Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2014

Maloba na yo ‘ezala te Ɛɛ nzokande Te’

Maloba na yo ‘ezala te Ɛɛ nzokande Te’

Tótalela likambo oyo: Nkulutu moko oyo asalaka na Komite ya boyokani elongo na minganga ayokani ná ndeko mobali moko ete bakobima na mosala ya kosakola mokolo ya lomingo na ntɔngɔ. Na ntɔngɔ yango, ndeko moko abengi nkulutu wana na telefone ete mwasi na ye auti kosala aksida ya motuka mpe bamemi ye mbangu na lopitalo. Asɛngi nkulutu yango asalisa bango na kozwa monganga oyo akosalisa bango kozanga kosalela makila. Na yango, nkulutu wana abimi lisusu te ná ndeko mobali wana na mosala ya kosakola mpo na kosalisa libota wana oyo likama ekwealaki bango.

Tótalela likambo mosusu: Mobali moko ná mwasi na ye babengi mama moko oyo abɔkɔlaka bana na ye mibale kaka ye moko mpo bálekisa mpokwa elongo na bango. Bana yango basepeli makasi ntango mama na bango ayebisi bango likambo yango. Bazalaki kozela mpokwa yango na mposa makasi. Kasi mokolo moko, liboso mokolo oyo basengelaki kokutana ekoka, mobali yango ná mwasi na ye bayebisi mama wana ete likambo oyo bakanaki te ebimi mpe esengeli báya lisusu te. Na nsima, mama yango ayaki koyeba ntina oyo mobali wana ná mwasi na ye babongolaki makambo. Nsima ya kosɛnga mama wana ná bana na ye mpo báya epai na bango, baninga mosusu babengaki mpe mwasi wana ná mobali na ye kaka na mpokwa wana, mpe bango bandimaki.

Na ntembe te, biso bakristo tosengeli kokokisaka maloba na biso. Tosengeli soki moke te koloba ‘Ɛɛ nzokande Te.’ (2 Ko. 1:18) Kasi, ndenge bandakisa oyo mibale emonisi yango, makambo nyonso ezalaka ndenge moko te. Ekoki kozala na makambo oyo ekoki kotinda biso tóbongola programɛ moko oyo tosalaki. Na libaku moko, ntoma Paulo akutanaki na likambo ya ndenge wana.

BAFUNDAKI NTOMA PAULO ETE AZALI BONGOLABONGOLA

Na mobu 55 T.B., ntango ntoma Paulo azalaki na Efese na mobembo na ye ya misato ya misionɛrɛ, akanaki kokatisa Mbu Égée mpo na kokóma na Korinti mpe kotika Korinti mpo na kokende na Masedonia. Ntango alingaki kozonga na Yerusaleme, akanaki kotala lisangá ya Korinti mpo na mbala ya mibale, emonani ete azalaki na mposa ya kosangisa makabo na bango mpo na bandeko ya Yerusaleme. (1 Ko. 16:3) Likambo yango emonisami polele na 2 Bakorinti 1:15, 16, epai tozali kotánga ete: “Lokola nazali kotya motema ndenge wana, nakanaki liboso koya epai na bino, mpo bózwa libaku ya mibale ya kozala na esengo, mpe nsima ya kolekisa mwa ntango epai na bino, nakende na Masedonia mpe wana nakouta na Masedonia, nakozongela bino, mpe bokokende kotika ngai na nzela ntango nakokende na Yudea.”

Emonani ete na mokanda moko oyo ntoma Paulo atindelaki bandeko ya Korinti liboso, ayebisaki bango mokano oyo azalaki na yango.  (1 Ko. 5:9) Kasi, mwa moke nsima ya kokoma mokanda yango, bato ya ndako ya Klowe bayebisaki ntoma Paulo ete bokabwani makasi ezali na kati ya lisangá. (1 Ko. 1:10, 11) Ntoma Paulo amonaki malamu abongola programɛ na ye, mpe akomaki mokanda ya 1 Bakorinti. Na mokanda yango, apesaki bango batoli ya bolingo mpe asembolaki bango. Akomaki mpe ete akoya lisusu kuna te ndenge akanaki, ayebisaki bango ete akokende liboso na Masedonia mpe na nsima na Korinti.1 Ko. 16:5, 6. *

Emonani lokola ete ntango bandeko ya Korinti bazwaki mokanda na ye, bamosusu oyo bazalaki komimona “bantoma minene” na lisangá yango bafundaki ye ete azali bongolabongola, moto oyo akokisaka te maloba na ye. Kasi, ntoma Paulo alimbolaki likambo yango boye: “Na yango, ntango nakanaki bongo, nazwaki makambo na ndenge ya lisɛki te, boye te? To makambo oyo nazali kokana, nazali kokana yango nde na ndenge ya mosuni, mpo ‘Ɛɛ, ɛɛ’ mpe ‘Te, te’ ezala epai na ngai?”2 Ko. 1:17; 11:5.

Tokoki komituna, na ntango wana, ntoma Paulo azwaki mpenza ‘likambo yango na lisɛki’? Te! Liloba oyo babongoli na “lisɛki” elimboli kozala bongolabongola, ezali kopesa likanisi ya moto oyo bakoki kotyela motema te, moto oyo akokisaka te maloba na ye. Motuna oyo ntoma Paulo atuni ete ‘nazali kokana makambo yango na ndenge ya mosuni?’ esengelaki komonisa polele epai ya bakristo ya Korinti ete ekateli oyo ntoma Paulo azwaki ya kobongola programɛ na ye ezalaki te mpo azalaki moto oyo bakokaki te kotyela motema.

Mpo na komonisa ete makanisi ya bato wana ezalaki lokuta, ntoma Paulo akomaki boye: “Lokola Nzambe akoki solo kotyelama motema, maloba oyo toyebisaki bino ezali te ‘ɛɛ nzokande te.’” (2 Ko. 1:18) Na ntembe te, ntoma Paulo azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bandeko na ye ya Korinti ntango abongolaki programɛ wana. Na 2 Bakorinti 1:23, tozali kotánga ete ‘ezalaki mpo na kobatela bango’ nde abongolaki programɛ oyo azalaki na yango ya kokende na Korinti. Atako bongo, apesaki bango libaku ya kobongisa makambo liboso ete bákutana. Ndenge ntoma Paulo akanaki, ntango azalaki na Masedonia, Tito ayebisaki ye ete mokanda na ye, etindaki mpenza bango báyoka mawa mpe bábongola motema, mpe likambo yango epesaki ye esengo makasi.2 Ko. 6:11; 7:5-7.

“AMEN” ELOBAMAKI EPAI YA NZAMBE

Efundeli oyo bafundaki ntoma Paulo ete azalaki bongolabongola emonisaki ete soki bato bakokaki kotyela ye motema te mpo azalaki kokokisa te maloba na ye, basengelaki mpe te kondima mosala na ye ya kosakola. Kasi, ntoma Paulo akundwelaki bandeko ya Korinti ete apesaki litatoli na ntina etali Yesu Kristo epai na bango. Alobaki boye: “Mwana ya Nzambe, Kristo Yesu, oyo asakolamaki na kati na bino na nzela na biso, elingi koloba, na nzela na ngai ná Silvano ná Timote, akómaki te ‘ɛɛ nzokande te,’ kasi ‘ɛɛ ekómi nde ɛɛ’ na likambo oyo etali ye.” (2 Ko. 1:19) Yesu Kristo oyo azalaki ndakisa ya ntoma Paulo, amonisaki ata mbala moko ete azali bongolabongola? Te! Na bomoi na ye mobimba mpe mosala na ye awa mabele, Yesu azalaki koloba kaka solo. (Yoa. 14:6; 18:37) Soki makambo oyo Yesu azalaki kosakola ezalaki mpenza solo mpe esengelaki kotyela yango motema mpe lokola ntoma Paulo asakolaki kaka nsango moko wana, yango emonisi ete esengelaki mpenza kondima nsango na ye.

Yehova azali “Nzambe ya solo.” (Nz. 31:5) Tomoni likambo yango na maloba oyo ntoma Paulo akomaki na nsima ete: “Ata soki bilaka ya Nzambe ezali ebele boni, ekómi Ɛɛ na nzela na ye,” elingi koloba na nzela ya Kristo. Bosembo monene oyo Yesu amonisaki ntango azalaki awa na mabele, elongolaki ntembe nyonso oyo bato bakoki kozala na yango mpo na bilaka ya Yehova. Ntoma Paulo akobi ete: “Na yango, na nzela na ye [Yesu] mpe ‘Amen’ ezali kolobama epai ya Nzambe mpo na nkembo na nzela na biso.” (2 Ko. 1:20) Yesu azali mpenza ndanga, to “Amen,” oyo na nzela na ye bilaka nyonso ya Yehova Nzambe ekokokisama!

Ndenge kaka Yehova ná Yesu balobaka ntango nyonso solo, ntoma Paulo mpe azalaki  ntango nyonso kokokisa maloba na ye. (2 Ko. 1:19) Azalaki bongolabongola te, moto oyo apesaka bilaka “na ndenge ya mosuni.” (2 Ko. 1:17) Kasi, ‘atambolaki nde na elimo.’ (Gal. 5:16) Na boyokani na ye ná basusu, azalaki koluka mpenza bolamu na bango. Ɛɛ na ye ezalaki Ɛɛ!

ƐƐ NA YO EZALAKA ƐƐ?

Na mikolo na biso, bato mingi oyo batosaka te Biblia basalaka bilaka mpe na nsima baboyaka kokokisa yango kaka soki mwa likambo moko ya moke ebimi to mpo na kosala likambo moko oyo esepelisi bango mingi. Na makambo ya mombongo, “ɛɛ” ezalaka te ntango nyonso “ɛɛ,” ata soki bakomaki makambo nyonso na mokanda. Bato mingi bamonaka lisusu te ete libala ezali elako oyo mobali ná mwasi basalaka mpo na kofanda elongo bomoi mobimba. Ndenge oyo mabala mingi ezali kopanzana ezali komonisa ete mpo na bato mingi, libala ezali kaka mpo na kofanda mwa ntango moke mpe na nsima, bopanzani.2 Tim. 3:1, 2.

Bongo yo? Ɛɛ na yo ezalaka Ɛɛ? Ya solo, ndenge tomonaki yango na ebandeli ya lisolo oyo ete ezali na makambo oyo ekoki kotinda yo obongola programɛ moko opesaki moto; ezali te mpo ozali bongolabongola, kasi nde mpo makambo oyo okanaki te ebimi. Kasi, soki mokristo asalaki elaka to elako, asengeli mpenza kosala nyonso mpo na kokokisa yango. (Nz. 15:4; Mat. 5:37) Soki ozali kosala bongo, okoyebana lokola moto oyo bakoki kotyela motema, moto oyo akokisaka maloba na ye, moto oyo alobaka ntango nyonso solo. (Ef. 4:15, 25; Yak. 5:12) Soki bato bayebi ete bakoki kotyela yo motema na makambo nyonso, bakosepela koyoka yo ntango ozali kosakwela bango solo oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Na yango, tiká ete tóndimisama ete Ɛɛ na biso ezalaka mpenza Ɛɛ!

^ par. 7 Mwa moke nsima ya kokoma mokanda ya 1 Bakorinti, ntoma Paulo asalaki mobembo moko na Troase, mpe nsima na Masedonia, epai akomaki mokanda ya 2 Bakorinti. (2 Ko. 2:12; 7:5) Na nsima, akendeki kotala bandeko ya Korinti.