Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2014

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ntango Yesu alobaki na Basadukai ete bato oyo bakosekwa, “bakobala te mpe bakobalisama te,” azalaki nde kolobela lisekwa oyo ekosalema awa na mabele? (Luka 20:34-36)

Motuna oyo ezali na ntina mpenza, mingimingi mpo na bato oyo balongani na bango bakufá. Ekoki kozala ete bato yango bazalaka na mposa makasi ya kozonga lisusu na libala ná balongani na bango na mokili ya sika. Mobali moko oyo mwasi akufá alobaki ete: “Ngai ná mwasi na ngai toponaki te kokata libala na biso. Tozalaki na mposa makasi ya kozala na libala seko na seko mpe kokoba kosambela Yehova elongo. Makanisi yango elongwá na motó na ngai te.” Ntina ezali mpenza ya koloba ete bato oyo bakosekwa bakobala? Na mokuse, tokoki mpenza te kopesa eyano ya sikisiki.

Na bambula eleki, mikanda na biso elobaki ete maloba ya Yesu na likambo etali lisekwa mpe kobala, ekoki kolimbola lisekwa oyo ekosalema na mabele mpe ete baoyo bakosekwa mpo na kozala na bomoi na mokili ya sika bakobala te. * (Mat. 22:29, 30; Mrk. 12:24, 25; Luka 20:34-36) Atako tokoki te kotingama na likanisi boye to boye, ekoki kozala ete maloba ya Yesu etalelaki nde lisekwa ya likoló? Tótalela oyo Yesu alobaki.

Tótalela nini etindaki Yesu aloba maloba yango. (Tángá Luka 20:27-33.) Basadukai, bato oyo bazalaki kondima lisekwa te, balukaki kokanga Yesu na motuna moko. Bayaki na likambo etali lisekwa mpe libala ya bosɛmɛki. * Yesu ayanolaki ete: “Bana ya ntango oyo babalaka mpe babalisamaka, kasi baoyo bamonani ete babongi kozwa bomoi na ntango wana mpe na lisekwa na bakufi bakobala te mpe bakobalisama te. Ya solo, bakoki lisusu kokufa te, mpo bazali lokola baanzelu, mpe bazali bana ya Nzambe mpo bazali bana ya lisekwa.”​—Luka 20:34-36.

Mpo na nini mikanda na biso elobaki ete ekoki kozala ete Yesu alobelaki lisekwa oyo ekosalema awa na mabele? Ndimbola yango eutaki mpenzampenza na makanisi mibale. Ya liboso, ekoki kozala ete Basadukai bazalaki kolobela lisekwa awa na mabele, ntango bazalaki kosolola ná Yesu. Yango wana, apesaki bango eyano oyo eyokanaki na makanisi wana. Ya mibale, mpo na kosukisa eyano na ye, Yesu atángaki Abrahama, Yisaka mpe Yakobo, bato ya sembo oyo bazali na molɔngɔ ya bato oyo bakosekwa mpo na bomoi awa na mabele.​—Luka 20:37, 38.

Nzokande, ekoki kozala ete Yesu alobelaki nde lisekwa ya likoló. Nini ekoki kotinda biso tóloba bongo? Tótalela bafraze mibale ya ntina mpenza.

“Baoyo bamonani ete babongi kozwa . . . lisekwa na bakufi.” Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali “bato babongi na bokonzi ya Nzambe.” (2 Tes. 1:5, 11) Batángami bayengebene mpo na bomoi na nzela ya lisiko, na ndenge yango, bakokufa te lokola bato oyo bakweisami na lisumu. (Rom. 5:1, 18; 8:1) Bato yango babengami bato ya ‘esengo mpe basantu’ mpe babongi na lisekwa ya likoló. (Em. 20:5, 6) Longola bango, na kati ya baoyo bakosekwa mpo na bomoi awa na mabele, tokoki mpe kotánga “bato oyo bazangi boyengebene.” (Mis. 24:15) Tokoki nde koloba mpo na bango ete “bamonani ete babongi” mpo na lisekwa?

 “Bakoki lisusu kokufa te.” Yesu alobaki te ete: “Bakokufa lisusu te.” Kasi, alobaki ete: “Bakoki lisusu kokufa te.” Mabongoli mosusu ebongolaka fraze yango na “bazali lisusu soki moke te baombo ya liwa” mpe “liwa ezali lisusu te na nguya likoló na bango.” Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali kosilisa bomoi na bango na bosembo nyonso awa na mabele, bazali kosekwa mpo na bomoi na likoló mpe bazwaka nzoto oyo ekufaka te, elingi koloba bomoi oyo ezangi nsuka. (1 Ko. 15:53, 54) Liwa ezalaka soki moke te na nguya likoló ya baoyo basekwaka mpo na bomoi na likoló. *

Na kotalela oyo touti koloba, tokoki kosukisa ndenge nini? Ekoki kozala ete maloba wana ya Yesu na likambo etali kobala mpe lisekwa esalelami mpo na lisekwa ya likoló. Soki ezali bongo, maloba na ye ekoki koyebisa biso makambo ebele mpo na baoyo bakosekwa mpo na bomoi na likoló: Bakobala te, bakokufa te, mpe na maloba mosusu bazali lokola baanzelu, bikelamu ya elimo oyo bazalaka na likoló. Kasi, ndimbola wana ebimisi mituna ebele.

Ya liboso, mpo na nini Yesu akokaki kolobela lisekwa ya likoló ntango apesaki eyano epai ya Basadukai, bato oyo ekoki kozala ete bazalaki na makanisi ya lisekwa awa na mabele? Mbala mingi, Yesu azalaki te koyanola batɛmɛli na ye na boyokani ya makanisi na bango. Na ndakisa, mpo na Bayuda oyo basɛngaki ye elembo, alobaki boye: “Bóbuka tempelo oyo, mpe na mikolo misato nakotɛlɛmisa yango.” Ekoki kozala ete Yesu ayebaki ete na makanisi na bango, bazalaki komona tempelo mpenza ya tempelo, “kasi azalaki nde kolobela tempelo ya nzoto na ye.” (Yoa. 2:18-21) Ntango mosusu Yesu amonaki te ntina ya koyanola Basadukai wana oyo bazangaki kondima, oyo bazalaki kondima lisekwa te to ete baanzelu bazali. (Mas. 23:9; Mat. 7:6; Mis. 23:8) Kutu, ekoki kozala ete alingaki nde komonisa solo ya likambo etali lisekwa mpo na likoló mpo na bayekoli na ye ya sembo, oyo mokolo mosusu bakokaki kozala na molɔngɔ ya bato oyo bakozwa yango.

Ya mibale, mpo na nini Yesu asukisaki lisolo na ye na kotánga Abrahama, Yisaka mpe Yakobo, oyo bakosekwa mpo na bomoi awa na mabele? (Tángá Matai 22:31, 32.) Simbá ete liboso Yesu alobela bato yango, abandaki naino na maloba “na likambo ya lisekwa ya bakufi.” Ekoki kozala ete abandaki na fraze wana mpo ayebaki ete ezalaki likambo oyo bango mpe bazalaki kolobela mingi. Na nsima, asalelaki makomi ya Moize, oyo Basadukai bazalaki koloba ete bandimaka, mpe asalelaki maloba oyo Yehova alobaki na Moize na mwa nzete ya nzubɛ oyo ezalaki kopela mɔtɔ mpo na komonisa polele ete lisekwa, oyo ya mabele ezali mokano ya Nzambe mpe ezali likambo ya solo.​—Kob. 3:1-6.

Ya misato, soki maloba ya Yesu na likambo etali lisekwa mpe kobala esalelami mpo na lisekwa ya likoló, yango elingi nde koloba ete baoyo bakosekwa awa na mabele bakobala? Liloba ya Nzambe epesi eyano ya polele te na motuna wana. Soki Yesu alobelaki lisekwa mpo na likoló, na yango, maloba na ye emonisi ata moke te soki baoyo bakosekwa mpo na bomoi na mabele na mokili ya sika bakobala to te.

Na yango, toyebi ete Liloba ya Nzambe emonisi polele ete liwa ekabolaka mpenza babalani. Yango wana, moto oyo molongani na ye akufi, akoki komiyoka te ete amemi ngambo soki azwi ekateli ya kobalana na moto mosusu. Ezali ekateli ya moto na moto, mpe tokoki koloba mabe te mpo na moto ya ndenge wana mpo azali koluka molongani oyo akoki komoniselaka ye bolingo.​—Rom. 7:2, 3; 1 Ko. 7:39.

Na ntembe te, tokoki kozala na mituna mingi na ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika. Na esika tolekisaka ntango na kopesapesaka makanisi na motó na biso, ekozala malamu tózela mpe tómona. Kasi, tokoki kondimisama na likambo oyo: Bato ya botosi bakozala na esengo, mpo ete Yehova akokokisa bamposa mpe makambo mosusu ya ntina ya bato na ndenge ebongi mpenza.​—Nz. 145:16.

^ par. 4 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/06/1987, nkasa 30-31 (na Lifalanse).

^ par. 5 Na ntango ya kala, libala ya bosɛmɛki ezalaki momeseno ya ntango wana. Mobali akokaki kobala mwasi ya ndeko na ye oyo akufi kozanga ete bábota mpo bábota na ye mwana mpo ete molɔngɔ ya libota ya ndeko na ye elimwa te.​—Eba. 38:8; Mib. 25:5, 6.

^ par. 9 Baoyo bakozonga na bomoi na lisekwa ya mabele, bakozala na elikya ya kozwa bomoi ya seko, kasi te nzoto ezangi kokufa. Mpo na koyeba bokeseni oyo ezali kati na kozanga kokufa mpe bomoi ya seko, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/1984, nkasa 30-31, (na Lifalanse).