Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2014

Yehova azali moninga na biso ya motema

Yehova azali moninga na biso ya motema

“[Abrahama] akómaki kobengama moninga ya Yehova.”​YAK. 2:23.

1. Lokola tokelamá na elilingi ya Nzambe, tozali na likoki nini?

MBALA mingi, bato balobaka ete “mwana alandaka lokolo ya tata to mama na ye.” Mpo na koloba solo, bana mingi bakokanaka mpenza na baboti na bango. Ekoki kozala bongo mpo tata ná mama basangisaka makila na bango mpo mwana abotama. Yehova, Tata na biso ya likoló azali liziba ya bomoi. (Nz. 36:9) Mpe biso, bana na ye awa na mabele, tozali na bizaleli na ye mosusu. Lokola tokelamá na elilingi na ye, tozali na likoki ya kokanisa, kozwa bikateli, kokolisa mpe kobatela boninga.​Eba. 1:26.

2. Nini ekoki kosala ete Yehova akóma moninga na biso?

2 Yehova akoki kozala moninga na biso ya motema. Boninga yango eutaka na bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso mpe mpo tozali na kondima epai na ye mpe Mwana na ye. Yesu alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoa. 3:16) Bandakisa ezali mingi ya bato oyo bazalaki baninga ya Yehova ya motema. Tótalela mibale na yango.

“ABRAHAMA MONINGA NA NGAI”

3, 4. Na likambo etali kosala boninga ná Yehova, monisá bokeseni oyo ezali kati na Abrahama mpe bakitani na ye.

3 Yehova abengaki Abrahama, tata ya mabota mpe nkɔkɔ ya Bayisraele ete azali ‘moninga na ye.’ (Yis. 41:8) Mokanda ya  2 Ntango 20:7 na Biblia haut fleuve, ebengi mpe Abrahama moninga ya Nzambe. Nini esalaki mpenza ete moto wana ya sembo asala boninga makasi elongo na Mozalisi na ye? Ezalaki kondima oyo azalaki na yango.​Eba. 15:6; tángá Yakobo 2:21-23.

4 Na ebandeli, Yehova azalaki Tata mpe moninga ya bakitani ya Abrahama oyo bakómaki ekólo Yisraele. Kasi, likambo ya mawa, babungisaki libaku wana ya kozala baninga ya Nzambe. Mpo na nini? Mpamba te batikaki komonisa kondima na bilaka ya Yehova.

5, 6. (a) Ebandaki boni Yehova akóma moninga na yo? (b) Mituna nini tosengeli kotyela yango likebi?

5 Soki ozali koyekola makambo etali Yehova, kondima mpe bolingo na yo epai na ye ekokóma makasi mpenza. Kanisá naino ntango oyebaki ete Nzambe azali mpenza moto oyo okoki kokóma moninga na ye. Oyebaki mpe ete biso nyonso tobotamá na lisumu mpo Adama azangaki botosi. Oyaki kososola ete bato nyonso bazali mosika na Nzambe. (Kol. 1:21) Na nsima, oyebaki lisusu ete Tata na biso ya bolingo azali te mosika na biso mpe amibanzabanzaka mpo na biso. Ntango toyebaki ete azwaki ebongiseli mpo Yesu apesa bomoi na ye mbeka mpe tomonisaki kondima na ebongiseli yango, tokómaki baninga ya Nzambe.

6 Soki tozongisi makanisi nsima, ekozala malamu tómituna boye: ‘Boninga na ngai ná Nzambe ezali kokola? Kondima na ngai epai na ye ezali makasi, mpe bolingo na ngai epai ya moninga na ngai ya motema Yehova ezali kokola mokolo na mokolo?’ Moto mosusu na ntango ya kala oyo azalaki moninga ya motema ya Yehova ezali Gideone. Tótalela ndakisa na ye kitoko mpe tómona liteya oyo tokoki kozwa.

“YEHOVA AZALI KIMYA”

7-9. (a) Likambo nini ya ntina Gideone amonaki, mpe esukaki ndenge nini? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Ndenge nini tokoki kokóma baninga ya Yehova?

7 Mosambisi Gideone asalelaki Yehova na eleko oyo yikiyiki ezalaki makasi na ekólo Yisraele nsima ya kokɔta na bango na Mokili ya Ndaka. Mokanda ya Basambisi mokapo 6 emonisi ete anzelu ya Yehova ayaki epai ya Gideone na Ofra. Na ntango wana, Bamidiane, oyo bazalaki zingazinga na bango, bazalaki mpenza likama mpo na bango. Mpo na ntina yango, Gideone azalaki te kotutatuta ble na esika ya polele, kasi azalaki kosala yango na ekamwelo ya vinyo, epai akokaki kobomba mbala moko bambuma ya motuya mpenza. Akamwaki ntango anzelu abimelaki ye mpe abengaki ye “moto ya nguya,” Gideone amitunaki soki Yehova, oyo asikolaki Bayisraele na Ezipito akosalisa mpenza bango. Mpo na komonisa ete Yehova, Mozalisi akosalisa Gideone, anzelu yango ayebisaki ye ete Yehova azali mpenza kosunga ye.

8 Gideone amitunaki ndenge nini ekosalema ete ye ‘abikisa mpenza Yisraele na lobɔkɔ ya Midiane.’ Eyano ya polele oyo azwaki emonisaki ete: Yehova alobaki ete “lokola nakozala elongo na yo, okobɛta mpenza Midiane lokola moto moko mpamba.” (Bas. 6:11-16) Na ntembe te, Gideone akobaki komituna soki ekosalema ndenge nini, mpe alukaki elembo. Simbá ete na lisolo oyo, Gideone atyaki ntembe te soki Yehova azalaka to te.

9 Likambo oyo esalemaki na nsima, ekómisaki makasi kondima ya Gideone mpe esalaki ete apusana penepene na Nzambe. Gideone abongisaki mwa elubu mpe apesaki yango anzelu. Ntango biloko ezikaki na ndenge ya kokamwa ntango nzete ya anzelu etutaki yango, Gideone amonaki ete anzelu yango azalaki mpenza momonisi ya Yehova. Lokola akamwaki, Gideone alobaki boye: “Mawa na ngai, Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, mpamba te namoni anzelu ya Yehova na miso!” (Bas. 6:17-22) Ndenge Gideone akutanaki na anzelu etyaki bokabwani kati na Gideone mpe Nzambe na ye? Soki moke te! Kutu makambo oyo esalemaki na nsima emonisaki ete bazalaki na boyokani malamu. Gideone amiyokaki mpenza ete azali na kimya ná Nzambe. Toyebi yango na nkombo oyo apesaki etumbelo oyo  atongaki na esika yango. Apesaki etumbelo yango nkombo “Yehova-Shalome.” Nkombo yango elimboli “Yehova azali kimya.” (Tángá Basambisi 6:23, 24.) Ntango tozali kokanisa na makambo oyo Yehova asalaka mpo na biso mokolo na mokolo, tomonaka mpenza ete azali moninga ya motema. Kobondela Nzambe mbala na mbala ekosala ete kimya na biso ekóma mingi mpe boyokani na biso ná ye ekokóma makasi.

NANI ‘AKOYAMBAMA NA HEMA NA YO’?

10. Na kotalela mokanda ya Nzembo 15:3, 5, Yehova asɛngi biso nini soki tolingi kozala baninga na ye?

10 Mpo Yehova azala moninga na biso, tosengeli kokokisa mwa masɛngami. Ndenge mokanda ya Nzembo mokapo 15 emonisi yango, Davidi alobelaki makambo oyo tosengeli kosala mpo ‘tóyambama na hema ya Yehova,’ elingi koloba mpo tózala baninga ya Nzambe. (Nz. 15:1) Na kati ya masɛngami yango, tótalela mibale oyo: koboya kokosela bato makambo mpe kozala sembo na makambo nyonso. Mpo na makambo yango, Davidi alobaki mpo na moto oyo asengeli koyambama na hema ya Yehova boye: “Akoseli bato makambo na lolemo na ye te. . . . Azwi kanyaka te mpo na kokweisa moto oyo asali likambo te.”​Nz. 15:3, 5.

11. Mpo na nini tosengeli koboya kokosela bato makambo?

11 Davidi apesi likebisi oyo na mokapo mosusu ya Nzembo: “Batelá lolemo na yo eloba makambo ya mabe te.” (Nz. 34:13) Kozanga kotosa toli wana ya Makomami ekoki kotya bokabwani kati na biso ná Yehova, tata na biso ya sembo. Kutu, kokosela bato makambo ezali mpenza ezaleli ya Satana, monguna monene ya Yehova. Liloba “Zabolo” euti na liloba ya Grɛki oyo elimboli “mokosi.” Soki tozali kokeba na maloba oyo tolobaka mpo na basusu, yango ekosalisa biso tózala ntango nyonso baninga ya Yehova. Tosengeli mpe kokeba ete tómonisa te ezaleli yango epai ya bankulutu ya lisangá.​Tángá Baebre 13:17; Yuda 8.

12, 13. (a) Mpo na nini tosengeli kozala sembo na makambo nyonso? (b) Soki bato bazali komona ete tozali sembo, bakoloba nini?

12 Basaleli ya Yehova bayebani lokola bato ya sembo, kasi te lokola bato oyo balyelaka baninga. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bóbondelaka mpo na biso, mpo tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo, mpo tolingi kozala sembo na makambo nyonso.” (Ebr. 13:18) Lokola tozali na ekateli ya “kozala sembo na makambo nyonso,” toboyaka kolyela bandeko na biso bakristo. Na ndakisa, soki bazali kosala epai na biso, tosengeli kosalelaka bango makambo ndenge esengeli mpe kofutaka bango na ndenge oyo toyokanaki. Biso bakristo, tosengeli kozalaka sembo epai ya bato oyo basalaka epai na biso mpe epai ya bato nyonso. Soki patrɔ na biso azali Motatoli ya Yehova, tokosala angɛlɛ ete tosɛngaka ye te asalelaka biso makambo koleka basali mosusu.

13 Mbala mingi toyokaka ndenge bato ya mokili oyo basalaka ná Batatoli ya Yehova bakumisaka bango. Na ndakisa, mokonzi ya ebongiseli moko amonaki ete Batatoli ya Yehova bakokisaka maloba na bango. Alobaki ete: “Soki bayokani ná baninga likambo, babongolaka te maloba na bango.” (Nz. 15:4) Ezaleli yango esalisaka biso tózala ntango nyonso baninga ya Yehova. Kutu, epesaka tata na biso ya likoló nkembo.

SALISÁ BASUSU BÁKÓMA BANINGA YA YEHOVA

Tosalisaka basusu bákóma baninga ya Yehova (Talá paragrafe 14, 15)

14, 15. Na mosala ya kosakola, ndenge nini tokoki kosalisa basusu bákóma baninga ya Yehova?

14 Atako ebele ya bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola bakoki kondima ete Nzambe azali, kasi bamonaka ye te ete azali moninga na bango ya motema. Ndenge nini tokoki kosalisa bango? Tótalela malako oyo Yesu apesaki bayekoli na ye 70 ntango atindaki bango mibalemibale mpo na kosakola. Alobaki na bango boye: “Esika nyonso bokokɔta na ndako bóloba libosoliboso ete: ‘Kimya ezala na ndako oyo.’ Mpe  soki moninga ya kimya azali wana, kimya na bino ekofanda likoló na ye. Kasi soki azali te, yango ekozongela bino.” (Luka 10:5, 6) Tokoki kobenda bato na solo soki tozali kosolola na bango na boboto. Yango ekoki kosalisa batɛmɛli bátika kosalela biso makambo ya mabe mpe ekofungola nzela ete bato yango báyamba biso malamu mbala ya nsima.

15 Ntango tokutani na bato oyo bapiká mpenza misisa na losambo ya lokuta to oyo balandaka mimeseno oyo Biblia eboyi, tosengeli kokoba kosalela bango makambo na boboto mpe na kimya. Tosengeli koyamba na esengo na makita na biso baoyo nyonso bazali na mposa makasi ya koyekola makambo mingi oyo etali Nzambe oyo biso tosambelaka mpo bazali kotungisama na makambo ya mpasi ya mokili oyo. Masolo oyo ebimaka na motó ya likambo oyo elobi “Biblia ebongolaka bato” epesaka biso bandakisa mingi ya kitoko.

TÓSALA ELONGO NA MONINGA NA BISO YA MOTEMA

16. Na ndenge nini tokoki kozala baninga mpe bato oyo bazali “kosala elongo” na Yehova?

16 Mbala mingi, bato oyo basalaka elongo bákómaka baninga ya motema. Bato nyonso oyo bamipesá na Yehova, bazali na libaku ya kozala baninga mpe bato oyo bazali “kosala elongo” na ye. (Tángá 1 Bakorinti 3:9.) Ya solo, ntango tobimaka na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, tomonaka mpenza bizaleli minene ya tata na biso ya likoló. Tomonaka ndenge elimo santu na ye esalisaka biso tókokisa etinda na biso ya kosakola nsango malamu.

17. Na ndenge nini mayangani na biso emonisaka ete Yehova azali moninga na biso?

17 Soki tozali komipesa mingi na mosala ya kokómisa bato bayekoli, tokobanda mpenza komiyoka ete tozali penepene na Yehova. Na ndakisa, tokomona ndenge Yehova apɛngolaka myango mabe ya banguna. Meká naino kozongisa makanisi na boumeli ya mwa bambula oyo eleki. Tomonaki te polele ndenge Nzambe azali kotambwisa biso? Tokamwaka ndenge ebele ya mikanda ebimaka ntango nyonso. Mayangani na biso emonisaka ete Tata na biso ya bolingo ayebaka mikakatano mpe bamposa na biso. Mpo na komonisa botɔndi na bango mpo na liyangani moko oyo esalemaki, libota moko ekomaki boye: “Mateya na yango esimbaki mpenza mitema na biso. Tomonaki mpenza ete Yehova alingaka mokomoko na biso mpe alingi ete tólonga.” Nsima ya kokɔta liyangani ya mokolo moko oyo esalemaki na Irlande, mobali moko ná mwasi na ye oyo bautaki na Allemagne, bamonisaki botɔndi na ndenge oyo bayambaki bango na esengo mpe bamibanzabanzaki mpo na bango. Babakisi boye: “Tozali kopesa matɔndi mingi epai ya Yehova mpe Mokonzi oyo ye atye Yesu Kristo. Babengaki biso mpo tózala na kati ya ekólo oyo ezali na bomoko mpenza. Tolobelaka te kaka bomoko na monɔkɔ, kasi tomonaka yango mpenza na misala mokolo na mokolo. Makambo oyo tomonaki na liyangani ya mokolo  moko na Dublin, ekokoba kokundwela biso libaku kitoko mpenza oyo tozali na yango ya kosalela Nzambe na biso Monene elongo na bino nyonso.”

BANINGA BASOLOLAKA

18. Na likambo etali kosolola na Yehova, tosengeli komituna mituna nini?

18 Boninga ekómaka makasi soki bato basololaka malamu. Kosolola mpe kotindelana mikanda na nzela ya Internet ekómi mingi na eleko oyo makambo ya baordinatɛrɛ ekoli makasi. Kasi, mbala boni tosololaka na Yehova, moninga na biso ya motema? Ya solo, azali “Moyoki ya libondeli.” (Nz. 65:2) Kasi mbala boni tozwaka ntango mpo na kosolola na ye?

19. Nini ekosalisa biso ntango tozali kokoka te koyebisa Yehova ndenge mpenza tozali koyoka na kati ya motema?

19 Basaleli mosusu ya Nzambe bazalaka na mokakatano ya kofungola mitema na bango mpe komonisa ndenge bazali koyoka. Nzokande, Yehova alingaka ete tófungolela ye motema ntango tozali kobondela. (Nz. 119:145; Bil. 3:41) Ata soki tozali na mokakatano mpo na kolobela ndenge tozali koyoka, lisalisi ezali. Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Roma ete: “Eloko oyo tosengeli kobondela mpo na yango ndenge mposa na biso ezali toyebaka te, kasi elimo yango moko elobelaka biso ntango tozali kokimela, atako maloba ezali kobima te. Nzokande moto oyo atalaka mitema ayebaka oyo elimo ezali koluka, mpo yango ezali kolobela basantu na kolanda mokano ya Nzambe.” (Rom. 8:26, 27) Soki tozali komanyola na maloba oyo ezali na mikanda lokola Yobo, Nzembo mpe Masese, yango ekosalisa biso tóyebisa Yehova ndenge mpenza tozali koyoka.

20, 21. Maloba nini ya kobɔndisa ezali na mokanda ya Bafilipi 4:6, 7?

20 Soki tokutani na mikakatano, tosengeli kolanda toli oyo ntoma Paulo apesaki Bafilipi ete: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.” Kosolola polele ndenge wana ná moninga na biso ya motema ekobɔndisa mpenza biso, mpo ntoma Paulo abakisaki ete: “Kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.” (Flp. 4:6, 7) Tosengeli ntango nyonso kosepela na “kimya ya Nzambe,” oyo eleki nyonso, oyo ebatelaka mpenza mitema na biso mpe makanisi na biso.

Ndenge nini libondeli ekómisaka makasi boninga na biso ná Nzambe? (Talá paragrafe 21)

21 Libondeli esalisaka biso tókolisa mpenza boninga ná Yehova. Mpo na yango, ‘tóbondelaka ntango nyonso.’ (1 Tes. 5:17) Tiká ete boyekoli oyo esalisa biso tókolisa boninga na biso ná Nzambe mpe ekateli na biso ya kokokisa masɛngami na ye ya sembo. Mpe tiká ete tozwaka ntango ya kokanisa na mozindo na mapamboli oyo tozali kozwa mpo Yehova azali mpenza Tata na biso, Nzambe na biso mpe Moninga na biso.