Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2014

Mokumba nini basi bazali na yango na mokano ya Yehova?

Mokumba nini basi bazali na yango na mokano ya Yehova?

“Basi oyo bazali koyebisa nsango malamu bazali limpinga moko monene.”​—NZ. 68:11.

1, 2. (a) Makabo nini Nzambe apesaki Adama? (b) Mpo na nini Nzambe apesaki Adama mwasi? (Talá elilingi ya ebandeli.)

YEHOVA asalaki mabele na ntina. “Asalaki yango mpo bato báfanda wana.” (Yis. 45:18) Adama, moto ya liboso oyo akelaki azalaki moto ya kokoka, mpe Nzambe apesaki ye esika moko kitoko: elanga ya Edene. Adama asepelaki mpenza na banzete kitoko, ndenge mai ezalaki kotiyola mpe ndenge banyama ezalaki kosakana na elanga yango! Kasi azangaki likambo moko ya ntina mingi. Yehova amonisaki yango ntango alobaki ete: “Ezali malamu te moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi, oyo abongi na ye.” Na nsima, Nzambe alalisaki Adama mpɔngi makasi, azwaki mokuwa moko ya mopanzi na ye, mpe “na mokuwa yango . . . asalaki mwasi.” Ntango Adama alamukaki na mpɔngi, asepelaki makasi mpenza. Adama alobaki boye: “Aa! sikoyo, oyo nde mokuwa ya mikuwa na ngai mpe mosuni ya mosuni na ngai. Ye akobengama mwasi, mpo auti na mobali.”​—Eba. 2:18-23.

2 Likabo ya mwasi oyo Nzambe apesaki mobali, ezalaki na ntina mingi mpo mwasi yango asengelaki kozala mosungi ya kokoka mpenza mpo na Adama. Azalaki mpe na libaku moko ya ntina mingi ya kobota bana. Mpo na yango, “Adama apesaki mwasi na ye nkombo Eva, mpamba te asengelaki kokóma mama ya moto nyonso oyo azali na bomoi.” (Eba. 3:20) Oyo nde likabo kitoko mpenza Nzambe apesaki babalani wana ya liboso! Bazalaki na likoki  ya kobota bato mosusu ya kokoka. Na ndenge yango, mabele esengelaki kotonda na bato ya kokoka oyo basengelaki kozala na bokonzi likoló na bikelamu mosusu ya bomoi.​—Eba. 1:27, 28.

3. (a) Mpo Nzambe apambola bango, Adama ná Eva basengelaki kosala nini, kasi makambo elekaki ndenge nini? (b) Mituna nini tokotalela?

3 Mpo na kozwa mapamboli oyo ezalaki liboso na bango, Adama ná Eva basengelaki kotosa Yehova mpe kondima boyangeli na ye. (Eba. 2:15-17) Basengelaki kokokisa mokano oyo Nzambe azalaki na yango mpo na bango, kaka soki batosaki ye mpe bandimaki boyangeli na ye. Kasi, likambo ya mawa, balandaki makanisi mabe ya Satana, “nyoka ya ebandeli,” mpe basalelaki Nzambe lisumu. (Em. 12:9; Eba. 3:1-6) Makambo nini botomboki wana ememeli basi? Makambo nini basi oyo bazalaki kobanga Nzambe bakokisaki na ntango ya kala? Mpo na nini tokoki koloba ete bakristo ya basi ya mikolo na biso bazali lokola “limpinga moko monene”?​—Nz. 68:11.

MAKAMBO OYO BOTOMBOKI EBIMISÁ

4. Lisumu oyo babalani ya liboso basalaki ezalaki na motó ya nani?

4 Ntango esɛngaki Adama azongisa monɔkɔ mpo na botomboki na ye, alobaki boye: “Mwasi oyo opesaki ete azala elongo na ngai, apesaki ngai mbuma ya nzete yango, na bongo nalyaki.” (Eba. 3:12) Adama asukaki kaka te na koboya kondima lisumu na ye, kasi alukaki nde kopesa mwasi oyo Nzambe apesaki ye foti mpe epai ya moto oyo asepelaki kopesa ye mwasi yango! Adama ná Eva basalaki lisumu, kasi Nzambe atyaki nde foti ya libunga na bango na motó ya Adama. Na yango, ntoma Paulo akomaki ete “lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu.”​—Rom. 5:12.

5. Kotika oyo Nzambe atiki bato bámiyangela mpo na mwa ntango ebimisi nini?

5 Satana atindaki babalani ya liboso bákanisa ete bazali na mposa te ete Yehova azala Moyangeli na bango. Yango ebimisaki motuna oyo ya ntina mingi na likambo etali boyangeli: Nani mpenza azali na lotomo ya koyangela? Mpo na kopesa eyano mpo na libela na likambo yango, Nzambe apesaki nzela ete bato bámiyangela mpo na mwa ntango. Ayebaki malamumalamu ete soki bato bamiyangeli, bakolonga te. Na boumeli ya basiɛklɛ, boyangeli ya bato emonisi nde bato bwale na makambo ndenge na ndenge. Kaka na siɛklɛ ya 20 oyo euti koleka, bato soki 100 000 000 bakufaki na bitumba, mpe na kati na bango tokoki kotánga bamilio ya mibali, basi mpe bana oyo babomami kaka mpamba. Likambo yango emonisi polele ete “ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” (Yir. 10:23) Koyeba likambo yango, ekosalisa biso tóndima Yehova lokola Moyangeli na biso.​—Tángá Masese 3:5, 6.

6. Na mikili mingi, makambo nini basalaka basi?

6 Mibali ná basi bamoni bwale mpenza na mokili oyo ezali kotambwisama na Satana. (Mos. 8:9; 1 Yoa. 5:19) Na kati ya minyoko yango ya mabe mingi, tokoki kotánga makambo mabe oyo bazali kosalela basi. Na mokili mobimba, balapolo ezali komonisa ete mibali bazali kosala basi mingi (30%) makambo ya mabe mpenza. Na mikili mosusu, bazwaka mibali na valɛrɛ mingi mpo bakanisaka ete bango nde bakokoba kolandisa molɔngɔ ya libota mpe kobatela baboti mpe bankɔkɔ na bango oyo bakómi mibange. Kutu na mikili mosusu, bazwaka bana ya basi na motuya te, mpe basi mingi basopaka zemi ya bana basi koleka oyo ya bana mibali.

7. Bomoi ya ndenge nini Nzambe apesaki mibali mpe basi na ebandeli?

7 Nzambe asepelaka soki moke te ndenge banyokolaka basi. Asalelaka basi makambo na bosembo mpe apesaka bango lokumu. Lolenge oyo Yehova atalelaka basi emonani polele na ndenge akelaki Eva na ndenge ya kokoka mpe makoki oyo esalaki ete azala moombo te kasi mosungi oyo abongi mpenza mpo na Adama. Mpo na ntina yango, na nsuka ya mokolo ya motoba ya bozalisi,  Nzambe “amonaki eloko nyonso oyo asalaki mpe, talá! ezalaki malamu mingi.” (Eba. 1:31) Ya solo, “eloko nyonso” oyo Yehova asalaki ezalaki “malamu mingi.” Apesaki mibali ná basi bomoi ya malamu na ebandeli!

BASI OYO YEHOVA APAMBOLAKI

8. (a) Lobelá ndenge bizaleli ya bato ezali komonana. (b) Makambo oyo eleki emonisi ete Nzambe andimaki banani?

8 Bizaleli ya mibali mpe basi ebebaki makasi mpenza nsima ya botomboki oyo esalemaki na Edene, mpe na boumeli ya siɛklɛ ya 20 oyo eleki, ebebi lisusu nde koleka. Biblia esakolaki ete bizaleli mabe ekotonda kotonda na “mikolo ya nsuka.” Mabe oyo bato bazali kosala ekómi mingi, mpe yango esali ete mikolo oyo ezala “ntango moko ya mpasi.” (2 Tim. 3:1-5) Kasi, makambo oyo eleki na mokili emonisi ete “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso” andimaki mibali mpe basi oyo batyelaki ye motema, batosaki mibeko na ye, bandimaki ye ete azali Moyangeli na bango.​—Tángá Nzembo 71:5.

9. Bato boni babikaki na Mpela, mpe mpo na nini?

9 Ntango Nzambe abomaki mokili ya mabe na Mpela na mikolo ya Noa, kaka mwa bato moke nde babikaki. Soki bandeko mibali mpe basi ya Noa bazalaki na bomoi na ntango wana; bango mpe babomamaki na mpela yango. (Eba. 5:30) Kasi motángo ya basi oyo babikaki na Mpela ezalaki ndenge moko ná oyo ya mibali. Bato oyo babikaki ezalaki Noa, mwasi na ye, bana na ye misato ya mibali mpe basi na bango. Babikaki mpo babangaki Nzambe mpe basalaki mokano na ye. Bamiliare ya bato oyo bazali na bomoi lelo, bautá na bato wana mwambe oyo Yehova apambolaki.​—Eba. 7:7; 1 Pe. 3:20.

10. Mpo na nini Yehova apambolaki basi ya sembo ya batata ya mabota oyo bazalaki kobanga ye?

10 Bambula na nsima, basi ya batata ya mabota ya sembo oyo bazalaki kobanga Nzambe bazwaki mpe mapamboli. Bakokaki kozwa yango te soki bámilelalelaka mpo na bomoi na bango. (Yuda 16) Ezali mpasi tókanisa ete Sara, mwasi ya Abrahama oyo azalaki na botosi amilelalelaki ntango balongwaki na Ure, mboka ya bozwi mpe bakómaki kofanda mpo na mwa ntango na bahema na mokili mosusu. Kutu, “Sara azalaki kotosa Abrahama mpe kobenga ye nkolo.” (1 Pe. 3:6) Tólobela mpe Rebeka, oyo azalaki likabo ya Yehova mpe akómaki mwasi moko malamu. Tokoki kokamwa te ete mobali na ye Yisaka, “alingaki ye mingi, mpe . . . azwaki libɔndisi nsima ya liwa ya mama na ye.” (Eba. 24:67) Oyo nde esengo tozali na yango ndenge tozali na basi oyo babangaka Nzambe lokola Sara mpe Rebeka!

11. Ndenge nini basi Baebre mibale oyo bazalaki kobotisa bamonisaki mpiko?

11 Ntango bazalaki na boombo na Ezipito, Bayisraele bakómaki ebele, mpe Farao apesaki mobeko ete babomaka bana nyonso ya mibali ya Baebre ntango bazali kobotama. Kasi, tótalela likambo oyo Shifara ná Pua, basi Baebre oyo bazalaki kosala mosala ya kobotisa. Lokola bazalaki kobanga Yehova, na mpiko nyonso, baboyaki koboma babebe. Yehova apambolaki mpe bango na ndenge apesaki bango mabota ya bango moko.​—Kob. 1:15-21.

12. Likambo nini ya ntina Debora mpe Yaele basalaki?

12 Na mikolo ya basambisi ya Yisraele, mwasi moko oyo Nzambe apambolaki, ezalaki mosakoli Debora. Alendisaki mosambisi Barake mpe apesaki mabɔkɔ mpo na kosalisa Bayisraele ete bámilongola na monyoko, kasi asakolaki ete lokumu mpo na elonga oyo bazwaki likoló na Bakanana esengelaki te kokende epai ya Barake. Kasi, esengeli nde kokende “na lobɔkɔ ya mwasi moko” oyo Nzambe asengelaki kopesa ye Sisera mokonzi ya limpinga ya Bakanana. Yango nde esalemaki ntango Yaele, mwasi oyo azalaki Moyisraele te abomaki Sisera.​—Bas. 4:4-9, 17-22.

13. Biblia eyebisi biso nini mpo na Abigaile?

13 Abigaile azalaki mwasi moko malamu oyo azalaki na bomoi na siɛklɛ ya 11 L.T.B.  Azalaki na bososoli, atako mobali na ye Nabale, azalaki makambo makasimakasi, zoba mpe moto mpamba. (1 Sa. 25:2, 3, 25) Davidi ná bato na ye babatelaki biloko ya Nabale na ntango moko boye, kasi ntango basɛngaki biloko ya kolya, ‘apamelaki bango makasi’ mpe apesaki bango eloko te. Likambo yango epesaki Davidi nkanda makasi mpe azwaki ekateli ya koboma Nabale mpe bato na ye. Ntango Abigaile ayokaki likambo yango, azwaki bilei, vinyo, mpe amemelaki yango Davidi mpe bato na ye, mpe na ndenge yango asalaki ete makila etanga te. (1 Sa. 25:8-18) Na nsima, Davidi alobaki na ye ete: “Yehova Nzambe ya Yisraele apambwama, ye oyo atindi yo okutana na ngai na mokolo ya lelo!” (1 Sa. 25:32) Nsima ya liwa ya Nabale, Davidi abalaki Abigaile.​—1 Sa. 25:37-42.

14. Bana basi ya Shalume bapesaki mabɔkɔ na mosala nini mpe ndenge nini bandeko basi bazali kosala kaka mosala ya ndenge wana lelo?

14 Mibali, basi mpe bana ebele babomamaki ntango basoda ya Babilone babebisaki Yerusaleme mpe tempelo na yango na mobu 607 L.T.B. Bifelo ya engumba yango etongamaki lisusu na mobu 455 L.T.B. na litambwisi ya Nehemia. Na kati ya bato oyo basalisaki mpo na kobongisa bifelo yango ezalaki bana basi ya Shalume, nkumu ya ndambo ya etúká ya Yerusaleme. (Neh. 3:12) Bandimaki kosala mosala oyo esɛngaka komikitisa. Tosepelaka mpenza ndenge ebele ya bandeko basi bapesaka mabɔkɔ na esengo na misala ya kotonga na balolenge ekeseni na mikolo na biso!

BASI OYO BAZALAKI KOBANGA NZAMBE NA SIƐKLƐ YA LIBOSO

15. Libaku malamu nini Nzambe apesaki mwasi moko na nkombo Maria?

15 Mwa moke liboso to na siɛklɛ ya liboso T.B., Yehova apesaki basi mingi mikumba ya kitoko. Na kati na bango ezalaki mwasi moko oyo ayebaki mibali te na nkombo Maria. Atako alakamaki na libala epai ya Yozefe, akómaki na zemi na nzela ya elimo santu. Mpo na nini Nzambe aponaki ye mpo akóma mama ya Yesu? Na ntembe te, azalaki na bizaleli mpenza ya moto ya Nzambe oyo ekokaki kosalisa ye abɔkɔla mwana wana ya kokoka kobanda na bomwana na ye tii na mokóló. Azwaki mpenza libaku malamu ya kozala mama ya moto oyo aleki bato nyonso kino lelo awa na mabele!​—Mat. 1:18-25.

16. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ezaleli oyo Yesu azalaki na yango epai ya basi.

16 Yesu azalaki na boboto epai ya basi. Na ndakisa, tótalela oyo asalaki epai ya mwasi moko oyo azalaki kotanga makila na boumeli ya mbula 12. Ayaki na nsima, apusanaki pene na Yesu na kati ya ebele ya bato mpe asimbaki elamba na ye. Na esika apamela ye, na boboto nyonso, Yesu alobaki na ye: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya, mpe biká na maladi na yo ya mpasi.”​—Mrk. 5:25-34.

17. Likamwisi nini esalemaki na Pantekote ya mobu 33 T.B.?

17 Basi mosusu oyo bazalaki bayekoli ya Yesu, basalelaki ye ná bantoma na ye. (Luka 8:1-3) Mpe na Pantekote ya mobu 33, bato soki 120, mibali ná basi bazwaki elimo santu ya Nzambe na ndenge moko ya kokamwa. (Tángá Misala 2:1-4.) Biblia esakolaki ndenge elimo santu yango ekokitela bato na maloba oyo: “Nakosopela bato ya ndenge nyonso elimo na ngai, mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola . . . Ata mpe basaleli ya mibali mpe basaleli ya basi, nakosopela bango elimo na ngai na mikolo yango.” (Yoe. 2:28, 29) Likamwisi wana oyo esalemaki mokolo ya Pantekote, emonisaki ete Nzambe azalaki lisusu kopambola te Yisraele wana oyo epɛngwaki, kasi akómaki nde kopambola “Yisraele ya Nzambe,” oyo esalemaki na mibali mpe basi. (Gal. 3:28; 6:15, 16) Na kati ya basi bakristo oyo bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kosakola na siɛklɛ ya liboso, tokoki kotánga mpe bana basi minei ya Filipi, mopalanganisi ya nsango malamu.​—Mis. 21:8, 9.

 “LIMPINGA MOKO MONENE” YA BASI

18, 19. (a) Na likambo etali losambo ya solo, libaku malamu nini Nzambe apesi ná mibali ná basi? (b) Moko ya bakomi ya nzembo abengi basi oyo bazali koyebisa nsango malamu banani?

18 Nsuka ya bambula 1800, ndambo ya mibali mpe basi bamibanzabanzaki mpenza mpo na losambo ya solo. Bazalaki bapasoli-nzela ya baoyo bazali lelo oyo kopesa mabɔkɔ na kokokisama na maloba oyo ya esakweli ya Yesu ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—Mat. 24:14.

19 Mwa etuluku wana ya bayekoli ya Biblia ekolaki tii kokóma lelo na Batatoli ya Yehova soki 8 000 000. Bato mosusu koleka 11 000 000 basepelaka na mateya ya Biblia mpe na mosala na biso na ndenge bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Na mikili mingi, ebele ya bayangani yango ezali basi. Lisusu, na kati ya basakoli ya ntango nyonso ya mokili mobimba, oyo bazali koleka 1 000 000, motángo ya basi ezali mingi. Ya solo, Nzambe apesi basi ya sembo libaku malamu mpenza ya kopesa mabɔkɔ na kokokisama ya maloba oyo ya mokomi ya nzembo ete: “Yehova ye moko azali kobimisa liloba; Basi oyo bazali koyebisa nsango malamu bazali limpinga moko monene.”​—Nz. 68:11.

Basi oyo bazali koyebisa nsango malamu bazali mpenza “limpinga moko monene” (Talá paragrafe 18, 19)

MAPAMBOLI MINENE EZALI KOZELA BASI OYO BABANGAKA NZAMBE

20. Makambo nini tokoki kokɔtisa na boyekoli na biso?

20 Tozangi ntango mpo na kolobela ebele ya basi ya sembo oyo Biblia elobeli. Kasi biso nyonso tokoki kotánga masolo na bango na Liloba ya Nzambe mpe na masolo oyo ebimaka na mikanda na biso. Na ndakisa, tokoki kokanisa na mozindo na bosembo ya Ruta. (Ruta 1:16, 17) Kotánga mokanda ya Estere, oyo azalaki mwasi ya mokonzi mpe masolo oyo elobeli ye, ekoki kolendisa kondima na biso. Tokoki kozwa matomba mingi na masolo yango soki tosali programɛ ya koyekolaka yango na Losambo na kati ya libota. Soki tozali kaka biso moko, tosengeli koyekolaka masolo yango na boyekoli na biso moko.

21. Ndenge nini basi oyo babangaka Nzambe bamonisaki bosembo na bango ata na ntango ya mikakatano?

21 Yehova apambolaka mpenza mosala ya kosakola ya basi bakristo mpe asungaka bango na ntango ya mikakatano. Na ndakisa, na lisalisi na ye, basi oyo babangaka ye, babatelaki bosembo na bango mpe batosaki Nzambe ntango banyokwamaki. Kutu, bamosusu bakufaki na boyangeli ya Banazi mpe Bakoministe. (Mis. 5:29) Lelo, ezala mpe na ntango ya kala, bandeko na biso ya basi mpe basambeli mosusu nyonso balongisaka mpenza boyangeli ya Nzambe. Na yango, ndenge kaka Yehova asalaki mpo na Bayisraele, asimbaka bango na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe alobaka ete: “Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.”​—Yis. 41:10-13.

22. Makambo nini kitoko tokoki kozela na mikolo ezali koya?

22 Mosika te, mibali mpe basi oyo babangaka Nzambe bakokómisa mabele paradiso mpe bakosalisa bamilio ya bato oyo bakosekwa báyekola mikano ya Yehova. Liboso ntango yango ekoka, tiká biso nyonso, mibali to basi, tósepela mpenza na libaku kitoko tozali na yango ya kosalela Yehova na “bomoko.”​—Sef. 3:9.