Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2014

Ndenge ya kobatela makanisi malamu

Ndenge ya kobatela makanisi malamu

“Soki moto akozala na bomoi bambula mingi, tiká asepela na yango nyonso.”MOS. 11:8.

1. Mapamboli nini ya Yehova ekoki kosalisa biso tózala na esengo?

YEHOVA alingaka ete tózala na esengo, mpe asopelaka biso ebele ya mapamboli mpo tózala na esengo. Kutu apesá biso bomoi. Na yango, tokoki kosalela yango mpo na kokumisa ye, mpo abendá biso na losambo ya solo. (Nz. 144:15; Yoa. 6:44) Yehova amonisaka ete alingaka biso mpe asalisaka biso tókangama na mosala na ye. (Yir. 31:3; 2 Ko. 4:16) Tozali na kati ya paradiso ya elimo, epai tozwaka ebele ya bilei ya elimo mpe tozali na bandeko ya lolenge nyonso oyo balingaka biso. Longola yango, tozali na elikya kitoko mpo na mikolo oyo ezali koya.

2. Basaleli mosusu ya Nzambe ya sembo babundanaka na likambo nini?

2 Atako tozali na makambo wana oyo epesaka biso esengo, basaleli mosusu ya Nzambe ya sembo babundaka mpo na kolonga makanisi mabe oyo bazalaka na yango mpo na bango moko. Bakoki kokanisa ete ezala bango to mosala oyo bazali kosala mpo na Yehova ezali na ntina mingi te na miso na ye. Mpo na bato oyo bakobaka na makanisi mabe, likanisi ya kosepela na “bambula mingi” ekoki kozala ndɔtɔ mpamba. Mpo na bango, bomoi ezali mpenza molili.Mos. 11:8.

3. Nini ekoki kosala ete moto akóma na makanisi mabe?

3 Ekoki kozala ete bandeko yango bakómá na makanisi ya ndenge wana mpo na makambo lokola kolɛmba nzoto, maladi to kosala  lisusu mingi te mpo na bobange. (Nz. 71:9; Mas. 13:12; Mos. 7:7) Lisusu, mokristo nyonso asengeli kobosana te ete motema ezali na bokosi mpe ekoki kokweisa biso ata soki Nzambe asepelaka na biso. (Yir. 17:9; 1 Yoa. 3:20) Zabolo akoselaka basaleli ya Nzambe makambo. Mpe bato oyo bazali na makanisi ya Satana bakoki koluka kobebisa biso na makanisi ya Elifaze, moto ya kozanga kondima oyo amonisaki ete tozali na ntina te na miso na Nzambe. Maloba wana ezalaki lokuta na mikolo na Yobo mpe ezali bongo lelo oyo.Yobo 4:18, 19.

4. Tokotalela nini na lisolo oyo?

4 Yehova amonisi yango polele na Makomami ete akozala elongo na baoyo bazali “kotambola na lobwaku ya molili makasi.” (Nz. 23:4) Lolenge moko azalaka ná biso, ezali na nzela ya Liloba na ye. Biblia ezali “na nguya oyo euti na Nzambe mpo na kokweisa biloko oyo epikamá makasi,” na ndakisa makanisi ya lokuta mpe ya mabe. (2 Ko. 10:4, 5) Tótalela sikoyo ndenge oyo tokoki kosalela Biblia mpo tókóma na makanisi malamu mpe tóbatela yango. Ekoki kosalisa yo mpe kopesa yo likoki ya kolendisa basusu.

SALELÁ BIBLIA MPO NA KOKÓMA NA MAKANISI MALAMU

5. Lolenge nini ya komimeka ekosalisa biso tózala na makanisi malamu?

5 Ntoma Paulo alobelaki makambo oyo ekoki kosalisa biso tókóma na makanisi malamu. Alendisaki bandeko ya lisangá ya Korinti ete ‘bákoba komimeka mpo na komona soki bazali na kati ya kondima.’ (2 Ko. 13:5) “Kondima” esangisi mateya nyonso ya bokristo oyo emonisami na Biblia. Soki maloba mpe misala na biso eyokani na mateya yango, wana tokolonga momekano mpe tokomonisa ete tozali “na kati ya kondima.” Tosengeli mpe kokokanisa bomoi na biso ná mateya nyonso ya bokristo. Tosengeli te kopona mateya oyo tokolanda.Yak. 2:10, 11.

6. Mpo na nini tosengeli komimeka mpo na komona ‘soki tozali na kati ya kondima’? (Talá elilingi ya ebandeli.)

6 Okoki kokakatana mpo na komimeka bongo mingimingi soki ozali kokanisa ete okolonga te. Kasi, lolenge oyo Yehova atalelaka biso nde ezali na ntina mingi koleka lolenge tomitalelaka, mpe makanisi na ye eleki mosika oyo ya biso. (Yis. 55:8, 9) Atalatalaka basambeli na ye te mpo na kokweisa bango kasi mpo na komona bizaleli na bango ya malamu mpe kosalisa bango. Ntango ozali kosalela Liloba ya Nzambe mpo na komimeka mpe komona ‘soki ozali na kati ya kondima,’ okomitalela lokola Nzambe atalelaka yo. Yango ekoki kosalisa yo olongola likanisi nyonso oyo ekoki koyela yo ete ozali na ntina te na miso ya Nzambe mpe okokóma na elikya oyo euti na Biblia ete: ozali na valɛrɛ mingi na miso ya Yehova. Yango ekoki kozala lokola kofungola rido mpo pole ekɔta na ndako oyo ezali molili.

7. Matomba nini tokoki kozwa na bandakisa ya bato ya sembo oyo Biblia elobeli?

7 Lolenge eleki malamu ya komimeka ezali ya komanyola na bandakisa ya bato ya sembo oyo Biblia elobeli. Kokanisá makambo oyo bakutanaki na yango mpe ndenge bazalaki koyoka ná oyo ya yo, mpe kanisá ndenge okokaki kosala soki ezalaki yo. Tótalela bandakisa misato oyo emonisi ndenge okoki kosalela Biblia mpo na koyeba soki ozali “na kati ya kondima” mpe okóma komitalela na ndenge ebongi.

MWASI MOBOLA OYO MOBALI AKUFÁ

8, 9. (a) Bomoi ya mwasi mobola oyo mobali akufá ezalaki ndenge nini? (b) Ekoki kozala ete mwasi yango amitungisaki mpo na likambo nini?

8 Na tempelo ya Yerusaleme, Yesu amonaki mwasi moko mobola oyo mobali akufá. Ndakisa ya mwasi yango ekoki kosalisa biso tózala na makanisi malamu ata soki tozali na makoki mingi te. (Tángá Luka 21:1-4.) Tótalela naino bomoi ya mwasi yango. Ya liboso azalaki koyoka mpasi mpo na liwa ya mobali na ye. Ya mibale, bakonzi  ya mangomba bazalaki lokoso mpe bazalaki kolyela basi oyo mibali na bango bakufá lokola ye, na esika ya kosalisa bango. (Luka 20:47) Azalaki mpenza mobola mpe akokaki kopesa makabo kaka mwa mbongo oyo ekokani na oyo mosali-bilanga akokaki kozwa nsima ya kosala mosala mwa ntango moke.

9 Meká komona na makanisi ndenge mwasi yango amiyokaki ntango akɔtaki na lopango ya tempelo ná mwa mbongo ya bibende mibale. Azalaki nde kokanisa ete mbongo oyo akotya makabo ezali moke na kotalela oyo akokaki kopesa ntango mobali na ye azalaki na bomoi? Ekoki kozala ete amitungisaki ntango amonaki bato oyo bazalaki liboso na ye bazali kotya makabo ebele, mpe azalaki nde komituna soki likabo na ye ezali mpenza na motuya? Ata soki akanisaki bongo, kasi asalaki oyo akokaki kosala mpo na losambo ya solo.

10. Ndenge nini Yesu amonisaki ete mwasi mobola oyo mobali akufá azalaki na valɛrɛ mingi na miso ya Nzambe?

10 Yesu amonisaki ete mwasi yango azalaki na motuya mingi na miso ya Yehova, ndenge moko mpe ná likabo na ye. Alobaki ete mwasi yango ‘atyaki mingi koleka bango [bazwi] nyonso.’ Atako basengelaki kosangisa likabo na ye ná oyo basusu bapesaki, Yesu akumisaki nde ye mingi. Bato oyo batángaki mbongo ya makabo ya tempelo bakokaki koyeba soki moke te ete mwa mbongo mibale wana ya bibende ezalaki na motuya mingi na miso ya Yehova mpe asepelaki mingi na mwasi oyo apesaki yango. Kutu, ndenge oyo Nzambe atalelaki likambo yango nde ezalaki na ntina mpenza, kasi te ndenge oyo bato bakanisaki to ndenge oyo mwasi wana amitalelaki. Okoki kosalela lisolo oyo mpo na komimeka mpe komona soki ozali na kati na kondima?

Liteya nini ozwi na ndakisa ya mwasi mobola oyo mobali akufá? (Talá paragrafe 8-10)

11. Liteya nini okoki kozwa na lisolo ya mwasi mobola oyo mobali akufá?

11 Makoki oyo tozali na yango nde ekoki kokata soki tokoki kopesa Yehova mingi to te. Bobange to maladi ekoki kopekisa bandeko mosusu basakolaka mingi. Basengeli nde kokanisa ete ntango oyo bazali kolekisa na mosala ya kosakola ezali na ntina  te? Ata soki ozali elenge to na nzoto kolɔngɔnɔ, okoki kokanisa ete milende oyo ozali kosala, ezali moke mpenza na kotalela ebele ya bangonga oyo basaleli mosusu ya Nzambe bazali kolekisa mpo na kosambela ye. Atako bongo, lisolo ya mwasi mobola oyo mobali akufá eteyi biso ete Yehova amonaka mpe azwaka na motuya mingi likambo nyonso oyo tosali mpo na ye, mingimingi soki tosali yango na ntango ya mpasi. Kanisá naino makambo oyo osalaki mpo na losambo ya Yehova na boumeli ya mbula oyo eleki. Esɛngaki omipimela likambo moko ya ntina mingi mpo olekisa ata ngonga moko na mosala na ye? Soki ezali bongo, okoki komindimisa ete Yehova azwaki na motuya mosala oyo osalaki na ngonga wana moko. Soki, na ndakisa ya mwasi mobola oyo mobali akufá, ozali kosala nyonso oyo okoki na mosala ya Yehova, osengeli mpenza kondimisama ete ozali “na kati ya kondima.”

“LONGOLÁ MOLIMO NA NGAI”

12-14. (a) Makanisi nini mabe Eliya akómaki na yango? (b) Mpo na nini Eliya amiyokaki ndenge wana?

12 Mosakoli Eliya azalaki sembo epai ya Yehova mpe na kondima makasi. Mokolo moko, atungisamaki mpenza na makanisi mpe asɛngaki Yehova aboma ye; alobaki boye: “Ekoki! Sikoyo, Ee Yehova, longolá molimo na ngai.” (1 Bak. 19:4) Bato oyo bakutaná te na likambo oyo Eliya akutanaki na yango, bakoki komona ete libondeli ya Eliya ezalaki “bilobaloba mpamba.” (Yobo 6:3) Nzokande, Eliya atungisamaki mpenza. Kasi, simbá ete na esika Yehova apesa ye etumbu ndenge asɛngaki akufá, asalisaki nde ye.

13 Mpo na nini Eliya akómaki na makanisi wana? Mwa moke liboso, Eliya asalaki likamwisi oyo emonisaki ete Yehova azali Nzambe ya solo. Na nsima, basakoli 450 ya Baala babomamaki. (1 Bak. 18:37-40) Ekoki kozala ete, mosakoli Eliya akanisaki ete basaleli ya Nzambe bakozongela losambo ya solo, kasi esalemaki bongo te. Yezabele, mwasi mabe ya mokonzi atindelaki Eliya nsango ete akoboma ye. Lokola abangaki, Eliya akimaki na sudi ya Yisraele, akatisaki Yudea mpo na kokóma na esobe.1 Bak. 19:2-4.

14 Lokola azalaki ye moko, Eliya abandaki kokanisa ete mosala na ye ya mosakoli ezalaki na ntina te. Ayebisaki Yehova ete: “Naleki bankɔkɔ na ngai te.” Amimonaki na ntina te lokola putulu mpe mikuwa ya bankɔkɔ na ye oyo bakufá. Na makanisi na ye, amonaki ete alongi te mpe azali na valɛrɛ te na miso ya Yehova mpe ata ya moto nini.

15. Ndenge nini Nzambe amonisaki Eliya ete azali kaka na valɛrɛ mingi na miso na ye?

15 Kasi Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atalelaki Eliya ndenge wana te. Eliya azalaki kaka na valɛrɛ na miso ya Nzambe mpe Yehova asalaki makambo oyo emonisaki bosolo ya likambo yango. Nzambe atindaki anzelu mpo na kolendisa Eliya. Yehova apesaki ye mpe bilei mpe mai oyo esalisaki ye na boumeli ya mikolo 40 ya mobembo na ye na sudi ya ngomba Horebe. Lisusu, na boboto nyonso, Yehova asembolaki likanisi mabe oyo Eliya azalaki na yango ete ata Moyisraele moko te atikalaki sembo epai na Yehova. Likambo ya ntina, Nzambe apesaki Eliya mikumba ya sika mpe andimaki yango. Yehova asalisaki Eliya, mpe azwaki lisusu makasi mpe azongelaki mosala na ye ya mosakoli.1 Bak. 19:5-8, 15-19.

16. Wapi balolenge oyo Nzambe asalisá yo?

16 Lisolo ya Eliya ekoki kosalisa yo omitala mpo na koyeba soki ozali na kati ya kondima mpe ekoki kotinda yo okóma na makanisi malamu. Ya liboso, kanisá na ndenge oyo Yehova asungaki yo. Mbala mosusu mosaleli na ye moko, na ndakisa nkulutu to mokristo moko oyo akɔmeli na elimo, asalisaki yo ata mwa moke ntango ozalaki na bosɛnga? (Gal. 6:2) Olyaka bilei ya elimo na nzela ya Biblia, mikanda na biso mpe na makita ya lisangá? Mbala ya nsima oyo okozwa matomba na moko ya bibongiseli oyo,  kobosana te esika lisalisi yango euti mpe bondelá Nzambe mpo na kopesa ye matondi.Nz. 121:1, 2.

17. Likambo nini Yehova asepelaka na yango epai ya basaleli na ye?

17 Ya mibale, kobosana te ete makanisi mabe ekoki kokosa yo. Ndenge oyo Yehova atalelaka biso nde likambo eleki ntina. (Tángá Baroma 14:4.) Tozalaka na valɛrɛ mingi na miso ya Yehova ntango tomipesaka na ye mpe tozalaka sembo, kasi atalelaka biso te na kolanda makambo oyo tosalelaka ye. Na ndakisa ya Eliya, ekoki kozala ete yo mpe osalaki makambo mingi mpo na Yehova kozanga ete oyeba. Ekoki kozala ete ndakisa na yo malamu esalisá bandeko mosusu na lisangá, to bato mosusu ya teritware bayebá solo mpo na milende na yo.

18. Mokumba nyonso oyo Yehova apesi yo emonisaka nini?

18 Ya misato, taleláká mokumba nyonso oyo Yehova apesi yo lokola elembo ete azali na yo. (Yir. 20:11) Lokola Eliya, okoki kolɛmba nzoto mpo mosala na yo ezali kobota mbuma te to mpo ozali kokokisa te mikano na yo mosusu ya elimo. Atako bongo, ozali na libaku moko monene oyo moto nyonso kati na biso akoki kozala na yango, kosakola nsango malamu mpe komema nkombo ya Nzambe. Tikalá sembo. Na bongo, maloba oyo ya lisese ya Yesu ekoki mpe kolobelama mpo na yo: “Kɔtá na esengo ya nkolo na yo.”Mat. 25:23.

“LIBONDELI YA MOTO YA MPASI”

19. Mokomi ya Nzembo 102 akutanaki na likambo nini?

19 Mokomi ya Nzembo 102 abungisaki elikya. Azalaki na “mpasi,” elingi koloba azalaki konyokwama makasi na nzoto to na makanisi, mpe azangaki makasi ya koyikela mikakatano na ye mpiko. (Nz. 102, maloba oyo ezali na likoló) Maloba na ye emonisi ete mpasi elekelaki ye ndelo mpe amiyokaki lokola azali na moto te ya kosunga ye. (Nz. 102:3, 4, 6, 11) Akanisaki ete Yehova alingaki abwaka ye mosika.Nz. 102:10.

20. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa moto oyo azali kobunda mpo na kolonga makanisi mabe?

20 Kasi, mokomi ya Nzembo azalaki kaka kokumisa Yehova. (Tángá Nzembo 102:19-21.) Nzembo 102 emonisi ete, ata baoyo bazali na kati ya kondima bakoki kokutana na mikakatano mpe bakoki te kokanisa eloko mosusu. Mokomi ya nzembo amiyokaki lokola “ndɛkɛ oyo ezali yango moko na nsamba,” lokola nde mitungisi ekómaki moninga na ye. (Nz. 102:7) Soki ozali komiyoka bongo, fungolelá Yehova motema na yo ndenge mokomi ya nzembo asalaki. Mabondeli ya moto ya mpasi, elingi koloba mabondeli na yo, ekoki kosalisa yo olonga makanisi mabe. Yehova alaki ete ‘akoyoka libondeli ya baoyo biloko na bango nyonso epunzami, mpe akotyola libondeli na bango te.’ (Nz. 102:17) Tyelá elaka yango mpenza motema.

21. Ndenge nini moto oyo azali kobunda na makanisi mabe akoki kokóma na makanisi malamu?

21 Mokanda ya Nzembo 102 emonisi mpe ndenge oyo okoki kokóma na makanisi malamu. Mokomi ya nzembo akómaki na makanisi malamu ntango azongisaki makanisi na ye na boyokani na ye ná Yehova. (Nz. 102:12, 27) Abɔndisamaki ndenge ayebaki ete Yehova akozala ntango nyonso wana mpo na kosunga basaleli na ye na ntango ya mikakatano. Na yango, soki makanisi mabe ezali kopekisa yo mpo na mwa ntango mpo osala mingi na mosala ya Nzambe, bondelá mpo na yango. Kobondela Nzambe te kaka mpo abɔndisa yo na mpasi na yo, kasi mpe “mpo nkombo ya Yehova esakolama.”Nz. 102:20, 21.

22. Ndenge nini mokomoko na biso akoki kosepelisa Yehova?

22 Ya solo, tokoki kosalela Biblia mpo na komindimisa ete tozali na kati ya kondima mpe tozali na valɛrɛ na miso ya Yehova. Mpo na koloba solo, na mokili oyo, tokoki te kolongola makanisi nyonso ya mabe to makambo oyo elɛmbisaka nzoto. Atako bongo, mokomoko na biso akoki kosepelisa Yehova mpe kozwa lobiko soki ayiki mpiko na bosembo nyonso na mosala ya Yehova.Mat. 24:13.