Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2014

Yokáká mongongo ya Yehova esika nyonso oyo ozali

Yokáká mongongo ya Yehova esika nyonso oyo ozali

“Matoi na yo ekoyoka liloba nsima na yo ezali koloba ete, ‘Nzela yango oyo.’”​—YIS. 30:21.

1, 2. Ndenge nini Yehova asololaka na basaleli na ye?

SOKI totali na kati ya Biblia, tokoki komona ete Yehova apesaki bato toli na banzela ndenge na ndenge. Epai ya bato mosusu, Nzambe alobaki na bango na nzela ya baanzelu, bimonaneli to bandɔtɔ, mpe na ndenge yango amonisaki bango makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Yehova apesaki mpe bango mosala ya sikisiki ya kosala. (Mit. 7:89; Ezk. 1:1; Dan. 2:19) Bamosusu bazwá toli na nzela ya bato oyo bazali bamonisi ya eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele. Ezala lolenge nini oyo basaleli ya Yehova bazwaki liloba na ye, baoyo balandaki malako na ye bapambwamaki.

2 Lelo oyo, Yehova atambwisaka basaleli na ye na nzela ya Biblia, elimo santu na ye mpe lisangá na ye. (Mis. 9:31; 15:28; 2 Tim. 3:16, 17) Toli oyo tozwaka epai na ye ezalaka mpenza polele, mpe ezalaka lokola nde ‘matoi na biso ezali koyoka liloba nsima na biso ezali koloba ete: “Nzela yango oyo. Bótambola na yango.”’ (Yis. 30:21) Yesu ayokisaka mpe biso mongongo ya Yehova na ndenge atambwisaka lisangá na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Tosengeli kozwa toli oyo na lisɛki te, mpo ete botosi na biso nde ekosala ete tózwa bomoi ya seko.​—Ebr. 5:9.

3. Makambo nini ekoki kopekisa biso tólanda malako ya Yehova? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Satana Zabolo ayebi ete malako ya Yehova ekobikisa biso, yango wana alukaka kopekisa biso mpo tóyoka yango. Kasi,  ‘motema na biso oyo ezali na bokosi’ ekoki kopekisa biso ete tólanda malako ya Yehova. (Yir. 17:9) Atako bongo, tótalela sikoyo ndenge tokoki kolonga makambo oyo ekoki kopekisa biso tóyoka mongongo ya Nzambe. Tótalela mpe ndenge oyo kosololaka ntango nyonso elongo na Yehova ekobatela boyokani na biso ná ye atako tokutani na mokakatano nini.

NDENGE YA KOLONGA MITAMBO YA SATANA

4. Ndenge nini Satana azali koluka kobebisa makanisi ya bato?

4 Mpo na kotinda bato bákóma na makanisi mabe, Satana alukaka kopesa bango makambo ya lokuta mpe alakisaka bango bapiblisite oyo ezali solo te. (Tángá 1 Yoane 5:19.) Longola babuku to bazulunalo, na mokili mobimba, bato mingi bayokaka nsango na nzela ya radio, televizyo mpe Internet. Atako biloko yango ekoki kolakisa makambo ya kitoko, kasi mbala mingi elakisaka etamboli mpe bizaleli oyo eyokani te na mitinda ya Yehova. (Yir. 2:13) Na ndakisa, bansango mpe teyatre emonisaka lokola nde kobalana mibali na mibali to basi na basi ezali mabe te, mpe bato mingi bakanisaka ete Biblia elekisaka ndelo ntango elobelaka likambo yango.​—1 Ko. 6:9, 10.

5. Ndenge nini tokoki komibatela mpo tóbendama te na bapiblisite ya Satana?

5 Ndenge nini baoyo balingaka boyengebene ya Nzambe bakoki komibatela mpo bábendama te na ebele ya bapiblisite oyo Satana azali kolakisa lelo oyo? Ndenge nini bakoki kokesenisa malamu ná mabe? ‘Soki bamibateli mpe basaleli liloba ya [Nzambe]’! (Nz. 119:9) Liloba ya Nzambe ezali na toli ya malamu mpenza oyo ekoki kosalisa biso tóyeba kokesenisa makambo ya solo ná bapiblisite ya lokuta. (Mas. 23:23) Yesu atángaki Makomami, mpe alobaki ete “moto asengeli kobika . . . na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Mat. 4:4) Tosengeli koyekola ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na biso. Na ndakisa, bambula mingi liboso ete Moize akoma mobeko ya Yehova oyo epekisaki kosala ekobo, elenge mobali moko na nkombo Yozefe ayebaki ete etamboli yango ezali lisumu na miso ya Nzambe. Eyelaki ye ata moke te na makanisi kobuka mobeko ya Yehova ntango mwasi ya Potifare alukaki kolɛngola ye mpo asala mabe. (Tángá Ebandeli 39:7-9.) Atako mwasi yango atyaki ye mosukusuku na boumeli ya mwa ntango, Yozefe apesaki nzela te ete maloba sukali ya mwasi wana epekisa ye koyoka mongongo ya Nzambe. Mpo na kokesenisa malamu ná mabe, ezali na ntina mingi koyoka mongongo ya Yehova mpe koboya bapiblisite oyo Satana azali kobimisa ntango nyonso.

6, 7. Tosengeli kosala nini mpo tóboya toli mabe ya Satana?

6 Mokili etondi na mateya mpe bindimeli ya bongolabongola ya mangomba, mpe yango ezali kosala ete bato mingi bámona ete ezali na ntina te koluka lingomba ya solo. Nzokande, Yehova asali ete toli na ye ezala mingi mpe na lolenge ya polele mpo na baoyo balingi kozwela yango litomba. Tosengeli kopona soki tolingi koyoka nani. Lokola  ekoki kosalema te ete moto moko alanda makambo mibale mbala moko; ndenge moko, atako mateya mpe bindimeli ekoki kozala ndenge na ndenge, biso tosengeli ‘koyeba mongongo’ ya Yesu mpe koyoka yango. Ye nde Yehova atye mpo azala mokonzi ya bampate na ye.​—Tángá Yoane 10:3-5.

7 Yesu alobaki ete: “Bókeba na makambo bozali koyoka.” (Mrk. 4:24) Toli ya Yehova ezali polele mpe alima, kasi mpo tótyela yango likebi mpe tóyoka yango, tosengeli kobongisa motema na biso mpo na koyamba yango. Soki tosali angɛlɛ te, tokoki koyoka toli ya mabe ya Satana na esika ya koyoka toli ya bolingo ya Nzambe. Kopesa soki moke te nzela na miziki, bavideo, bafilme na televizyo, babuku, baninga, balakisi, to bato ya mayele ya mokili oyo bákóma kotambwisa bomoi na yo.​—Kol. 2:8.

8. (a) Ndenge nini motema na biso ekoki kosala ete tókangama na mitambo ya Satana? (b) Nini ekoki kokómela biso soki tozali kokeba te na makambo oyo ezali komonana lokola mabe?

8 Satana ayebi ete tozalaka na makanisi ya kosala masumu, mpe alukaka kotinda biso tósalela yango. Ntango Satana alingaka kosala biso mabe na likambo yango, ekómaka mokakatano mpenza mpo na kobatela bosembo na biso. (Yoa. 8:44-47) Ndenge nini tokoki kolonga mokakatano yango? Tózwa ndakisa ya moto moko oyo azali komipesa mingi na bisengo, mpe ayei kosala likambo moko ya mabe, oyo kutu akanisaki ete akosala yango te. (Rom. 7:15) Nini ememaki ye na kosala likambo ya mabe ndenge wana? Ekoki kozala ete abandaki mokemoke koboya koyoka mongongo ya Yehova. Ekoki mpe kozala ete atyaki likebi te to aboyaki na nko kondima makambo oyo ezalaki komonisa ete motema na ye ebandi kobeba. Na ndakisa, ekoki kozala ete azalaki kobondela lisusu te, alɛmbaki na mosala ya kosakola, to abandaki kozangisa makita. Nsukansuka, akweaki na mposa na ye mpe asalaki likambo oyo ayebaki malamu ete ezali mabe. Tokoki koboya kosala mabe monene ya ndenge wana soki tozali ntango nyonso ekɛngɛ na likambo nyonso ya mabe oyo ekoki komonana mpe tosali nokinoki mpo na kotika yango. Mpe soki tozali koyoka mongongo ya Yehova, tokosepela te ata na likanisi moko ya bapɛngwi.​—Mas. 11:9.

9. Mpo na nini komona noki makambo oyo ekoki komema na lisumu ezali na ntina mingi?

9 Soki moto ayebi maladi na ye noki mpenza, akoki kobikisa bomoi na ye. Ndenge moko, tokoki kopɛngola likama soki tomoni mbala moko makanisi oyo ekoki komema biso na komekama. Soki kaka tomoni makanisi ya ndenge wana, ekozala malamu mingi tózwa ekateli mbala moko liboso ete ‘Satana akanga biso na bomoi mpo na kosala mokano na ye.’ (2 Tim. 2:26) Tosengeli kosala nini  soki tomoni ete totiki makanisi mpe bamposa na biso ememama mosika na makambo oyo Yehova azali kosɛnga biso? Kozanga kolekisa ntango, tosengeli na komikitisa nyonso kozonga epai na ye, kofungola matoi mpe koyoka toli na ye na motema na biso mobimba. (Yis. 44:22) Tosengeli koyeba ete kozwa ekateli ya mabe ekoki kotika biso na bilembo oyo tokoki kotungisama makasi mpenza na ebongiseli oyo. Kozwa ekateli nokinoki ekosalisa biso tósala te libunga monene ya ndenge wana!

Ndenge nini kozala na programɛ ya malamu ya elimo ekoki kobatela yo na mitambo ya Satana? (Talá paragrafe 4-9)

NDENGE YA KOTIKA LOLENDO MPE LOKOSO

10, 11. (a) Lolendo emonanaka ndenge nini? (b) Liteya nini tozwi na ndakisa mabe ya Kora, Datane mpe Abirame?

10 Tosengeli koyeba ete motema na biso ekoki kobungisa biso nzela. Mposa ya kosala masumu ezalaka na nguya makasi likoló na biso! Tózwa ndakisa ya lolendo mpe lokoso. Tótala ndenge oyo bizaleli yango ekoki kopekisa biso tóyoka mongongo ya Yehova mpe ekoki kotinda biso na nzela ya mabe. Moto ya lolendo amimonaka kaka ye na ye. Akoki kokanisa ete asengeli kosala nyonso oyo alingi mpe ete moto moko te akoki koyebisa ye likambo ya kosala. Mpe akoki kokanisa ete bakristo mosusu, bankulutu to ebongiseli ya Yehova bakoki te kopesa ye malako to toli. Mpo na moto ya ndenge wana, mongongo ya Yehova ekómaka eloko ya bongobongo.

11 Ntango Bayisraele bazalaki kotambola na esobe, Kora, Datane mpe Abirame batombokelaki bokonzi ya Moize mpe ya Arona. Lokola bazalaki na lolendo, batomboki yango bazwaki bibongiseli na bango moko mpo na kosambela Yehova. Yehova asalaki nini? Abomaki bango. (Mit. 26:8-10) Oyo nde liteya ya ntina mingi tokoki kozwa na lisolo yango! Kotombokela Yehova ememaka na libebi. Tóbosana mpe te ete “lolendo ezalaka liboso ya kokwea.”​—Mas. 16:18; Yis 13:11.

12, 13. (a) Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge oyo ezaleli ya lokoso ekoki komemela moto mpasi. (b) Limbolá ndenge oyo ezaleli ya lokoso ekoki kokola nokinoki soki moto alongoli yango te.

12 Tótalela mpe ezaleli ya lokoso. Mbala mingi moto ya lokoso alekisaka ndelo to abukaka mibeko. Ntango Naamane, mokonzi ya basoda ya Siri abikisamaki na maba na ye, alukaki kopesa mosakoli Elisha makabo, kasi Elisha aboyaki. Kasi, Gehazi, mosaleli ya Elisha alulaki biloko yango. Gehazi alobaki boye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, nakopota mbangu, nakolanda ye [Naamane] mpe nakozwa mwa eloko epai na ye.” Kozanga ete Elisha ayeba, alandaki Naamane mbangu mpe asalelaki lokuta mpenza mpo na kosɛnga “talanta moko ya palata mpe bilamba mibale.” Likambo nini esalemaki lokola Gehazi asalaki bongo mpe akosaki mosakoli ya Yehova? Mpo na yango, maba ya Naamane ekangamaki na Gehazi, moto wana ya lokoso!​—2 Bak. 5:20-27.

13 Ezaleli ya lokoso ebandaka epai ya moto mokemoke, kasi soki alongoli yango te, ekoki kokola nokinoki mpe elati ye. Lisolo ya Biblia oyo elobeli Akana emonisi nguya oyo ezaleli ya lokoso ezalaka na yango. Tótala ndenge ezaleli ya lokoso ekolaki nokinoki epai ya Akana. Alobaki boye: “Ntango namonaki na biloko ya kopunza elamba moko ya lokumu oyo euti na Shinare, elamba moko ya kitoko, mpe shekele nkama mibale (200) ya palata mpe eteni ya wolo, oyo ezali na kilo ya shekele ntuku mitano (50), bongo nalulaki yango mpe nazwaki yango.” Na esika abengana mposa mabe wana, na lokoso nyonso Akana ayibaki biloko wana mpe abombaki yango na hema na ye. Ntango mabe ya Akana eyebanaki, Yosua ayebisaki ye ete Yehova akomemela ye mpasi. Mokolo wana, bato babomaki Akana ná libota na ye na mabanga. (Yos. 7:11, 21, 24, 25) Lokola ezaleli ya lokoso emonanaka mokolo na mokolo, ekoki mpe kozwa biso. Na yango, tosengeli mpenza ‘kokeba na motindo nyonso ya bilulela’ to lokoso. (Luka 12:15) Soki na ntango mosusu makanisi mabe eyeli biso to tokanisi  makambo ya mbindo, ekozala malamu mingi tóbengana yango mpe tótika te ete bamposa na biso etinda biso tii na kosala lisumu.​—Tángá Yakobo 1:14, 15.

14. Tosengeli kosala nini soki tomoni ete tokómi na makanisi ya lolendo mpe lokoso?

14 Ezaleli ya lolendo mpe lokoso ekoki komemela moto mpasi. Kokanisa na makama oyo kolanda ezaleli mabe ekoki kobimisa ekosalisa mpo ete tótika te makanisi wana ya mabe epekisa biso koyoka mongongo ya Yehova. (Mib. 32:29) Na Biblia, Nzambe ya solo asukaka kaka te na koyebisa biso soki etamboli ya malamu ezali nini kasi amonisaka mpe biso matomba oyo tokozwa soki tolandi yango mpe makama oyo ekokómela biso soki tolandi nzela mabe. Soki motema na biso etindi biso tósala likambo moko mpo na lolendo to lokoso, ekozala mpenza malamu ete tókanisa na makama na yango! Tosengeli kotalela malamu ndenge kosala mabe ekosala biso moko, bato oyo tolingaka mpe mingimingi boyokani na biso elongo na Yehova.

KOTIKA TE KOSOLOLAKA NÁ YEHOVA

15. Na likambo etali kosololaka ná Nzambe, liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu?

15 Yehova alingaka ete tózala malamu. (Nz. 1:1-3) Apesaka malako ntango mpenza oyo tosengeli na yango. (Tángá Baebre 4:16.) Atako azalaki moto ya kokoka, Yesu azalaki ntango nyonso kosolola ná Yehova mpe azalaki kotingama na mabondeli. Yehova asungaki Yesu mpe atambwisaki ye na balolenge ya malamu mpenza. Atindaki baanzelu mpo básalela ye, atindaki elimo santu na ye mpo esalisa ye mpe asalisaki ye apona bantoma 12. Mongongo ya Yehova eyokanaki na likoló, mpe emonisaki ete azali kosalisa Yesu mpe kondima ye. (Mat. 3:17; 17:5; Mrk. 1:12, 13; Luka 6:12, 13; Yoa. 12:28) Na ndakisa ya Yesu, tosengeli kobondelaka Nzambe na motema mobimba. (Nz. 62:7, 8; Ebr. 5:7) Libondeli ekoki kosalisa biso tósololaka elongo na Yehova mpe tózalaka na bizaleli oyo ezali kokumisa ye.

16. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso mpo tókóma na likoki ya koyoka mongongo na ye?

16 Atako Yehova apesaka toli na ye ofele mpe mpo na moto nyonso, kasi akangaka moto moko te nsinga mpo na kolanda yango. Tosengeli kosɛngaka ye elimo santu na ye, mpe akopesa mpenza biso yango. (Tángá Luka 11:10-13.) Kasi, ezali na ntina ete ‘tókeba na ndenge tozali koyoka.’ (Luka 8:18) Na ndakisa, ekozala kosala masɛki soki tozali kosɛnga Yehova asalisa biso tólonga makanisi ya mbindo, kasi tozali kokoba kotala pornografi to bafilme ya mbindo. Tosengeli kozalaka na bisika oyo elimo ya Yehova ezali. Toyebi ete elimo na ye ezalaka na makita ya lisangá. Basaleli mingi ya Yehova bapɛngolaka makama na ndenge bayokaka ye na makita na biso. Na yango, bayebaka ntango bamposa mabe ebandi na mitema na bango mpe balongolaka yango.​—Nz. 73:12-17; 143:10.

YOKÁKÁ MONGONGO YA YEHOVA NTANGO NYONSO

17. Mpo na nini komityela motema ezali likama?

17 Tólobela Davidi, mokonzi ya Yisraele. Ntango azalaki elenge, alongaki Goliate, elombe Mofilistia. Davidi akómaki soda, mokonzi, mobateli mpe moto oyo azalaki kozwa bikateli mpo na ekólo. Kasi, ntango Davidi akómaki komityela motema, amikosaki mpe asalaki lisumu monene ná Bate-sheba, kutu azwaki bibongiseli mpo mobali na ye, Uriya abomama. Ntango azwaki etumbu, Davidi andimaki na komikitisa nyonso libunga na ye mpe azongisaki boyokani na ye elongo na Yehova.​—Nz. 51:4, 6, 10, 11.

18. Nini ekoki kosalisa biso tókoba koyoka mongongo ya Yehova?

18 Tosengeli koyoka toli oyo ezali na 1 Bakorinti 10:12 mpe tókóma te komityela motema koleka ndelo. Lokola tozali te na likoki ya ‘kotambwisa lokolo na biso,’ tosengeli kopona soki tokoyoka mongongo ya Yehova to ya monguna na ye. (Yir. 10:23) Tiká ete tótingama na mabondeli, tólandaka litambwisi ya elimo santu, mpe tóyokaka ntango nyonso mongongo ya Yehova.