Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2014

“Yeisá patatalu nzela ya lokolo na yo” mpo okende liboso

“Yeisá patatalu nzela ya lokolo na yo” mpo okende liboso

NTANGO basaleli ya Nzambe balongwaki na Babilone na mobu 537 L.T.B., Yehova alobaki likambo oyo emonisaki ete azalaki komibanzabanza mpo na nzela oyo bakotambola mpo na kokóma na Yerusaleme. Ayebisaki bango ete: “Bóbongisa nzela ya bato. Bótondisa mabele, bótondisa mabele na balabala monene. Bólongola mabanga na yango.” (Yis. 62:10) Kanisá naino ndenge Bayuda mosusu bakokaki kosala yango. Ndambo ya Bayuda oyo bakendeki liboso, basalaki nzela, mpe ekoki kozala ete batondisaki mabulu mpe balongolaki basalite. Kosala bongo, esalisaki bandeko na bango mosusu oyo balandaki bango na nsima mpo na kozonga na mboka na bango na Yerusaleme.

Tokoki kozwa likambo wana lokola ndakisa ya nzela oyo ekoki komema moto na mikano ya elimo. Yehova alingi ete basaleli na ye nyonso bátambola elongo na nzela yango kozanga ete ata eloko moko ya mpambampamba epekisa bango. Liloba na ye elendisi biso boye: “Yeisá patatalu nzela ya lokolo na yo, mpe tiká banzela na yo nyonso ezala semba.” (Mas. 4:26) Ezala ozali elenge to te, okoki komona ete kosalela toli oyo ya Biblia ezali likambo ya bwanya.

MPO NA KOBONGISA NZELA NA YO, ZWÁKÁ BIKATELI YA MALAMU

Ekoki kozala ete oyoká bato bazali koloba na ntina na elenge moko ete: ‘Akokóma moto monene’ to ‘Nivo na ye ezali kaka komata.’ Mbala mingi, bilenge bazalaka nzoto makasi, bakangaka makambo noki mpe bazalaka na mposa makasi ya kolonga. Biblia emonisi polele ete: “Kitoko ya bilenge ezali nguya na bango.” (Mas. 20:29) Elenge oyo asalelaka makoki mpe makasi na ye mpo na kosalela Yehova akoki kokokisa mikano ya elimo mpe kozwa esengo ya solosolo.

Nzokande, ndenge toyebi yango, mokili esepelaka mingi na makoki ya bilenge na biso. Soki elenge Motatoli azali mayele na kelasi, balakisi to baninga na ye bakoki kotya ye mbamba ete atánga bakelasi milaimilai mpo akóma moto monene na mokili oyo. To ekoki kozala ete ndeko moko azali na makoki ya kokóma  mosani ya kitoko mpe baantrenɛrɛ bakoki kotya ye mpanzi likoló mpo akóma mosani monene na bomoi na ye mobimba. Yo moko okutaná na likambo ya ndenge wana, to oyebi moto moko oyo azali kokutana na mokakatano ya boye? Nini ekoki kosalisa mokristo azwa ekateli ya malamu?

Mateya ya Biblia ekoki kosalisa moto amibongisa mpo na kosala mobembo na nzela kitoko ya bomoi. Mokanda ya Mosakoli 12:1 elobi ete: “Yango wana, kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.” Ndenge nini yo to elenge mosusu bokoki mpenza ‘kokanisa Mozalisi na bino Monene’?

Tyá likebi na oyo ekómelaki Eric, * na Afrika ya Wɛsti. Azalaki kolinga mingi kobɛta bale. Ntango akómaki na mbula 15, baponaki ye akóma kobɛta na ekipi ya ekólo na bango. Yango emonisi ete asengelaki kokende kozwa formasyo ya makasi na Mpoto, mpe ntango mosusu asengelaki kokende na bikólo mosusu kobɛtaka kuna. Kasi ndenge nini toli oyo elobi ete ‘kanisá Mozalisi na yo Monene’ esalisaki ye? Mpe liteya nini yo mpe baninga na yo mosusu bokoki kozwa?

Ntango Eric azalaki naino kotánga, Batatoli ya Yehova babandaki koyekola na ye Biblia. Abandaki koyeba ete Mozalisi na ye akosilisa mpo na libela mikakatano oyo ezali na mokili. Eric ayaki komona ete asengeli kosalela ntango mpe makasi na ye mpo na kosala mokano ya Nzambe. Mpo na yango, Eric amonaki malamu ete asalela te bomoi na ye mobimba kaka na lisano wana. Azwaki batisimo mpe amipesaki mingi mpo na kosalela Yehova. Na nsima, akómaki mosaleli na misala mpe ayaki kokɔta Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba.

Soki Eric amipesaka kaka na lisano ya bale, alingaki koyebana mpe kokóma na bomɛngo mingi. Kasi, amonaki bosolo ya toli oyo ya Biblia: “Biloko ya motuya ya mozwi nde sité na ye ya makasi, mpe na makanisi na ye, yango ezali lokola efelo oyo ebatelaka.” (Mas. 18:11) Ya solo, kimya oyo moto akoki kozwa soki akómi na bomɛngo ezali ya solosolo te. Kutu, baoyo bazalaka na mposa makasi ya kokóma na bomɛngo mbala mingi ‘bamitɔbɔlatɔbɔlaka na ebele ya bampasi.’​—1 Tim. 6:9, 10.

Likambo ya esengo, bilenge mingi bazwi esengo mpe kimya mpenza ndenge bazali kosala mosala ya ntango nyonso. Eric alobi boye: “Nakɔti na kati ya ‘ekipi’ moko monene ya basaleli ya Yehova oyo basalaka mosala ya ntango nyonso. Yango ezali ekipi moko ya kitoko mingi oyo nakoki kozala, mpe nazali kopesa Yehova mersi ndenge alakisi ngai nzela kaka moko ya kozwa esengo ya solosolo mpe kolonga na bomoi.”

Tokoloba nini mpo na yo? Na esika ya komityela mikano ya mokili, mpo na nini te kosala mosala ya mobongisi-nzela mpo otika ete “banzela na yo” ezala semba liboso ya Yehova?​—Talá etanda “ Matomba oyo nakokaki kozwa na iniversite te.”

LONGOLÁ MABAKU NA NZELA

Ntango bakendeki kosala viziti na Betele ya États-Unis, ndeko moko ná mwasi na ye bamonaki mpenza esengo oyo bandeko ya libota ya Betele ya kuna bazalaki na yango. Ndeko mwasi akomaki ete: “Tomiyokaki mpenza malamu mpe na kimya.” Ndeko yango ná mwasi na ye bazwaki ekateli ya komibombela ntango mpe makasi mpo na kosala mingi na mosala ya Yehova.

Kasi, bambongwana oyo bandeko wana mibale basengelaki kosala, ezalaki pɛtɛɛ te. Kasi mokolo moko, bakanisaki na mozindo na mokapo moko ya mokolo. Ezalaki Yoane 8:31, epai tozali kotánga maloba oyo ya Yesu ete: “Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai.” Na likanisi wana na motó, balobaki ete: “Soki esɛngi tósala ata likambo nini mpo na kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ, tokosala yango.” Batɛkaki ndako na bango ya monene, batikaki makambo mosusu mpe bakendaki na lisangá moko oyo ezalaki na mposa ya lisalisi. Lelo oyo, bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza, kasi bapesaka mpe mabɔkɔ mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi mpe basalaka misala na mayangani ya etúká. Bazali komiyoka ndenge nini? “Tozali mpenza na esengo ndenge toyeisaki bomoi na biso pɛpɛlɛ, mpe tosalaki oyo eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele ezali kolendisa biso tósala.”

TÓKOBA KOKENDE LIBOSO NA ELIMO MPO TÓTIKALA NA KATI YA NZELA

Mokonzi Salomo akomaki ete: “Miso na yo esengeli kotala alima liboso na yo, ɛɛ, miso na yo oyo ezali kongɛnga esengeli kotala alima liboso na yo.” (Masese 4:25) Ndenge kaka sofɛlɛ atalaka liboso, tosengeli koboya makambo nyonso oyo ekoki kopekisa biso mpo tómityela te mikano ya elimo mpe tókokisa yango.

Mikano nini ya elimo okoki komityela mpe kokokisa? Moko na yango mpe ya kitoko, ezali kosala mosala ya ntango nyonso. Mosusu ezali kopesa mabɔkɔ  na lisangá moko oyo ezali mosika te na bino, oyo ezali na mposa ya basakoli ya makoki mpo na kosalisa bango básilisa teritware na bango oyo ezali monene. To ekoki kozala ete lisangá ezali na basakoli ya makoki, kasi ezali na bankulutu mpe basaleli na misala mingi te. Okoki kopesa mabɔkɔ na masangá ya ndenge wana? Mpo na nini te kosolola na mokɛngɛli ya zongazonga mpo na koyeba esika nini okoki kopesa mabɔkɔ? Soki olingi kokende mosika, okoki kotuna bayebisa yo masangá nini ezali na bosɛnga. *

Tózonga lisusu na ndakisa oyo ezali na Yisaya 62:10. Ekoki kozala ete Bayuda mosusu basalaki mosala makasi mpo na kobongisa nzela ya kozonga na mboka na bango mpo ete basaleli ya Nzambe bákóma na mboka na bango na Yerusaleme. Soki ozali kosala makasi mpo okokisa mikano mosusu na mosala ya Yehova, kotika te. Na lisalisi ya Nzambe, yo mpe okokokisa mikano yango. Wana ozali koluka kolongola mabaku oyo ezali liboso na yo, kobá kosɛnga Yehova apesa yo bwanya. Na ntembe te, na ntango oyo ebongi, okomona ndenge akosalisa yo ‘oyeisa patatalu nzela ya lokolo na yo.’​—Mas. 4:26.

^ par. 8 Topesi ye nkombo mosusu.

^ par. 18 Talá buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, nkasa 111-112.