Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2014

Basaleli ya Yehova basengeli ‘kotika makambo ya kozanga boyengebene’

Basaleli ya Yehova basengeli ‘kotika makambo ya kozanga boyengebene’

“Moto nyonso oyo azali kotánga nkombo ya Yehova atika makambo ya kozanga boyengebene.”​—2 TIM. 2:19.

1. Eloko nini ezali na esika monene mpenza na losambo na biso?

OSILÁ komona bakomi nkombo Yehova na ndako moko ya misala to na mayemi ya bato ya ntɔki? Na ntembe te, ebendaki likebi na yo mpe osepelaki makasi. Kutu, mpo na biso Batatoli ya Yehova, nkombo mpenza ya Nzambe ezali na esika monene na losambo na biso. Na mokili mobimba, ezali na lingomba moko te oyo esalelaka mingi nkombo ya Nzambe koleka biso. Toyebi mpe ete komema nkombo ya Nzambe ezali libaku kitoko, kasi ezali mpe mokumba.

2. Libaku malamu oyo tozali na yango ya komema nkombo ya Nzambe ememeli biso mokumba nini?

2 Yehova andimaka biso te kaka mpo tosalelaka nkombo na ye. Tosengeli kotosa mibeko na ye. Yango wana, Biblia ezali kolendisa biso ete basaleli ya Yehova basengeli ‘kotika oyo ezali mabe.’ (Nz. 34:14) Ntoma Paulo amonisaki etinda yango polele ntango akomaki ete: “Moto nyonso oyo azali kotánga nkombo ya Yehova atika makambo ya kozanga boyengebene.” (Tángá 2 Timote 2:19.) Biso Batatoli ya Yehova, toyebani mpenza lokola bato oyo batángaka  to babelelaka nkombo na ye. Kasi ndenge nini tokoki kotika makambo ya kozanga boyengebene?

‘LONGWÁ’ NA OYO EZALI MABE

3, 4. Maloba nini bato mosusu bazalaka na mokakatano mpo na kolimbola yango, mpe mpo na nini?

3 Tótalela epai ntoma Paulo azwaki maloba oyo ezali na 2 Timote 2:19. Vɛrsɛ oyo elobi ete “Nzambe atye moboko makasi” mpe elobeli lisusu makambo mibale oyo ekomami likoló ya moboko yango. Likambo ya liboso, ‘Yehova ayebi banani bazali bato na ye,’ emonani ete maloba yango euti na mokanda ya Mitángo 16:5. (Talá lisolo oyo eleki.) Likambo ya mibale, “Moto nyonso oyo azali kotánga nkombo ya Yehova atika makambo ya kozanga boyengebene.” Bato mosusu bazalaka na mokakatano mpo na kolimbola maloba yango. Mpo na nini?

4 Maloba oyo ya ntoma Paulo emonisi ete atángaki eteni mosusu ya Makomami ya Ebre. Kasi, ezali komonana lokola ete ata vɛrsɛ moko te eyokani na maloba yango. Kasi, ntoma Paulo alobelaki mpenza nini ntango alobaki ete: “Moto nyonso oyo azali kotánga nkombo ya Yehova atika makambo ya kozanga boyengebene”? Liboso ya kolobela maloba oyo, ntoma Paulo apesaki mbala moko makanisi oyo ezali na mokanda ya Mitángo Mokapo 16, oyo elobeli lisolo ya botomboki ya Kora. Likambo ya mibale eyokani mpe na makambo oyo esalemaki na botomboki yango?

5-7. Makambo nini oyo esalemaki na mikolo ya Moize oyo etindaki ntoma Paulo akoma maloba oyo ezali na 2 Timote 2:19? (Talá elilingi oyo ezali na ebandeli.)

5 Biblia elobi ete Datane mpe Abirame, bana ya Eliabe, basanganaki ná Kora mpo na kotombokela Moize mpe Arona. (Mit. 16:1-5) Bazangaki mpenza limemya epai ya Moize mpe baboyaki bokonzi ya Nzambe. Batomboki yango bakobaki kofanda esika moko ná basaleli ya Yehova, mpe bakómaki likama na elimo mpo na baoyo batikalaki sembo. Wana ntango ekokaki mpo Yehova amonisa soki banani bazali basambeli na ye ya sembo mpe batomboki, apesaki mobeko moko ya polele.

6 Lisolo yango elobi ete: “Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Lobá na liyangani ete: ‘Bólongwa zingazinga ya batabernakle ya Kora, Datane mpe Abirame!’” Nsima na yango Moize atɛlɛmaki mpe akendaki epai ya Datane ná Abirame, mpe mikóló ya Yisraele bakendaki elongo na ye. Na nsima, alobaki na liyangani ete: “Nabondeli bino, bólongwa liboso ya bahema ya mibali mabe oyo mpe bósimba eloko na bango ata moko te, mpo bókɔmbɔlama te na lisumu na bango nyonso.” Na mbala moko, balongwaki liboso ya tabernakle ya Kora, Datane mpe Abirame, bipai nyonso.” (Mit. 16:23-27) Yehova abomaki baoyo nyonso batombokaki. Kasi, basambeli ya sembo oyo batikaki oyo ezali mabe babikaki.

7 Yehova atángaka na kati ya mitema! Amonaka bosembo ya baoyo bazali bato na ye. Na yango, basaleli na ye ya sembo basengeli kozwa ekateli kozanga koumela, ya kokabwana na bato oyo basalaka makambo oyo ezangi boyengebene. Ekoki kozala ete ntoma Paulo alobelaki lisolo oyo ezali na mokanda ya Mitángo 16:5, 23-27 ntango akomaki ete: “Moto nyonso oyo azali kotánga nkombo ya Yehova atika makambo ya kozanga boyengebene.” Maloba yango eyokani mpenza na oyo ntoma Paulo alobaki ete ‘Yehova ayebi banani bazali bato na ye.’​—2 Tim. 2:19.

“BOYÁ NTEMBE YA BOZOBA MPE OYO EZANGI NTINA”

8. Mpo na nini kosalela nkombo ya Yehova to kozala mosangani ya lisangá ya bokristo esuki kaka bongo te?

8 Ntango alobelaki makambo oyo elekaki na mikolo ya Moize, ntoma Paulo asalisaki Timote ayeba ete ezali na ntina kosala na lombangu mpo na kobatela boyokani na ye elongo na Yehova. Na yango, esengelaki kosuka te kaka na kozala mosangani ya lisangá ya bokristo, ndenge moko mpe esengelaki te kaka na kosuka kotánga to kobelela  nkombo ya Yehova na mikolo ya Moize. Basambeli ya sembo basengeli kozwa mpenza ekateli ya ‘kotika makambo ya kozanga boyengebene.’ Yango elingaki koloba nini mpo na Timote? Mpe mateya nini basaleli ya Yehova na mikolo na biso bakoki kozwa na toli wana ya ntoma Paulo?

9. Ndenge nini “ntembe ya bozoba mpe oyo ezangi ntina” ebebisaki lisangá ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso?

9 Liloba ya Nzambe epesi toli ya sikisiki na oyo etali makambo ya kozanga boyengebene oyo bakristo basengeli kotika to koboya. Na ndakisa, na maloba oyo ezali liboso ya vɛrsɛ 19 ya 2 Timote 2, tomoni ete ntoma Paulo ayebisi Timote ete bato ‘báwelanaka te na maloba’ mpe ‘báboya bilobaloba mpamba.’ (Tángá 2 Timote 2:14, 16, 23.) Bato mosusu na kati ya lisangá bazalaki koluka kopalangisa mateya ya lipɛngwi. Emonani ete basusu mpe bazalaki kokɔtisa makanisi ya mobulungano. Ata soki makanisi yango eutaki nde na mayele ya bato, ezalaki kobimisa bokabwani. Kutu ekɔtisaki kowelana na maloba, mpe ebebisaki elimo ya lisangá. Yango wana, ntoma Paulo apesaki toli ete esengeli ‘koboya ntembe ya bozoba mpe oyo ezangi ntina.’

10. Tosengeli kosala nini soki tokutani na bapɛngwi?

10 Lelo oyo, basaleli ya Yehova bakutanaka te mbala mingi na lipɛngwi na lisangá. Kasi, soki tokutani na mateya oyo euti na Biblia te, ezala euti wapi, tosengeli kozala na ekateli makasi ya koboya yango. Ekozala mpenza bozoba kobanda kotyana ntembe ná bapɛngwi, to kokomela bango na site na bango to kosolola na bango na lolenge moko to mosusu. Ata soki tokoki kozala na likanisi ya kosalisa bato yango, kosolola na bango eyokani te na toli ya Makomami oyo ezali kopekisa biso kosala bongo. Lisusu, biso basaleli ya Yehova tosengeli mpenza koboya mpe kotika lipɛngwi.

Boyá bantembe ná bapɛngwi (Talá paragrafe 10)

11. Nini ekoki kobimisa “ntembe ya bozoba,” mpe ndenge nini bankulutu bakoki kopesa ndakisa malamu?

11 Longola lipɛngwi, ezali na makambo mosusu oyo ekoki kolongola kimya ya lisangá. Na ndakisa, kokesana ya makanisi na likambo etali kominanola ekoki kobimisa “ntembe ya bozoba mpe oyo ezangi ntina.” Soki bandeko bazali kolendisa basusu na kosala masano oyo ezali kobuka mibeko ya Yehova, bankulutu basengeli te kondima likambo yango kaka mpo na koboya mindɔndɔ to makelele. (Nz. 11:5; Ef. 5:3-5) Bankulutu basengeli mpe kokeba ete bándimisa bato te makanisi na bango moko. Basengeli kolanda toli kitoko ya Makomami oyo epesami mpo na bango ete: “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino, . . . bómikómisa te bakonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe, kasi bókóma nde bandakisa ya etonga.”​—1 Pe. 5:2, 3; tángá 2 Bakorinti 1:24.

12, 13. (a) Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka likambo etali kopona lolenge ya kominanola, mpe mitinda nini ya Biblia balandaka? (b) Ndenge nini mitinda oyo tolobeli na paragrafe 12 ekoki kosalelama na makambo oyo moto na moto akoki kozwa ekateli?

12 Na likambo etali kominanola, eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele etángaka te na bosikisiki bafilme, bavideo, babuku to nzembo mpo na kotyela biso mibeko na oyo tosengeli kosala to te. Mpo na nini? Biblia ezali kolendisa moko na moko na biso ete asalela ‘makoki na ye ya kososola . . . emesana kokesenisa ná mabe ná malamu.’ (Ebr. 5:14) Na Makomami, tokoki kokuta mitinda oyo tokoki kosalela mpo na kopona lolenge ya kominanola oyo tokosala. Na makambo nyonso ya bomoi, mokano na biso esengeli kozala ya kokoba “koluka koyeba malamu mpenza eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.” (Ef. 5:10) Biblia emonisi ete batata ya mabota bazali na mokumba na likambo yango, bakoki komona malamu ete bandima te masano mosusu na mabota na bango. *​—1 Ko. 11:3; Ef. 6:1-4.

 13 Mitinda ya Biblia oyo touti kolobela, etali kaka te lolenge ya kominanola oyo tosengeli kopona. Makanisi ekoki mpe kokesana na likambo etali kolata mpe kosala monzɛlɛ, kosalisa nzoto mpe biloko ya kolya mpe makambo mosusu oyo ekoki kobimisa ntembe. Mpo na koloba solo, soki etinda moko te ya Makomami ekweisami, basaleli ya Yehova basengeli koboya kotyana ntembe na makambo ya ndenge wana, “moombo ya Nkolo asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto na bato nyonso.”​—2 Tim. 2:24.

BOYÁ BANINGA MABE!

14. Ndakisa nini ntoma Paulo apesaki mpo na komonisa ete tosengeli koboya baninga mabe?

14 Na likambo nini mosusu baoyo bazali ‘kotánga nkombo ya Yehova basengeli kotika makambo ya kozanga boyengebene’? Soki tozali koboya kosala boninga ná bato oyo basalaka makambo ya kozanga boyengebene. Ntoma Paulo abakisaki ndakisa mosusu na ndakisa na ye oyo alobaki ete “Nzambe atye moboko makasi.” Akomaki ete na “ndako ya monene” okoki kokuta ‘kaka bisaleli ya wolo ná ya palata te kasi mpe ya mabaya mpe ya mabele, mpe mosusu mpo na mosala ya lokumu kasi mosusu mpo na mosala oyo ezangi lokumu.’ (2 Tim. 2:20, 21) Na nsima, apesaki bakristo toli ete ‘bákabwana’ na bisaleli oyo basalelaka yango mpo na makambo oyo “ezangi lokumu.”

15, 16. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa oyo ntoma Paulo apesaki ya “ndako ya monene”?

15 Ndakisa wana ezali na ndimbola nini? Maloba wana ya elilingi oyo ntoma Paulo asaleli mpo na kokokanisa lisangá ya bokristo na “ndako ya monene” mpe mosangani mokomoko ya lisangá na “biloko ya ndako.” Pwazɔ to bosɔtɔ na ndako ekoki kosala ete biloko mosusu na ndako ebeba. Nkolo ndako akolinga te ete biloko wana ya mabe ezala esika moko ná oyo ya pɛto, na ndakisa oyo esalelamaka mpo na kolamba biloko.

16 Ndenge moko, lokola basaleli ya Yehova lelo oyo basalaka makasi ete bázala na bomoi ya pɛto, basengeli koboya kosala boninga na lisangá ná bato oyo bakobaka  koboya mitinda ya Yehova. (1 Bakorinti 15:33.) Soki kutu tosengeli kosala bongo mpo na bato mosusu oyo bazali na kati ya lisangá, tosengeli mpenza ‘kokima’ to koboya kosala boninga ná bato oyo bazali libándá ya lisangá, mpo mingi na bango ‘balingá mbongo, batosaka baboti te, bazangi bosembo, bakoselaka bato makambo, bato ya nko, balingaka makambo ya malamu te, batɛkaka bamosusu mpe balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe’!​—2 Tim. 3:1-5.

YEHOVA APAMBOLAKA BAOYO BAZWAKA BIKATELI OYO EBONGI KOZANGA KOUMELA

17. Likambo nini ya ntina mingi Bayisraele basalaki ntango esɛngaki ete báboya makambo ya kozanga boyengebene?

17 Biblia elobeli na bosikisiki ndenge Bayisraele basalaki kozanga koumela ntango bayebisaki bango ete ‘bálongwa zingazinga ya batabernakle ya Kora, Datane mpe Abirame.’ Biblia emonisi ete “mbala moko, balongwaki.” (Mit. 16:24, 27) Bakakatanaki te to bapusaki likambo yango te lobi. Makomami emonisi mpe ete bamonisaki mpenza botosi oyo esengeli na likambo yango. “Balongwaki . . . bipai nyonso.” Bato ya sembo basengelaki te komitya na likama. Botosi na bango ezalaki te ya likolólikoló to ya ndambo. Bamonisaki polele ete bazali na ngambo ya Yehova, kasi te mpo na makambo ya kozanga boyengebene. Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa oyo?

18. Ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango apesaki Timote toli ete ‘akima bamposa ya bolenge’?

18 Soki esɛngi ete tóbatela boninga na biso ná Yehova, tosengeli koumelaka te mpo na kozwa bikateli oyo ebongi. Yango nde likanisi ntoma Paulo alingaki koloba ntango apesaki Timote toli ete ‘akima bamposa ya bolenge.’ (2 Tim. 2:22) Ekoki kozala ete na ntango wana, Timote azalaki na mbula soki 30. “Bamposa ya bolenge” ekipaka mbula te. Ntango bamposa yango ezalaki koyela Timote, asengelaki ‘kokima’ yango. Na maloba mosusu, Timote asengelaki ‘kokima makambo ya kozanga boyengebene.’ Yesu apesaki kaka nsango moko wana ntango alobaki ete: “Soki liso na yo ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo.” (Mat. 18:9) Lelo oyo bakristo oyo balandaka toli oyo, basalelaka toli yango kozanga koumela soki likambo moko ebandi koluka kobebisa bango na elimo, kozanga kokakatana to kozongisa likambo yango lobi.

19. Ndenge nini basusu lelo oyo basalaki kozanga koumela mpo na kozwa bikateli oyo ebatelaki bango na makambo oyo ekokaki kobebisa elimo na bango?

19 Bandeko mosusu oyo bazalaki na mikakatano mpo na likambo etali masanga liboso bákóma Batatoli bamonaki malamu báboya komɛla masanga mpo na libela. Basusu kutu baboyá lolenge ya kominanola atako ezali mabe te, kasi oyo ekoki kolamwisa epai na bango mposa ya nzoto. (Nz. 101:3) Na ndakisa, liboso akóma Motatoli, ndeko moko azalaki kosepela na mabina ya mbindo na bisika ya fɛti oyo azalaki kokende. Kasi nsima ya koyeba solo, aboyaki kobina ata na bafɛti ya Batatoli mpo alamwisa te bamposa mabe to makanisi ya mabe oyo azalaki na yango kala. Mpo na koloba solo, tolobi te ete bakristo basengeli koboya libela komɛla masanga, kobina to biloko mosusu oyo ezali mabe te. Kasi, biso nyonso tosengeli kozwa ekateli oyo ebongi kozanga koumela mpo tómibatela na makambo oyo ekoki kobebisa elimo na biso.

20. Atako ezalaka pɛtɛɛ te ‘kotika makambo ya kozanga boyengebene,’ likambo nini ezali kopesa elikya mpe kobɔndisa biso?

20 Komema nkombo ya Nzambe ezali libaku kitoko, kasi ezali mpe mokumba. Tosengeli ‘kotika makambo ya kozanga boyengebene’ mpe ‘kotika oyo ezali mabe.’ (Nz. 34:14) Kasi, kosala bongo ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Nzokande, koyeba ete Yehova akokoba kolinga “bato na ye” mpe baoyo balandaka banzela na ye ya boyengebene, ebɔndisaka mpenza.​—2 Tim. 2:19; tángá 2 Ntango 16:9a.

^ par. 12 Talá na jw.org na esika oyo bakomi MAKAMBO ETALI BISO > MITUNA OYO BATO BATUNAKA MINGI na lisolo oyo elobi “Bopekisaka bato bafilme, babuku mpe banzembo mosusu?