Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2014

Pesáká mibange lokumu

Pesáká mibange lokumu

“Osengeli kopesa moto oyo azali mobange lokumu.”​—LEV. 19:32.

1. Makambo nini ya mawa bato bazali kokutana na yango?

MOKANO ya Yehova ezalaki te bato bakómaka mibange mpe bámonaka bampasi na yango. Kutu, mokano na ye ezalaki ete bato bázala na nzoto ya kokoka na Paradiso. Kasi “biloko nyonso oyo ezalisamá ezali se kokimela elongo mpe konyokwama.” (Rom. 8:22) Okanisi ete Nzambe ayokaka ndenge nini ntango amonaka makambo mabe oyo lisumu ememelá bato? Mibange mingi bamiyokaka lokola basundoli bango ntango bazali na mposa ya lisalisi.​—Nz. 39:5; 2 Tim. 3:3.

2. Mpo na nini bakristo batyelaka mibange likebi mingi?

2 Basaleli ya Yehova bazali na botɔndi mpo mibange bazali na masangá na bango. Tozwaka litomba na bwanya na bango mpe ndakisa ya kondima na bango elendisaka biso mingi. Mingi kati na biso tozali bato ya libota ya moko to mingi ya mibange yango. Kasi, ezala tozali bato ya libota moko ná mibange yango to te, kasi tomibanzabanzaka mpo na bolamu na bango. (Gal. 6:10; 1 Pe. 1:22) Biso nyonso tokozwa litomba soki totaleli lolenge oyo Nzambe atalelaka mibange. Tokotalela mpe mokumba oyo bato ya libota mpe lisangá bazali na yango mpo na bandeko na biso oyo bakómi mibange.

“KOBWAKA NGAI TE”

3, 4. (a) Likambo nini ya ntina mpenza oyo mokomi ya Nzembo 71 asɛngaki Yehova? (b) Bandeko ya lisangá oyo bakómi mibange bakoki kosɛnga Nzambe nini?

3 Mokomi ya Nzembo 71:9 abondelaki Nzambe ete: “Kobwaka  ngai te na ntango ya bobange; Ntango nguya na ngai ezali kolɛmba, kotika ngai te.” Nzembo oyo ekobi na makanisi ya Nzembo 70, oyo maloba oyo ezali na likoló ya mokapo yango emonisi ete ezali maloba “ya Davidi.” Mokonzi Davidi alobaki makambo oyo tozali kotánga na Nzembo 71:9. Asalelaki Nzambe kobanda bolenge na ye tii ntango akómaki mokóló mpenza, mpe Yehova asalelaki ye mpo na kokokisa makambo minene. (1 Sa. 17:33-37, 50; 1 Bak. 2:1-3, 10) Atako bongo, Davidi ayokaki mposa ya kosɛnga Yehova akoba komonisela ye boboto.​—Tángá Nzembo 71:17, 18.

4 Bandeko mingi lelo bazali lokola Davidi. Atako bambula epusani mpe bakómi na “mikolo ya mpasi,” bazali kokoba kosanzola Nzambe na kotalela makoki na bango. (Mos. 12:1-7) Mingi kati na bango bakoki kosala te makambo ndenge na ndenge oyo bazalaki kosala liboso, ezala mpe mosala ya kosakola. Kasi, bango mpe bakoki kobondela Yehova akoba kopesa bango esengo mpe kosunga bango. Bandeko wana ya mibange oyo basaleli Nzambe na bosembo nyonso bakoki mpenza kotya motema ete Yehova akoyanola na mabondeli na bango. Kutu, mabondeli yango emonisaka mpenza makanisi oyo mokonzi Davidi amonisaki.

5. Ndenge nini Yehova atalelaka basaleli na ye ya sembo oyo bakómi mibange?

5 Makomami emonisi polele ete Yehova azwaka na motuya mingi bandeko oyo bakómi mibange oyo basaleli ye na bosembo nyonso mpe alingaka ete basaleli na ye bápesaka bandeko yango lokumu. (Nz. 22:24-26; Mas. 16:31; 20:29) Mokanda ya Balevi 19:32 elobi ete: “Okotɛlɛma liboso ya nsuki mpɛmbɛ, mpe osengeli kopesa moto oyo azali mobange lokumu, mpe osengeli kobanga Nzambe na yo. Ngai nazali Yehova.” Ya solo, ntango maloba oyo ekomamaki, kopesa mibange lokumu ezalaki mokumba monene, mpe likambo yango ezali na ntina tii lelo. Bongo tokoloba nini na likambo etali kosunga bango? Mokumba yango ezali ya nani?

MOKUMBA YA LIBOTA

6. Ndakisa nini Yesu atiká na likambo etali kosunga baboti?

6 Liloba ya Nzambe elobi na biso boye: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo.” (Kob. 20:12; Ef. 6:2) Yesu alobelaki lisusu polele mobeko yango ntango akweisaki makanisi ya Bafarisai mpe bakomeli mpo bazalaki koboya kosunga baboti na bango. (Mrk. 7:5, 10-13) Yesu atiká ndakisa malamu. Na ndakisa, ntango alingaki kokufa likoló ya nzete ya mpasi, Yesu apesaki Yoane, moyekoli oyo azalaki kolinga mingi mokumba ya kosunga mama na ye, oyo ekoki kozala ete mobali na ye Yozefe akufaki.​—Yoa. 19:26, 27.

7. (a) Ntoma Paulo amonisaki etinda nini na likambo etali kosunga baboti? (b) Nini mpenza etindaki ntoma Paulo akoma maloba oyo?

7 Ntoma Paulo akomaki ete bakristo basengeli kokokisa bamposa ya bato ya ndako na bango moko. (Tángá 1 Timote 5:4, 8, 16.) Tótalela naino ntina oyo ntoma Paulo akomelaki Timote maloba oyo. Ntoma Paulo amonisaki soki nani akoki kozwa lisalisi ya mbongo na lisangá to te. Amonisaki yango polele ete mokumba ya kosalisa basi oyo mibali na bango bakufá, oyo bakómi mibange, ezali libosoliboso ya bana, bankɔkɔ mpe bandeko na bango mosusu oyo bazali bakristo. Soki esalemi bongo, mokumba ya makambo etali mbongo ekoki kozala te mpo na lisangá. Ndenge moko lelo, lolenge moko oyo bakristo bakoki komonisa “ezaleli ya kokangama na Nzambe” ezali soki bazali kosunga bandeko na bango oyo bazali na bosɛnga.

8. Mpo na nini Biblia epesi te malako ya sikisiki na likambo etali kosalisa baboti oyo bakómi mibange?

8 Ya solo, bana oyo bazali bakristo oyo bakómi mikóló, basengeli kolukaka koyeba soki bamposa ya mosuni ya baboti na bango ezali kokokisama. Atako ntoma Paulo alobelaki nde ‘bandeko ya libota oyo bazali bakristo,’ kasi tosengeli te kosundola baboti na biso oyo bazali te Batatoli ya Yehova. Kasi, lolenge oyo bana bakoki kosunga baboti na bango ezali ndenge moko te. Bato mibale na mokili bakokanaka te na makambo nyonso.  Bamposa, bomoto mpe kolɔngɔnɔ ya nzoto nde esalaka bongo. Mibange mosusu bazali na bana ebele, kasi mosusu azali kaka na mwana moko. Mibange mosusu bakoki kotya motema ete Leta asalisa bango, kasi basusu te. Bato nyonso oyo basengeli na lisalisi bazalaka na bamposa ndenge moko te. Yango wana, ekozala malamu te to tokozanga bolingo soki tokómi koloba mabe mpo na lolenge oyo moto moko azali kosala mpo na kosunga bato ya libota na ye oyo bakómi mibange. Na yango, ndenge esalemaki na ntango ya Moize, Yehova akoki kopambola ekateli nyonso oyo eyokani na Makomami mpe akoki kosala ete elonga.​—Mit. 11:23.

9-11. (a) Bandeko mosusu bakoki kokutana na mokakatano nini? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mpo na nini bana oyo bakómi mikóló basengeli kowela te kokata mosala na bango ya ntango nyonso? Pesá ndakisa.

9 Soki baboti ná bana bafandaka esika moko te, ekoki kozala mokakatano mpo na kokokisa bamposa ya baboti oyo bakómi mibange. Kolɔngɔnɔ ya nzoto ya moboti moko ekoki kobeba na mbalakaka; ekoki kozala likama, mokuwa moko ekoki kobukana, to bampasi mosusu ekoki kokómela ye, mpe yango ekoki kosala ete tókende nokinoki kotala ye. Na nsima, ekoki komonana ete azali na mposa ya lisalisi, ntango mosusu mpo na mwa ntango to mpo na ntango molai. *

10 Bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso, oyo misala na bango esali ete bázala mosika mpenza na baboti na bango, bakoki kozala mpenza na mikakatano mpo na kozwa bikateli. Baoyo basalaka na Betele, bamisionɛrɛ mpe bakɛngɛli-batamboli bazwaka mokumba na bango na motuya mingi, mpe bamonaka yango ete ezali lipamboli ya Yehova. Kasi, soki baboti na bango babɛli, likanisi ya liboso ekoki mbala mosusu kozala, ‘Tótika mosala mpe tózonga na ndako mpo na kosunga baboti na biso.’ Nzokande, ekozala malamu mingi kobondela mpo na likambo yango mpe kotala soki yango nde mpenza likambo oyo baboti bazali na yango mposa. Ndeko moko te asengeli kowela kotika mosala na ye ya ntango nyonso, mpe ekoki kozala ntango nyonso te ekateli ya malamu ya kozwa. Likambo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto ekoki kozala mpo na mwa ntango, mpe bandeko mosusu ya lisangá bakoki kosepela kosalisa?​—Mas. 21:5.

11 Tózwa ndakisa ya bandeko mibale ya libota moko oyo bakendeki kosala mosika mpenza ya baboti na bango. Moko azalaki misionɛrɛ na Amerika ya Sudi, mpe mosusu azalaki kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova, na Brooklyn, na New York. Baboti ya bandeko yango bazalaki na mposa ya lisalisi. Bandeko yango ná basi na bango bakendeki mosika mpenza na Ɛsti kotala baboti yango mpo na koyeba lisalisi nini mpenza bakokaki kopesa mpe ndenge ya kosala yango. Na ntango yango, ndeko oyo azalaki kosala na Amerika ya Sudi ná mwasi na ye, bazalaki kotala soki bakoki kotika mosala na bango mpo bákende kosalisa baboti na bango. Na nsima, mokambi-misala ya bankulutu ya lisangá oyo baboti na bango bazalaki abengaki bango na telefone. Bankulutu yango basololaki likambo yango mpe bamonaki malamu ete bamisionɛrɛ wana bákoba na mosala na bango ntango nyonso oyo bakolinga. Bankulutu wana basepelaki mingi na mosala oyo ndeko wana ná mwasi na ye bazalaki kosala mpe bazwaki ekateli ya kosala oyo bakokoka mpo na kosalisa bango básunga baboti na bango. Libota mobimba esepelaki mpenza na bolingo mpe lisalisi wana.

12. Bato ya libota basengeli kotalela nini ntango bazali koluka lolenge ya kosunga moboti na bango ya mobange?

12 Ezala mayele nini bato ya libota oyo bazali bakristo bakoki kosalela mpo na kosunga baboti na bango ya mibange, basengeli mpenza kondima ete makambo nyonso oyo bakosala ekokumisa nkombo ya Nzambe. Tosengeli soki moke te kozala lokola bakonzi ya mangomba na eleko ya Yesu. (Mat. 15:3-6) Ekozala malamu ete bikateli na biso epesa Nzambe mpe lisangá lokumu.​—2 Ko. 6:3.

 MOKUMBA YA LISANGÁ

13, 14. Na kotalela Makomami, mpo na nini tokoki koloba ete masangá ezali na mokumba ya kosunga bandeko oyo bakómi mibange?

13 Moto nyonso te nde akoki kosalisa bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso ndenge touti komonisa yango. Kasi, emonani polele na likambo oyo esalemaki na siɛklɛ ya liboso ete masangá ekoki kosunga bandeko ya mibange oyo bazali ndakisa malamu. Biblia emonisi ete na lisangá ya Yerusaleme, “moto moko te na kati na bango azalaki na bosɛnga.” Yango elingi koloba te ete bango nyonso bazalaki na bomɛngo. Basusu bazalaki na biloko mingi te, kasi bazalaki “kokabola yango na moto na moto, ndenge azalaki na bosɛnga.” (Mis. 4:34, 35) Na nsima, likambo moko ebimaki na lisangá yango. Bato bakómaki koloba ete ‘bazalaki kobosana basi oyo mibali bakufá na ntango ya kokabola biloko ya mokolo na mokolo.’ Na yango, bantoma baponaki mibali oyo bakokisaki masɛngami, mpe bazwaki bibongiseli mpo ete bamposa ya basi yango ekokokisama na ndenge ebongi. (Mis. 6:1-5) Ezali solo ete kokabola biloko mokolo na mokolo ezalaki ebongiseli oyo ezwamaki mpo na mwa ntango mokuse mpo na kokokisa bamposa ya bato oyo bakómaki bakristo na Pantekote ya mobu 33 T.B. mpe oyo batikalaki na Yerusaleme mpo na mwa ntango mpo bálendisama na elimo. Atako bongo, ndenge oyo bantoma basalaki emonisi ete lisangá ekoki kosunga basangani na yango oyo bazali na bosɛnga.

14 Ndenge tomoni yango, ntoma Paulo apesaki Timote malako oyo esengeli kolanda mpo na koyeba soki bakristo basi nini oyo mibali bakufá bakoki kozwa lisalisi na lisangá. (1 Tim. 5:3-16) Ndenge moko mpe ntoma Yakobo amonisaki ete bakristo bazali na mokumba ya kosunga bitike, basi oyo mibali bakufá mpe basusu oyo bazali na mpasi to na bosɛnga. (Yak. 1:27; 2:15-17) Ntoma Yoane mpe alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali na biloko ya kobikela ya mokili oyo mpe amoni ndeko na ye azali kokelela mpe atako bongo akangeli ye mpenza motema, ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki kofanda na kati na ye?” (1 Yoa. 3:17) Soki mokristo mokomoko azali na mokumba wana epai ya bato oyo bazali na bosɛnga, tomoni te ete masangá mpe ezali na yango?

Soki likama esalemi, ndenge nini lisangá ekoki kosalisa? (Talá paragrafe 15, 16)

15. Makambo nini esengeli kotalela mpo na kosalisa bandeko oyo bakómi mibange?

15 Na mikili mosusu, bakonzi ya mboka bapesaka mwa mbongo ya pansiɔ, basalaka bibongiseli mpo na kosunga bato mpe batongaka bisika mpo na mibange. (Rom. 13:6) Na bisika mosusu, bibongiseli oyo ezalaka te. Na yango, lisungi oyo bato ya libota mpe lisangá esengeli kopesa bandeko oyo bakómi mibange ezali kotalela bamposa ya moto na moto. Soki bana bazalaka mosika ya baboti  na bango, ekoki kozala mpasi básunga baboti na bango ndenge oyo bakokaki kosala soki bazalaka ná bango esika moko. Bana yango bakosala malamu soki bazali kosolola malamu ná bankulutu ya masangá oyo baboti na bango bazali mpo na koyeba soki moto nyonso ayebi mikakatano oyo libota ezali na yango. Na ndakisa, bankulutu bakoki kosalisa baboti yango báyeba bibongiseli oyo bakonzi ya mboka batyá esika oyo bazali mpo na kosunga mibange mpe ndenge oyo bakoki kozwela yango litomba. Bakoki mpe kotala makambo mosusu, na ndakisa mikanda mosusu to ndenge ya kosalela bankisi, mpe bakoki koyebisa yango na bana oyo bakómi mikóló. Kosolola ndenge wana ekoki kosalisa mpo makambo ebeba te, kasi ekoki nde kobongisa makambo. Na ntango wana, bato oyo bazali kosalisa mpe kopesa toli mpe bazali kosala lokola “bamonisi” ya bana, bakoki kosalisa bato ya libota ete bábanga mingi te.

16. Ndenge nini bakristo mosusu basalisaka bandeko ya lisangá oyo bakómi mibange?

16 Mpo na komonisa bolingo epai ya bandeko oyo bakómi mibange, bakristo mosusu bapesaki ntango mpe makasi na bango mpo na kopesa lisalisi na kotalela makoki na bango. Ezalaka libaku oyo bamonisaka ete bamibanzabanzaka mpenza mpo na bandeko ya lisangá oyo bakómi mibange. Bandeko mosusu bakabolaka misala ná bakristo mosusu mpo na kosalisa bandeko oyo bakómi mibange, bato na bato na ngala na bango. Oyo nde ezaleli kitoko bandeko wana bamonisaka! Kasi, ata soki bandeko mosusu bakabelaka baboti wana mwa eloko, yango elongoli te mokumba oyo bana bazali na yango ya kosala oyo bakoki mpo na baboti na bango.

PESÁKÁ MIBANGE LOKUMU NA MALOBA YA KOLENDISA

17, 18. Ezaleli nini moto oyo alingi kobatela mibange asengeli kozala na yango?

17 Baoyo nyonso bazali na mokumba ya kosalisa mibange bakoki kosala makasi ete básepela na mosala yango. Soki ozali na mokumba yango, salá nyonso mpo ozala na makanisi malamu. Na ntango mosusu, moto soki anuni akómaka mawamawa mpe anyokwamaka na makanisi. Okoki kosala makasi mpenza ete opesa mibange lokumu mpe olendisa bango na masolo kitoko. Baoyo basaleli Yehova na bosembo nyonso babongi kozwa longonya. Yehova abosanaka te mosala oyo bandeko wana ya mibange basalaki mpo na ye, mpe bandeko na bango bakristo babosanaka yango te.​—Tángá Malaki 3:16; Baebre 6:10.

18 Lisusu, mpo na kolonga mikakatano ya mokolo na mokolo, mibange ná bato oyo basalisaka bango basengeli koyeba ntango ya kosala mwa masɛki ná ntango ya kosala yango te. (Mos. 3:1, 4) Mibange mingi balobaka ete bazalaka makambo mindɔndɔ te. Bayebaka ete mpo bato batyelaka bango likebi mingi mpe bayaka kotala bango, basengeli kozala na boboto. Toyokaka bato mingi oyo bakendaki kotala mibange balobaka ete: “Nakendeki mpo nalendisa moninga moko ya mobange, kasi ye nde alendisi ngai.”​—Mas. 15:13; 17:22.

19. Lolenge nini bilenge mpe mibange bakoki kotalela mikolo ezali koya?

19 Tozali kozela na motema likoló mokolo oyo bampasi ná makambo mabe oyo ezaleli ya kozanga kokoka ememá ekosila. Kasi liboso ntango yango ekóma, basaleli ya Nzambe basengeli kotya elikya na bango mobimba na bomoi ya seko. Toyebi ete kozala na kondima na bilaka ya Nzambe ezali lokola longo oyo ekoki kosalisa biso na ntango ya mpasi to minyoko. Na nzela ya kondima yango, “tozali kotika te, kasi ata soki lolenge ya moto oyo tozali na libándá ezali kobeba, ya solo mpenza, lolenge ya moto oyo tozali na kati ezali kokóma ya sika mokolo na mokolo.” (2 Ko. 4:16-18; Ebr. 6:18, 19) Longola kozala na kondima makasi na bilaka ya Nzambe, nini ekoki kosalisa yo okokisa mikumba ya kosalisa mibange? Tokolobela makanisi ya ntina na lisolo oyo elandi.

^ par. 9 Lisolo oyo elandi ekolobela mwa balolenge ya kosalisa oyo ekoki komonana mpo na mibange mpe bana na bango.