Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2014

Yehova azali Mosungi mpe Mobateli na biso

Yehova azali Mosungi mpe Mobateli na biso

“Lokola alingaka ngai mingi, ngai mpe nakobikisa ye. Nakobatela ye mpo ayebi nkombo na ngai.”NZ. 91:14.

1, 2. Bokeseni nini tozali na yango na likambo etali mabota mpe ndenge toyebaki solo?

YEHOVA nde abandisá ebongiseli ya libota. (Ef. 3:14, 15) Ata soki tozali bato ya libota moko, tokoki kozala na bizaleli ndenge moko te mpe tokutanaka na makambo ndenge moko te. Ntango mosusu ofandá ná baboti na yo kobanda bomwana tii ntango okómi mokóló. Ekoki kozala ete basusu baboti na bango bakufá mbala mosusu mpo na maladi, aksida to makama mosusu. Kutu basusu bayebaka te baboti na bango.

2 Biso mpe oyo tozali na libota ya basambeli ya Yehova, toyebaki Yehova ndenge moko te. Ekoki kozala ete ‘obotamaki na kati ya solo,’ ndenge bato mosusu balobaka, mpe baboti na yo bateyaki yo mitinda ya Nzambe. (Mib. 6:6, 7) Mbala mosusu ozali na kati ya bankóto ya bato oyo bayebaki solo na nzela ya mosala ya kosakola epai ya basaleli mosusu ya Yehova.Rom. 10:13-15; 1 Tim. 2:3, 4.

3. Na makambo nini tokokani ná basusu?

3 Longola makambo oyo touti kolobela, biso nyonso tozali na mwa makambo oyo ekoki kosala ete tókokana na basusu na likambo boye to boye. Tonyokwamaka mpo na kozanga botosi ya Adama mpe tosangolá ezaleli ya kozanga kokoka, lisumu mpe liwa. (Rom. 5:12) Atako bongo, lokola tozali basambeli ya solo, tokoki mpenza kobenga Yehova “Tata na biso.” Mpo na kolobela basaleli  ya Nzambe ya ntango ya Kala, Yisaya 64:8 elobi boye: “Ee Yehova, yo nde Tata na biso.” Lisusu, na libondeli ya ndakisa, Yesu abandaki yango na maloba oyo: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.”Mat. 6:9.

4, 5. Wana tozali koluka koyeba soki boyokani na biso ná Yehova ezali makasi to te, ekozala malamu tótalela likambo nini?

4 Lokola tobelelaka nkombo na ye na kondima, tata na biso ya likoló asungaka mpe abatelaka biso. Na ntina na Yehova, mokomi moko ya nzembo akomaki boye: “Lokola [mosambeli ya solo] alingaka ngai mingi, ngai mpe nakobikisa ye. Nakobatela ye mpo ayebi nkombo na ngai.” (Nz. 91:14) Ya solo, lokola tozali bato ya Yehova Nzambe, na bolingo nyonso, abatelaka biso na banguna mpo tósila te.

5 Mpo boyokani na biso ná Tata na biso ya likoló ekóma makasi, tótalela makambo misato ya ntina: (1) Tata na biso azali Mosungi na biso. (2) Yehova azali Mobateli na biso. (3) Mpe azali Moninga na biso ya motema. Wana tozali kotalela makambo yango, ekozala malamu tókanisa na mozindo na boyokani na biso ná Nzambe mpe tóluka koyeba lolenge oyo tokoki kokumisa ye lokola azali tata na biso. Ekozala mpe malamu kokanisa na mapamboli oyo Yehova apesaki bato oyo bapusanaki penepene na ye.Yak. 4:8.

YEHOVA AZALI MOSUNGI MONENE

6. Wapi lolenge moko oyo Yehova amonisaka ete azali Mopesi ya “likabo nyonso ya malamu”?

6 Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló, mpo eutaka na Tata ya miinda ya likoló.” (Yak. 1:17) Bomoi ezali likabo kitoko oyo Yehova apesá. (Nz. 36:9) Soki tozali kosalela bomoi na biso mpo na kosala mokano ya Nzambe, tokozwa matomba beboo banda sikoyo mpe tokozala na elikya ya bomoi ya seko na mokili ya sika. (Mas. 10:22; 2 Pet. 3:13) Kasi soki totali bampasi oyo kozanga botosi ya Adama ebimisá, ndenge nini makambo oyo nyonso ekosalema?

7. Ebongiseli nini Nzambe azwaki mpo tókóma na boyokani malamu ná ye?

7 Ya solo, Yehova azali Mosungi Monene, mpe tokokoka te kotánga makambo oyo asungaka biso. Na ndakisa, boboto monene na ye ebatelaka biso. Biso nyonso tozali bato ya masumu mpe tosangolá ezaleli ya kozanga kokoka epai ya tata na biso ya liboso. (Rom. 3:23) Atako bongo, na bolingo na ye, Yehova azwaki ebongiseli mpo na kopesa biso likoki ya kozala na boyokani malamu ná ye. Ntoma Yoane akomaki boye: “Na likambo oyo nde bolingo ya Nzambe emonisamaki polele mpo na biso, mpamba te Nzambe atindaki na mokili Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye. Bolingo, na likambo oyo, ezali te ete biso tolingaki Nzambe, kasi nde ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye azala mbeka mpo na kozipa masumu na biso.”1 Yoa. 4:9, 10.

8, 9. Ndenge nini Yehova amonisaki ete azali Mosungi Monene na ntango ya Abrahama mpe Yisaka? (Talá elilingi ya ebandeli.)

8 Na siɛklɛ ya 19 L.T.B., likambo moko esalemaki oyo ezalaki mpe esakweli, emonisaki polele ebongiseli ya bolingo oyo Yehova azwaki mpo bato ya botosi bázwa bomoi ya seko. Mokanda ya Baebre 11:17-19 elobi boye: “Na kondima Abrahama, ntango amekamaki, tokoki koloba ete akabaki Yisaka mbeka, mpe moto wana oyo azwaki bilaka na esengo alingaki kokaba mbeka mwana na ye se moko oyo abotamaki, atako elobamaki epai na ye ete: ‘Oyo ekobengama “momboto na yo” ekoya na nzela ya Yisaka.’ Kasi atalelaki Nzambe ete akokaki kolamwisa ye ata uta na bakufi; mpe uta na liwa azwaki ye lisusu na ndenge ya elilingi.” Ezali mpenza mpasi te mpo na koyeba soki likambo yango ekokanaki na nini. Yehova apesaki mwana na ye, Yesu Kristo mbeka mpo na kobikisa bato ya mokili mobimba.Tángá Yoane 3:16, 36.

9 Yisaka ayokaki mpenza esengo ntango ayaki koyeba ete akokufa te! Na ntembe te, azalaki na botɔndi na ebongiseli oyo Yehova  azwaki mpo ete mpate-mobali moko oyo ekangamaki na mwa banzete oyo ezalaki pembeni wana epesama mbeka na esika na ye. (Eba. 22:10-13) Yango wana tokokamwa te soki babengaki esika yango “Yehova-yire,” oyo elimboli ‘Yehova akopesa.’Eba. 22:14.

EBONGISELI MPO NA KOZONGISA BOYOKANI

10, 11. Banani bazwaki mokumba ya kotambwisa “mosala ya kozongisa na boyokani,” mpe ndenge nini basalaki yango?

10 Soki tozali kokanisa na ndenge Yehova amonisaka ete azali Mosungi Monene, na botɔndi nyonso tokoyeba mokumba ya ntina mingi oyo Yesu Kristo akokisaki ndenge kaka ntoma Paulo amonisaki yango ntango akomaki: “Oyo tomoni yango oyo: ete moto moko akufelaki bato nyonso; bongo, na ndenge yango, bato nyonso bakufaki; mpe akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe alamwisamaki.”2 Ko. 5:14, 15.

11 Lokola bazalaki kolinga Nzambe mpe bazalaki na botɔndi mpo na libaku malamu oyo bazalaki na yango ya kosalela ye, bakristo ya siɛklɛ ya liboso bandimaki na esengo mpenza “mosala ya kozongisa na boyokani.” Mosala na bango ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli epesaki bato ya mitema sembo libaku ya kokóma na kimya ná Nzambe, kokóma baninga na ye, mpe nsukansuka kokóma bana na ye ya elimo. Lelo oyo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo basalaka kaka mosala yango. Mosala oyo bazali kosala to kokokisa lokola bantoma to baambasadɛrɛ mpo na Nzambe mpe Kristo ezali kosala ete bato ya mitema sembo bápusana penepene na Yehova mpe bákóma bandimi.Tángá 2 Bakorinti 5:18-20; Yoa. 6:44; Mis. 13:48.

12, 13. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kosepela na ebele ya bibongiseli oyo Yehova azwaka?

12 Mpo na komonisa botɔndi na bango epai ya Yehova Mosungi Monene, bakristo nyonso oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele, bazali kosala mosala ya kosakola elongo na bakristo oyo batyami mafuta. Na mosala yango, tosalelaka Biblia oyo ezali mpe na kati ya bibongiseli kitoko oyo Nzambe azwá. (2 Tim. 3:16, 17) Soki tozali kosalela Liloba ya Nzambe malamumalamu na mosala ya kosakola, tozali kopesa basusu libaku ya kozwa bomoi ya seko. Mpo na kosalisa biso na mosala yango, mokomoko na biso asengeli kotya motema na ebongiseli mosusu oyo Yehova azwá: elimo santu na ye. (Zek. 4:6; Luka 11:13) Ndenge buku na biso Annuaire emonisaka yango mbula na mbula, matomba ezali mpenza komonana. Oyo nde lokumu tozali na yango ya kopesa mabɔkɔ na mosala yango oyo ezali kosanzola Tata mpe Mosungi na biso!

13 Na kotalela nyonso oyo Nzambe asalá, ekozala malamu tómituna boye: ‘Nazali kosala nyonso oyo nakoki na mosala ya kosakola mpo na komonisa botɔndi mingi na bibongiseli oyo azwá? Makambo nini nakoki kobongisa mpo nakóma mosakoli ya nsango malamu oyo abongi?’ Tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na bibongiseli kitoko oyo Nzambe azwá soki tozali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso. Soki tosali bongo, Yehova akozanga te kokokisa bamposa na biso. (Mat. 6:25-33) Lokola Nzambe alingaka biso, na ntembe te tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosepelisa motema na ye.Mas. 27:11.

14. Ndenge nini Yehova azalaka Mobikisi mpo na bato na ye?

14 Davidi moko ya bakomi ya nzembo ayembaki boye: “Ngai nazali moto ya mpasi mpe mobola. Yehova ye moko azali kotyela ngai likebi. Yo ozali mosungi na ngai mpe mobikisi na ngai.” (Nz. 40:17) Mbala na mbala, Yehova abikisaka basaleli na ye, mingimingi ntango banguna na bango banyokolaka bango mpenza to batumolaka bango. Tozalaka mpenza na botɔndi na ndenge Nzambe asungaka biso na ntango wana mpe mpo na ebele ya bibongiseli ya elimo oyo azwaka ntango nyonso mpo na biso!

 YEHOVA ABATELAKA

15. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo tata ya bolingo asalaka mpo na kobatela mwana na ye.

15 Tata ya bolingo asukaka kaka te na kosunga bana na ye, kasi alukaka mpe kobatela bango. Asalaka nyonso mpo na kobikisa bango soki bazali na likama. Ndeko mobali moko abosanaka te likambo moko oyo esalemaki ntango azalaki naino mwana. Ye ná tata na ye bazalaki na mosala ya kosakola. Na kozonga na bango, basengelaki kokatisa mwa mai. Lokola mbula makasi ebɛtaki na ntɔngɔ, mwa mai yango etondaki. Mpo na kokatisa, esengelaki kotambola likoló ya mabanga. Lokola azalaki liboso ya tata na ye, makolo ya mwana yango eselumwaki mpe akweaki na mai mpe abandaki kozinda. Mwana yango azalaki mpenza na botɔndi ntango tata na ye ayaki mbangu, akangaki ye makasi na lipeka mpo azinda te! Tata na biso ya likoló abikisaka biso na makambo oyo ekoki komonana lokola mipɛpɛ makasi ya mokili mabe oyo mpe ya moyangeli na yango Satana. Ya solo, atako babateli bakoki kozala, Yehova azali Mobateli oyo aleki babateli nyonso.Mat. 6:13; 1 Yoa. 5:19.

16, 17. Ndenge nini Yehova asalisaki mpe abatelaki Bayisraele ntango babundaki na Baamaleke?

16 Libateli ya bolingo ya Yehova emonanaki polele nsima ya kobikisa Bayisraele na boombo ya Ezipito mpe kobatela bango na ndenge ya kokamwa ntango bakatisaki Mbu motane na mobu 1513 L.T.B. Nsima ya kotambolatambola na esobe mpo na kokóma na Ngomba Sinai, Bayisraele bakómaki na Refidime.

17 Na kotalela esakweli oyo Nzambe apesaki, oyo ezali na mokanda ya Ebandeli 3:15, ekoki kozala ete Satana azalaki na nkanda mpe azalaki koluka libaku ya kobundisa Bayisraele, bato oyo bazalaki makasi te. Satana amonisaki nkanda yango na ndenge asalelaki Baamaleke, oyo bazalaki banguna ya basaleli ya Nzambe mpo na kobundisa bango. (Mit. 24:20) Tótala makambo oyo Yehova akokisaki na nzela ya bato ya sembo lokola  Yosua, Moize, Arona mpe Hure. Ntango Yosua abundisaki Baamaleke, Moize, Arona mpe Hure batɛlɛmaki na ngomba moko oyo ezalaki pembeni wana. Bayisraele bazalaki kolonga etumba ntango Moize azalaki kotombola mabɔkɔ na ye. Ntango mabɔkɔ na ye ezalaki kokóma kilo, Arona ná Hure bazalaki kosimba yango. Na yango, na lisalisi mpe libateli ya Yehova, “Yosua alongaki Amaleke ná bato na ye.” (Kob. 17:8-13) Moize atongaki etumbelo na esika yango, mpe apesaki yango nkombo “Yehova-nisi,” oyo elimboli “Yehova azali esika na ngai ya komibomba.”Tángá Kobima 17:14, 15.

ABATELAKA BISO NA MITAMBO YA SATANA

18, 19. Ndenge nini Nzambe abatelaki basaleli na ye na mikolo na biso?

18 Yehova abatelaka baoyo balingaka ye mpe batosaka ye. Ndenge moko na Bayisraele ntango bazalaki na Refidime, biso mpe tolukaka libateli epai ya Nzambe ntango banguna balingi kosala biso mabe. Yehova abatelaka biso na mitambo ya Zabolo. Kanisá na mabaku ebele oyo Nzambe abatelaki bandeko na biso oyo baboyaki kokɔta na makambo ya Banazi; na ndakisa, na Allemagne mpe na bikólo mosusu na bambula 1930 mpe na ebandeli ya bambula 1940. Kotánga mpe kokanisa na masolo ya bomoi mpe masolo mosusu oyo ebimaka na buku na biso Annuaire oyo elobelaka ndenge Nzambe abatelaka bandeko na biso na ntango ya minyoko, ekotinda biso tóndima lisusu mpenzampenza ete Yehova azali Mobateli na biso.Nz. 91:2.

Yehova akoki kosalela bandeko na biso bakristo básalisa biso tótikala sembo na ntango ya minyoko (Talá paragrafe 18-20)

19 Na nzela ya ebongiseli ya Yehova mpe mikanda oyo ebimisaka, bakundwelaka biso na bolingo nyonso makambo mpo na kobatela biso. Okoki kotala matomba oyo yango ebimisi na boumeli ya mikolo oyo euti koleka. Atako mokili oyo ezali se kozinda na makambo ya mbindo mpe pornografi, Yehova azali kopesa biso malako mpe lisalisi na ntango oyo ebongi mpo na kokebisa biso na makambo oyo ekoki komema biso na bizaleli ya mbindo. Na ndakisa, ndenge tata ya bolingo asalaka, tozwaka toli oyo ekoki kosalisa biso tózwa te baninga mabe na nzela ya Internet. *1 Ko. 15:33.

20. Libateli mpe batoli nini tozwaka na lisangá?

20 Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali mpenza “bato oyo Yehova ateyi”? Soki tozali kolanda mibeko na ye na likebi nyonso. (Yis. 54:13) Na kati ya masangá na biso, esika oyo ebongi mpo na kobatelama, tozwaka batoli mpe libateli oyo ebongi, mpo kuna, bankulutu, mibali ya sembo bapesaka biso toli na nzela ya Makomami. (Gal. 6:1) ‘Makabo wana oyo ezali bato’ emonisaka ete Yehova atyelaka biso likebi. (Ef. 4:7, 8) Biso tosengeli komonisa ezaleli nini? Nzambe akopambola biso soki tozali komemya mpe kotosa bango.Ebr. 13:17.

21. (a) Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

21 Tiká ete tózala na ekateli ya kotambwisama na elimo santu mpe na ndenge yango, tokomitika ete Tata na biso ya likoló atambwisa biso. Tosengeli mpe kokanisa na bomoi ya Mwana na ye Yesu Kristo, mpe kosala makasi tólanda ndakisa na ye kitoko. Lokola Yesu amonisaki botosi tii ata ntango alingaki kokufa, azwaki mapamboli. (Flp. 2:5-11) Ndenge moko, biso mpe tokozwa mapamboli soki totyeli Yehova motema na biso mobimba. (Mas. 3:5, 6) Na yango, totalelaka ntango nyonso Yehova ete azali Mosungi mpe Mobateli oyo aleki nyonso. Oyo nde esengo mpe libaku malamu tozali na yango ya kosalela ye! Bolingo na biso mpo na ye ekokóma makasi soki tozali kokanisa na likambo ya misato oyo emonisi ete Tata na biso Yehova alingaka biso: alingaka tózala baninga na ye. Lisolo oyo elandi ekomonisa na nini Yehova azali moninga na biso ya motema.

^ par. 19 Okoki kozwa batoli ya ndenge wana na masolo, “Yebá kosalela Internet na ndenge ya malamu” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/08/2011, nkasa 3-5 mpe “Tókeba na mitambo ya Zabolo” mpe “Tótɛlɛma ngwi mpe tókima mitambo ya Satana!” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/08/2012, nkasa 20-29.