Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2014

“Bokozala batatoli na ngai”

“Bokozala batatoli na ngai”

“[Yesu] alobaki na bango ete: ‘. . . Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.’”MIS. 1:7, 8.

1, 2. (a) Nani azali motatoli monene ya Yehova? (b) Nkombo Yesu elimboli nini, mpe ndenge nini Mwana ya Nzambe asalaki makambo oyo eyokani na nkombo na ye?

“EZALI mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na yango nde nayei na mokili, mpo napesa litatoli na ntina na solo.” (Tángá Yoane 18:33-37) Yesu Kristo alobaki maloba oyo ntango azalaki kosamba liboso ya guvɛrnɛrɛ Moroma ya Yudea. Yesu amonisaki ete azali mokonzi. Bambula na nsima, ntoma Paulo alobelaki ndakisa ya mpiko wana ya Yesu ete azalaki “motatoli oyo alobaki polele mpenza liboso ya Ponse Pilate.” (1 Tim. 6:13) Na ntembe te, esɛngaka ntango mosusu kozala mpenza na mpiko mpo na kozala “motatoli ya sembo mpe ya solo” na mokili oyo ya Satana oyo etondi na koyina.Em. 3:14.

2 Lokola azalaki mpe Moyuda na mosuni, Yesu azalaki motatoli ya Yehova na kobotama. (Yis. 43:10) Kutu, akómaki motatoli moko monene oyo Nzambe asalelá naino te mpo na kolobela nkombo na ye. Yesu azwaki na motuya mingi ndimbola ya nkombo oyo Nzambe apesaki ye. Ntango anzelu ayebisaki Yozefe, tata mobɔkɔli ya Yesu ete zemi ya Maria euti na nzela ya elimo santu, anzelu yango abakisaki boye: “Akobota mwana mobali, mpe okopesa ye nkombo Yesu, mpo akobikisa bato na ye na masumu na bango.” (Mat. 1:20, 21) Bato mingi ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia bandimaka ete nkombo Yesu euti na nkombo moko ya Ebre, Yeshua mpe ezali na nkombo ya Nzambe na mokuse,  mpe elimboli “Yehova azali lobiko.” Na boyokani ya ndimbola ya nkombo na ye, Yesu asalisaki “bampate ya ndako ya Yisraele oyo ebungá” ebongola motema na masumu na bango mpo Yehova andima bango lisusu. (Mat. 10:6; 15:24; Luka 19:10) Mpo na yango, Yesu atatolaki na molende na ntina ya Bokonzi ya Nzambe. Marko alobaki ete: “Yesu akendaki na Galile, azalaki kosakola nsango malamu ya Nzambe mpe koloba ete: ‘Ntango oyo etyamá ekoki, mpe bokonzi ya Nzambe ekómi pene. Bóbongola mitema mpe bóndima nsango malamu.’” (Mrk. 1:14, 15) Na mpiko nyonso, Yesu atondolaki mpe bakonzi ya mangomba ya Bayuda, mpe yango esalaki ete báboma ye likoló ya nzete ya mpasi.Mrk. 11:17, 18; 15:1-15.

“MAKAMBO MINENE YA NZAMBE”

3. Likambo nini esalemaki na mokolo ya misato nsima ya liwa ya Yesu?

3 Likambo ya kokamwa mpenza! Nsima ya mikolo misato ya liwa ya nsɔmɔ ya Yesu, Yehova asekwisaki ye, lokola ekelamu ya elimo, oyo akoki kokufa te. (1 Pe. 3:18) Mpo na kondimisa likambo yango, Nkolo Yesu alataki nzoto ya moto mpe amonisaki ete azongi na bomoi. Kaka na mokolo oyo asekwaki, amonanaki soki mbala mitano na bayekoli bakeseni.Mat. 28:8-10; Luka 24:13-16, 30-36; Yoa. 20:11-18.

4. Likita nini Yesu atambwisaki mokolo oyo asekwaki, mpe mokumba nini amonisaki polele epai ya bayekoli na ye?

4 Na mbala ya mitano oyo Yesu amonanaki, ezalaki mpo na komimonisa epai ya bantoma na ye mpe bato mosusu oyo bayanganaki ná bango. Na libaku wana ya ntina mingi, ndenge kaka azalaká kosala, atambwisaki boyekoli ya Biblia. “Afungolaki mayele na bango malamumalamu mpo bákanga ntina ya Makomami.” Bayaki kososola ete kokufa oyo akufaki na mabɔkɔ ya banguna ya Nzambe mpe lisekwa oyo asekwaki na ndenge ya likamwisi, esakolamaki na Makomami. Na nsuka ya likita wana oyo esalemaki mokolo wana oyo asekwaki, Yesu amonisaki polele epai ya bayoki na ye mokumba oyo bazalaki na yango. Ayebisaki bango ete “na nkombo na ye kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu esengeli kosakolama na bikólo nyonso—banda na Yerusaleme.” Abakisaki ete: “Bino bosengeli kozala batatoli ya makambo wana.”Luka 24:44-48.

5, 6. (a) Mpo na nini Yesu alobaki: “Bokozala batatoli na ngai”? (b) Nsango nini bayekoli ya Yesu basengelaki koyebisa bato?

5 Kasi, nsima ya mikolo 40, ntango amonanaki mbala ya nsuka, bantoma na ye basengelaki sikoyo kokanga ntina ya etinda moko ya ntina mingi oyo apesaki bango ete: “Bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Mpo na nini Yesu alobaki ete: “Bokozala batatoli na ngai,” kasi ya Yehova te? Yesu akokaki koloba ete bayekoli yango bázala batatoli ya Yehova, kasi bato oyo azalaki kosolola na bango bazalaki Bayisraele mpe na ndenge yango, bazalaki batatoli ya Yehova.

Na ndakisa ya bayekoli ya Yesu, tozali kokoba koyebisa bato mokano ya Yehova mpo na mikolo ezali koya (Talá paragrafe 5, 6)

6 Sikoyo bayekoli ya Yesu basengelaki kosalisa bato báyeba lolenge mosusu ya mokano ya Nzambe, elingi koloba likambo moko oyo eleki mosika kosikolama na boombo na Ezipito mpe na Babilone. Liwa mpe lisekwa ya Yesu Kristo epesaki mpenza bonsomi mpo na kosikolama na boombo moko ya mabe koleka: boombo ya lisumu mpe liwa. Na Pantekote ya mobu 33, bayekoli ya Yesu oyo bautaki kotyama mafuta na elimo bayebisaki bato “makambo minene ya Nzambe,” mpe bato mingi oyo bayokaki yango, bandimaki. Na nsima, ntango azalaki na lobɔkɔ ya mobali ya Tata na ye kuna na likoló, Yesu abandaki kotala ndenge nkombo na ye ekómaki na ndimbola monene, mpo ete ebele mpenza ya bato babongolaki motema mpe bandimaki ete azali nzela oyo Yehova abongisi mpo bato bázwa lobiko.Mis. 2:5, 11, 37-41.

 “LISIKO NA ESIKA YA BATO MINGI”

7. Makambo oyo elekaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. emonisaki nini?

7 Makambo oyo elekaki mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. emonisaki ete Yehova andimaki na motema moko motuya ya mbeka ya kokoka oyo Yesu apesaki mpo na kozipa masumu. (Ebr. 9:11, 12, 24) Ndenge Yesu amonisaki yango, ayaki “mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Mat. 20:28) “Bato mingi” oyo basengelaki kozwa litomba na mbeka ya Yesu esengelaki kosuka te kaka na Bayuda oyo babongolaki motema. Kutu, mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika” mpe lisiko ‘ezali kolongola lisumu ya mokili!’1 Tim. 2:4-6; Yoa. 1:29.

8. Bayekoli ya Yesu bapesaki litatoli kino wapi, mpe nini esalisaki bango?

8 Bayekoli wana ya liboso ya Yesu bazalaki mpenza na mpiko oyo esengeli mpo na kokoba kotatola na ntina na ye? Ɛɛ, bazalaki na yango, kasi basalaki yango te na makasi na bango moko. Elimo santu ya Yehova esungaki bango mpe epesaki bango makasi ya kokoba kotatola. (Tángá Misala 5:30-32.) Mbula soki 27 nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bato balobaki ete “solo ya nsango malamu” ekómelaki Bayuda mpe bapakano “ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.”Kol. 1:5, 23.

9. Ndenge esakolamaki, likambo nini ekómelaki lisangá ya bokristo ya ebandeli?

9 Kasi, likambo ya mawa, lipɛngwi ebandaki kokɔta mokemoke na lisangá ya pɛto ya bokristo wana ya ebandeli. (Mis. 20:29, 30; 2 Pe. 2:2, 3; Yuda 3, 4) Ndenge Yesu amonisaki yango, lipɛngwi yango, oyo Satana, “moto mabe” abimisaki ekokola mpe ekozipa bokristo ya solo tii “na bosukisi ya makambo ya ntango yango.” (Mat. 13:37-43) Na nsima, Yehova asengelaki kotya Yesu mokonzi ya mokili mobimba. Likambo yango esalemaki na sanza ya zomi ya mobu 1914, mpe ezalaki ebandeli ya “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli oyo mabe ya Satana.2 Tim. 3:1.

10. (a) Dati nini ya ntina mingi oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo ya mikolo na biso balobelaki liboso mpenza? (b) Likambo nini esalemaki na sanza ya zomi ya mobu 1914, mpe ndenge nini likambo yango emonani lisusu polele mpenza?

10 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo ya mikolo na biso, balobaki banda kala ete sanza ya zomi ya mobu 1914, ekozala dati moko ya ntina mingi. Eloko etindaki bango báloba bongo ezali esakweli ya Danyele oyo elobeli nzete moko monene oyo bakataki yango mpe esengelaki kokola lisusu nsima  ya “ntango nsambo.” (Dan. 4:16) Yesu alobelaki kaka eleko wana lokola “bantango oyo etyamá ya bikólo” na esakweli na ye oyo alobelaki kozala na ye mpe “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” Na ntembe te, kobanda mobu wana ya 1914, “elembo ya kozala ya [Kristo]” lokola Mokonzi emonani polele mpe moto nyonso akoki komona yango. (Mat. 24:3, 7, 14; Luka 21:24) Na yango, kobanda wana, na kati ya “makambo minene ya Nzambe,” tokoki mpe kotánga kotyama ya Yesu lokola mokonzi ya mabele mobimba.

11, 12. (a) Mokonzi ya sika ya mabele abandaki kosala nini na mobu 1919, nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba? (b) Likambo nini mosusu emonanaki na katikati ya mobu 1930? (Talá elilingi ya ebandeli.)

11 Lokola Yesu Kristo azali mokonzi ya sika ya mabele, kozanga kolekisa ntango abandaki kosikola bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo na boombo ya “Babilone monene.” (Em. 18:2, 4) Na nsima ya Etumba ya liboso ya mokili mobimba, na mobu 1919, nzela efungwamaki mpo ete litatoli epesama na ntina na nzela oyo Nzambe abongisi mpo ete bato bázwa lobiko mpe nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo etyamaki. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo basalelaki libaku yango mpo na kopesa litatoli, mpe yango esalisaki mpo ete bankóto ya bakristo mosusu oyo batyami mafuta báyanganisama mpo na koyangela elongo na Kristo.

12 Na katikati ya bambula 1930, emonanaki polele ete Kristo abandaki koyanganisa bamilio ya “bampate [na ye] mosusu,” oyo basengelaki kokóma “ebele mpenza ya bato” oyo bauti na mikili ndenge na ndenge. Na litambwisi ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, ebele mpenza wana ya bato bazali mpe kolanda ndakisa ya molende ya Yesu mpe bazali komonisa polele ete lobiko na bango ekouta epai ya Nzambe mpe Kristo. Soki bakobi na mosala yango ya kopesa litatoli mpe komonisa kondima na lisiko ya Kristo, bakozala na libaku malamu ya kobika na “bolɔzi monene,” oyo ekotya nsuka na mokili oyo ya Satana.Yoa. 10:16; Em. 7:9, 10, 14.

‘TOSENGELI KOZALA NA MPIKO MPO NA KOLOBELA NSANGO MALAMU’

13. Biso Batatoli ya Yehova tozali na ekateli ya kosala nini, mpe mpo na nini tokoki kotya motema ete tokolonga?

13 Tókoba kozwa na motuya mpenza libaku oyo tozali na yango ya kozala Batatoli ya “makambo minene” oyo Yehova Nzambe asali mpe bilaka oyo apesi mpo na mikolo ezali koya. Kasi, mosala yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Bandeko na biso mingi bazali kosakola na bateritware oyo bato basepelaka na nsango malamu te, basɛkaka bango to banyokolaka bango makasi. Tokoki kosala ndenge kaka ntoma Paulo mpe baninga na ye basalaki. Ntoma Paulo alobaki ete: “Tozwaki mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso mpo na kolobela bino nsango malamu ya Nzambe na bitumba mingi.” (1 Tes. 2:2) Na yango, tosengeli soki moke te kotika. Tosengeli kozala na ekateli ya kokoba kotosa ndai na biso ya kosalela Yehova tii  ebongiseli oyo ya Satana ekobeba mpenza. (Yis. 6:11) Tokoki kosala yango te na makasi na biso moko, kasi soki tolandi ndakisa ya bakristo ya liboso, tosengeli kobondela ete Yehova na nzela ya elimo santu na ye apesa biso “nguya oyo eleki makasi.”Tángá 2 Bakorinti 4:1, 7; Luka 11:13.

14, 15. (a) Ndenge nini bato bazalaki kotalela bakristo na siɛklɛ ya liboso ya T.B., mpe ntoma Petro alobaki nini mpo na bango? (b) Tosengeli komiyoka ndenge nini soki banyokoli biso mpo tozali Batatoli ya Yehova?

14 Lelo oyo, bamilio ya bato bakoki kotuta ntolo ete bazali bakristo, “kasi bazali kowangana [Nzambe] na misala na bango, mpo bazali bato ya bosɔtɔ mpenza mpe bazangá botosi mpe babongi ata na mosala moko ya malamu te.” (Tito 1:16) Ekozala malamu tóbosana te ete na siɛklɛ ya liboso, bato mingi bazalaki koyina bakristo ya solo, ata soki ekoki kozala bato mingi te, kasi likambo ya solo ezali ete bato ya eleko na bango, bazalaki koyina bango. Mpo na ntina yango nde ntoma Petro akomaki ete: “Soki bazali kofinga bino mpo na nkombo ya Kristo, bozali bato ya esengo, mpo . . . elimo ya Nzambe . . . ezali kofanda likoló na bino.”1 Pe. 4:14.

15 Maloba ya vɛrsɛ oyo ekoki mpe kosalelama mpo na Batatoli ya Yehova ya lelo? Ezali bongo, mpamba te tozali kopesa litatoli na ntina etali bokonzi ya Yesu. Na yango, koyinama mpo ete tozali komema nkombo ya Yehova ezali ndenge moko na ‘kofingama mpo na nkombo ya Yesu Kristo,’ oyo alobaki na bato oyo bazalaki kotɛmɛla ye ete: “Nayei na nkombo ya Tata na ngai, kasi bozali koyamba ngai te.” (Yoa. 5:43) Mpo na ntina oyo, mbala ya nsima oyo okokutana na botɛmɛli ntango okopesa litatoli, yiká mpiko. Botɛmɛli yango ezali elembeteli ete Nzambe azali mpenza kondima yo mpe ete elimo na ye ‘ezali kofanda likoló na yo.’

16, 17. (a) Likambo nini ezali kosalema na bisika mingi na mokili? (b) Ozwi ekateli nini?

16 Tosengeli mpe kobosana te ete bokoli monene ezali kosalema bisika mingi na mokili. Ezala na bateritware oyo tosakolá banda ebandeli tii nsuka, tozali kaka kokutana na bato oyo bazali kosepela koyoka mpe oyo tokoki koyebisa bango nsango kitoko ya lobiko oyo tozali na yango. Tosengeli kozala na molende mpo na kozongela bato oyo basepelaki mpe soki likoki ezali, kobanda koyekola na bango Biblia, mpe kosalisa bango bákende liboso kino komipesa mpe kobatisama. Ntango mosusu, omiyokaka lokola ndeko Sarie na Afrika ya Sudi, oyo alekisi mbula koleka 60 na mosala ya kopesa litatoli. Alobi boye: “Nazali mpenza na botɔndi mpo ete na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu, nakoki kozala na boyokani malamu ná Yehova, Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe nazali na esengo ete nakoki koyebisa bato nkombo na ye.” Ye ná mobali na ye Martinus, basalisi bato mingi, ata mpe bana na bango misato, mpo bákóma basambeli ya Yehova. Ndeko Sarie abakisi boye: “Ezali na mosala moko te oyo epesaka esengo mingi koleka, mpe na nzela ya elimo santu na ye, Yehova apesaka biso nyonso nguya oyo tosengeli na yango mpo na kokoba na mosala oyo ekopesa bango bomoi ya seko.”

17 Ezala tozwá batisimo to tozali kosala makasi mpo tozwa yango, tosengeli mpenza kozala na botɔndi na libaku kitoko oyo tozali na yango ya kozala na kati ya lisangá ya Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba. Na yango, kobá kopesa litatoli malamumalamu mpe kobá yo moko kotikala pɛto na mokili oyo ya Satana oyo etondi na mbindo. Soki osali bongo, okokumisa mpenza Tata na biso ya likoló, oyo alingaka biso mingi, oyo tozali na libaku malamu mpenza ya komema nkombo na ye.