Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2014

Ndenge ya kosunga mibange

Ndenge ya kosunga mibange

“Bana, tólingaka, na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.”​—1 YOA. 3:18.

1, 2. (a) Mikakatano nini mabota mingi ekutanaka na yango mpe yango ebimisaka mituna nini? (b) Ndenge nini baboti mpe bana bakoki kolonga bambongwana oyo bobange ememaka?

MOTEMA eswaka ntango oyoki ete baboti na yo, oyo bazalaki nzoto makasi mpe komileisa, bazali lisusu te na makasi ya komisalela. Ekoki kozala ete mama to papa akweaki mpe loketo ebukani, azali koyeba te nini asala, to bamosusu bayokaki ete minganga bakangi papa to mama na bango na maladi moko ya makasi. To mpe bazali na mikakatano mosusu. Mibange bakoki kozala na mokakatano ya kondima bambongwana wana to makambo mosusu oyo ekopekisa bango kosala na bonsomi. (Yobo 14:1) Esengeli kosala nini? Ndenge nini esengeli kosalisa bango?

2 Lisolo moko oyo elobeli ndenge ya kosunga mibange elobi boye: “Atako ezali mpasi kosolola makambo oyo etali mibange, kasi libota oyo elobelaka ndenge ya kosala mpo na kosunga mibange mpe ebongisaka makambo liboso, ekozala na mpasi te mpo na kolonga mokakatano nyonso oyo ekoki kobima.” Lisolo yango ekobota mbuma ya malamu soki tozali kondima ete soki moto akómi mobange, mikakatano ezangaka te. Mpo na yango, tosengeli komibongisa liboso mpe kozwa bikateli. Tótalela sikoyo ndenge mabota ekoki komibongisa liboso mpo na kolonga mikakatano yango mosusu.

 KOMIBONGISA LIBOSO “MIKOLO YA MPASI” EYA

3. Bato ya libota bakoki kosala nini ntango baboti oyo bakómi mibange bakómi na bosɛnga makasi? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Ekómaka na ntango oyo mibange mingi bakokaka lisusu te komisalisa na ndenge ekoki; bakómaka na mposa ya lisalisi. (Tángá Mosakoli 12:1-7.) Soki baboti bakokoka te komisalisa, bango ná bana na bango oyo bakómi mikóló basengeli kosolola mpo na koyeba lisalisi nini ebongi mpe koluka lolenge ya kosala yango. Ekozala malamu libota mobimba esangana mpo na koyokana, kotalela bamposa oyo ezali mpe mayele oyo esengeli kosalela. Moto nyonso, mingimingi baboti basengeli komonisa polele ndenge bazali komiyoka mpe kolobela makambo na ndenge oyo ebongi. Bakoki kosolola mpo na koyeba soki baboti bazwi lisalisi mosusu, bakoki kotikala bango moko na ndako kozanga likama? * To bakoki kotalela ndenge bakoki kosalela makoki ya moto mokomoko ya libota mpo na kokokisa mikumba yango. (Mas. 24:6) Na ndakisa, bamosusu bakoki kozala na likoki ya kobatelaka mibange yango mikolo nyonso mpe bamosusu bakoki kosungaka na mbongo. Moto nyonso asengeli koyeba ete moto na moto azali na mokumba; kasi basengeli mpe koyeba ete mokumba yango ekoki kobongwana nsima ya ntango mpe esengeli kosolola soki nsima ya ntango boni moto na moto asengeli kokokisa mokumba boye to boye.

4. Bato ya libota bakoki kokende koluka lisalisi wapi?

4 Ntango obandi kosunga moboti na yo oyo akómi mobange, zwá ntango ya koluka koyeba malamu ndenge azali. Soki azali kobɛla maladi moko oyo elyaka nzoto malɛmbɛmalɛmbɛ, luká koyeba makambo nini ezali kozela yo. (Mas. 1:5) Kende kokutana to bengá bibongiseli ya Leta oyo esungaka mibange. Luká ebongiseli moko oyo ezali na mboka na bino oyo ekoki kosalisa yo okokisa mokumba yango malamu. Kokanisa na makambo wana ya mpasi, ekoki kotinda yo okóma na mawa makasi, kotungisama na motema to kobulungana na makanisi. Sololá likambo yango ná moninga moko ya motema. Na nyonso, tyelá Yehova motema. Akoki kopesa yo kimya ya motema oyo osengeli na yango mpo olonga likambo nyonso.​—Nz. 55:22; Mas. 24:10; Flp. 4:6, 7.

5. Mpo na nini ezali na ntina koluka koyeba liboso mayele ndenge na ndenge ya kosalela mpo na kosunga mibange?

5 Mibange mosusu mpe mabota na bango balukaka koyeba liboso mayele ndenge na ndenge ya kosalela mpo na kosunga moboti na bango oyo akómi mobange, na ndakisa balukaka koyeba oyo bakoki kosala mpo na moboti afandaka ná mwana na ye ya mobali to mwasi, likambo etali kofanda na bandako oyo babatelaka mibange to kosalela bibongiseli mosusu oyo ezali na esika oyo bazali. Bamonaki ‘mawa mpe makambo oyo eyokisaka mpasi’ na mosika mpe bamibongisaki mpo na yango. (Nz. 90:10) Mabota mingi bayokanaka te liboso ndenge ya kosala, mpe soki makambo ya mpasi ekómeli bango, bazwaka bikateli ya mbangumbangu. Ndenge moto moko ya mayele alobi yango, wana “ezali te ntango oyo ebongi mpo na kozwa ekateli ya ndenge wana.” Ntango makambo ekómi kosalema mbangumbangu ndenge wana, bato ya libota bakoki kokóma na nkanda mpe bakoki kobanda kowelana. Nzokande, komibongisa liboso mpe ntango molai, ekoki kosala ete botungisama mingi te na nsima.​—Mas. 20:18.

Bato ya libota bakoki kokutana mpo na kolobela ndenge ya kokokisa bamposa ya baboti na bango oyo bakómi mibange (Talá paragrafe 6-8)

6. Matomba nini baboti ná bana bakoki kozwa soki balobeli likambo etali lolenge baboti oyo bakómi mibange bakoki kobikela?

6 Okoki mbala mosusu komona mabe kosolola ná baboti na yo likambo etali lolenge oyo bakoki kobikela mpe bambongwana oyo ekoki kosalema na bomoi na bango. Kasi, bato mingi bamonisaki ete kosolola makambo yango, ememelaki bango mpenza matomba na nsima. Mpo na nini? Mpo ete basololaki lokola baninga mpenza mpe bazwaki bibongiseli ya malamu mpe bayokanaki malamu. Bamonaki ete kopesana makanisi liboso mpenza, na bolingo mpe na boboto, esalisaki mpo básalela bikateli yango kozanga mindɔndɔ ntango esengelaki  kosalela yango. Ata soki mibange balingi bátikala bango moko mpe básala makambo mingi bango moko na boumeli ya ntango moko boye, matomba ezalaka mingi soki basololi ná bana na bango na likambo etali lolenge ya lisalisi oyo bakozala na mposa na yango soki bosɛnga emonani.

7, 8. Mabota ekoki kolobela makambo nini mpe mpo na nini?

7 Baboti, ntango bozali kosolola, bóyebisa libota na bino makambo oyo bozali kolinga, makoki na bino ya kozwa mbongo mpe makambo mosusu. Yango ekosalisa bango bázwa bikateli oyo ebongi soki emonani ete bokokoka te kosala yango. Na ntembe te, bakosepela kokokisa bamposa na bino mpe kosala nyonso oyo bakoki mpo bozala na bonsomi. (Ef. 6:2-4) Na ndakisa, okanisaka ete mwana na yo moko abenga yo okóma kofanda ná libota na ye, to okanisaka na likambo mosusu? Zalá na bokatikati mpe yebá ete moto nyonso te nde akotalela makambo ndenge yo ozali kotalela mpe esɛngaka ntango mpo na moto nyonso, ezala moboti to mwana mpo na kobongola makanisi na ye.

8 Moto nyonso asengeli koyeba ete mikakatano mingi ekoki kopɛngolama soki babongisi makambo liboso mpe basololi. (Mas. 15:22) Yango esangisi kosolola na makambo etali lisalisi ya monganga mpe makambo oyo moto alingaka. Makambo oyo ezali na Karte Instructions médicales/​Pas de sang oyo Batatoli ya Yehova basalelaka, ezali makambo oyo basengeli kolobela na masolo yango. Moto nyonso asengeli koyeba liboso nkisi oyo bakopesa ye, mpe azali na lotomo ya kondima to koboya. Mpo na likambo yango, Karte Instructions médicales elobeli makambo oyo moto alingi básala ye to te. Kotya nkombo ya moto moko oyo otyelaka motema na karte yango (epai mibeko endimi yango) ekoki kosalisa mpo ete azwa bikateli ya malamu na ntango oyo esengeli. Ekozala malamu bato yango bázala na mikanda oyo esengeli mpe kobimisa yango soki esengeli. Bato mosusu batyá mikanda yango esika moko ná testama na bango mpe mikanda na bango mosusu ya ntina mingi, lokola ya asiranse, ya makambo ya mbongo, ya kokende na babiro ya Leta mpe bongo na bongo.

NDENGE YA KOSALA NTANGO MAKAMBO EBONGWANI

9, 10. Ntango nini baboti bakoki kokóma na mposa makasi ya lisungi ya bana na bango?

9 Mbala mingi, baboti ná bana bamonaka malamu mibange bázala na bonsomi na kotalela makoki na bango. Bakoki kozala na likoki ya kolamba, kosukola basaani to bilamba, komɛla nkisi mpe kosolola kozanga mikakatano. Yango wana, bamonisaka bana na bango ete basengeli te kokɔtaka na makambo na bango. Kasi, nsima ya mwa ntango, soki baboti yango bakómi mibange makasi, ntango mosusu bazali kokoka te kokende kosomba biloko bango moko, to babandi kobosanabosana makambo, bana bakoki komona malamu básalisa bango.

10 Bobange ekoki kosala ete moto akóma kobulungana to konyokwama na makanisi, kobanda kosala salite na bilamba, koyoka malamu te, komona malamu te, kobosanabosana makambo; nzokande soki moko ya makambo yango ekómeli mibange, minganga bakoki kosalisa yango malamu. Soki moko ya mikakatano oyo ebandi, bóluka mbala moko lisalisi ya  minganga. Bana bakoki kosala yango mpe makambo mosusu ya ntina na esika ya baboti na bango oyo bakómi mibange. Na ntango mosusu, bakoki mpe kosala misala mosusu oyo baboti bazalaki kosala liboso bango moko. Mpo na kobongisa lisalisi oyo baboti bazali kozwa, bana bakoki kokóma balobeli na bango, kokomelaka bango mikanda, kokumbaka bango na mituka mpe bongo na bongo.​—Mas. 3:27.

11. Esengeli kosala nini mpo ete mikakatano ya mbongwana ya mibange ezala mpasi mingi te?

11 Soki mikakatano ya baboti na yo ekoki kosila te, bokoki mbala mosusu kosala mbongwana na lolenge oyo bozali kosalisa bango to kotalela lisusu bibongiseli mosusu oyo bozwaki. Ntango bambongwana esalemi ata moke, esengeli mpe kobongola makambo mosusu. Soki ofandaka mosika na baboti na yo, ntango mosusu okoki komona malamu ete osɛnga Motatoli moko ya Yehova to moto moko oyo afandaka mosika te na baboti na yo akendeke kotala bango mpe koyebisaka ata mwana moko ndenge baboti na bino bazali? Bazali na mposa básalisaka bango kaka mpo na kolambaka biloko mpe kosukolaka bilamba to basaani? Kobongola mwa makambo mosusu na ndako ekosalisa bango mpe ekobatela bango mpo bátambolaka, básukolaka nzoto, mpe bongo na bongo. Ntango mosusu, eloko mpenza oyo mibange yango basengeli na yango mpo bázala na bonsomi ezali ya kozwa mwana-mosala. Kasi, soki bakokoka kaka te komibatela, ekosɛnga ete moto to bato bázala wana mpo na kosalisaka bango. Ezala ndenge nini, bóluka koyeba soki bibongiseli nini ezali na mboka na bino. *​—Tángá Masese 21:5.

NDENGE BATO MOSUSU BALONGAKA MOKAKATANO YANGO

12, 13. Ndenge nini bana oyo bakómi mikóló oyo bazalaka mosika na baboti na bango bakobaka kokumisa mpe kosalisa bango?

12 Bana oyo balingaka baboti na bango, bazalaka na mposa ete bázala malamu. Koyeba ete baboti yango bazali kobatelama malamu, epesaka bana kimya na motema. Kasi, makambo ndenge na ndenge ya bomoi ekoki kosala ete bana oyo bakómi mikóló bázala te esika moko ná baboti na bango. Soki ezali bongo, bana mingi bakendeke kotala baboti na bango na ntango ya konje mpe basalisaka bango na makambo oyo basengeli na yango, na ndakisa misala ya ndako oyo baboti bazali kokoka te kosala bango moko. Kobengaka bango na telefone, soki likoki ezali mikolo nyonso, kotindelaka bango mikanda to bamesaje na Internet emonisaka baboti yango ete bana balingaka bango.​—Mas. 23:24, 25.

13 Ezala makambo ezali ndenge nini, esengeli kotalela mokolo na mokolo lisalisi oyo baboti na yo bazali kozwa. Soki ozali mosika na bango mpe soki bazali Batatoli ya Yehova, okoki kosolola na bankulutu ya lisangá na bango, mpo na kotuna bango báyebisa yo makanisi na bango. Mpe kobosanaka te kobondela mpo na yango. (Tángá Masese 11:14.) Ata soki baboti na yo bazali Batatoli te, Biblia emonisi ete osengeli ‘kokumisa tata na yo mpe mama na yo.’ (Kob. 20:12; Mas. 23:22) Kasi, mabota nyonso te ekozwa bikateli ndenge moko. Bana mosusu bazwaka bibongiseli mpo ete moboti na bango oyo akómi mobange aya kofanda ná bango to akóma kofanda pene mpenza na bango. Nzokande, mbala nyonso te nde kosala bongo esimbaka. Baboti mosusu balingaka te kofanda ná bana na bango oyo bakómi mikóló mpe mabota na bango; balingaka mingi bonsomi mpe balingaka te kozala mokumba mpo na bana na bango. Baboti mosusu bakoki kozala na mwa makoki na bango, mpe bakoki komona malamu bátikala epai na bango mpe bamisalisaka.​—Mos. 7:12.

14. Mikakatano nini ekoki kobima mpo na bana oyo babatelaka baboti na bango oyo bakómi mibange?

14 Na mabota mingi, mokumba monene ya kobatela moboti ekweaka na mapeka ya mwana oyo azali mosika te na baboti yango. Bana oyo babatelaka baboti oyo bakómi mibange, basengeli kotalelaka bamposa ya baboti na bango mpe oyo ya mabota na bango moko. Moto na moto azali na mwa ntango ya kosala likambo boye to boye mpe esika makasi na ye esuki. Bomoi to makambo ya moto oyo azali kobatela  mobange ekoki kobongwana, mpe yango ekoki kosala ete atalela lisusu bibongiseli oyo ezwamaki. Moto moko ya libota azali na mokumba mingi? Bana mosusu bakoki kosala mpe makambo mosusu, na ndakisa kosalisa moboti yango moto na moto na ngala na ye?

15. Ndenge nini bandeko mosusu ya libota mpe baninga bakoki kosalisa bato oyo bazali kobatela moboti ya mobange?

15 Soki bamposa ya moboti oyo akómi mobange ezali ntango nyonso kosila te, yango ekoki kolɛmbisa mwana oyo azali kobatela ye. (Mos. 4:6) Bana oyo balingaka baboti na bango, balingaka kosala oyo bakoki mpo na baboti na bango, kasi kosɛngasɛnga ntango nyonso ekoki kolɛmbisa bana. Bana oyo bazali kobatela baboti ya boye, basengeli kotalela makambo na ndenge ebongi mpe bakoki koluka lisalisi. Ntango mosusu, kosalisa bango mpo na mwa ntango ekosalisa mpo ete bámema ye te nokinoki esika babatelaka mibange.

16, 17. Mikakatano nini bana oyo bazali kobatela baboti ya mibange bakoki kokutana na yango, mpe ndenge nini bakoki kolonga yango? (Talá mpe etanda “Tosepelaki kobatela baboti na biso oyo bakómi mibange.”)

16 Esalaka mpasi na motema komona ndenge bobange ezali kobebisa moboti na biso. Na ntango wana, bana mingi oyo babatelaka baboti yango bakómaka na mwa mawa, komitungisa, nkanda, lokola bamemi ngambo. Ntango mosusu, moboti oyo akómi mobange akoki kokatela bana mangala to kozanga komonisa botɔndi. Soki esalemi bongo, kosilika te mbala moko. Monganga moko ya maladi ya moto alobi boye: “Lolenge eleki malamu ya kosala liboso ya likambo nyonso, mingimingi oyo epesi yo mpasi na motema, ezali ya kondima likambo yango. Tómipesa te foti ndenge tozali komiyoka bongo.” Yebisá mobali to mwasi na yo, to moto mosusu ya libota to moninga na yo ya motema ndenge ozali komiyoka. Kosolola bongo, ekoki kosalisa yo omona ete ata soki otungisami ndenge wana, makambo ekobonga.

17 Ekoki kokóma na ntango oyo libota ekoki kozala te na makoki ya kokoba kosunga moboti na bango na ndako. Ekoki komonana lokola ete esengeli komema moboti yango na ndako ya kobatela mibange. Motatoli ya Yehova moko ya mwasi azalaki kokende pene ya mikolo nyonso kotala mama na ye na esika babatelaka mibange. Alobaki na ntina na libota na ye boye: “Tokoki te kobatela mama ndenge alingi banda ntɔngɔ tii butu. Kondima kotinda ye na ndako oyo babatelaka mibange, ezalaki te ekateli ya pɛtɛɛ. Mpo na koloba solo, esalaki mpenza mpasi na motema. Kasi, ezalaki ekateli oyo eleki malamu mpo na ye na boumeli ya basanza ya nsuka ya bomoi na ye, mpe andimaki yango.”

18. Bana oyo basungaka baboti na bango oyo bakómi mibange bakoki kozala na elikya nini?

18 Mikumba ya kosalisa baboti na yo oyo bakómi mibange ekoki kozala mpasi mpe ekoki kotungisa yo na makanisi. Ezali na mibeko te oyo elobi ete esengeli kosalisaka mibange nyonso ndenge moko. Kasi, soki bomibongisi malamu, boyokani malamu, bosololi malamu mpe na koleka nyonso bobondeli, bokoki kokokisa mokumba na bino ya kopesa baboti na bino lokumu. Soki bosali bongo, bokoki kozala na esengo ya koyeba ete bazali kobatelama mpe kozwa likebi oyo basengeli na yango. (Tángá 1 Bakorinti 13:4-8.) Likambo ya ntina mingi, bokoki kozala na elikya ete bokozala na kimya ya makanisi oyo Yehova apesaka na baoyo bakumisaka baboti na bango.​—Flp. 4:7.

^ par. 3 Mimeseno ya mboka ekoki kotinda baboti mpe bana bálinga likambo boye to boye. Na bisika mosusu, ezali mabe te mpe kutu endimami ete bato ya libota ya mbula ndenge na ndenge báfanda esika moko to bakendeke kotalana.

^ par. 11 Soki moboti na yo azali kaka na ndako, osengeli mpenza komindimisa ete babateli ya solosolo bazali na mafungola oyo ekosalisa bango bákóma mbala moko esika azali soki likambo moko ya lombangu ebimi.