Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2014

 LISOLO YA BOMOI

Atako tata na ngai akufaki—Nazwaki tata mosusu

Atako tata na ngai akufaki—Nazwaki tata mosusu

TATA abotamaki na engumba Graz, na Autriche, na mobu 1899; na yango azalaki elenge na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Akɔtaki mosala ya soda na mampinga ya Allemagne ntango kaka Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na mobu 1939. Babomaki ye na mobu 1943 ntango bazalaki kobunda na Russie. Na mawa, ndenge wana nde nazangaki tata ntango nazalaki na mbula mibale mpamba. Nazwaki libaku te ya koyeba ye, mpe esalaka ngai mpasi mingi ndenge nazangá ye, mingimingi soki nakanisi ete baninga na ngai mingi ya kelasi bazali na batata na bango. Na nsima, ntango nazalaki elenge, nazwaki mpenza makasi ntango nayebaki tata na biso ya likoló, tata oyo aleki batata nyonso, mpe oyo akoki kokufa soki moke te.Hab. 1:12.

MAKAMBO OYO NASALAKI NTANGO NAZALAKI NA ETULUKU YA BA-SCOUTS

Ntango azalaki elenge

Ntango nazalaki na mbula nsambo, nakómaki na etuluku ya bilenge ya Scouts. Bilenge ya Scouts bazali ebongiseli moko ya mokili mobimba oyo mokonzi moko ya basoda na nkombo Robert Stephenson Smyth Baden-Powell abimisaki na mobu 1908 na Grande Brétagne. Na mobu 1916, asalaki ebongiseli moko ya ba-scouts ya mwa bana lokola ngai oyo tozalaki na mbula mwambe to zomi.

Nazalaki kosepela mingi ndenge tozalaki kosala bakaa na bisika ndenge na ndenge na ekólo: tozalaki kolala na bahema, kolata iniforme, kotambola na makelele ya mbonda oyo tozalaki kobɛta. Mingimingi, nazalaki kosepela na ntango oyo nazalaki kolekisa ná ba-scouts mosusu, ezala ndenge tozalaki koyemba zingazinga ya mɔtɔ oyo topelisaki na kaa na mpokwa mpe tozalaki kosala masano na zamba. Toyekolaki mpe biloko mingi oyo Nzambe akelá, mpe yango esalisaki ngai nakóma kosepela na mosala oyo Mozalisi na biso asalá.

Balendisaka ba-scouts ete básalaka makambo malamu mokolo na mokolo. Wana ezali mobeko-likonzí na bango. Soki tokutani, mpo na kopesana mbote tozalaki koloba “moto, zalá ekɛngɛ.” Mpe likambo yango ezalaki kosepelisa ngai makasi. Na etuluku na biso oyo ezalaki na bilenge koleka 100, bilenge soki 50 bazalaki bato ya Katolike, ndambo mosusu bazalaki Baprotesta mpe moko azalaki moto ya Buda.

Kobanda na mobu 1920, ba-scouts ya mikili ndenge na ndenge bazalaki kokutana nsima ya mwa bambula, mpe bazalaki kosala bafɛti. Nazalaki na fɛti ya mbala ya nsambo oyo esalemaki na Bad Ischl, na Autriche, na sanza ya mwambe ya mobu 1951, mpe na fɛti ya mbala ya libwa oyo esalemaki na Sutton Park, mosika te na Birmingham, na Angleterre, na sanza ya mwambe ya mobu 1957. Na likita ya nsuka oyo tosalaki, ba-scouts bautaki na bikólo soki 85 mpe mikili mosusu, mpe tozalaki bato soki 33000. Lisusu, bato soki 750 000 bayaki kotala biso na fɛti yango, ezala mpe Elizabeth, mokonzi-mwasi ya Angleterre. Mpo na ngai, ezalaki lokola nde libota ya mokili mobimba. Nazalaki kutu koyeba te ete mosika te nakokóma na libota moko monene: libota ya bandeko ya elimo.

 MBALA NA NGAI YA LIBOSO YA KOKUTANA NA BATATOLI YA YEHOVA

Rudi Tschiggerl, mokonzi ya makambo etali kosala bagato, azalaki moto ya liboso oyo apesaki ngai litatoli

Na prɛnta ya mobu 1958, nazalaki pene ya kosilisa formasyo na ngai na Grand Hotel Wiesler ya Graz, na Autriche mpo nakóma kosala na restora. Kuna, Rudolf Tschiggerl, moninga moko ya mosala mpe mokonzi ya makambo etali kosala bagato, apesaki ngai litatoli. Nayoká naino te liboso mateya ya solo ya Biblia. Alobelaki liboso liteya ya Bosato mpe amonisaki ete ezali te liteya ya Biblia. Natyanaki na ye ntembe mpe nalukaki komonisa ye ete azali kokosa. Nazalaki kolinga moninga na ngai wana mingi mpe nazalaki na makanisi ya kondimisa ye azonga na Katolike.

Rudolf, oyo tozalaki mpe kobenga Rudi, amemelaki ngai Biblia. Natingamelaki ye ete malamu Biblia yango ezala ya Katolike. Nabandaki mbala moko kotánga yango mpe mosika te namonaki ete Rudi atyaki trakte moko ya la Société Watchtower na kati. Naboyaki yango mpo nakanisaki ete trakte yango ekokaki kozala na makambo oyo ekokaki komonana malamu nzokande ezali bongo te. Atako bongo, nasepelaki kaka ete tósololaka masolo ya Biblia. Rudi asalelaki bososoli mpe azalaki lisusu te kopesa ngai ata mokanda moko. Na boumeli ya sanza soki misato, mbala ebele tozalaki kosolola masolo ya Biblia tii na butu makasi.

Nsima ya kosilisa formasyo na ngai na otɛlɛ wana na engumba na biso na Graz, mama apesaki mbongo mpo nazwa formasyo mosusu na eteyelo moko oyo elakisaka ndenge ya kotambwisa otɛlɛ. Na yango, nakendeki na Bad Hofgastein, engumba moko oyo ezali na lobwaku ya bangomba ya Alpes, epai eteyelo yango ezalaki. Eteyelo yango ezalaki na boyokani na Grand Hotel na Bad Hofgastein, mpe ntango mosusu nazalaki kokende kosala kuna mpo na koyeba makambo mosusu oyo nazwaki na kelasi te.

BANDEKO BASI MIBALE YA MISIONƐRƐ BAYEI KOTALA NGAI

Ilse Unterdörfer ná Elfriede Löhr babandaki koyekola na ngai Biblia na 1958

Rudi atindaki adrɛsi na ngai na biro ya filiale na Vienne, mpe filiale etindaki bamisionɛrɛ mibale ya basi, ndeko Ilse Unterdörfer mpe Elfriede Löhr. * Mokolo moko, moto oyo azalaki koyamba bapaya na otɛlɛ abengaki ngai mpe alobaki ete basi mibale bazali libándá na motuka mpe bazali na mposa básolola na ngai. Natungisamaki mpo nayebaki bango te. Kasi nakendeki libándá mpo nayeba soki ezali banani. Na nsima, nayokaki ete bandeko yango bazalaki kokende kotikela Batatoli mosusu mikanda na boyangeli ya Nazi na Allemagne, ntango mosala na biso epekisamaki liboso ete Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebanda. Kutu liboso etumba yango ebanda, basoda ya Allemagne (Gestapo) bakangaki bango mpe batindaki bango na kaa ya bakangami ya Lichtenburg. Na nsima, ntango etumba ezalaki kondongbana, batindaki bango na kaa ya Ravensbrück, mosika te na Berlin.

Bandeko basi yango bazalaki na bambula ya mama na ngai, na yango, nazalaki na limemya epai na bango. Mpo na ntina wana, nalingaki te kobebisa ntango na bango na kolobela masolo ya Biblia to mpe ntango mosusu koyebisa bango nsima ya bapɔsɔ to basanza ete nazali na mposa te ya kokoba. Kasi, nasɛngaki bango soki bakoki kaka komemela ngai bavɛrsɛ ya liteya ya Katolike oyo elobeli bakitani ya bantoma. Nayebisaki bango ete nazali na mposa namema yango epai ya nganga-nzambe ya mboka na biso mpo tósolola yango. Nakanisaki ete nakozanga te kozwa solo.

 NDENGE NAYAKI KOYEBA TATA NA NGAI YA LIKOLÓ

Liteya ya Katolike oyo elobelaka kokitana ya bantoma, eteyaka ete molɔngɔ ya bapápa ebandá na ntoma Petro. (Lingomba yango elimbolaka na ndenge ya mabe maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 16:18, 19.) Lingomba ya Katolike elobaka mpe ete pápa akosaka te, yango wana ntango azali koloba na nkombo ya lingomba, esengeli kondima makambo na ye nyonso. Nandimaki likambo yango mpe nakanisaki ete soki pápa, oyo bandimi ya Katolike babengaka tata mosantu akosaka te na likambo etali mateya ya lingomba mpe alobá ete liteya ya Bosato ezali solo, namoni ete esengeli kozala bongo. Kasi soki akosaka, wana elingi koloba ete liteya yango mpe ekoki kozala lokuta. Na ntembe te, mpo na bandimi mingi ya Katolike, liteya oyo elobelaka kokitana ya bantoma ezali liteya moko ya ntina mingi, mpo mateya mosusu ya Katolike esimbami na liteya yango.

Ntango nakendeki kotala nganga-nzambe, akokaki te koyanola na mituna na ngai, kasi apesaki ngai buku moko ya Katolike oyo elobeli likambo etali bakitani ya bantoma. Namemaki yango na ndako ndenge asɛngaki ngai, natángaki yango, na nsima nazongaki epai na ye mpe natunaki ye mituna ebele. Kasi, lokola nganga-nzambe yango akokaki te koyanola na mituna na ngai, alobaki boye: “Nakokoka te kondimisa yo liteya yango na makasi, yo mpe okokoka te kondimisa ngai ete liteya yango ezali lokuta. . . . Kende, koya lisusu awa te!” Alingaki lisusu te kosolola na ngai masolo ya Biblia.

Na ntango wana, Ilse ná Elfriede babandaki koyekola na ngai Biblia. Bateyaki ngai makambo mingi na ntina na Yehova Nzambe, Tata na biso ya likoló mpe ya solo. (Yoa. 17:11) Na ntango wana, lisangá moko te ezalaki na engumba yango, yango wana bandeko basi wana mibale bazalaki kotambwisa makita na ndako ya moto moko oyo asepelaki na solo. Kaka mwa bato moke nde bazalaki koyangana. Bandeko basi yango bazalaki kolobela makambo mingi ya makita bango mibale, mpo ndeko ata moko te ya mobali oyo azwá batisimo azalaki mpo atambwisa makambo. Mikolo mosusu, ndeko mobali moko azalaki kouta epai mosusu mpe azalaki kosala diskur na esika oyo tozalaki kofutela.

NABANDI KOSAKOLA

Ilse ná Elfriede babandaki koyekola Biblia ná ngai na sanza ya zomi ya mobu 1958, mpe nazwaki batisimo sanza misato na nsima, na sanza ya yambo ya mobu 1959. Liboso nazwa batisimo, natunaki soki nakoki kobanda kokende kotika bango na mosala ya kosakola ndako na ndako mpo na komona ndenge mosala yango esalemaka. (Mis. 20:20) Nsima ya kokende ná bango mbala ya liboso, natunaki bango soki nakoki kozwa teritware ya ngai moko. Bapesaki ngai mboka moko, mpe nasengelaki kokendeke kuna ngai moko mpe kosakola ndako na ndako mpe kozongelaka bato oyo basepelaki. Ndeko ya liboso oyo tobimaki ná ye na mosala ya kosakola ndako na ndako ezalaki ndeko mobali moko, oyo nsima ayaki kotala biso lokola mokɛngɛli ya zongazonga.

Na mobu 1960, nsima ya kosilisa formasyo na ngai na makambo etali otɛlɛ, nazongaki na mboka na biso mpo naluka kosalisa bandeko na ngai mpo báyeba solo. Atako tii na moi ya lelo ata moko te na bango akóma Motatoli, kasi bamosusu bazali kosepela mwa moke.

BOMOI NA NGAI NA MOSALA YA NTANGO NYONSO

Ntango nazalaki na bambula 20

Na mobu 1961, batángaki mikanda oyo biro ya filiale etindaki na masangá mpo na kolendisa bandeko básala mosala ya mobongisi-nzela. Nazalaki monzemba mpe na nzoto kolɔngɔnɔ, mpe namonaki ete ezali na eloko moko te oyo ekoki kopekisa ngai nasala mosala yango. Nasololaki na ndeko Kurt Kuhn, mokɛngɛli ya zongazonga mpo na likanisi oyo nazalaki na yango ya kosala naino mosala ya mosuni mpo na basanza mwa ebele mpo nasomba motuka oyo ekosalisa ngai na mosala ya mobongisi-nzela. Alobaki nini? “Yesu ná bantoma na ye bazalaki na  mposa ya motuka mpo bákóma babongisi-nzela?” Maloba wana ekɔtaki ngai mpenza! Nazwaki mokano ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela nokinoki. Kasi lokola nazalaki kosala ngonga 72 pɔsɔ nyonso na restora ya otɛlɛ, esengelaki liboso nabongola makambo mosusu.

Nasɛngaki na patrɔ na ngai soki akosepela nasalaka kaka ngonga 60. Andimaki mpe azalaki kopesa ngai kaka salɛrɛ moko wana. Mwa moke na nsima, nasɛngaki ye lisusu soki nakoki kosalaka kaka ngonga 48 na pɔsɔ. Andimaki lisusu mpe azalaki kaka kopesa ngai salɛrɛ wana. Na nsima, nasɛngaki ye lisusu soki akosepela nasalaka ngonga 36 na pɔsɔ, to ngonga 6 na boumeli ya mikolo motoba, mpe andimaki lisusu. Likambo ya kokamwa, salɛrɛ na ngai ekitaki te! Emonanaki ete patrɔ na ngai azalaki kolinga te nalongwa na mosala. Programɛ wana esalisaki ngai nabanda mosala ya mobongisi-nzela. Na ntango wana, babongisi-nzela bazalaki kopesa ngonga 100 na sanza.

Sanza minei na nsima, nakómaki mobongisi-nzela monene mpe mosaleli ya lisangá na lisangá moko ya moke na etúká ya Carinthie, na engumba ya Spittal an der Drau. Na ntango wana, babongisi-nzela monene bazalaki kopesa ngonga 150 na sanza. Nazalaki kaka ngai moko mobongisi-nzela, kasi nasepelaki mingi na lisalisi oyo nazwaki epai ya Gertrude Lobner, ndeko mwasi moko oyo azalaki mosungi ya mosaleli ya lisangá. *

NAZWI MIKUMBA NDENGE NA NDENGE NOKI

Na mobu 1963, nakómaki mokɛngɛli ya zongazonga. Ntango mosusu nazalaki kosala mibembo na engbunduka mpo na kotala masangá, mpe nazalaki komema mikumba ya kilokilo. Bandeko mingi bazalaki na mituka te, yango wana moko te akokaki komema ngai tii na esika ya kozwa engbunduka. Mpo na “komilakisa te,” nazalaki te kozwa taksi tii na ndako, yango wana nazalaki kotambola na makolo.

Na mobu 1965, atako nazalaki monzemba, babengaki ngai na kelasi ya mbala ya 41 ya Gileade. Bana kelasi na biso mingi bazalaki mpe minzemba. Likambo ya kokamwa, mokolo tosilisaki kelasi bazongisaki ngai epai na biso na Autriche mpo na kokoba na mosala ya zongazonga. Nzokande, liboso ya kolongwa États-Unis, basɛngaki ngai nakende kotika mokɛngɛli ya zongazonga moko na boumeli ya pɔsɔ minei. Nasepelaki mingi kosala ná ndeko Anthony Conte, ndeko malamu mpenza oyo alingaki mosala ya kosakola mpe azalaki kosala yango na ndenge ebongi. Tosalaki elongo na mboka Cornwall, na nɔrdi ya New York.

Mokolo ya libala na biso

Ntango nazongaki na Autriche, bapesaki ngai zongazonga moko, epai nakutanaki na Tove Merete, ndeko mwasi moko ya kitoko oyo azalaki monzemba. Ayekolaki solo banda ntango azalaki na mbula mitano. Ntango bandeko batunaka ngai ndenge tokutanaki, na mwa kosɛka moke nalobaka, “Biro ya filiale nde ebongisaki makambo nyonso.” Tobalanaki mbula moko na nsima, na sanza ya minei ya mobu 1967, mpe bandimaki nakoba na mosala ya zongazonga elongo na ye.

Na mbula oyo elandaki, namonaki ete na motema boboto ya Yehova, andimaki ngai lokola mwana ya elimo. Na yango, nakómaki na boyokani ya ntina mingi na Tata na ngai ya likoló mpe baoyo nyonso oyo, ndenge mokanda ya Baroma 8:15 elobi, ‘bábelelaka Aba, Tata!’

Ngai ná Merete tokobaki na mosala ya zongazonga mpe ya etúká tii na mobu 1976. Ntango mosusu  na eleko ya malili, tozalaki kolala na bashambre oyo molunge ezalaki te. Mokolo moko, ntango tolamukaki, tomonaki ete bolangiti na biso epɔlaki makasi na malili. Tozwaki mwa masini moko ya molunge mpo tósalelaka na butu. Na bisika mosusu, mpo na kosukola na butu, ezalaki kosɛnga kotambola likoló ya mabanga ya malili mpo na kokóma na kikoso, oyo mbala mingi ezalaki mabe. Tozalaki mpe na ndako te, yango wana mokolo ya mosala moko, tozalaki mbala mingi kotikala kaka esika oyo bayambaki biso na pɔsɔ wana. Mpe, mokolo ya mibale na ntɔngɔ, tozalaki kokende na lisangá mosusu.

Nazali mpenza na esengo ya koloba ete na boumeli ya bambula, mwasi na ngai asungi ngai mingi. Azalaki kolinga mingi mosala ya kosakola, mpe ezalaki na ntina te natinda ye mpo na kokende kosakola. Alingaka mpe baninga mpe amibanzabanzaka mpo na basusu. Asalisaki ngai mpenza.

Na mobu 1976, babengaki biso na Betele ya Vienne, na Autriche, mpe nakómaki na Komite ya filiale. Na ntango wana, filiale ya Autriche ezalaki kotambwisa misala na bikólo mingi ya Mpoto ya Ɛsti mpe ezalaki kotinda mikanda na ndenge ya mayele na bikólo yango. Ndeko Jürgen Rundel nde azalaki kotambwisa mosala yango, mpe azalaki na mayele mingi na likambo yango. Nazwaki libaku ya kosala ná ye mpe na nsima basɛngaki ngai nabanda kokɛngɛla departema ya kobongola mikanda na minɔkɔ zomi oyo elobamaka na Mpoto ya Ɛsti. Ndeko Jürgen ná mwasi na ye Gertrude bazali kokoba kosala na bosembo nyonso lokola babongisi-nzela monene na Allemagne. Kobanda na mobu 1978, biro ya filiale ya Autriche ebongisaki bazulunalo mpe ebimisaki yango na minɔkɔ motoba na mwa bamasini ya kobimisa mikanda. Tozalaki mpe kotinda mosusu na bikólo oyo esɛngaki yango. Ndeko Otto Kuglitsch, oyo azali lelo kosala na Betele ya Allemagne ná mwasi na ye Ingrid, nde azalaki mpenza kosunga mingi na likambo yango.

Na Autriche, nazalaki kosepela na balolenge mingi ya kopesa litatoli, ezala mpe na babalabala

Bandeko ya Mpoto ya Ɛsti babimisaki mpe mikanda na kati ya bikólo na bango moko mpe basalelaki bamasini ya kosala bafotokopi to basalelaki bafilme mpo na kosala biloko mosusu. Atako bongo, bazalaki kaka na mposa ya lisalisi ya bikólo mosusu. Yehova abatelaki mosala yango, mpe na Betele, tokómaki kolinga bandeko oyo basalaki na ntango wana ya mikakatano mpe na ntango oyo mosala na biso epekisamaki na boumeli ya mbula mingi.

MOBEMBO MOKO YA NTINA MINGI NA ROUMANIE

Na mobu 1989, nazwaki libaku malamu ya kosala mobembo ná ndeko Theodore Jaracz, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi na Roumanie. Ntina ya mobembo yango ezalaki ya kosalisa ebele ya bandeko ete  básala na bomoko elongo na ebongiseli ya Yehova. Kobanda na mobu 1949, mpo na makambo ndenge na ndenge, batikaki ebongiseli ya Yehova mpe babimisaki masangá na bango moko. Kasi, bakobaki kosakola mpe kopesa bato batisimo. Bakɔtaki mpe bolɔkɔ mpo bazalaki koboya komikɔtisa na makambo ya mokili, ndenge kaka bandeko oyo batikalaki sembo na ebongiseli ya Yehova oyo endimamaki na biro monene ya Batatoli bazalaki kosala. Mosala na biso epekisamaki naino na Roumanie, mpe tozalaki koyangana na ndenge ya mayele na ndako ya ndeko Pamfil Albu, elongo na bankulutu minei ya makoki mpenza mpe bamonisi ya Komite ya Roumanie oyo bandimamaki. Tozalaki mpe kobenga ndeko Rolf Kellner na Autriche mpo asalisaka mpo na kobongolaka makambo oyo ezalaki kolobama.

Na butu ya mibale ya kosolola, ndeko Albu alongaki baninga na ye bankulutu wana minei ete básangana na biso ntango alobaki na bango ete, “Soki tosali yango sikoyo te, tokozala lisusu te na libaku ya kosala yango.” Na nsima, bandeko soki 5 000 bazongaki na ebongiseli ya Yehova. Ezalaki mpenza elonga mpo na Yehova mpe mama ya nsɔni mpo na Satana!

Na nsuka ya mobu 1989, liboso ete boyangeli ya Bakoministe ekwea na Mpoto ya Ɛsti, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebengaki ngai ná mwasi na ngai mpe batindaki biso na biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York. Elekelaki biso. Tobandaki kosala na Betele ya Brooklyn na sanza ya nsambo ya mobu 1990. Na mobu 1992, baponaki ngai mosungi ya Departema ya mosala ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, mpe kobanda sanza ya nsambo ya mobu 1994, nazwaki libaku ya kokɔta na Lisangani ya Mikóló-Bakambi.

NAKANISAKA MAKAMBO OYO ELEKÁ MPE OYO EKOYA

Ngai ná mwasi na ngai na Brooklyn, New York

Ntango oyo nasalá na restora ya otɛlɛ eleká kala. Sikoyo nazali na libaku mpenza ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobongisa mpe kokabola bilei ya elimo epai ya bandeko na biso ya mokili mobimba. (Mat. 24:45-47) Soki natali mbula koleka 50 oyo nalekisi na mosala ya ntango nyonso, nakoki komonisa botɔndi mingi mpe kosepela ndenge Yehova apamboli bandeko na biso ya mokili mobimba. Nalingaka kokɔta na mayangani na biso oyo esangisaka mikili mingi, epai toyekolaka mingi makambo etali Yehova, Tata na biso ya likoló mpe solo ya Biblia.

Nazali kobondela ete bamilio mosusu ya bato bakoyekola Biblia, bakondima solo mpe bakosalela Yehova na bomoko elongo na lisangá ya bandeko ya mokili mobimba. (1 Pe. 2:17) Nazali mpe kozela na motema ya esengo komona uta na likoló ndenge lisekwa ekosalema awa na mabele, mpe ndenge nakomona tata oyo abotaki ngai akosekwa. Nazali na elikya ete tata, mama mpe bandeko na ngai mosusu bakosepela kosambela Yehova na Paradiso.

Nazali kozela na motema esengo komona uta na likoló ndenge lisekwa ekosalema awa na mabele, mpe ndenge nakomona tata oyo abotaki ngai akosekwa

^ par. 15 Talá lisolo ya bomoi na bango na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/1980 (na Lifalanse).

^ par. 27 Lelo oyo, na esika ya mosaleli ya lisangá, tosalelaka nde mokambi-misala ya bankulutu mpe na esika ya mosungi ya mosaleli ya lisangá, tosalelaka nde sɛkrɛtɛrɛ ya lisangá.