Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2014

Salisá basusu bákóma lisusu na makoki mingi

Salisá basusu bákóma lisusu na makoki mingi

“Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.”​—NZ. 32:8.

1, 2. Ndenge nini Yehova atalelaka basaleli na ye awa na mabele?

NTANGO baboti bazalaka kotala ndenge bana na bango bazali kosakana, mbala mingi bakamwaka na makoki oyo bana babotamaka na yango. Yo moko omoná likambo ya ndenge wana? Mwana moko akoki kobotama na makoki ya kokima mbangu mingi, mpe ndeko na ye mosusu akoki kozala na makoki mingi na masano to makambo ya ntɔki. Kasi, atako bana bakoki kozala na makoki wana, baboti basepelaka komona ndenge bazali kokolisa yango.

2 Yehova mpe atyelaka bana na ye awa na mabele likebi ya ndenge wana. Amonaka basaleli na ye ya mikolo na biso lokola “biloko kitoko ya bikólo nyonso.” (Hag. 2:7) Bazali biloko kitoko, mingimingi mpo na kondima mpe komipesa na bango epai na Nzambe. Atako bongo, okoki komona lelo oyo ete Batatoli ya Yehova bazali na makoki ndenge na ndenge. Bandeko mosusu bazali na makoki ya kozala bateyi malamu, mpe bamosusu bayebi mpenza kobongisa makambo. Bandeko mingi ya basi bazali na makoki ya koyekola minɔkɔ ya bapaya mpe basalelaka yango na mosala ya kosakola, mpe bamosusu bazali ndakisa malamu mpenza na likambo etali kosunga baoyo bazali na mposa ya lisalisi to mpo na kobatela bato ya maladi. (Rom. 16:1, 12) Tosepelaka te kozala na kati ya lisangá na bakristo wana ya lolenge nyonso?

3. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

 3 Kasi, bandeko mosusu, bilenge to baoyo bauti kozwa batisimo sika, bakoki kozala naino na mokakatano mpo na kozwa esika na kati ya lisangá. Ndenge nini tokoki kosalisa bango mpo bákóma lisusu na makoki mingi? Mpo na nini tosengeli kosala makasi kolukaka makambo ya malamu epai na bango, mpe kotalela bango ndenge Yehova asalaka?

YEHOVA AMONAKA MAKAMBO MALAMU OYO BASALELI NA YE BASALAKA

4, 5. Ndenge nini lisolo oyo ezali na Basambisi 6:11-16 emonisi ete Yehova amonaka makoki ya basaleli na ye?

4 Masolo mingi ya Biblia emonisi polele ete Yehova amonaka te kaka makambo ya malamu oyo basaleli na ye basalaka, kasi amonaka mpe makoki na bango. Na ndakisa, ntango Gideone aponamaki mpo asikola basaleli ya Nzambe na monyoko ya Bamidiane, ekoki kozala ete akamwaki ntango anzelu apesaki ye mbote mpe ayebisaki ye ete: “Yehova azali elongo na yo, yo elombe, moto ya nguya.” Emonani polele ete na ntango moko, Gideone amimonaki mpamba, kasi azalaki na “nguya.” Andimaki ete akokoka te mpe amimonaki ete azali mpamba. Kasi ndenge lisolo yango ekobi, emonisi mpenza ete Yehova azalaki kotalela mosaleli na ye Gideone na ndenge ya malamu koleka ndenge ye moko azalaki komitalela.​—Tángá Basambisi 6:11-16.

5 Yehova atyelaki Gideone motema ete akosikola Bayisraele mpo amonaki makoki oyo azalaki na yango. Lisusu, anzelu ya Yehova amonaki ndenge Gideone azalaki kotutatuta ble na makasi to nguya na ye nyonso. Kasi, ezali mpe na likambo mosusu oyo ebendaki likebi ya anzelu. Na ntango ya kala, basali-bilanga bazalaki mbala mingi kobɛtabɛta bambuma na bango na esika ya polele mpo mopɛpɛ ekoka komema mposo ya mbuma. Likambo ya kokamwa, Gideone azalaki kobɛtabɛta ble na ekamwelo na ndenge ya kobatama mpo Bamidiane bámona te mwa ble oyo abukaki. Asalelaki mpenza mayele oyo ebongi! Na ntembe te, atako Gideone azalaki mosali-bilanga moko ya ekɛngɛ, kasi na miso ya Yehova azalaki mpe mobali moko ya bososoli. Ya solo, Yehova amonaki makoki na ye mpe asalaki na ye elongo.

6, 7. (a) Ndenge nini lolenge oyo Yehova atalelaki mosakoli Amose ekeseni na oyo ya Bayisraele mosusu? (b) Nini emonisi ete Amose azalaki te moto oyo ayebi eloko te?

6 Ndenge moko mpe, ndakisa ya mosakoli Amose emonisi biso ete Yehova amonaki makoki ya mosaleli na ye wana, ata soki bato mingi bakokaki komona ye lokola azali na ntina te to lokola moto moko ya mpamba. Amose alobaki ete azalaki mobɔkɔli ya mpate mpe mopɛtoli ya nzete ya figi, oyo bato bazalaki komona lokola bilei ya babola. Ntango Yehova aponaki Amose mpo ete asakola bitumbu na ye na ntina na bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele, ekoki kozala ete Bayisraele mosusu bakanisaki ete ezalaki liponi ya mabe.​—Tángá Amose 7:14, 15.

7 Atako Amose autaki na mboka ya mosika, kasi ndenge ayebaki mimeseno ya mboka mpe bakonzi ya eleko na ye, yango emonisi ete azalaki moto oyo ayebaki makambo. Na ntembe te, bayebisaki ye malamu makambo oyo ezalaki na Yisraele, mpe ekoki kozala ete ayebaki makambo ya bikólo oyo ezalaki zingazinga ya Yisraele mpo azalaki kokutana na bato ya mimbongo ya bamboka yango oyo bazalaki koya kuna. (Amo. 1:6, 9, 11, 13; 2:8; 6:4-6) Lelo oyo, bato mosusu ya mayele ya makomi ya Biblia, bakumisaka Amose ete azalaki mpenza na makoki ya kokoma malamu. Mosakoli Amose asukaki kaka te na kosalela maloba ya pɛtɛɛ mpe ya nguya, kasi asalelaki malamu maloba ya bokokanisi mpe ya mwa kosɛkisa bato. Ya solo, mpiko oyo Amose amonisaki na eyano oyo apesaki Amazia, nganga-nzambe oyo abebaki, emonisaki ete Yehova aponaki moto oyo abongi mpe akokaki kosalela makoki na ye, oyo na ebandeli ezalaki komonana te.​—Amo. 7:12, 13, 16, 17.

8. (a) Yehova ayebisaki mokonzi Davidi nini? (b) Ndenge nini maloba oyo ezali na Nzembo 32:8 ekoki kolendisa baoyo bamonaka ete bazali na makoki te?

8 Ya solo, Yehova amonaka makoki ya mosaleli na ye mokomoko. Ayebisaki mokonzi  Davidi ete akokoba kotambwisa ye, mpe ‘liso na ye ekozala kotala ye.’ (Tángá Nzembo 32:8.) Omoni ntina oyo likambo yango esengeli kolendisa biso? Ata soki tokoki kozanga makoki, Yehova akoki kosalisa biso tósala makambo koleka makoki na biso mpe tókokisa mikano oyo tozalaki kutu kokanisa te. Ndenge kaka antrenɛrɛ atalaka na likebi ndenge mosani oyo auti kolakisa azali kobɛta mpo asalisa ye akóma lisusu mosani ya malamu, Yehova alingaka kotambwisa biso mpo tókende liboso na elimo. Yehova akoki mpe kosalela bandeko na biso bakristo mpo básalisa biso tókóma lisusu na makoki mingi. Ndenge nini?

LUKÁKÁ MAKAMBO YA MALAMU EPAI YA BASUSU

9. Ndenge nini tokoki kosalela toli ya ntoma Paulo oyo elobi ete tosengeli mpe ‘kotya likebi’ na matomba ya bandeko mosusu?

9 Ntoma Paulo alendisaki bakristo nyonso ete ‘bátyaka mpe likebi’ na matomba ya bandeko mosusu. (Tángá Bafilipi 2:3, 4.) Ntina ya toli ya ntoma Paulo ezali ete tosengeli kotalaka makoki oyo basusu bazali na yango mpe kondima yango. Toyokaka ndenge nini soki moto moko amonisi ete asepeli na bokoli oyo tosali? Mbala mingi, epesaka biso makasi ya kokende lisusu liboso, mpe esalaka ete tóbimisa lisusu bizaleli mosusu ya malamu. Ndenge moko mpe, ntango tozali kondima ete bandeko na biso bakristo bazali mpe na ntina, tozali kosalisa bango bákola malamu na elimo mpe bákende liboso.

10. Tosengeli mpenza kotyela nani likebi?

10 Nani mpenza tosengeli kotyela likebi? Mpo na koloba solo, biso nyonso tozalaka na mposa ete bátyelaka biso likebi mpenza. Lisusu, bilenge to bandeko oyo babatisami sika bazalaka na mposa ya komona ete bazali mpe kopesa mabɔkɔ na misala ya lisangá. Yango ekosalisa bango báyeba ete bazali na esika na kati na biso. Epai mosusu, soki tozali te kondima makoki oyo bandeko wana bazali na yango, mposa oyo bazali na yango ya koluka kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba, ndenge Liloba ya Nzambe ezali kolendisa bango, ekoki kokita.​—1 Tim. 3:1.

11. (a) Ndenge nini nkulutu moko asalisaki elenge moko mpo alonga ezaleli na ye ya malilimalili? (b) Liteya nini ozwi na likambo ya Julien?

11 Ndeko Ludovic, nkulutu oyo batyelaki ye likebi ya ndenge wana ntango azalaki elenge mpenza alobi boye: “Ntango natyelaka ndeko moko likebi na ndenge ya malamu, yango esalisaka ye akola nokinoki na elimo.” Mpo na Julien, elenge mobali moko oyo azalaki malilimalili, ndeko Ludovic alobi boye: “Lokola na ntango moko boye Julien akómaki kosala makambo ya malamu te, ezaleli na ye ezalaki kosepelisa lisusu bato te. Kasi namonaki ete azali boboto mingi mpe azalaki na mposa mpenza ya kosalisa bandeko ya lisangá. Na esika nakanisa ete abongi te mpo na kozwa mikumba, natyaki nde likebi na bizaleli na ye ya malamu, mpe nalukaki kolendisa ye.” Na nsima, Julien akokisaki masɛngami mpe akómaki mosaleli na misala, mpe lelo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

SALISÁ BASUSU BÁKÓMA LISUSU NA MAKOKI MINGI

12. Ezaleli nini ezali na ntina mingi soki tolingi kosalisa moto moko akóma lisusu na makoki mingi? Pesá ndakisa.

12 Na ntembe te, soki tolingi kosalisa basusu bákóma lisusu na makoki mingi, tosengeli kotyelaka bango likebi. Ndenge ndakisa ya Julien emonisi yango, na esika ya kotalela kaka bolɛmbu ya moto, tosengeli nde kotalela libosoliboso bizaleli ya malamu mpe makoki na ye oyo tokoki kosalisa akolisa yango. Ndenge wana nde Yesu atalelaki ntoma Petro. Atako na ntango moko boye emonanaki lokola ete ntoma Petro apikami naino malamu te, Yesu alobaki ete akopikama makasi lokola libanga.​—Yoa. 1:42.

13, 14. (a) Ndenge nini Barnabasi amonisaki bososoli na likambo etali elenge Marko? (b) Ndenge nini ndeko mobali moko ya elenge azwaki litomba na lisalisi ndenge oyo Marko azwaki? (Talá elilingi ya ebandeli.)

13 Barnabasi amonisaki mpe bososoli ya ndenge wana na likambo etali Yoane, oyo babandaki kobenga ye Marko, nkombo ya Baroma. (Mis. 12:25) Na mobembo na ye ya  liboso oyo ntoma Paulo asalaki lokola misionɛrɛ elongo na Barnabasi, Marko azalaki lokola “mosaleli,” mbala mosusu azalaki kokokisa bamposa na bango ya mosuni. Nzokande, ntango bakómaki na Pamfilia, mbala moko Marko asundolaki Paulo ná Barnabasi. Basengelaki kosala mobembo bango moko na ngambo ya nɔrdi esika oyo eyebanaki ete bato mabe bazalaka mingi. (Mis. 13:5, 13) Kasi, emonani ete Barnabasi akipaki lisusu te likambo wana oyo Marko asalaki, na nsima amonaki malamu asilisa formasyo na ye. (Mis. 15:37-39) Yango esalisaki elenge mobali yango akóma mosaleli ya Yehova ya makoki mpenza. Likambo ya esengo, Marko azalaki ná ntoma Paulo na Roma, ntango akɔtaki bolɔkɔ, ye ná ntoma Paulo batindelaki bakristo ya lisangá ya Kolose mbote, mpe ntoma Paulo alobaki malamu mpo na ye. (Kol. 4:10) Kanisá esengo oyo Barnabasi azalaki na yango ntango ntoma Paulo asɛngaki Marko asalisa ye.​—2 Tim. 4:11.

14 Alexandre, oyo akómaki nkulutu sika, alobeli litomba oyo azwaki na ndenge ndeko mobali moko atyelaki ye likebi. Alobi boye: “Ntango nazalaki elenge, kosala libondeli na miso ya bato ebele, ezalaki mpenza etumba mpo na ngai. Nkulutu moko alakisaki ngai ndenge ya komibongisa mpe ya kozala motema likolólikoló te. Na esika aboya kopesaka ngai libondeli, apesaki ngai nde mabaku ya kobondelaka mingi na likita ya mosala ya kosakola. Na nsima, namesanaki mpenza.”

15. Ndenge nini ntoma Paulo amonisaki botɔndi mpo na bandeko na ye?

15 Soki tomoni ezaleli moko ya kitoko epai ya mokristo moko, tomonisaka mpo na nini tosepelaka na ezaleli yango? Na Baroma mokapo 16, ntoma Paulo amonisaki botɔndi epai ya bandeko koleka 20 mpo na bizaleli na bango oyo esalaki ete alingaka bango mingi. (Rom. 16:3-7, 13) Na ndakisa, ntoma Paulo andimaki ete Andronikusi mpe Yuniasi basalelaki Kristo ntango molai liboso na ye, amonisaki mpe ndenge bazali koyika mpiko. Ntoma Paulo alobaki mpe malamu mpo na mama ya Rufusi, ntango mosusu akumisaki ye mpo na ndenge asalisaki ye.

Fréderic (na lobɔkɔ ya mwasi) alendisaki Rico atika te kosalela Yehova (Talá paragrafe 16)

16. Matomba nini ekoki komonana soki tozali kopesa bilenge longonya?

16 Soki tozali kopesa basusu longonya, ntango mosusu matomba malamu ekoki komonana. Tólobela ndakisa ya Rico, elenge mobali moko na France, oyo alɛmbaki nzoto mpo tata na ye, oyo azalaki kosepela te na mateya ya Batatoli, atɛmɛlaki ye mpo azwa batisimo te. Rico akanisaki ete asengeli kozela tii ntango akokóma mokóló mpo asalela Yehova malamumalamu. Azalaki mpe koyoka mawa mpo bazalaki kosɛka ye na eteyelo. Ndeko Fréderic, nkulutu moko ya lisangá oyo basɛngaki ete ayekola na elenge yango alobi boye: “Napesaki Rico longonya mpo botɛmɛli wana emonisaki ete azali mpenza na mpiko mpo na komonisa ete azali na kondima.” Maloba wana epesaki Rico makasi ete akoba na ekateli na ye ya kobatela bizaleli malamu mpe yango esalisaki ye akóma lisusu na boyokani malamu ná tata na ye. Rico azwaki batisimo ntango akómaki na mbula 12.

Jérôme (na lobɔkɔ ya mobali) asalisaki Ryan akóma misionɛrɛ (Talá paragrafe 17)

17. (a) Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko mibali oyo tozali na bango mpo bákende liboso? (b) Ndenge nini misionɛrɛ moko amonisaki ete azali mpenza komibanzabanza mpo na bandeko mibali ya bilenge, mpe matomba nini emonanaki?

 17 Ntango nyonso oyo tozali kopesa bandeko longonya soki bakokisi malamu mikumba na bango to mpo na milende oyo basali, topesaka bango makasi ya kosalela lisusu Yehova mingi koleka. Ndeko Sylvie, * oyo asalaki na Betele ya France na boumeli ya bambula, alobaki ete bandeko basi bakoki kopesaka bandeko mibali longonya. Alobaki ete basi bakoki kosepela na makambo mikemike to milende oyo bazali komona ezali kosalema. Yango wana, “maloba ya kolendisa ya bandeko basi, ekoki kosala mwa eloko ndenge kaka oyo bandeko mibali ya makoki balobaka esalaka.” Abakisaki ete: “Mpo na ngai, soki napesi longonya te, nayokaka mabe.” (Mas. 3:27) Jérôme, misionɛrɛ moko na Guyane française, asalisi bilenge mingi mpo bákóma bamisionɛrɛ. Alobi boye: “Namonaki ete soki napesi bandeko mibali longonya mpo na makambo ya sikisiki oyo basali na mosala ya kosakola to mpo bapesaki makanisi ya malamu, bakómaka komimona ete bazali na ntina; bakómaka lisusu na makoki mingi.”

18. Mpo na nini kosala elongo na bandeko mibali ya bilenge ezali na ntina?

18 Tokoki mpe kosalisa bandeko na biso bakristo bákende liboso soki tozali kosala na bango elongo. Nkulutu moko akoki kosɛnga na elenge mobali moko oyo ayebi kosalela malamu ordinatɛrɛ mpo akɔta na jw.org mpe abimisa mwa masolo oyo ekoki kolendisa mibange oyo bazali na baordinatɛrɛ te. To soki ozali kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi, mpo na nini te kobenga elenge mobali moko asala ná yo? Soki osali bongo, okozala na libaku ya komona ndenge bilenge bazali kosala, kopesa bango longonya mpe okomona matomba.​—Mas. 15:23.

MONÁKÁ MOSIKA

19, 20. Mpo na nini tosengeli kosalisa basusu mpo bákende liboso?

19 Ntango Yehova aponaki Yosua atambwisa Bayisraele, apesaki mpe Moize etinda ete ‘ayikisa’ Yosua mpiko mpe ‘alendisa’ ye. (Tángá Kolimbola Mibeko 3:28.) Ebele ya bato bazali se koyangana na biso na lisangá ya mokili mobimba. Bakristo nyonso oyo bakɔmɛli, kaka bankulutu te, bakoki kosalisa bandeko oyo bazali bilenge mpe bato ya sika ete bákóma lisusu na makoki mingi. Na yango, soki basali mosala ya ntango nyonso, yango ekosalisa bango ‘báyeba koteya bato mosusu.’​—2 Tim. 2:2.

20 Ezala tozali na lisangá oyo eumeli to na etuluku moko oyo ezali kokola mpo na kokóma lisangá, tómonaka mosika. Mpo na kolonga, tosengeli komekola Yehova, oyo alukaka ntango nyonso makambo ya malamu epai ya basaleli na ye.

^ par. 17 Topesi ye nkombo mosusu.