Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2014

Ndenge ya kokoba komonisa ezaleli ya komipimela

Ndenge ya kokoba komonisa ezaleli ya komipimela

“Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya.”​—MAT. 16:24.

1. Ndenge nini Yesu atikaki ndakisa moko kitoko na likambo etali komipimela?

NTANGO Yesu azalaki awa na mabele, atikaki ndakisa moko kitoko mpenza na likambo etali komipimela. Atyaki bamposa na ye nsima mpo na kosala mokano ya Nzambe. (Yoa. 5:30) Lokola atikalaki sembo tii na liwa likoló ya nzete ya mpasi, amonisaki ete ezaleli na ye ya komipimela ezalaki na ndelo te.​—Flp. 2:8.

2. Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli ya komipimela, mpe mpo na nini tosengeli kosala bongo?

2 Lokola biso mpe tozali bayekoli ya Yesu, tosengeli komonisa ezaleli ya komipimela. Kozala na ezaleli ya komipimela elimboli nini? Na mokuse, yango elimboli ezaleli ya moto oyo azali kondima kotika matomba na ye mpo na kosalisa basusu. Na maloba mosusu, ezaleli yango ekeseni na ezaleli ya moto oyo alukaka matomba na ye moko. (Tángá Matai 16:24.) Soki tozali koboya koluka kaka matomba na biso moko, yango ekosalisa biso tótya matomba ya basusu na esika ya liboso. (Flp. 2:3, 4) Kutu, Yesu ateyaki ete kozala na ezaleli ya komipimela ezali na ntina mingi na losambo na biso. Ndenge nini? Bolingo, ezaleli oyo etindaka bakristo bámipimelaka makambo mosusu, ezali elembo ya bayekoli ya solo ya Yesu. (Yoa. 13:34, 35) Mpe kanisá naino na mapamboli  oyo tozali na yango mpo tozali na kati ya libota ya bandeko ya mokili mobimba oyo ezali komonisa ezaleli ya komipimela!

3. Eloko nini ekoki kobebisa ezaleli na biso ya komipimela?

3 Tozali na monguna moko oyo alukaka na mayele mabe kobebisa ezaleli na biso ya komipimela. Monguna yango ezali ezaleli na biso ya koluka kaka matomba na biso moko. Tóbosana te ndenge Adama ná Eva balukaki kaka matomba na bango moko. Eva asalaki likambo oyo emonisaki ete azalaki na mposa ya kozala lokola Nzambe. Mobali na ye amonisaki ezaleli yango na ndenge asepelisaki mwasi na ye. (Eba. 3:5, 6) Nsima ya kopɛngola Adama ná Eva na losambo ya solo, Zabolo akobaki komeka bato mpo bálukaka kaka matomba na bango moko. Kutu alukaki kosala yango ntango amekaki Yesu. (Mat. 4:1-9) Na mikolo na biso, Satana abungisi bato mingi nzela, atindi bango bámonisa ezaleli ya kolukaka kaka matomba na bango na balolenge mingi. Tosengeli mpenza kotyela likambo yango likebi mpo lokola ezaleli yango ezali kopalangana mingi, yango ekoki mpe kokɔtela biso.​—Ef. 2:2.

4. (a) Tokoki kolongola sikoyo ezaleli ya koluka kaka matomba na biso moko? Limbolá. (b) Mituna nini tokotalela?

4 Tokoki kokokanisa ezaleli ya koluka kaka matomba na biso moko na ndenge ebende egugaka. Soki ebende eumeli mingi libanda, ekoki kobanda koguga. Likama monene ekoki komonana soki balongoli te koguga wana, batiki yango tii ebebisa ebende yango makasi. Ndenge moko, atako tokoki te sikoyo kolongola ezaleli na biso ya kozanga kokoka mpe ya koluka kaka matomba na biso, kasi tosengeli kokeba na makama oyo yango ebimisaka mpe tókoba kobundisa bizaleli yango. (1 Ko. 9:26, 27) Ndenge nini tokoki koyeba soki tozali na ezaleli ya koluka kaka matomba na biso moko? Mpe ndenge nini tokoki komonisa mpenza ete tozali na ezaleli ya komipimela?

SALELÁ BIBLIA MPO NA KOYEBA SOKI OLUKAKA KAKA MATOMBA NA YO

5. (a) Na nini Biblia ekokani na talatala? (Talá elilingi na ebandeli.) (b) Ntango tozali koluka koyeba soki tozali na ezaleli ya koluka kaka matomba na biso moko, likambo nini tosengeli koboya?

5 Ndenge kaka tokoki kosalela talatala mpo na kotala elongi na biso, tokoki mpe kosalela Biblia mpo na kotala bomoto na biso ya kati mpe kobongisa mbeba nyonso oyo tokomona. (Tángá Yakobo 1:22-25.) Kasi, talatala ekosalisa biso kaka soki tozali kosalela yango malamu. Na ndakisa, soki tozali kotala talatala kaka mbangumbangu, tokoki komona te mwa litɔnɔ oyo tozali na yango, atako esengelaki mpenza kolongola yango. To soki tozali kotala talatala na mopanzi, tokoki komona elilingi ya moto mosusu. Ndenge moko, ntango tozali kosalela Biblia mpo na komona ezaleli moko ya mabe lokola kolukaka kaka matomba na biso moko, tosengeli kosuka te kaka na kotángaka yango kaka soki mwa libaku moko emonani to kaka mpo na komona bafoti ya moto mosusu.

6. Ndenge nini tosengeli kokoba na mobeko ya kokoka?

6 Tokoki kotángaka Liloba ya Nzambe mbala na mbala to mpe mokolo na mokolo, kasi tomonaka te ete ezaleli ya kolukaka kaka matomba na biso moko ezali kozwa misisa epai na biso. Ndenge nini ekoki kosalema? Tózwa ndakisa: Na ndakisa oyo Yakobo apesi ya talatala, ezali te ete moto yango atalaki talatala malamu te. Yakobo akomi ete moto yango “amitali.” Awa, Yakobo asaleli liloba ya Grɛki oyo elimboli kotala na likebi mpenza to kotalela makambo nyonso malamumalamu. Kasi na likambo oyo, mokakatano ya moto yango ezalaki nini? Yakobo akobi ete: “Akei mpe na mbala moko abosani ndenge azali.” Ya solo, ntango atiki kotala talatala, asaleli te makambo oyo amonaki. Nzokande, moto oyo alingi kolonga, asengeli te kaka kosuka na “kotalatala na mobeko ya kokoka” kasi mpe kokoba na yango. Na esika ya kozongisa mobeko ya Liloba ya Nzambe nsima, atingamaka mpe alandaka mateya na yango. Yesu amonisaki mpe kaka likambo yango ntango  alobaki ete: “Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai.”​—Yoa. 8:31.

7. Ndenge nini tokoki kosalela Biblia mpo na koyeba soki tolukaka kaka matomba na biso moko?

7 Na yango, mpo na kopikola mwa misisa ya ezaleli ya koluka kaka matomba na biso moko, tosengeli liboso kotángaka Liloba ya Nzambe na likebi nyonso. Yango ekoki kosalisa biso tómona bisika oyo tosengeli kotyela yango likebi. Kasi, tosengeli kosuka kaka wana te. Tosengeli kosala bolukiluki mpenza mpo tókɔta na mozindo. Soki osimbi lisolo moko ya Biblia malamumalamu, mikɔtisá na kati ya lisolo yango, mpe omituna mituna lokola oyo: ‘Nalingaki kosala nini soki nakutanaki na likambo oyo? Nalingaki kozwa ekateli oyo ebongi?’ Likambo eleki mpenza ntina ezali ete nsima ya kokanisa na mozindo na makambo oyo otángi, salá makasi osalela yango. (Mat. 7:24, 25) Tótala ndenge oyo kosalela masolo ya mokonzi Saulo mpe ntoma Petro ekoki kosalisa biso tókoba kozala na ezaleli ya komipimela.

LITEYA OYO TOKOKI KOZWA NA NDAKISA YA MOKONZI SAULO

8. Bizaleli nini mokonzi Saulo azalaki na yango ntango abandaki koyangela, mpe ndenge nini amonisaki yango?

8 Mokonzi Saulo azali ndakisa oyo ekoki kokebisa biso ete koluka kaka matomba na biso moko ekoki kobebisa ezaleli na biso ya komipimela. Ntango mokonzi Saulo abandaki koyangela, azalaki na ezaleli ya komikitisa mpe na makanisi malamu. (1 Sa. 9:21) Aboyaki kopesa Bayisraele oyo balobaki mabe mpo na bokonzi na ye etumbu, atako akokaki komona ete azali na lotomo ya kosala yango mpo Nzambe nde atyaki ye. (1 Sa. 10:27) Mokonzi Saulo andimaki na litambwisi ya elimo santu, yango wana atambwisaki Bayisraele na etumba oyo balongaki Baamone. Kutu, nsima ya kolonga Baamone, na komikitisa nyonso apesaki Yehova lokumu.​—1 Sa. 11:6, 11-13.

9. Ndenge nini mokonzi Saulo akolisaki makanisi ya koluka kaka matomba na ye moko?

9 Na nsima, mokonzi Saulo abandaki kotika ete makanisi ya koluka kaka matomba na ye moko mpe lolendo ekola. Likambo oyo asalaki ezalaki lokola ebende oyo ebandi koguga. Ntango alongaki Baamaleke na etumba, na esika atosa Yehova, atyaki matomba na ye na esika ya liboso. Na lokoso nyonso, mokonzi Saulo azwaki biloko oyo bapunzaki na esika ya kobebisa yango ndenge Nzambe asɛngaki. Lisusu, na lolendo mpenza, mokonzi Saulo amitongelaki monima. (1 Sa. 15:3, 9, 12) Ntango mosakoli Samwele ayebisaki ye ete Yehova asepeli te, mokonzi Saulo alukaki komilongisa ete atosaki etinda ya Nzambe mpe apesaki nde basusu foti mpo na mabe oyo ye asalaki. (1 Sa. 15:16-21) Lisusu, lolendo etindaki mokonzi Saulo aluka mingi kosepelisa bato na esika ya kosepelisa Nzambe. (1 Sa. 15:30) Ndenge nini tokoki kosalela lisolo ya mokonzi Saulo lokola talatala mpo esalisa biso tókoba kozala na ezaleli ya komipimela?

10, 11. (a) Ndakisa ya mokonzi Saulo eteyi biso nini na likambo etali kokoba kozala na ezaleli ya komipimela? (b) Nini ekoki kosalisa biso tólanda te ezaleli mabe ya mokonzi Saulo?

10 Ya liboso, ndakisa ya mokonzi Saulo emonisi ete tokoki koloba te ete soki tozalaka na ezaleli ya komipimela, yango emonisi ete tokokoba kaka komonisa yango ata soki tokangi mabɔkɔ. (1 Tim. 4:10) Tóbosana te ete mokonzi Saulo asalaki malamu mpe Nzambe asepelaki na ye mpo na mwa ntango, kasi alongaki te kopikola misisa ya ezaleli ya koluka kaka matomba na ye moko ntango ebandaki kokola. Nsukansuka, Yehova abwakaki ye mpo azangaki botosi.

11 Ya mibale, tosengeli kokeba ete tótyaka likebi te kaka na makambo oyo tozali kosala malamu, mpe kobosana bisika oyo tosengeli kobongisa. Kosala bongo ekoki kozala lokola kosepela na bilamba ya sika oyo tolati kasi tozali kokeba te na mwa basalite oyo ezali na elongi na biso. Ata soki tokokóma te na ezaleli oyo mokonzi Saulo akómaki na yango, tosengeli mpenza koboma nzoto mpo ete tóboya ezaleli nyonso oyo ekoki kotinda biso na ezaleli mabe oyo ye akómaki na yango. Soki bapesi biso toli, tólukaka te komilongisa, komona likambo oyo tosali moke, to kopesa nde  basusu foti. Na esika ya kozala lokola Saulo, ekozala malamu mingi tóyokaka toli.​—Tángá Nzembo 141:5.

12. Ndenge nini ezaleli ya komipimela esalisaka biso soki tosali lisumu moko monene?

12 Kasi, tokomonisa ezaleli nini soki tosali lisumu moko monene? Mokonzi Saulo alingaki kobatela lokumu na ye, mpe yango ekangelaki ye nzela mpo abongisa boyokani na ye ná Yehova. Kasi, ezaleli ya komipimela ekoki kosalisa biso tólongola nsɔni mpe tóluka lisalisi. (Mas. 28:13; Yak. 5:14-16) Na ndakisa, ndeko mobali moko abandaki kotala pornografi ntango azalaki na mbula 12 mpe akobaki kosala yango na kobombana na boumeli ya mbula zomi. Alobi boye: “Ezalaki mpasi mingi nayebisa mwasi na ngai mpe bankulutu ete nazalaki kotala pornografi. Kasi sikoyo lokola nalobaki yango, nazali koyoka ete kilo moko monene elongwe na mapeka na ngai. Baninga na ngai mosusu bayokaki mawa ntango bakataki ngai mokumba ya mosaleli na misala; mpo bazalaki kondima te ete nakokaki kosala likambo ya boye. Kasi, nayebi ete Yehova azali kosepela sikoyo na mosala na ngai koleka ntango nazalaki kotala pornografi, mpe ndenge oyo azali kotalela ngai nde ezali na ntina mingi.”

PETRO ALONGAKI EZALELI YA KOLUKA KAKA MATOMBA NA YE

13, 14. Ndenge nini ntoma Petro amonisaki ezaleli ya koluka kaka matomba na ye moko?

13 Ntoma Petro amonisaki ezaleli ya komipimela ntango Yesu azalaki kopesa ye formasyo. (Luka 5:3-11) Kasi, asengelaki kobunda mpo na kolonga ezaleli ya koluka kaka matomba na ye moko. Na ndakisa, ayokaki mabe ntango ntoma Yakobo mpe Yoane basalaki mwango mpo bázala na bisika ya lokumu pene ya Yesu na Bokonzi ya Nzambe. Ntango mosusu ntoma Petro akanisaki ete moko ya bakiti yango esengeli kozala mpo na ye mpo Yesu alobaki liboso ete ntoma Petro akozala na mokumba moko ya ntina mingi. (Mat. 16:18, 19) Kasi, Yesu akebisaki ntoma Yakobo, Yoane, Petro mpe bantoma mosusu, na ezaleli mabe ya koluka ‘kolakisa bandeko na bango bokonzi na bango.’​—Mrk. 10:35-45.

14 Atako Yesu alukaki kosembola makanisi ya Petro, kasi na nsima, Petro akobaki kaka na ezaleli na ye ya komitombola. Ntango Yesu ayebisaki bantoma ete bakotika ye mpo na mwa ntango, Petro alobaki ete ata soki bamosusu batiki Yesu, kasi ye akotika Yesu te. (Mat. 26:31-33) Kasi amityelaki motema kaka mpamba, mpo kaka na butu wana amonisaki  te ete akangami na Yesu. Lokola asalaki nyonso mpo na komibatela, ntoma Petro awanganaki Yesu mbala misato.​—Mat. 26:69-75.

15. Liteya nini tokoki kozwa soki totaleli bomoi mobimba ya ntoma Petro?

15 Atako ntoma Petro azalaki na makambo na ye ya mabe mpe mabunga, kasi tokoki mpe kozwa liteya na bomoi na ye. Milende na ye mpe na lisalisi ya Elimo santu ya Nzambe, ntoma Petro alongaki makanisi mabe oyo azalaki na yango; amonisaki ezaleli ya komipekisa mpe ezaleli ya komipimela. (Gal. 5:22, 23) Ayikaki mpiko na mikakatano oyo ekokaki komonana makasi koleka oyo akweaki na yango liboso. Amikitisaki ntango ntoma Paulo apamelaki ye na miso ya bato nyonso. (Gal. 2:11-14) Mpe atako ntoma Paulo apamelaki ye, ntoma Petro akangelaki ye nkanda te, mpe akanisaki te ete lokumu oyo bato bazalaki kopesa ye ekiti mpo na mpamela wana. Ntoma Petro akobaki kolinga ntoma Paulo. (2 Pe. 3:15) Ndakisa ya ntoma Petro ekoki kosalisa biso tózala na ezaleli ya komipimela.

Ntoma Petro asalaki nini ntango bapamelaki ye? Biso mpe tokosala bongo? (Talá paragrafe 15)

16. Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli ya komipimela na ntango ya mikakatano?

16 Kanisá na ndenge osalaka soki okutani na mikakatano. Ntango ntoma Petro mpe bantoma mosusu bakangamaki mpe babɛtamaki fimbo mpo bazalaki kosakola, basepelaki “mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye [Yesu].” (Mis. 5:41) Yo mpe okoki kotalela mikakatano lokola libaku oyo ozwi mpo na komekola Petro mpe kolanda matambe ya Yesu mpo omonisa ezaleli ya komipimela. (Tángá 1 Petro 2:20, 21.) Kotalela makambo lolenge wana ekoki kosalisa ata soki bankulutu bapesi yo disiplini. Landá ndakisa ya ntoma Petro na esika ya koluka ya kosilika.​—Mos. 7:9.

17, 18. (a) Mituna nini tokoki komituna mpo na mikano na biso ya elimo? (b) Tokoki kosala nini soki tomoni ete ezaleli ya koluka kaka matomba na biso moko ezwi mwa misisa na motema na biso?

17 Okoki mpe kozwa liteya na ndakisa ya ntoma Petro soki olingi komityela mikano ya elimo. Okoki kosala yango soki ozali komonisa ezaleli ya komipimela. Kasi, osengeli kokeba mpo ete mikano yango ezala te mpo okóma na lokumu mingi. Na yango, osengeli komituna boye, ‘Koluka lokumu to bokonzi ekoki kobebisa mposa oyo nazali na yango ya kobongisa to kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova? Makanisi na ngai ezali te lokola oyo ntoma Yakobo mpe Yoane bazalaki na yango ntango basɛngaki Yesu esika ya lokumu?’

18 Soki omoni ete ezaleli ya koluka kaka matomba na yo ebandi kozwa misisa ata mwa moke na motema na yo, sɛngá Yehova asalisa yo osembola makanisi mpe bizaleli na yo; na nsima, salá makasi oluka lokumu ya Yehova kasi te oyo ya yo. (Nz. 86:11) Okoki mpe kolanda mikano oyo ekotinda yo te oyebana mingi. Na ndakisa, okoki komonisa mingi bizaleli mosusu ya mbuma ya elimo oyo omonaka ete ezali mpasi. To soki obongisaka malamu mpenza masolo oyo okosala na makita, kasi okipaka mpenza te misala lokola kosukola Ndako ya Bokonzi, okoki komityela mokano ya kosalela toli oyo ezali na Baroma 12:16.​Tángá.

19. Tosengeli kosala nini mpo tólɛmba nzoto te ntango tozali komitala na talatala ya Liloba ya Nzambe?

19 Ntango tomitali malamumalamu na talatala ya Liloba ya Nzambe mpe tomoni bambeba, na ndakisa ezaleli ya koluka kaka matomba na biso moko, tokoki kolɛmba nzoto. Soki ekómeli yo, kanisá ndakisa ya moto oyo ntoma Yakobo alobelaki. Ntoma Yakobo alobeli mpenza te soki moto yango abongisaki mbala moko to te makambo oyo amonaki to soki azalaki na likoki ya kobongisa bambeba nyonso, kasi alobaki ete moto yango ‘akobaki kotalatala na mobeko ya kokoka.’ (Yak. 1:25) Moto yango akanisaki makambo amonaki na talatala mpe akobaki kobongisa yango. Na yango, kobá komitalela na ndenge ya malamu mpe talelá mabunga na yo na bokatikati. (Tángá Mosakoli 7:20.) Kobá kotalatala na mobeko ya kokoka mpe kobá komonisa ezaleli ya komipimela. Yehova azali na mposa ya kosalisa yo, ndenge asalisá ebele ya bandeko na yo, oyo atako bazali bato ya kozanga kokoka, Nzambe akoki kondima bango mpe apambolaka bango.