisini moko ya mozindo mpo na mbala ya liboso.” Vɛrsɛ oyo esalisaki bango bázwa ekateli wana ezalaki Mosakoli 11:4, oyo elobaka ete: “Ye oyo azali  kotalatala mopɛpɛ akolona mboto te; mpe ye oyo azali kotala mapata akobuka mbuma te.” Ndeko Choong Keon alobi boye: “Tozwaki ekateli ya kotika ‘kotalatala,’ kasi nde kobanda ‘kolona mpe kobuka.’” Babondelaki mbala ebele, batángaki masolo ya bomoi ya bamisionɛrɛ, batindelanaki bamesaje ná bandeko oyo bakendeki kuna na Taïwan, batɛkaki mituka mpe biloko na bango mosusu, mpe sanza misato na nsima bakómaki na Taïwan.

MOSALA YA KOSAKOLA EPESAKI BANGO ESENGO

Bandeko koleka 100 oyo bautaki na bikólo ya bapaya bazali sikoyo na Taïwan na bisika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene. Bautaki na Australie, Canada, Corée, Espagne, États-Unis, France, Grande-Brétagne, mpe Japon, mpe bazali na mbula kobanda 21 kino 73. Na kati na bango, bandeko basi ya minzemba bazali koleka 50. Nini esalisaki bandeko yango bákokisa mosala na bango malamu na mokili ya bapaya? Tóyoka bango.

Laura

Laura, ndeko mwasi moko ya monzemba oyo autaki na Canada, azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza na wɛsti ya Taïwan. Kasi, na boumeli ya mbula soki zomi oyo eleki, azalaki mpenza te kosepela na mosala ya kosakola. Ndeko Laura alobi boye: “Nazalaki mpenza te komipesa na mosala ya kosakola.” Kasi, baninga ya Canada basɛngaki ye bákende na Mexique kosakola mpo na sanza moko. “Ezalaki mbala ya liboso oyo nalekisaki bangonga mingi na mosala ya kosakola, mpe nasepelaki mingi mpenza!”

Likambo yango elendisaki Laura mpo akende na lisangá moko ya monɔkɔ ya bapaya na Canada. Amikomisaki mpo na koyekola monɔkɔ ya Chinois, na nsima akómaki koyangana na etuluku moko ya monɔkɔ yango, mpe amityelaki mokano ya kokende na Taïwan, mpe akokisaki mokano yango na sanza ya libwa ya mobu 2008. Laura alobi boye: “Mpo namesana epai nakendaki, esɛngaki ngai pene ya mbula mobimba; kasi lelo, soki balobi na ngai nazonga lisusu Canada nakolinga te.” Ndenge nini atalelaka mosala ya kosakola? Alobi: “Nazali mpenza kosepela na mosala ya kosakola. Komona ndenge bayekoli ya Biblia bazali kobongola bomoi na bango mpe koyeba Yehova, ezali kopesa esengo mingi mpenza koleka makambo mosusu  nyonso. Kosakola na Taïwan epesi ngai libaku ya komona esengo yango mbala ebele.”

KOYEBA MONƆKƆ TE EZALI ETUMBA

Brian ná Michelle

Ndeko Brian ná mwasi na ye Michelle, oyo bazali na mbula koleka 30, oyo bazali bato ya États-Unis, bakendaki na Taïwan eleki sikoyo mbula soki mwambe. Na ebandeli, bamonaki lokola ete mosala na bango ezali mpenza na ntina te. Kasi, misionɛrɛ moko oyo aumeli mingi na mosala yango alobaki na bango boye: “Ata soki opesi moto trakte ya mpamba, osengeli kobosana te ete ntango mosusu ezali mbala ya liboso moto wana ayoka nsango ya Yehova. Na yango, bozali kosala mosala moko kitoko!” Maloba wana ya kolendisa esalisaki mpenza Brian ná Michelle mpo ete batika te. Ndeko mobali mosusu alobaki na bango boye: “Mpo na kolɛmba te, kotalela te bokoli na yo ndenge ozali koloba monɔkɔ ya Chinois mokolo na mokolo, kasi mpo olɛmba te, talá nde ndenge osalaki na makita ya liboso, ya mibale mpe bongo na bongo.” Na ntembe te, bakendeki liboso mpe lelo oyo, bazali babongisi-nzela oyo bazali kobota mbuma ya malamu.

Nini ekoki kotinda yo ondima koyekola monɔkɔ moko ya bapaya? Meká kokende na ekólo yango oyo olingi kokende kosala. Kende na makita, sanganá ná bandeko ya teritware yango, bimá ná bango na mosala ya kosakola. Ndeko Brian alobi boye: “Soki omoni ete bato mingi basepeli na nsango malamu mpe omoni ete bandeko basepeli na yo mpe bayambi yo malamu, ekozala mpasi te mpo olonga mikakatano oyo ekómelaka bandeko oyo basalaka na mikili mosusu.”

MOSALA MPO NA KOZWA MWA ELOKO

Kristin ná Michelle

Mpo na kozwa mwa eloko ya kolya, babongisi-nzela mingi oyo bakendaki na Taïwan epai mposa ya basakoli ezalaki monene, bazalaki kotángisa Lingelesi. Ndeko Kristin ná mwasi na ye Michelle, batɛkaka biloko lokola nsánia to bakrɛvɛtɛ, mbɛmbɛ mpe bongo na bongo. Kristin alobi boye: “Nasalá naino yango liboso te, kasi mosala yango esalisi ngai nabima te libándá ya mboka.” Na nsima, Kristin azwaki mwa bakiliya oyo bazalaki kosombela ye mbisi ntango nyonso. Mosala wana ya ntango mokuse epesaka ye mwa makoki ya komisunga mpe kosunga libota, mpe etikelaka bango ntango mingi ya kosala mosala na bango ya libosoliboso: mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mosala ya kolɔba bato.

“SEPELÁ KOSALA NA MBOKA MOPAYA”

Ndeko William ná mwasi na ye Jennifer, oyo bazali bato ya États-Unis, bakendaki na Taïwan mpe basali sikoyo mbula soki nsambo. William alobi boye: “Koyekola monɔkɔ, kozala babongisi-nzela, kotalela lisangá, kozwa mbongo mpo na libota, ezalaki ntango mosusu kolɛmbisa.” Nini esalisaki bango bálonga mpe bázala kaka na esengo? Balukaka komityela mikano oyo bakokoka. Na ndakisa, bazalaki kotya motema te na makambo minene ntango bazalaki koyekola monɔkɔ ya Chinois, mpe balɛmbaki nzoto te atako bayebaki te monɔkɔ yango noki.

William ná Jennifer

Ndeko William abosanaka te maloba oyo mokɛngɛli-motamboli moko ayebisaki ye mokolo moko ete, “Sepelá kosala na mboka mopaya.” Na maloba mosusu, nsima ya komityela mokano moko ya elimo, tosengeli kosepela na makambo oyo tozali kosala mpo na kokokisa mokano yango. Ndeko William alobi ete kosalela toli yango, esalisi ye ná mwasi na ye bátingamaka te kaka na likambo moko, báyokaka toli ya bankulutu ya lisangá, bábongisa lolenge na bango ya kosala makambo mpo básakola malamu na mboka oyo bakei. Abakisi ete: “Esalisaki mpe biso ete tobosanaka te kozwa mwa ntango mpo na kosepela na esanga kitoko epai tokendeki kosakola.”

Na ndakisa ya ndeko William mpe mwasi na ye Jennifer, mobongisi-nzela moko ya mwasi ya monzemba na nkombo Megan, oyo azali moto ya États-Unis, azali ‘kosepela na mosala na ye’ ndenge azali koluka kokokisa mokano oyo azali na yango ya koloba monɔkɔ ya Chinois malamumalamu. Bawikende nyonso akendeke kosakola elongo na basakoli mosusu na teritware moko kitoko, na Kaohsiung, libongo oyo eleki monene na Taïwan. Ndeko Megan azali na libaku ya kosakola nsango malamu na bamasuwa mpe epai ya balɔbi-mbisi oyo bautaki na Bangladesh, Inde,  Indonésie, Philippines, Thaïlande, mpe Vanuatu. “Lokola balɔbi-mbisi bazalaka na libongo kaka mpo na mwa ntango, tobandaka mbala moko koyekola na bango Biblia. Mpo na kokutana na bango nyonso, mbala mingi nayekolaka na bato minei to mitano mbala moko.” Mpe ndenge nini azali koyekola Chinois? Alobi ete: “Nakanisaki nakoyekola Chinois noki, kasi nabosanaka te maloba oyo ndeko mobali moko alobaki na ngai ete: ‘Salá oyo okoki kosala, mpe Yehova akokokisa oyo ekotikala.’”

Megan

BOMOI YA KIMYA, EZANGI MINDƆNDƆ MPE YA ESENGO

Liboso ndeko Cathy, moto ya Grande-Brétagne akende na mboka mopaya, alukalukaki esika nini na mokili mosusu ekobonga mpo na ndeko mwasi ya monzemba. Abondelaki Yehova mpo na likambo yango mpe atindaki mikanda na babiro ya filiale ebele mpo na koyeba makama oyo bandeko basi ya minzemba bakoki kokutana na yango. Na nsima, atalelaki na likebi mpenza biyano oyo azwaki mpe amonaki ete Taïwan ekozala esika ya malamu mpo na ye.

Na mobu 2004, ntango akómaki na mbula 31, Cathy akendeki na Taïwan, mpe kuna, azali na bomoi ya mindɔndɔ te. Alobi boye: “Natunaki bandeko báyebisa ngai bisika oyo nakoki kosomba bambuma mpe ndunda na ntalo moke. Toli malamu oyo bapesaki ngai, esalisaki mpo mwa mbongo oyo nazalaki na yango eumela mwa ndambo.” Nini esalisaki ye azala na bomoi ya mindɔndɔmindɔndɔ te? Cathy alobi boye: “Nabondelaka Yehova mbala mingi asalisa ngai nasepela na biloko oyo nalyaka mpe na mwa bilamba oyo nalataka. Namonaka ete Yehova ayanolaka na mabondeli na ngai na ndenge alakisaka ngai bamposa oyo nazali na yango mpe asalisaka ngai nazala na esengo atako nazali te na eloko nyonso oyo nazalaka na mposa na yango.” Abakisi ete: “Nasepelaka na bomoi ezangi mindɔndɔ oyo nazali na yango mpo esalisaka ngai natya makanisi na ngai nyonso na makambo ya elimo.”

Cathy

Ndeko Cathy azali na bomoi ezangi mindɔndɔ mpe ya esengo. Amonisi ntina yango boye: “Nazali kosakola na esika oyo bato mingi bazali koyoka nsango malamu. Yango nde esengo ya solo!” Ntango akómaki na Taïwan, masangá ya Chinois ezalaki mibale na engumba oyo ye abandaki kosala lokola mobongisi-nzela, kasi lelo oyo, masangá yango ekómi tii nsambo. Ndeko Cathy alobi boye: “Komona bokoli monene ndenge wana mpe kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobuka mbuma, esalaka ete nazala na esengo mokolo na mokolo!”

“BAZALAKI MPENZA NA MPOSA NA NGAI!”

Makambo esukaki ndenge nini mpo na Choong Keon mpe Julie, oyo tolobelaki na ebandeli? Ndeko Choong Keon akanisaki liboso ete lokola ayebi Chinois mingi te, akosalela lisangá mingi te. Kasi, bandeko ya lisangá bakanisaki bongo te. Alobi lisusu boye: “Ntango tokabolaki lisangá na biso, nazalaki mosaleli na misala; kasi babakiselaki ngai mikumba mosusu. Na ntango wana, namiyokaki mpenza ete nazali kosala epai mposa ezali monene. Ezalaki mpenza monene.” Alobi na mwa komungamunga ete “bazalaki mpenza na mposa na ngai!” Lelo oyo, azali nkulutu. Ndeko Julie abakisi boye: “Tomiyokaka ete tosali oyo tokokaki mpe toyokaka esengo oyo tozalaki na yango liboso te. Toyaki awa mpo na kopesa mabɔkɔ, kasi makambo kitoko oyo tomoni awa esalisi biso. Tozali na botɔndi epai ya Yehova ndenge andimaki ete tósala awa!”

Na mikili mingi, mposa ya basali mpo na kobuka bambuma ya elimo ezali naino makasi. Olingi kosilisa kelasi mpe ozali komituna soki okosala nini na bomoi na yo? Ozali monzemba mpe ozali na mposa ya kosala mingi na ebongiseli ya Yehova? Ozali na mposa ya kopesa libota na yo ebele ya bomɛngo ya elimo? Ozwá pansiɔ, mpe ozali na makambo mingi ya kitoko ya koyebisa basusu? Okoki mpenza kotya motema ete mapamboli ezali kozela yo soki ozwi ekateli ya kokende kosala epai mposa ya basakoli ezali monene.

^ par. 3 Talá buku ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe, mokapo 16, paragrafe 5-6.