Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2014

Mekolá kondima ya Moize

Mekolá kondima ya Moize

“Na kondima Moize, ntango akolaki, aboyaki kobengama mwana ya mwana mwasi ya Farao.”EBR. 11:24.

1, 2. (a) Ekateli nini Moize azwaki ntango azalaki na mbula 40? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mpo na nini Moize aponaki konyokwama ná basaleli ya Nzambe?

MOIZE ayebaki makambo oyo Ezipito elingaki kopesa ye. Amonaki bandako ya mineneminene ya bato ya bomɛngo. Azalaki na kati ya libota ya mokonzi. “Ateyamaki na bwanya nyonso ya Baezipito,” ekoki kozala ete ayekolaki mateya ya ntɔki, makambo etali minzoto, matematiki, mpe basiansi mosusu. (Mis. 7:22) Akokaki kokóma na bomɛngo, nguya mpe mokumba mosusu, biloko oyo Baezipito mingi bazalaki kolɔtela yango ndɔtɔ!

2 Kasi, ntango akómaki na mbula 40, Moize azwaki ekateli moko oyo epesaki libota ya mokonzi oyo babɔkɔlaki ye mpasi. Kutu, na esika ya kopona bomoi ya “malamu” oyo Baezipito mingi bazalaki na yango, kasi aponaki nde kozala moombo elongo na Bayisraele! Mpo na nini? Moize azalaki na kondima. (Tángá Baebre 11:24-26.) Na kondima, Moize amonaki mosika mpenza koleka mokili oyo ezalaki zingazinga na ye. Lokola azalaki moto ya elimo, Moize azalaki na kondima epai ya Yehova, “Moto oyo amonanaka te,” mpe na kokokisama ya bilaka ya Nzambe.Ebr. 11:27.

3. Mituna nini misato tokoyanola na lisolo oyo?

3 Biso mpe tosengeli komona mosika mpenza koleka makambo oyo miso na biso ezali komona. Tosengeli kozala “bato oyo bazali na kondima.” (Ebr. 10:38, 39) Mpo tólendisa kondima na biso, tótalela makambo oyo Baebre 11:24-26 elobeli na ntina na Moize.  Wana tozali kotalela yango, luká biyano na mituna oyo: Ndenge nini kondima epesaki Moize makasi ya koboya bamposa ya mosuni? Ntango atyolamaki, ndenge nini kondima esalisaki ye asepela na mikumba oyo Nzambe apesaki ye? Mpe mpo na nini Moize azalaki kotala na “likebi mpenza epai mbano ekofutama”?

ABOYAKI BAMPOSA YA MOSUNI

4. Likambo nini Moize ayebaki na oyo etali ‘esengo oyo euti na lisumu’?

4 Na miso ya kondima, Moize ayebaki ete ‘esengo oyo euti na lisumu’ ezalaki mpo na ntango mokuse. Ekoki kozala ete bato mosusu balobaki ete atako Ezipito etondaki na losambo ya bikeko mpe bilimo mabe, kasi ekolaki mpe ekómaki nguya ya mokili mobimba, na ntango oyo basaleli ya Yehova bazalaki baombo! Kasi, Moize ayebaki ete Nzambe akoki kobongola makambo. Atako emonanaki lokola bato oyo balukaka kaka matomba na bango moko bazali kofuluka, Moize azalaki na kondima ete bato yango bakolongolama. Yango wana, abendamaki te “na esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu.”

5. Nini ekosalisa biso tóboya “esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu”?

5 Ndenge nini okoki koboya “esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu”? Tosengeli soki moke te kobosana ete esengo oyo eutaka na lisumu ezalaka mpo na ntango mokuse. Na miso ya kondima, moná ete “mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango.” (1 Yoa. 2:15-17) Kanisá makambo oyo ekokómela basumuki oyo bakobongola motema te. Batyami “na mabele ya mosɛlu . . . basilisami!” (Nz. 73:18, 19) Ntango omekami mpo osala lisumu, omituna boye, ‘Nalingi bomoi na ngai na mikolo ezali koya ezala ndenge nini?’

6. (a) Mpo na nini Moize aboyaki “kobengama mwana ya mwana mwasi ya Farao”? (b) Mpo na nini okanisi ete Moize azwaki ekateli ya malamu?

6 Kondima esalisaki mpe Moize apona malamu likambo oyo akosala na bomoi na ye. “Na kondima Moize, ntango akolaki, aboyaki kobengama mwana ya mwana mwasi ya Farao.” (Ebr. 11:24) Moize akanisaki te ete akokaki kosalela Nzambe na kati ya lopango ya mokonzi Farao mpe na nsima asalela bomɛngo mpe mosala na ye mpo na kosalisa bandeko na ye Bayisraele. Kasi, Moize azalaki nde na ekateli ya kolinga Yehova na motema, molimo mpe makasi na ye nyonso. (Mib. 6:5) Ekateli ya Moize ebatelaki ye mpo ete atungisama mingi te na motema. Eumelaki te, Bayisraele bapunzaki ebele ya bozwi ya Baezipito oyo ye aboyaki kolanda! (Kob. 12:35, 36) Farao asambwaki mpe abomamaki. (Nz. 136:15) Kasi, Nzambe abatelaki Moize mpe asalelaki ye mpo na komema ekólo mobimba na esika ya libateli. Bomoi na ye ezalaki mpenza na ntina.

7. (a) Na kotalela Matai 6:19-21, mpo na nini tosengeli komona mosika koleka bomoi ya lelo? (b) Lobelá ndakisa moko oyo emonisi bokeseni oyo ezali kati na bomɛngo ya mosuni mpe ya elimo.

7 Soki ozali mosaleli ya Yehova oyo azali naino elenge, ndenge nini kondima ekoki kosalisa yo opona makambo oyo okosala na bomoi na yo? Okomonisa mpenza bwanya soki oponi makambo oyo okosala na mikolo ezali koya. Kasi kondima na bilaka ya Nzambe etindaka yo omibombela biloko ya motuya mpo na bomoi ya ntango mokuse to mpo na bomoi ya seko? (Tángá Matai 6:19-21.) Mwasi moko na nkombo Sophie oyo ayebaki kobina malamu mpenza akutanaki na likambo yango. Bibongiseli ya États-Unis oyo etalelaka makambo ya kobina, endimaki kofutela ye mbongo mpe kotya ye moto monene na bibongiseli yango. Alobi ete: “Ezalaki esengo makasi ntango bazalaki kokumisa ngai. Kutu, nazalaki komimona ete naleki baninga na ngai. Kasi, nazalaki na esengo te.” Na nsima, Sophie atalaki video oyo ezali na motó ya likambo ete Les jeunes s’interrogentQue vais-je faire de ma vie? Alobi lisusu boye: “Namonaki ete mokili epesaki ngai lokumu mpe nakómaki na bafana ebele; mpe mpo na yango nazalaki te kosambela Yehova na motema mobimba. Nabondelaki ye na motema mobimba. Na nsima natikaki mosala na ngai ya kobina.” Ayokaka ndenge nini na ekateli wana oyo azwaki? “Bomoi na ngai ya kala epesaki ngai esengo te. Lelo, nazali na esengo mɛkɛ. Ngai ná mobali  na ngai tozali babongisi-nzela. Tozali bavɛdɛti te, mpe tozali na mbongo mingi te. Kasi tozali na Yehova, bato oyo toyekolaka na bango Biblia mpe mikano ya elimo. Nazali koyoka mawa ata moke te.”

8. Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa elenge azwa ekateli ya koyeba soki akosala nini na bomoi na ye?

8 Yehova ayebi oyo ezali malamu mpo na yo. Moize alobaki ete: “Eloko nini Yehova Nzambe na yo azali kosɛnga yo soki ezali te kaka kobanga Yehova Nzambe na yo, elingi koloba, otambola na banzela na ye nyonso mpe olinga ye mpe osalela Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba; obatela mitindo ya Yehova mpe mibeko na ye oyo nazali kopesa yo lelo, mpo na bolamu na yo?” (Mib. 10:12, 13) Lokola ozali naino elenge, poná bomoi oyo ekosalisa yo olinga Yehova mpe osalela ye “na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba.” Okoki kozala na elikya ete bomoi yango ekozala “mpo na litomba na yo moko.”

ASEPELAKI NA MOSALA OYO NZAMBE APESAKI YE

9. Limbolá mpo na nini ekokaki kozala mpasi mpo Moize akokisa mokumba na ye.

9 Moize “atalelaki nsɔni ya Kristo lokola bomɛngo ya monene koleka biloko ya motuya ya Ezipito.” (Ebr. 11:26) Moize azwaki mokumba lokola “Kristo,” to “Moto oyo atyami mafuta na elimo,” na ndenge Yehova aponaki ye mpo abimisa Bayisraele na Ezipito. Moize ayebaki ete kokokisa mokumba yango ekozala mpasi, ata mpe “nsɔni.” Liboso, moko ya bana ya Yisraele alobaki na ye na lityo nyonso ete: “Nani atye yo mokonzi mpe mosambisi na biso?” (Kob. 2:13, 14) Na nsima, Moize atunaki Yehova: “Farao akoyokela ngai ndenge nini?” (Kob. 6:12) Mpo na komibongisa mpe kolonga nsɔni, Moize ayebisaki Yehova ntina ya kobanga na ye mpe makambo oyo ezalaki kotungisa ye. Ndenge nini Yehova asalisaki Moize akokisa mokumba na ye wana ya mpasi?

10. Ndenge nini Yehova apesaki Moize makoki ya kokokisa mokumba na ye?

10 Ya liboso, Yehova ayebisaki Moize ete: “Nakozala elongo na yo.” (Kob. 3:12) Ya mibale, Yehova akitisaki Moize motema na ndenge apesaki ye ndimbola ya nkombo na ye ete: ‘Nakokóma oyo nalingi kokóma.’ * (Kob. 3:14) Ya misato, Yehova apesaki Moize nguya ya kosala makamwisi mpe yango emonisaki ete Nzambe nde atindaki ye. (Kob. 4:2-5) Ya minei, mpo Moize akokisa mokumba na ye, Yehova apesaki ye Arona mpo asala elongo na ye mpe azala molobeli na ye. (Kob. 4:14-16) Na nsuka ya bomoi na ye, Moize andimisamaki ete Nzambe apesaka basaleli na ye makoki ya kokokisa ata mokumba nini, yango wana amonisaki polele epai ya mokitani na ye Yosua ete: “Yehova nde azali kotambola liboso na yo. Ye moko akokoba kozala elongo na yo. Akosundola yo te mpe akotika yo soki moke te. Kobanga te mpe kozala na nsɔmɔ te.”Mib. 31:8.

11. Mpo na nini Moize azwaki mokumba na ye na motuya mingi?

11 Na lisalisi ya Yehova, Moize asepelaki mingi na mokumba na ye atako ezalaki mpasi, mpe atalelaki yango lokola “bomɛngo ya monene koleka biloko ya motuya ya Ezipito.” Kosalela Farao elingaki mpenza kokokana na kosalela Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? Kozala mwana ya mokonzi na Ezipito ezalaki na valɛrɛ ndenge moko na kozala “Kristo,” to moto ya Yehova oyo atyami mafuta? Moize apambolamaki mpo azalaki kosepela na mosala na ye. Azalaki mpenza na boyokani malamu elongo na Yehova, mpe yango esalisaki ye azala na “nguya nyonso” ntango azalaki kotambwisa Bayisraele mpo bákɔta na Mokili ya Ndaka.Mib. 34:10-12.

12. Mikumba nini oyo Yehova apesaka biso oyo tosengeli kozwaka yango na motuya?

12 Biso mpe tozali na mokumba. Na nzela ya mwana na ye, Yehova apesi biso mosala moko, ndenge apesaki ntoma Paulo mpe basusu. (Tángá 1 Timote 1:12-14.) Biso nyonso tozali na mokumba ya kosakola nsango  malamu. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Basusu bazali na mosala ya ntango nyonso. Bandeko mibali oyo bakɔmeli bazali bankulutu mpe basaleli na misala na masangá. Kasi, bato ya libota oyo bazali Batatoli te mpe bato mosusu bakoki komona te valɛrɛ ya mikumba yango ata mpe koloba mabe ndenge ozali komipesa na mosala ya Yehova. (Mat. 10:34-37) Soki balɛmbisi yo, okoki mbala mosusu kobanda komituna soki ezali mpenza na ntina omipesa na mosala ya Nzambe ndenge ozali kosala to soki okokokisa mpenza mokumba na yo. Soki likambo ya boye ekómeli yo, ndenge nini kondima ekosalisa yo okoba koyika mpiko?

13. Ndenge nini Yehova abongisaka biso mpo tókokisa mikumba ya teokrasi?

13 Na kondima nyonso, bondelá Yehova asalisa yo. Yebisá ye makambo oyo ezali kobangisa yo mpe kotungisa yo. Lokola Yehova nde apesi yo mosala yango, akosalisa yo olonga. Ndenge nini? Ndenge kaka asalisaki Moize. Ya liboso, Yehova alobi na yo boye: “Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza. Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene.” (Yis. 41:10) Ya mibale, ayebisi yo ete esengeli kotyela bilaka na ye motema: “Nalobi yango; nakokokisa yango. Nabongisi mokano yango, nakosala mpe yango.” (Yis. 46:11) Ya misato, Yehova apesaka yo “nguya oyo eleki makasi” mpo na kokokisa mosala na yo. (2 Ko. 4:7) Ya minei, mpo na kosalisa yo okoba na mosala na yo, tata na biso ya bolingo apesi yo bandeko ya mokili mobimba ya basambeli ya solo mpo “bókoba kobɔndisana mpe kolendisana.” (1 Tes. 5:11) Wana Yehova azali kobongisa yo mpo okokisa mikumba na yo, kondima na yo epai na ye ekokola mpe okomona ete mikumba oyo ozali kokokisa na mosala na ye ezali na motuya mingi koleka biloko nyonso ya motuya oyo ezali awa na mabele.

“AZALAKI KOTALA NA LIKEBI MPENZA EPAI MBANO EKOFUTAMA”

14. Mpo na nini Moize andimisamaki ete akozwa mbano?

14 Moize “azalaki kotala na likebi mpenza epai mbano ekofutama.” (Ebr. 11:26) Ya solo, Moize atikaki ete boyebi oyo azalaki na yango ya mikolo ezali koya, atako ezalaki na ndelo, esalisa ye atalela avenire na ndenge ebongi. Na ndakisa ya nkɔkɔ na ye Abrahama, Moize azalaki na kondima ete Yehova akosekwisa bakufi. (Luka 20:37, 38; Ebr. 11:17-19) Elikya oyo Moize azalaki na yango ete akozwa mapamboli esalisaki ye mpo atalela te mbula 40 oyo alekisaki na bomoi ya kokimakima mpe mbula 40 na esobe lokola nde abebisi bomoi na ye kaka boye. Atako ayebaki te na bosikisiki ndenge bilaka ya Nzambe ekokokisama, kasi na  miso na ye ya kondima amonaki mbano oyo ezalaki komonana te.

15, 16. (a) Mpo na nini tosengeli kotya motema mobimba na mbano na biso? (b) Mapamboli nini oyo ekozala na nse ya Bokonzi ozali kozela na motema likoló?

15 Yo mpe ‘otalaka na likebi mpenza epai mbano na yo ekofutama?’ Lokola Moize, biso mpe toyebi te makambo nyonso oyo etali bilaka ya Nzambe. Na ndakisa, ‘toyebi te mokolo nini ntango oyo etyamá’ mpo na bolɔzi monene ekokoka. (Mrk. 13:32, 33) Kasi biso toyebi makambo mingi oyo etali Paradiso koleka Moize. Atako toyebi makambo nyonso te, tozali na bilaka mingi ya Nzambe oyo emonisi ndenge bomoi ekozala na nse ya Bokonzi ya Nzambe, mpe tosengeli ‘kotalaka yango na likebi.’ Komonaka polele na makanisi ndenge mokili ya sika ekozala ekotinda biso tóluka liboso Bokonzi. Ndenge nini? Tózwa ndakisa: Okondima kosomba lopango moko soki oyebi yango malamu te? Soki moke te! Ndenge moko, tokolinga te kosalela bomoi na biso na makambo oyo ezangi elikya. Na kondima, tosengeli komonaka polele na makanisi ndenge bomoi ekozala na nse ya Bokonzi ya Nzambe.

Ekozala mpenza esengo kosolola na basaleli ya sembo lokola Moize!(Talá paragrafe 16)

16 Mpo na kokoba kobatela na makanisi Bokonzi ya Nzambe, ‘taláká na likebi’ ndenge bomoi na yo ekozala na Paradiso. Saleláká makoki na yo ya kokanisa. Na ndakisa, ntango ozali kotánga masolo ya basaleli ya Yehova ya ntango ya kala na Biblia, kanisá na makambo oyo okotuna bango ntango bakosekwa. Kanisá na mituna oyo bakoki kotuna yo na ndenge olekisaki bomoi na yo na boumeli ya mikolo ya nsuka. Moná na makanisi esengo oyo okozala na yango ntango okokutana na bankɔkɔ na yo oyo bakufá eleki basiɛklɛ mpe ndenge okoteya bango makambo nyonso oyo Nzambe asali mpo na bango. Meká komona na makanisi ndenge okofanda na esika ya kimya mpe ozali kotala ebele ya banyama ya nkanza. Kanisá ndenge okopusana mpenza penepene na Yehova mpe okokóma mokemoke na ezaleli ya kokoka.

17. Ndenge nini komona na makanisi mbano esalisaka biso lelo oyo?

17 Komona polele na makanisi mapamboli oyo ezali liboso na biso ezali kosalisa biso tókoba kaka, tózala na esengo, mpe tózwa bikateli oyo ekosalisa biso ete tózala na bomoi ya seko na mikolo ezali koya. Ntoma Paulo akomelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete: “Soki tozali kotyela eloko oyo tozali komona te elikya, tokozela yango na ezaleli ya koyika mpiko.” (Rom. 8:25) Toli oyo ebongi mpo na bakristo nyonso oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko. Atako tozwi naino te mbano na biso, kondima na biso ezali makasi mpe tozali kokoba kozela na motema molai ndenge “mbano ekofutama.” Na ndakisa ya Moize, tosengeli te kotalela bambula oyo tolekisi na mosala ya Yehova lokola tobomi ntango mpamba. Kutu, tondimisami ete “biloko oyo emonanaka ezali ya ntango mokuse, kasi biloko oyo emonanaka te ezali ya seko.”Tángá 2 Bakorinti 4:16-18.

18, 19. (a) Mpo na nini tosengeli kobunda mpo tóbatela kondima na biso? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

18 Kondima esalisaka biso tómona “elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.” (Ebr. 11:1) Moto ya mosuni amonaka te ete kosalela Yehova ezali na valɛrɛ mingi. Mpo na moto yango, bomɛngo ya elimo “ezali bozoba.” (1 Ko. 2:14) Nzokande biso, tozali na elikya ya komona bomoi ya seko mpe lisekwa, makambo oyo mokili emonaka te. Lokola bato ya filozofi ya eleko ya ntoma Paulo babengaki ye “esopa” moko oyo ayebi eloko te, bato mingi lelo bakanisaka ete elikya oyo tosakolaka ezali makambo ezangá ntina.Mis. 17:18.

19 Lokola tofandi na mokili oyo kondima ezali te, tosengeli kobunda mpo tóbatela kondima na biso. Tóbondela Yehova mpo ‘kondima na biso elɛmba te.’ (Luka 22:32) Kobá kofungola miso mpo na komona makama oyo masumu ekoki komema, matomba oyo eutaka na kosalela Yehova, mpe elikya ya kozala na bomoi ya seko. Kondima ya Moize esalisaki ye amona mosika koleka makambo wana. Na lisolo oyo elandi, tokotalela ndenge kondima esalisaki Moize amona “Moto oyo amonanaka te.”Ebr. 11:27.

^ par. 10 Mpo na maloba ya Nzambe oyo ezali na Kobima 3:14, moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia akomaki ete: “Eloko moko te ekoki kopekisa ye akokisa mokano na ye . . . Nkombo wana [Yehova] ezalaki esika makasi mpo Bayisraele bámibombaka, ndako moko monene ya elikya mpe ya kobɔndisa mingi.”