Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2014

Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi

Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi

“Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi.”​—1 KO. 15:26.

1, 2. Bomoi ya ndenge nini Adama ná Eva bazalaki na yango na ebandeli, mpe yango ebimisi mituna nini?

NTANGO Nzambe akelaki Adama ná Eva, bazalaki na monguna ata moko te. Bazalaki bato ya kokoka mpe bazalaki kofanda na paradiso. Bazalaki na boyokani ya malamu ná Mozalisi na bango mpo bazalaki bana na ye. (Eba. 2:7-9; Luka 3:38) Ndenge bomoi na bango esengelaki kozala emonisamaki polele na mokumba oyo Nzambe apesaki bango. (Tángá Ebandeli 1:28.) ‘Kotondisa mabele mpe kotya yango na nse na bango’ esengelaki kozwa mwa ntango. Kasi mpo bákoba ‘kozala na bokonzi likoló ya bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, oyo ezali kolandana na mabele,’ Adama ná Eva basengelaki koumela libela na libela, Adama asengelaki te kokufa mpo na kotika mokumba na ye ya kokɛngɛla.

2 Kasi, mpo na nini makambo ezali ndenge mosusu lelo oyo? Ndenge nini makambo elekaki mpo banguna mingi oyo balingaka bolamu ya bato te bábima, ata mpe liwa monguna monene? Nzambe asengelaki kosala nini mpo na kosilisa banguna yango makasi? Tokozwa biyano na mituna yango mpe  mituna mosusu oyo eyokani na yango na Biblia. Tiká tótalela mwa bavɛrsɛ oyo elobeli yango.

LIKEBISI MOKO YA BOLINGO

3, 4. (a) Mobeko nini Nzambe apesaki Adama ná Eva? (b) Kotosa mobeko yango ezalaki na ntina nini?

3 Atako Adama ná Eva bakelamaki mpo bázala na bomoi libela na libela, kasi ezalaki na makambo oyo soki basali te, bakokaki kokufa. Mpo bátikala na bomoi basengelaki kopema mpema, komɛla, kolala mpe kolya. Likambo eleki ntina, basengelaki kozala na boyokani malamu elongo na oyo apesaki bango bomoi. (Mib. 8:3) Kondima litambwisi ya Nzambe ezalaki na ntina mingi mpo bákoba kozala na bomoi. Yehova amonisaki yango polele epai na Adama liboso kutu akela Eva. Ndenge nini? “Yehova Nzambe apesaki moto etinda oyo: ‘Nzete nyonso ya elanga, okoki kolya yango ndenge olingi. Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.’”​—Eba. 2:16, 17.

4 “Nzete ya koyeba malamu ná mabe” ezalaki komonisa lotomo oyo Nzambe azali na yango ya kokata oyo ezali malamu ná oyo ezali mabe. Kutu, Adama azalaki na likoki ya koyeba malamu ná mabe; mpo akelamaki na elilingi ya Nzambe mpe azalaki na lisosoli. Nzete yango ezalaki komonisa ete Adama ná Eva basengelaki koluka ntango nyonso litambwisi ya Yehova. Kolya mbuma ya nzete yango, elingaki komonisa ete bazali na mposa te Nzambe alakisa bango makambo ya malamu ya kosala, mpe yango esengelaki komemela bango mpe bana na bango bampasi minene. Ndenge kaka Nzambe alobaki yango, bango mpe bana na bango basengelaki kokufa.

NDENGE LIWA EKƆTAKI NA MOKILI

5. Mpo na nini Adama ná Eva bazangaki botosi?

5 Nsima ya kokelama ya Eva, Adama ayebisaki ye mobeko ya Nzambe. Eva ayebaki yango malamu, mpe azalaki na likoki ya kozongela yango malamumalamu. (Eba. 3:1-3) Asalaki yango epai ya ekelamu moko oyo emimonisaki epai na ye lokola nyoka, nyama moko ya ekɛngɛ. Moto oyo azalaki kolobisa nyoka yango, ezalaki Satana Zabolo, mwana moko ya Nzambe ya elimo oyo akolisaki ye moko mposa ya lipanda mpe bokonzi. (Talá mpe Yakobo 1:14, 15.) Mpo na kokokisa mposa na ye wana ya mabe, alobaki ete Nzambe azali mokosi. Ayebisaki Eva ete soki aboyi kotosa Nzambe, akokufa te, kasi akokóma lokola Nzambe. (Eba. 3:4, 5) Eva andimelaki ye, atosaki Nzambe te mpe alyaki mbuma yango, mpe ayebisaki Adama mpo alya ndenge ye alyaki. (Eba. 3:6, 17) Zabolo akosaki. (Tángá 1 Timote 2:14.) Kasi, Adama ‘ayokaki mongongo ya mwasi na ye.’ Atako nyoka amimonisaki lokola moninga, kasi mpo na koloba solo, Satana Zabolo azalaki monguna moko oyo azangá mawa, oyo ayebaki malamu makama oyo lokuta na ye ekomema.

6, 7. Ndenge nini Yehova asambisaki Adama ná Eva?

6 Mpo na matomba na bango moko, Adama ná Eva batombokelaki moto oyo apesaki bango bomoi mpe biloko mosusu nyonso oyo bazalaki na yango. Mpo na koloba solo, Yehova ayebaki makambo nyonso oyo esalemaki. (1 Nt. 28:9; tángá Masese 15:3.) Atikaki bikelamu yango misato bámonisa ndenge batalelaka ye. Lokola azali Tata, na ntembe te Yehova ayokaki mpenza mpasi. (Talá mpe Ebandeli 6:6.) Lokola zuzi, akataki makambo ya basumuki wana na bosembo.

7 Yehova ayebisaki Adama ete: “Mokolo okolya yango [nzete ya koyeba malamu ná mabe] okokufa solo.” Ekoki kozala ete Adama akanisaki ete “mokolo” yango ekozala ya bangonga 24. Nsima ya kobuka mobeko ya Nzambe, mbala mosusu akanisaki ete Yehova akopesa ye  etumbu liboso moi elala. Yehova asololaki na bango “na ntango oyo mwa mopɛpɛ kitoko epɛpaka na mokolo.” (Eba. 3:8) Asambisaki bango na bosembo, akataki likambo nsima ya koyoka biyano oyo Adama ná Eva bapesaki. (Eba. 3:9-13) Na nsima, ayebisaki basumuki yango etumbu na bango. (Eba. 3:14-19) Soki abomaka bango mbala moko, mokano na ye mpo na Adama ná Eva mpe bakitani na bango elingaki kokokisama te. (Yis. 55:11) Atako eumelaki te makambo mabe ya lisumu ebandaki, Yehova atikelaki Adama ná Eva ntango ya koumela na bomoi mpe kobota bana oyo bakokaki kozala malamu na mikolo ezali koya. Na miso ya Nzambe, Adama ná Eva bakufaki na mokolo oyo basalaki lisumu, mpe lokola mbula nkóto ezali lokola mokolo moko epai ya Yehova, yango emonisi ete bakufaki kozanga kutu ete básilisa ata “mokolo” yango.​—2 Pe. 3:8.

8, 9. Ndenge nini lisumu ya Adama etalaki mpe bana na ye? (Talá elilingi ya ebandeli.)

8 Makambo oyo Adama ná Eva basalaki, etalaki mpe bana na bango? Ɛɛ. Mokanda ya Baroma 5:12 elobi boye: “Kaka ndenge lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” Moto ya liboso ya sembo oyo akufaki ezalaki Abele. (Eba. 4:8) Bana mosusu ya Adama mpe bakómaki mibange mpe bakufaki. Basangolaki lisumu mpe liwa? Ntoma Paulo ayanoli boye: “Kozanga botosi ya moto kaka moko ekómisaki ebele ya bato basumuki.” (Rom. 5:19) Lisumu mpe liwa oyo eutaki na Adama ekómaki monguna monene ya bato, oyo moto moko te ya kozanga kokoka akoki kokima yango. Tokoki te koloba na bosikisiki makambo oyo botomboki ya Adama esengelaki komemela bana mpe bankɔkɔ na ye, kasi toyebi kaka ete ememelá bana na ye eloko moko ya mabe mpenza.

9 Yango wana Biblia ebengaka lisumu mpe liwa oyo tosangolá ete: “Eloko oyo ezipi bato ya bikólo nyonso, mpe elamba oyo elitamá oyo ezipi bikólo nyonso.” (Yis. 25:7) Etumbu wana ya mabe mpenza ekangi bato nyonso na motambo. Yango wana, “bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama.” (1 Ko. 15:22) Na yango, motuna oyo tosengeli komituna ezali oyo, ntoma Paulo atunaki ete: “Nani akobikisa ngai na nzoto oyo ezali komema ngai na liwa?” Moto nini akokaki kobikisa ye? *​—Rom. 7:24.

LISUMU MPE LIWA EKOSILISAMA MAKASI

10. (a) Tángá mwa bavɛrsɛ oyo emonisi ete Yehova akosilisa liwa makasi. (b) Bavɛrsɛ yango emonisi nini mpo na Yehova mpe mwana na ye?

10 Ya solo, Yehova akokaki kobikisa ntoma Paulo. Nsima ya kolobela “eloko oyo ezipi,” Yisaya akomaki boye: “Akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.” (Yis. 25:8) Ndenge kaka tata asilisaka likambo oyo epesaka bana na ye mpasi mpe apangwisaka mpisoli na miso na bango, Yehova azali mpenza na esengo ya kosilisa liwa makasi! Na likambo yango, azali na moto oyo azali kosala na ye elongo. Mokanda ya 1 Bakorinti 15:22 elobi boye: “Kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.” Ndenge moko, nsima ya kotuna “Nani akobikisa ngai?” ntoma Paulo akobaki boye: “Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso!” (Rom. 7:25) Emonani polele ete Yehova akobaki kaka kolinga bato ata ntango Adama ná Eva basalaki  lisumu; mpe Yesu, oyo asalaki elongo na tata na ye mpo na kokela Adama ná Eva azali kaka kolinga bato. (Mas. 8:30, 31) Kasi, ndenge nini bato basengelaki kobikisama na lisumu mpe liwa?

11. Ebongiseli nini Yehova azwaki mpo na kosalisa bato?

11 Ntango Adama asalaki lisumu, Yehova akatelaki ye etumbu ya liwa. Mpo na yango, bato nyonso basangolá ezaleli ya kozanga kokoka mpe liwa. (Rom. 5:12, 16) Biblia elobi boye: “Mpo na libunga kaka moko, bato ya mitindo nyonso bakweisamaki.” (Rom. 5:18) Yehova asengelaki kosala nini mpo na kolongola etumbu yango kozanga ete abuka mitinda na ye? Tokoki kozwa eyano na maloba oyo ya Yesu: “Mwana ya moto ayaki . . . kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Mat. 20:28) Ye oyo azalaki ekelamu ya liboso ya elimo ya Yehova, amonisaki polele ete abotamaki lokola moto ya kokoka awa na mabele mpo apesa lisiko. Ndenge nini lisiko yango elingaki kolongisa bosembo ya Nzambe?​—1 Tim. 2:5, 6.

12. Lisiko nini ya kokoka oyo elongisaki bosembo ya Yehova?

12 Lokola azalaki moto ya kokoka, Yesu azalaki ndenge moko ná Adama liboso asala lisumu. Mokano ya Yehova ezalaki ete mabele etonda na bana ya Adama ya kokoka. Yango wana, mpo na bolingo makasi oyo Yesu azalaki na yango mpo na tata na ye mpe bana ya Adama, apesaki bomoi na ye lokola mbeka ya lisiko. Ya solo, Yesu apesaki bomoi ya kokoka oyo ekokanaki na oyo Adama abungisaki. Na nsima, Yehova azongisaki mwana na ye na bomoi lokola ekelamu ya elimo. (1 Pe. 3:18) Yehova akokaki mpenza kondima mbeka oyo Yesu moto ya kokoka apesaki lokola lisiko to motuya oyo epesamaki mpo na kosomba libota ya Adama mpe kopesa yango likoki ya kozwa bomoi oyo Adama abungisaki. Na maloba mosusu, Yesu azwaki esika ya Adama. Ntoma Paulo alobi boye: “Ekomamá kutu ete: ‘Moto ya liboso Adama akómaki molimo ya bomoi.’ Adama ya nsuka akómaki elimo oyo apesaka bomoi.”​—1 Ko. 15:45.

Abele, moto ya liboso oyo akufaki, akozwa matomba ya lisiko ya Yesu (Talá paragrafe 13)

13. “Adama ya nsuka” akosala nini mpo na bakufi?

13 Nsukansuka, ntango ekokoka mpo “Adama ya nsuka” asala lokola ‘elimo oyo ekopesa bomoi’ epai ya bato nyonso. Bana mingi ya Adama bakozonga lisusu na bomoi. Mpo na nini? Mpo bazalaki na bomoi mpe bakufaki. Basengeli kosekwa mpo na kozonga lisusu na bomoi awa na mabele.​—Yoa. 5:28, 29.

14. Ebongiseli nini Yehova azwaki mpo na kolongola ezaleli ya kozanga kokoka oyo Adama atikelá bana na ye?

14 Ndenge nini bato bakokaki kolongwa na boombo ya ezaleli ya kozanga kokoka? Yehova asali guvɛrnema moko oyo esangisi “Adama ya nsuka” mpe bato mosusu oyo aponi awa na mokili. (Tángá Emoniseli 5:9, 10.) Bato oyo bakoyangela elongo na Yesu na likoló bayebi malamu soki ezaleli ya kozanga kokoka ezali nini. Na boumeli ya mbula nkóto, boyangeli na bango ekosalisa bato awa na mabele bálonga ezaleli ya kozanga kokoka oyo bakokaki te kolonga bango moko.​—Em. 20:6.

15, 16. (a) Tokoloba nini mpo na “liwa, monguna ya nsuka,” mpe ntango nini akosilisama makasi? (b) Mokanda ya 1 Bakorinti 15:28, emonisi ete Yesu akosala nini na nsima?

15 Na nsuka ya mbula nkóto ya boyangeli yango, bato ya botosi bakosikwama na boombo ya banguna nyonso oyo kozanga botosi ya Adama ememelá bato. Biblia elobi ete: “Kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo. Kasi moto na moto na molɔngɔ na ye: Kristo mbuma ya liboso, na nsima baoyo bazali bato ya Kristo [baoyo bakoyangela elongo na ye] na ntango ya kozala na ye. Na nsima, nsuka, ntango akozongisa bokonzi epai na Nzambe  na ye mpe Tata, ntango akokómisa mpamba guvɛrnema nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya. Mpo asengeli koyangela tii ntango Nzambe akotya banguna nyonso na nse ya makolo na ye. Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi.” (1 Ko. 15:22-26) Ya solo, liwa oyo tozwá epai ya Adama ekosila mpo na libela. “Eloko oyo ezipi” oyo ekangá libota mobimba ya bato ekolongolama mpo na libela.​—Yis. 25:7, 8.

16 Ntoma Paulo akobi boye: “Ntango biloko nyonso ekotyama na nse na ye, Mwana ye moko mpe akomitya na nse ya Moto oyo atyaki biloko nyonso na nse na ye, mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.” (1 Ko. 15:28) Mokano ya boyangeli ya Yesu ekokokisama. Na nsima, na esengo nyonso, akozongisa Bokonzi na ye epai ya Yehova mpe akolakisa ye libota ya bato ya kokoka.

17. Na nsuka, nini ekokómela Satana?

17 Kasi, tokoloba nini mpo na Satana, moto oyo abimiselá bato bampasi nyonso oyo bamoni? Mokanda ya Emoniseli 20:7-15 epesi eyano. Na komekama ya nsuka ya bato nyonso ya kokoka, Satana akofungolama mpo ameka lisusu bato. Zabolo mpe bato oyo bakolanda ye bakobebisama mpo na libela na “liwa ya mibale.” (Em. 21:8) Liwa yango “ekosilisama makasi” te mpo baoyo bakokufa na “liwa ya mibale,” bakokende mpo na libela. Nzokande, “liwa ya mibale” ezali te monguna ya bato oyo balingaka mpe basalelaka Mozalisi na bango.

18. Ndenge nini mokumba oyo Nzambe apesaki Adama ekokokisama?

18 Na nsuka ya makambo nyonso, bato nyonso bakozala bato ya kokoka mpe bakondimama mpenza na Yehova mpo na bomoi ya seko, mpe banguna na bango nyonso bakozala lisusu te. Mokumba oyo Nzambe apesaki Adama ekokokisama atako ye akozala te. Mokili ekotonda na bana na ye oyo bakokɛngɛla mabele mpe bakosepela na bikelamu ndenge na ndenge ya bomoi oyo ekozala kuna. Na yango, tiká ete tókoba komonisa botɔndi na ebongiseli ya bolingo oyo Yehova azwi mpo na kosilisa liwa, monguna ya nsuka makasi!

^ par. 9 Buku Étude perspicace des Écritures elobi ete ntango bato ya mayele bazali koluka koyeba ntina oyo tonunaka mpe tokufaka, bayebaka te likambo ya ntina mingi. Bayebaka te ete Mozalisi na biso nde akatelaki bato ya liboso etumbu ya liwa. Mpo na ntina wana, bakososola malamu te ntina oyo bato banunaka mpe bakufaka.​—Vol. 2, nk. 1147-1148.