Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2014

Salelá Liloba ya Nzambe mpo ezali na bomoi!

Salelá Liloba ya Nzambe mpo ezali na bomoi!

“Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”​—EBR. 4:12.

1, 2. Mokumba nini Yehova apesaki Moize, mpe akitisaki ye motema na likambo nini?

KANISÁ ete ozali liboso ya mokonzi moko ya nguya mpenza na mokili oyo mpe osengeli koloba mpo na basaleli ya Yehova, okoyoka ndenge nini? Okoki kobanga mpe komona ete obongi te. Ndenge nini okomibongisa liboso okende koloba na mokonzi yango? Okosala nini mpo obakisa nguya na maloba na yo lokola okozala momonisi ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso?

2 Yango nde mpenza likambo oyo Moize asengelaki kosala. Yehova ayebisaki Moize, ‘moto oyo azalaki na komikitisa mingi koleka bato nyonso oyo bazalaki na mabele,’ ete atindi ye epai ya Farao mpo na kobikisa basaleli ya Nzambe na mpasi mpe boombo na Ezipito. (Mit. 12:3) Ndenge makambo emonisi yango, Farao azalaki mokonzi oyo azangaki botosi mpe ya lolendo. (Kob. 5:1, 2) Kasi, Yehova alingaki ete Moize ayebisa Farao atika bamilio ya bato oyo akangaki na boombo bálongwa na ekólo na ye! Nzokande, Moize atunaki Yehova boye: “Ngai nazali nani mpo nakende epai ya Farao mpe mpo na nabimisa bana ya Yisraele na Ezipito?” Moize amimonaki ete abongi te mpe ete akokoka te. Kasi, mpo na kokitisa ye motema, Nzambe ayebisaki ye ete akozala elongo na ye. Yehova alobaki ete: “Nakozala elongo na yo.”​—Kob. 3:9-12.

3, 4. (a) Moize azalaki kobanga makambo nini? (b) Na ndenge nini yo mpe okoki kokutana na mokakatano oyo Moize akutanaki na yango?

3 Moize azalaki kobanga makambo nini? Emonani polele ete  azalaki kobanga ete Farao akoyamba te to akoyokela te momonisi ya Yehova Nzambe. Moize azalaki mpe kobanga ete bato na ye bakondima te ete Yehova aponi ye mpo abimisa bango na Ezipito. Na yango, Moize alobaki na Yehova ete: “Kanisá ete bandimi ngai te mpe bayoki mongongo na ngai te, mpo bakoloba ete: ‘Yehova abimelaki yo te.’”​—Kob. 3:15-18; 4:1.

4 Eyano oyo Yehova apesaki Moize mpe makambo oyo elandanaki na nsima ekoki koteya mokomoko na biso liteya moko ya ntina mingi. Toboyi te, ekoki kozala ete otɛlɛmá te liboso ya mokonzi moko monene ya guvɛrnema. Kasi ekómelá yo te omiyoka ete okokoka te koyebisa bato oyo okutanaka na bango mokolo na mokolo makambo etali Nzambe mpe Bokonzi na ye? Soki ezali bongo, talá liteya oyo okoki kozwa na likambo ya Moize.

“ELOKO NINI WANA NA LOBƆKƆ NA YO”

5. Yehova atyaki nini na lobɔkɔ ya Moize, mpe ndenge nini yango elongolaki kobanga na ye? (Talá elilingi ya ebandeli.)

5 Ntango Moize amonisaki ete azali kobanga mpo ete bato bakozwa maloba na ye na valɛrɛ te, Nzambe abongisaki ye mpo na kolonga makambo oyo ezalaki liboso na ye. Lisolo oyo ezali na mokanda ya Kobima elobi boye: “Yehova alobaki na ye [Moize] ete: ‘Eloko nini wana na lobɔkɔ na yo?’ na yango ye alobaki ete: ‘Lingenda.’ Na nsima, alobaki ete: ‘Bwaká yango na mabele.’ Bongo abwakaki yango na mabele, mpe yango ekómaki nyoka; mpe Moize abandaki kokima yango. Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: ‘Sembolá lobɔkɔ na yo mpe simbá yango na mokila.’ Bongo asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asimbaki yango, mpe yango ekómaki lisusu lingenda na lobɔkɔ na ye. ‘Mpo ete,’ mpo na kozongela maloba na ye, ‘bándima ete Yehova . . . abimelaki yo.’” (Kob. 4:2-5) Ya solo, eloko oyo Nzambe atyaki na lobɔkɔ ya Moize esengelaki komonisa ete nsango ya Moize eutaki epai ya Yehova. Lingenda, eloko oyo ekokaki komonana epai ya bato mosusu lokola eloko mpamba, ekómaki na bomoi na nzela ya nguya ya Nzambe! Na ntembe te, likamwisi wana ebakisaki mpenza nguya na maloba ya Moize, mpe emonisaki polele ete Yehova azalaki kosunga ye! Na yango, Yehova alobaki na ye ete: “Okokamata lingenda oyo na lobɔkɔ na yo mpo osala na yango bilembo.” (Kob. 4:17) Lokola azalaki na eloko wana na lobɔkɔ oyo emonisaki ete Nzambe azali na ye, Moize akokaki kokende liboso mpe kozanga kobanga, asengelaki kozala momonisi ya Nzambe ya solo liboso ya libota na ye Yisraele mpe liboso ya Farao.​—Kob. 4:29-31; 7:8-13.

6. (a) Eloko nini tosengeli kozala na yango na lobɔkɔ ntango tozali kosakola, mpe mpo na nini? (b) Monisá na nini “liloba ya Nzambe ezali na bomoi” mpe “na nguya.”

6 Bakoki kotuna mpe biso motuna yango ntango tozali kokende koyebisa basusu nsango ya Biblia: “Eloko nini wana na lobɔkɔ na yo?” Mbala mingi, Biblia esengeli kozalaka na lobɔkɔ na biso, mpe tosengeli kozalaka pene mpo na kosalela yango. Atako bato mosusu bakoki komona Biblia lokola buku moko ya mpamba, Yehova alobaka na biso na lisalisi ya Liloba na ye. (2 Pe. 1:21) Ezali na bilaka ya Nzambe oyo ezali na makambo oyo ekosalema na boyangeli na ye. Mpo na yango nde ntoma Paulo akomaki ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.” (Tángá Baebre 4:12.) Bilaka nyonso ya Yehova ekendeke ntango nyonso liboso mpe ekokokisama mpenza. (Yis. 46:10; 55:11) Soki kaka moto ayebi ete Liloba ya Yehova ezali bongo, makambo oyo akotánga na Biblia ekoki kozala na nguya na bomoi na ye.

7. Ndenge nini tokoki ‘kosembola liloba ya solo malamumalamu’?

7 Ya solo, Yehova atye na lobɔkɔ na biso Liloba na ye oyo ekoki komonisa ete nsango oyo tomemaka ezali ya solo mpe euti epai ya Nzambe. Yango wana, tokoki kokamwa te ete ntango ntoma Paulo azalaki kopesa Timote formasyo, alendisaki ye ete ‘asala nyonso oyo ekoki na ye mpo na kosembola liloba ya solo malamumalamu.’ (2 Tim. 2:15) Ndenge nini tokoki kosalela toli oyo ya ntoma Paulo? Soki tozali kopona malamu bavɛrsɛ ya kotánga mpe soki tozali kotánga yango na mongongo makasi, ekoki kosimba mitema ya baoyo  bakoyoka biso. Batrakte oyo ebimaki na mobu 2013 ebongisamaki mpenza mpo na kosalisa biso na likambo yango.

PONÁ MALAMU VƐRSƐ YA KOTÁNGA!

8. Mokɛngɛli na mosala moko alobaki nini na likambo etali batrakte?

8 Batrakte nyonso ya sika ebongisami ndenge moko. Na yango, soki toyebi kosalela moko na yango, tokoyeba mpe kosalela oyo mosusu nyonso. Ezali pɛtɛɛ mpo na kosalela yango? Mokɛngɛli na mosala moko na Hawaii, na États-Unis, akomaki ete: “Liboso, toyebaki te ete batrakte yango ekosalisa mpenza na mosala ya ndako na ndako mpe kopesa litatoli na bazando to bisika mosusu.” Amonaki ete lolenge batrakte yango ekomami, ezali kotinda bato básepela mingi nokinoki, mpe yango ezali mbala mingi kopesa bango mposa ya kondima masolo. Amoni ete eloko esalaka bongo ezali motuna mpe biyano misato oyo ezalaka na ngambo ya lobɔkɔ ya mobali ya batrakte yango, oyo esɛngaka moto apona. Moto oyo tozali kosolola na ye akoki komitungisa te soki apesi eyano ya mabe.

9, 10. (a) Ndenge nini batrakte na biso esalisaka mpo na kosalela Biblia? (b) Batrakte nini omonaki ete ebotaki mbuma ntango osalelaki yango, mpe mpo na nini?

9 Trakte mokomoko etindaka biso tópona vɛrsɛ moko ya malamu oyo tokotánga. Na ndakisa, talá na trakte Bampasi ekosila mokolo mosusu? Ezala moto oyo tozali kosolola na ye apesi eyano “ekosila,” “ekosila te,” to “ntango mosusu ekosila” na motuna yango, kende na lokasa oyo elandi mpe kozanga kobakisa likambo mosusu, lobá boye, “Talá oyo Biblia elobi.” Na nsima, tángá Emoniseli 21:3, 4.

10 Ndenge moko, ntango ozali kosalela trakte Otalelaka Biblia ndenge nini? Moto oyo bozali kosolola na ye akoki kopona eyano moko na kati ya misato oyo ezali na lobɔkɔ ya mobali ya trakte. Kende na lokasa elandi mpe lobá boye, “Biblia elobi ete ‘makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.’” Okoki kobakisa ete, “mokapo oyo elobi makambo mingi.” Na nsima, fungolá Biblia na yo, mpe tángá 2 Timote 3:16, 17 na mobimba.

11, 12. (a) Esengo nini oyokaka na mosala ya kosakola? (b) Ndenge nini batrakte esalisaka yo omibongisa mpo na kozongela bato?

11 Ezaleli oyo moto tozali kosolola na ye azali komonisa nde ekokata soki tokoki kotánga elongo na ye trakte yango mingi mpe kolobela yango. Lisusu, longola kopesa bato batrakte, okoyoka esengo mingi soki otángeli bango ata moke Liloba ya Nzambe, ezala vɛrsɛ moko to mibale ntango okutani na bango mbala ya liboso. Na nsima, okoki kokoba lisolo.

 12 Na lokasa ya mibale ya trakte mokomoko, ezali na motuna moko oyo ezali na nse ya mwa motó ya likambo oyo elobi ete “Kanisá naino” mpe bavɛrsɛ oyo okoki kolobela ntango okozongela ye. Na trakte Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya? motuna oyo okoki kotuna mpo na bozongeli ya sika ezali “ndenge nini Nzambe akobongisa mokili oyo?” Okokuta mokapo ya Matai 6:9, 10 mpe Danyele 2:44. Mpo na trakte Bakufi bakozonga mpenza na bomoi? motuna ezali: “Mpo na nini moto akómaka mokóló mpe akufaka?” okokuta mokapo ya Ebandeli 3:17-19 mpe Baroma 5:12.

13. Monisá ndenge ya kosalela batrakte mpo na kobanda boyekoli ya Biblia.

13 Kosalela batrakte esalisaka mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Soki moto azwi kode (QR) * oyo ezali na lokasa ya mibale ya trakte, yango ekotinda ye na likambo moko na site na biso oyo ekolendisa ye andima koyekola Biblia. Batrakte ezali mpe kolobela mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! mpe ezali kolakisa liteya mpenza eyokani na likambo moko boye. Na ndakisa, trakte Nani mpenza azali koyangela mokili? ekotinda na liteya 5 ya mwa buku yango. Trakte Nini epesaka esengo na libota? ezali kotinda na liteya 9. Soki ozali kosalela batrakte ndenge mpenza esengeli, okosalela Biblia na ndenge ebongi ntango okutani na bato mpo na mbala ya liboso mpe ntango ozali kozongela bango. Kosala bongo, ekoki kosalisa mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na bato ebele. Okoki lisusu kosala nini mpo na kosalela malamu Liloba ya Nzambe na mosala ya kosakola?

LOBELÁ LIKAMBO MOKO OYO EKOBENDA LIKEBI YA BATO

14, 15. Ndenge nini okoki komekola ntoma Paulo na mosala ya kosakola?

14 Ntoma Paulo azalaki na mposa makasi ya kosakwela “bato mingi koleka.” (Tángá 1 Bakorinti 9:19-23.) Simbá ete ntoma Paulo azalaki na elikya ya “kozwa Bayuda . . . , kozwa baoyo bazali na nse ya mibeko . . . , kozwa baoyo bazangá mibeko . . . , kozwa bato ya bolɛmbu.” Ya solo, azalaki na mposa ya kosakwela “bato ya ndenge nyonso, mpo ata ndenge nini, [abikisa] bamosusu.” (Mis. 20:21) Ndenge nini tokoki komekola ntoma Paulo ntango tozali komibongisa mpo na kosakwela “bato ya ndenge nyonso” ya teritware na biso?​—1 Tim. 2:3, 4.

15 Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo ebimaka sanza nyonso na Mosala na Biso ya Bokonzi. Meká yango. Kasi, soki ezali na masolo mosusu oyo ekoki kobenda likebi ya bato ya teritware na bino, okoki kobanda masolo na lolenge oyo ekoki kosalisa bango. Talelá malamu makambo oyo ezali na mboka na bino, bato oyo bafandaka kuna, makambo oyo bamibanzabanzaka mingi mpo na yango. Na nsima, kanisá na vɛrsɛ oyo ekoki kokokisa bamposa na bango. Mokɛngɛli moko ya zongazonga alobeli lolenge oyo ye ná mwasi na ye babendaka likebi na bato na Biblia ete: “Bato mingi oyo tokei kotala basepelaka kopesa biso ntango ya kotángela bango ata vɛrsɛ moko ya Biblia soki tolobi mingi te mpe tokendeke mbala moko na likambo oyo toyeli. Nsima ya kopesa mbote ndenge tosalaka, mpe ná Babiblia na biso ya kofungwama na mabɔkɔ, tótángaka vɛrsɛ moko.” Tótalela mwa bandakisa ya masolo, mituna mpe bavɛrsɛ oyo okoki komeka kosalela na teritware na bino mpo na kotala soki ekosimba.

Osalelaka Biblia mpe batrakte malamumalamu na mosala ya kosakola? (Talá paragrafe 8-13)

16. Monisá ndenge oyo okoki kosalela Yisaya 14:7 na mosala ya kosakola.

16 Soki ofandi na mboka oyo kimya ezalaka mpenza te, okoki kotuna moto oyo bozali kosolola boye: “Okanisi ete bansango ya lelo ekoki kolobela likambo oyo: ‘Mabele mobimba ezali na kimya, mpe mobulu ezali te. Mpe bato bazali koganga na esengo’? Yango nde Biblia elobeli na Yisaya 14:7. Kutu, Biblia elobeli bilaka mingi oyo emonisi ete kimya ekozala na mikolo ezali koya.” Na nsima, sɛngá ye bótánga moko ya bilaka yango na Biblia.

17. Ndenge nini okoki kosalela Matai 5:3 na mosala ya kosakola?

17 Epai bozali, ezalaka mpasi mpo na bato  kozwa mbongo ya kobikela? Soki ezali bongo, mpo na kobanda lisolo, okoki kotuna boye: “Moto akoki kozwa mbongo boni mpo libota na ye ezala na esengo?” Nsima ya eyano na ye, okoki koloba boye: “Bato mingi bazwaka mbongo koleka kutu oyo wana, kasi mabota na bango ezalaka na esengo te. Esɛngaka mpenza nini?” Na nsima tángá Matai 5:3 mpe sɛngá ye ete abanda koyekola Biblia.

18. Mpo na kobɔndisa basusu, ndenge nini okoki kosalela Yirimia 29:11?

18 Bato ya teritware na bino bazali kotungisama mpo na makambo moko ya mabe oyo euti kosalema? Okoki kobanda lisolo na koloba boye: “Nayei epai na yo mpo na kobɔndisa bato ata moke. (Tángá Yirimia 29:11.) Omoni makambo misato oyo Nzambe azali kokana mpo na biso? ‘Kimya,’ ‘bomoi malamu na mikolo ezali koya,’ mpe ‘elikya.’ Ezali esengo te koyeba ete Nzambe alingi tózala na bomoi ya malamu? Kasi ndenge nini ekosalema?” Na nsima, bendá likebi na ye na liteya oyo eyokani na likambo yango na mwa buku Nsango malamu.

19. Monisá ndenge makanisi oyo ezali na Emoniseli 14:6, 7 ekosalisa mpo na kosolola na bato oyo balingaka mingi makambo ya mangomba.

19 Ofandaka na mboka oyo bato basepelaka mingi na makambo etali mangomba? Soki ezali bongo, okoki kobanda lisolo na kotuna boye: “Soki anzelu asololi na yo, okoyoka likambo oyo alobi na yo? (Tángá Emoniseli 14:6, 7.) Soki anzelu yango alobi na yo ‘bangá Nzambe,’ ekozala malamu te oluka koyeba soki Nzambe oyo azali kolobela ezali nani? Mpo na kosalisa biso, anzelu yango alobi ete ezali ‘oyo asalá likoló, ná mabele.’ Ezalaki nani?” Na nsima tángá Nzembo 124:8, oyo elobi ete: “Lisalisi na biso ezali na nkombo ya Yehova Mokeli ya likoló ná mabele.” Okoki kosɛnga mpo na kolimbwela ye makambo mingi oyo etali Yehova Nzambe.

20. (a) Ndenge nini tokoki kosalela Masese 30:4 mpo na koteya moto nkombo ya Nzambe? (b) Ezali na vɛrsɛ moko osalelaka mpe ememaka matomba?

20 Soki okutani na elenge, okoki kobanda lisolo ná ye boye: “Nalingi kotánga vɛrsɛ moko oyo ezali na motuna moko ya ntina mingi. (Tángá Masese 30:4.) Ezali na moto moko te oyo abongi mpenza na makambo oyo balobi awa, na yango, emonani ete vɛrsɛ yango elobeli Mozalisi na biso. * Ndenge nini tokoki koyeba nkombo na ye? Nakosepela kolakisa yo yango na Biblia.”

LILOBA YA NZAMBE EKOKI KOSALISA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA

21, 22. (a) Ndenge nini kopona malamu vɛrsɛ ekoki kobongola bomoi ya moto? (b) Ozwi ekateli nini mpo na kokokisa malamu mosala na yo ya kosakola?

21 Ata soki oponi malamu vɛrsɛ oyo okotánga, kasi oyebi te soki bato bakosepela to te. Na ndakisa, Batatoli ya Yehova mibale na Australie babɛtaki na porte ya elenge mwasi moko. Moko na bango atunaki ye boye: “Oyebi nkombo ya Nzambe?” mpe na nsima atángaki vɛrsɛ moko, ezalaki Nzembo 83:18. Mwasi yango alobi ete: “Nakamwaki makasi mpenza! Ntango bakendeki, nakendeki na bibliotɛkɛ moko oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 56 mpo na kotala na mabongoli mosusu ya Biblia mpe na nsima nalukaki nkombo yango na diksionɛrɛ moko. Lokola nandimisamaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, nalobaki ete etikali lisusu nayeba nini.” Mwa moke na nsima, ye ná mobali oyo alingaki kobala babandaki koyekola Biblia mpe na nsima, bazwaki batisimo.

22 Liloba ya Nzambe ebongolaka bomoi ya baoyo batángaka yango mpe bakómaka na kondima na bilaka ya Yehova. (Tángá 1 Batesaloniki 2:13.) Nsango ya Biblia ezali na nguya makasi koleka eloko nyonso oyo tokoki koloba mpo na koluka kosimba motema ya moto. Yango wana, ata na libaku nini, tosengeli kosalela Liloba ya Nzambe mpo ezali na bomoi!

^ par. 13 Kode QR ezali elembo ya kompanyi babengi Denso Wave; Soki olingi koyeba makambo mingi oyo etali kode yango, talá na lokasa 16 na Lamuká! ya 05/2013.

^ par. 20 Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/1987, lokasa 31, na Lifalanse.