Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2014

Ozali koluka mikumba?

Ozali koluka mikumba?

FERNANDO * azalaki motema likoló. Bankulutu mibale basɛngaki básolola na ye na nkúku. Na bambala ya nsuka oyo mokɛngɛli ya zongazonga alekaki kotala lisangá na bango, bankulutu bamonisaki ye makambo oyo asengeli kosala mpo azwa mikumba mosusu na lisangá. Lokola mikolo ezalaki koleka, Fernando abandaki komituna soki mokolo mosusu akokóma mpenza nkulutu. Sikoyo mokɛngɛli ya zongazonga ayaki lisusu kotala lisangá na bango. Bankulutu bakoloba likambo nini mbala oyo?

Fernando azalaki kolanda ndenge moko ya bankulutu azalaki koloba na ye. Nkulutu yango alobeli makanisi oyo ezali na 1 Timote 3:1 mpe amonisi ete bankulutu bazwi mokanda ete akómi nkulutu. Fernando asutukaki mbala moko mpe atunaki, “Olobi nini?” Nkulutu wana azongeli likambo oyo autaki koloba, Fernando akómi mbala moko komungamunga. Na nsima, ntango liyebisi epesamaki na lisangá ete Fernando akómi nkulutu, bandeko nyonso ya lisangá basepelaki.

Ezali mabe koluka kozwa mikumba na lisangá? Te. Mokanda ya 1 Timote 3:1 elobi ete “soki moto azali koluka kosala mosala ya mokɛngɛli, azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi.” Bandeko mibali mingi basalelaka toli yango mpe bakokisaka masɛngami mpo na kozwa mikumba na lisangá. Lokola basalaka bongo, basaleli ya Yehova bazali na bankóto ya bankulutu mpe basaleli na misala ya makoki mpenza. Kasi, lokola bokoli ezali se komonana na masangá, bandeko mibali mingi basengeli mpenza koluka kozwa mikumba. Wapi lolenge malamu ya kosala yango? Fernando azalaki komitungisa soki akokóma nkulutu ntango nini. Baoyo bazali na mposa ya kokóma bankulutu, basengeli komitungisaka bongo?

KOLUKA MIKUMBA ELIMBOLI NINI?

Maloba ya Biblia “koluka kosala” to koluka mikumba euti na verbe ya Grɛki oyo elimboli kozala na mposa makasi, kokóma na mikumba mosusu. Yango ekoki kotinda biso tókanisa moto oyo azali kosala makasi mpo azwa mbuma moko ya kitoko na nzete. Kasi, koluka kozwa mikumba elingi koloba te kosala makasi koluka kozwa mokumba ya “mokɛngɛli” to nkulutu na ndenge ya lokoso. Mpo na nini? Mpo ete mokano ya baoyo bazali koluka na bosembo nyonso  kokóma bankulutu esengeli kozala ya kosala “mosala moko ya malamu mingi” na esika ya koluka bokonzi.

Masɛngami mingi mpo na kosala mosala wana ya kitoko ezali na 1 Timote 3:2-7 mpe Tito 1:5-9. Mpo na kokokisa masɛngami wana ya Biblia, Raymond, nkulutu moko oyo aumeli mingi na mosala yango alobi boye: “Mpo na ngai, likambo eleki ntina ezali ya koyeba soki tozali banani. Koloba mpe koteya ezali na ntina, kasi makoki yango epekisi te ete tózala bato oyo bazali na likambo te ya kofundama na yango, oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na biso, bato ya makanisi malamu, bato ya makambo na molɔngɔ, bayambi ya bapaya, bato ya makambo makasimakasi te.”

Saláká misala ndenge na ndenge na lisangá mpo ozwa mikumba

Ndeko mobali oyo azali koluka kokóma na mikumba asengeli komonisa ete azali na likambo te ya kofundama na yango soki azali koboya lolenge nyonso ya makambo oyo ezangi kolongobana mpe makambo ya mbindo. Soki azali moto oyo alekisaka ndelo te na bizaleli na ye, moto ya makanisi malamu, moto ya makambo na molɔngɔ mpe moto ya makambo makasimakasi te; wana bandeko ya lisangá bakotyela ye motema mpo atambwisa bango mpe asalisa bango na mikakatano na bango. Soki azali moyambi ya bapaya, akobanda kolendisaka mpenza bilenge mpe baoyo bazali koya sika na lisangá. Akobanda mpe kobɔndisaka mpe kosalisa bato ya maladi mpe mibange mpo alingaka makambo malamu. Alukaka kokóma na bizaleli yango mpo na kosalisa basusu, kasi te kaka mpo na kokokisa mposa na ye ya kozwa mikumba. *

Lisangani ya bankulutu esengeli kopesa toli mpe kolendisa bandeko, kasi kokokisa masɛngami oyo Makomami elobeli, ezali libosoliboso na mapeka ya moto oyo alingi kozwa mokumba. Henry, nkulutu moko oyo aumeli mingi na mosala yango alobi ete: “Soki ozali koluka mikumba, salá makasi omonisa polele ete ozali kokokisa masɛngami.” Atángaki Mosakoli 9:10, mpe alobaki ete: “‘Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza.’ Soki bankulutu bapesi yo ata mokumba nini, salá nyonso okokisa yango. Sepeláká na mosala nyonso oyo bapesi yo osala na lisangá, ezala kosukola Ndako ya Bokonzi. Na nsima, mosala mpe milende na yo ekozwa mbano.” Soki olingaka kokóma nkulutu mokolo mosusu, saláká makasi na makambo nyonso oyo etali mosala ya Yehova mpe zaláká moto oyo  bakoki kotyela motema. Bato basengeli koyeba yo lokola moto ya komikitisa, kasi te lokola moto ya lolendo.​—Mat. 23:8-12.

LONGOLÁ MAKANISI MPE MISALA OYO EBONGI TE

Bandeko mosusu oyo bazali na mposa ya kozwa mikumba na lisangá bakoki mbala mosusu kobanda komonisa na mwa maloba moko boye to koluka kotinda lisangani ya bankulutu ebongola lolenge na yango ya kotalela makambo. Basusu basepelaka te ntango bankulutu bapesi bango toli. Bandeko ya ndenge wana basengeli komituna boye,‘Nazali koluka mikumba mpo na matomba na ngai moko, to na komikitisa nyonso, nazali na mposa ya kobatela bampate ya Yehova?’

Baoyo bazali koluka mikumba basengeli mpe te kobosana lisɛngami mosusu ya bankulutu, oyo etali ‘kokóma nde bandakisa mpo na etonga.’ (1 Pe. 5:1-3) Moto oyo azali ndakisa mpo na lisangá aboyaka makanisi mpe misala ya mabe. Azalaka na motema molai mpe ayikaka mpiko ata soki azwi naino te mokumba. Soki moto akómi nkulutu, yango elingi koloba te ete mabe na ye nyonso elimwe na ndenge ya likamwisi. (Mit. 12:3; Nz. 106:32, 33) Lisusu, ata soki ndeko akoki “komona ata eloko moko te oyo ezali kokweisa” ye, kasi basusu bakoki kozala na makanisi mabe mpo na ye. (1 Ko. 4:4) Na yango, soki bankulutu bapesi yo toli na bosembo nyonso, mpe soki toli yango euti na Biblia, salá makasi oyoka yango kozanga kosilika. Na nsima, bomá nzoto mpo osalela toli oyo bapesi yo.

OKOSALA NINI SOKI EZALI KOUMELA?

Emonanaka lokola ete bandeko mosusu bazelaka ntango molai liboso ete bázwa mikumba. Soki bambula eleká ebele banda ozelaka ete okóma nkulutu, oyokaka ntango mosusu mpasi na motema? Soki ezali bongo, yoká toli oyo ya Biblia: “Eloko ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema, kasi eloko oyo moto azali na mposa na yango ezali nzete ya bomoi soki ezwami mpenza.”​—Mas. 13:12.

Moto akoki kobɛla motema soki mokano moko oyo azali kolinga mingi ezali komonana lokola ezali kokokisama te. Abrahama ayokaki bongo. Yehova alakaki ye mwana, kasi bambula elekaki ebele mpe ye ná Sara bazalaki na bana te. (Eba. 12:1-3, 7) Abrahama akómaki mobange. Alobaki boye: “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, okopesa ngai nini, awa nazali kokende na ngai kozanga kobota mwana . . . Opesi ngai ata momboto te.” Yehova ayebisaki lisusu ete akokokisa elaka oyo apesaki ye ya kobota mwana. Kasi mbula soki 14 elekaki lisusu liboso ete Nzambe akokokisa elaka yango.​—Eba. 15:2-4; 16:16; 21:5.

Atako azalaki kozela, Abrahama abungisaki esengo na ye ya kosalela Yehova? Te. Azalaki kaka kotya motema na elaka ya Nzambe. Azalaki kozela ete makambo ekosuka malamu. Ntoma Paulo akomaki: “Abrahama, nsima ya komonisa motema molai, azwaki elaka yango.” (Ebr. 6:15) Na nsuka, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso apambolaki mobali wana ya sembo koleka kutu ndenge azalaki kokanisa. Liteya nini okoki kozwa na likambo ya Abrahama?

Soki ozali na mposa ya kokóma nkulutu, kasi bambula ezali kaka koleka, kobá kotyela Yehova motema. Kobá kosalela ye na esengo. Ndeko Warren, oyo asalisaki bandeko mingi bákende liboso na elimo, apesi ntina: “Esɛngaka ntango eleka mpo na koyeba soki ndeko akokisi mpenza masɛngami mpo azwa  mikumba. Mokemoke, makoki ya ndeko mpe ezaleli na ye emonanaka na makambo oyo azali kosala mpe ndenge azali kokokisa mikumba na ye. Basusu balobaka ete bakokisi mokano na bango kaka soki bazwi mokumba yango. Makanisi ya ndenge wana ezali libunga mpe ekoki komema moto na kobanda koluka mikumba ndenge bato ya mokili basalaka. Soki ozali kosalela Yehova na bosembo esika nyonso oyo ozali mpe ezala ozali kosala mosala nini, ozali moto oyo azwi eloko oyo azalaki koluka.”

Ndeko mobali moko azelaki na boumeli ya mbula zomi liboso akóma nkulutu. Alobelaki makanisi kitoko oyo ezali na mokanda ya Ezekiele mokapo 1. Alobaki ete liteya oyo azwaki ezali boye: “Yehova azali kotambwisa likalo na ye, elingi koloba lisangá na ye, na vitɛsi oyo alingi. Oyo eleki ntina ezali te ntango na biso kasi nde oyo ya Yehova. Na likambo etali kokóma nkulutu, oyo eleki ntina ezali ngai te, oyo ngai nalingi to oyo ngai nalingi kozala. Oyo nalingi nazala ekoki te kozala oyo Yehova ayebi ete nasengeli na yango.”

Soki olikyaka kosala mosala kitoko ya kokóma nkulutu mokolo mosusu, luká yango na kopesáká mabɔkɔ mpo ete esengo ezala na lisangá. Ata soki ezali komonana lokola ntango ezali koleka malɛmbɛmalɛmbɛ, longolá mawa mpe zalá na motema molai. Raymond, oyo tolobelaki na ebandeli, alobi boye: “Soki ozali moto ya bilulelá, okozala na esengo te. Baoyo bamitungisaka ntango nyonso bazangaka esengo oyo eutaka na kosalela Yehova.” Kobá komonisa mingi mbuma ya elimo ya Nzambe, mingimingi ezaleli ya motema molai. Salá makasi oyekolaka Makomami mpo okóma lisusu makasi. Luká komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola mpe koyekola Biblia ná bato oyo bazali kosepela. Salisáká libota na yo na makambo ya elimo mpe losambo na kati ya libota. Sepeláká na libaku nyonso ya kozala elongo na bandeko ya lisangá. Wana ozali kosala makasi mpo na kokokisa mokano na yo, okosepela mingi na kosalela Yehova.

Koluka kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba na lisangá ezali libaku kitoko oyo euti na Yehova; yango wana, ye ná ebongiseli na ye elingi te bato oyo bazali koluka mikumba bátungisama na makanisi mpe bázanga esengo na mosala na ye. Nzambe asungaka mpe apambolaka baoyo nyonso basalaka básalelaka ye na makanisi malamu. Ndenge toyebi yango, na mapamboli na ye nyonso, “abakisaka mpasi ata moko te na yango.”​—Mas. 10:22.

Ata soki eumeli mpo ozwa mikumba, ozali na makambo mingi oyo okoki kosala mpo na kobongisa boyokani na yo elongo na Yehova. Soki ozali kosala makasi obongisa bizaleli mosusu mpe kosala makasi na lisangá, mpe ozali kozwa na lisɛki te mokumba na yo ya libota, Yehova akobosana soki moke te nyonso oyo ozali kosala mpo na kosalela ye. Tiká ete kosalela Yehova ezala ntango nyonso likambo ya esengo mpo na yo, ata soki ozwi mokumba nini.

^ par. 2 Na lisolo oyo, bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 8 Mitinda oyo elobelami na lisolo oyo ebongi mpe mpo na baoyo balingi kokóma basaleli na misala. Masɛngami oyo basengeli kokokisa ezali na 1 Timote 3:8-10, 12, 13.