Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2014

Monisáká bizaleli malamu ntango ozali kosakola

Monisáká bizaleli malamu ntango ozali kosakola

“Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.”​—MAT. 7:12.

1. Bizaleli malamu oyo tomonisaka na mosala ya kosakola ekoki kobimisa matomba nini? Pesá ndakisa. (Talá elilingi ya ebandeli.)

ESILI koleka mwa bambula, ndeko mobali moko ná mwasi na ye na Fidji, bazali kosala kampanye mpo na kobenga bato na Ekaniseli ya liwa ya Kristo. Ntango bazalaki kosolola na mwasi moko na lopango na ye, mbula ebandaki kobɛta. Ndeko mobali atandelaki mwasi yango lingɛmbu moko mpe ye ná mwasi na ye basalelaki mosusu. Ndeko mobali yango ná mwasi na ye basepelaki makasi ntango bamonaki mwasi yango na mpokwa ya Ekaniseli. Mwasi yango alobaki ete amikundolaki kutu te makambo nini bandeko wana mibale basololaki na ye mokolo wana. Kasi, lokola asepelaki mingi na likambo oyo basalelaki ye, yango wana ayaki na Ekaniseli. Nini esalaki ete matomba malamu emonana ndenge wana? Ndeko mobali wana ná mwasi na ye, bamonisaki ezaleli malamu ntango bazalaki kosakola.

2. Toli nini Yesu apesaki, mpe ndenge nini tokoki kosalela yango?

2 Yesu apesaki toli oyo: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.” (Mat. 7:12) Ndenge nini tokoki kosalela toli oyo? Soki tosali makambo oyo mibale: Ya liboso, tosengeli komituna boye, ‘Soki nazalaki na esika ya moto wana, nakolinga asalela ngai makambo ndenge nini?’ Ya mibale, tosengeli kosala mpenza makasi ete tómitya na esika ya moto yango.​—1 Ko. 10:24.

3, 4. (a) Monisá ntina oyo tosengeli te kosalela toli oyo ya Yesu kaka epai ya Batatoli? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?

 3 Tosalelaka mingi toli oyo ya Yesu na boyokani na biso ná bandeko na biso Batatoli ya Yehova. Kasi Yesu amonisaki te ete tosengeli kosalela toli yango kaka mpo na bandeko na biso Batatoli ya Yehova. Alobelaki toli wana mpo na komonisa makambo oyo tosengeli kosalela bato nyonso, ata mpe banguna na biso. (Tángá Luka 6:27, 28, 31, 35.) Soki tosengeli kosalela toli oyo epai ya banguna na biso, tosengeli mpenza kosalela yango mingi na mosala ya kosakola, mpe na ndenge yango bato mingi bakoki kozala na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko”!​—Mis. 13:48.

4 Tokolobela sikoyo mituna minei oyo tosengeli kobosana te ntango tozali kosakola: Bato oyo nalingi kokende kosakwela bazali banani? Nakokutana na bango wapi? Ntango nini ebongi mpo na kokutana na bango? Ndenge nini nasengeli kobanda lisolo ná bango? Ndenge tokomona yango, mituna oyo ekoki kosalisa biso tótalela makanisi ya bato oyo tozali kosakwela mpe koyokanisa masolo na biso na mposa na bango.​—1 Ko. 9:19-23.

BANANI NALINGI KOKENDE KOSAKWELA?

5. Mituna nini tosengeli komituna?

5 Na mosala ya kosakola, tosololaka na bato. Moto na moto azali na mimeseno oyo azwá na esika akoli mpe makambo na ye mosusu. (2 Nt. 6:29) Ntango olingi osakwela moto moko nsango malamu, omituna boye: ‘Soki ye nde moto asengelaki kosakwela ngai, nakolinga ete atalela ngai ndenge nini? Nakosepela soki ataleli ngai lokola mwa eloko moko ya mpamba? To nakolinga ete atalela ngai lokola moto mpenza?’ Kokanisa na mituna wana ekoki kosalisa biso tózwaka moto nyonso oyo tokosolola na ye na valɛrɛ mpenza.

6, 7. Tosengeli kosala nini soki moto oyo tokutani na ye na mosala ya kosakola amonani lokola moto ya matata?

6 Moto moko te alingaka bábamba ye nkombo ya “moto mabe.” Na ndakisa: Biso bakristo tosalaka nyonso tósalela toli ya Biblia oyo ezali kosɛnga ete ‘maloba na biso ezalaka ntango nyonso kitoko.’ (Kol. 4:6) Kasi, lokola tozali basumuki, tolobaka mbala mosusu makambo oyo na nsima toyokaka mawa. (Yak. 3:2) Soki tolobaki mokolo mosusu na moto moko maloba mabe, ntango mosusu ekoki kozala ete mokolo wana tolamukaki malamu te, tokosepela te ete bábamba biso nkombo ya “moto azangá bonkonde” to ya moto ya “bilobaloba.” Tokolinga ete moto yango ayokela biso. Biso mpe tosengeli te kosala bongo?

7 Soki na mosala ya kosakola okutani na moto moko oyo emonani lokola azali matata, ekozala malamu te ondima ete mbala mosusu alamuki mabe mokolo wana? Ekoki nde kozala ete azali na mokakatano na mosala to na kelasi? Azali na maladi makasi? Mbala ebele, bato oyo na ebandeli basilikaki, bayaki na nsima kondima nsango malamu ntango Batatoli basalelaki bango makambo na boboto mpe na limemya.​—Mas. 15:1; 1 Pe. 3:15.

8. Mpo na nini tosengeli te kokakatana mpo na kosakwela “bato ya ndenge nyonso” nsango ya Bokonzi?

8 Na mosala ya kosakola, tokutanaka na bato ya lolenge nyonso. Na ndakisa, na boumeli ya mwa bambula oyo euti koleka, masolo koleka 60 ebimisamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na eteni oyo elobi “Biblia ebongolaka bato.” Bato mosusu oyo balobeli na masolo yango bazalaki miyibi, balangwi, bato ya biyoma, to bamɛli bangi to drɔgɛ. Bamosusu bazalaki bato ya politiki, bakonzi ya mangomba to bato oyo bamipesaki na makambo mosusu. Basusu bazalaki mpenza basali ya pite to ekobo. Na ntembe te, bango nyonso wana bayokaki nsango malamu, bandimaki koyekola Biblia, babongolaki bomoi na bango mpe bakómaki basaleli ya Yehova. Yango wana, tosengeli soki moke te  koloba ete bato mosusu babongi te koyoka nsango ya Bokonzi. (Tángá 1 Bakorinti 6:9-11.) Kutu, tondimaka ete “bato ya ndenge nyonso” bakoki kondima nsango malamu.​—1 Ko. 9:22.

EPAI WAPI NAKOKUTANA NA BATO?

9. Mpo na nini tosengeli kopesa bandako ya bato mosusu valɛrɛ?

9 Epai wapi tokutanaka na bato na mosala ya kosakola? Mbala mingi, tokutanaka na bango na bandako. (Mat. 10:11-13) Tosepelaka mingi ntango basusu bapesaka ndako to esika na biso mosusu valɛrɛ. Tomonaka ete ndako na biso esalisaka biso na makambo mingi. Tolingaka ete ezala esika oyo tosalaka makambo na biso mpenza mpe oyo tokoki kozala na kimya. Biso mpe tosengeli komonisa limemya ya ndenge wana epai ya bazalani na biso. Yango wana, na mosala ya kosakola, tosengeli kokanisa na makambo oyo tosengeli kosala to kosala te na ndako na bango.​Mis. 5:42.

10. Ndenge nini tokoki koboya kobɛtisa basusu libaku na mosala ya kosakola?

10 Na mokili oyo etondi na bato ya mobulu, bato mingi bakómaka motema likoló soki bamoni moto oyo bayebi te epai na bango. (2 Tim. 3:1-5) Tosengeli kokeba ete tóbakisela bango te bobangi yango. Na ndakisa, kanisá ete okómi na ndako moko mpe obɛti porte. Soki moto andimi te, okoki mbala mosusu kozala na likanisi ya kobanda kotalatala na lininisa to kobalukabaluka na lopango yango, mpo na koluka nkolo-ndako. Na mboka na bino, moto oyo oyei kotala akoyoka mabe to te? Bongo bato oyo bazali zingazinga ya moto yango bakokanisa nini? Toboyi te ete tosengeli kopesa litatoli malamumalamu. (Mis. 10:42) Tozalaka na mposa makasi ya kosakola nsango malamu mpe makanisi na biso ezali mabe te. (Rom. 1:14, 15) Kasi, tosengeli kokeba ete tósala te eloko nyonso oyo ekoki kobebisa likebi ya bato ya teritware na biso mpo báyoka te nsango malamu. Ntoma Paulo akomaki ete: “Tozali kobɛtisa bato libaku na likambo moko te, mpo bázwa likambo ya koloba na mosala na biso te.” (2 Ko. 6:3) Soki tozali kozwa bandako mpe bisika mosusu ya bato ya teritware na biso na valɛrɛ, bizaleli na biso wana ya malamu ekobenda bato mosusu na solo.​—Tángá 1 Petro 2:12.

Tókoba komonisa limemya mpo na ndako mpe makambo mosusu mpenza ya molobani na biso (Talá paragrafe 10)

NTANGO NINI NAKOKUTANA NA BATO?

11. Mpo na nini toyokaka malamu soki basusu babebiseli biso ngonga te?

11 Mingi na kati na biso basaleli ya Yehova, tozalaka na makambo ebele ya kosala. Mpo tókokisa mikumba na biso, totandaka na molɔngɔ makambo oyo tokosala mpe tobandaka na makambo oyo eleki ntina. (Ef. 5:16; Flp. 1:10) Tokoki mbala mosusu kotungisama mingi soki likambo moko ebebisi programɛ oyo tosalaki. Toyokaka malamu ntango basusu batosi ngonga oyo topesaki bango, bamonisi bokatikati ntango bakutani na biso mpe bazwi biso ntango mingi te. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na limemya epai ya bato oyo tozali kosakwela?

12. Ndenge nini tokoki koyeba ngonga oyo ebongi mpo na kokuta bato na teritware na biso?

12 Tosengeli koyeba ntango ya kokuta bato na bandako. Na teritware na biso, ntango nini bato bazalaka na bandako? Ntango nini bakoki koyamba biso malamu? Tokosala malamu soki toluki balolenge oyo ebongi mpo na koyokanisa programɛ na biso ná oyo ya bango. Na mikili mosusu, mosala ya kosakola ndako na ndako esimbaka malamu mpenza nsima ya midi to na mpokwa. Soki ezali mpe bongo na teritware na bino, bokoki te kozwa bibongiseli mpo ete mikolo mosusu mosala ya kosakola ndako na ndako esalemaka na bangonga wana? (Tángá 1 Bakorinti 10:24.) Tokoki mpenza kotya motema ete Yehova akopambola milende nyonso oyo tozali kosala mpo na kosakola nsango malamu na bangonga oyo ebongi mpenza mpo na bato ya teritware na biso.

13. Ndenge nini tokoki komonisela moto oyo toyei kosolola na ye limemya?

 13 Ndenge nini tokoki lisusu komonisela moto oyo tozali kosolola na ye limemya? Ntango tokutani na moto oyo asepeli na nsango na biso, tosengeli kopesa ye litatoli malamumalamu, kasi te koumela wana tii nzungu na ye ezika na mɔtɔ. Ekoki kozala ete moto yango abombaki ntango wana mpo asala likambo moko ya ntina mingi. Soki alobi ete azali na mosala, tokoki koloba ete tokoloba mingi te, mpe tosengeli kokokisa maloba na biso. (Mat. 5:37) Ntango lisolo esili, ekozala malamu tótuna moto yango soki ngonga nini akomona malamu ete tókutana lisusu. Basakoli mosusu bamonaki malamu koloba: “Nakosepela koya lisusu kotala yo. Okosepela soki nabengi to natindeli yo mesaje liboso naya?” Soki tozali koyokanisa programɛ na biso ná oyo ya bato ya teritware na biso, wana tozali kolanda ndakisa ya ntoma Paulo, oyo azalaki ‘koluka kaka litomba na ye moko te kasi oyo ya bato mingi, mpo bango mpe bábikisama.’​—1 Ko. 10:33.

NDENGE NINI NASENGELI KOBANDA LISOLO NÁ BATO?

14-16. (a) Mpo na nini tosengeli komonisa polele epai ya molobani na biso ntina oyo toyei epai na ye? Pesá ndakisa. (b) Mokɛngɛli-motamboli moko amonaki ete lolenge nini ya kosala esimbaka?

14 Kanisá ete mokolo mosusu moto moko abengi yo na telefone, kasi ozali koyeba te mongongo ya moto yango. Oyebi ye te, kasi azali kotuna yo motuna na likambo etali biloko oyo osepelaka kolya. Ozali komituna soki moto yango azali nani mpe soki alingi nini. Mpo na komonisa limemya, ntango mosusu tokoki kosolola na ye mwa moke, kasi na nsima tokomonisa  ye ete tósuka awa. Epai mosusu, kanisá ete moto yango amonisi ete asalaka na makambo etali bilei mpe na boboto nyonso ayebisi biso ete azali na makambo ya kitoko ya koyebisa biso. Ntango mosusu tokoki koyoka ye mpenza. Na ntembe te, tosepelaka mingi ntango bato oyo bakutani na biso, bayebisi biso makambo polele, kasi na ndenge ya kozokisa te. Ndenge nini tokoki mpe komonisa ezaleli ya ndenge wana na mosala ya kosakola?

15 Na bateritware mingi, esɛngaka tómonisa moto polele ntina oyo toyei epai na ye. Atako tozali na makambo ya kitoko oyo moto wana azali na yango te, kasi kanisá ete toyebisi te moto yango soki tozali banani mpe tobandi mbala moko lisolo na kotuna moto yango motuna lokola: “Soki ozali na likoki ya kosilisa mokakatano moko na mokili, okobanda na nini?” Biso toyebi ete totuni motuna wana mpo na koyeba makanisi ya moto yango mpe na nsima kobenda likebi na ye na Biblia. Kasi, moto yango akoki mbala mosusu komituna boye: ‘Moto oyo nayebi ye kutu te, mpo na nini atuni ngai motuna ya boye? Alingi mpenza koloba nini?’ Tosengeli mpenza kosala makasi ete moto oyo tolingi kosolola na ye abanga te. (Flp. 2:3, 4) Ndenge nini tokoki kosala yango?

16 Mokɛngɛli-motamboli moko amonaki ete likanisi oyo elandi esimbaka mpenza. Nsima ya kopesa moto mbote, alakisaka ye trakte oyo ezali na motó ya likambo ete Okosepela koyeba solo? mpe alobaka boye: “Tozali lelo kopesa moto mokomoko ya kartye trakte oyo. Elimboli mituna motoba oyo bato mingi batunaka. Oyo ya yo, yango oyo.” Ndeko yango alobi ete motema ya bato mingi ekitaka ntango kaka bayebi ntina oyo oyei epai na bango. Na ntango wana, ezalaka pɛtɛɛ mpo na kokoba lisolo. Na nsima, mokɛngɛli yango atunaka molobani na ye boye: “Omituná naino te mituna oyo?” Soki moto yango aponi motuna moko, ndeko yango afungolaka trakte mpe amonisaka oyo Biblia elobi na ntina na motuna yango. To mpe, aponaka motuna moko mpe akobaka lisolo kozanga ete atunaka moto yango mituna ya makasimakasi. Na ntembe te, balolenge ya kobanda lisolo ezali ebele. Na mikili mosusu, esɛngaka kosala makambo mingi liboso tóyebisa moto ntina oyo toyei epai na ye. Ntina ezali ya kolanda makambo mosusu oyo bato ya teritware na biso balingaka bapaya básala liboso ya kosolola na bango.

KOBÁ KOMONISA BIZALELI MALAMU NA MOSALA YA KOSAKOLA

17. Ndenge tomoni yango na lisolo oyo, wapi balolenge oyo tokoki komonisa bizaleli malamu na mosala ya kosakola?

17 Wapi balolenge oyo tomonisaka bizaleli malamu na mosala ya kosakola? Tozwaka moto nyonso oyo tokosolola na ye na valɛrɛ mpenza. Tozwaka na valɛrɛ ndako to bisika mosusu ya molobani na biso. Tosalaka makasi tókende kosakwela bato na ntango oyo bazalaka na bandako mpe bakoki koyamba biso. Mpe tobandaka nsango ya Biblia na lolenge oyo bato bakosepela na yango na teritware na biso.

18. Matomba nini ekoki komonana soki tozali kosalela bato ya teritware na biso makambo ndenge tolingaka ete básalela mpe biso?

18 Matomba emonanaka mingi soki tozali kosalela bato ya teritware na biso makambo ndenge tolingaka ete básalela mpe biso. Soki tozali komonisa boboto mpe limemya, tozali kotika ete mwinda na biso engɛnga, wana tokomonisa ete mitinda ya Biblia ezali na ntina mingi, mpe tokopesa Tata na biso ya likoló nkembo. (Mat. 5:16) Soki lolenge oyo tozali kosolola na bato na mosala ya kosakola ezali malamu, tokobenda bato mingi na solo. (1 Tim. 4:16) Ezala bato oyo tozali kosakwela nsango ya Bokonzi bandimi to te, tosepelaka mpo toyebi ete tozali kosala nyonso mpo tókokisa mosala na biso. (2 Tim. 4:5) Tiká ete mokomoko na biso amekola ntoma Paulo, oyo akomaki ete: “Nazali kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu, mpo nasakola yango elongo na bamosusu.” (1 Ko. 9:23) Mpo na yango, tiká ete tókoba komonisa bizaleli malamu ntango tozali kosakola.