Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2014

Osepelaka ndenge Yehova atalatalaka biso na bolingo?

Osepelaka ndenge Yehova atalatalaka biso na bolingo?

“Miso ya Yehova ezalaka na esika nyonso, ezali kotalatala bato mabe ná bato malamu.”​—MAS. 15:3.

1, 2. Ndenge nini lolenge oyo Yehova atalatalaka biso ekeseni na ndenge oyo bakamera esalaka?

NA MIKILI mingi, bato bazali kosalela bakamera mpo na kotala ndenge mituka ezali kotambola mpe mpo na kozwa bililingi ntango makama esalemi. Soki kamera ezwi bililingi ya sofɛlɛ moko oyo asalaki aksida mpe akimi, bililingi yango ekoki kosalisa bakonzi báluka sofɛlɛ yango mpe bákanga ye. Ya solo, lokola bakamera ekómi bisika mingi, yango ezali kosalisa mpo ete bato oyo basali aksida to likambo moko ya mabe bázanga te kozwa bitumbu.

2 Kasi, ndenge oyo bakamera etondi na mokili mpo na kokɛngɛla esengeli kotinda biso tóbosana te mosala oyo Yehova, tata na biso ya bolingo asalaka, boye te? Biblia elobaka ete miso na ye “ezalaka esika nyonso.” (Mas. 15:3) Kasi yango elingi nde koloba ete alandelaka makambo nyonso oyo tosalaka lokola polisi? Nzambe atalatalaka biso kaka mpo tótosa na makasi mibeko na ye, to mpo apesa biso etumbu? (Yir. 16:17; Ebr. 4:13) Ezali bongo te! Yehova atalatalaka biso libosoliboso mpo alingaka biso mpe alukaka bolamu na biso.​—1 Pe. 3:12.

3. Makambo nini mitano tokotalela oyo emonisi ete Nzambe alingaka biso?

3 Nini ekosalisa biso tósepela ete Nzambe atalatalaka biso mpo alingaka biso? Tótalela lolenge oyo asalaka yango. Asalaka  yango na ndenge (1) akebisaka biso ntango tobandi komonisa makanisi mabe, (2) asembolaka biso ntango tokómi na etamboli ya mabe, (3) atambwisaka biso na mitinda oyo ezali na Liloba na ye, (4) asalisaka biso ntango tokutani na mikakatano ya ndenge na ndenge, mpe (5) apambolaka biso ntango amoni likambo ya malamu.

NZAMBE ATALATALAKA BISO MPO NA KOKEBISA

4. Likanisi ya Yehova ezalaki nini ntango akebisaki Kaina ete lisumu ‘ebatami na monɔkɔ ya ndako na ye’?

4 Ya liboso, tótalela ndenge Nzambe akebisaka biso ntango tobandi komonisa makanisi mabe. (1 Nt. 28:9) Mpo na komona ete Nzambe atalatalaka biso mpo na kokebisa ntango makanisi mabe ebandi, tótala naino ndenge asalaki mpo na Kaina, oyo “ayokaki nkanda makasi” ntango Nzambe aboyaki ye. (Tángá Ebandeli 4:3-7.) Yehova alendisaki Kaina ‘abanda kosala makambo ya malamu.’ Soki asali yango te, Yehova akebisaki ye ete, lisumu ‘ebatamaki na monɔkɔ ya ndako na ye.’ Nzambe atunaki ye boye: “Yo, okokoka kolonga yango?” Alingaki ete Kaina ayoka likebisi wana mpo ‘andimama.’ Kondimama na Nzambe elingaki kosalisa ye abatela boyokani malamu elongo na ye.

5. Wapi balolenge oyo Yehova akebisaka biso na makinisi ya mabe?

5 Tokoloba nini mpo na biso lelo? Miso ya Yehova emonaka tii na motema na biso; yango wana makanisi mpe makambo nyonso oyo tolingi tósala ezali bolumbu na miso na ye. Tata na biso ya bolingo alingaka tólanda banzela ya boyengebene; kasi atindaka biso na makasi te mpo tótika ezaleli moko oyo tozali na yango. Na lisalisi ya Liloba na ye Biblia, akebisaka biso ntango tozali kokende na nzela mabe. Ndenge nini? Na botángi na biso ya Biblia mokolo na mokolo, mbala mingi tokómaka na vɛrsɛ moko oyo esalisaka biso tólongola makanisi mabe. Longola yango, mikanda na biso ekoki kolimbola mokakatano oyo tozali kobunda na yango mpe komonisa biso ndenge tokoki kosala mpo na kolonga yango. Mpe na makita na biso ya lisangá, biso nyonso tozwaka toli oyo eyaka na ntango mpenza oyo ebongi!

6, 7. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete mateya oyo ebongisamaka mpo na bamilio ya bato emonisaka ete Nzambe alingaka biso? (b) Osengeli kosala nini mpo ozwa litomba na ndenge Yehova atyelaka moto na moto likebi?

6 Makebisi wana nyonso emonisaka ete Yehova alingaka biso, mpe alukaka kobatela mokomoko na biso. Ya solo, Biblia ekomamá esili koleka basiɛklɛ mingi, mikanda oyo ebongiseli ya Yehova ebimisaka ezali mpo na bamilio ya bato, mpe toli oyo epesamaka na makita ezali mpo na lisangá mobimba. Kasi, na bibongiseli oyo nyonso, Yehova azali kobenda likebi na biso na Liloba na ye mpo tóbongola makanisi na biso. Bibongiseli oyo nyonso emonisaka ete Yehova alingaka mokomoko na biso mpe amibanzabanzaka mpo na ye.

Lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia esalisaka biso tóboya makama oyo ezali zingazinga na biso (Talá paragrafe 6, 7)

7 Mpo tózwela makebisi ya Nzambe litomba, tosengeli liboso koyeba ete amibanzabanzaka mpenza mpo na biso. Na nsima tosengeli kondima na motema moko toli ya Liloba na ye, kosala makasi tólongola makanisi nyonso oyo esepelisaka Nzambe te. (Tángá Yisaya 55:6, 7.) Soki tozali koyoka makebisi oyo ezali kopesama, tokomibatela na makama mosusu. Sikoyo kanisá ete okwei na makanisi mabe, lisalisi nini tata na biso ya bolingo apesaka?

TATA NA BISO YA BOLINGO ASEMBOLAKA BISO

8, 9. Ndenge nini toli oyo Yehova apesaka na nzela ya basaleli na ye emonisi ete alingaka biso mingi? Pesá ndakisa.

8 Tokoki mbala mosusu komona ete Yehova alingaka biso ntango asemboli biso. (Tángá Baebre 12:5, 6.) Mpo na koloba solo, toli nyonso to disiplini ezalaka likambo ya esengo te. (Ebr. 12:11) Kasi, tosengeli kokanisa na makambo moto oyo azali kopesa biso toli asengeli kotalela. Asengeli koyeba ete likambo oyo tozali kosala ekoki kobebisa  boyokani na biso ná Yehova Nzambe, asengeli kotalela ndenge tozali komiyoka, mpe asengeli kozwa ntango mpe kosala milende oyo esengeli mpo na komonisa biso na Biblia ndenge tokoki kobongisa makanisi na biso mpo tósepelisa Nzambe. Tosengeli mpenza kotyela Yehova motema mpo ye nde liziba ya batoli oyo tozwaka.

9 Tólobela likambo moko oyo ekomonisa ete toli oyo bato bapesaka ekoki komonisa ndenge Nzambe amibanzabanzaka mpo na biso. Ndeko mobali moko azalaki kotala pornografi mingi liboso ayeba solo, kasi atikaki ezaleli yango. Kasi, makanisi wana ya kala ezalaki naino kotoka na kati na ye lokola mɔtɔ. Ntango azwaki telefone ya sika, bamposa na ye ya mabe ezongaki lisusu. (Yak. 1:14, 15) Azalaki kosalela telefone yango mpo na kotala pornografi na Internet. Mokolo moko, adefisaki nkulutu moko telefone na ye; mpe ntango nkulutu yango abandaki kosalela telefone wana, basite ya mabe ebimaki. Yango esalisaki mpenza ndeko na biso wana oyo akómaki na likama monene. Azwaki toli na ntango oyo ebongi, disiplini oyo azwaki esalisaki ye, mpe atikaki ezaleli wana mabe. Tokoki mpenza kozala na botɔndi epai ya tata na biso ya likoló mpe ya bolingo, oyo amonaka ata masumu na biso oyo ebatamá mpe asembolaka biso liboso ete tókende mosika mpenza!

KOSALELA MITINDA YA BIBLIA EPESAKA BISO MATOMBA

10, 11. (a) Na ndenge nini okoki koluka litambwisi epai ya Nzambe? (b) Ndenge nini libota moko emonaki ntina ya kolanda litambwisi ya Yehova?

10 Mokomi moko ya nzembo ayembelaki Yehova ete: “Okokamba ngai na toli na yo.” (Nz. 73:24) Ntango nyonso oyo tozali na mposa ya litambwisi, tokoki “kokanisa” Yehova soki tozali kotalela Liloba na ye mpo na koyeba lolenge oyo ye atalelaka makambo. Kosalela mitinda ya Biblia ekoki komemela biso matomba na elimo mpe ekoki mbala mosusu kosalisa biso tókokisa bamposa na biso ya mosuni.​—Mas. 3:6.

11 Ndakisa oyo emonisi ndenge Yehova atambwisaki bato mosusu, ezali ya ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bazalaki kofutela na ferme moko na bangombangomba ya Masbate, na ekólo Philippines. Ndeko yango ná mwasi na ye bazalaki babongisi-nzela atako bazalaki na bana mingi. Mokolo moko, batungisamaki makasi ntango bazwaki mwa mokanda ya nkolo ferme ete bálongwa wana. Ezalaki mpo na nini? Bakoselaki bango makambo ete bazali na bizaleli mabe. Atako ndeko mobali yango azalaki komitungisa soki akozwa esika wapi mpo na libota na ye, alobaki ete: “Yehova akosunga. Ata ndenge nini akokokisa  bamposa na biso.” Ndeko wana amikosaki te. Mwa mikolo na nsima, motema ya bato ya libota yango ekitaki mpo bazwaki nsango ete bakolongwa lisusu te. Likambo nini esalemaki? Nkolo ferme wana amonaki ete atako bafundaki libota yango, kasi lokola bazalaki kotambwisama na mitinda ya Biblia, bakobaki komonisa botosi mpe ezaleli ya kimya. Ezaleli na bango ekamwisaki ye mpe alobaki na bango bákende lisusu te, kutu abakiselaki bango ndambo mosusu ya mabele mpo bálonaka. (Tángá 1 Petro 2:12.) Ya solo, Yehova atambwisaka biso na nzela ya Liloba na ye mpo tólonga mikakatano ya bomoi.

MONINGA OYO ASALISAKA BISO TOYIKELA MIKAKATANO MPIKO

12, 13. Makambo nini ekoki kotinda bato bámituna soki Nzambe amonaka mpenza bampasi na bango?

12 Ntango mosusu, tozali na mokakatano moko oyo ezali kosila te. Ekoki kozala ete tozali kotungisama na maladi moko mabe, na botɛmɛli ya bato ya libota na biso, to na minyoko oyo ezali kosila te. Mpe tokoloba nini mpo na kowelana oyo tokutanaka na yango mbala mosusu na bandeko ya lisangá?

13 Na ndakisa, balobaki na yo likambo moko oyo omonaki ete elobamaki na boboto te mpe esalaki yo mpasi na motema. Okoki mbala mosusu koloba: ‘Likambo ya boye esengeli te kosalema na ebongiseli ya Nzambe!’ Kutu, ndeko oyo alobaki na yo maloba wana azwi mikumba mosusu na lisangá mpe ezali komonana ete bandeko mosusu bazali kosepela na ye. Okoki komituna boye: ‘Ndenge nini likambo ya boye ekoki kosalema? Yehova azali komona te? Akosala eloko te?’​—Nz. 13:1, 2; Hab. 1:2, 3.

14. Ekoki kozala mpo na bantina nini Nzambe asilisaka mbala moko te mikakatano mosusu oyo tokutanaka na yango?

14 Ekoki kozala na bantina oyo Yehova azali naino kotika likambo yango. Na ndakisa, ntango yo ozali komona ete ndeko wana nde azali na foti monene, Nzambe akoki kotalela makambo bongo te. Na lolenge na ye ya kotalela makambo, ekoki kozala ete yo nde ozali na ebakata ya foti. Ekoki kozala ete maloba oyo yo omonaki ete ezokisi yo, ezalaki mpenza toli oyo esengelaki otyela yango likebi. Na lisolo ya bomoi na ye, ndeko Karl Klein, oyo asalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobeli mokolo moko oyo ndeko Joseph Rutherford apesaki ye toli moko ya makasi. Mwa moke na nsima, ndeko Rutherford apesaki ndeko Klein mbote na esengo; alobaki na ye, “Mbote, Karl!” Kasi, ndeko Klein, azalaki kaka na nkanda mpo na toli wana oyo azwaki, azongisaki mwa mbote moko ya malili mpe na mongongo ya nse. Lokola amonaki ete ndeko Klein azali na nkanda makasi, ndeko Rutherford akebisaki ye ete akóma te eloko oyo Zabolo akoki kolya. Na nsima ndeko Klein akomaki ete: “Soki tokangeli ndeko moko nkanda na motema, mpo alobi na biso likambo moko oyo azali na lotomo ya koloba yango mpo ezali mokumba na ye, tozali biso moko komitika na mitambo ya Zabolo.” *

15. Likambo nini ekosalisa yo ozala motema likolólikoló te wana ozali kozela ete Yehova asalisa yo na ntango ya mokakatano moko?

15 Ntango mosusu, tokoki kokóma motema likolólikoló mpo ezali komonana lokola mokakatano na biso ezali kosila te. Ndenge nini tokoki kosala? Kanisá ete ozali kotambwisa motuka na balabala monene mpe okangami esika mituka ezali ebele. Oyebi te ntango nini nzela ekofungwama. Soki osiliki mpe oluki kozwa nzela mosusu, okoki mbala mosusu kobunga. Okoki mpe kolekisa ntango mingi mpo na kokóma na esika ozali kokende koleka soki ozalaki motema molai mpe otikalaki kaka na molɔngɔ. Ndenge moko, soki otikali kaka na banzela oyo Liloba ya Nzambe elakisi, nsukansuka okokóma epai ozali kokende.

16. Wapi ntina mosusu, oyo ekoki mbala mosusu kosala ete Yehova atika bampasi na biso eumela?

 16 Yehova akoki mbala mosusu kotika bampasi na biso eumela mpo alingi ete tózwa formasyo oyo esengeli. (Tángá 1 Petro 5:6-10.) Kasi, Nzambe abimiselaka biso bampasi te. (Yak. 1:13) ‘Monguna na biso, Zabolo,’ nde azali kobimisa bampasi ya ndenge na ndenge. Kasi, Nzambe akoki kosalela mokakatano moko mpo na kosalisa biso tókola na elimo. Amonaka mpasi na biso, mpe ‘atyelaka biso likebi,’ akosala ete ekoba kaka mpo na “mwa ntango.” Osepelaka na lolenge oyo Yehova atyelaka yo likebi na ntango ya minyoko, mpe otyaka motema ete akolakisa yo nzela ya kobima?​—2 Ko. 4:7-9.

KONDIMAMA NA NZAMBE EZALI LIPAMBOLI

17. Yehova alukaka nani mpe mpo na nini?

17 Ya nsuka, Nzambe atalatalaka biso mpo na likambo mosusu ya ntina mingi. Na nzela ya Hanani momoni-makambo, Nzambe ayebisaki mokonzi Asa ete: “Miso na ye [Yehova] ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.” (2 Nt. 16:9) Atako Nzambe amonaki ete motema ya Asa ezalaki mobimba te, ‘akomonisa makasi na ye’ epai na yo soki okobi kosala oyo ezali malamu.

18. Ntango ozali komona lokola ete bato balingaka yo te, osengeli kobosana te likambo nini na ntina na Yehova? (Talá elilingi ya ebandeli.)

18 Nzambe alingi ete ‘tóluka oyo ezali malamu,’ ‘tólinga oyo ezali malamu,’ mpe ‘tósala oyo ezali malamu’ mpo akoka komonisela biso “boboto.” (Amo. 5:14, 15; 1 Pe. 3:11, 12) Yehova amonaka bato ya boyengebene mpe apambolaka bango. (Nz. 34:15) Na ndakisa, kanisá na basi babotisi ya Baebre na nkombo Shifara mpe Pua. Ntango Bayisraele bazalaki na boombo na Ezipito, basi yango babangaki Nzambe koleka Farao, oyo apesaki bango mobeko báboma bana nyonso ya mibali ya Baebre ntango bazali kobotama. Ya solo, lisosoli na bango ya malamu etindaki bango báboma te babebe wana. Na nsima, Yehova apesaki Shifara ná Pua ‘mabota na bango moko.’ (Kob. 1:15-17, 20, 21) Miso ya Yehova oyo etalatalaka esika nyonso, emonaki misala na bango ya malamu. Ntango mosusu, tokoki kokanisa ete ata moto moko te amonaka makambo ya malamu oyo tosalaka. Kasi Yehova atyaka likebi. Amonaka misala nyonso ya malamu oyo tosalaka, mpe akopesa biso mbano.​—Mat. 6:4, 6; 1 Tim. 5:25; Ebr. 6:10.

19. Ndenge nini ndeko mwasi moko amonaki ete Yehova azangaka te komona misala ya malamu?

19 Ndeko mwasi moko na Autriche andimaki ete Nzambe azali komona mosala makasi oyo azali kosala. Lokola azalaki moto ya Hongrie, azwaki adrɛsi ya moto moko oyo alobaka monɔkɔ ya Hongrois mpo akende kotala ye na mosala ya kosakola. Mbala moko akendeki na adrɛsi yango, kasi moto azalaki te na ndako. Asalaki yango mbala ebele. Na ntango mosusu, azalaki koyoka lokola moto azali na kati, kasi moto moko te azalaki kondima. Atikaki babuku mpe bazulunalo, akomelaki ye mikanda, atikelaki ye nimero ya telefone, mpe bongo na bongo. Nsima ya kozongela ye na boumeli ya mbula moko na ndambo, nsukansuka porte efungwamaki! Mwasi moko abimaki, apesaki ndeko mwasi wana mbote na esengo mpe alobaki na ye ete: “Kɔtá. Natángi mikanda nyonso oyo otikaki mpe nazalaki kozela yo.” Mwasi yango azalaki kozwa lisalisi ya minganga mpo azalaki kobɛla makasi mpe yango wana azalaki kokutana te na bato. Boyekoli ya Biblia ebandaki. Ya solo, Nzambe apesaki ndeko mwasi wana mbano mpo na milende na ye!

20. Oyoki ndenge nini sikoyo lokola oyebi ete Yehova atalatalaka biso na bolingo?

20 Yehova amonaka nyonso oyo ozali kosala mpe akofuta yo. Soki Nzambe azali kotalatala yo, kokanisa te ete batyeli yo kamera ezwaka makambo nyonso, ata ya mikemike oyo ozali kosala. Na esika ya kokanisa bongo, pusaná nde penepene ya Nzambe oyo atyelaka yo mpenza likebi mpe amibanzabanzaka mpo na yo!

^ par. 14 Lisolo ya bomoi ya ndeko Klein ebimá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/1985, na Lifalanse.