Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2014

Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale

Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale

“Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale. . . . Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya bomɛngo.”​—MAT. 6:24.

1-3. (a) Mikakatano nini ya mbongo bato mingi bazali na yango, mpe bamosusu basalaka nini mpo na kosilisa yango? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Nini ebimisaka mikakatano na likambo etali kobɔkɔla bana?

MWASI moko na nkombo Marilyn * alobi boye: “Mobali na ngai James, azalaki kozonga ndako mikolo nyonso alɛmbi makasi, kasi lifuti oyo bazalaki kopesa ye na mosala, ezalaki kokokisa kaka moke mpenza bamposa na biso ya mokolo na mokolo. Nazalaki na mposa nasalisa ye mpe nasombela mwana na biso ya mobali Jimmy biloko mosusu ya kitoko oyo baninga na ye ya kelasi bazalaki na yango.” Marilyn azalaki mpe na mposa ya kosalisa bato mosusu ya libota na bango mpe kobomba mwa eloko mpo na mikolo ezali koya. Baninga na ngai mingi bakendeki na mikili mosusu mpo na koluka mbongo. Kasi ntango atalelaki likambo yango, abandaki komituna: nakende to nakende te? Mpo na nini?

2 Marilyn azalaki kobanga kotika libota na ye oyo azalaki kolinga mingi mpe mimeseno ya losambo kati na libota oyo bazalaki na yango. Kasi, alobaki ete bato mosusu bakendá na mikili mosusu mpo na mwa ntango mpe mabota na bango ezali malamu na elimo. Kasi amitunaki ndenge nini akoki kobɔkɔla mwana na ye Jimmy na mosika. Akolonga mpenza kobɔkɔla ye “na disiplini mpe na makebisi ya Yehova” na nzela ya Internet?​—Ef. 6:4.

3 Marilyn alukaki lisalisi. Mobali na ye aboyaki ete akende, atako  ayebisaki ye ete akokanga ye na makasi te. Bankulutu ná bandeko mosusu ya lisangá bapesaki ye toli akende te, kasi bandeko basi mingi na lisangá balendisaki ye akende kaka. Balobaki na ye boye: “Soki olingaka libota na yo, okokende; mpe okokoba kosalela Yehova.” Atako ayebaki ete libota na ye ekozanga ye, Marilyn ayambaki James ná Jimmy, apesaki bango bizi mpe akendaki koluka mosala na mboka mopaya mpe ayebisaki bango ete akoumela te.”

MIKUMBA YA LIBOTA MPE MITINDA YA BIBLIA

4. Mpo na nini bato mingi bakendeke na mikili ya bapaya, kasi mbala mingi banani babɔkɔlaka bana ya bato yango?

4 Yehova alingaka te ete basaleli na ye bázala babola ya nsuka mpenza, mpe kokende na mikili ya bapaya ezali moko ya mimeseno ya kala mpenza oyo bato basalaka mpo na kosilisa bobola. (Nz. 37:25; Mas. 30:8) Mpo bákufa nzala te, Yakobo atindaki bana na ye na Ezipito mpo bákende kosomba biloko ya kolya. * (Eba. 42:1, 2) Lelo oyo, bato mingi oyo bakendeke na mboka ya bapaya, batikaka bamboka na bango te mpo bazali kokufa nzala. Ekoki kozala ete balukaka kosala mingi mpo báfuta ebele ya banyongo oyo bazali na yango. Basusu balingaka kaka ete bomoi ya mabota na bango ezala mwa likoló. Mpo na kokokisa mikano na bango na bisika oyo nkita ya mboka ezali ya kokita, bato mingi bakabwanaka na mabota na bango, mbala mosusu bakendeke mosika na kati ya ekólo na bango to bakendeke na mikili mosusu. Mbala mingi, batikaka bana na bango ya mike na mabɔkɔ ya moboti moko, ndeko moko ya mokóló, bankɔkɔ, bandeko mosusu to baninga. Atako bato oyo bakendaka koluka na mikili ya bapaya bayokaka mpasi ndenge batiki basi to bana na bango, kasi mingi bamonaka ete bazali na lolenge mosusu te ya kosala.

5, 6. (a) Yesu ateyaki nini na likambo etali kozwa esengo mpe kimya? (b) Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na biloko nini ya mosuni? (c) Ndenge nini Yehova apambolaka biso?

5 Na mikolo ya Yesu, bato mingi mpe bazalaki babola mpe na bomoi ya mpasi, mpe ekoki kozala bakanisaki ete mpo na kozala na bomoi ya esengo mpe ya kimya esengeli kaka bázala na mbongo mingi. (Mrk. 14:7) Kasi Yesu alingaki ete bato batya elikya na bango na likambo mosusu. Alingaki batya elikya epai ya Yehova, mopesi ya bomɛngo oyo eumelaka. Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu amonisaki ete esengo ya solosolo eutaka te na biloko ya mosuni, to mpe na milende na biso moko, kasi nde soki tozali na boyokani ya malamu elongo na tata na biso ya likoló.

6 Na libondeli ya ndakisa, Yesu ateyaki biso tobondelaka te mpo na kozala na mbongo mingi, kasi nde mpo na bamposa na biso ya mokolo na mokolo, elingi koloba mpo Yehova apesa biso “bilei na biso mpo na mokolo oyo.” Ayebisaki bayoki na ye polele ete: “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele. . . . Nzokande, bómibombela biloko ya motuya na likoló.” (Mat. 6:9, 11, 19, 20) Tokoki kotya motema ete Yehova akopambola biso ndenge alaki. Soki Nzambe apamboli biso ezali te kaka elembo ete tondimami na ye; ezali nde mposa makasi oyo azalaka na yango ya kopesa biso biloko oyo tosengeli mpenza na yango. Yango wana, lolenge kaka moko ya kozwa esengo ya solosolo mpe kimya ezali ya kotya motema na mbongo te kasi epai ya Yehova, tata na biso oyo akokisaka bamposa na biso.​—Tángá Matai 6:24, 25, 31-34.

7. (a) Yehova apesi banani mokumba ya kobɔkɔla bana? (b) Mpo na nini tata ná mama basengeli mpenza kopesana mabɔkɔ mpo na kobɔkɔla bana na bango?

7 ‘Koluka liboso boyengebene ya Nzambe’ elimboli mpe kotalela mikumba ya libota ndenge Yehova atalelaka yango. Mobeko ya Moize ezali na etinda oyo ebongi mpe mpo na bakristo: Baboti basengeli bango moko kolakisaka bana na bango mateya ya Yehova. (Tángá Kolimbola Mibeko 6:6, 7.) Nzambe apesi  mokumba wana epai ya baboti, kasi te epai ya bankɔkɔ to bato mosusu. Mokonzi Salomo alobaki ete: “Mwana na ngai, yoká disiplini ya tata na yo, mpe kotika mobeko ya mama na yo te.” (Mas. 1:8) Makanisi ya Yehova ezali ete tata mpe mama bázala elongo mpo bapesanaka mabɔkɔ mpo na kotambwisa mpe koteya bana na bango. (Mas. 31:10, 27, 28) Makambo mingi oyo bana bayekolaka epai ya baboti na bango, mingimingi makambo ya elimo, eutaka na masolo oyo bayokaka baboti na bango bazali kobɛta mokolo na mokolo na ntina na Yehova mpe ntango batalaka ndakisa ya baboti na bango.

MAKAMA OYO OKANAKI TE

8, 9. (a) Bambongwana nini ekɔtaka mbala mingi na libota soki moboti moko azali te? (b) Ndenge nini kotika libota ekoki kobebisa bizaleli ya libota mpe boyokani na yango ná Yehova?

8 Liboso ya kokende na mikili ya bapaya, bato mosusu batalelaka malamu mpe mabe ya kokende kuna mpe makambo mosusu oyo ekosɛnga komipimela mpo na yango, kasi kaka bato moke nde bamonaka mosika makama ya kotika mabota na bango. (Mas. 22:3) * Ntango kaka Marilyn akendaki, abandaki koyoka mpasi ndenge akabwanaki na libota na ye. Mobali na ye ná mwana na bango bayokaki mpe mpasi. Jimmy azalaki ntango nyonso kotuna ye, “Mpo na nini otiki ngai?” Mpe lokola basanza oyo Marilyn abongisaki mpo na kozonga esilaki mpe ekómaki bambula, amonaki ete mobulu ekɔtaki na libota na ye. Jimmy azalaki kolinga kolobisa ye lisusu te mpe akómaki mosika na ye na makanisi. Na mawa nyonso alobi ete, “abandaki kolinga ngai lisusu te.”

9 Ntango baboti ná bana bazali te kofanda esika moko, bakoki kotungisama na makanisi mpe bizaleli ya bato mosusu ya libota ekoki kobeba. * Soki bana bazali mpenza mike mpe bakabwani na baboti ntango molai, mpasi ekozala mpe makasi. Marilyn ayebisaki Jimmy ete azali koboma nzoto mpo na ye. Kasi Jimmy amonaki ete mama na ye asundoli ye. Na ebandeli, asilikaki ndenge mama na ye azalaki te. Kasi na nsima, ntango ayaki kotala bango, Jimmy ayokaki nkanda ntango amonaki ye. Ndenge bana oyo basundolá bango basalaka, Jimmy mpe amiyokaki ete likambo oyo mama na ye asalaki nde esalaki ete atosa ye te mpe alinga ye lisusu te.​—Tángá Masese 29:15.

Okoki soki moke te koyamba mwana na yo na nzela ya Internet (Talá paragrafe 10)

10. (a) Kotindela bana bakado na esika ya kozala elongo na bango, ekoki kobebisa bango na nini? (b) Eloko nini ezangaka moboti oyo azali koluka kobɔkɔla mwana to bana na ye na mosika?

10 Atako Marilyn azalaki koluka komisomba ndenge azalaki kotinda mbongo mpe bakado, kasi amonaki ete azalaki kokóma mosika na mwana na ye mpe kozanga koyeba azalaki kolakisa ye nde ete atyaka biloko ya mosuni liboso ya matomba ya elimo mpe boyokani elongo na libota. (Mas. 22:6) Jimmy  akokaki koloba na ye: “Kozonga te, tindáká kaka biloko.” Marilyn ayaki komona ete akobɔkɔla te mwana na ye na nzela ya mikanda, telefone, to na Internet. Alobi ete, “Na nzela ya Internet, okoki te koyamba mwana na yo, kopesa ye bizi liboso alala.”

Ntango ozali mosika na molongani na yo, likama nini okoki kozala na yango? (Talá paragrafe 11)

11. (a) Ndenge nini kokende kosala na mboka mopaya ekoki kobebisa libala? (b) Ndenge nini ndeko mwasi moko ayaki komona ete esengeli azongela libota na ye?

11 Boyokani ya Marilyn elongo na Yehova mpe mobali na ye James mpe ekómaki kotɛngatɛnga. Koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola ekómaki kaka mbala moko na pɔsɔ to mbala mosusu mpe te, mpe asengelaki kotɛmɛla maloba ya kolɛngola ya patrɔ na ye oyo azalaki koluka kosangisa na ye nzoto. Lokola bango nyonso mibale bazalaki elongo te mpo na kosalisana na ntango ya mikakatano, Marilyn mpe James bakómaki na makanisi epai ya bato mosusu mpe etikalaki moke bákwea na ekobo. Marilyn ayaki komona ete atako ye ná mobali na ye basalaki ekobo te, kasi lokola bazalaki elongo te, bakokaki te kosalela toli ya Biblia oyo ezali kosɛnga na mobali ná mwasi ete balinganaka mpe bakokisaka bamposa na bango ya kosangisa nzoto. Bakokaki te kopesana makanisi nokinoki soki likambo ebimi, bakokaki te kobwakelana mwa liso ya bolingo, komungamunga, kosimbana na lobɔkɔ, kopesana bizi na litama to koyambana; makambo oyo babalani basengeli kosala to kopesana. (Loy. 1:2; 1 Ko. 7:3, 5) Mpe bakokaki te kosambela Yehova malamumalamu elongo na mwana na bango. Marilyn alobi boye: “Ntango nayokaki na liyangani moko ya etúká ete kosala losambo na kati ya libota mbala na mbala ezali na ntina mpo tóbika na mokolo monene ya Yehova, namonaki ete esengeli nazonga ndako. Esengelaki nabanda lisusu kobongisa boyokani na ngai ná Yehova mpe nabongisa bomoi ya libota na ngai.”

TOLI YA MALAMU MPE TOLI YA MABE

12. Toli nini ya Biblia esengeli kopesa bato oyo bakei mosika na mabota na bango?

12 Ntango Marilyn azwaki ekateli ya kozonga ndako, bato mosusu basepelaki mpe bamosusu basepelaki te. Bankulutu ya lisangá oyo azalaki kuna, bapesaki ye longonya mpo na kondima na ye mpe mpiko oyo amonisaki. Kasi bato mosusu oyo bazalaki mpe mosika na balongani na bango ná mabota na bango basepelaki te. Na esika ya kolanda ndakisa na ye malamu, balukaki nde kopekisa ye. Balobaki ete: “Ekoumela te okozonga lisusu. Okozwa mbongo ya kobikela ndenge nini soki ozongi ndako?” Na esika ya koloba makambo ya mabe ya ndenge wana, bakristo basengeli kopesa bilenge basi toli “bálinga mibali na bango, bálinga bana na bango, bázala . . . basali misala na ndako,” na ndako na bango moko, “mpo liloba ya Nzambe efingama te.”​—Tángá Tito 2:3-5.

13, 14. Mpo na nini esɛngaka kozala na kondima mpo na kotya Yehova liboso na makambo oyo bato ya libota balingaka mingi? Pesá ndakisa.

13 Bandeko mingi oyo bakendá koluka na mikili ya bapaya, bakolá na bisika oyo mimeseno mingi esɛngaka bápesa mikumba epai ya  libota, mingimingi epai ya baboti. Mpo mokristo aboya kolanda momeseno oyo bato nyonso basalaka to oyo bato ya libota balingaka mpo na kosepelisa Yehova, esɛngaka mpenza kozala na kondima.

14 Tótalela lisolo ya Carin: “Ntango mwana na biso Don abotamaki, ngai ná mobali na ngai tozalaki kosala na mokili ya bapaya, mpe eumelaki te nabandaki koyekola Biblia. Moto nyonso na kati ya libota azalaki kozela ete nazongisa mwana mpo baboti na ngai bábɔkɔla ye tii ntango biso tokokóma na mbongo mingi.” Ntango Carin atingamaki ete ye moko abɔkɔla mwana na ye, bandeko mpe mobali na ye babengaki ye zoba mpe basɛkaki ye. Carin alobi ete: “Mpo na koloba solo, na ntango wana, nayebaki mpenza te soki mabe ezali wapi kotika Don na mabɔkɔ ya baboti na ngai mpo na mwa bambula. Kasi nayebaki ete Yehova apesi mokumba ya kobɔkɔla Don epai ya biso baboti na ye.” Ntango Carin akumbaki zemi lisusu, lokola mobali na ye azalaki Motatoli te, asɛngaki ye alongola yango. Ekateli ya malamu oyo Carin azwaki liboso elendisaki kondima na ye, mpe atikalaki lisusu sembo epai ya Yehova. Lelo oyo, ye ná mobali na ye mpe bana na bango bazali na esengo mpo ete bazali elongo. Soki Carin atindaka mwana moko to nyonso mibale mpo bato mosusu bábɔkɔla bango, makambo ekokaki kozala ndenge mosusu mpenza.

15, 16. (a) Lobelá ndakisa ya ndeko mwasi moko oyo akolaki epai ya bankɔkɔ na ye. (b) Mpo na nini amonaki malamu abɔkɔla mwana na ye ya mwasi ye moko?

15 Ndeko moko ya mwasi na nkombo Vicky alobi boye: “Nkɔkɔ na ngai ya mwasi abɔkɔlaki ngai na boumeli ya mwa bambula, mpe baboti na biso batikalaki ná leki na ngai ya mwasi. Ntango nazongaki epai na bango, lolenge oyo ngai ná bango tozalaki liboso ebongwanaki. Leki na ngai azalaki kosolola na bango na pɛtɛɛ nyonso, azalaki koyamba bango mpe azalaki koyokana na bango malamu. Nabandaki kozala mosika na bango, ata ntango nakómaki mokóló, ezalaki mpasi nayebisa bango mpenza makambo na ngai ya motema. Ngai ná leki ngai toyebisaki baboti na biso ete tokobatela bango ntango bakokóma mibange. Kasi nakobanda kosala yango kaka mpo nasala, nzokande leki na ngai akobanda kosala yango na bolingo mpenza.

16 Vicky abakisi ete: “Sikoyo mama alingi ete natindela ye mwana na ngai ya mwasi mpo abɔkɔla ye, ndenge kaka ye mpe atindaká ngai epai ya nkɔkɔ na biso ya mwasi. Naboyaki na mayele mpenza. Ngai ná mobali na ngai tozali na mposa ya kobɔkɔla mwana na biso na banzela ya Yehova. Mpe nalingi te kobebisa boyokani na ngai ya lobi ná mwana na ngai ya mwasi.” Vicky ayaki komona ete lolenge kaka moko ya kolonga na bomoi ezali ya kotya Yehova mpe mitinda na ye liboso ya mbongo mpe makambo mosusu oyo libota elingaka tósala. Yesu alobaki polele ete: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale,” elingi koloba Nzambe mpe bomɛngo.​—Mat. 6:24; Kob. 23:2.

YEHOVA ASALAKA ETE MILENDE NA BISO ELONGA

17, 18. (a) Na likambo nini bakristo basengeli ntango nyonso kopona? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo elandi?

17 Tata na biso Yehova alaki ete akosalisa biso tózwa biloko oyo tosengeli mpenza na yango soki totye Bokonzi mpe boyengebene na ye na esika ya liboso na bomoi na biso. (Mat. 6:33) Yango wana, bakristo basengeli ntango nyonso kopona. Yehova alaki ete akobongisa “nzela ya kobima” oyo ekosɛnga te kobuka mitinda ya Biblia, ezala tokutani na mikakatano nini. (Tángá 1 Bakorinti 10:13.) Ntango tozali ‘kozela Yehova na mposa makasi,’ mpe ntango tozali ‘kotalela ye’ mpe tozali kobondela ye mpo apesa biso bwanya mpe atambwisa biso, mpe soki tozali kolanda mibeko mpe kosalela mitinda na ye, ‘akozanga te kosala.’ (Nz. 37:5, 7) Akopambola mpenza milende na biso soki tosaleli kaka ye mpo azali nkolo ya solosolo. Soki totye ye na esika ya liboso, akosala ete bomoi na biso elonga.​—Talá mpe Ebandeli 39:3.

18 Esengeli kosala nini mpo na kobongisa mikakatano oyo kokabwana na libota ebimisaki? Makambo nini tokoki kosala mpo tókokisa bamposa ya mabota na biso kozanga ete tókende mosika na bango? Mpe ndenge nini tokoki kolendisa basusu bázwa bikateli ya malamu na likambo yango? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.

^ par. 1 Bankombo mosusu topesi bango kopesa.

^ par. 4 Na mobembo mokomoko oyo basalaki mpo na kokende na Ezipito, ekoki kozala ete bana ya Yakobo basalaki pɔsɔ mibale na ndambo to misato mosika na mabota na bango. Ntango Yakobo mpe bana na ye bakendeki na Ezipito, bakendeki nzela moko ná basi mpe bana na bango.​—Eba. 46:6, 7.

^ par. 8 Talá lisolo “Kokende na mboka mopaya: Oyo bato bakanisaka mpe oyo bakutanaka na yango mpenza” na Lamuká! ya 03/2013.

^ par. 9 Balapolo oyo euti na bikólo ndenge na ndenge emonisi ete kotika molongani to bana mpo na kokende kosala na mikili mosusu nde esali ete bato mosusu bákwea na masumu ya minene. Mobali to mwasi to bango nyonso mibale bakweaki na ekobo, basusu basangisaki nzoto mibali na mibali to basi na basi, to ná moto moko ya libota, mpe bana bakómaki na bizaleli mabe, bakutanaki na mikakatano na bainiversite, babebisaki bamosusu, bakómaki na basusi, batungisamaki na makanisi, to bakómaki na makanisi ya komiboma.