Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2014

“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo”

“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo”

“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.”​—MAT. 22:37.

1. Eloko nini esali ete bolingo ya Nzambe mpe Mwana na ye ezala makasi?

YESU KRISTO, Mwana ya Yehova alobaki ete: “Nalingaka Tata.” (Yoa. 14:31) Yesu alobaki mpe ete: “Tata alingaka Mwana mingi.” (Yoa. 5:20) Tosengeli kokamwa te mpo na yango. Kutu, liboso Yesu aya awa na mabele, na boumeli ya bambula ebele azalaki “mosali ya mayele” ya Nzambe. (Mas. 8:30) Lokola Yehova ná Yesu basalaki elongo, yango wana Mwana ayekolaki bizaleli mingi ya Tata na ye mpe ezalaki na makambo mingi koleka oyo esengelaki kotinda ye alinga Tata na ye. Lisusu, emonani polele ete kosala na bomoko esali ete bolingo na bango ekola.

2. (a) Kolinga moto esɛngaka nini? (b) Mituna nini tokotalela?

2 Kolinga moto esɛngaka komonisa yango na misala. Mokonzi Davidi ayembaki ete: “Nakolinga yo, ee Yehova makasi na ngai.” (Nz. 18:1) Ndenge wana nde biso tokoki komiyoka mpo na Nzambe, mpo alingaka biso mingi. Soki totosi Yehova, akomonisela biso bolingo na ye. (Tángá Kolimbola Mibeko 7:12, 13.) Kasi, lokola tokoki komona Nzambe te, tokoki mpenza kolinga ye? Kolinga Yehova elimboli nini? Mpo na nini tosengeli kolinga ye? Mpe ndenge nini tosengeli komonisa ete tolingaka Nzambe?

 NTINA OYO TOKOKI KOLINGA NZAMBE

3, 4. Wapi ntina oyo ekoki kosala ete tólinga Yehova?

3 “Nzambe azali elimo,” yango wana tokoki soki moke te komona ye. (Yoa. 4:24) Kasi, tokoki kolinga Yehova, kutu Makomami elendisi biso ete tómonisa bolingo yango. Na ndakisa, Moize alobaki na Bayisraele ete: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso ya bomoi.”​—Mib. 6:5.

4 Mpo na nini tosengeli kolinga Nzambe mingi? Mpo ete akelá biso na mposa ya kolinga ye mpe apesá biso likoki ya komonisa bolingo. Ntango bamposa na biso ya elimo ekokisami malamumalamu, bolingo na biso mpo na Yehova ekokóma makasi mpe yango ekoki kopesa biso esengo mingi. Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” (Mat. 5:3) Mpo na likambo etali mposa oyo bato babotamaka na yango ya kosambela, moto moko ya mayele alobaki boye: “Komona ete bato ya mokili mobimba balukaka Nzambe mpe bandimaka ye, esengeli kokamwisa biso mpe kotinda biso tózala na limemya mingi.”​—Man Does Not Stand Alone, ya A. C. Morrison.

5. Ndenge nini toyebi ete koluka Nzambe ezali mosala ya mpunda te?

5 Koluka Nzambe ezali mosala ya mpunda? Te, mpo alingaka ete tózwa ye. Ntoma Paulo amonisaki yango polele ntango asakwelaki etuluku moko ya bato oyo eyanganaki na Areopaje. Likambo yango esalemaki mosika te na Parthénon, tempelo ya Athéna, nzambe-mwasi ya Atene ya kala. Kanisá ete ozali wana ntango ntoma Paulo azali kolobela “Nzambe oyo asalá mokili mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango” mpe na nsima azali kolimbola ete “afandaka te na batempelo oyo esalemi na mabɔkɔ.” Ntoma Paulo abakisi ete “na moto moko [Nzambe] asalaki bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabele, mpe atyaki bantango oyo etyamá mpe bandelo oyo etyamá ya esika oyo bato bafandi, mpo báluka Nzambe, soki esengeli báluka ye na komekameka epai na epai mpe bázwa ye mpenza, atako, ya solo, azali mosika te na mokomoko na biso.” (Mis. 17:24-27) Ya solo, bato bakoki kozwa Nzambe. Batatoli ya Yehova milio nsambo na ndambo ‘bazwá ye’ mpe balingaka ye mingi.

KOLINGA NZAMBE ELIMBOLI NINI?

6. Eloko nini Yesu abengaki yango “mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso”?

6 Bolingo na biso mpo na Yehova esengeli kouta mpenza na motema. Yesu amonisaki yango polele ntango Mofarisai moko atunaki ete: “Moteyi, mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko?” Yesu alobaki na ye ete: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso.”​—Mat. 22:34-38.

7. Elimboli nini kolinga Nzambe na (a) ‘motema na biso mobimba’? (b) ‘molimo na biso mobimba’? (c) ‘na makanisi na biso nyonso’?

7 Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete tosengeli kolinga Nzambe na ‘motema na biso mobimba’? Alingaki koloba ete tosengeli kolinga Yehova na motema na biso mobimba ya elilingi, komonisa bamposa mpe makanisi oyo ebongi. Tosengeli mpe kolinga ye na ‘molimo na biso mobimba,’ to na bomoi mpe bomoto na biso. Lisusu, tosengeli kolinga Nzambe na ‘makanisi na biso nyonso,’ to na mayele na biso nyonso. Na nyonso, tosengeli mpenza kolinga Yehova na makambo nyonso.

8. Kolinga Nzambe na motema mpe molimo na biso mobimba mpe na makanisi na biso nyonso ekotinda biso tósala nini?

8 Soki tolingaka Nzambe na motema mpe molimo na biso mobimba mpe na makanisi na biso nyonso, tokozala bayekoli ya molende ya Liloba na ye, tokosala na bosembo nyonso mpo na kokokisama ya mikano na ye, mpe tokosakola nsango malamu ya Bokonzi na molende mpenza. (Mat. 24:14; Rom. 12:1, 2) Soki tozali na bolingo ya solosolo ya Yehova, yango ekosalisa biso tópusana penepene na ye. (Yak. 4:8) Na ntembe te, tokokoka te kotánga  bantina nyonso oyo esengeli kotinda biso tólinga Nzambe. Kasi, tótalela mwa ndambo na yango.

MPO NA NINI TOSENGELI KOLINGA YEHOVA?

9. Mpo na nini olingaka Yehova, Mozalisi mpe Mosungi na biso?

9 Yehova azali Mozalisi mpe Mosungi na biso. Ntoma Paulo alobaki ete: “Na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.” (Mis. 17:28) Yehova apesá biso mabele, esika kitoko ya kofanda. (Nz. 115:16) Lisusu, apesaka biso bilei mpe biloko mosusu oyo tosengelaka na yango mpo tózala na bomoi. Kasi, ntoma Paulo alobaki na bato ya Listra, oyo bazalaki kosambela bikeko ete “Nzambe ya bomoi, . . . amitikaki mpenza te kozanga litatoli, ndenge asaleli bino bolamu, ndenge apesaka bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, ndenge atondisaka mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.” (Mis. 14:15-17) Omoni te ete yango ezali ntina oyo tosengeli kolinga Mozalisi na biso Monene mpe Mosungi na biso ya bolingo?​—Mos. 12:1.

10. Komona ndenge Nzambe asali ete lisumu mpe liwa elongolama, esengeli kotinda biso tósala nini?

10 Nzambe azwaki bibongiseli mpo ete lisumu mpe liwa oyo tozwá epai ya Adama elongolama. (Rom. 5:12) Ya solo, “Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye na likambo oyo: ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.” (Rom. 5:8) Na ntembe te, motema na biso etondaka na bolingo ya Yehova mpo asali ete masumu na biso elimbisama soki tobongoli motema mpe tomonisi kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu.​—Yoa. 3:16.

11, 12. Na makambo nini Yehova apesi biso elikya?

11 Yehova ‘apesaka elikya oyo etondisaka biso na esengo mpe na kimya.’ (Rom. 15:13) Elikya oyo Nzambe apesi biso, esalisaka biso tóyika mpiko ntango kondima na biso emekami. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakotikala ‘sembo ata tii na liwa, bakozwa motole ya bomoi na likoló.’ (Em. 2:10) Bato ya sembo oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele, bakosepela seko na seko awa na mabele ntango ekokóma Paradiso. (Luka 23:43) Koyeba bilikya oyo, ezali kotinda biso tósala nini? Mitema na biso etondi te na esengo, kimya mpe bolingo mpo na moto oyo apesaka “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza”?​—Yak. 1:17.

12 Nzambe apesi biso elikya kitoko ya lisekwa. (Mis. 24:15) Na ntembe te, toyokaka mawa mingi soki moto oyo tolingaka akufi, kasi elikya ya lisekwa esalisaka biso mpo ‘tózala na mawa te ndenge bamosusu oyo bazali na elikya te bayokaka.’ (1 Tes. 4:13) Na bolingo na ye monene, Yehova Nzambe azali na mposa makasi ya kosekwisa bakufi, mingimingi bato ya sembo lokola Yobo. (Yobo 14:15) Meká naino komona na makanisi esengo oyo tokozala na yango ntango tokoyamba bato oyo bakosekwa mpo na kozala na bomoi awa na mabele. Mitema na biso etondi mpenza na bolingo mpo na Tata na biso ya likoló, oyo apesi biso elikya wana kitoko ya lisekwa!

13. Likambo nini emonisi polele ete Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na biso?

13 Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na biso. (Tángá Nzembo 34:6, 18, 19; 1 Petro 5:6, 7.) Lokola toyebi ete Nzambe na biso ya bolingo azalaka ntango nyonso pene mpo na kosalisa baoyo bazali sembo epai na ye, tomiyokaka ete tobatelami mpe lokola tozali na kati ya ‘esika na ye ya koleisa bibwɛlɛ matiti.’ (Nz. 79:13) Lisusu, bolingo ya Nzambe epai na biso ekomonana polele na oyo akosala mpo na bolamu na biso na nzela ya Bokonzi ya Masiya. Soki Yesu Kristo, Mokonzi oyo ye aponi asilisi kolongola mobulu, bampasi, mabe na mabele, bato ya botosi bakozala na kimya libela na libela awa na mabele mpe bakozala na biloko beboo. (Nz. 72:7, 12-14, 16) Nzambe na biso amibanzabanzaka mingi mpo na biso; yango wana apesi biso bilikya oyo kitoko. Mpo na yango, ondimi te ete tosengeli kolinga ye na motema, molimo, makasi na biso mobimba mpe na makanisi na biso nyonso?​—Luka 10:27.

14. Libaku nini ya ntina mingi Nzambe apesi biso?

14 Yehova apesi biso libaku moko ya ntina mingi ya kozala Batatoli na ye. (Yis. 43:10-12) Tolingaka Nzambe mpo apesi biso libaku ya  kosakola boyangeli na ye mpe ya kopesa bato elikya ya solosolo na mokili oyo etondi na yikiyiki. Yango wana, tokoki koloba na kondima nyonso mpe na elikya mpo tozali kosakola nsango malamu oyo ezali na Liloba ya Nzambe ya solo, oyo bilaka na ye ekokisamaka kaka. (Tángá Yosua 21:45; 23:14.) Ya solo, soki tolingi tótánga mapamboli mpe bantina oyo etindaka biso tólinga Yehova, tokoki kokende tii lobi. Kasi ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka ye?

NDENGE NINI TOSENGELI KOMONISA ETE TOLINGAKA NZAMBE?

15. Ndenge nini koyekola mpe kosalela Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso?

15 Tosengeli koyekolaka na molende Liloba ya Nzambe mpe kosalelaka yango. Kosala bongo ekomonisa ete tolingaka Yehova mpe ete tozalaka na mposa ete liloba na ye ezala ‘mwinda ya lokolo na biso.’ (Nz. 119:105) Soki tokutani na mikakatano, tokoki kozwa makasi na maloba oyo ya kolendisa: “Ee Nzambe, motema oyo ebukani mpe etutami, okotyola yango te.” “Ee Yehova, motema boboto na yo ezalaki se kosimba ngai. Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa molimo na ngai motema.” (Nz. 51:17; 94:18, 19) Yehova amoniselaka bato oyo bazali konyokwama motema boboto, Yesu mpe azalaki koyokela bato mawa. (Yis. 49:13; Mat. 15:32) Soki tozali koyekola Biblia, yango ekosalisa biso tómona mpenza ete Yehova alingaka biso mingi mpe yango ekotinda biso tólinga ye mingi.

16. Ndenge nini kobondela mbala na mbala ekoki kosala ete bolingo na biso mpo na Nzambe ekóma makasi?

16 Bondeláká Nzambe mbala na mbala. Mabondeli na biso esalaka ete tópusana mpenza penepene na “Moyoki ya libondeli.” (Nz. 65:2) Ntango tozali kososola ete Nzambe ayanolaka na mabondeli na biso, bolingo na biso mpo na ye ekómaka lisusu makasi. Na ndakisa, tokoki komona ete atikaka te ete tómekama koleka makasi na biso. (1 Ko. 10:13) Soki totungisami na makanisi mpe tosali malɔmbɔ epai na Yehova, tokoki kozwa mpenza ‘kimya ya Nzambe,’ kimya oyo eleki nyonso. (Flp. 4:6, 7) Na nsima, tokoki kobondela na nse ya motema, ndenge Nehemia asalaki, mpe tokoki komona ete Nzambe azali koyanola biso. (Neh. 2:1-6) Soki tozali ‘kotingama na mabondeli’ mpe tozali koyeba ete Yehova ayanolaka na malɔmbɔ na biso, bolingo na biso mpo na ye ekómaka makasi, mpe na ndenge yango  totyaka mpenza motema ete akosalisa biso tólonga mikakatano mosusu oyo ekoki komeka kondima na biso.​—Rom. 12:12.

17. Soki tolingaka Nzambe, ndenge nini tokotalela likambo etali koyanganaka na makita?

17 Zalá na momeseno ya koyanganaka na makita ya lisangá mpe mayangani nyonso. (Ebr. 10:24, 25) Bayisraele bazalaki koyangana mpo na koyoka mpe koyekola na ntina na Yehova mpo na kobanga ye mpe kokokisa mobeko na ye. (Mib. 31:12) Soki tolingaka mpenza Nzambe, tokomona ete ezali kilo te kosala mokano na ye. (Tángá 1 Yoane 5:3.) Na yango, tiká ete tópesa nzela na eloko ata moko te etinda biso tózwaka makita lokola eloko ya mpambampamba. Tokolinga soki moke te ete eloko moko ebungisela biso bolingo oyo tozalaki na yango liboso mpo na Yehova.​—Em. 2:4.

18. Bolingo ya Nzambe etindaka biso tósala nini oyo ezali na boyokani na nsango malamu?

18 Zalá na molende mpo na koyebisa basusu “solo ya nsango malamu.” (Gal. 2:5) Bolingo na biso mpo na Nzambe, etindaka biso tóyebisa bato Bokonzi ya Masiya, bokonzi ya Mwana na ye oyo alingaka mingi, Mwana oyo ‘akomata na mpunda mpo na kobundela solo’ na Armagedone. (Nz. 45:4; Em. 16:14, 16) Ezali mpenza esengo ndenge tozali kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli mpe kosalisa bango báyeba bolingo ya Nzambe mpe mokili na ye ya sika oyo alaki!​—Mat. 28:19, 20.

19. Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi mpo na ebongiseli oyo Yehova azwá ya kobatela bampate na ye?

19 Zaláká na botɔndi mpo na ebongiseli oyo Nzambe azwá ya kobatela bampate na ye. (Mis. 20:28) Bankulutu bazali ebongiseli ya Yehova, oyo asalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso. Bankulutu bazali lokola “esika ya komibomba mpo na kokima mopɛpɛ mpe esika ya kobombana mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi, lokola mikɛli ya mai na mokili oyo ezangá mai, lokola elili ya libanga monene na mokili oyo ekauká.” (Yis. 32:1, 2) Tókanisa naino ndenge toyokaka soki tomibombi na esika moko ntango mopɛpɛ makasi ezali kopepa to mbula ya mabanga ezali kobɛta! Ntango moi ezali kobɛta biso makasi, tosepelaka mingi soki tofandi na nse ya malili ya banzete. Maloba wana ya elilingi esalisi biso tómona ete bankulutu bápesaka lisalisi ya elimo mpe libɔndisi oyo tosengeli na yango. Soki tozali kotosa baoyo bazali kokamba biso, tokomonisa ete tozali na botɔndi epai ya ‘makabo wana oyo ezali bato’ mpe tokomonisa ete tolingaka Nzambe mpe Kristo, Mokonzi ya lisangá.​—Ef. 4:8; 5:23; Ebr. 13:17.

Yehova atyá bankulutu oyo bamibanzabanzaka mpenza mpo na bampate (Talá paragrafe 19)

KOBÁ KOKƆLISA BOLINGO NA YO MPO NA NZAMBE

20. Soki olingaka Nzambe, ndenge nini okoki kosalela Yakobo 1:22-25?

20 Soki ozali na boyokani malamu mpenza elongo na Yehova, okozala ‘motosi ya liloba, kasi moyoki kaka te.’ (Tángá Yakobo 1:22-25.) “Motosi” azalaka na kondima oyo emonanaka na misala lokola kosakola na molende mpe koyangana na makita mpe kopesa biyano. Lokola olingaka mpenza Nzambe, okotosa ‘mobeko ya Yehova oyo ezali ya kokoka,’ oyo esangisi makambo nyonso oyo azali kosɛnga yo.​—Nz. 19:7-11.

21. Mabondeli na biso esengeli kozala lokola nini?

21 Kolinga Yehova ekotinda yo obondelaka ye ntango nyonso na motema mobimba. Mpo na komonisa ndenge bazalaki kotumba mpaka ya malasi na ntango ya Kondimana ya mibeko, Davidi, moko ya bakomi ya nzembo ayembaki ete: “Libondeli na ngai ebongisama lokola mpaka ya malasi liboso na yo, kotombwama ya mabɔkɔ na ngai, lokola likabo ya mbuma ya mpokwa.” (Nz. 141:2; Kob. 30:7, 8) Tiká ete mabondeli na yo ya komikitisa, malɔmbɔ mpe masanzoli oyo euti mpenza na motema mpe maloba ya botɔndi epai ya Nzambe ezala lokola mpaka ya malasi ya nsolo kitoko, oyo ezali komonisa mabondeli oyo Nzambe andimaka.​—Em. 5:8.

22. Tokolobela bolingo ya ndenge nini na lisolo oyo elandi?

22 Yesu alobaki ete tosengeli kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani na biso. (Mat. 22:37-39) Ndenge tokolobela ezaleli yango na lisolo oyo elandi, bolingo na biso mpo na Yehova mpe mitinda na ye ekosalisa biso tósala malamu epai ya bandeko na biso bakristo mpe komonisela bazalani na biso bolingo.