Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2014

Ndenge nini kosalisa bandeko oyo libala ekufá?

Ndenge nini kosalisa bandeko oyo libala ekufá?

Ekoki kozala ete oyebi moto moko to bato ebele oyo babomá mabala. Ezali bongo mpo bato bazali koboma mabala mingi. Na ndakisa, ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Pologne emonisi ete bato ya mbula 30 oyo basali mbula kobanda misato tii motoba na libala, mbala mingi babomaka libala mpe kaka bato ya mbula wana te nde bazali koboma mabala.

Ebongiseli moko oyo etalelaka makambo ya mabota na Espagne elobi ete “bolukiluki oyo esalemi emonisi ete [na Mpoto], soki bato 100 babalani, 50 na bango bakoboma libala.” Ezali mpe bongo mpo na bikólo mosusu ya bozwi.

KOTUNGISAMA NA MAKANISI NDENGE NA NDENGE

Koboma libala ezali likambo moko oyo esalemaka mingi. Kasi nini esalaka ete likambo wana ya mawa esalema? Mwasi moko oyo apesaka toli na makambo etali mabala na Mpoto ya Ɛsti alobaki boye: “Koboma libala emonisaka polele makambo mabe oyo ezalaki kosalema liboso. Makambo yango ekoki kozala ete boyokani ebebaki mpe babalani bakabwanaki, mpe makambo wana epesaka mpasi mingi na makanisi.” Mwasi yango abakisaki boye: “Soki bato babomi libala, mitungisi lokola oyo eyaka mbala mingi na nsima: moko ya babalani akoki kokóma nkandankanda, mawamawa, komiyoka ete asundolami, elikya ezali lisusu te mpe nsɔninsɔni.” Babalani mosusu kutu bakómaka na likanisi ya komiboma. “Soki libala ebomami na tribinale, likambo mosusu elandaka na nsima. Lokola azali komitungisa ete atikali ye moko, moto oyo abomi libala akoki komituna boye: ‘Nakómi mpenza nani sikoyo lokola nabomi libala? Ntina na ngai mpenza na bomoi ezali nini?’”

Ntango akanisaki ndenge oyo ayokaki na mwa bambula oyo elekaki, mwasi moko na nkombo Ewa alobi boye: “Nsima ya kokata ete tobomi libala, nayokaki mpenza nsɔni, mpo na nsima bato ya kartye mpe baninga na ngai bakobanda kobenga ngai ‘abomá libala.’ Nazalaki na nkanda makasi. Natikalaki na bana mibale, mpe esengelaki nakokisa epai boye mokumba ya mama mpe epai boye mokumba ya tata.” * Ndeko Adam azalaki nkulutu na boumeli ya mbula 12 mpe bandeko bazalaki komemya ye mingi. Kasi alobi boye: “Na ntango moko boye, nabungisaki limemya oyo bandeko bazalaki kopesa ngai mpe nakómaki nkandankanda, mpe nabandaki kokóma mosika na moto nyonso.”

KOBUNDA MPO NA KOBATELA MAKANISI MALAMU

Nsima ya komitungisa soki bomoi na bango ekozala ndenge nini, bato mosusu oyo babomaki libala, babundaki mpo na kozongela makanisi malamu, ata bambula ebele nsima ya koboma libala. Bakoki mbala mosusu kokanisa ete basusu bamibanzabanzaka te mpo na bango. Lisusu, mopanzi-nsango moko oyo alobelaka makambo ya libala alobi ete esɛngaka bato yango “bábongola bizaleli na bango mpe báyekola ndenge ya kolonga mikakatano na bango.”

Ndeko Stanisław alobi boye: “Ntango tobomaki libala, mwasi wana oyo nazalaki na ye aboyaki ete nakendeke  kotala bana mibale ya basi oyo tobotaki. Yango etindaki ngai nakanisa ete ata moto moko te azali komibanzabanza mpo na ngai, ata Yehova mpe asundoli ngai. Bomoi ekómaki bololo. Na nsima, nayaki komona ete nazalaki mpenza na makanisi ya malamu te.” Wanda, mwasi moko oyo abomaki libala azalaki mpe komitungisa soki bomoi na ye ekozala ndenge nini. Alobaki boye: “Nakanisaki ete nsima ya mwa ntango, bato mosusu, ezala mpe bandeko ya lisangá bakosalisa ngai ná bana te. Kasi, namoni sikoyo ndenge bandeko mingi bazalaka na biso ntango nyonso mpe basalisaka biso na milende oyo nazali kosala mpo na kobɔkɔla bana mpo bákóma basambeli ya Yehova.”

Makambo oyo bandeko oyo balobi emonisi ete nsima ya koboma libala, bato yango bakómaka na makanisi mingi ya mabe. Bakoki kobanda komimona ete bazali na ntina te, bazali mpamba mpe babongi te kotyelama likebi. Bakoki mpe mbala mosusu kobanda koloba mabe mpo na bato oyo bazali zingazinga na bango. Bakoki mpe kobanda kokanisa ete lisangá ezali malilimalili mpe ekipaka te makambo ya bandeko oyo bazali na mpasi. Kasi, bandakisa lokola oyo ya Stanisław mpe Wanda emonisi ete bato oyo babomá mabala bakoki komona ete bandeko na bango mibali mpe basi bamibanzabanzaka mpenza mpo na bango. Na ntembe te, bandeko ya lisangá basungaki mingi, ata soki lisalisi na bango emonanaki te na ebandeli.

NTANGO OZALI KOMIYOKA LOKOLA OZALI KAKA YO MOKO MPE BASUNDOLI YO

Tosengeli kobosana te ete ata soki tosali milende ndenge nini mpo na kosalisa bato oyo babomá libala, bakobanda kaka na bantango mosusu komiyoka ete bazali bango moko. Bandeko basi oyo mabala na bango ekufá bakoki kokanisa ete kaka bato moke nde bamibanzabanzaka mpo na bango. Alicja alobi boye: “Mbula mwambe eleki banda tobomaki libala. Kasi, namimonaka mpamba. Na bantango wana, nazalaka na makanisi ya kobendana na kwɛ na ngai mpe nabandaka kolela mpe komiyokela mawa.”

Atako makambo oyo elobelami awa emonanaka mingi epai ya bato oyo babomá libala, Biblia epesi toli ete ezali mabe komitangola na basusu. Moto oyo akoboya kolanda toli yango, akoki komonisa ete aboyi “makambo nyonso ya bwanya.” (Mas. 18:1) Kasi, ndeko mwasi oyo azali komiyoka ete azali kaka ye moko asengeli koyeba ete asengeli te ntango nyonso kolukaka toli to libɔndisi kaka epai ya ndeko mobali, ezali mpe bongo mpo na ndeko mobali. Na yango, litomba moko te ekomonana soki tobandi kokolisa makanisi ya lolango epai ya moto ya ndenge wana.

Bandeko na biso oyo mabala ekufá bakoki kotungisama mingi na makanisi ndenge na ndenge, bakoki kobanda komituna mpo na bomoi na bango, mpe komiyoka ete bazali kaka bango moko to basundolami. Soki tozali koyeba ete bato mingi bayokaka bongo mpe ezalaka mpasi mpo na kolonga yango, tosengeli komekola Yehova mpe tosengeli kosunga mpenza bandeko yango. (Nz. 55:22; 1 Pe. 5:6, 7) Tokoki mpenza kozala na elikya ete bakosepela mingi na lisalisi nyonso oyo tokopesa bango. Mpe na ntembe te, bakomona mpenza ete lisangá ezali na baninga ya solosolo oyo bakoki kosalisa bango!​—Mas. 17:17; 18:24.

^ par. 6 Bankombo mosusu topesi bango kopesa.