Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2014

 LISOLO YA BOMOI

Epai mosala ya ntango nyonso ememaki ngai

Epai mosala ya ntango nyonso ememaki ngai

Soki nakanisi mbula 65 oyo nalekisi na mosala ya ntango nyonso, nakoki mpenza koloba ete nalekisi mikolo ya esengo mingi. Yango elingi te koloba ete mikolo ya mawa mpe ya kolɛmba nzoto ezangaki. (Nz. 34:12; 94:19) Kasi na nyonso, nazwi mpenza lipamboli monene mpe bomoi na ngai ezali mpenza na ntina!

NA MOKOLO ya 07/09/1950, nakómaki mosangani ya libota ya Betele ya Brooklyn. Na ntango wana, libota mobimba ya Betele ezalaki na bato 355 oyo bautaki na bikólo ndenge na ndenge mpe bambula ya kobotama ezalaki kobanda na 19 tii 80. Mingi na bango bazalaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo.

NDENGE OYO NAKÓMAKI MOSALELI YA YEHOVA

Nabatisamaki na mbula 10

Nayekolaki kosalela ‘Nzambe na biso ya esengo’ epai ya mama. (1 Tim. 1:11) Abandaki kosalela Yehova ntango ngai nazalaki naino mwana mpenza. Na mokolo ya 01/07/1939, ntango nakómaki na mbula zomi, nazwaki batisimo na liyangani ya zone (lelo oyo liyangani ya zongazonga) na engumba Columbus, Nebraska, na États-Unis. Bato soki nkama moko kati na biso toyanganaki na esika moko ya kofutela mpo na koyoka diskur ya ndeko Joseph Rutherford oyo batyaki na kasɛti. Diskur yango ezalaki na motó ya likambo ete “Fascisme ou liberté.” Ntango diskur yango ekómaki na katikati, etuluku moko ya bato ebele eyanganaki libándá ya mwa ndako moko oyo biso tozalaki. Bakɔtaki na kati, babebisaki makita na biso mpe babenganaki biso mosika na vile. Toyanganaki na ferme ya ndeko moko oyo ezalaki mosika te na vile mpe tolandaki programɛ oyo etikalaki. Ndenge bokoki komona yango, nabosanaka soki moke te mokolo oyo nazwaki batisimo!

Mama asalaki nyonso abɔkɔla ngai kati na solo. Atako papa azalaki moto malamu mpe papa moko malamu, kasi azalaki mpenza te kokipe makambo ya Nzambe to kosalisa ngai nalanda nzela ya Nzambe. Mama ná Batatoli mosusu ya lisangá ya Omaha balendisaki ngai mingi.

NABONGOLAKI MAKANISI

Ntango nalingaki nasilisa kelasi, esengelaki nazwa ekateli mpo na koyeba nini nakosala na bomoi na ngai. Na konje, nazalaki kosala lokola mobongisi nzela ya konje (lelo oyo mobongisi-nzela mosungi), ná bilenge mosusu ya mbula na ngai.

Bandeko mibali mibale ya bilenge oyo bazalaki minzemba, bautaki kokɔta eteyelo ya mbala ya nsambo ya Gileadi. Bandeko yango ezalaki John Chimiklis mpe Theodore Jaracz. Batindaki bango bakɛngɛli ya zongazonga epai biso tozalaki. Nakamwaki ntango nayebaki ete bazalaki kaka na mbula soki 20. Na ntango wana ngai nazalaki na mbula 18 mpe nalingaki nasilisa kelasi. Nabosanaka te mokolo ndeko Chimiklis atunaki ngai soki  nakosala nini na bomoi na ngai. Ntango nayebisaki ye, alendisaki ngai ete: “Longonya, bandá mbala moko mosala ya ntango nyonso. Oyebi te epai ekomema yo.” Toli wana mpe ndakisa ya bandeko yango esepelisaki ngai mingi mpenza. Na yango, nsima ya kosilisa kelasi, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na mobu 1948.

NDENGE NAKÓMAKI NA BETELE

Na sanza ya nsambo na mobu 1950, ngai ná baboti na ngai tokendeki na liyangani oyo esangisaki bato ya mikili ndenge na ndenge. Liyangani yango esalemaki na Yankee Stadium na engumba New York. Ntango tozalaki na liyangani yango, nakɔtaki na likita ya bato oyo balingi kosala na Betele. Nakomaki mokanda mpe namonisaki ete nasepeli kosala kuna.

Atako papa aboyaki te ete nasala mosala ya mobongisi-nzela mpe nazala epai na biso, akanisaki ete esengeli nafutaka mwa mbongo mpo na shambrɛ na ngai mpe mpo na biloko ya kolya. Yango wana mokolo moko, na ebandeli ya sanza ya mwambe, ntango nazalaki kokende koluka mosala, nakendeki naino na posita mpo na koyeba soki batindeli ngai mokanda. Nakutaki mokanda euti na Brooklyn. Ndeko Nathan Knorr nde atyaki mabɔkɔ na mokanda yango. Akomaki boye: “Nazwaki mokanda otindaki mpo na kosala na Betele. Namoni ete ondimi kotikala na Betele tii ntango Nkolo akozwa yo. Nakosepela okóma na Betele oyo ezali na 124 Columbia Heights, Brooklyn, New York, mokolo ya 07/09/1950.”

Ntango papa autaki mosala mokolo wana, nayebisaki ye ete nazwi mosala. Alobaki, “Malamu, kasi okosala wapi?” Nayebisaki ye ete na “Betele ya Brooklyn, mpe nakobanda kozwa dolare 10 na sanza.” Likambo yango esalaki ye mpasi, kasi alobaki ete soki yango nde likambo oyo naponi kosala, nasengeli kosala makasi elonga. Mwa moke na nsima, na liyangani oyo esangisaki bato ya mikili ndenge na ndenge na Yankee Stadium na mobu 1953, azwaki batisimo!

Ná moninga na ngai Alfred Nussrallah, oyo azalaki mpe mobongisi-nzela

Likambo ya esengo, babengaki mpe Alfred Nussrallah, moninga na ngai ya mobongisi-nzela na Betele kaka ntango babengaki ngai mpe tokendeki elongo. Na nsima, ye abalaki, mpe ye ná mwasi na ye Joan bakɔtaki Eteyelo ya mbala ya 35 ya Gileadi, bakómaki bamisionɛrɛ na Liban mpe bazongaki na États-Unis kosala lokola bakɛngɛli batamboli.

MISALA OYO NASALI NA BETELE

Mosala na ngai ya liboso na Betele ezalaki ya kosangisa babuku (reliure). Mokanda ya liboso oyo nasalaki ezalaki buku (La religion a-t-elle servi l’humanité?) Nsima ya kolekisa sanza soki mwambe na reliure, batindaki ngai na Departema ya mosala ya kosakola mpe ndeko Thomas Sullivan nde azalaki kotambwisa makambo kuna. Ezalaki esengo kosala na ye mpe kozwa bwanya mpe bososoli oyo ye azwaki na boumeli ya bambula ebele na ebongiseli ya Yehova.

Nsima ya kosala mbula soki misato na Departema ya mosala, ndeko Max Larson, oyo azalaki kokamba imprimeri ayebisaki ngai ete ndeko Knorr azali na mposa na ngai. Namitunaki soki nasali likambo moko ya mabe. Motema ekitaki ntango ndeko Knorr atunaki ngai soki nazali kokana kolongwa na Betele na mikolo ezali koya. Azalaki na mposa ya moto moko mpo asala na biro na ye mpo na mwa ntango mpe alingaki atala soki nakokoka mosala yango. Nayebisaki ye ete nazali kokana te kolongwa na Betele. Nazwaki libaku ya kosala na biro na ye na boumeli ya mbula 20 oyo elandaki.

Nazalaki ntango nyonso koloba ete nakokoka te kofuta bandeko Sullivan, Knorr mpe bandeko mosusu ya Betele lokola Milton Henschel, Klaus Jensen, Max Larson, Hugo Riemer mpe Grant Suiter mpo na formasyo oyo nazwi ndenge nasalaki ná bango na Betele. *

 Bandeko oyo nasalaki na bango, basalaki makambo na molɔngɔ mpenza mpo ebongiseli ya Yehova ekende liboso. Ndeko Knorr azalaki mpenza mosali ya molende oyo azalaki kolinga ete matomba ya Bokonzi ekende mpenza liboso. Bandeko oyo bazalaki kosala ná ye, bamonaki ye moto moko oyo azalaki kosolola malamu na bato. Ata ntango makanisi na biso ezalaki kokesana, tozalaki kosolola polele mpe azalaki kaka kotyela biso motema.

Mokolo moko, ndeko Knorr ayebisaki ngai nabandaka kokipe mwa makambo mosusu ya mikemike. Ayebisaki ngai ete ntango azalaki mokambi ya imprimerie, ndeko Rutherford azalaki kobenga ye na telefone mpe koyebisa ye ete: “Ndeko Knorr, ntango okoya kolya na midi, memelá ngai mwa bagome. Nasengeli na yango na biro na ngai.” Ndeko Knorr alobaki ete eloko ya liboso azalaki kosala, ezalaki kokende na magazini mpe kozwa bagome yango mpe azalaki kotya yango na libenga. Na nsima azalaki komemela yango ndeko Rutherford na biro na ye na midi. Ezalaki na yango likambo ya moke, kasi ezalaki na ntina mpo na ndeko Rutherford. Na nsima ndeko Knorr alobaki na ngai boye: “Nakozala na mposa ya bakrɛyo oyo batye mino na biro na ngai ntɔngɔ nyonso.” Na boumeli ya bambula ebele, nazalaki kosala makasi ete namemelaka ye bakrɛyo yango.

Ndeko Knorr azalaki mbala mingi koloba ete ezali na ntina koyoka na likebi soki basɛngi biso tósala mosala moko boye. Mokolo moko, ayebisaki ngai nasala likambo moko mpe apesaki ngai malako ya sikisiki, kasi ngai nalandaki malako yango na likebi te. Likambo yango esalaki ye mpasi mingi. Nayokaki mawa, mpe nakomaki mokanda ya mokuse mpo na komonisa ete nayoki mawa mingi mpo na likambo oyo nasali mpe nakanisi ete ekozala malamu bálongola ngai na biro na ye mpe bátinda ngai epai mosusu. Mwa moke na nsima kaka na ntɔngɔ wana, ndeko Knorr ayaki na biro na ngai. Alobaki na ngai ete: “Robert! Namoni mokanda na yo. Osali foti. Nalobi na yo mpo na yango, mpe nakanisi ete okozala ekɛngɛ na mikolo ezali koya. Sikoyo, tózonga na mosala.” Nasepelaki mingi mpenza ndenge apesaki ngai kilo.

MPOSA YA KOBALA

Nsima ya kosala na Betele na boumeli ya mbula mwambe, mokano na ngai ezalaki nakoba kaka. Kasi mbongwana esalemaki. Ntango liyangani oyo esangisaki bato ya mikili ndenge na ndenge esalamaki na Yankee Stadium mpe na Polo Grounds na mobu 1958, namonaki Lorraine Brookes, oyo nakutanaki na ye na mobu 1955 ntango azalaki mobongisi-nzela na Montréal, na Canada. Nasepelaki mingi na ezaleli oyo azalaki na yango mpo na mosala ya ntango nyonso mpe ndenge azaIaki kondima kokende epai nyonso oyo ebongiseli ya Yehova ekotinda ye. Lorraine azalaki na mokano ya kokɔta Eteyelo ya Gileadi. Ntango akómaki na mbula 22, babengaki ye na eteyelo ya mbala ya 27 na mobu 1956. Ntango basilisaki, batindaki ye misionɛrɛ na Brésil. Ngai ná Lorraine tozongelaki boninga na biso na mobu 1958, mpe andimaki ntango nasɛngaki ye ete tóbalana. Toyokanaki tóbalana na mbula oyo elandaki mpe tozalaki na elikya ete tósala mosala ya misionɛrɛ biso nyonso mibale.

Ntango nayebisaki ndeko Knorr makanisi na ngai wana, ayebisaki ngai ete tózela naino lisusu mbula misato, na nsima tóbalana, mpe tokosala na Betele  ya Brooklyn. Na ntango wana, mpo bato oyo babalani bátikala na Betele, moko na bango asengelaki kosala mbula zomi to koleka mpe oyo mosusu asengelaki kosala mbula soki misato. Na yango, Lorraine andimaki asala mbula mibale na Betele ya Brésil mpe na nsima mbula moko na Betele ya Brooklyn liboso tóbalana.

Mpo na kosolola na boumeli ya mbula mibale ya ebandeli oyo tolinganaki, tozalaki kaka kotindelana mikanda. Kobenga na telefone ezalaki motuya makasi, mpe Internet ezalaki te na ntango wana mpo na kotindelana bamesaje! Ntango tobalanaki mokolo ya 16/09/1961, tozalaki mpenza na libaku malamu mpo moto asalaki diskur na biso ya libala ezalaki ndeko Knorr. Ya solo, mwa bambula wana oyo tozelaki emonanaki lokola ezali mingi. Kasi sikoyo, ntango tozali kotala nsima na esengo na boumeli ya mbula 50 oyo tosali na libala, tondimi ete ntango wana oyo tozelaki ezalaki ya mpamba te!

Mokolo ya libala na biso. Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Nathan Knorr, Patricia Brookes (leki ya Lorraine), ngai ná Lorraine, Curtis Johnson, Faye ná Roy Wallen (baboti na ngai)

MIKUMBA MOSUSU

Na mobu 1964, nazwaki libaku ya kokende kotala bikólo mosusu lokola mokɛngɛli ya zone. Na ntango wana, basi bazalaki kokende te ná mibali na bango na mibembo yango. Na mobu 1977 balongolaki mobeko yango mpe basi bakómaki kokende ná mibali na bango. Na mbula wana, ngai ná Lorraine tokendeki ná Grant mpe Edith Suiter kotala bafiliale ya Allemagne, Australie, Grèce, Chypre, Turquie mpe Israël. Na nyonso, natali bikólo soki 70 na mokili mobimba.

Na vizite moko oyo tokendaki na Brésil na mobu 1980, tokómaki tii na Belém, engumba moko ya équateur, epai Lorraine asalaki lokola misionɛrɛ. Totalaki mpe bandeko ya Manaus. Na diskur moko oyo esalemaki na stade, tomonaki etuluku moko ya bandeko bafandi esika moko mpe bazalaki kosala te ndenge bato ya Brésil basalaka: basi bapesanaka bizi na matama mpe bandeko mibali bapesanaka mbote bazali koningisana mabɔkɔ. Mpo na nini?

Ezalaki bandeko na biso Batatoli oyo bazalaki na maladi ya maba, oyo bautaki mosika mpenza na bazamba ya Amazonie. Mpo bápesa bato mosusu maladi yango te, bamonaki malamu báfanda na esika na bango moko. Atako bongo, basimbaki mpenza mitema na biso, mpe tokobosana ata moke te esengo oyo ezalaki komonana na bilongi na bango! Likambo yango emonisi bosolo ya maloba oyo ya Yisaya ete: “Basaleli na ngai bakoganga na esengo na ndenge bakoyoka malamu ya motema.”​—Yis. 65:14.

TOZWI MATOMBA MINGI MPE BOMOI NA BISO EZALI NA NTINA

Ngai ná Lorraine tokanisaka ntango nyonso na mbula koleka 60 oyo tolekisi na mosala ya Yehova. Tozali mpenza na esengo na mapamboli oyo tozwi mpe ndenge tomitikaki ete Yehova atambwisa biso na nzela ya ebongiseli na ye. Atako nazali lisusu te kokoka kosala mibembo ndenge nasali na bambula oyo eleki, kasi nazali kokoba kosala mokolo na mokolo lokola mosungi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, nasalaka na Komite ya Batambwisi mpe na Komite ya Mosala. Nazali na botɔndi mingi ndenge nazali kopesa mabɔkɔ ata moke mpo na kosunga bandeko ya mokili mobimba. Totikalaka monɔkɔ polele ntango tomonaka ndenge ebele ya bilenge bazali kosala mosala ya ntango nyonso mpe bazali na makanisi ndenge moko na Yisaya, oyo alobaki ete: “Ngai oyo! Tindá ngai.” (Yis. 6:8) Ebele ya bandeko wana bazali kokokisa bosolo ya maloba ya mokɛngɛli moko ya zongazonga, oyo alobaki na ngai eleki sikoyo bambula ebele ete: “Bandá mbala moko mosala ya ntango nyonso. Oyebi te epai ekomema yo.”

^ par. 20 Mpo na masolo ya bomoi ya bandeko yango mosusu, talá banimero oyo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli: Thomas J. Sullivan (01/10/1966, na Lifalanse); Klaus Jensen (01/09/1971, na Lifalanse); Max Larson (01/09/1989, na Lifalanse); Hugo Riemer (15/06/1965, na Lifalanse) mpe Grant Suiter (01/12/1983, na Lifalanse).