Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2014

Salelá Yehova na bosembo ata na “malɔzi mingi”

Salelá Yehova na bosembo ata na “malɔzi mingi”

“Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.”MIS. 14:22.

1. Mpo na nini malɔzi ezalaka te likambo ya sika epai ya basaleli ya Yehova?

ESALAKA yo mpasi koyeba ete okoki kokutana na “malɔzi mingi” liboso ya kozwa libonza ya bomoi ya seko? Esengeli mpenza te kozala bongo. Ezala obandi kosalela Yehova sika to kala, oyebi malamu ete minyoko ezali moko ya makambo ya mokili ya Satana.Em. 12:12.

2. (a) Longola mikakatano oyo ekómelaka bato nyonso ya kozanga kokoka, bolɔzi nini mosusu bakristo bakutanaka na yango? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Malɔzi na biso eutaka epai ya nani, mpe ndenge nini toyebi yango?

2 Longola mikakatano oyo ekómelaka “bato nyonso” ya kozanga kokoka, bakristo bakutanaka mpe na malɔzi mosusu. (1 Ko. 10:13) Malɔzi nini? Bakutanaka na botɛmɛli makasi mpo bakangamaka mpenza na mibeko ya Nzambe. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Moombo aleki nkolo na ye te. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoa. 15:20) Botɛmɛli yango eutaka mpenza epai ya nani? Kozanga ntembe, ezali Satana, oyo Biblia ebengi “nkɔsi oyo ezali koganga” mpe oyo ezali “koluka kolya” basaleli ya Nzambe. (1 Pe. 5:8) Satana akosala nyonso oyo akoki mpo na koluka kobebisa bosembo ya bayekoli ya Yesu. Tótalela makambo oyo ekómelaki ntoma Paulo.

 BOLƆZI NA LISTRA

3-5. (a) Bolɔzi nini ntoma Paulo akutanaki na yango na Listra? (b) Na ndenge nini nsango na ye oyo etali malɔzi elendisaki?

3 Ntoma Paulo anyokwamaki mbala ebele mpo na kondima na ye. (2 Ko. 11:23-27) Monyoko moko ekómelaki ye na Listra. Nsima ya kobikisa moto moko oyo azalaki motɛngumi banda mbotama na ye, bato babandaki kokumisa ntoma Paulo ná Barnabasi lokola banzambe. Bato yango bazalaki na esengo makasi. Ntoma Paulo ná Barnabasi basengelaki kobondela ebele ya bato wana mpo básambela bango te! Kasi, eumelaki te, Bayuda oyo bazalaki batɛmɛli bayaki, mpe basalelaki lokuta mpo na kobebisa makanisi ya bato. Na mbala moko makanisi ebongwanaki! Bato babambaki ntoma Paulo mabanga mpe batikaki ye pene na liwa.Mis. 14:8-19.

4 Nsima ya kokende na Derbe, ntoma Paulo ná Barnabasi “bazongaki na Listra mpe na Ikoniumu mpe na Antiokia. Bazalaki kopesa milimo ya bayekoli makasi, bazalaki kolendisa bango ete bátikala na kati ya kondima, na maloba oyo: ‘Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.’” (Mis. 14:21, 22) Na ebandeli, maloba yango ekokaki kokamwisa. Mpo koyeba ete okokutana na “malɔzi mingi” ekoki kopesa moto mpasi, kasi te kolendisa ye. Kasi, ndenge nini ntoma Paulo ná Barnabasi ‘bapesaki milimo ya bayekoli makasi’ na nsango oyo ezali kolobela malɔzi mingi?

5 Tokoki kozwa eyano soki totaleli maloba ya ntoma Paulo na likebi mpenza. Asukaki kaka te na koloba ete: “Tosengeli koyikela malɔzi mingi mpiko.” Kasi, alobaki mpe ete: “Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.” Na yango ntoma Paulo alendisaki bayekoli na ndenge alobelaki mbano oyo bakozwa soki batikali sembo. Mbano yango ezalaki te ndɔtɔ mpamba. Kutu, Yesu alobaki ete: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.”Mat. 10:22.

6. Mbano nini bato oyo bakoyika mpiko bakozwa?

6 Soki toyiki mpiko, tokozwa mbano. Mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, mbano na bango ezali bomoi oyo ekufaka te na likoló mpe bakoyangela elongo na Yesu. “Bampate mosusu,” bakozwa bomoi ya seko awa na mabele epai “boyengebene ekozala.” (Yoa. 10:16; 2 Pe. 3:13) Kaka ndenge ntoma Paulo amonisaki yango, liboso ya kozwa mbano yango, tokokutana na malɔzi mingi. Tótalela lolenge mibale ya minyoko oyo tokoki kokutana na yango.

MINYOKO YA POLELE

7. Bolɔzi ya ndenge nini ekoki mpe kozala monyoko ya polele?

7 Yesu asakolaki ete: “Bakokaba bino na batribinale ya mboka, mpe bakobɛta bino na basinagoga mpe bakotɛlɛmisa bino liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi.” (Mrk. 13:9) Ndenge maloba oyo emonisi, bakristo mosusu bakokutana na bolɔzi ya minyoko ya nzoto, mbala mosusu bakonzi ya mangomba to ya politiki nde bakobimisela bango yango. (Mis. 5:27, 28) Tótalela lisusu ndakisa ya ntoma Paulo. Koyeba ete akokutana na bolɔzi ebangisaki ye? Soki moke te.Tángá Misala 20:22, 23.

8, 9. Ndenge nini ntoma Paulo amonisaki ete azalaki na ekateli ya koyika mpiko, mpe ndenge nini bandeko mosusu ya mikolo na biso bamonisi mpe ekateli ya ndenge wana?

8 Na mpiko nyonso ntoma Paulo atɛmɛlaki minyoko ya polele ya Satana mpe alobaki ete: “Nazali kotalela molimo na ngai te ete ezali na ntina mingi mpo na ngai, eloko ya ntina nde nasilisa mbangu oyo nazali kopota mpe mosala oyo nazwaki epai ya Nkolo Yesu, ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.” (Mis. 20:24) Emonani polele ete ntoma Paulo abangaki te minyoko oyo asengelaki kokutana na yango. Kasi, azalaki na ekateli ya koyika mpiko na minyoko nyonso oyo ekokaki koya. Mposa na ye ya libosoliboso ezalaki  ya “kopesa litatoli malamumalamu” ata soki akutani na bolɔzi ya ndenge nini.

9 Lelo oyo mpe, bandeko na biso mingi bamonisaka ekateli ya ndenge wana. Na ndakisa na ekólo moko, Batatoli mingi balekisaki bambula soki 20 na babolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Likambo yango ekendaki na tribinale te mpo na mibeko ya ekólo yango ezalaki ata na mobeko moko te oyo epesaki moto nzela ya koboya mosala oyo lisosoli na ye esepeli te. Na bolɔkɔ, bapekisaki kutu bato ya mabota na bango bátala bango, mpe bandeko mosusu oyo bazalaki na bolɔkɔ babɛtamaki mpe banyokolaki bango na balolenge mosusu ya nsɔmɔ.

10. Mpo na nini tosengeli te kobanga mikakatano oyo ebimaka na mbalakaka?

10 Bandeko na biso na bisika mosusu bayikaka mpiko na mikakatano mosusu oyo ebimaka na mbalakaka. Soki ekómeli yo, kobanga te. Kanisá ndakisa ya Yozefe. Atɛkamaki na boombo kasi Yehova “asikolaki ye na malɔzi na ye nyonso.” (Mis. 7:9, 10) Yehova akoki mpe kosala bongo mpo na yo. Kobosana te ete “Yehova ayebi kosikola na komekama bato oyo bakangamaka na Nzambe.” (2 Pe. 2:9) Lokola oyebi ete akoki kosikola yo na ebongiseli oyo mabe mpe kopesa yo likoki ya kosepela na bomoi ya seko na nse ya bokonzi na ye, okokoba kotyela Yehova motema? Ozali na bantina mingi ya kosala bongo mpe koyikela mpenza mikakatano mpiko.1 Pe. 5:8, 9.

MINYOKO OYO EMONANAKA POLELE TE

11. Ndenge nini minyoko ya Satana oyo emonanaka polele te ekeseni na oyo ya polele?

11 Bolɔzi mosusu oyo tokoki kokutana na yango ezali minyoko oyo emonanaka polele te. Bokeseni nini ezali kati na minyoko yango mpe minyoko ya polele to ya nzoto? Minyoko ya polele ezali lokola mopɛpɛ makasi oyo ebɛti na engumba mpe mbala moko ekweisi ndako na yo. Kasi minyoko oyo emonanaka polele te ezali lokola etuluku ya bansɛlɛlɛ oyo ekoki kobanda kobebisa mabaya to banzete ya ndako na yo malɛmbɛmalɛmbɛ tii ekokweisa yango. Likanisi oyo emonisi ete moto akoki koya koyeba likama tii ntango makambo ebebi.

12. (a) Wapi moko ya mayele oyo emonanaka polele te oyo Satana asalelaka, mpe mpo na nini ezali mpenza mabe? (b) Nini ezalaki kolɛmbisa ntoma Paulo nzoto?

12 Satana alingaka kosalela minyoko ya polele mpo na kobebisa boyokani na yo ná Yehova, to oyo emonanaka polele te mpo na kolɛmbisa mokemoke kondima na yo. Moko ya mayele oyo emonanaka polele te oyo Satana asalelaka mingi ezali kolɛmba nzoto. Ntoma Paulo andimaki ete na bantango mosusu alɛmbaki nzoto. (Tángá Baroma 7:21-24.) Kasi, mpo na nini ntoma Paulo, oyo azalaki “makasi” na elimo mpe mbala mosusu azalaki na lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso, amibengaki “moto na mawa mingi”? Ntoma Paulo alobaki ete azalaki komiyoka bongo mpo azalaki moto ya kozanga kokoka. Azalaki mpenza na mposa ya kosala oyo ezali malamu, kasi azalaki koyoka nguya moko ezali kotinda ye na mabe. Soki yo mpe omiyokaka bongo na ntango mosusu, obɔndisami te koyeba ete ntoma Paulo mpe akutanaki na likambo yango?

13, 14. (a) Nini elɛmbisaka basaleli mosusu ya Nzambe nzoto? (b) Nani alingaka ete kondima na biso ebeba, mpe mpo na nini?

13 Na ntango mosusu bandeko mingi balɛmbaka nzoto, batungisamaka, mpe mbala mosusu kutu bamimonaka ete bazali na ntina te. Na ndakisa, mobongisi-nzela moko ya molende oyo tokobenga Deborah alobi boye: “Nakanisaka mbala na mbala libunga moko oyo nasalaki, mpe nayokaka mpenza mabe ntango nyonso mpo na yango. Soki nakanisi na likambo nyonso ya mabe oyo nasalá, etindaka ngai namiyoka lokola ete ata ndenge nini, moto ata moko te akoki kolinga ngai, ata mpe Yehova.”

14 Nini esalaki ete basaleli mosusu ya Yehova ya molende lokola Deborah bálɛmba nzoto? Bantina ekoki kozala mingi. Basusu bakoki komitalela na lolenge ya  mabe mpe kozala na makanisi mabe mpo na makambo oyo ezali kokómela bango. (Mas. 15:15) Mpo na basusu, makanisi ya mabe ekoki kouta na maladi moko oyo moto azalaka na yango. Ezala makanisi mabe euti na ntina boye to boye, tosengeli kobosana te nani alingaka kosalela makanisi wana. Nani mpenza alingaka ete tólɛmba nzoto mpe tótika? Nani alingaka omiyoka lokola okozwa mpe etumbu monene oyo ezali kozela ye? (Em. 20:10) Ezali moto mosusu te kaka Satana. Tóyeba ete ata soki Satana asaleli minyoko oyo emonanaka polele to oyo emonanaka polele te, mokano na ye ezali ete atungisa biso, alɛmbisa molende na biso mpe afandisa biso nyɛɛ. Tóbosana te ete basaleli ya Nzambe bazali kobunda etumba ya elimo!

15. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na ekateli ya kotika te ete tólɛmba nzoto?

15 Zalá na ekateli ya kokoba kobunda. Kobá kotya motema na mbano. Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Korinti ete: “Tozali kotika te, kasi ata soki lolenge ya moto oyo tozali na libándá ezali kobeba, ya solo mpenza, lolenge ya moto oyo tozali na kati ezali kokóma ya sika mokolo na mokolo. Mpo atako bolɔzi ezali ya ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ, ezali kobotela biso nkembo moko ya kilo mingi koleka mpe oyo ezali seko.”2 Ko. 4:16, 17.

MIBONGISÁ BANDA SIKOYO MPO NA MINYOKO

Bilenge mpe mikóló bayekolaka ndenge ya kolobela bindimeli na bango (Talá paragrafe 16)

16. Mpo na nini ezali na ntina tómibongisa banda sikoyo mpo na bolɔzi?

16 Ndenge tomonaki yango, Satana asalelaka “mayele mabe” ndenge na ndenge. (Ef. 6:11) Mokomoko na biso asengeli kolanda toli oyo ezali na 1 Petro 5:9 oyo elobi ete: “Bótɛmɛla ye, bózala makasi na kondima.” Mpo nakosala yango, tosengeli kobongisa makanisi, motema na biso, mpe komesana kosala oyo ezali malamu banda sikoyo. Tózwa ndakisa oyo: Mbala mingi, basoda basalaka ngalasisi ya makasi mpenza liboso ata soki bitumba ezali te. Ezali ndenge moko mpo na biso basoda ya  Yehova ya elimo. Toyebi te soki etumba na biso ekozala ya ndenge nini na mikolo ezali koya. Na yango, ekozala malamu te ete tósalaka mwa bangalasisi lokola mwa kimya ezali naino? Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Korinti ete: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima, bókoba kotala soki bozali ndenge nini.”2 Ko. 13:5.

17-19. (a) Na makambo nini tokoki komimeka? (b) Ndenge nini bilenge bakoki komibongisa mpo na kolobela bindimeli na bango na kelasi?

17 Lolenge moko oyo tokoki kosalela toli oyo ya ntoma Paulo, ezali ya komitalela malamumalamu. Omituna mituna lokola oyo: ‘Natingamaka na mabondeli? Ntango baninga bazali kotya ngai mpanzi likoló, natosaka Nzambe lokola mokonzi na esika ya kotosa bato? Nayanganaka na makita nyonso? Nayebisaka basusu bindimeli na ngai na mpiko mpenza? Nalimbisaka mabunga ya bakristo mosusu, ndenge bango mpe basalaka na oyo ya ngai? Natosaka mpenza bankulutu ya lisangá na biso mpe baoyo bakambaka mosala na biso na mokili mobimba?’

18 Simbá ete mituna mibale kati na mituna wana, elobeli likambo ya kokɔtela na mpiko bindimeli na biso mpe koboya kolanda makanisi mabe ya baninga. Bilenge na biso mingi basengeli kosala bongo na kelasi. Bayekoli ete basengeli te koyokaka nsɔni to kobanga kolobela bindimeli na bango. Kutu, balobelaka nde yango na mpiko mpenza. Makanisi ya ntina mingi na likambo yango ebimá na bazulunalo na biso. Na ndakisa, Lamuká! ya 10-12/2009 elobaki ete soki moninga moko ya kelasi atuni yo ete: “Mpo na nini ondimelaka liteya ya evolisyo te?” na mokuse okoki koyanola ye boye: “Mpo na nini nasengeli kondimela liteya yango? Bato ya siansi bango moko kutu bayokanaka te na likambo yango, bango kutu nde bato ya mayele!” Baboti, bósalaka bilakiseli ya makambo ya ndenge wana ná bana na bino mpo na kobongisa bango báyeba oyo bakoki kosala soki baninga na bango ya kelasi batye bango mbamba básala likambo moko ya mabe.

19 Toboyi te, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kolobela mpe kosala makambo oyo Yehova asɛngaka biso. Nsima ya kosala mosala mokolo mobimba, ekoki kosɛnga tósala milende mpo na kokende na makita. Kolamuka na ntɔngɔ mpo na kokende kosakola ekoki mbala mosusu kosɛnga kokata mpɔngi ata soki tolalaka na epeda to matela ya mosuni. Kasi kobosana likambo oyo te: Ntango mikakatano ya minene ekoya, okozala mpenza na likoki ya kolonga yango soki omipesaka mingi na makambo ya elimo banda sikoyo.

20, 21. (a) Ndenge nini kokanisa na lisiko esalisaka biso tóbundisa makanisi mabe? (b) Tosengeli kozala na ekateli nini mpo na malɔzi?

20 Tokoloba nini mpo na minyoko oyo emonanaka polele te? Na ndakisa, ndenge nini tokoki kolonga kolɛmba nzoto? Moko na balolenge oyo eleki malamu ya kolonga yango ezali ya kokanisa na lisiko. Yango nde ntoma Paulo asalaki. Ayebaki ete na bantango mosusu azalaki komiyoka moto ya mawa. Kasi ayebaki mpe ete Yesu akufaki te mpo na bato ya kokoka, kasi nde mpo na bato ya masumu. Ntoma Paulo azalaki mpe moko ya bato yango ya masumu. Kutu akomaki ete: ‘Nazali mpo na kondima oyo nandimeli Mwana ya Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.’ (Gal. 2:20) Ya solo, ntoma Paulo azalaki kondima lisiko. Ayebaki ete lisiko esalisaki ye mpenza.

21 Soki yo mpe otaleli lisiko lokola likabo oyo Yehova apesi yo mpenza, ekoki kosalisa yo mingi. Yango elingi koloba te ete kolɛmba nzoto ekosila mbala moko. Na lolenge moko to mosusu, bandeko na biso mosusu basengeli kobunda na monyoko wana oyo emonanaka polele te tii mokili ya sika ekoya. Kasi kobosana te: Baoyo balɛmbaka te nde bakozwa mbano. Tokómi mpenza pene ya mokolo kitoko oyo Bokonzi ya Nzambe ekotya kimya mpe ekokómisa bato nyonso ya sembo bato ya kokoka. Zalá na ekateli ya kokɔta na Bokonzi yango ata na malɔzi mingi.