Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2014

Omonaka “Moto oyo amonanaka te”?

Omonaka “Moto oyo amonanaka te”?

“Atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.”EBR. 11:27.

1, 2. (a) Monisá ntina oyo Moize akokaki kozala na likama. (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mpo na nini Moize abangaki te nkanda ya mokonzi?

MPO na Baezipito Farao azalaki mokonzi moko monene mpenza mpe nzambe ya bomoi. Buku moko (When Egypt Ruled the East) elobi ete na miso na bango Farao “alekaki bato nyonso na bwanya mpe nguya.” Mpo na kobangisa bato na ye, Farao azalaki kolata motole oyo ezalaki na elilingi ya nyoka babengi kobra oyo ezalaki pene na koswa; yango ezalaki mpe kokundwela moto nyonso ete mosika te banguna ya mokonzi bakobomama. Kasi, kanisá ndenge Moize ayokaki ntango Yehova alobaki na ye ete: ‘Nakotinda yo epai ya Farao, mpe obimisa bato na ngai bana ya Yisraele na Ezipito.’Kob. 3:10.

2 Moize akendaki na Ezipito, kosakola nsango ya Nzambe, mpe yango ematisaki nkanda ya Farao. Ntango bolɔzi ya libwa ebɛtaki na Ezipito, Farao akebisaki Moize: “Koluka komona elongi na ngai lisusu te, mpamba te mokolo okomona elongi na ngai okokufa.” (Kob. 10:28) Liboso Moize alongwa liboso ya Farao, asakolaki ete mwana ya liboso ya Farao ya mobali akokufa. (Kob. 11:4-8) Nsukansuka, Moize ayebisaki libota mokomoko ya Yisraele ete báboma mpate to ntaba—nyama oyo bazalaki kopesa mbeka epai ya Ra, nzambe ya Ezipito—mpe basengelaki kopakola makila  na yango na makonzí ya baporte na bango. (Kob. 12:5-7) Farao akosala nini? Moize abangaki te. Mpo na nini? Na kondima atosaki Yehova, “abangaki nkanda ya mokonzi te, mpo atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.”Tángá Baebre 11:27, 28.

3. Tokotalela nini na ndenge Moize amonisaki kondima epai ya “Moto oyo amonanaka te”?

3 Kondima na yo ezali makasi mpe ezalaka lokola ozali ‘komona Nzambe’? (Mat. 5:8) Mpo na kosalisa biso tótalela makambo ndenge ebongi mpo ete tókoka komona “Moto oyo amonanaka te,” tótalela ndakisa ya Moize. Ndenge nini kondima na ye epai ya Yehova ebatelaki ye mpo abanga moto te? Na ndenge nini amonisaki kondima na bilaka ya Nzambe? Mpe ndenge nini likoki ya Moize ya komona “Moto oyo amonanaka te” epesaki ye mpe Bayisraele mosusu makasi ntango bomoi na bango ekómaki na likama?

“ABANGAKI NKANDA YA MOKONZI TE”

4. Na miso ya bomoto, tokoloba nini soki tokokanisi Moize ná Farao?

4 Soki totali na ndenge ya bomoto, Farao alekaki Moize mosika. Emonanaki lokola ete bomoi ya Moize mpe makambo na ye mosusu mingi ezalaki na mabɔkɔ ya Farao. Moize atunaki Yehova boye: “Ngai nazali nani mpo nakende epai ya Farao mpe mpo nabimisa bana ya Yisraele na Ezipito?” (Kob. 3:11) Mbula soki 40 liboso, Moize alongwaki na Ezipito mpe akómaki na bomoi ya kokimakima. Ekoki kozala ete amitunaki, ‘Ekozala mpenza likambo ya bwanya mpo na ngai kozonga lisusu na Ezipito mpe nasilikisa mokonzi?’

5, 6. Nini esalisaki Moize abanga nde Yehova, kasi Farao te?

5 Liboso Moize azonga na Ezipito, Nzambe ateyaki ye etinda moko ya ntina mingi, mpe na nsima Moize akomaki etinda yango na mokanda ya Yobo: “Kobanga Yehova nde bwanya.” (Yobo 28:28) Mpo na kosalisa Moize akóma na bobangi ya ndenge wana mpe asalaka makambo na bwanya, Yehova alobelaki bokeseni oyo ezali kati na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe bato. Atunaki ete: “Nani asalá monɔkɔ mpo na moto to nani asalaka moto oyo alobaka te to moto oyo akufá matoi to moto oyo amonaka to moto oyo akufá miso? Ezali ngai Yehova te?”Kob. 4:11.

6 Liteya ezalaki nini? Moize asengelaki kobanga te. Yehova nde atindaki ye, mpe asengelaki kopesa Moize nyonso oyo asengelaki na yango mpo ayebisa nsango ya Nzambe epai ya Farao. Longola yango, Yehova alekaki Farao mosika. Kutu, wana ezalaki te mbala ya liboso oyo basaleli ya Nzambe bazalaki na likama na boyangeli ya Ezipito. Mbala mosusu Moize akanisaki na ndenge Yehova abatelaki Abrahama, Yozefe, ata mpe ye moko Moize na boyangeli ya Bafarao mosusu. (Eba. 12:17-19; 41:14, 39-41; Kob. 1:22–2:10) Lokola azalaki na kondima epai ya Yehova, “Moto oyo amonanaka te,” Moize amonanaki na mpiko nyonso liboso ya Farao mpe asakolaki liloba nyonso oyo Yehova atindaki ye aloba.

7. Ndenge nini kondima epai ya Yehova ebatelaki ndeko mwasi moko?

7 Kondima epai na Yehova ebatelaki mpe ndeko mwasi moko na nkombo Ella mpo akwea te na motambo ya kobanga bato. Na mobu 1949, basoda ya KGB bakangaki ndeko Ella na Estonie, batikaki ye bolumbu, mpe mwa basoda ya bilenge bazalaki kotala ye na miso mabe. Alobi ete “nasambwaki. Kasi, nsima ya kobondela Yehova, nayokaki mpenza kimya na motema.” Na nsima, batyaki ye na mwa eteni ya bolɔkɔ kaka ye moko na boumeli ya mikolo misato. Abakisi boye: “Bakonzi ya basoda bagangaki ete: ‘Tokosala nyonso mpo nkombo ya Yehova ebunga libela na Estonie! Okokende na kaa, mpe bamosusu bakokende na Sibérie!’ Na lityo nyonso, batunaki ete, ‘Yehova na yo azali wapi?’” Ndeko Ella akobanga bato to akotyela Yehova motema? Ntango bazalaki kosambisa ye, kozanga kobanga, ayebisaki bato wana oyo bazalaki konyokola ye ete: “Nakanisi mingi na likambo oyo, mpe  nakosepela kotikala na bolɔkɔ mpe nabatela boyokani na ngai elongo na Nzambe na esika nabima, kasi nabebisi boyokani ná ye.” Mpo na Ella, Yehova azalaki moto mpenza koleka bato oyo bazalaki liboso na ye. Kondima na ye esalisaki ye atikala sembo.

8, 9. (a) Wapi nkisi mpo na kolonga ezaleli ya kobanga bato? (b) Soki omekami mpo na kokwea na motambo ya kobanga bato, osengeli kotalela nani?

8 Kondima epai ya Yehova ekosalisa yo olongola kobanga. Soki bakonzi baluki kopekisa biso kosambela Nzambe, ekoki komonana nde lokola bomoi mpe makambo na biso mosusu ezali na mabɔkɔ ya bato. Okoki mbala mosusu komituna soki ezali na ntina kokoba kosalela Yehova mpe kosilikisa bakonzi. Kobosana te: Nkisi mpo na kolongola ezaleli ya kobanga bato ezali kozala na kondima epai ya Nzambe. (Tángá Masese 29:25.) Yehova atuni boye: “Yo nani mpo obanga moto mowei mpamba oyo akokufa, mpe mwana ya bato oyo akokóma lokola matiti mpamba ya mobesu?”Yis. 51:12, 13.

9 Tyá likebi na yo mobimba epai ya Yehova, tata oyo azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Amonaka makambo oyo bakonzi ya mabe basalaka bato, amityaka na esika na bango, mpe asungaka bato yango. (Mib. 3:7-10) Ata soki osengeli kolobela bindimeli na yo liboso ya bakonzi, ‘komitungisa te mpo na ndenge oyo okoloba to makambo oyo okoloba; mpo bakopesa yo oyo okoloba kaka na ngonga wana.’ (Mat. 10:18-20) Yehova aleki mosika bakonzi ya Leta to ya mokili. Soki okómisi kondima na yo makasi uta sikoyo, okomona Yehova lokola moto mpenza oyo azali na mposa makasi ya kosalisa yo.

AZALAKI NA KONDIMA NA BILAKA YA NZAMBE

10. (a) Malako nini Yehova apesaki Bayisraele na sanza ya Nisana ya mobu 1513 L.T.B.? (b) Mpo na nini Moize atosaki malako oyo Nzambe apesaki?

10 Na sanza ya Nisana na mobu 1513 L.T.B., Yehova ayebisaki Moize mpe Arona báyebisa Bayisraele malako oyo ya ntina ete: Bópona mpate to ntaba ya mobali oyo ezali na litɔnɔ te, bóboma yango, mpe bópakola makila na yango na makonzí ya baporte na bino. (Kob. 12:3-7) Moize asalaki nini? Na nsima, ntoma Paulo akomaki na ntina na ye ete: “Na kondima asalaki elekeli mpe apakolaki makila na makonzí ya porte, mpo mobomi asimba bana na bango ya liboso te.” (Ebr. 11:28) Moize ayebaki ete esengeli kotyela Yehova motema, mpe azalaki na kondima ete Yehova akokokisa elaka na ye ya koboma bana mibali ya liboso ya Ezipito.

11. Mpo na nini Moize akebisaki basusu?

11 Ekoki kozala ete bana ya Moize bazalaki na Midiane, mosika mpenza na ‘mobomi.’ * (Kob. 18:1-6) Kasi, atosaki mpe ayebisaki mabota mosusu ya Yisraele oyo bana mibali na bango ya liboso bazalaki na likama, makambo oyo Yehova ayebisaki ye. Bomoi ya bato ezalaki na likama, mpe Moize azalaki mpenza na bolingo ya Bayisraele mosusu. Biblia elobi ete “nokinoki Moize abengaki mikóló nyonso ya Yisraele mpe alobaki na bango ete: . . . ‘Bóboma nyama ya elekeli.’”Kob. 12:21.

12. Yehova apesi biso etinda ya koyebisa nsango nini ya ntina?

12 Na litambwisi ya baanzelu, basaleli ya Yehova bazali koyebisa bato nsango oyo ya ntina ete: “Bóbanga Nzambe mpe bókumisa ye, mpo ngonga na ye ya kosambisa eyei, yango wana bósambela oyo asalá likoló, ná mabele, ná mbu, ná maziba ya mai.” (Em. 14:7) Sikoyo nde ntango ya kosakola nsango yango. Tosengeli kokebisa bazalani na biso ete bábima na Babilone Monene, mpo bázwa te “ndambo ya malɔzi na ye.” (Em. 18:4) “Bampate mosusu” basangani ná bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpo na kobenga bato oyo bámitangoli na Nzambe mpo ‘bázonga na boyokani’ ná ye.Yoa. 10:16; 2 Ko. 5:20.

Kondima na bilaka ya Yehova ekokolisa mposa na yo ya kosakola nsango malamu (Talá paragrafe 13)

13. Nini ekokolisa mposa na biso ya kosakola nsango malamu?

13 Tondimisami mpenza ete “ngonga ya kosambisa” eyei. Tondimisami mpe ete Yehova  azali kolekisa ndelo te ndenge azali kosɛnga biso ete tósala mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli na lombangu. Na emonaneli moko, ntoma Yoane ‘amonaki baanzelu minei batɛlɛmi na nsuka minei ya mabele, basimbi makasi mipɛpɛ minei ya mabele.’ (Em. 7:1) Na miso ya kondima, ozali komona ndenge baanzelu yango batɛlɛmi mpo na kofungola mipɛpɛ mabe ya bolɔzi monene na mokili oyo? Soki ozali komona baanzelu yango na miso ya kondima, okozala na likoki ya kosakola nsango malamu na motema mobimba.

14. Nini etindaka biso ‘tókebisa’ moto mabe mpo alongwa na nzela na ye ya mabe?

14 Bakristo ya solo bazali na boyokani malamu elongo na Yehova mpe bazali na elikya ya bomoi ya seko. Toyebi mpenza ete ezali mokumba na biso ya “kokebisa moto mabe” mpo alongwa na nzela na ye ya mabe mpe atikala na bomoi. (Tángá Ezekiele 3:17-19.) Na ntembe te, tosakolaka te kaka mpo na koboya ngambo ya makila. Kasi mpo tolingaka Yehova mpe tolingaka bazalani na biso. Yesu amonisaki ndimbola mpenza ya bolingo na ndakisa oyo apesaki ya Mosamaria moko ya boboto. Tosengeli komituna boye, ‘Motema mawa lokola Mosamaria etindaka ngai nápesa litatoli?’ Mpo na koloba solo, tokolinga soki moke te kozala lokola nganga-nzambe mpe Molevi ya ndakisa ya Yesu, koluka kaka komilongisa to na maloba mosusu ‘koleka ngámbo mosusu.’ (Luka 10:25-37) Kondima na bilaka ya Nzambe mpe bolingo mpo na bazalani ekotinda biso tómipesa na mosala ya kosakola liboso ete makambo nyonso esuka.

“BAKATISAKI MBU MOTANE”

15. Mpo na nini Bayisraele bamonaki lokola basuki?

15 Kondima ya Moize epai ya “Moto  oyo amonanaka te” esalisaki ye ntango Bayisraele bakómaki na likama nsima ya kotika Ezipito. Biblia elobi ete: “Bana ya Yisraele babandaki kotombola miso na bango mpe talá Baezipito bazali koya nsima na bango; mpe bana ya Yisraele babangaki mingi mpe babandaki kobelela Yehova.” (Kob. 14:10-12) Likambo yango ekokaki kokamwisa bango? Te. Yehova alobaki ete: “Nakotika mpenza motema ya Farao ekóma makasi, mpe akolanda mpenza bango na nsima mpe nakozwa nkembo na makambo oyo nakosala Farao ná mampinga ya basoda na ye nyonso; mpe Baezipito bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.” (Kob. 14:4) Kasi, Bayisraele bazalaki komona kaka makambo oyo ezalaki komonana na miso na bango—Mbu Motane ezalaki liboso na bango, makalo ya Farao oyo emesanaki na bitumba ezalaki nsima na bango, mpe moto ya mbula 80 azalaki kokamba bango! Bamonaki mpenza ete basuki.

16. Ndenge nini kondima epesaki Moize makasi na Mbu Motane?

16 Kasi, Moize atɛngatɛngaki te. Mpo na nini? Mpo miso na ye ya kondima ezalaki komona eloko moko ya nguya koleka mosika mpenza mai ya mbu to limpinga ya basoda. Azalaki “komona lobiko ya Yehova,” mpe ayebaki ete Yehova akobunda mpo na Bayisraele. (Tángá Kobima 14:13, 14.) Kondima ya Moize epesaki Bayisraele makasi. Biblia elobi ete “Na kondima bakatisaki Mbu Motane lokola nde na mabele oyo ekauki, kasi Baezipito bamɛlamaki ntango bamekaki kokatisa yango.” (Ebr. 11:29) Na nsima, “bato babandaki kobanga Yehova mpe kondimela [ye] mpe Moize mosaleli na ye.”Kob. 14:31.

17. Likambo nini ekosalema na mikolo ezali koya oyo ekotya kondima na biso na komekama?

17 Mosika te, ekomonana lokola ete bomoi na biso ekómi na likama. Na bolɔzi monene, baguvɛrnema ya mokili oyo, ekobebisa mpe ekosilisa nyɛɛ mangomba ya minene mpe oyo ezali na bandimi koleka biso mosika. (Em. 17:16) Na maloba ya esakweli, Yehova akokanisi biso na ‘mokili ya mboka oyo ezangi bifelo . . . , ekangiseli, to baporte.’ (Ezk. 38:10-12, 14-16) Na miso na biso ya bomoto, ekomonana lokola ete tokobika te. Okosala nini?

18. Monisá ntina oyo tosengeli kotɛngatɛnga te na bolɔzi monene.

18 Tosengeli te kotɛngatɛnga mpe kobanga. Mpo na nini? Mpamba te Yehova asakolaki ete bato bakoluka kosala basaleli na ye mabe. Kasi asakolaki mpe ndenge makambo ekosuka. Alobaki boye: “‘Ekosalema mpenza boye na mokolo oyo Goge akoyela mabele ya Yisraele,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘nkɛlɛ na ngai ekomata na zolo na ngai. Mpe na molende na ngai, na mɔtɔ ya nkɛlɛ na ngai, nakoloba mpenza.’” (Ezk. 38:18-23) Na nsima, Nzambe akoboma baoyo nyonso oyo bakolinga kosala basaleli na ye mabe. Soki ozali na kondima na makambo oyo “mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova” ekosala, yango ekosalisa yo “omona lobiko ya Yehova” mpe obatela bosembo na yo.Yoe. 2:31, 32.

19. (a) Boyokani ya ndenge nini Yehova mpe Moize bazalaki na yango? (b) Soki ozali kotalela Yehova na banzela na yo nyonso, mapamboli nini okozwa?

19 Omibongisa mpo na makambo wana ya ntina mingi uta sikoyo mpe kobá “kotikala ngwi lokola nde ozali komona Moto oyo amonanaka te”! Yekoláká mbala na mbala mpe bondeláká mpo na kobongisa boyokani na yo ná Yehova Nzambe. Moize azalaki mpenza na boyokani ya ndenge wana elongo na Yehova mpe Yehova asalelaki ye na ndenge ya kokamwa mpe na ndenge yango Biblia elobi ete Yehova ayebaki Moize “mpenza boye na elongi.” (Mib. 34:10) Moize azalaki mosakoli moko monene. Yango wana, na kondima, yo mpe okoki koyeba Yehova lokola moninga mpenza mpe ekoki kokóma lokola nde ozali komona ye na miso. Soki ozali ntango nyonso kotalela ye “na banzela na yo nyonso,” ndenge Liloba ya Nzambe ezali kolendisa yo osala, boye “akosembola banzela na yo.”Mas. 3:6.

^ par. 11 Yehova atindaki baanzelu bápesa bitumbu na Ezipito.Nz. 78:49-51.