Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2014

“Bino bozali batatoli na ngai”

“Bino bozali batatoli na ngai”

“‘Bino bozali batatoli na ngai,’ yango nde liloba ya Yehova.”​—YIS. 43:10.

1, 2. (a) Kozala motatoli elimboli nini, mpe likambo nini ya ntina mingi basango ya batelevizyo, baradio elongi te kosala? (b) Mpo na nini Yehova azalaka te na mposa ya batelevizyo, baradio to bazulunalo oyo bato basalelaka na mokili mpo ayebana?

LILOBA motatoli elimboli nini? Diksionɛrɛ moko elimboli liloba yango na “moto oyo amonaki likambo moko na miso mpe alobi ndenge mpenza esalemaki.” Na ndakisa, na engumba Pietermaritzburg, na Afrika ya Sudi, zulunalo moko oyo babengaka yango (The Witness) ebimisamá koleka sikoyo mbula 160. Nkombo ya zulunalo yango ebongi mpenza mpo ntina na yango ezali ya kolobela na bosikisiki ndenge makambo ezali koleka na mokili. Mobandisi ya zulunalo yango alapaki ndai ete zulunalo ekobanda koloba kaka “solo, solo mpenza, eloko mosusu te kaka solo.”

2 Nzokande, likambo ya mawa ezali ete bansango mingi ya televizyo to ya radio elongolaka to ebongolaka mpenza makambo ya ntina mpenza ya bomoi ya moto. Yango eyokani mpenza na oyo Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso alobaki na nzela ya mosakoli na ye Ezekiele ete: “Bikólo bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.” (Ezk. 39:7) Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba azalaka te na mposa ya batelevizyo, baradio to bazulunalo oyo bato basalelaka na mokili mpo ayebana. Azali na Batatoli soki milio mwambe mpo na koyebisa bato ya bikólo nyonso nsango na ye, makambo oyo asalá mpe oyo azali sikoyo kosalela bato. Limpinga yango ya Batatoli ezali mpe kosakola makambo malamu oyo Nzambe alaki kosala mpo na bato na mikolo ezali koya. Lokola tozali kotya mosala yango ya kopesa litatoli na esika ya liboso, tozali mpenza komonisa ete tobongi mpenza na  nkombo wana oyo Nzambe apesá biso, ndenge emonisami na Yisaya 43:10 ete: “‘Bino bozali batatoli na ngai,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘ɛɛ mosaleli na ngai oyo naponi.’”

3, 4. (a) Ntango nini bayekoli ya Biblia bazwaki nkombo ya sika, mpe bamiyokaki ndenge nini? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mituna nini tokotalela sikoyo?

3 Ezali mpenza libaku malamu komema nkombo ya Yehova, mpo azali “Mokonzi ya seko,” oyo alobi ete: “Wana nde nkombo na ngai mpo na seko, mpe wana nde ekaniseli na ngai bileko na bileko.” (1 Tim. 1:17; Kob. 3:15; Talá mpe Mosakoli 2:16.) Na mobu 1931, bayekoli ya Biblia bazwaki nkombo ya Batatoli ya Yehova. Na nsima, mikanda mingi ya botɔndi ebimisamaki na zulunalo oyo. Lisangá moko na Canada ekomaki boye: “Koyoka ete tozali ‘Batatoli ya Yehova,’ ezalaki nsango moko kitoko oyo esepelisaki biso mingi, mpe ebakiselaki biso lisusu molende ya komona ete tobongi mpenza na nkombo wana oyo toutaki kozwa.”

4 Ndenge nini okoki komonisa botɔndi mpo na libaku oyo ozali na yango ya komema nkombo ya Nzambe? Lisusu, okoki mpenza kolimbola na Makomami ndenge nkombo na biso Batatoli ya Yehova eutaki?

BATATOLI YA NZAMBE NA NTANGO YA KALA

5, 6. (a) Na ndenge nini baboti ya Yisraele bazalaki batatoli ya Yehova? (b) Baboti ya Yisraele bazwaki lisusu etinda nini, mpe mpo na nini etinda yango ezali mpe na ntina mpo na baboti ya mikolo na biso?

5 Bayisraele ya mikolo ya Yisaya bazalaki “batatoli” ya Yehova, mpe ekólo yango mobimba ezalaki “mosaleli” ya Nzambe. (Yis. 43:10) Lolenge moko oyo baboti Bayisraele bazalaki kotatola ezalaki ya koteya bana na bango makambo oyo Nzambe asalaki epai ya bankɔkɔ na bango. Na ndakisa, ntango bazwaki etinda ya kosalaka Elekeli mbula na mbula, Yehova ayebisaki bango boye: “Ntango bana na bino bakoloba na bino ete: ‘Molulu oyo ya losambo elimboli nini mpo na bino?’ bongo bosengeli koloba ete: ‘Ezali mbeka ya elekeli mpo na Yehova, oyo alekaki likoló ya bandako ya bana ya Yisraele na Ezipito ntango abɛtaki Baezipito na bolɔzi,  kasi abikisaki bandako na biso.’” (Kob. 12:26, 27) Ekoki kozala ete baboti yango bayebisaki mpe bana na bango ete ntango Moize akendeki liboso epai ya mokonzi ya Ezipito kosɛnga ye nzela mpo Bayisraele bákende kosambela Yehova na esobe, Farao atunaki ye boye: “Yehova nde nani, mpo natosa mongongo na ye mpe natika Yisraele ekende?” (Kob. 5:2) Na ntembe te, tokoki mpenza koloba ete nsima ya malɔzi zomi oyo ebebisaki mboka mpe ntango Bayisraele babikaki liboso ya basoda ya Ezipito na Mbu Motane, moto nyonso azwaki eyano na motuna oyo Farao atunaki. Yehova azalaki mpe azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Lisusu, ekólo ya Yisraele ekómaki kopesa litatoli polele ete Yehova azali Nzambe ya solo mpe mokokisi ya bilaka na ye.

6 Bayisraele oyo basepelaki na libaku ya komema nkombo ya Yehova, na ntembe te bayebisaki makambo kitoko wana epai ya bana na bango mpe epai ya bapaya oyo bakómaki baombo epai na bango. Likambo ya ntina mingi, Nzambe apesaki Bayisraele etinda ete báteya bana na bango ete batosaka mibeko mosantu ya Nzambe. Yehova alobaki ete: “Bokozala basantu, mpamba te ngai, Yehova Nzambe na bino, nazali mosantu.” (Lev. 19:2; Mib. 6:6, 7) Likambo yango ezali mpenza ndakisa malamu mpo na baboti bakristo ya mikolo na biso, oyo basengeli mpe koteya bana na bango na banzela ya bosantu, mpe na ndenge yango bakosalisa bango bákumisa nkombo monene ya Nzambe!​—Tángá Masese 1:8; Baefese 6:4.

Koteya bana na biso na ntina na Yehova ekokumisa nkombo na ye (Talá paragrafe 5, 6)

7. (a) Ntango nyonso oyo Bayisraele bazalaki sembo, yango ezalaki kosala nini na bikólo ya zingazinga na bango? (b) Bato nyonso oyo bazali komema nkombo ya Nzambe bazali na mokumba nini?

7 Ntango nyonso oyo Bayisraele bazalaki sembo, bazalaki kopesa litatoli ya malamu mpo na nkombo ya Nzambe. Bayebisaki bango boye: “Bato ya bikólo nyonso ya mabele basengeli komona ete obengami na nkombo ya Yehova, mpe bakobanga mpenza yo.” (Mib. 28:10) Nzokande, likambo ya mawa ezali ete Bayisraele mingi batikalaki sembo te. Mbala na mbala, bazalaki kozongela losambo ya bikeko. Yango wana, ndenge kaka basambeli ya banzambe ya Kanana bazalaki, bango mpe bakómaki bato ya nkanza, bazalaki kopesa bana na bango mbeka mpe bazalaki komonisa babola bwale. Oyo nde liteya kitoko mpenza tozwi ete tosengeli ntango nyonso kosala makasi mpo na kozala basantu mpo na komekola Oyo Aleki Bosantu, Ye oyo tomemi nkombo na ye!

“TALÁ! NAZALI KOSALA LIKAMBO MOKO YA SIKA”

8. Yehova apesaki Yisaya etinda nini, mpe Yisaya asalaki nini?

8 Yehova asakolaki ete akosala likambo moko monene mpo na kosikola Bayisraele na boombo mpe yango ekozala litatoli. (Yis. 43:19) Mikapo motoba ya ebandeli ya mokanda ya Yisaya elobeli mingi makebisi na ntina etali makambo mabe mosusu oyo esengelaki kokóma na Yerusaleme mpe bingumba ya zingazinga na yango. Yehova, oyo amonaka malamumalamu oyo ezali na mitema na biso, ayebisaki Yisaya ete akoba kosakola likebisi yango ata soki akokaki kokutana na bato ya mitema mabanga. Yisaya ayokaki mpasi mpe alingaki koyeba soki kino ntango nini ekólo ya Nzambe ekokoba kaka na ezaleli ya mabe, kozanga kobongola motema. Nzambe apesaki eyano nini? “Tii bingumba ekobeba mpenza kobeba mpe moto ata moko te akofanda kuna, mpe bandako ekozala na moto ya mabele te, mpe mabele yango moko ekobeba mpenza kobeba.”​—Tángá Yisaya 6:8-11.

9. (a) Ntango nini esakweli ya Yisaya na ntina na Yerusaleme ekokisamaki? (b) Likambo nini oyo tosengeli kotyela yango likebi lelo oyo?

9 Yisaya azwaki mokumba yango na mbula ya nsuka ya boyangeli ya mokonzi Uziya, to na mbula soki 778 L.T.B. Akobaki na mosala na ye ya mosakoli mbula soki 46 tii nsima ya mobu 732 L.T.B., na boyangeli ya mokonzi Hizikiya. Yango ezalaki mbula 125 liboso ya kobomama ya Yerusaleme na mobu 607 L.T.B. Kutu, basaleli ya Nzambe bazwaki ndimbola ya polele mpo na likambo oyo ekokómela ekólo na bango na mikolo  oyo ezalaki koya. Lelo oyo mpe, Yehova azali kosalela basaleli na ye mpo na kokebisa bato mosusu na oyo etali makambo ezali koya. Na boumeli ya mbula 135 oyo eleki, kobanda na nimero na yango ya liboso, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebendaka likebi ya batángi na yango ete básɛnzɛla mpo mosika te Boyangeli ya Mbula nkóto ya Yesu Kristo ekolongola boyangeli mabe ya Satana.​—Em. 20:1-3, 6.

10, 11. Kokokisama ya esakweli nini ya Yisaya oyo Bayisraele bamonaki na Babilone?

10 Bayuda mingi ya botosi oyo baboyaki bitumba ná bato ya Babilone babikaki ntango Yerusaleme ebebisamaki mpe bamemamaki na boombo na Babilone. (Yir. 27:11, 12) Mbula 70 na nsima, basaleli ya Nzambe bamonaki kokokisama ya esakweli oyo ya ntina mingi: “Talá oyo Yehova, Mobikisi na bino, Mosantu ya Yisraele, alobi: ‘Mpo na bino, nakotinda bato na Babilone mpe nakokitisa bikangiseli ya bolɔkɔ.’”​—Yis. 43:14.

11 Kaka mpo na esakweli yango, likambo moko oyo etiká nsango na mokili esalemaki na butu ya sanza ya zomi na mobu 539 L.T.B. Ntango mokonzi ya Babilone mpe bato na ye mosusu bazalaki komɛla na bakɔpɔ oyo bapunzaki na tempelo ya Yerusaleme mpe bazalaki kokumisa banzambe na bango, mampinga ya Media mpe Perse balongaki Babilone. Na mobu 538 to 537 L.T.B., Sirise, moto oyo alongaki Babilone, ayebisaki Bayuda bázonga na Yerusaleme mpe bátonga lisusu tempelo. Mosakoli Yisaya asakolaki makambo oyo nyonso liboso, ezala mpe elaka oyo Yehova apesaki ete akosunga mpe akobatela basaleli na ye oyo bakobongola motema ntango bakozonga na Yerusaleme. Nzambe abengaki bango “bato oyo nasalá mpo na ngai moko, mpo báyebisa lisanzoli na ngai.” (Yis. 43:21; 44:26-28) Ntango Bayisraele wana oyo bazalaki na boombo bazongaki mpe batongaki lisusu tempelo na Yerusaleme, bakómaki batatoli na ndenge boye ete Yehova, Nzambe kaka moko ya solo, akokisaka liloba na ye.

12, 13. (a) Banani mpe basanganaki na Bayisraele mpo na kotonga lisusu tempelo? (b) Lokumu nini “Bampate mosusu” bazali na yango,” mpe bakoki kotya motema na likambo nini?

12 Ntango Bayisraele bazongaki mpo na kotɔnga lisusu tempelo, ebele ya bato oyo bazalaki Bayisraele te basanganaki na bango mpo na kosambela Yehova, mpe na nsima bapakano mosusu mingi bakómaki Baprozelite. (Ezr. 2:58, 64, 65; Est. 8:17) Lelo oyo, “ebele mpenza ya bato” ya “bampate mosusu” ya Yesu bazali mpenza kosalisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo basali “Yisraele ya Nzambe.” (Em. 7:9, 10; Yoa. 10:16; Gal. 6:16) Ebele mpenza ya bato babengamaka mpe Batatoli ya Yehova, nkombo oyo Nzambe apesá.

13 Na boumeli ya Mbula nkóto ya boyangeli ya Kristo, ebele mpenza ya bato ekozala mpenza na esengo monene ya kolimbwela bato oyo bakosekwa oyo esɛngaki mpo na kozala Motatoli ya Yehova na mikolo ya nsuka  ya ebongiseli ya ntango oyo. Kasi, tokozala na libaku ya kosala bongo kaka soki tosali makasi banda sikoyo ete tósala oyo eyokani na nkombo na biso mpe totikali basantu. Lisusu, ata soki tozali kosala makasi ndenge nini, tosengeli mokolo na mokolo kosɛngaka bolimbisi ntango totamboli sembo te, mpe kondimaka ete tozali basumuki mpe ete kozwa libaku ya komema nkombo mosantu ya Nzambe, ezali mpenza lokumu monene.​—Tángá 1 Yoane 1:8, 9.

NKOMBO YA NZAMBE ELIMBOLI NINI?

14. Nkombo Yehova elimboli nini?

14 Mpo na kokolisa botɔndi na biso mpo na lokumu oyo tozali na yango ya komema nkombo ya Nzambe, ekozala malamu ete tókanisa na mozindo na ndimbola na yango. Ndenge ebongolamaka na minɔkɔ mingi, liloba “Yehova,” ezali nkombo ya Nzambe oyo euti na verbe moko ya Ebre oyo elimboli kosala likambo mpe ekoki kobongolama na “kokóma.” Na ndenge yango, nkombo Yehova elimboli “Akómisaka.” Ndimbola wana ebongi mpenza mpo na mokumba ya Yehova ya Mozalisi ya biloko nyonso oyo ezali na likoló mpe bato mpe ya mokokisi ya mokano na ye. Ndenge makambo oyo eleki emonisi yango, azali kokoba kosala ete mokano na ye ekokokisama ata soki monguna nini, ata mpe Satana aluki kosala nini mpo na kopekisa yango.

15. Na ndenge nini Yehova amonisaki ezaleli moko ya ntina mingi ya bomoto na ye ndenge emonisami na ndimbola ya nkombo na ye? (Talá etanda “ Nkombo oyo ezali na ndimbola monene.”)

15 Ntango atindaki Moize ete abimisa libota na ye na Ezipito, Yehova amonisaki ezaleli moko ya ntina mingi ya bomoto na ye na ndenge asalelaki verbe moko oyo ebongi mpenza mpo na komonisa nkombo na ye, mpe mpo na komonisa ete ye moko nde azali kosala likambo. Biblia elobi boye: “Nzambe alobaki na Moize ete: ‘Nakozala oyo nakozala.’ Mpe abakisaki ete: ‘Talá oyo okoloba na bana ya Yisraele: “Nakozala atindi ngai epai na bino.”’” (Kob. 3:14) Na yango, na ntango nyonso, Yehova akoki kokóma nyonso oyo asepeli mpo na kokokisa mokano na ye. Ntango Bayisraele bazalaki na boombo, Yehova akómaki Mosikoli, Mobateli, Motambwisi mpe Mosungi oyo akokisaki bamposa na bango nyonso ya mosuni mpe ya elimo.

TÓMONISAKA BOTƆNDI

16, 17. (a) Ndenge nini tokoki komonisaka botɔndi na biso mpo na libaku oyo tozali na yango ya komema nkombo ya Nzambe? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo elandi?

16 Lelo oyo, Yehova azali kokoba komonisa ete ndimbola ya nkombo na ye ezali solo na ndenge akokisaka bamposa na biso nyonso ya elimo mpe ya mosuni. Kasi, ndimbola ya nkombo ya Nzambe esuki te kaka na oyo aponaka kokóma. Elimboli mpe oyo Yehova asalaka ete bozalisi na ye ekóma mpo na kokokisa mokano na ye. Na ndakisa, azali kosalela batatoli na ye mpo básala mosala na ye. Kokanisa na mozindo na mokano yango, ekoki kotinda biso tósalaka makambo oyo eyokani na nkombo yango. Ndeko moko na nkombo Kåre, oyo azali na mbula 84, mpe azali Motatoli ya Yehova ya molende na Norvège na boumeli ya mbula 70 alobi ete, “Namonaka ete ezali libaku malamu mpenza kosalela Yehova, Mokonzi ya seko na seko, mpe kozala na kati ya bato oyo bazali kobengama na nkombo na ye mosantu. Ezalaka ntango nyonso libaku malamu kolimbwela bato solo ya Biblia mpe komona ndenge bato yango bakómaka na bososoli mpe bilongi na bango ekómaka na esengo. Na ndakisa, esepelisaka ngai makasi ntango nateyaka bango ndenge mbeka ya lisiko oyo Kristo apesaki ezali kosala mpe ndenge, na nzela na yango, bakoki kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika ya kimya mpe ya boyengebene.”

17 Mpo na koloba solo, na bateritware mosusu, ezali mpasi kokutana na bato oyo bazali na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe. Na ndakisa ya Kåre, oyokaka esengo te ntango okutani na moto moko oyo asepeli koyoka mpe olakisi moto yango nkombo ya Yehova? Kasi, ndenge nini tokoki kozala Batatoli ya Yehova mpe lisusu kozala Batatoli ya Yesu? Tokozwa eyano na motuna wana na lisolo oyo elandi.