Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2014

Ndenge ya kosimba mitema ya bandeko ya libota oyo bazali Batatoli te

Ndenge ya kosimba mitema ya bandeko ya libota oyo bazali Batatoli te

YESU KRISTO alobaki ete: “Kende na ndako epai ya bato ya libota na yo, mpe yebisá bango makambo nyonso oyo Yehova asaleli yo mpe ndenge ayokeli yo mawa.” Ekoki kozala ete na ntango wana Yesu azalaki na Gadara, na sudi-ɛsti ya Mbu ya Galile, mpe asololaki na mobali moko oyo alingaki kokóma moyekoli na ye. Maloba wana ya Yesu emonisi ete ayebaki ezaleli moko oyo bato bazalaka na yango, elingi koloba mposa ya koyebisa bato ya libota makambo oyo esepelisi biso.Mrk. 5:19.

Lelo oyo, tomonaka ezaleli yango mingi, kutu na mikili mosusu emonanaka mingi koleka na mikili mosusu. Ntango moto moko akómi mosaleli ya Yehova, Nzambe ya solo, mbala mingi azalaka na mposa ya koyebisa bandeko na ye ya libota makambo oyo auti koyekola. Kasi ndenge nini akoki kosala yango? Ndenge nini akoki kosimba motema ya bandeko na ye ya libota oyo bazali na lingomba mosusu to oyo basambelaka te? Biblia elobeli likambo yango na ndenge ya malamu mpe epesi batoli oyo ebongi.

“TOMONI MASIYA”

Na siɛklɛ ya liboso, Andre azalaki moko ya bato ya liboso oyo bayebaki ete Yesu azali Masiya. Mpe ayebisaki likambo yango mbala moko epai ya nani? “Liboso ye [Andre] akutanaki na ndeko na ye mpenza, Simo, mpe alobaki na ye ete: ‘Tomoni Masiya’ (oyo soki babongoli, elakisi, ‘Kristo’).” Andre akendaki na Petro epai ya Yesu, mpe na ndenge yango apesaki ye libaku ya kokóma moko ya bayekoli ya Yesu.Yoa. 1:35-42.

Mbula motoba na nsima ntango ntoma Petro azalaki na Yope, basɛngaki ye akende na nɔrdi na Kaisaria, epai ya Korneyi, mokonzi moko ya basoda. Petro akutaki banani kuna? “Ya solo, Korneyi azalaki  kozela bango [Petro mpe baoyo basalaki mobembo ná ye] mpe asilaki koyanganisa bato ya libota na ye mpe baninga na ye ya motema.” Korneyi apesaki bato ya libota na ye libaku ya koyoka Petro mpe kozwa ekateli na boyokani ya makambo oyo bayokaki.Mis. 10:22-33.

Liteya nini tokoki kozwa na lolenge oyo Andre mpe Korneyi basalaki mpo na bandeko ya libota na bango?

Andre ná Korneyi batikaki te ete bandeko na bango bakóma basaleli ya Nzambe kozanga ete básala eloko. Andre akendaki na Petro epai ya Yesu, mpe Korneyi azwaki bibongiseli mpo ete bato ya libota na ye báyoka makambo oyo Petro alingaki koloba. Kasi Andre mpe Korneyi batyaki bato ya mabota na bango mosukusuku te to basalelaki te mayele mabe mpo na kobenda bango bákóma bayekoli ya Kristo. Liteya nini osimbi na likambo yango? Ekozala malamu ete biso mpe tósala bongo. Ekozala malamu koyebisa bato ya mabota na biso mwa makambo mosusu to kolukela bango mabaku oyo ekoki kosalisa bango báyeba solo mpe bákutana na bandeko na biso mosusu Batatoli ya Yehova. Kasi, ekozala malamu tóbosana te ete bazali na bonsomi ya kopona mpe koboya kotya bango mpanzi likoló. Mpo na komonisa ndenge tokoki kosalisa bato na biso ya mabota, tótalela lisolo ya mobali moko na nkombo Jürgen mpe mwasi na ye Petra, oyo bafandaka na Allemagne.

Batatoli ya Yehova bayekolaki Biblia na Petra mpe na nsima azwaki batisimo. Mobali na ye Jürgen azalaki mokonzi ya basoda. Na ebandeli, Jürgen asepelaki te na ekateli oyo mwasi na ye azwaki. Na nsima, asosolaki ete Batatoli ya Yehova bateyaka solo ya Biblia. Ye mpe amipesá na Yehova, mpe lelo oyo azali nkulutu na lisangá. Toli nini apesaka na likambo etali lolenge ya kosala mpo na kosimba motema ya moto moko ya libota oyo azali Motatoli te?

Ndeko Jürgen alobi boye: “Tosengeli te kosala makambo na makasi mpe kotondisa bato ya mabota na biso na makambo ebeleebele ya Biblia. Kosala bongo ekotinda nde bango báboyaka. Ekozala malamu mingi tobwakelaka bango na mayele mpe malɛmbɛmalɛmbɛ mpenza makambo ya Nzambe. Ekozala mpe malamu mingi soki tozali kokutanisa bato ya mabota na biso ná Batatoli ya Yehova oyo bazali na bango mbula ndenge moko mpe oyo basepelaka na makambo mosusu ndenge moko. Kosala bongo, ekoki kosalisa mingi.”

“Tosengeli te kosala makambo na makasi mpe kotondisa bato ya mabota na biso na makambo ebeleebele ya Biblia.”—Jürgen

Ntoma Petro mpe bato ya libota ya Korneyi bandimaki mbala moko nsango ya Biblia. Kasi esɛngaki ntango mingi mpo na bato mosusu na siɛklɛ ya liboso oyo bayokaki solo, bázwa ekateli.

TOKOLOBA NINI MPO NA BANDEKO YA YESU?

Bato mingi ya libota ya Yesu bamonisaki kondima epai na ye na boumeli ya ntango oyo alekisaki na mosala ya kosakola. Na ndakisa, ekoki kozala ete Yakobo ná Yoane bazalaki bandeko ya Yesu mpe mama na bango Salome azalaki ndeko ya Maria, mama ya Yesu. Ekoki kozala ete Salome azalaki moko ya “basi mosusu mingi, oyo bazalaki kopesa biloko na bango mpo na kosalisa bango [Yesu ná bantoma].”Luka 8:1-3.

Kasi, bato mosusu ya libota ya Yesu bamonisaki kondima te mbala moko. Na ndakisa, mokolo moko, nsima ya batisimo na ye, ebele mpenza ya bato bayanganaki na ndako moko mpo na koyoka ye. “Kasi ntango bato ya libota na ye bayokaki yango, babimaki mpo na kokanga ye, mpo bazalaki koloba ete: ‘Abɛli motó.’” Mwa ngonga na nsima, ntango bandeko na ye mosusu batunaki ye epai alingaki kokende, apesaki bango eyano mbala moko te. Mpo na nini? Mpo ete “bandeko na ye bazalaki kondimela ye te.”Mrk. 3:21; Yoa. 7:5.

Lolenge oyo Yesu asalaki epai ya bato ya libota na ye ekoki koteya biso nini? Asilikaki te ntango bato  mosusu ya libota na ye balobaki ete abɛli motó. Ata nsima ya kobomama na ye mpe kosekwa, Yesu alendisaki lisusu bato ya libota na ye na ndenge abimelaki ndeko na ye Yakobo. Ekoki kozala ete lolenge wana oyo asalaki esalisaki te kaka Yakobo, kasi mpe bandeko mosusu ya Yesu mpe bandimisamaki ete Yesu azalaki mpenza Masiya. Kutu, bazalaki ná bantoma mpe bato mosusu na shambrɛ ya likoló na Yerusaleme mpe emonani ete bazwaki elimo santu. Na nsima, Yakobo mpe Yuda, bandeko mosusu ya Yesu, bazwaki mikumba minene na nsima.Mis. 1:12-14; 2:1-4; 1 Ko. 15:7.

ESƐNGAKA NTANGO MINGI MPO NA BASUSU

“Makambo mingi ekoki kotambola malamu soki tozali na motema molai mingi mpenza.”—Roswitha

Ndenge esalemaki na siɛklɛ ya liboso, esɛngaka mpe ntango mingi mpo bato mosusu ya libota bábanda kotambola na nzela ya bomoi. Tózwa ndakisa ya Roswitha, oyo azalaki mondimi ya molende ya Lingomba ya Katolike ntango mobali na ye akómaki Motatoli ya Yehova na mobu 1978. Lokola mateya ya Katolike ekɔtelaki tii na makila, Roswitha abandaki kotɛmɛla mobali na ye. Kasi na nsima ya bambula, botɛmɛli na ye ekitaki mpe ayaki komona ete Batatoli ya Yehova bateyaka solo. Na mobu 2003 azwaki batisimo. Nini esalaki ete asala mbongwana wana? Na esika asilika ntango mwasi na ye abandaki kotɛmɛla ye, mobali ya Roswitha asalaki makambo oyo etindaki ye abongola makanisi na ye. Toli nini Roswitha apesi? “Makambo mingi ekoki kotambola malamu soki tozali na motema molai mingi mpenza.”

Monika azwaki batisimo na mobu 1974, mpe bana na ye mibale bakómaki Batatoli mbula soki 10 na nsima. Ata soki mobali na ye Hans atɛmɛlaki ye te, ayaki kozwa batisimo tii na mobu 2006. Na nsima, liteya nini libota yango ezwaki? “Tikalá sembo epai ya Yehova mpe kosala te makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova.” Na ntembe te, ezalaki na ntina komonisa Hans ete bazalaki kolinga ye. Mpe bazalaki kaka na elikya ete mokolo mosusu akolanda bango.

MAI YA SOLO EBƆNDISAKI BANGO

Mokolo moko, Yesu amonisaki ete nsango ya solo ezali lokola mai oyo epesaka bomoi ya seko. (Yoa. 4:13, 14) Tozalaka na mposa ete bato ya mabota na biso bámɛla mai ya solo mpe ya pɛto, oyo ekoki kobɔndisa bango to kokitisa bango motema. Kasi, tokolinga te ete básilika mpo tozali kosopela bango ebele ya mai na makasi mbala moko. Lolenge oyo tozali kolimbwela bango mateya na biso nde ekoki kosala ete bábɔndisama to básilika. Biblia elobaka ete ‘motema ya moyengebene emanyolaka liboso ya koyanola’ mpe ete “motema ya moto ya bwanya etindaka monɔkɔ na ye emonisa mayele ya kososola, mpe mbɛbu na ye eyebaka kondimisa.” Ndenge nini tokoki kosalela toli oyo?Mas. 15:28; 16:23.

Mwasi akoki kozala na mposa ya koyebisa mobali na ye mateya ya Biblia. Soki ‘amanyoli liboso ya koyanola,’ akopona malamumalamu maloba na ye mpe akoloba te ngulungulu. Asengeli te komimonisa lokola azali sembo mingi to lokola aleki mobali na makambo nyonso. Soki azali kokanisa malamu liboso ya koloba, maloba na ye ekoki kobɔndisa mobali na ye mpe kimya ekoki kozala. Akoki komituna boye: Ntango nini mobali na ngai azalaka kimya mpe asepelaka na masolo? Asepelaka na masolo nini to asepelaka kotánga makambo nini? Asepelaka na makambo ya siansi, politiki to masano? Ndenge nini nakoki kobenda likebi na ye na masolo ya Biblia mpe kobosana te ete nasengeli komemya makanisi na ye? Kokanisa bongo ekoki kosalisa ye aloba mpe asala makambo na bososoli.

Kosimba motema ya bato ya mabota na biso oyo bakómi naino te Batatoli ezali te kaka likambo ya kolimbwela bango mateya ya Biblia na mwa mezire. Makambo oyo tolobaka esengeli mpe komonanaka na bizaleli na biso ya malamu.

ZALÁKÁ NA BIZALELI MALAMU

Jürgen, oyo tolobeli liboso alimboli boye: “Saleláká mitinda ya Biblia mokolo na mokolo. Yango ezali lolenge malamu ya kosalisa moto moko ya libota amona ye moko na miso, atako soki akomonisa yango polele boye te.” Hans, oyo azwaki batisimo mbula soki 30 nsima ya mwasi na ye, andimi likanisi yango. Alobi boye: “Kozala na bizaleli oyo ebongi na bakristo ezali na ntina mpenza, yango ekosala ete ndeko na yo ya libota amona ete solo ya Biblia ezali kosala mosala na bomoi na yo.” Bato ya mabota na biso basengeli komona ete kondima na biso ezali kokesenisa biso ná bato mosusu, na makambo malamu, kasi te oyo ya mabe to ya mpasi.

“Kozala na bizaleli oyo ebongi na bakristo ezali na ntina mpenza, yango ekosala ete ndeko na yo ya libota amona ete solo ya Biblia ezali kosala mosala na bomoi na yo.”—Hans

Ntoma Petro apesi basi oyo mibali na bango bazali Batatoli te toli oyo kitoko: “Bómikitisaka liboso ya mibali na bino moko, mpo, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama na maloba te kasi na etamboli ya basi na bango, mpo bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto ná limemya na bino makasi. Mpe monzɛlɛ na bino ezala oyo ya libándá te na kokanga nsuki mpe na kolata biloko kitoko ya wolo to kolata bilamba ya likoló, kasi ezala nde bomoto  oyo ebombaná, oyo ya motema, na molato oyo epɔlaka te ya elimo ya kimya mpe ya boboto, oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.”1 Pe. 3:1-4.

Ntoma Petro akomaki ete mobali ya ndenge wana akoki kobongwana soki mwasi azali na bizaleli malamu. Lokola abatelaki makanisi wana, ndeko moko ya mwasi na nkombo Christa azalaki kosala nyonso mpo na kosimba motema ya mobali na ye na nzela ya bizaleli malamu kobanda ntango azwaki batisimo na mobu 1972. Atako Batatoli ya Yehova bazalaki liboso koyekola na mobali na ye, kasi solo ekɔtaki ye naino te. Azalaki koyangana na makita mosusu ya lisangá mpe amesanaki na bandeko ya lisangá. Mpe bandeko bazalaki komona ete ye moko azali na lotomo ya kozwa ekateli. Ndenge nini Christa asalaka mpo na kosimba motema na ye?

Alobi boye: “Nazali na ekateli ya kolanda kaka nzela oyo Yehova alingi nalanda. Kasi, nazali kosala makasi nalonga mobali na ngai ‘na maloba te,’ kasi na bizaleli na ngai malamu. Soki asɛngi ngai makambo oyo ekweisi te mitinda ya Biblia, nasalaka oyo asɛngi. Mpe nayebaka ete azali na bonsomi ya kozwa ekateli mpe natikaka makambo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova.”

Ezaleli oyo Christa amonisaka, emonisi ete tosengeli te kotingamaka ete bato básala kaka ndenge tolingi. Asalaka ntango nyonso makambo oyo ekoki kosalisa ye akola na elimo, na ndakisa ayanganaka na makita nyonso mpe amipesaka mpenza na mosala ya kosakola. Kasi, amonisaka bososoli mpe ayebaka ete asengeli kolinga mobali na ye, kopesa ye ntango mpe kotyela ye likebi. Koboya kotingama na makambo mpe kozala na bososoli ezali na ntina mpo na moto nyonso oyo azali na moto ya libota oyo azali te Motatoli ya Yehova. Biblia elobi ete “eloko nyonso ezali na ntango na yango.” Yango elimboli mpe ntango oyo tolekisaka elongo na bato ya libota mingimingi mobali to mwasi na biso oyo azali Motatoli te. Ntango oyo tolekisaka elongo ekoki kopesa biso likoki ya kosololaka mingi. Emonani ete soki bato basololaka malamu, yango ekoki kosala ete moto amiyokaka te lokola azali ye moko, lokola asundolami to ayokaka zuwa te.Mos. 3:1.

KOBUNGISA ELIKYA TE

Holger, oyo tata na ye azwaki batisimo mbula 20 nsima ya bato mosusu ya libota alobi boye: “Ezali na ntina komonisa ete tolingaka bato ya libota mpe ete tobondelaka mpo na bango.” Christa abakisi ete ‘azali kaka na elikya ete ata ndele, mobali na ye akosalela Yehova mpe akondima solo.’ Tosengeli ntango nyonso kozalaka na elikya ete bato ya mabota na biso oyo bazali Batatoli te, bakoki kobongwana mokolo mosusu.

Mokano na biso esengeli kozala ya kobatela ntango nyonso boyokani malamu ná bato ya mabota na biso, kopesa bango libaku ya koyeba solo, mpe kosimba mitema na bango na nsango ya Biblia. Mpe na makambo nyonso tosengeli kozala “na boboto mpe limemya makasi.”1 Pe. 3:15.