Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2014

‘Bilei na ngai ezali kosala mokano ya Nzambe’

‘Bilei na ngai ezali kosala mokano ya Nzambe’

Eloko nini epesaka yo esengo mingi? Ezali nde makambo lokola libala, kobota bana to kozala na baninga? Na ntembe te, oyokaka esengo kolya mwa eloko elongo na bato oyo olingaka. Kasi, lokola ozali mosaleli ya Yehova, omoni te ete kosala mokano ya Nzambe, koyekola Liloba na ye mpe kosakola nsango malamu nde epesaka esengo mingi koleka?

Na loyembo moko oyo asanzolaki Mozalisi na ye, Davidi, mokonzi ya Yisraele ayembaki boye: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo, mpe mobeko na yo ezali na kati na ngai.” (Nz. 40:8) Atako akutanaki na minyoko mpe makambo mosusu ya mpasi na bomoi na ye, Davidi azalaki mpenza kosepela kosala mokano ya Nzambe. Kasi, na basambeli ya Yehova, kaka Davidi te nde azalaki koyoka esengo ya kosalela Nzambe ya solo.

Ntango asalelaki maloba ya Nzembo 40:8 mpo na Masiya to Kristo, ntoma Paulo akomaki boye: “Ntango ayei [Yesu] na mokili azali koloba ete: ‘“Olingaki mbeka ná likabo te, kasi obongiselaki ngai nzoto. Ondimaki te makabo ya kotumba mpe likabo mpo na lisumu.” Bongo nalobaki ete: “‘Talá! Nayei (ndenge ekomami mpo na ngai na rulo ya buku) kosala mokano na yo, Ee Nzambe.”’”​—Ebr. 10:5-7.

Ntango azalaki awa na mabele, Yesu azalaki kosepela kotala biloko oyo Nzambe akelá, kozala ná baninga mpe kolya mwa eloko ná bato. (Mat. 6:26-29; Yoa. 2:1, 2; 12:1, 2) Nzokande, lobanzo mpe mposa na ye ya libosoliboso ezalaki kosala mokano ya Tata na ye ya likoló. Yango wana alobaki ete: “Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.” (Yoa. 4:34; 6:38) Bayekoli ya Yesu bayekolaki epai ya Nkolo na bango nini epesaka esengo ya solosolo. Na esengo nyonso, bandimaki mpe basepelaki kosakwela basusu nsango ya Bokonzi.​—Luka 10:1, 8, 9, 17.

“BÓKENDE MPE BÓKÓMISA BATO BAYEKOLI”

Yesu apesaki bayekoli na ye etinda oyo: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo. Mpe talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:19, 20) Kokokisa etinda yango, ezali kosɛnga koluka bato epai nyonso oyo tokoki kokuta bango, kozongela  baoyo basepelaki mpe koyekola na bango Biblia. Kosala mosala yango ekoki komemela biso esengo monene mpenza.

Bolingo etindaka biso tókoba kosakola ata soki bato bazali koboya

Ezala bato basepeli na nsango na biso to te, ezaleli oyo tokomonisa ezali na ntina mingi mpo tózala na esengo na mosala yango. Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola nsango malamu ata soki tokutani na botɛmɛli to bato baboyi koyoka? Mpo toyebi ete kosakola nsango ya Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli ekomonisa ete tolingaka Nzambe mpe bazalani na biso. Lisusu, bomoi na biso moko mpe oyo ya bazalani na biso ezali na likama. (Ezk. 3:17-21; 1 Tim. 4:16) Tótalela sikoyo mwa makambo mosusu oyo esalisaki baninga na biso mosusu basakoli bákoba kosakola to kozala na mpiko na bateritware ya mpasi.

SALELÁKÁ MABAKU NYONSO

Kosalela malamu mituna na mosala na biso ya kosakola, ememaka matomba mingi. Mokolo moko na ntɔngɔ, ndeko moko na nkombo Amalia amonaki moto moko azali kotánga zulunalo moko na parkɛ. Akendaki epai ya moto yango mpe atunaki mpo na koyeba soki nsango nini ya malamu atángi. Ntango alobaki ete atángi te nsango ya malamu, ndeko Amalia alobaki ete: “Namemeli yo nsango malamu oyo etali Bokonzi ya Nzambe.” Nsango yango elamwisaki mposa na ye mpe andimaki koyekola Biblia. Kutu, ndeko Amalia abandaki koyekola Biblia na bato misato na parkɛ wana.

Ndeko Janice akómisaki esika na ye ya mosala teritware na ye ya kosakola. Ntango mibali mibale oyo bakɛngɛlaka na mosala na bango basepelaki na lisolo moko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Janice andimaki komemelaka bango bazulunalo ntango nyonso. Asalaki mpe bongo mpo na moninga mosusu ya mosala oyo asepelaki makasi na masolo ndenge na ndenge oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Yango esalaki ete moninga mosusu ya mosala mpe asɛnga bazulunalo yango. Ndeko Janice alobi ete: “Yehova apambolaki mpenza!” Akómaki na bato 11 oyo azalaki komemela bazulunalo na mosala.

ZALÁ NA MAKANISI OYO EBONGI

Mokɛngɛli-motamboli moko apesaki toli ete na mosala ya kosakola ndako na ndako, basakoli basengeli te kosukisa lisolo elongo na molobani na bango kaka na koloba ete bakozonga mokolo mosusu. Bakoki na ndakisa kotuna boye: “Okosepela nalakisa yo ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka?” to, “Mokolo mpe ngonga nini okosepela nazongela yo mpo tókoba lisolo na biso?” Mokɛngɛli yango apesaki lapolo ete kosalela mayele oyo, esalisaki bandeko ya lisangá moko ya zongazonga na ye bábanda boyekoli ya Biblia na bato 44 na pɔsɔ moko.

Kozongela bato nokinoki, ntango mosusu mwa mikolo moke nsima ya kosolola mbala ya liboso, ekoki komema matomba mingi. Mpo na nini? Mpamba te kosala bongo emonisaka ete tozali mpenza na mposa ya kosalisa bato ya mitema oyo ebongi mpo báyeba Biblia. Ntango batunaki mwasi moko ntina oyo andimaki Batatoli ya Yehova báyekola na ye Biblia, alobaki boye: “Nabandaki koyekola mpo bamonisaki ete bazali komibanzabanza mpenza mpo na ngai mpe ete balingaka ngai.”

Okoki kotuna molobani na yo boye: “Okosepela nalakisa yo ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka?”

 Ndeko Madaí akɔtaki Eteyelo ya babongisi-nzela. Mpe nsima kaka ya mwa ntango moke ya eteyelo yango, akómaki koyekola Biblia na bato 15 mpe apesaki basakoli mosusu bato koleka 5. Bato mingi oyo ayekolaki na bango Biblia babandaki koyangana na makita na biso pɔsɔ na pɔsɔ. Nini esalisaki ndeko Madaí abanda koyekola Biblia na bato ebele? Eteyelo yango esalisaki ye amona ntina ya kokoba kozongela bato tii akozwa bato oyo bamonisaki bosepeli na ebandeli. Ndeko mosusu oyo asalisá mpe bato ebele báyeba solo alobi boye: “Nayekoli ete kotingama na mosala ya kozongela bato ezali mpenza sɛkɛlɛ mpo na kosalisa bato oyo balingi koyeba Yehova.”

Kozongela nokinoki bato oyo bazali na mposa ya koyeba Biblia ekomonisa ete tozali mpenza kotyela bango likebi

Kozongela bato mpe kotambwisa boyekoli ya Biblia esɛngaka mpenza milende; mpe matomba oyo emonanaka, eleki mosika milende oyo esalemaka. Soki tozali komipesa na mosala ya kosakola Bokonzi, tokoki kosalisa basusu “bázwa boyebi ya sikisiki ya solo,” mpe yango ekosalisa bango bábika. (1 Tim. 2:3, 4) Mpo na biso, kosala bongo ekomemela biso esengo mingi oyo ekokani na eloko mosusu te.