Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2014

Zalá na mpiko—Yehova azali Mosungi na yo!

Zalá na mpiko—Yehova azali Mosungi na yo!

‘Zalá na mpiko mpenza mpe lobá: “Yehova azali mosungi na ngai.”’EBR. 13:6.

1, 2. Mikakatano nini bato mingi oyo bakendeki na mikili ya bapaya bakutanaka na yango ntango bazongi epai na bango? (Talá elilingi ya ebandeli.)

EDUARDO * alobi boye: “Ntango nazalaki kosala na mokili ya bapaya, nazalaki na mosala ya malamu mpe nazwaki mbongo mingi. Kasi, ntango Batatoli ya Yehova babandaki koyekola na ngai Biblia, nayaki komona ete nazali na mokumba moko ya ntina mingi, kokokisa bamposa ya libota na ngai na mosuni mpe na elimo. Yango wana, namonaki malamu nazongela bango.”Ef. 6:4.

2 Eduardo ayebaki ete soki azongeli libota na ye, akosepelisa Yehova. Kasi, na ndakisa ya Marilyn oyo tolobeli na lisolo oyo eleki, Eduardo asengelaki kolekisa ntango molai mpo abongisa boyokani elongo na bato ya libota na ye. Akutanaki mpe na mokakatano ya kosunga mwasi ná bana na ye na mboka oyo nkita ezalaki ya kobeba. Ndenge nini akokaki kozwa mwa limpa mpo na libota na ye? Akanisaki ete bandeko ya lisangá bakokaki kosalisa ye na nini?

KOZONGISA BOYOKANI ELONGO NA YEHOVA MPE LIBOTA

3. Bana bayokaka ndenge nini ntango tata to mama atiki bango?

3 Eduardo alobi boye: “Nayaki komona ete nasundolaki bana na ngai ntango oyo bazalaki mpenza na mposa ete natambwisa bango mpe namonisa ete nalingaka bango. Nazalaki wana te mpo na kotángela bango masolo ya Biblia, kobondela elongo na bango, koyamba  bango mpe kosakana ná bango.” (Mib. 6:7) Mwana na ye ya mokóló na nkombo Anna alobi ete: “Ntango tata azalaki te, nazalaki mpenza kotungisama mingi na makanisi. Ntango azongaki, toyebaki ye kaka na elongi mpe mongongo na ye. Namiyokaki mabe mpenza ntango ayambaki ngai.”

4. Ndenge nini tata oyo atiki libota na ye akoki kokoka te kokokisa mokumba na ye?

4 Soki tata azali te elongo na libota, akokoka te kokokisa mokumba na ye ya tata. Ruby, mwasi ya Eduardo alobi boye: “Nazalaki kobundana na mikumba mibale: ya tata ná mama, mpe nazalaki kozwa bikateli mingi ya libota ngai moko. Ntango Eduardo azongaki na ndako, nasengelaki koyekola ndenge ya komonisa limemya oyo ebongi na mwasi mokristo. Ata tii sikoyo, esengelaka ntango mosusu namikundolaka ete mobali na ngai azali.” (Ef. 5:22, 23) Eduardo abakisi ete: “Bana ya basi bazalaki kokende epai ya mama na bango kosɛnga nzela soki balingi básala likambo moko. Kasi, ngai ná mama na bango, tosengelaki komonisa bango ete tozali na bomoko mpe nasengelaki koyekola ndenge ya kotambwisa makambo na ndenge oyo ebongi na mokristo.”

5. Ndenge nini tata moko abandaki kobongisa makambo mabe oyo esalemaki nsima na ye, mpe matomba nini emonanaki?

5 Eduardo azalaki na ekateli ya kosala nyonso mpo na kobongisa boyokani ná libota na ye mpe kosalisa bango bákóma makasi na elimo. “Mokano na ngai ezalaki ya kofandisa solo epai ya bana na ngai na maloba mpe na ndakisa, kasi te kaka koloba ete nalingaka Yehova kasi komonisa yango.” (1 Yoa. 3:18) Yehova apambolaki misala ya kondima oyo Eduardo amonisaki? Anna apesi eyano oyo: “Komona milende nyonso oyo asalaki mpo na kozala tata ya malamu mpe kopusana penepene na biso lisusu esalisaki mingi. Ntango tomonaki ye azali koluka kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba na lisangá, etindaki biso tósepela na ye mingi. Mokili ezalaki mpenza koluka kotangola biso mosika na Yehova. Kasi tozalaki komona baboti na biso bazali kokangama na solo, biso mpe tosalaki makasi tósala bongo. Tata alakaki ete akotika biso lisusu te, mpe akokisaki maloba na ye. Soki asalaki yango lisusu, nalingaki te kozala na kati ya ebongiseli ya Yehova lelo.”

KONDIMA MOKUMBA

6. Liteya nini baboti mosusu bazwaki na ntango ya etumba?

6 Makambo mosusu oyo esalemaki, emonisi ete ntango etumba ezalaki na mikili ya Balkans, bana ya batatoli ya Yehova ya bamboka yango, bazalaki na esengo mingi atako bomoi ezalaki mpasi mpenza. Mpo na nini? Baboti oyo bazalaki kokoka te kokende mosala, bazalaki kotikala na ndako mpe bazalaki koyekola, kosakana mpe kosolola ná bana na bango. Liteya nini baboti bakoki kozwa? Longola mbongo to bakado, bana balingaka nde ete baboti na bango bázala ná bango elongo. Ya solo, ndenge Liloba ya Nzambe emonisi yango, bana bakokola malamu soki baboti bazali kotyela bango likebi mpe bazali kobongisa bango.Mas. 22:6.

7, 8. (a) Likambo nini ya mabe baboti mosusu oyo bazongá ndako basalaka? (b) Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bálongola makanisi mabe?

7 Likambo ya mawa, ntango baboti mosusu oyo bazongelaki mabota na bango bakutanaki na makambo oyo bana na bango bapesaki bango nkanda to basalaki makambo mosusu ya mabe, balobaki boye, “Makambo nyonso oyo nasali mpo na bino, ezali kolobela bino eloko moko te?” Nzokande, ntango mosusu bana bakoki komonisa ezaleli wana mpo na ndenge moboti atikaki bango ntango molai. Ndenge nini moboti akoki kosala mpo abongisa boyokani yango?

8 Sɛngá Yehova asalisa yo omitya mingi mpenza koleka na esika ya bato ya libota na yo. Na nsima, ntango ozali kosolola elongo na bato ya libota na yo, ndimá ete soki makambo ezali ndenge wana, yo nde oluki yango. Kosɛnga bolimbisi ya solosolo ekoki kosalisa. Ntango molongani na yo mpe bana bazali komona ete ozali kosala nyonso osembola makambo, bakomona ete ozali mpenza na mposa ya kobongisa makambo. Soki ozali na ekateli mpe motema molai, mokemoke, bato ya libota na yo bakobanda kolinga yo mpe komemya yo.

 ‘KOKOKISA BAMPOSA YA BATO YA LIBOTA NA YO’

9. Mpo na nini esengeli te koboma nzoto na koluka bomɛngo mpo na ‘kopesa bato ya libota’ oyo basengeli na yango?

9 Ntoma Paulo alobaki ete ntango bakristo oyo bakómi mibange bazali kokoka te kokokisa bamposa na bango, bana mpe bankɔkɔ na bango, basengeli “kozongisela baboti na bango ná bankɔkɔ na bango bolamu oyo basengeli kozongisela bango.” Kasi, ntoma Paulo alendisaki bakristo nyonso ete básepela na biloko lokola bilei, bilamba mpe esika ya kolala; biloko oyo bato bazalaka na yango mposa mokolo na mokolo. Tosengeli te koboma nzoto mpo na koluka kozala na bomoi oyo eleki kitoko mingi to mpo tóbomba mbongo mingi mpo na lobi. (Tángá 1 Timote 5:4, 8; 6:6-10.) Mpo mokristo ‘apesa bato na ye’ oyo basengeli na yango, asengeli te koluka bomɛngo na mokili oyo ekoleka mosika te. (1 Yoa. 2:15-17) Tosengeli te kotika ete “nguya ya bokosi ya bomɛngo” to “mitungisi ya bomoi” ebebisa ekateli oyo libota ezali na yango ya ‘kosimba makasi bomoi ya solosolo’ na mokili ya sika ya boyengebene oyo Nzambe alaki.Mrk. 4:19; Luka 21:34-36; 1 Tim. 6:19.

10. Ndenge nini tokoki komonisa bwanya na likambo etali kokɔta banyongo tii na motó?

10 Yehova ayebaka ete tosengeli na mwa mbongo. Kasi mbongo ekoki soki moke te kobatela mpe kosunga biso ndenge bwanya ya Nzambe ekoki kosala. (Mos. 7:12; Luka 12:15) Bato mingi bamonaka mpenza te makama ya kokende kosala na mboka mopaya, mpe eloko moko te emonisaka ete soki bato bakei kuna, bakozwa kaka mbongo. Kutu, makama minene nde ezalaka. Bato yango bazongaka kutu na banyongo tii na motó. Na esika bázala na bonsomi mpo na kosalela Nzambe, bakómaka nde kosalela bato oyo badefisaki bango mbongo. (Tángá Masese 22:7.) Likambo ya ntina ezali: kowela te kokɔta banyongo.

11. Ndenge nini kosala bakalkile ekoki kosalisa mabota bábebisaka mbongo te?

11 Eduardo amonaki ete mpo ekateli oyo azwaki ya kotikala esika moko ná libota na ye esimba, asengelaki koyeba kosalela mbongo. Ye ná mwasi na ye basalaki bakalkile mpo na koyeba biloko nini bazali na yango mpenza mposa. Bakalkile oyo basalaki, esalisaki bango bátika kosomba biloko mingi oyo bazalaki kosomba liboso. Kasi, bango nyonso batosaki ebongiseli wana mpe babebisaki mbongo te na makambo ezangá ntina. * Eduardo alobi ete, “Na ndakisa nalongolaki bana na ngai na biteyelo ya mbongo mingi mpe nakomisaki bango na biteyelo ya Leta oyo batángisaka malamu.” Ye ná libota na ye babondelaki ete azwa mosala moko oyo ekosalisa ye abebisa te programɛ na bango ya makambo ya elimo. Ndenge nini Yehova ayanolaki na mabondeli na bango?

12, 13. Makambo nini tata moko asalaki mpo na kosunga libota na ye, mpe ndenge nini Yehova apambolaki ekateli na ye ya kokóma na bomoi ya pɛpɛlɛ?

12 Eduardo alobi ete: “Mpo na bambula mibale ya liboso, tozalaki mpenza na bomoi ya malonga te. Makoki oyo nazalaki na yango ekitaki makasi, mwa lifuta oyo bazalaki kopesa ngai ezalaki te kokokisa bamposa na biso, mpe nakómaki mpenza kolɛmba. Kasi tozalaki koyangana na makita nyonso mpe kobima na mosala ya kosakola elongo.” Eduardo azwaki mpenza ekateli makasi ya komeka kutu te lisusu kozwa mosala oyo ekotinda ye azala mosika na libota na ye mpo na basanza to bambula. Abakisi boye: “Na esika ya kosala bongo, nayekolaki misala ndenge na ndenge mpo soki moko ekosimba te, nakoka kosala mosusu.”

Okoki koyekola misala ndenge na ndenge mpo na kosunga libota na yo? (Talá paragrafe 12)

13 Lokola Eduardo asengelaki kofuta banyongo na ye mokemoke, asengelaki kofuta matabisi mingi na mbongo oyo adefaki. Kasi amonaki ete kofuta yango ata mokemoke ekosalisa ye ná libota na ye básalela Yehova. Eduardo alobi ete: “Mbongo oyo nazali kozwa sikoyo ezali mpenza moke soki nakokanisi yango na oyo nazalaki kozwa na mboka ya bapaya, kasi tolalaka nzala te. ‘Lobɔkɔ ya Yehova ezali mokuse te.’ Kutu, tozwaki ekateli ya kokóma babongisi-nzela. Likambo ya esengo, ntango nkita ya mboka ebongaki mwa  moke, kozwa biloko ya kobikela ekómaki pɛtɛɛ.”Yis. 59:1.

NDENGE YA KOLONGA MIKAKATANO YA LIBOTA

14, 15. Mabota ya bokristo ekoki kosala nini soki bandeko na bango balingi ete bátya mbongo liboso ya losambo ya Yehova, mpe makambo ekoki kosuka ndenge nini soki topesi ndakisa malamu?

14 Na bisika mingi, bato bazalaka na mokumba ya kopesa bandeko mpe baninga na bango mbongo mpe bakado. Eduardo alobi lisusu boye: “Ezalaka bongo banda bankɔkɔ na biso mpe tosepelaka kopesa. Kasi kopesa ezalaka na ndelo. Nayebisaka bandeko na ngai mosusu ya libota ete nakoki kopesa oyo nakoki kozanga ete natya bamposa ya elimo mpe makambo mosusu ya mwasi mpe bana na ngai na likama.”

15 Soki bato ya libota bamoni moto oyo batalelaka lokola likonzí ya libota ayei kozonga mboka to aboyi kotika libota na ye mpo na kokende koluka na mikili ya bapaya, mbala mingi bayokaka nkanda, batyolaka ye mpe balɛmbaka nzoto. Bato mosusu kutu balobaka na ye ete azali motema mabe. (Mas. 19:6, 7) Anna, mwana ya Eduardo ya mwasi alobi ete: “Ntango toboyi kosundola matomba ya elimo mpo na biloko ya mosuni, bato mosusu ya libota bakoki komona ete totyaka Yehova mpenza na esika ya liboso. Soki tosali bongo te, bakoyeba mpe te ete totyaka Yehova na esika ya liboso.—Talá mpe 1 Petro 3:1, 2.

KOMONISA KONDIMA EPAI YA NZAMBE

16. (a) Ndenge nini moto akoki ‘komikosa na makanisi ya lokuta’? (Yak. 1:22) (b) Yehova apambolaka bikateli ya lolenge nini?

16 Ndeko mwasi moko oyo abalá akendeki na ekólo moko oyo nkita efandá. Atikaki mobali ná bana na ye, kasi ntango akómaki kuna, ayebisaki bankulutu ete: “Esengelaki tómipimela makambo ebele mpo naya awa. Mobali na ngai kutu atikaki mosala ya nkulutu na lisangá. Nakanisi mpenza ete Yehova akopambola mobembo oyo.” Yehova apambolaka ntango nyonso bikateli oyo emonisaka ete tozali na kondima epai na ye, kasi ndenge nini akoki kopambola ekateli oyo eyokani te na mokano na ye, mingimingi soki esɛngi moto atika mikumba ya lisangá kaka mpamba boye?Tángá Baebre 11:6; 1 Yoane 5:13-15.

17. Mpo na nini tosengeli koluka litambwisi ya Yehova liboso ya kozwa bikateli, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

17 Lukáká litambwisi ya Yehova liboso ya kozwa bikateli mpe kondima likambo moko, kasi te na nsima. Bondeláká ye apesa yo elimo  santu, bwanya mpe litambwisi. (2 Tim. 1:7) Omituna boye: ‘Na makambo nini nakolinga kotosa Yehova? Nakosala yango ata na ntango ya minyoko?’ Soki ezali bongo, okondima kotosa ye soki esɛngi okómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ? (Luka 14:33) Sɛngá bankulutu bápesa yo toli ya Biblia, mpe monisá ete ozali na kondima mpe tyá motema ete Yehova akokokisa elaka na ye ya kosalisa yo soki olandi toli na ye. Bankulutu bakoki te kozwa bikateli na esika na yo, kasi bakoki kosalisa yo ozwa bikateli oyo ekomemela yo esengo na nsima.2 Ko. 1:24.

18. Nani azali na mokumba ya kokokisa bamposa ya libota, kasi makambo nini ekoki kopesa bandeko libaku ya kosalisa basusu?

18 Mposa ya Yehova ezali ete batata ya mabota bákokisaka bamposa ya mabota na bango ntango nyonso. Tosengeli mpenza kopesa longonya mpe kobondela mpo na baoyo bazali kokokisa mokumba yango kozanga ete bátika balongani to bana na bango, atako bato basalaka bango mosukusuku to bango moko bamekamaka mpo na kosala yango. Makambo oyo ebimaka mbalakaka, na ndakisa koningana ya mabele to mipɛpɛ makasi to kosalisa nokinoki moto moko oyo abɛli, epesaka biso libaku mpo na komonisa ete tolinganaka mpe tomityaka na esika ya basusu. (Gal. 6:2, 5; 1 Pe. 3:8) Tokoki kopesa bandeko yango biloko oyo basengeli na yango nokinoki to kosalisa bango bázwa mosala epai na bango? Soki tosali bongo, tokoki kokitisa ata mwa moke mbamba oyo bazali kotya bango to mposa oyo bakoki kozala na yango ya kokende koluka mosala epai mosusu.Mas. 3:27, 28; 1 Yoa. 3:17.

KOBOSANA TE ETE YEHOVA AZALI MOSUNGI NA YO!

19, 20. Mpo na nini bakristo bakoki kosepela na koyeba ete Yehova akosunga bango?

19 Makomami elendisi biso ete: “Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo. Mpo [Nzambe] alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’ Mpo tózala na mpiko mpenza mpe tóloba: ‘Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?’” (Ebr. 13:5, 6) Ndenge nini likambo yango emonanaka?

20 Nkulutu moko oyo aumeli mingi na mosala yango, oyo afandaka na ekólo moko ya bobola alobi ete: “Mbala mingi bato balobelaka ntina oyo Batatoli ya Yehova bazalaka bato ya esengo. Bamonaki mpe ete ata Batatoli oyo bazali babola, balataka ntango nyonso kitoko mpe bamonanaka kitoko koleka bato mosusu.” Yango eyokani mpenza na elaka oyo Yesu apesaki mpo na baoyo batyaka Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso. (Mat. 6:28-30, 33) Ya solo, Yehova, Tata na yo ya likoló, alingaka yo mpe alukaka kaka bolamu na yo mpe ya bana na yo. “Mpo na Yehova, miso na ye ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.” (2 Nt. 16:9) Apesi biso mibeko na ye, mpe mibeko yango elobeli mpe makambo etali bomoi ya libota mpe bamposa ya mosuni; nyonso wana mpo na bolamu na biso. Soki tozali kolanda yango, tozali komonisa ete tolingaka ye mpe totyelaka ye motema. “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.”1 Yoa. 5:3.

21, 22. Mpo na nini ozwi ekateli ya kotyela Yehova motema?

21 Eduardo alobi ete: “Nayebi ete ntango oyo nalekisaki mosika na mwasi mpe bana na ngai ekozonga lisusu te, kasi nakanisakanisaka yango ntango nyonso te. Baninga na ngai mingi ya kala bazali na bozwi kasi bazali na esengo te. Mabota na bango ezali na mikakatano ya makasi. Kasi, libota na biso ezali na esengo! Mpe ekamwisaka ngai komona ndenge bandeko mosusu ya ekólo oyo, ata mpe baoyo bazali babola, bazali kokoba kotya matomba ya elimo na esika ya liboso na bomoi na bango. Biso nyonso tozali mpenza komona bosolo ya elaka oyo Yesu apesaki.”Tángá Matai 6:33.

22 Zalá na mpiko! Poná kotosa Yehova mpe kotyela ye motema. Tiká bolingo na yo mpo na Nzambe, molongani mpe bana na yo etinda yo okokisa mokumba na yo ya tata ya libota. Soki osali bongo, okomona mpenza ete ‘Yehova azali Mosungi na yo.’

^ par. 1 Bankombo mosusu topesi bango kopesa.

^ par. 11 Talá masolo “Comment gérer votre argent” na Lamuká! ya 09/2011 na Lifalanse.