Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2014

Otalelaka bolɛmbu ya basusu lokola Yehova?

Otalelaka bolɛmbu ya basusu lokola Yehova?

“Binama ya nzoto oyo emonanaka lokola ete ezali ya bolɛmbu ezalaka na ntina mingi.”1 KO. 12:22.

1, 2. Mpo na nini ntoma Paulo amityaki na esika ya bato oyo balɛmbi?

BISO nyonso tolɛmbaka na bantango mosusu. Gripɛ to bamaladi mosusu ekoki kolɛmbisa biso mpe ekoki kosala ete tózala te na makasi ya kokokisa misala na biso ya mokolo na mokolo. Kanisá ete olɛmbi kaka te mpo na pɔsɔ moko to mibale, kasi na boumeli ya basanza mingi. Soki ezali bongo, okosepela te soki basusu bamoni malamu básalisa yo?

2 Ntoma Paulo ayebaki ete makambo ya mpasi oyo esengelaki kouta na libándá ya lisangá to na kati na yango, ekokaki kolɛmbisa ye. Kutu, mbala mingi akanisaki ete akómi na nsuka. (2 Ko. 1:8; 7:5) Nsima ya kokanisa na bomoi na ye mpe ebele ya bampasi oyo akutanaki na yango na bomoi na ye ya bokristo, ntoma Paulo alobaki ete: “Nani alɛmbi, mpe ngai nalɛmbi te?” (2 Ko. 11:29) Mpe lokola lisangá ya bokristo ezalaka na bato ndenge na ndenge, ntoma Paulo akokanisaki yango na biteni ya nzoto ya moto, mpe alobaki ete oyo “emonanaka lokola ete ezali na bolɛmbu ezalaka na ntina mingi.” (1 Ko. 12:22) Alingaki mpenza koloba nini? Mpo na nini tosengeli kotalela baoyo bamonanaka lokola balɛmbi ndenge Yehova atalelaka bango? Mpe ndenge nini kosala bongo ekoki komemela biso matomba?

 NDENGE YEHOVA ATALELAKA BOLƐMBU YA BATO

3. Nini ekoki kotinda biso tóbanda kotalela bandeko ya lisangá oyo bazali na mposa ya lisalisi na lolenge boye to boye?

3 Tozali na mokili oyo bato balingaka kowelana, mpe bakumisaka mingi bato oyo bazali na nguya mpe oyo bazali naino bilenge. Mpo na kokokisa mposa na bango, bato mingi basalaka nyonso oyo balingi, mpe mbala mingi bakipaka te bamposa ya bato oyo balɛmbi to bazali na makasi te. Tosepelaka te na ezaleli yango, kasi kozanga koyeba, tokoki kokolisa ezaleli ya kotalela na lolenge mabe baoyo bazalaka na mposa ya lisalisi, ezala na kati ya lisangá. Kasi, tokoki kokóma kotalela makambo na ndenge ya bokatikati, ndenge Nzambe asalaka.

4, 5. (a) Ndenge nini ndakisa oyo ezali na 1 Bakorinti 12:21-23 esalisi biso tósosola mpenza ndenge Yehova atalelaka bolɛmbu ya bato? (b) Matomba nini tokozwa soki tosalisi bato ya bolɛmbu?

4 Tokoki kososola lolenge oyo Yehova atalelaka bolɛmbu ya bato na ndakisa oyo ntoma Paulo akomaki na mokanda na ye ya liboso epai ya Bakorinti. Na mokapo ya 12, akundweli biso ete ata mwa enama ya moke kaka ya nzoto ya moto ezali na mosala na yango. (Tángá 1 Bakorinti 12:12, 18, 21-23.) Kasi, bato mosusu ya mayele baboyaka kondima likanisi yango. Nzokande, boyekoli oyo bato ya anatomie basali, emonisi ete biteni ya nzoto ya moto oyo kala ezalaki komonana lokola ete ezali na ntina te, esalaka mpenza mosala ya ntina. * Na ndakisa, bamosusu bazalaki komituna soki mosapi ya moke ya lokolo ezali na ntina to te; nzokande, bamoni sikoyo ete mosapi yango esalisaka mingi mpo nzoto mobimba etɛlɛma malamu.

5 Ndakisa oyo ya ntoma Paulo emonisi ete moto nyonso na kati ya lisangá azali na ntina. Na bokeseni na Satana, oyo alukaka kolongola lokumu ya bato, Yehova apesaka basaleli na ye lokumu, ezala baoyo bamonanaka lokola bato balɛmbi to bazangi nguya, mpe amonaka bango ete bazali na ntina. (Yobo 4:18, 19) Likanisi wana esengeli kosalisa mokomoko na biso asepela na mokumba oyo azali na yango na lisangá mpe koyeba ete tozali na kati ya lisangá ya basaleli ya Nzambe ya mokili mobimba. Na ndakisa, kanisá naino mokolo oyo osimbaki mobange moko na lobɔkɔ mpo osalisa ye. Ekoki kozala ete esɛngaki otambola malɛmbɛ. Omoni te ete kosalisa moto ezalaka mpo na kokokisa mokano moko ya ntina mpe epesaka moto oyo asali yango esengo? Ya solo, soki tozali kokokisa bamposa ya basusu, tokoyoka esengo ndenge tosalisi bango, mpe tokokóma na motema molai, na bolingo mpe tokokola. (Ef. 4:15, 16) Tata na biso ya bolingo ayebi ete lisangá oyo ezwaka basangani na yango nyonso na valɛrɛ, atako bazali na bandelo, emonisaka bokatikati mpe bolingo.

6. Ndenge nini ntoma Paulo asalelaki maloba “bolɛmbu” mpe “makasi” na ntango mosusu?

6 Likambo ya esengo, ntango akomelaki Bakorinti, ntoma Paulo asalelaki liloba “bolɛmbu” na ndenge oyo bato oyo bazalaki bandimi te bazalaki kotalela bakristo ya siɛklɛ ya liboso mpe na lolenge oyo ye moko azalaki komiyoka. (1 Ko. 1:26, 27; 2:3) Ntango ntoma Paulo alobelaki baoyo bazali na “makasi,” alingaki te kopesa likanisi ete bakristo mosusu bámimona lokola baleki basusu. (Rom. 15:1) Kasi, alingaki nde koloba ete bakristo oyo bakɔmeli basengeli kozala motema molai epai ya baoyo bapikaki naino makolo te na kati ya solo.

TOSENGELI KOBONGOLA LOLENGE NA BISO YA KOTALELA BASUSU?

7. Nini ekoki mbala mosusu kosala ete tókakatana mpo na kosalisa baoyo bazali na bosɛnga?

7 Ntango tozali kosalisa “moto oyo azangá,” tomekolaka Yehova mpe andimaka biso. (Nz. 41:1; Ef. 5:1) Nzokande, soki tozali na makanisi mabe mpo na bato oyo bazali na bosɛnga, yango ekoki kosala ete ntango  mosusu tókakatana mpo na kosalisa bango. To soki toyebi mpenza te nini tosengeli koloba, tokoki koyoka nsɔni mpe kokima bato oyo bazali na mokakatano. Cynthia, * ndeko mwasi moko oyo mobali asundolá alobi boye: “Ekoki kosala mpasi mpenza na motema soki bandeko basundoli yo to bazali te kosala makambo ndenge okanisaki ete baninga ya motema bakoki kosala. Ntango moto azali na mikakatano, azalaka na mposa ya bato.” Mokonzi Davidi ayebaki ndenge moto oyo basundoli ayokaka.Nz. 31:12.

8. Nini ekoki kosalisa biso tókóma komitya mingi na esika ya basusu?

8 Na ntembe te, tokomitya mpenza na esika ya bandeko na biso soki toyebi ete bolɛmbu na bango eutaki na makambo ya mpasi lokola maladi, kozala na molongani oyo azali Motatoli te to na moboti (baboti) oyo azali Motatoli te, mpe kotungisama na makanisi. Biso mpe tokoki mbala mosusu kokutana na makambo ya ndenge wana. Atako Bayisraele bazalaki babola mpe balɛmbaki na mokili ya Ezipito, Yehova alobaki na bango liboso bákɔta na Mokili ya Ndaka ete basengeli te ‘koyeisa mitema na bango makasi’ epai ya bandeko na bango oyo bazalaki na mpasi. Yehova alingaki bábosana te ete basengeli kosalisa mobola.Mib. 15:7, 11; Lev. 25:35-38.

9. Mokano na biso ya libosoliboso ntango tozali kosalisa baoyo bakutani na mikakatano esengeli kozala nini? Pesá ndakisa.

9 Na esika ya kokanisela basusu mabe nokinoki, tosengeli nde kopesa lisalisi ya elimo epai ya baoyo bazali mpenza kotungisama. (Yobo 33:6, 7; Mat. 7:1) Tózwa ndakisa: Soki moto akumbaka tukutuku asali aksida mpe akei nokinoki na lopitalo, minganga bakobanda kotuna mpo na koyeba soki ye nde moto asalaki ete aksida yango esalema? Te, bakobanda mbala moko kopesa ye lisalisi oyo esengeli. Ndenge moko mpe, soki ndeko moko mokristo alɛmbi mpo na makambo oyo akutani na yango, mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya kopesa ye lisalisi na elimo.Tángá 1 Batesaloniki 5:14.

10. Ndenge nini bandeko mosusu oyo bamonanaka lokola balɛmbálɛmbá bakoki mpenza kozala “bazwi na kati ya kondima”?

10 Soki tofandi mpe tokanisi mpo na mikakatano oyo ekómeli bandeko na biso, tokotalela bolɛmbu na bango na ndenge mosusu. Kanisá mpo na bandeko basi oyo bazali kobunda na botɛmɛli ya libota na boumeli ya bambula. Ntango mosusu, bamosusu bamonanaka lokola bato balɛmbálɛmbá, atako bongo, bamonisaka ete bazali na kondima makasi mpe na makasi ya kotosa Yehova na motema mobimba, boye te? Ntango omonaka mama moko oyo abɔkɔlaka mwana to bana ye moko azali koyangana mbala na mbala na makita elongo na mwana to bana yango, kondima na ye mpe ekateli oyo azali na yango ekamwisaka yo te? Bongo tokoloba nini mpo na bilenge oyo bazali kokangama na solo atako bazali kokutana na makambo mabe na eteyelo? Mpo na koloba solo, tokoki kondima ete bandeko yango oyo bakoki komonana lokola balɛmbálɛmbá, bakoki kozala “bazwi na kati ya kondima” lokola bandeko mosusu kati na biso oyo bazali na mikakatano te.Yak. 2:5.

TALELÁKÁ BASUSU NDENGE YEHOVA ATALELAKA BANGO

11, 12. (a) Nini ekosalisa biso tóbongola lolenge na biso ya kotalela mabunga ya basusu? (b) Liteya nini tozwi na lolenge oyo Yehova atalelaki likambo ya Arona?

11 Mpo na kosalisa biso tótalela bolɛmbu ya basusu ndenge Yehova asalaka yango, tosengeli kotalela makambo oyo asalaki mpo na basaleli na ye mosusu. (Tángá Nzembo 130:3.) Na ndakisa, soki ozalaki wana elongo na Moize ntango Arona asalaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ ya wolo, ndenge nini olingaki koyoka ntango Arona azalaki kolongisa mabe na ye? (Kob. 32:21-24) To ndenge nini olingaki kotalela ezaleli oyo Arona amonisaki ntango, alandaki makanisi ya ndeko na ye Miriame, mpe alobaki mabe mpo na Moize na ndenge abalaki mwasi mopaya? (Mit. 12:1, 2) Olingaki kosala nini lokola Arona ná Moize bazangaki kokumisa Yehova, na  ntango oyo apesaki bango mai na ndenge ya likamwisi na Meriba?Mit. 20:10-13.

12 Na makambo oyo nyonso, Yehova akokaki kopesa Arona etumbu mbala moko. Kasi, amonaki ete Arona azalaki moto mabe te to ete foti na ye elekaki ndelo te. Emonani ete Arona atikaki nde ete makambo oyo basusu basalaki to mosukusuku na bango epekisa ye kosala oyo ezali malamu. Nzokande, ntango ye moko asalaki mabunga, andimaki yango mbala moko mpe aboyaki te bikateli oyo Yehova azwaki. (Kob. 32:26; Mit. 12:11; 20:23-27) Yehova amonaki malamu atya likebi mingi na kondima ya Arona mpe na ndenge abongolaki motema. Basiɛklɛ na nsima, Yehova akobaki kotalela Arona mpe bakitani na ye lokola bato oyo bazalaki kobanga ye.Nz. 115:10-12; 135:19, 20.

13. Likambo nini tosengeli kotalela malamumalamu mpo na kobongisa lolenge oyo totalelaka bolɛmbu ya basusu?

13 Mpo tóyokanisa makanisi na biso ná oyo ya Yehova, tosengeli kotalela malamumalamu lolenge oyo tótalelaka baoyo bamonanaka lokola balɛmbi. (1 Sa. 16:7) Na ndakisa, tosalaka nini soki elenge moko aponaki te lisano moko na bwanya to ntango amonisi te bokɛngi na likambo boye to boye? Na esika tósilisa ye loposo na kotyola, mpo na nini te kokanisa nde na oyo tokoki kosala mpo na kosalisa ye akola na elimo? Tokoki koluka kosalisa moto oyo asengeli na lisalisi, mpe soki tosali bongo, tokomonisa ete bososoli mpe bolingo na biso ezali kokola.

14, 15. (a) Yehova ayokaki ndenge nini ntango Eliya azangaki mpiko mpo na mwa ntango? (b) Liteya nini tokoki kozwa na likambo ya Eliya?

14 Lisusu, mpo na kosalisa biso tóbongisa lolenge na biso ya kotalela basusu, tosengeli kokokanisa makanisi na biso na lolenge oyo Yehova asalaki ntango oyo basaleli na ye mosusu batungisamaki makasi. Moko ya basaleli yango ezali Eliya. Atako alongaki basakoli 450 ya Baala, Eliya akimaki mokonzi mwasi Yezabele ntango ayokaki ete mwasi yango asali mwango mabe mpo na koboma ye.  Nsima ya kotambola kilomɛtrɛ soki 150 tii na Beere-sheba, mpe akómaki mosika na kati ya esobe. Lokola mobembo yango elɛmbisaki ye mpe moi ezalaki kobɛta makasi, mosakoli yango afandaki na nse ya nzete mpe ‘asɛngaki ete akufa.’1 Bak. 18:19; 19:1-4.

Yehova amonaki esika makasi ya Eliya esuki mpe atindaki anzelu alendisa ye (Talá paragrafe 14, 15)

15 Yehova ayokaki ndenge nini ntango azalaki kotala uta na likoló mpe azali komona ndenge mosakoli na ye wana ya sembo azali kotungisama? Abwakaki mosaleli na ye wana kaka mpo atungisamaki na makanisi mpe azangaki mpiko mpo na mwa ntango moke? Soki moke te! Yehova amonaki ete makasi ya Eliya esuki wana mpe atindelaki ye anzelu. Anzelu yango alendisaki ye mbala mibale mobimba mpo alya. Na ndenge yango, mobembo ekozala ‘mpasi mingi te mpo na ye.’ (Tángá 1 Bakonzi 19:5-8.) Na ntembe te, ata liboso apesa ye malako nini, Yehova ayokaki mosakoli na ye mpe azwaki bibongiseli oyo esengeli mpo na kosalisa ye.

16, 17. Ndenge nini tokoki komekola Yehova na makambo oyo asalaki epai ya Eliya?

16 Ndenge nini tokoki komekola Nzambe na biso oyo amibanzabanzaka mpo na bato? Tosengeli kowelaka te kopesa toli. (Mas. 18:13) Ekozala malamu liboso kozwa ntango ya komitya naino na esika ya baoyo bazali kokanisa ete bazali na “lokumu moke” mpo bakutani na mikakatano. (1 Ko. 12:23) Soki tosali bongo, tokopesa mpenza lisalisi oyo eyokani mpenza na mposa na bango.

17 Na ndakisa, kanisá lisusu na ndakisa ya ndeko Cynthia oyo tolobelaki liboso, oyo mobali na ye asundolaki ye ná bana na bango mibale ya basi. Batikalaki kaka bango moko. Batatoli ya Yehova mosusu basalaki nini? Ye moko alobi boye: “Ntango toyebisaki bandeko yango na telefone likambo oyo ekómeli biso, bayaki epai na biso nsima kaka ya miniti 45. Bazalaki na mai ya miso. Na boumeli ya mikolo mibale to misato ya liboso, batikaki biso te biso moko. Lokola tozalaki kolya malamu te mpe kotungisama na makanisi, bazwaki biso mpe tokendaki epai na bango mpo na mwa ntango.” Na ntembe te, likambo yango esalisi yo okanisa maloba oyo ya Yakobo, oyo akomaki ete: “Soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azali bolumbu mpe azangi bilei oyo ekoki mpo na mokolo, kasi moko na bino alobi na bango ete: ‘Bókende na kimya, bóyɔta mɔtɔ mpe bólya malamu,’ nzokande bopesi bango te biloko oyo esengeli mpo na nzoto na bango, litomba ezali wapi? Ndenge moko mpe, kondima, soki ezali na misala te, ekufi.” (Yak. 2:15-17) Lokola basepelaki mingi na lisalisi oyo bandeko ya lisangá bapesaki bango na ntango oyo ebongi, ndeko Cynthia ná bana na ye, bazwaki makasi ya kokóma babongisi-nzela basungi kaka sanza motoba nsima ya mokakatano na bango.2 Ko. 12:10.

EMEMAKA MATOMBA MINGI

18, 19. (a) Ndenge nini tokoki kosalisa baoyo bakwei na bolɛmbu mpo na mwa ntango? (b) Banani bazwaka matomba ntango tozali kosalisa baoyo balɛmbi?

18 Soki obɛlá, oyebi ete esɛngaka ntango mpo nzoto ezonga makasi. Ndenge moko, ekoki kosɛnga ntango mpo ete mokristo oyo alɛmbaki mpo na mikakatano to mitungisi oyo akutanaki na yango azongela makasi na elimo. Toboyi te, ndeko na biso wana asengeli koyekolaka ye moko, kobondelaka mpe kosala makambo mosusu oyo esɛngami mpo na mokristo mpo kondima na ye ekóma makasi. Kasi, tokomonisela ye motema molai tii ntango akokóma makasi? Mpe na ntango wana oyo azali kobunda mpo azonga makasi na elimo, tokokoba komonisela ye bolingo? Tokosala makasi tósalisa baoyo balɛmbi mpo na mwa ntango bámona ete bazali na ntina mpe ete tolingaka bango?2 Ko. 8:8.

19 Tosengeli mpe kobosana soki moke te ete ntango tozali kosalisa bandeko na biso, tokozwa esengo mingi oyo eutaka na kopesa. Tozali mpe kokolisa makoki na biso ya komitya na esika ya basusu mpe ya komonisa motema molai. Kasi esuki kaka wana te. Lisangá mobimba ekómaka na esengo mpe bolingo. Na koleka, tomekolaka Yehova, oyo azwaka moto nyonso na motuya mingi. Ya solo, biso nyonso tozali mpenza na bantina ya kolanda toli oyo ezali kolendisa biso ete ‘tósalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu.’Mis. 20:35.

^ par. 4 Na buku na ye (The Descent of Man), Charles Darwin amonisaki ete binama mosusu ya nzoto “ezali na ntina te.” Moko ya bato oyo bazalaki kondima likanisi na ye wana, alobaki ete ezali na ebele ya “biteni ya nzoto” oyo ezangi ntina, na kati na yango tokoki kotánga appendice mpe enama moko na nkingo.

^ par. 7 Topesi ye nkombo mosusu.