Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2014

‘Zongá mpe lendisá bandeko na yo’

‘Zongá mpe lendisá bandeko na yo’

NTOMA Petro alelaki mingi nsima ya kowangana Yesu. Atako ntoma yango asengelaki kosala makasi mpo abongisa boyokani na ye ná Nzambe mpo Yesu azalaki na mposa ya kosalela ye mpo asalisa basusu. Yango wana Yesu alobaki na ye ete: “Ntango okozonga, lendisá bandeko na yo.” (Luka 22:32, 54-62) Ntoma Petro asengelaki kokóma moko na bato oyo basimbaki mpenza lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso. (Gal. 2:9) Ndenge moko mpe, ndeko oyo abungisaki mokumba na ye ya nkulutu akoki mpe kozongela yango mpe koyoka lisusu esengo ya kolendisa bandeko ya lisangá.

Bandeko mosusu oyo bazalaki bakɛngɛli babungisaki mikumba na bango, mpe mbala mosusu likambo yango esalaki ete bámimona lokola nde bazali na ntina te. Ndeko Julio, * oyo azalaki nkulutu na Amerika ya Sudi na boumeli ya mbula 20 alobaki ete: “Kobongisa badiskur, kotala bandeko, mpe kobatela bandeko ya lisangá, ezalaki mpenza makambo oyo nasalaki na boumeli ya bambula mingi ya bomoi na ngai! Mbala moko, mikumba yango ekendaki mpe nazalaki komimona lokola nazali lisusu na likambo ya kosala te. Na mokuse, ezalaki ntango moko ya mpasi mpenza!” Lelo oyo, Julio azali lisusu nkulutu.

“BÓMONA YANGO ESENGO MPENZA”

Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ndenge na ndenge.” (Yak. 1:2) Yakobo azalaki kolobela komekama oyo eutaka na minyoko mpe ezaleli na biso ya kozanga kokoka. Alobelaki mpe ezaleli ya koluka kaka matomba na biso moko, kopona bilongi mpe bongo na bongo. (Yak. 1:14; 2:1; 4:1, 2, 11) Disiplini ya Yehova ekoki kosala mpasi. (Ebr. 12:11) Kasi makambo yango esengeli te kolongola esengo na biso.

Ata soki mikumba na biso na lisangá elongwe, tozali kaka na libaku ya kotala soki kondima na biso ezali ndenge nini mpe ya komonisa ete tolingaka Yehova. Tokoki mpe kokanisa na ntina oyo tozalaki kokokisa  mikumba yango. Ezalaki mpo na koluka matomba na biso moko to tozalaki nde koluka mokumba yango mpo tolingaka Nzambe mpe tondimisamaki ete lisangá ezali ya ye mpe ebongi ebatelama malamu? (Mis. 20:28-30) Bandeko oyo bazalaká bankulutu mpe bazali kokoba kosala mosala mosantu na esengo mpenza, bamonisaka na bato nyonso, ata mpe na Satana ete balingaka Yehova te mpo na eloko moko boye.

Ntango mokonzi Davidi azwaki etumbu mpo na masumu ya minene oyo asalaki, andimaki kosembolama mpe alimbisamaki. Davidi ayembaki boye: “Esengo na moto oyo balimbisi botomboki na ye, oyo bazipi lisumu na ye. Esengo na moto oyo Yehova azali kotángela ye libunga te, mpe oyo elimo na ye ezali na bokosi te.” (Nz. 32:1, 2) Disiplini yango ebongisaki Davidi mpe na ntembe te esalisaki ye akóma mobateli malamu ya bampate ya Nzambe.

Mbala mingi, bandeko oyo bazongelaka mikumba ya nkulutu, bakómaka babateli ya bampate ya malamu koleka ndenge bazalaki liboso. Moko ya bankulutu yango alobaki ete: “Sikoyo nayebi mpenza malamu ndenge ya kosalisa bandeko oyo basalaka mabunga.” Nkulutu mosusu alobaki: “Sikoyo nakómi kozwa mokumba na ngai ya kosalela bandeko na motuya mingi mpenza.”

OKOKI KOZONGELA YANGO?

Mokomi ya nzembo moko akomaki ete: “[Yehova] akoluka ntango nyonso komonisa mabunga na biso te.” (Nz. 103:9) Yango wana tosengeli kokanisa te ete Yehova akoki soki moke te kotyela moto oyo asalaki libunga moko monene motema. Ndeko Ricardo azalaki nkulutu bambula ebele, kasi abungisaki mokumba yango. Alobi boye: “Nalɛmbaki mpenza nzoto mpo na libunga oyo nasalaki. Na boumeli ya ntango mingi, nazalaki komimona lokola nazali na ntina te mpe yango ezalaki kopekisa ngai nazongela lisusu mokumba ya kosalisa bandeko lokola nkulutu. Nazalaki na elikya te ete nakoki kokóma lisusu ndeko oyo bakoki kotyela motema. Kasi, lokola nazalaki kosepela kosalela basusu, nazalaki koyekola na bato Biblia, kolendisa bandeko na Ndako ya Bokonzi mpe kobima ná bango na mosala ya kosakola. Yango esalisaki ngai namimona ete nazali kaka na ntina, mpe awa tozali koloba, nazali lisusu nkulutu.”

Yehova asalisá bandeko mibali bázongela esengo na bango mpe mposa ya kosala lisusu

Kokanga nkanda na motema ekoki kopekisa ndeko ete asala lokola nkulutu. Ekozala mpenza malamu mingi ya komekola Davidi, mosaleli ya Yehova oyo  azalaki kokima Saulo, mokonzi oyo azalaki na zuwa makasi. Davidi aboyaki kozongisela Saulo mabe, ata ntango mabaku ya kosala yango emonanaki. (1 Sa. 24:4-7; 26:8-12) Ntango Saulo akufaki na etumba, Davidi alelaki ye, alobaki mpo na ye mpe mwana na ye Yonatana ete “bato oyo balingami mingi.” (2 Sa. 1:21-23) Davidi akangaki nkanda te.

Soki omoni ete moto moko akaniselaki yo mabe to basalelaki yo makambo na bosembo te, kotika te ete nkanda ebebisa makanisi na yo. Na ndakisa, ndeko William na Grande-Bretagne, oyo azalaki nkulutu mbula soki 30 mpe alongolamaki na mikumba yango, alobi ete azalaki na nkanda ya bankulutu mosusu. Nini esalisaki ndeko William azinda te na makanisi mabe? Alobaki boye: “Kotánga mokanda ya Yobo esalisaki ngai. Soki Yehova asalisaki Yobo azongisa kimya ná baninga na ye misato, akoki mpe kosalisa ngai nazongisa kimya ná bankulutu mosusu, boye te?”​—Yobo 42:7-9.

NZAMBE APAMBOLAKA BAOYO BAZONGELAKA MOSALA YA BABATELI YA BAMPATE

Soki ozwaki ekateli yo moko ya kotika mosala ya kobatela bampate ya Nzambe, ekozala malamu okanisa mpo na nini osalaki bongo. Mikakatano elekaki yo motó? Makambo mosusu ekómaki na ntina mingi na bomoi na yo? Mabunga ya basusu nde elɛmbisaki yo? Ezala mpo na ntina boye to boye, kobosana te ete ntango ozalaki nkulutu, ozalaki mpenza na libaku ya kosalisa basusu na balolenge mingi. Badiskur na yo ezalaki kolendisa bango, ndakisa na yo elendisaki bango, bavizite pastorale oyo ozalaki kosala esalisaki bango bálonga mikakatano na bango. Mosala wana ya sembo oyo osalaki ntango ozalaki nkulutu, esepelisaki motema ya Yehova, ata oyo ya yo moko mpe esepelaki.​—Mas. 27:11.

Mipesá na esengo nyonso na mosala mosantu mpo na komonisa ete olingaka Yehova

Yehova asalisá bandeko mibali bázongela esengo na bango mpe mposa na bango ya kozala lisusu bankulutu na lisangá. Soki yo moko otiká mosala ya nkulutu to bakitisá yo mikumba, okoki lisusu “koluka kosala mosala ya mokɛngɛli.” (1 Tim. 3:1) Ntoma Paulo ‘atikaki te kobondela’ ete bakristo ya Kolose bátonda na boyebi ya sikisiki ya mokano ya Nzambe ‘mpo na kotambola na ndenge oyo ebongi na Yehova mpo na kosepelisa ye mpenza.’ (Kol. 1:9, 10) Soki ozwi lisusu libaku ya kozonga nkulutu, sɛngá Yehova apesa yo makasi, motema molai mpe esengo. Na mikolo oyo ya nsuka, basaleli ya Nzambe basengeli na lisalisi ya elimo ya babateli ya bampate ya bolingo. Okoki mpe olingi kolendisa bandeko na yo?

^ par. 3 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.