Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2014

Ndenge Yehova apusanaka penepene na biso

Ndenge Yehova apusanaka penepene na biso

“Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—YAK. 4:8.

1. Bato bazalaka na mposa ya nini, mpe nani akoki kokokisa mposa yango?

BATO bazalaka na mposa makasi ya kozala penepene ya bato mosusu. Balobaka ete bato “bazalaka pene ya basusu ntango bazali kolingana makasi mpe bayebani malamu mpenza.” Tosepelaka mpenza na boyokani oyo tozalaka na yango elongo na bato ya mabota mpe baninga oyo balingaka, basepelaka mpe bamityaka na esika na biso. Kasi, moto oyo tosengeli kosala mpenza boyokani ya penepene elongo na ye koleka bato nyonso, ezali Mozalisi na biso Monene.​—Mos. 12:1.

2. Yehova alaki biso nini, kasi mpo na nini bato mingi bandimaka te likambo yango?

2 Yehova alendisi biso na Liloba na ye ete ‘tópusana penepene’ na ye, mpe alaki biso ete soki tosali bongo, ye mpe “akopusana penepene” na biso. (Yak. 4:8) Oyo nde likanisi ya kolendisa mpenza! Nzokande, bato mingi bakanisaka ete ezali mpasi kondima ete Nzambe alingaka bato bápusana penepene na ye; bamonaka ete babongi te kopusana penepene na ye to ete lokola azali mosika mingi, ekoki kosalema te ete bato bápusana penepene na ye. Ekoki mpenza kosalema ete bato bápusana penepene na Yehova?

3. Likambo nini tosengeli koyeba na ntina na Yehova?

3 Tosengeli koyeba ete Yehova “azali mosika te na mokomoko” na biso oyo alingi kozwa ye; likoki ya koyeba ye ezali. (Tángá Misala  17:26, 27; Nzembo 145:18.) Mokano ya Nzambe ezali ete ata bato ya kozanga kokoka basengeli kopusana penepene na ye, mpe azali pene mpo na yango mpe na motema boboto, azali na mposa ya koyamba bango lokola baninga na ye ya motema. (Yis. 41:8; 55:6) Makambo oyo moko ya bakomi ya nzembo akutanaki na yango etindaki ye akoma na ntina na Yehova boye: “Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo. Esengo na moto oyo ozali kopona mpe ozali kobɛlɛmisa.” (Nz. 65:2, 4) Lisolo ya Biblia oyo elobeli mokonzi ya Yuda Asa, emonisi ndakisa ya moto oyo apusanaki penepene na Nzambe, mpe emonisi ndenge Yehova asalaki. *

ZWÁ LITEYA NA NDAKISA MOKO YA KALA

4. Ndakisa nini mokonzi Asa atikelaki bato ya Yuda?

4 Mokonzi Asa amonisaki mpenza mpiko mpo na losambo ya pɛto, alongolaki kindumba na tempelo mpe losambo ya bikeko oyo ezwaki mpenza esika na mboka. (1 Bak. 15:9-13) Kozanga kotya mai na monɔkɔ, alendisaki bato “báluka Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango mpe bátosa mobeko mpe mitindo.” Yehova apambolaki bambula zomi ya liboso ya boyangeli ya Asa mpo kimya ezalaki mpenza. Mpe Asa apesaki lokumu epai ya nani mpo na kimya wana? Ayebisaki bato ete: “Mokili ezali naino na mabɔkɔ na biso, mpo toluki Yehova Nzambe na biso. Toluki, mpe apesi biso bopemi epai na epai.” (2 Nt. 14:1-7) Tótala sikoyo makambo oyo elekaki na nsima.

5. Likambo nini etyaki kondima ya Asa na komekama, mpe esukaki ndenge nini?

5 Kanisá ete yo nde ozalaki mokonzi na esika ya Asa. Zera, moto ya Etiopi ayaki na mibali 1 000 000 mpe makalo 300 mpo na kobundisa Yuda. (2 Nt. 14:8-10) Olingaki kosala nini soki omoni ebele ya basoda wana bakɔti na mboka oyo oyangelaka? Kanisá ete ozali kaka na basoda 580 000! Lokola basoda yango baleki bino mbala mibale, olingaki nde komituna mpo na nini Nzambe apesaki nzela ete likambo ya bongo esalema? Atako esengelaki kozwa ekateli nokinoki, olingaki nde kokata likambo yango na bwanya na yo moko? Ndenge oyo Asa asalaki, emonisaki lolenge ya boninga mpe boyokani oyo azalaki na yango elongo na Yehova. Abelelaki Yehova na motema mobimba ete: “Salisá biso, ee Yehova, Nzambe na biso, mpo totyeli yo motema, mpe toyei kobunda na ebele ya bato oyo na nkombo na yo. Ee Yehova, yo ozali Nzambe na biso. Moto​—mowei mpamba—​azala na makasi te ya kobunda na yo.” Ndenge nini Nzambe ayanolaki na libondeli ya Asa? “Yehova alongaki bato ya Etiopi.” Ata monguna moko te abikaki na etumba yango!​—2 Nt. 14:11-13.

6. Makambo nini ya Asa tosengeli komekola?

6 Nini esalisaki Asa atya motema mobimba na litambwisi mpe libateli ya Nzambe? Biblia elobi ete “Asa asalaki oyo ezali sembo na miso ya Yehova” mpe ete “motema [na ye] ezalaki mobimba epai ya Yehova.” (1 Bak. 15:11, 14) Biso mpe tosengeli kosalela Nzambe na motema mobimba. Ezali mpenza na ntina ete tósala bongo soki tolingi tózala na boyokani ya malamu elongo na ye banda sikoyo mpe na mikolo ezali koya. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova nde abendaki biso liboso penepene na ye mpe asalisi biso tókóma na boyokani ya malamu mpenza elongo na ye mpe tóbatela yango! Tótalela balolenge mibale oyo Nzambe asalaki yango.

YEHOVA ABENDÁ BISO PENEPENE NA YE NA NZELA YA LISIKO

7. (a) Makambo nini Yehova asali oyo ebendi biso penepene na ye? (b) Wapi lolenge eleki monene oyo Nzambe asali mpo abenda biso penepene na ye?

7 Yehova amonisaki ete alingaka bato na ndenge asalaki mabele, esika kitoko mpo na kofanda. Azali kokoba komonisa ete alingaka biso ndenge apesaka biloko ndenge  na ndenge ya kitoko mpo tózala malamu. (Mis. 17:28; Em. 4:11) Likambo eleki ntina, Yehova akokisaka bamposa na biso ya elimo. (Luka 12:42) Ayebisi biso mpe ete kaka ye moko nde ayokaka mabondeli na biso. (1 Yoa. 5:14) Kasi, lolenge eleki monene oyo Nzambe asali ete tópusana penepene na ye, mpe tópusani mpenza penepne na ye, ezali bolingo oyo amonisaki na nzela ya lisiko. (Tángá 1 Yoane 4:9, 10, 19.) Yehova atindaki “Mwana na ye se moko oyo abotamaki” awa na mabele mpo ete tósikolama na lisumu mpe liwa.​—Yoa. 3:16.

8, 9. Mokumba nini mpenza Yesu azali na yango na mokano ya Yehova?

8 Yehova asali ete lisiko emema matomba ata mpo na bato oyo bazalaki na bomoi liboso ete Kristo aya. Kobanda na ntango Yehova asakolaki ete mobikisi ya mokili akoya, na miso na ye, ezalaki lokola nde lisiko esili kofutama, mpo ayebaki ete mokano na ye ekokokisama kaka. (Eba. 3:15) Basiɛklɛ na nsima, ntoma Paulo amonisaki botɔndi epai ya Nzambe mpo na “kosikolama oyo basikolami na lisiko oyo Kristo Yesu afutaki.” Abakisi boye: “Azalaki kolimbisa masumu oyo esalemaki kala ntango Nzambe azalaki kokanga motema.” (Rom. 3:21-26) Yesu azali mpenza na mokumba monene mpo ete tópusana penepene na Nzambe!

9 Kaka na nzela ya Yesu nde bato ya komikitisa bakoki koyeba Yehova mpe kopusana penepene na ye mpe kokóma na boyokani ya malamu mpenza elongo na ye. Ndenge nini Makomami emonisi polele likambo yango? Ntoma Paulo akomaki ete: “Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye na likambo oyo: ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.” (Rom. 5:6-8) Mbeka ya lisiko ya Yesu epesamaki te mpo biso tobongaki na yango, kasi nde mpo Nzambe alingaki biso. Yesu alobaki ete: “Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” Na libaku mosusu alobaki ete: “Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoa. 6:44; 14:6) Na lisalisi ya elimo santu Yehova abendaka bato epai na ye na nzela ya Yesu mpe asalisaka bango bátikala na kati ya bolingo na ye na elikya ya kozwa bomoi ya seko. (Tángá Yuda 20, 21.) Tótalela lolenge mosusu oyo Yehova abendaka biso epai na ye.

YEHOVA ABENDAKA BISO NA NZELA YA LILOBA NA YE

10. Makambo nini Biblia eteyaka oyo esalisaka biso tópusana mpenza penepene na Nzambe?

10 Kobanda na ebandeli ya lisolo, totángi to tosaleli maloba ya mikanda 14 ya Biblia. Soki Biblia ezalaka te, ndenge nini tokokaki koyeba ete tokoki kopusana penepene na Mozalisi na biso? Soki yango te, ndenge nini tokokaki koyeba liteya ya lisiko mpe tobendamaki penepene na Yehova na nzela ya Yesu? Na nzela ya elimo santu na ye, Yehova akomisaki Biblia, mokanda oyo emonisaka biso bomoto na ye kitoko mpe mikano minene oyo azali na yango. Na ndakisa, na Kobima 34:6, 7, Yehova ayebisaki Moize ete azali “Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto mpe na solo, abatelaka motema boboto mpo na bankóto, alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu.” Nani akolinga te kopusana penepene ya moto ya boye? Yehova ayebi ete ntango tozali koluka ye na nzela ya Biblia, akokóma mpenza moto ya solo mpo na biso mpe tokomiyoka mpenza ete topusani penepene na ye.

11. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tóyekola bizaleli ya Nzambe mpe banzela na ye? (Talá elilingi ya ebandeli.)

11 Mpo na komonisa ndenge tokoki kokóma na boyokani malamu elongo na Nzambe, maloba ya ebandeli ya buku Pusaná penepene na Yehova elobi ete: “Mpo moto akóma moninga na biso, esɛngaka liboso tóyeba ye mpe tósepela mpenza na bizaleli na ye. Yango wana, koyekola bizaleli ya Nzambe mpe banzela na ye ndenge Biblia emonisi yango ezali na ntina mingi.” Na yango,  tokoki mpenza kozala na botɔndi ndenge Yehova akomisaki Liloba na ye na lolenge biso bato tokoki kokanga ntina na yango!

12. Mpo na nini Yehova asalelaki bato mpo bákoma Biblia?

12 Yehova akokaki kosalela baanzelu mpo bákoma Biblia. Kutu, bamibanzabanzaka mpo na biso mpe makambo oyo tosalaka. (1 Pe. 1:12) Na ntembe te, baanzelu bakokaki kokoma nsango ya Nzambe mpo na bato. Kasi, baanzelu bazali lokola bato te. Bakokaki mpenza te koyeba bamposa, bolɛmbu mpe mikano ya bato. Yehova ayebaki ndelo na bango na likambo wana. Ndenge atikaki bato bákoma Biblia, Yehova amonisaki mpenza polele ete abongisaki yango mpo na biso. Tokoki koyeba makanisi mpe ndenge bakomi ya Biblia mpe bato mosusu oyo balobeli na kati bazalaki komiyoka. Tokoki komitya na esika na bango na makambo lokola kolɛmba nzoto, kotungisama na makanisi, kobanga, mabunga mpe kosepela esika basepelaki, na ndakisa koyoka esengo ntango makambo ezalaki kotambola malamu. Lokola mosakoli Eliya, bakomi nyonso ya Biblia bazalaki bato “lokola biso.”​—Yak. 5:17.

Ndenge nini makambo oyo Yehova asalaki epai ya Yona mpe Petro etindi yo opusana penepene na ye? (Talá paragrafe 13, 15)

13. Ndenge nini libondeli ya Yona esimbaka motema na yo?

13 Na ndakisa, anzelu akokaki te komonisa na mobimba mpenza ndenge mosakoli Yona ayokaki ntango akimaki mosala oyo Nzambe apesaki ye. Ezalaki mpenza malamu mingi ndenge Yehova asalelaki Yona mpo akoma lisolo na ye, ezala mpe libondeli ya mozindo oyo asalaki epai ya Nzambe ntango azalaki na kati ya mai mozindo! Yona alobaki ete: “Ntango molimo na ngai elɛmbaki mingi, Yehova nde moto nakanisaki.”​—Yona 1:3, 10; 2:1-9.

14. Ndenge nini makambo oyo Yisaya akomaki mpo na ye moko ekoki kosalisa yo omitya na esika na ye?

14 Tótalela mpe oyo Yehova ayebisaki Yisaya akoma mpo na ye moko. Nsima ya komona emonaneli ya nkembo ya Nzambe,  mosakoli Yisaya akomaki mpo na masumu na ye ete: “Mawa na ngai! Mpo nakufi nde kokufa, mpamba te nazali moto oyo azali na mbɛbu ya mbindo, mpe nazali kofanda na kati ya bato oyo bazali na mbɛbu ya mbindo; mpo miso na ngai emoni mpenza Mokonzi, Yehova ya mampinga!” (Yis. 6:5) Anzelu nini akokaki koloba maloba ya boye? Kasi Yisaya akokaki, biso mpe tokoki komiyoka ndenge amiyokaki.

15, 16. (a) Mpo na nini biso mpe tokoki komiyoka ndenge bato ya kala bamiyokaki? Pesá bandakisa. (b) Nini ekosalisa mpo tópusana mpenza penepene na Yehova?

15 Baanzelu bakokaki mpenza koloba ete ‘babongi te,’ ndenge Yakobo alobaki ete abongi te, bazali ‘bato ya masumu,’ ndenge Petro alobaki ete azali moto ya masumu? (Eba. 32:10; Luka 5:8) Balingaki “kobanga,” ndenge bayekoli ya Yesu babangaki, to baanzelu ya sembo bakokaki kozala na mposa ya “mpiko” liboso ya botɛmɛli mpo na kosakola nsango malamu, ndenge Paulo mpe bamosusu basengelaki kosala? (Yoa. 6:19; 1 Tes. 2:2) Te, baanzelu bazali bikelamu ya kokoka na nyonso mpe bakeseni mosika mpenza na bato. Ntango bato ya kozanga kokoka bamonisi makambo ya boye, tokoki mbala moko komitya na esika na bango mpo biso mpe tozali bato lokola bango. Ntango tozali kotánga Liloba ya Nzambe, tokoki mpenza ‘kosepela elongo na bato oyo bazali kosepela; kolela elongo na bato oyo bazali kolela.’​—Rom. 12:15.

16 Soki tozali kokanisa na mozindo na oyo Biblia elobi mpo na makambo oyo Yehova asalaki mpo na basaleli na ye ya sembo ya ntango ya kala, tokoyekola makambo mingi ya kitoko oyo etali ye, Nzambe oyo azalaka na motema molai mpe na bolingo nyonso, apusanaki penepene na bato wana ya kozanga kokoka. Na ndenge yango, tokoyeba Yehova malamumalamu mpe tokokóma kolinga ye mingi. Na nsuka, tokopusana mpenza penepene na ye.​—Tángá Nzembo 25:14.

KOMÁ NA BOYOKANI MAKASI NÁ NZAMBE

17. (a) Toli nini ya malamu Azaria apesaki Asa? (b) Ndenge nini Asa aboyaki kosalela toli ya Azaria, mpe esukaki boni?

17 Ntango mokonzi Asa alongaki basoda ya Etiopi, mosakoli ya Nzambe Azaria azalaki na mwa maloba ya bwanya ya koyebisa ye ná bato na ye. Azaria alobaki boye: “Yehova azali elongo na bino ntango nyonso oyo bozali na ye; mpe soki boluki ye, akotika bómona ye, kasi soki botiki ye, akotika bino.” (2 Nt. 15:1, 2) Nzokande, na nsima, Asa alandaki te toli wana ya malamu. Ntango bokonzi ya nɔrdi ya Yisraele ebandaki kotumola ye, Asa alukaki lisalisi epai ya bato ya Siri. Na esika abelela lisusu Yehova mpo asalisa ye, alukaki kosala boyokani ná bapakano. Yango wana ebongaki mpenza ete maloba oyo elandi elobama mpo na Asa: “Osali bozoba na likambo oyo, yango wana kobanda sikoyo bitumba ekoyela yo.” Bambula ya nsuka ya boyangeli ya Asa ezalaki kaka bitumba na bitumba. (2 Nt. 16:1-9) Liteya nini tokoki kozwa?

18, 19. (a) Soki mwa bokabwani ebandi kati na biso ná Nzambe, tosengeli kosala nini? (b) Ndenge nini tokoki kopusana penepene na Yehova?

18 Tosengeli soki moke te komitangola na Yehova. Soki mwa bokabwani ebandi kosalema kati na ye ná biso, tosengeli kosala na boyokani na Hosea 12:6, oyo elobi ete: ‘Zongelá Nzambe na yo, mpe batelá motema boboto mpe bosembo; mpe tyelá Nzambe na yo elikya ntango nyonso.’ Na yango, tiká ete tópusanaka ntango nyonso penepene na Yehova mpe tókanisaka na botɔndi mpenza na lisiko mpe tóyekolaka Liloba na ye Biblia na molende mpenza.​—Tángá Kolimbola Mibeko 13:4.

19 Moko ya bakomi ya nzembo akomaki ete: “Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu.” (Nz. 73:28) Biso nyonso tókoba koyekola makambo ya sika na ntina na Yehova mpe tókóma komona ebele ya makambo mosusu oyo ekoki kotinda biso tólinga ye. Tiká ete Yehova apusana penepene na biso uta sikoyo mpe libela na libela!

^ par. 3 Talá lisolo oyo elobeli Asa, oyo ezali na motó ya likambo ete “Mosala na bino ezali na mbano,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/08/2012.