Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2014

“Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko”

“Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko”

“[Mobeko] ya mibale, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’”​—MAT. 22:39.

1, 2. (a) Na kati ya Mibeko, wapi mobeko ya mibale oyo Yesu alobaki ete eleki mpe monene? (b) Mituna nini tokotalela sikoyo?

MPO na komeka Yesu, Mofarisai moko atunaki ye mokolo moko boye: “Moteyi, mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko?” Ndenge tomonaki na lisolo oyo eleki, Yesu alobaki ete “mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso” ezali ete: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” Mpe abakisaki ete: “Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’”​—Mat. 22:34-39.

2 Yesu alobaki ete tosengeli kolinga mozalani na biso ndenge biso moko tomilingaka. Na yango, ekozala malamu tómituna boye: Nani mpenza azali mozalani na biso? Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka mozalani na biso?

NANI MPENZA AZALI MOZALANI NA BISO?

3, 4. (a) Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na koyanola na motuna oyo batunaki ye ete: “Nani mpenza azali mozalani na ngai”? (b) Ndenge nini Mosamaria asalisaki moto oyo bayibaki ye, babɛtaki ye mpe batikaki ye pene na liwa? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Biso tokoki kokanisa ete mozalani ezali nde moto oyo  afandaka mosika te na ndako na biso to moninga moko oyo asalisaka biso mingi. (Mas. 27:10) Kasi, tókanisa na oyo Yesu alobaki na moto moko oyo azalaki komimona sembo ntango atunaki ye ete: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Mpo na koyanola, Yesu apesaki ndakisa ya Mosamaria moko ya motema malamu. (Tángá Luka 10:29-37.) Tokokaki kokanisa ete nganga-nzambe Moyisraele mpe Molevi bakokaki kozala bazalani ya malamu ntango bamonaki moto wana oyo bayibaki ye, babɛtaki ye mpe batikaki ye pene ya liwa. Nzokande, balekaki ye kozanga ete básala ata mwa likambo mpo na ye. Moto oyo asalisaki moto yango, ezalaki Mosamaria, moko ya bato oyo bazalaki kotosa Mobeko ya Moize, kasi Bayuda bazalaki koyina bango.​—Yoa. 4:9.

4 Mpo na kosalisa moto yango, Mosamaria wana, asopelaki moto yango mafuta mpe vinyo na bampota na ye. Badenari mibale oyo Mosamaria yango atikaki mpo básalisa moto yango, ezalaki lifuti ya mosala ya mikolo mibale. (Mat. 20:2) Na yango, ezali mpenza mpasi te koyeba nani azalaki mozalani mpenza ya moto wana oyo bazokisaki. Ndakisa oyo ya Yesu eteyi mpenza biso ete tosengeli komoniselaka bazalani na biso motema mawa mpe kolingaka bango.

Basaleli ya Yehova basalaka noki mpo na komonisa bolingo ya solosolo (Talá paragrafe 5)

5. Ndenge nini Batatoli ya Yehova bamonisaki ete balingaka bazalani na bango ntango mopɛpɛ eutaki kobɛta na engumba moko?

5 Mbala mingi ezalaka mpasi kozwa bato ya motema malamu lokola Mosamaria oyo. Ezali mpenza bongo, mingimingi na ntango oyo ya mpasi mpe na “mikolo ya nsuka,” oyo bato mingi balinganaka te na libota, bazali bato ya nko mpe balingaka te makambo ya malamu. (2 Tim. 3:1-3) Na ndakisa, bandeko bakoki kokóma na mikakatano ntango mabele eningani to mpela esalemi. Tótalela ndenge makambo elekaki ntango mopɛpɛ babengi Hurricane Sandy ebɛtaki engumba New York na sanza ya zomi ya mobu 2012. Na esika moko ya engumba yango oyo mopɛpɛ ebɛtaki makasi, miyibi bayibaki epai ya bato ya engumba yango oyo bazalaki na kura te, bazalaki konyokwama na malili mpe bazangaki biloko mosusu ya ntina. Kasi, kaka na engumba yango, Batatoli ya Yehova babongisaki programɛ moko oyo esalisaki bango mpo básalisana. Bakristo basalaka makambo wana mpo balingaka bazalani na bango. Wapi balolenge mosusu oyo tokoki komonisela bazalani na biso bolingo?

NDENGE OYO TOKOKI KOMONISA ETE TOLINGAKA BAZALANI NA BISO

6. Boyokani nini ezali kati na mosala na biso ya kosakola mpe kozala mozalani malamu?

6 Tósalisa bato báyeba Nzambe. Tosalaka yango ntango tozali kobenda likebi na bango na ‘libɔndisi ya solosolo oyo euti na Makomami.’ (Rom. 15:4) Na ntembe te, tomonisaka ete tozali bazalani ya malamu ntango toyebisaka basusu solo ya Biblia na mosala ya kosakola. (Mat. 24:14) Oyo nde libaku kitoko tozali na yango ya kosakola nsango ya Bokonzi ya “Nzambe oyo apesaka elikya”!​—Rom. 15:13.

7. Yesu apesaki toli nini, mpe matomba nini tozwaka soki tozali kolanda toli yango?

7 Tósalelaka bazalani na biso makambo ya malamu. Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu alobaki ete: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo; ya solo, wana nde likambo ya ntina oyo Mibeko mpe Basakoli bateyi.” (Mat. 7:12) Soki tozali kosalela basusu makambo ndenge Yesu apesaki toli, wana tokosala na boyokani na “Mibeko,” elingi koloba makambo oyo elobelami kobanda na (mokanda ya Ebandeli tii na Kolimbola Mibeko) mpe “Basakoli,” elingi koloba kobanda na (mikanda ya Makomami ya Ebre oyo elobeli bisakweli). Makomi yango emonisi polele ete Nzambe apambolaka baoyo balingaka basusu. Na ndakisa, na nzela ya Yisaya, Yehova alobaki ete: “Bóbatela bosembo, mpe bósala makambo ya boyengebene . . . Esengo na moto oyo azali kosala bongo.” (Yis. 56:1, 2) Tozwaka mpenza mapamboli mpo tolingaka bazalani na biso mpe tosalelaka bango makambo ya boyengebene.

8. Mpo na nini tosengeli kolingaka banguna na biso, mpe likambo nini ekoki mbala mosusu komonana soki tosali bongo?

 8 Lingáká banguna na yo. Yesu alobaki ete: “Boyokaki ete balobi, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo mpe koyina monguna na yo.’ Nzokande, ngai nalobi na bino ete: Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino; mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló.” (Mat. 5:43-45) Ntoma Paulo amonisaki likanisi yango ntango akomaki ete: “Soki monguna na yo azali na nzala, pesá ye eloko alya; soki azali na mposa ya mai, pesá ye mai amɛla.” (Rom. 12:20; Mas. 25:21) Mobeko ya Moize ezalaki kosɛnga na moto nyonso ete asalisa monguna na ye na kofungola nyama na ye oyo elali na nse ya mokumba na yango. (Kob. 23:5) Kosala bongo elongo, ezalaki kosalisa bato wana oyo bazalaki banguna mpo ete bákóma baninga ya solosolo. Lokola bakristo bamonisaka bolingo, yango esalaki ete banguna na biso mingi bámonisela biso boboto. Soki tozali kolinga banguna na biso, ezala baoyo bamonisaka biso mpenza bwale, tokozala mpenza na esengo soki bamosusu kati na bango bayambi solo!

9. Yesu alobaki nini na likambo etali kozongisa kimya elongo na ndeko na biso?

9 “Bólanda kozala na kimya na bato nyonso.” (Ebr. 12:14) Na ntembe te, toli oyo etaleli mpe bandeko na biso, mpo Yesu alobaki ete: “Soki omemi likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na likambo ná yo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo na ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.” (Mat. 5:23, 24) Nzambe akopambola biso soki tozali kolinga ndeko na biso mpe tosalaka na lombangu mpo na kozongisa kimya elongo na ye.

10. Mpo na nini tosengeli te kozala bato oyo balukaka kaka mabunga ya basusu?

10 Kozala te moto oyo alukaka kaka mabunga ya basusu. Yesu alobaki ete: “Bótika kosambisa mpo básambisa bino te; mpo bakosambisa bino na lisambisi oyo bozali kosambisa; mpe bakomekela bino na emekeli oyo bozali komekela. Bongo mpo na nini ozali kotala lititi na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko? To ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: ‘Tiká nalongola lititi na liso na yo’; nzokande talá! libaya ya motɔndɔ ezali na liso na yo moko? Mokosi! Liboso longolá libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko, bongo okomona polele ndenge ya kolongola lititi na liso ya ndeko na yo.” (Mat. 7:1-5) Oyo nde  liteya moko kitoko mpenza tozwi ete tolobaka te mabe mpo na mwa bafoti mikemike ya basusu ntango oyo biso moko tokoki kutu kozala na bafoti ya minene koleka!

LOLENGE ELEKI MALAMU YA KOMONISELA BASUSU BOLINGO

11, 12. Wapi lolenge eleki malamu oyo tomonisaka ete tólingaka bazalani na biso?

11 Tolingaka komonisela bazalani na biso bolingo na lolenge moko oyo eleki malamu mpenza. Lokola Yesu, tosakolaka nsango malamu ya Bokonzi. (Luka 8:1) Yesu apesaki bayekoli na ye etinda ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Mat. 28:19, 20) Soki tozali kosala oyo tokoki mpo na kokokisa etinda wana, tozali kosalisa bazalani na biso bálongwa na nzela ya monene mpe oyo efungwamá oyo ezali komema na libebi mpe bákɔta na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi. (Mat. 7:13, 14) Na ntembe te, Yehova apambolaka milende ya ndenge wana.

12 Lokola Yesu, tosalisaka bato báyeba bobola na bango ya elimo. (Mat. 5:3) Mpo na bato oyo bandimaka ete bazali babola na elimo, tokokiselaka bango mposa yango na ndenge tosakwelaka bango “nsango malamu ya Nzambe.” (Rom. 1:1) Baoyo bandimaka nsango ya Bokonzi bázongisaka boyokani ná Nzambe na nzela ya Yesu Kristo. (2 Ko. 5:18, 19) Yango wana, soki tozali kosakola nsango malamu, tokomonisa mpenza ete tólingaka bazalani na biso na lolenge moko eleki malamu.

13. Oyokaka ndenge nini na libaku oyo tozali na yango ya kozala basakoli ya Bokonzi?

13 Ntango tozongelaka bato mpe toyekolaka na bango na ndenge oyo ebongi mpenza, toyokaka esengo mpo tosalisaka bango báyokanisa bomoi na bango na mitinda ya sembo ya Nzambe. Yango ekoki komonana ntango moyekoli ya Biblia azali kosala mbongwana na bomoi na ye. (1 Ko. 6:9-11) Ezalaka mpenza esengo komona ndenge Nzambe asalisaka baoyo bazali “na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko” bazali kosala bambongwana oyo esengeli mpe kokóma na boyokani ya malamu elongo na ye. (Mis. 13:48) Mpo na bato mingi oyo bazalaki na elikya te, bakómaka na esengo mpe mawa elongwaka lokola bakómá kotyela tata na biso ya likoló motema. Ezalaka mpenza esengo komona ndenge bato ya sika bazali kokola na elimo! Ondimi te ete kozala mosakoli ya Bokonzi ezali lolenge oyo eleki malamu mpenza ya komonisa ete tolingaka bazalani na biso?

NDENGE OYO BIBLIA ELIMBOLI BOLINGO YA SOLOSOLO

14. Tángá na maloba na yo moko mwa makambo oyo elimboli bolingo na 1 Bakorinti 13:4-8.

14 Na makambo oyo tosalelaka bazalani na biso, kosalela makambo oyo ntoma Paulo akomaki na likambo etali bolingo ekoki kobatela biso na mikakatano mingi, kutu ekoki nde komemela biso esengo mpe mapamboli ya Nzambe. (Tángá 1 Bakorinti 13:4-8.) Tótalela na mokuse oyo ntoma Paulo alobaki na likambo etali bolingo mpe tómona ndenge tokoki kosalela maloba yango na boyokani na biso ná bazalani na biso.

15. (a) Mpo na nini tosengeli kozala motema molai mpe boboto? (b) Mpo na bantina nini tosengeli koboya zuwa mpe lolendo?

15 “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto.” Ndenge kaka Nzambe amoniseli bato ya kozanga kokoka motema molai mpe boboto, biso mpe tosengeli kozala motema molai mpe boboto ntango basusu basaleli biso mabe to bamoniseli biso makambo makasi. “Bolingo ezali na zuwa te,” na yango, bolingo ya solo ekopekisa biso tólula te biloko ya moto to mikumba na kati ya lisangá. Lisusu, soki tozali na bolingo, tokomikumisa te to kovimba te na lolendo. Kutu, “miso ya lolendo ná motema ya lofundo, mwinda ya bato mabe, ezali lisumu.”​—Mas. 21:4.

16, 17. Ndenge nini tokoki kosala na boyokani ya makambo oyo ezali na 1 Bakorinti 13:5, 6?

16 Bolingo ekosala ete tomitambwisaka na ndenge ebongi liboso ya bazalani na biso. Tokokosa bango te, tokoyiba bango te, to tokosala eloko moko te oyo ekobuka mibeko mpe mitinda ya Yehova. Bolingo ekopekisa mpe biso ete tolukaka kaka matomba na biso,  kasi tomibanzabanzaka mpe mpo na basusu.​—Flp. 2:4.

17 Bolingo ya solosolo esilikaka te mpe “ebombaka mabe na motema te,” lokola nde totángelaka basusu mabunga oyo basalelaka biso. (1 Tes. 5:15) Soki tozali kobomba nkanda na motema, tokosepelisa Nzambe te, kutu tokotya nde mafuta na mɔtɔ, oyo ekoki kozikisa ná biso moko ná basusu. (Lev. 19:18) Bolingo etindaka biso tósepela na solo, kasi ekotinda biso te ‘tósepela na makambo ya kozanga boyengebene,’ ata soki bazali konyokola moto oyo ayinaka biso to bazali kosalela ye makambo mabe.​—Tángá Masese 24:17, 18.

18. Liteya nini tozwi na likambo etali bolingo na 1 Bakorinti 13:7, 8?

18 Tótalela lisusu ndenge ntoma Paulo alimbolaki bolingo. Alobaki ete bolingo “ekangaka motema na makambo nyonso.” Soki moto moko ayokisi biso mpasi mpe asɛngi bolimbisi, bolingo ekotinda biso tólimbisa ye. Bolingo “endimaka makambo nyonso” oyo ezali na Liloba ya Nzambe mpe etindaka biso tózala na botɔndi mpo na bilei ya elimo oyo tozwaka. Bolingo “elikyaka makambo nyonso” oyo ekomami na Biblia mpe etindaka biso tósalisa basusu mpo bákóma na elikya oyo biso tozali na yango. (1 Pe. 3:15) Bolingo etindaka mpe biso tóbondelaka mpe tózala na elikya ete mikakatano na biso ekosuka na ndenge ya malamu. Bolingo “eyikaka mpiko na makambo nyonso,” ezala basaleli biso masumu, banyokoli biso to bamonisi biso mpasi. Kutu, “bolingo esilaka soki moke te.” Bato ya botosi bakokoba komonisa yango seko na seko.

KOBÁ KOLINGA MOZALANI NA YO LOKOLA YO MOKO

19, 20. Toli nini ya Makomami ekoki kotinda biso tókoba kolinga mozalani na biso?

19 Soki tozali kosalela toli ya Biblia, tokokoba komonisa ete tolingaka bazalani na biso. Tosengeli komonisa bolingo yango epai ya bato nyonso, kasi te kaka epai ya bato oyo tozali na bango mboka moko. Tosengeli kobosana te maloba oyo ya Yesu: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Mat. 22:39) Nzambe ná Kristo basepelaka ete tólinga bazalani na biso. Soki tozali koyeba mpenza te nini tokoki kosala na likambo moko boye mpo na mozalani na biso, tosengeli kobondela mpo Nzambe asalisa biso na nzela ya elimo santu na ye. Soki tosali bongo, Yehova akopambola biso mpe akosalisa biso tómonisa mpenza bolingo.​—Rom. 8:26, 27.

20 Etinda ya kolinga mozalani na biso ebengami “mobeko ya mokonzi.” (Yak. 2:8) Nsima ya kolobela mibeko mosusu ya Mibeko ya Moize, ntoma Paulo alobaki ete: “Mobeko mosusu nyonso​—etángami na mokuse na liloba oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Bolingo esalaka moto mabe te; yango wana, bolingo ezali nde kokokisama ya mibeko.” (Rom. 13:8-10) Na yango, tosengeli kokoba kolinga mozalani na biso.

21, 22. Mpo na nini tosengeli kolinga Nzambe mpe mozalani na biso?

21 Wana tozali komanyola na ntina oyo tosengeli kolinga mozalani na biso, ekozala malamu tókanisa na maloba oyo Yesu alobaki mpo na tata na ye ete “abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.” (Mat. 5:43-45) Tosengeli komonisa ete tolingaka mozalani na biso, ata soki azali sembo to te. Ndenge tomonaki yango, lolenge oyo eleki malamu ya komonisa ete tolingaka mozalani na biso ezali ya koyebisa ye nsango ya Bokonzi. Soki mozalani na biso andimi nsango malamu na motema moko, akozwa mapamboli oyo Nzambe abombi mpo na ye!

22 Ezali na bantina mingi oyo esengeli kotinda biso tólinga Yehova na motema mobimba. Ezali mpe na balolenge mingi oyo tokoki komonisa ete tolingaka mozalani na biso. Soki tozali komonisa ete tolingaka Nzambe mpe mozalani na biso, tokomonisa ete tozali na limemya na makambo oyo Yesu alobaki na likambo oyo ya ntina mingi. Na nyonso, tozali kosepelisa Yehova, tata na biso ya likoló oyo alingaka biso mingi.