Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2014

‘Yehova ayebi banani bazali bato na ye’

‘Yehova ayebi banani bazali bato na ye’

“Soki moto alingaka Nzambe, moto yango ayebani na ye.”1 KO. 8:3.

1. Bɛtá lisolo moko ya Biblia oyo emonisi ete makanisi ya bozoba ekɔtisaki basaleli mosusu ya Nzambe na libulu. (Talá elilingi ya ebandeli.)

MOKOLO moko na ntɔngɔ, nganga-nzambe monene Arona atɛlɛmaki na porte ya tempelo ya Yehova, mpe asimbaki na mabɔkɔ eloko ya kotya mɔtɔ oyo bazalaki kotumba na yango mpaka ya malasi. Pembeni wana, Kora ná bato mosusu 250 bazali mpe kotumbela Yehova mpaka ya malasi, mpe moto na moto azalaki na oyo ya ye eloko ya kotya mɔtɔ. (Mit. 16:16-18) Na ebandeli, moto nyonso azalaki komonana lokola mosambeli ya sembo ya Yehova. Nzokande, na kokesana na Arona, bamosusu bazalaki bato ya lolendo mpe batomboki oyo bazalaki koluka ete bákóma banganga-nzambe na makasi. (Mit. 16:1-11) Bazalaki komikosa ete Nzambe akondima losambo na bango. Kasi, na makanisi ya ndenge wana, bazalaki nde kotyola Yehova, ye oyo amonaki na kati ya mitema na bango ete bazali bakosi.Yir. 17:10.

2. Moize alobaki nini, mpe maloba na ye ekokisamaki?

2 Liboso mokolo yango ekoka, Moize alobaki ete: “Na ntɔngɔ Yehova akoyebisa nani azali moto na ye.” (Mit. 16:5) Na ntango yango, Yehova amonisaki banani bazalaki basambeli ya solo mpe ya lokuta ntango “mɔtɔ eutaki na Yehova mpe ebandaki kozikisa [Kora mpe] mibali nkama mibale na ntuku mitano (250) oyo bazalaki kopesa mpaka ya malasi.” (Mit. 16:35; 26:10) Kaka na ntango  wana, Yehova abikisaki Arona, mpe amonisaki ete ye nde azalaki nganga-nzambe mpe mosambeli na ye ya solo.Tángá 1 Bakorinti 8:3.

3. (a) Likambo nini esalemaki na mikolo ya ntoma Paulo? (b) Likambo nini Yehova asalaki basiɛklɛ mingi liboso mpo na kosilisa batomboki?

3 Likambo ya ndenge wana esalemaki mpe bambula soki 1 500 nsima, na mikolo ya ntoma Paulo. Bakristo mosusu bakómaki kondima mateya ya lokuta, atako bazalaki kaka koya na lisangá. Soki totali likolólikoló, tokoki komona lokola ete bapɛngwi wana bakesanaki mpenza te na bakristo mosusu ya lisangá. Kasi, lipɛngwi na bango ekómaki likama mpo na bakristo oyo bazalaki sembo. Bambwa wana oyo balataki bilamba ya mpate babandaki “kotya kondima ya bato mosusu na mobulu.” (2 Tim. 2:16-18) Nzokande, Yehova atalaka makambo te likolólikoló, mpe ekoki kozala ete ntoma Paulo ayebaki yango na lolenge oyo Nzambe asalaki basiɛklɛ mingi liboso mpo na likambo ya batomboki lokola Kora mpe bato oyo balandaki ye. Na ntina yango, tótalela mokapo moko kitoko mpe tómona mateya oyo tokoki kozwa na yango.

“NAZALI YEHOVA; NABONGWANI TE”

4. Ntoma Paulo andimisamaki na likambo nini, mpe ndenge nini amonisaki yango epai ya Timote?

4 Ntoma Paulo andimisamaki ete Yehova akoki koyeba bato oyo bazali kosambela ye na bokosi, mpe andimisamaki lisusu ete Yehova akoyeba baoyo bazali kotosa ye. Ntoma Paulo amonisaki ete andimi mpenza likambo yango na maloba oyo akomelaki Timote na litambwisi ya elimo santu. Nsima ya kolobela likama ya elimo oyo bapɛngwi bamemelaki bato mosusu na kati ya lisangá, ntoma Paulo akomaki boye: “Atako bongo, Nzambe atye moboko makasi etɛlɛmi ngwi mpe ezali na elembo oyo: ‘Yehova ayebi bato na ye,’ mpe: ‘Moto nyonso oyo azali kotánga nkombo ya Yehova atika makambo ya kozanga boyengebene.’”2 Tim. 2:8, 19.

5, 6. Mpo na ntina nini ntoma Paulo asalelaki maloba “Nzambe atye moboko,” mpe ekoki kozala ete maloba yango esalaki Timote nini?

5 Mpo na ntina nini ntoma Paulo alobeli maloba oyo ezali na vɛrsɛ oyo? Na Biblia mobimba, kaka na vɛrsɛ oyo nde tokoki kokuta maloba “Nzambe atye moboko makasi.” Biblia esalelaka liloba “moboko” na ndenge ya elilingi mpo na kolobela makambo ndenge na ndenge, ata mpe mpo na kolobela Yerusaleme, mboka mokonzi ya Yisraele ya kala. (Nz. 87:1, 2) Mokumba oyo Yesu azali kokokisa na mokano ya Nzambe ekokanisami mpe na moboko. (1 Ko. 3:11; 1 Pe. 2:6) Ntoma Paulo alingaki mpenza koloba nini ntango akomaki ete “Nzambe atye moboko makasi”?

6 Ntoma Paulo alobelaki maloba “Nzambe atye moboko” kaka na ntango atángaki maloba ya Moize mpo na Kora mpe bato oyo balandaki ye, ndenge Mitángo 16:5 emonisi yango. Ntoma Paulo alobelaki makambo oyo elekaki na mikolo ya Moize mpo na kolendisa Timote mpe kosalisa ye abosana te ete Yehova azali na likoki ya komona makambo batomboki basalaka mpe kokangela bango nzela. Ndenge kaka Kora akokaki te kopekisa mokano ya Yehova basiɛklɛ mingi liboso, bapɛngwi na kati ya lisangá mpe, bakokaki te kopekisa ete mokano ya Yehova esalema. Ntoma Paulo alobaki te na mozindo soki maloba “Nzambe atye moboko” ezali elilingi ya nini. Kasi, maloba oyo asalelaki esalisaki mpenza Timote ete atyela banzela ya Yehova motema.

7. Mpo na nini tosengeli kondimisama ete Yehova akosala na boyengebene mpe na bosembo?

7 Mitinda ya Yehova ebongwanaka te. Mokanda ya Nzembo 33:11 elobi ete: “Mokano mpenza ya Yehova ekotɛlɛma mpo na ntango oyo etyami ndelo te; Makanisi ya motema na ye ezali mpo na libota na libota.” Mikapo mosusu elobelaka bokonzi ya Yehova, motema boboto, boyengebene mpe bosembo na ye lokola ezaleli oyo ekoumela seko na seko. (Kob. 15:18; Nz. 106:1; 112:9; 117:2) Mokanda ya Malaki 3:6 elobi ete, “Nazali Yehova; nabongwani  te.” Ndenge moko, Yakobo 1:17 emonisi ete Yehova “abongwanaka te lokola elili.”

“ELEMBO” OYO ETONGAKA KONDIMA EPAI YA YEHOVA

8, 9. Liteya nini tokoki kozwa na “elembo” oyo ntoma Paulo asaleli na maloba na ye ya elilingi?

8 Maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na 2 Timote 2:19 ezali kolobela moboko moko oyo ezali na makomi likoló na yango, lokola nde batye elembo ya kashɛ. Na ntango ya kala, bazalaki kotya makomi likoló ya moboko ya ndako moko, ntango mosusu ezalaki komonisa moto oyo atongaki yango to nkolo na yango. Na bakomi ya Biblia, ntoma Paulo azalaki moto ya liboso oyo asalelaki ndakisa oyo kitoko. * Elembo oyo “Nzambe atye [likoló] na moboko makasi” ezali na ndimbola mibale. Ya liboso, “Yehova ayebi bato na ye” mpe ya mibale, “Moto nyonso oyo azali kotánga nkombo ya Yehova atika makambo ya kozanga boyengebene.” Yango ekundweli biso likambo oyo tozali kotánga na Mitángo 16:5.—Tángá.

9 Liteya nini tokoki kozwa na “elembo” oyo ntoma Paulo asaleli na maloba ya elilingi? Mpo na baoyo bazali bato ya Nzambe, mitinda ya Yehova ekoki kolobelama na mokuse na makambo oyo mibale: (1) Yehova alingaka bato oyo bazali sembo epai na ye, mpe (2) Yehova ayinaka makambo ya kozanga boyengebene. Ndenge nini likambo oyo eyokani na lipɛngwi oyo ebimaki na lisangá?

10. Makambo oyo bapɛngwi basalaki esalaki nini epai ya bakristo ya sembo na mikolo ya ntoma Paulo?

10 Timote ná bakristo mosusu ya sembo batungisamaki mpenza mpo na makambo oyo bapɛngwi bazalaki kosala na lisangá. Bakristo mosusu bakoki komituna mpo na nini batikaki bato ya ndenge wana na kati ya lisangá. Ekoki kozala ete bakristo ya sembo bazalaki komituna soki Yehova azali mpenza komona bosembo makasi oyo bazali na yango epai na ye mpe losambo ya lokuta ya bapɛngwi.Mis. 20:29, 30.

Timote asengelaki te kobendama na misala to makanisi mabe ya bapɛngwi (Talá paragrafe 10-12)

11, 12. Mpo na nini tokoki koloba ete mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki Timote elendisaki ye?

11 Na ntembe te, mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki Timote elendisaki ye mpe esalisaki ye abosana te makambo oyo esalemaki ntango Yehova abikisaki moto ya sembo Arona mpe atondolaki, aboyaki mpe abomaki Kora ná bato na ye. Na yango, ntoma Paulo amonisaki ete ata soki bakristo ya lokuta bazalaki na kati na bango, Yehova akozanga te koyeba bato na ye, ndenge kaka asalaki yango na mikolo ya Moize.

12 Yehova abongwanaka te; tosengeli mpenza kotyela ye motema. Ayinaka mpenza ezaleli ya kozanga boyengebene, mpe na ntango  oyo ebongi, apesaka bato ya mabe oyo baboyaka kobongola motema etumbu. Lokola moto oyo azali “kotánga nkombo ya Yehova,” ntoma Paulo akundwelaki mpe Timote abosana te ete azali na mokumba ya koboya makambo ya kozanga boyengebene ya bakristo wana ya lokuta. *

KOSAMBELA NA BOSOLO EZALI MOSALA YA MPUNDA TE

13. Tokoki mpenza kotya motema na likambo nini?

13 Maloba oyo ya ntoma Paulo ekoki mpe kolendisa biso na elimo. Na nyonso, tosengeli mpenza kolendisama lokola toyebi ete Yehova amonaka bosembo oyo tozalaka na yango epai na ye. Asukaka te kaka na komona mpamba. Kutu, Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na baoyo bazali bato na ye. Biblia elobi ete: “Miso na ye ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.” (2 Nt. 16:9) Na yango, tokoki mpenza kotya motema ete nyonso oyo tosalaka mpo na Yehova “na motema ya pɛto,” ezali mosala ya mpunda te.1 Tim. 1:5; 1 Ko. 15:58.

14. Losambo ya ndenge nini Yehova asepelaka na yango ata moke te?

14 Tosengeli mpe kosepela mingi lokola toyebi ete Yehova asepelaka te na bato oyo basambelaka ye na mitema mibale. Lokola miso na ye “ezali kotambolatambola na mabele mobimba,” akoki komona baoyo motema na bango ezali te “mobimba epai na ye.” Mokanda ya Masese 3:32, elobi ete, “Moto ya mbilingambilinga azali eloko moko oyo Yehova ayinaka.” Na ndakisa, moto oyo amimonisaka lokola mokristo ya solo, nzokande asalaka masumu na kobatama. Atako moto ya mbilingambilinga akoki kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na kokosa bato mpo na mwa ntango, nguya ya Yehova mpe boyengebene na ye endimisi biso mpenza ete “ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te.”Mas. 28:13; tángá 1 Timote 5:24; Baebre 4:13.

15. Tosengeli koboya likambo nini, mpe mpo na nini?

15 Basaleli mingi ya Yehova basalelaka ye na bosembo mpenza. Tokoki kokanisa ete ekoki kosalema te ete moto moko na kati ya lisangá akóma kosalela Yehova na bokosi to na ezaleli ya mbilingambilinga. Kasi, soki esalemaki na mikolo ya Moize mpe na lisangá ya bokristo ya liboso, ekoki kosalema mpe lelo oyo. (2 Tim. 3:1, 5) Sikoyo, yango elingi nde koloba ete tokoki kobanda kokanisela bandeko na biso bakristo makanisi mabe, to kokanisa ete bazali kosalela Yehova na bosembo te? Soki moke te! Ekozala mpenza mabe kokanisela bandeko na biso mabe mpo na makambo oyo ezangá motó ná makolo. (Tángá Baroma 14:10-12; 1 Bakorinti 13:7.) Kutu, na koleka, tokoki mpe komiboma biso moko na elimo soki tozali na momeseno ya koboya kondima bosembo ya bandeko ya lisangá.

16. (a) Mokomoko na biso asengeli kosala nini mpo na kopekisa ezaleli ya bokosi ezwa misisa na motema na ye? (b) Mateya nini tokoki kozwa na etanda “ Bókoba komimeka . . . Bókoba kotala . . .”?

16 Mokristo mokomoko asengeli ‘komeka mosala na ye moko.’ (Gal. 6:4) Lokola tozali bato ya masumu, mbala mingi tolandaka bizaleli mabe kozanga koyeba. (Ebr. 3:12, 13) Na yango, tosengeli mbala na mbala komitalelaka mpo na koyeba soki tosalelaka Yehova na makanisi nini. Tokoki komituna boye: ‘Nasalelaka Yehova mpenza na bolingo nyonso mpe nandimaka boyangeli na ye? To natyaka mingimingi likebi kaka na mapamboli oyo nakozwa na Paradiso?’ (Em. 4:11) Tokoki kozwa mpenza matomba soki tozali kotalela misala na biso moko mpe tozali kolongola misisa ata ya mike ya ezaleli ya bokosi na motema na biso.

BOSEMBO OYO EPESAKA ESENGO

17, 18. Mpo na nini tosengeli kosambela Yehova na bosembo nyonso?

17 Soki tozali kosala makasi tósambela Yehova na bosembo nyonso, tokozwa mapamboli  mingi. Mokomi na nzembo akomaki ete: “Esengo na moto oyo Yehova azali kotángela ye libunga te, mpe oyo elimo na ye ezali na bokosi te.” (Nz. 32:2) Ya solo, baoyo balongolaka ezaleli ya bokosi na motema na bango bazalaka mpenza bato ya esengo, mpe bazali na elikya ya kozala na esengo na mikolo ezali koya.

18 Na ntango oyo ebongi, Yehova akotondola baoyo nyonso bazali kosala mabe to bazali na etamboli mibale, mpe akomonisa polele “bokeseni kati na moyengebene ná moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe ná moto oyo asaleli ye te.” (Mal. 3:18) Kasi, liboso ntango yango ekoka, tosengeli mpenza kosepela mpo ete “miso ya Yehova ezali kotala bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka lilɔmbɔ na bango.”1 Pe. 3:12.

^ par. 8 Mokanda ya Emoniseli 21:14, oyo ekomamaki bambula mingi nsima ya mikanda oyo ntoma Paulo akomelaki Timote, elobeli “mabanga zomi na mibale ya moboko” oyo bankombo ya bantoma 12 ekomami likoló na yango.

^ par. 12 Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo tokoki komekola Yehova na likambo etali koboya makambo ya kozanga boyengebene.