Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2014

Baboti—bóbatela bana na bino

Baboti—bóbatela bana na bino

“Osengeli koyeba mpenza ndenge ya etonga na yo.”MAS. 27:23.

1, 2. (a) Mikumba nini mobateli ya mpate na Yisraele azalaki na yango? (b) Na makambo nini baboti bakokani na babateli ya mpate?

BOMOI ya babateli ya mpate na Yisraele ya kala ezalaki kosɛnga makambo mingi. Basengelaki kobunda na molunge to malili, kasi basengelaki mpe kobatela etonga na bango na miyibi to nyama mabe. Mobateli ya mpate asengelaki kotalatala bampate na ye ntango nyonso, kosalisa oyo ezalaki maladi to ezoki. Bazalaki kotyela mwana mpate likebi koleka mpo ezalaki pɛtɛpɛtɛ mpe ezalaki makasi mingi te lokola mpate oyo ekɔmɛli.Eba. 33:13.

2 Na makambo mingi, baboti bakristo bazali lokola babateli ya mpate, bamonisaka bizaleli oyo ekokani na babateli ya mpate. Bazali na mokumba ya kobɔkɔla bana na bango “na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Ef. 6:4) Ezali mokumba moko ya pɛtɛɛ? Te! Bana bakutanaka na makambo ya ndenge na ndenge oyo Satana azali kobimisela bango, mpe ezaleli na bango ya kozanga kokoka. (2 Tim. 2:22; 1 Yoa. 2:16) Soki ozali na bana, ndenge nini okoki kosalisa bango? Tótalela makambo misato oyo okoki kosala mpo na kobatela bana na yo: koyeba bango, koleisa bango mpe koteya bango.

 YEBÁ BANA NA YO

3. Ndenge nini baboti bakoki ‘koyeba malamu mpenza ndenge’ bana na bango bazali?

3 Mobateli ya mpate ya malamu atalatalaka mpenza mpate mokomoko mpo na koyeba soki ezali malamu. Na ndenge ya elilingi, yo mpe okoki kosala bongo mpo na bana na yo. Biblia elobi ete: ‘Yebá malamu mpenza ndenge ya etonga na yo.’ (Mas. 27:23) Mpo na kosala yango, osengeli kotalelaka makambo oyo bana na yo basalaka, makanisi na bango mpe ndenge oyo bamiyokaka. Ndenge nini okoki kosala yango? Lolenge malamu mpenza ezali ya kosololaka mingi na bana na yo.

4, 5. (a) Makanisi nini ekoki kosalisa bana mpo báfungolela baboti na bango motema? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Osalaki nini mpo bana na yo babangaka te kosolola na yo?

4 Baboti mosusu bamoni ete ekómaka mpasi kosolola na bana na bango ntango bakómi bilenge; mbala mosusu, babendaka nzoto to bamonaka mabe komonisa makanisi na bango mpe ndenge bazali komiyoka. Soki ezali bongo mpo na bana na yo, okoki kosala nini? Na esika ya kosɛnga mwana na yo na makasi ete bósolola masolo milaimilai, luká nde kosololaka na ye na mabaku mosusu. (Mib. 6:6, 7) Ekoki kosɛnga osala milende mingi mpo bósalaka makambo elongo. Bokoki kokende kotambola to kobima elongo na motuka, kosakana to mpe kosala misala mosusu na ndako elongo. Mabaku ya bongo ekoki kosalisa bilenge bázala na mokakatano te ya kobimisaka makanisi na bango polele.

5 Kasi okosala nini soki mwana na yo azali kolinga kaka te kolobaka? Okoki komeka mayele mosusu. Na ndakisa, na esika ya kotuna mwana na yo ya mwasi ndenge mokolo na ye elekaki, okoki nde kobɛtɛla ye ndenge oyo ya yo elekaki. Mbala mosusu, akomonisa polele ndenge mokolo na ye elekaki. To mpe mpo na koyeba likanisi ya mwana na yo na likambo moko boye, kosɛnga ye mbala moko te apesa likanisi na ye na likambo yango. Okoki nde kotuna ye ndenge baninga na ye bakanisaka mpo na likambo yango. Na nsima, okoki kotuna ye toli nini akoki kopesa baninga yango.

6. Elimboli nini kozala moboti oyo azalaka na ntango mpo na bana mpe oyo babangaka te kosolola na ye?

6 Ya solo, soki olingi ete bana na yo báfungolela yo motema, basengeli komonaka ete ozali na ntango mpo na bango mpe ete ozalaka te moto oyo babangaka kosolola na ye. Soki baboti bazali komonana ete bazali na ntango te mpo na kosolola, bana na bango oyo bazali bilenge bakobomba mikakatano na bango na motema. Okoki kosala nini mpo babangaka te kosolola na yo? Osengeli kosuka kaka te koyebisa bana na yo ete, “bokoki koya ntango nyonso oyo bolingi.” Bana oyo bakómi bilenge basengeli komona ete ozali kozwa makambo na bango na valɛrɛ mpe osilikaka mbala moko te. Baboti mingi bapesaka ndakisa malamu na likambo yango. Elenge moko ya mbula 19 na nkombo Kayla alobi boye: “Nakoki koyebisa papa na ngai likambo nyonso. Akataka ngai maloba te, asambisaka ngai te, kasi ayokaka ngai naino. Mpe na nsima apesaka ngai toli oyo esengeli.”

7. (a) Ndenge nini baboti bakoki komonisa bokatikati ntango mwana ayebisi bango ete azwi mwa moto na ye? (b) Ndenge nini baboti bakoki kosilikisa bana na bango kozanga koyeba?

7 Ata ntango bozali kosolola makambo oyo ezalaka mpasi mpo na kolobela, na ndakisa soki mwana ayebisi yo ete alingi akóma na mwa moto na ye, osengeli kokeba ete olekisa ntango mingi te kaka na kokebisa ye makama oyo ekoki kokómela ye mpe obosana kolakisa ye lolenge malamu mpenza ya kolonga likambo yango. Tópesa ndakisa: kanisá ete okei na restora moko mpe balakisi yo kaka liste ya biloko (menu) oyo elobeli kaka biloko ya mabe. Na ntembe te, okokende koluka restora mosusu. Bana na yo mpe bakoki kosala bongo soki bayei koluka toli epai na yo, kasi bamoni ete ozali kaka na “menu” to batoli ya makasimakasi. (Tángá Bakolose 3:21.) Na esika ya kosala bongo, osengeli nde kozala na bokatikati. Elenge mwasi moko na  nkombo ya Emily alobi boye: “Ntango baboti na ngai basololaka na ngai likambo etali kolingana kati na mwana mwasi ná mwana mobali, balobelaka yango te kaka na ndenge ya mabe. Balobelaka mingi esengo ya koyebana na moto moko mpe ya kozwa moto ya kobalana na ye. Yango esalisaka ngai nasololaka na bango likambo yango kozanga kobanga. Yango wana, ntango nyonso oyo nasali boninga ná moto moko mpo na likambo boye to boye, nabombelaka bango te.”

8, 9. (a) Koyoka kozanga kokata moto maloba ebimisaka matomba nini? (b) Matomba nini ozwá mpo oyokaki bana na yo?

8 Na kotalela oyo Kayla alobaki, okoki komonisa ete olingaka bana básololaka na yo soki oyokaka bango na boboto. (Tángá Yakobo 1:19.) Mama moko na nkombo Katia oyo abɔkɔlaka bana ye moko alobi boye: “Kala, nazalaki motema mokuse epai ya mwana na ngai ya mwasi. Nazalaki kopesa ye nzela te asilisa koloba. Koyoka ye ezalaki kolɛmbisa ngai mpe nazalaki kolinga te atungisa ngai. Sikoyo, lokola nakómá koyoka ye, ye mpe abongolá ezaleli na ye. Mikolo oyo, ngai ná ye esimbaka mpenza.”

Yokáká mpo oyeba bango (Talá paragrafe 3-9)

9 Papa moko na nkombo Ronald akutaná mpe na likambo ya bongo ná mwana na ye ya mwasi. Alobi boye: “Ntango ayebisaki ngai ete balingani ná mwana mobali moko na eteyelo na bango, na ebandeli nasilikaki mpenza. Kasi ntango nakanisaki na ndenge Yehova azalaka motema molai mpe makambo makasimakasi te epai ya basaleli na ye, namonaki ete ekozala malamu natikela mwana na ngai ntango aloba ndenge azali koyoka liboso ya kosembola ye. Nazali na esengo mpo nasalaki bongo! Ezalaki mbala ya liboso oyo namityaki na esika ya mwana na ngai. Ntango asilisaki, ezalaki mpasi te mpo nasolola na ye na boboto mpenza. Likambo ya kokamwa, akakolaki toli na ngai te. Ayebisaki ngai ete azali mpenza na mposa ya kotika ezaleli yango.” Kosolola mbala na mbala na bana na yo, ekopesa yo likoki ya koyeba makanisi mpe ndenge oyo bayokaka. *

LEISÁ BANA NA YO

10, 11. Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bátangwa te na solo?

10 Mobateli ya mpate ya malamu ayebaka ete ata mpate nini ya etonga na ye ekoki kokende mosika. Ekoki kobanda kolanda matiti ya mobesu oyo ezali pembeni wana, na nsima ekei lisusu mwa mosika, mpe nsukansuka emitangoli na etonga. Ndenge moko, bana bakoki kobanda kotika mokemoke solo. Na ndakisa, bakoki kokóma na baninga ya mabe, kotala  to kosala masano ya mabe. (Mas. 13:20) Okoki kosala nini mpo likambo ya boye ezwa misisa te?

11 Ntango ozali koteya bana na yo, salisá bango nokinoki soki omoni ete ezali na makambo moko oyo ekoki kobebisa bango. Salisá bango bákolisa lisusu bizaleli malamu oyo bazalaka na yango. (2 Pe. 1:5-8) Kosala losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ, ezali ntango eleki malamu mpo na kosala yango. Mpo na komonisa ntina ya ebongiseli yango, Mosala na biso ya Bokonzi ya 10/2008 elobaki boye: “Tolendisi batata bákokisa mokumba oyo Yehova apesi bango ya koyekola Biblia na mozindo mpe mbala na mbala elongo na mabota na bango.” Osalelaka ebongiseli wana mpo na kobatela bana na yo? Yebá ete bana na yo basepelaka mingi ndenge olukaka kokokisa liboso bamposa na bango ya elimo.Mat. 5:3; Flp. 1:10.

Leisáká bango malamu (Talá paragrafe 10-12)

12. (a) Matomba nini bilenge mosusu bazwaki na losambo na kati ya libota? (Talá mpe etanda “ Basepelaka na yango.”) (b) Matomba nini yo moko ozwi na losambo na kati ya libota?

12 Tótalela ndenge elenge moko na nkombo Carissa alobeli matomba oyo losambo na kati ya libota ememeli libota na bango. Alobaki ete: “Nasepelaka ndenge tofandaka elongo mpe tosololaka. Ntango tosalaka bongo, tólinganaka makasi mpe tóbombaka basuvenire ya kitoko. Papa alekisaka te losambo na kati ya libota. Komona ete azwaka yango na lisɛki te, elendisaka ngai, mpe etindaka ngai nazwa yango na lisɛki te. Yango etindaka ngai mpe napesaka ye lokumu oyo ebongi mpo azali papa mpe mpo atambwisaka makambo ya elimo.” Ndeko mwasi moko na nkombo Brittney alobi boye: “Losambo na kati ya libota ekómisá ngai na boyokani mpenza ná baboti na ngai. Na nzela na yango, namonaka ete balingaka koyoka makambo oyo nazali na yango mpe ete balingaka kotyela yango likebi. Esalisaka libota na biso ezala makasi mpe na bomoko.” Ya solo, koleisa bana na yo na elimo mingimingi na losambo na kati ya libota, ezali lolenge ya liboso oyo okoki kozala mobateli ya mpate ya malamu. *

TEYÁKÁ BANA NA YO

13. Nini ekoki kotinda mwana asalela Yehova?

13 Mobateli ya mpate ya malamu, asalelaka mwa nzete mpo na kotambwisa mpe kobatela etonga na ye. Moko ya mikano na ye ezalaka ya komema bampate na ye na “esika malamu ya koleisa bibwɛlɛ matiti.” (Ezk. 34:13, 14) Lokola ozali moboti, ozalaka mpe na mokano ya ndenge wana na elimo? Olingaka koteya bana na yo básalela Yehova? Olingaka bana na yo báloba lokola moko ya bakomi ya nzembo oyo akomaki ete: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo, mpe mobeko na yo ezali na kati na ngai.” (Nz. 40:8) Bilenge oyo bámonisaka botɔndi ya ndenge wana bamipesaka na Yehova mpe bazwaka batisimo. Kasi, basengeli kozwa ekateli yango ntango bakómi na likoki ya kozwa ekateli bango moko mpe bazali na mposa mpenza ya kosalela Yehova.

14, 15. (a) Mokano ya baboti bakristo esengeli kozala nini? (b) Nini ekoki kosala ete elenge moko akóma koboya kondima losambo ya solo?

14 Kasi, okosala nini soki mwana na yo azali kokola te na elimo, to mbala mosusu akómi ata koboya kondima mateya mosusu? Salá makasi osalisa bango bakóma kolinga Yehova mingi mpe bázala na botɔndi mpo na nyonso oyo asalá. (Em. 4:11) Na nsima, soki bayebi makambo oyo, bakozwa ekateli bango moko mpo na kosambela Nzambe.

15 Kasi okosala nini soki bana na yo bazali kaka kotya ntembe na mateya mosusu? Ndenge nini okoki kobatela bango mpe kosalisa bango bámona ete kosalela Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu mpe ekosalisa bango bázwa esengo ya seko? Luká koyeba ntina oyo bakómá na bantembe wana. Na ndakisa, ezali  mpenza solo ete mwana na yo andimaka te mateya ya Biblia, to ayebaka nde te ndenge ya kolongisa yango epai ya baninga na ye? Mwana na yo ya mwasi amonaka ete kotosa mibeko ya Nzambe ezali mpenza likambo ya bwanya, to amimonaka nde ete azali kaka ye moko to baninga bakipaka ye te?

Teyáká bango banzela ya kolanda (Talá paragrafe 13-18)

16, 17. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bándima solo na bolingo na bango moko?

16 Ata soki ezali mpo na ntina nini, okoki kosalisa mwana na yo alonga bantembe oyo azalaka na yango oyo etali likambo nyonso ya losambo ya solo. Ndenge nini? Likanisi moko oyo baboti mingi bamonaki malamu, ezali ya kosalisa bana na bango bábimisa makanisi na bango. Na ndakisa, batunaki bango boye: “Mpo na yo, kozala mokristo elimboli nini? Matomba nini omonaka ya kozala mokristo? Esɛngaka makambo nini? Omonaka ete makambo oyo osengeli kosala mpo na kokóma mokristo ekokani na ebele ya matomba oyo tozali na yango sikoyo ná oyo tokozwa na mikolo ezali koya? Mpo na nini olobi bongo?” Na ntembe te, okosalela mituna oyo na maloba na yo moko, na boboto mpe na ndenge oyo ebongi, kasi te ndenge soda to zuzi atunaka moto mituna ebeleebele. Ntango bozali kosolola, okoki kolobela Marko 10:29, 30. Bilenge mosusu bakoki kosepela kokoma makanisi na bango na milɔngɔ mibale, molɔngɔ moko mpo na makambo oyo basengeli kosala mpe mosusu matomba oyo bakozwa. Komona makambo yango na papye ekoki kosalisa bango báyeba mikakatano nyonso oyo bazali na yango mpe ndenge ya kosala mpo na kolonga yango. Soki tosepelaka koyekola na bato mosusu buku Biblia eteyaka mpe Bolingo ya Nzambe,” tomoni te ete tosengeli kosala bongo koleka epai ya bana na biso? Osalaka yango?

17 Na nsima, bana na yo basengeli kozwa ekateli bango moko soki bakosalela Yehova to te. Kokanisa te ete bakokóma mbala moko na kondima lokola oyo ya yo kozanga ete básala milende. Basengeli kofandisa solo na mitema na bango. (Mas. 3:1, 2) Soki mwana na yo azali na mokakatano ya kosala yango, mpo na nini te kozongela mateya ya ebandeli? Salisá ye akanisa na mituna lokola oyo: “Ndenge nini ayebi ete Nzambe azalaka? Nini endimisaka ye ete Yehova azwaka ye mpenza na valɛrɛ? Mpo na nini andimaka ete mitinda ya Yehova ezalaka mpo na bolamu na ye?” Okomonisa ete ozali mobateli ya mpate ya malamu soki ozali na motema molai mpenza mpo na koteya mwana to bana na yo bámona ete nzela ya Yehova ezali nzela oyo eleki malamu na bomoi. *Rom. 12:2.

18. Ndenge nini baboti bakoki komekola Yehova, mobateli monene?

18 Bakristo nyonso ya solo basengeli komekola mobateli oyo aleki monene. (Ef. 5:1; 1 Pe. 2:25) Baboti basengeli mpenza koyeba etonga na bango, elingi koloba bana na bango, mpe basengeli kosala nyonso mpo na koteya bango mpo bázwa mapamboli oyo Yehova abombeli bango. Na koleka nyonso, batelá bana na yo mpe kobá kobɔkɔla bango na nzela ya solo!

^ par. 9 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1/08/2008, nkasa 10-12.

^ par. 12 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Losambo na libota ezali na ntina mpo na kobika!” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/2009, na nkasa 29-31.

^ par. 17 Likambo oyo elobelami mpe na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1/02/2012, nkasa 18-21.