Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2014

Yehova azali Nzambe oyo ayebi kobongisa makambo

Yehova azali Nzambe oyo ayebi kobongisa makambo

“Nzambe azali Nzambe, ya mobulu te, kasi ya kimya.”​—1 KO. 14:33.

1, 2. (a) Nani azali ekelamu ya liboso ya Nzambe, mpe ndenge nini Yehova asalelaki ye? (b) Nini emonisi ete baanzelu babongisami malamu?

YEHOVA, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba asalaka makambo na molɔngɔ. Ekelamu na ye ya liboso ezali mwana na ye se moko oyo abotamaki, oyo abengami “Liloba” mpo ete azali molobeli ya libosoliboso ya Nzambe. Liloba yango asalelaki Yehova na boumeli ya ebele ya bambula, mpo Biblia elobi ete: “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe.” Biblia eyebisi mpe biso ete: “Biloko nyonso esalemaki na nzela na ye [Liloba], mpe eloko moko te esalemaki soki na nzela na ye te.” Eleki sikoyo mbula soki 2 000, Nzambe atindaki Yesu Kristo to Liloba awa na mabele, epai asalaki na bosembo nyonso mokano ya Tata na ye na ndenge ya kokoka.​—Yoa. 1:1-3, 14.

2 Liboso aya awa na mabele, Mwana wana ya Nzambe asalaki lokola “mosali ya mayele.” (Mas. 8:30) Na nzela na ye, Yehova azalisaki bamilio ebele ya baanzelu mosusu kuna na likoló. (Kol. 1:16) Na likambo etali baanzelu yango, vɛrsɛ moko ya Biblia eyebisi biso boye: “Bankóto mbala nkóto bazalaki kosalela ye [Yehova], mpe nkóto zomi mbala nkóto zomi batɛlɛmaki liboso na ye.” (Dan. 7:10) Biblia elobelaka baanzelu lokola “mampinga” ya Yehova oyo ebongisami malamu.​—Nz. 103:21.

3. Pesá motángo ya minzoto mpe baplanɛti, mpe ndenge nini ebongisami?

 3 Tokoloba nini mpo na biloko mosusu oyo Yehova akelá, na ndakisa ebele ya minzoto mpe baplanɛti? Mpo na minzoto, zulunalo moko (Chronicle) na Houston, na Texas elobeli bolukiluki moko oyo euti kosalema. Emonisi ete ezali na “minzoto bamiliare na bamiliare, to mbala misato koleka bakalkile oyo bato ya siansi bazalaki kosala liboso.” Minzoto ebongisami na bagalaksi, mpe mokomoko na yango ezali na bamiliare ya bamiliare ya minzoto to baplanɛti. Bagalaksi mingi ebongisamá na bituluku ya mikemike mpe ya mineneminene.

4. Mpo na nini ebongi mpenza ete basaleli ya Nzambe awa na mabele básalaka na bomoko?

4 Ndenge kaka baanzelu ya sembo babongisami malamu na likoló, minzoto mpe baplanɛti ebongisami mpe malamu mpenza. (Yis. 40:26) Yango wana, ebongi mpenza koloba ete Yehova akoki kobongisa basaleli na ye awa na mabele. Alingaka ete básalaka makambo na molɔngɔ, mpe kosala bongo ezali na ntina mingi mpo bazali na makambo mingi ya ntina ya kosala. Mosala kitoko mpe ya sembo oyo basaleli ya Yehova ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso basali, emonisi polele ete azali na bango mpe ete azali “Nzambe ya mobulu te kasi ya kimya.”​—Tángá 1 Bakorinti 14:33, 40.

NDENGE OYO BASALELI YA NZAMBE BABONGISAMAKI NA NTANGO YA KALA

5. Ndenge nini ebongiseli ya kotondisa bato na mabele mobimba ekatamaki?

5 Ntango Yehova akelaki Adama ná Eva, ayebisaki bango boye: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino, mpe bózala na bokonzi likoló ya mbisi ya mbu mpe likoló ya bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe likoló ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi, oyo ezali kolanda na mabele.” (Eba. 1:28) Bato basengelaki kokóma ebele na mabele mpe kokoba kosala makambo na molɔngɔ mpe kokómisa mabele mobimba paradiso. Kasi, ebongiseli wana ekatanaki mpo na mwa ntango mpo Adama ná Eva bazangaki botosi. (Eba. 3:1-6) Na nsima, “Yehova amonaki ete mabe ya moto ezalaki mingi na mabele mpe mposa nyonso ya makanisi ya motema na ye ezalaki kaka mabe ntango nyonso. Mpe mabele ebebaki na miso ya Nzambe ya solo mpe mabele etondaki na mobulu.” Yango wana, Nzambe akanaki koyeisa Mpela na mabele mobimba mpo na koboma bato mabe.​—Eba. 6:5, 11-13, 17.

6, 7. (a) Mpo na nini Yehova andimaki Noa? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Nini ekómelaki bato nyonso oyo baboyaki koyokela Noa?

6 Kasi, “Noa andimamaki na miso ya Yehova” mpo “azalaki moyengebene” mpe “azalaki na mbeba te kati na bato ya ntango na ye.” Lokola “Noa atambolaki elongo na Nzambe ya solo,” Yehova ayebisaki ye atonga masuwa moko monene. (Eba. 6:8, 9, 14-16) Masuwa yango ezalaki mpenza ebongiseli oyo ezwamaki mpo bato mpe banyama bábika. Na botosi nyonso, ‘Noa asalaki nyonso oyo Yehova apesaki ye mitindo,’ mpe na lisalisi ya libota na ye, asilisaki mosala ya kotonga masuwa yango na lolenge oyo ebongi mpenza. Ntango banyama ná bandɛkɛ esilaki kokɔta na masuwa, “Yehova akangaki porte.”​—Eba. 7:5, 16.

7 Ntango mpela eyaki na mobu 2370 L.T.B., Yehova “alongolaki eloko nyonso oyo ezali na bomoi, oyo ezalaki na etando ya mabele,” kasi abatelaki mosembwi Noa ná libota na ye na kati ya masuwa. (Eba. 7:23) Moto nyonso awa na mabele, azali mokitani ya Noa, bana na ye mpe basi na bango. Kasi, bato nyonso oyo bazangaki kondima, oyo bakɔtaki te na masuwa, bakufaki mpo baboyaki koyokela Noa, “mosakoli ya boyengebene.”​—2 Pe. 2:5.

Kozala na ebongiseli ya malamu esalisaki bato mwambe bábika na Mpela (Talá paragrafe 6, 7)

8. Nini emonisi polele ete ebongiseli moko kitoko ezalaki na Yisraele ntango Nzambe asɛngaki libota na ye bákɔta na Mokili ya Ndaka?

8 Mbula koleka 800 nsima ya Mpela, Nzambe abongisaki Bayisraele na ekólo moko. Esengelaki ebongiseli esalema na makambo nyonso ya bomoi na bango mpe mingimingi na makambo etali losambo. Na  ndakisa, longola ebele ya banganga-nzambe mpe Balevi, ezalaki mpe na “basi basaleli oyo bazalaki kosala mosala oyo ebongisami na monɔkɔ ya hema ya kokutana.” (Kob. 38:8) Ntango Yehova Nzambe apesaki Bayisraele malako mpo na kokɔta na mokili ya Kanana, kasi bato yango bazalaki sembo te, mpe alobaki na bango ete: “Bokokɔta te na mokili oyo natombolaki lobɔkɔ na ngai na kolapáká ndai ete nakofanda elongo na bino, longola kaka Kalebe mwana ya Yefune mpe Yosua mwana ya Nunu,” mpo bamemaki lapolo moko ya malamu nsima ya konɔnga Mokili ya Ndaka. (Mit. 14:30, 37, 38) Ndenge Nzambe ayebisaki ye, Moize apesaki Yosua etinda ete azala mokitani na ye. (Mit. 27:18-23) Ntango Yosua alingaki kotambwisa Bayisraele mpo na kokɔta na Kanana, Yehova ayebisaki ye ete: “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. Kolɛnga te mpe kozala na nsɔmɔ te, mpo Yehova Nzambe na yo azali na yo epai nyonso okokende.”​—Yos. 1:9.

9. Makanisi nini Rahaba azalaki na yango mpo na Yehova mpe basaleli na ye?

9 Yehova Nzambe azalaki mpenza elongo na Yosua esika nyonso oyo akendeki. Na ndakisa, kanisá na likambo oyo esalemaki ntango Bayisraele bazalaki kofanda pene na Yeriko, engumba moko ya Kanana. Na mobu 1473 L.T.B., Yosua atindaki bato mibale bákende konɔnga Yeriko, mpe bakutanaki kuna na Rahaba, mwasi moko ya ndumba. Abombaki bango na nsamba ya ndako na ye, abatelaki bango mpo bákwea te na mabɔkɔ ya bato oyo mokonzi ya Yeriko atindaki. Rahaba ayebisaki banɔngi wana ya Yisraele boye: “Nayebi mpenza ete Yehova akozanga te kopesa bino mokili oyo . . . , toyokaki ndenge Yehova akaukisaki mai ya Mbu Motane liboso na bino . . . mpe makambo oyo bosalaki bakonzi mibale ya Baamore.” Abakisaki boye: “Yehova Nzambe na bino azali Nzambe kuna na likoló mpe awa na mabele, na nse.” (Yos. 2:9-11) Lokola Rahaba amityaki na ngambo ya ebongiseli ya Yehova ya ntango wana, Nzambe azwaki bibongiseli mpo ete ye ná libota na ye bábika ntango Bayisraele bakobundisa Yeriko. (Yos. 6:25) Rahaba amonisaki kondima, azalaki mpenza kobanga Yehova mpe amonisaki limemya epai ya basaleli na ye.

 EBONGISELI MOKO MAKASI NA SIƐKLƐ YA LIBOSO

10. Yesu ayebisaki bakonzi ya mangomba ya Bayuda likambo nini, mpe mpo na nini alobaki na bango bongo?

10 Na litambwisi ya Yosua, Bayisraele balongaki bingumba mingi mpe bakómaki kofanda na mokili ya Kanana. Kasi nini esalemaki na nsima? Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, Bayisraele babukaki mibeko ya Nzambe mbala na mbala. Na nsima, Yehova atindaki Mwana na ye awa na mabele, lokola baboyaki na nko nyonso kotosa Nzambe mpe koyoka balobeli na ye, yango wana Yesu abengaki Yerusaleme “engumba oyo ebomaka basakoli.” (Tángá Matai 23:37, 38.) Nzambe aboyaki bakonzi ya mangomba ya Bayuda mpo bazalaki sembo te epai na ye. Yango wana, Yesu alobaki na bango ete: “Bakolongola bokonzi ya Nzambe epai na bino mpe bakopesa yango ekólo moko oyo ekobota mbuma na yango.”​—Mat. 21:43.

11, 12. (a) Nini emonisi ete na siɛklɛ ya liboso, Yehova akómaki kopambola nde ebongiseli mosusu oyo esalemaki? (b) Ebongiseli ya sika oyo Nzambe akómaki kondima esalemaki na banani?

11 Na siɛklɛ ya liboso T.B., Yehova asundolaki ekólo ya Yisraele mpo ezalaki lisusu sembo te. Kasi, yango elingi koloba te ete akozala lisusu te na ebongiseli moko ya basambeli na ye ya sembo awa na mabele. Yehova akómaki sikoyo kopesa mapamboli na ye na nzela ya ebongiseli ya sika oyo Yesu Kristo mpe mateya na ye ezalaki moboko na yango. Ebongiseli yango ebandaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Na mokolo yango, bayekoli ya Yesu soki 120 bayanganaki esika moko na Yerusaleme mpe “mbala moko makɛlɛlɛ ebimaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kopɛpa makasi, mpe etondaki na ndako mobimba epai bafandaki. Mpe ndemo lokola nde ya mɔtɔ emonanaki epai na bango mpe ekabwanaki, mpe mokomoko efandaki likoló ya moto na moto na kati na bango, mpe bango nyonso batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba na minɔkɔ mosusu, ndenge kaka elimo ezalaki kopesa bango nzela ya koloba.” (Mis. 2:1-4) Likambo wana emonisaki polele ete Yehova azali kosunga ebongiseli wana ya sika, oyo esalemaki na bayekoli ya Kristo.

12 Na mokolo wana ya kokamwa, bato ‘soki nkóto misato (3 000) babakisamaki’ na motángo ya bayekoli ya Yesu. Mpe “Yehova akobaki kobakisela bango mokolo na mokolo baoyo bazalaki kobikisama.” (Mis. 2:41, 47) Lokola mosala ya kosakola ya basakoli wana ya siɛklɛ ya liboso esalemaki na ndenge ebongi, “liloba ya Nzambe ekobaki kokola, mpe motángo ya bayekoli ekobaki kobakisama mingi mpenza na Yerusaleme.” Kutu, “ebele ya banganga-nzambe babandaki kotosa kondima.” (Mis. 6:7) Na yango, bato mingi ya sembo bandimaki mateya oyo bato ya ebongiseli wana ya sika bazalaki kosakola. Na nsima, Yehova amonisaki lisusu ete azalaki kosunga ebongiseli yango ntango abandaki kobenda “bato ya bikólo” na lisangá ya bokristo.​—Tángá Misala 10:44, 45.

13. Mosala ya ebongiseli ya Nzambe ya sika ezalaki nini?

13 Na ntembe te, ezali na mosala oyo Nzambe apesaki bayekoli ya Kristo. Yesu ye moko apesaki bango ndakisa, mpo nsima kaka ya kozwa batisimo, abandaki kosakola na ntina na “bokonzi ya likoló.” (Mat. 4:17) Yesu ateyaki bayekoli na ye básala kaka mosala yango. Ayebisaki bango boye: “Bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Bayekoli ya Kristo ya liboso bakangaki mpenza ntina na likambo oyo esɛngamaki epai na bango. Na ndakisa, na Antiokia ya Pisidia, Paulo ná Barnabasi bayebisaki na mpiko nyonso Bayuda oyo bazalaki kotɛmɛla bango ete: “Esengelaki liloba ya Nzambe esakolama liboso epai na bino.  Lokola bozali kobwaka yango mpe bozali komona ete bobongi te na bomoi ya seko, talá! tobaluki epai ya bikólo. Kutu, Yehova apesi biso mitindo na maloba oyo: ‘Natye yo lokola pole ya bikólo, mpo ozala lobiko tii na nsuka ya mabele.’” (Mis. 13:14, 45-47) Kobanda na siɛklɛ ya liboso, eteni ya ebongiseli ya Nzambe awa na mabele ezali mpenza komonisa bato ete mosala ya kosakola ekoki kosalisa bango mpo bábika.

MINGI BAKUFAKI, KASI BASALELI YA NZAMBE BABIKAKI

14. Likambo nini esalemaki na siɛklɛ ya liboso na Yerusaleme, kasi banani babikaki?

14 Bayuda mingi baboyaki kondima nsango malamu, mpe likama monene esengelaki kokómela bango, mpe Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Ntango bokomona mampinga ezingi Yerusaleme na bakaa, bóyeba ete libebi na yango ekómi pene. Na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba, mpe baoyo bazali na katikati na yango bálongwa, mpe baoyo bazali na bamboka ya zamba bákɔta na kati na yango te.” (Luka 21:20, 21) Esakweli ya Yesu ekokisamaki. Lokola Bayuda batombokaki, mampinga ya basoda ya Roma oyo etambwisamaki na Cestius Gallus bazingaki Yerusaleme na mobu 66 T.B. Kasi, na mbalakaka mampinga yango etikaki bitumba, mpe yango epesaki bayekoli ya Yesu libaku ya kolongwa na Yerusaleme mpe Yudea. Moto moko ya mayele na nkombo Eusèbe, alobi ete mingi na bango bakatisaki Ebale Yordani mpe bakendaki na Pela, na Perea. Na mobu 70 T.B., mampinga ya basoda ya Roma ná mokonzi na bango Titus, bazongaki mpe babebisaki Yerusaleme. Nzokande, bakristo ya sembo babikaki mpo bayokaki likebisi ya Yesu.

15. Makambo nini epekisaki te lisangá ya bokristo ekende liboso na elimo?

15 Atako bayekoli ya Kristo bakutanaki na makambo mingi ya mpasi lokola minyoko mpe makambo mosusu oyo etyaki kondima na bango na komekama, lisangá ya bokristo ekolaki mpenza na siɛklɛ ya liboso. (Mis. 11:19-21; 19:1, 19, 20) Bakristo wana ya liboso bakendeki liboso na elimo mpo Nzambe azalaki kopambola bango.​—Mas. 10:22.

16. Mpo ete lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso ekende liboso, mokristo mokomoko asengelaki kosala nini?

16 Mpo ete lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso ekende liboso, mokristo mokomoko asengelaki kosala milende. Koyekola Makomami na molende, koyangana na makita mpo na kosambela, mpe kosakola na molende nsango ya Bokonzi ezalaki na ntina mingi. Makambo wana esalisaki mingi mpo basaleli ya Yehova na ntango wana bázala makasi na elimo mpe na bomoko; ezali mpe ndenge moko mpo na biso lelo oyo. Baoyo bazalaki koyangana na masangá wana oyo ebongisamaki malamu na siɛklɛ ya liboso, bazwaki matomba mingi mpo na bolingo mpe milende oyo bankulutu mpe basaleli na misala bazalaki komonisa. (Flp. 1:1; 1 Pe. 5:1-4) Mpe ezalaki mpenza esengo ntango bakɛngɛli-batamboli lokola Paulo bazalaki kokende kotala masangá! (Mis. 15:36, 40, 41) Bokokani ezali mpenza makasi kati na losambo na biso mpe oyo ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Tozali mpenza na botɔndi ete Yehova abongisi mpe basaleli na ye ata mpe na mikolo na biso! *

17. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

17 Lokola mokili oyo ya Satana ezali kokóma na nsuka na yango na mikolo oyo ya nsuka, eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele ezali kokende liboso na vitɛsi mpenza. Ozali kokende na yango elongo? Ozali kokola na elimo? Lisolo oyo elandi, ekomonisa ndenge oyo okoki kosala yango.

^ par. 16 Talá masolo “Bakristo basambelaka na elimo mpe na solo” mpe “Bazali ntango nyonso kotambola na kati ya solo” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2002. Ndenge oyo eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele ekoli mingi elobelami na buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu.