Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2014

Sepelá na libala ya Mwana-Mpate!

Sepelá na libala ya Mwana-Mpate!

“Tósepela mpe tótonda na esengo monene, . . . mpo fɛti ya libala ya Mwana-Mpate ekómi.”EM. 19:7.

1, 2. (a) Libala ya nani ekopesa esengo mingi na likoló? (b) Yango ebimisi mituna nini?

ESƐNGAKA ntango mingi mpo na kobongisa libala. Kasi tokolobela libala moko ya ntina mingi, libala ya mokonzi moko. Kanisá naino! Eleki sikoyo mbula soki 2 000 banda ntango oyo ebandaki kobongisama. Sikoyo ntango epusani mpenza mpo mobali ya libala azala esika moko ná mwasi na ye. Mosika te, miziki ya kitoko ekobanda kobɛta na lopango ya mokonzi mpe ebele mpenza ya bikelamu ya elimo bakoyemba na mongongo makasi ete: “Bósanzola Yah, mpo Yehova Nzambe na biso, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, abandi koyangela. Tósepela mpe tótonda na esengo monene, mpe tókumisa ye, mpo fɛti ya libala ya Mwana-Mpate ekómi mpe mwasi na ye amilɛngɛli.”Em. 19:6, 7.

2 “Mwana-Mpate” oyo libala na ye ekozala esengo na likoló ezali moto mosusu te kasi Yesu Kristo. (Yoa. 1:29) Bilamba nini alati mpo na libala yango? Mwasi na ye nani? Ndenge nini mwasi yango amibongisi mpo na libala? Libala yango ekosalema ntango nini? Lokola libala yango ekopesa esengo mingi na likoló, baoyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabele libela na libela, bakosangana mpe na esengo yango? Tozali na mposa makasi ya kozwa biyano na mituna yango wana tozali kokoba kotalela Nzembo 45.

 ‘BILAMBA NA YE EZALI NA NSOLO YA MALASI’

3, 4. (a) Mobali ya libala alati bilamba ya ndenge nini na libala na ye, mpe nini ebakisi esengo na ye? (b) “Bana basi ya bakonzi” mpe “Mwasi ya mokonzi” oyo basepeli elongo na mobali ya libala ezali banani?

3 Tángá Nzembo 45:8, 9. Yesu Kristo, mobali ya libala, alati bilamba na ye ya lokumu mpe ya bokonzi mpo na libala. Emonani ete bilamba na ye ezali kobimisa nsolo kitoko lokola “malasi ya kitoko koleka,” na ndakisa mire mpe kasia oyo ezalaki na kati ya biloko oyo bazalaki kosangisa mpo na kosala mafuta mosantu oyo bazalaki kotya bato oyo Nzambe aponaki na Yisraele.Kob. 30:23-25.

4 Miziki oyo ezali kobɛta na likoló, oyo ezali koyokana na lopango mobimba ya mokonzi, ebakiseli lisusu mobali ya libala esengo lokola libala na ye ekómi pene. “Mwasi ya mokonzi,” oyo elimboli eteni ya ebongiseli ya Nzambe na likoló, oyo esangisi mpe “bana basi ya bakonzi” to baanzelu basantu basepeli elongo na ye. Ezali mpenza esengo koyoka mingongo wana ya likoló ezali koloba: “Tósepela mpe tótonda na esengo monene, . . . mpo fɛti ya libala ya Mwana-Mpate ekómi”!

MWASI YA LIBALA AMILƐNGƐLI MPO NA LIBALA

5. “Mwasi ya Mwana-Mpate” ezali nani?

5 Tángá Nzembo 45:10, 11. Toyebi mobali ya libala, kasi mwasi na ye azali nani? Ezali te mwasi lokola basi nyonso. Ezali nde komonisa etuluku mobimba ya bakristo 144000, oyo batyami mafuta na elimo. Yesu azali kotambwisa lisangá yango ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Tángá Baefese 5:23, 24.) Bakokóma bakonzi elongo na Kristo na Bokonzi ya Masiya. (Luka 12:32) Bakristo yango 144 000 oyo batyami mafuta na elimo “bazali kokoba kolanda Mwana-Mpate epai nyonso oyo azali kokende.” (Em. 14:1-4) Bakokóma “mwasi ya Mwana-Mpate” mpe bakofanda elongo na ye kuna na likoló.Em. 21:9; Yoa. 14:2, 3.

6. Mpo na nini Biblia ebengi bakristo oyo batyami mafuta “mwana mwasi ya mokonzi,” mpe mpo na nini esɛngi bango ‘bábosana bato na bango’?

6 Mwasi yango ya libala abengami kaka te “Mwana mwasi” kasi abengami mpe “Mwana mwasi ya mokonzi.” (Nz. 45:13) “Mokonzi” yango ezali nani? Yehova andimaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo lokola “bana” na ye. (Rom. 8:15-17) Lokola bakristo yango bakokóma mwasi ya libala na likoló, bazwi mitindo ete ‘bábosana bato na bango mpe ndako ya tata na bango [ya mosuni].’ Basengeli kokoba ‘kotya makanisi na bango na makambo ya likoló kasi na makambo ya mabele te.’Kol. 3:1-4.

7. (a) Ndenge nini Kristo azalaki kobongisa mwasi oyo akobala? (b) Ndenge nini mwasi ya libala atalelaka mobali oyo akobala?

7 Esili koleka bankama ya bambula kobanda ntango oyo Kristo abandaki kobongisa mwasi na ye mpo na fɛti ya libala na likoló. Ntoma Paulo alobaki ete kristo “alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango, mpo akoka kosantisa yango, kopɛtola yango mpe kosukola yango na mai na nzela ya liloba, mpo akoka kobimisa lisangá epai na ye moko na kitoko na yango, na litɔnɔ te, na lisusa te to na eloko moko te ya ndenge wana, kasi ezala nde mosantu mpe ezanga mbeba.” (Ef. 5:25-27) Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya Korinti oyo batyamaki mafuta ete: “Nazali koyokela bino zuwa, zuwa oyo eyokani na mokano ya Nzambe, mpo ngai mpenza nalakaki kobalisa bino na mobali kaka moko, mpo nabimisa bino lokola ngɔndɔ moko ya pɛto epai ya Kristo.” (2 Ko. 11:2) Yesu Kristo Mokonzi mpe mobali ya libala asepelaka na “kitoko” ya elimo ya mwasi oyo akobala. Mpe mwasi ya libala ayebaka ete Yesu azali “nkolo” na ye mpe ‘agumbamelaka ye’ mpo azali mobali oyo akobala.

‘BAYEI NA MWASI YANGO EPAI YA MOKONZI’

8. Mpo na nini ebongi mpenza koloba ete mwasi ya libala azali na “nkembo mingi”?

8 Tángá Nzembo 45:13, 14a. Mwasi ya libala azali na “nkembo mingi” mpo na  fɛti ya libala ya mokonzi. Emoniseli 21:2, ekokanisi mwasi yango na engumba moko, Yerusaleme ya Sika, mpe “abongisi nzoto mpo na mobali na ye.” Engumba yango ya likoló ezali na “nkembo ya Nzambe” mpe ezali kongɛnga “lokola libanga ya ntalo koleka, lokola libanga ya jasipe oyo ezali kongɛngangɛnga lokola kristale.” (Em. 21:10, 11) Bonzenga ya Yerusaleme ya Sika elobelami malamumalamu na mokanda ya Emoniseli. (Em. 21:18-21) Tokokamwa te soki mokomi ya nzembo alobi ete mwasi yango azali na “nkembo mingi”! Mpo, fɛti ya libala ya mokonzi ekosalema na likoló.

9. “Mokonzi” oyo mwasi ya libala ayei epai na ye ezali nani, mpe mwasi yango alati ndenge nini?

9 Mobali ya libala oyo mwasi ya libala ayei epai na ye ezali Mokonzi Masiya. Abandaki kobongisa ye mpe ‘kopɛtola ye mpe kosukola ye na mai na nzela ya liloba.’ Azali ‘mosantu mpe azangi mbeba.’ (Ef. 5:26, 27) Ebongi mpenza ete mwasi na ye alata bilamba oyo ebongi mpo na fɛti yango. Na ntembe te, alati bongo! Mpo, “bilamba na ye etyami biloko ya wolo,” mpe “bakoya na ye epai ya mokonzi na molato oyo elitamá.” Mpo na libala ya Mwana-Mpate, “bapesi ye nzela alata lini ya kitoko, ya ngɛlingɛli, ya pɛto, mpo lini ya kitoko elakisi misala ya boyengebene ya basantu.”Em. 19:8.

‘FƐTI YA LIBALA EKÓMI’

10. Ntango nini libala ya Mwana-Mpate esengeli mpenza kosalema?

10 Tángá Emoniseli 19:7. Ntango nini libala ya Mwana-Mpate esengeli mpenza kosalema? Atako “mwasi na ye amilɛngɛli” mpo na fɛti ya libala, bavɛrsɛ oyo elobami na nsima ezali komonisa ete ezali fɛti ya libala ya elilingi. Kutu, ezali nde komonisa makambo oyo ekosalema mpenza na nsuka ya bolɔzi monene. (Em. 19:11-21) Yango elingi nde koloba ete fɛti ya libala yango ekosalema liboso ete Mokonzi oyo azali mpe mobali ya libala asilisa bolongi na ye? Te. Bimonaneli oyo ezali na mokanda ya Emoniseli elobeli te makambo na molɔngɔ. Nzembo 45 emonisi ete fɛti ya libala ya mokonzi ekosalema na nsima, wana Mokonzi Yesu Kristo asili kokanga mopanga na ye na loketo mpe ‘akei kolonga’ banguna na ye.Nz. 45:3, 4.

11. Makambo ekosalema ndenge nini mpo Kristo asilisa bolongi na ye?

11 Na yango tokoki koloba ete makambo ekosalema boye: Liboso, “mwasi ya ndumba monene,” Babilone Monene to lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba ekozwa etumbu. (Em. 17:1, 5, 16, 17; 19:1, 2) Na nsima, Kristo akobima mpo na kobebisa ebongiseli mabe ya Satana awa na mabele na Armagedone, “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Em. 16:14-16; 19:19-21) Na nsuka, Mokonzi akosilisa bolongi na ye ntango akobwaka Satana ná bademo na ye na libulu mozindo, epai bakozala lisusu na nguya te ya kosala bato mabe.Em. 20:1-3.

12, 13. (a) Ntango nini libala ya Mwana-Mpate ekosalema? (b) Banani bakosepela na fɛti ya libala ya Mwana-Mpate na likoló?

12 Bakristo oyo batyami mafuta oyo bakómi na nsuka ya bomoi na bango awa na mabele na boumeli ya kozala ya Kristo, basekwaka mpo na kokende likoló. Mwa moke nsima ya kobebisama ya Babilone Monene, Yesu akoyanganisa bakristo nyonso oyo bakozala naino awa na mabele oyo bazali na kati ya etuluku ya mwasi ya libala. (1 Tes. 4:16, 17) Na yango, liboso ete etumba ya Armagedone ebanda, bakristo nyonso oyo basali etuluku ya “mwasi ya libala” bakozala na likoló. Nsima ya etumba yango, fɛti ya libala ya Mwana-Mpate ekosalema. Fɛti ya libala yango ekozala mpenza molulu moko ya esengo! Emoniseli 19:9 elobi ete: “Esengo na bato oyo babengisami na bilei ya mpokwa ya libala ya Mwana-Mpate.” Ya solo, bakristo 144 000 oyo basali etuluku ya mwasi ya libala bakozala mpenza na esengo. Mpe Mokonzi oyo azali mobali ya libala akotondisama na esengo ntango motángo mobimba ya baoyo bakoyangela ná ye ekokoka, mpe na ndenge ya elilingi ‘bakolya mpe bakomɛla na mesa na ye na bokonzi na ye.’ (Luka 22:18, 28-30)  Nzokande, ezali kaka te mobali ya libala ná mwasi na ye nde bakosepela na fɛti ya Mwana-Mpate.

13 Ndenge tolobelaki yango na ebandeli, ebele ya bikelamu ya elimo na likoló bayembi na bomoko mpenza ete: “Tósepela mpe tótonda na esengo monene, mpe tókumisa ye [Yehova], mpo fɛti ya libala ya Mwana-Mpate ekómi mpe mwasi na ye amilɛngɛli.” (Em. 19:6, 7) Tokoloba nini sikoyo mpo na basaleli ya Yehova awa na mabele? Bango mpe bakoyoka esengo ya ndenge wana?

“BAKOYA NA BANGO NA NSAI”

14. Ndenge Nzembo 45 emonisi yango, “Bangɔndɔ oyo bazali baninga” ya mwasi ya libala ezali banani?

14 Tángá Nzembo 45:12, 14b, 15. Mosakoli Zekaria asakolaki ete na ntango ya nsuka, bato ya bikólo bakoya na esengo mpenza kosangana ná bato ya Yisraele ya elimo oyo bazali naino awa na mabele. Akomaki boye: “Na mikolo yango, bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikólo bakosimba, ɛɛ, bakosimba mpenza eteni ya nse ya elamba ya Moyuda moko mpe bakoloba ete: ‘Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.’” (Zek 8:23) Nzembo 45:12, ebengi “bato zomi” yango ya elilingi “mwana mwasi ya Tire” mpe “bato ya bozwi na kati ya bato.” Bayei na makabo epai ya bakristo oyo batyami mafuta oyo bazali naino na mabele, mpo na ‘kosɛnga bango ete bándima bango’ mpe básalisa bango na elimo. Kobanda 1935, bamilio ya bato bandimi ete bakristo yango ‘bámema bango epai ya boyengebene.’ (Dan. 12:3) Baninga yango ya sembo ya bakristo oyo batyami mafuta bapɛtolá bomoi na bango, mpe bakómá bangɔndɔ na ndenge ya elimo. ‘Bangɔndɔ yango oyo bazali baninga’ ya mwasi ya libala bamipesá na Yehova mpe bamonisá na misala na bango ete bazali sembo epai ya Mokonzi oyo azali mobali ya libala.

15. Ndenge nini “bangɔndɔ oyo bazali baninga” basalaka elongo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele?

 15 Bakristo oyo bazali naino awa na mabele oyo bazali na kati ya etuluku ya mwasi ya libala bazalaka na botɔndi mpo na ‘bangɔndɔ yango oyo bazali baninga’ mpo na lisalisi na bango ya molende na mosala ya kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi” na mokili mobimba. (Mat. 24:14) Ezali kaka te ‘elimo ná mwasi ya libala nde bazali se koloba ete: “Yaká!”’ kasi, baoyo bazali koyoka bazali mpe koloba: “Yaká!” (Em. 22:17) Ya solo, “bampate mosusu” bayokaki bakristo oyo batyami mafuta oyo basali etuluku ya mwasi ya libala bazali koloba “Yaká!” mpe basangani na etuluku yango mpo na koloba “Yaká!” epai ya bato nyonso ya mabele.Yoa. 10:16.

16. Yehova apesi bampate mosusu libaku nini?

16 Bakristo oyo batyami mafuta oyo bazali naino awa na mabele balingaka baninga na bango mpe bazalaka na esengo ndenge bayebi ete Yehova, Tata ya mobali ya libala apesá bampate mosusu oyo bazali na mabele libaku ya kosangana na esengo monene ya fɛti ya libala ya Mwana-Mpate oyo ekosalema na likoló. Esakolamaki ete ‘bangɔndɔ yango oyo bazali baninga’ “bakoya na bango na nsai mpe na esengo.” Ya solo, bampate mosusu oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele, bakoyoka mpe esengo monene ntango fɛti ya libala ya Mwana-Mpate ekosalema na likoló. Ebongi mpenza ete mokanda ya Emoniseli eloba ete baoyo bazali na kati ya “ebele mpenza ya bato . . . batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate.” Bazali kosalela Yehova mosala mosantu na lopango ya libándá ya tempelo na ye ya elimo awa na mabele.Em. 7:9, 15.

Libala ya Mwana-Mpate ekopesa “bangɔndɔ oyo bazali baninga” ya mwasi ya libala esengo (Talá paragrafe 16)

“NA ESIKA YA BANKƆKƆ NA YO EKOZALA BANA NA YO”

17, 18. Matomba nini fɛti ya libala ya Mwana-Mpate ekobimisa, mpe Kristo akokóma tata ya banani na boumeli ya mbula nkóto?

17 Tángá Nzembo 45:16. “Bangɔndɔ oyo bazali baninga” ya mwasi ya Kristo ya likoló, bakosepela lisusu ntango bakomona matomba oyo fɛti ya libala yango ekobimisa na mokili ya sika. Mokonzi oyo azali mobali ya libala akotyela mabele likebi mpe akosekwisa “bankɔkɔ” na ye ya mabele mpe bakokóma “bana” na ye ya mabele. (Yoa. 5:25-29; Ebr. 11:35) Akotya bamosusu kati na bango “bankumu na mabele mobimba.” Na ntembe te, Yesu akopona bankulutu mosusu oyo bazali sembo lelo oyo mpo bátambwisa makambo na mokili ya sika.Yis. 32:1.

18 Na boumeli ya boyangeli na ye ya mbula nkotó, Kristo akokóma mpe tata ya bato mosusu. Ya solo, bato nyonso oyo bakozwa bomoi ya seko, bakozwa yango mpo bamonisaki kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu. (Yoa. 3:16) Na yango, akokóma ‘Tata na bango ya Seko.’Yis. 9:6, 7.

BALENDISAMI ‘KOTÁNGA NKOMBO NA YE’

19, 20. Ndenge nini makambo oyo ezali na Nzembo 45 etaleli bakristo nyonso ya solo lelo oyo?

19 Tángá Nzembo 45:1, 17. Ya solo, makambo oyo ezali na Nzembo 45 etali bakristo nyonso. Bakristo oyo batyami mafuta oyo bazali naino awa na mabele basepelaka mpenza ndenge mosika te, bakosangana ná bandeko na bango mosusu mpe mobali na bango ya libala na likoló. Bampate mosusu balendisami ya kozala lisusu na komikitisa mingi epai ya mokonzi na bango ya nkembo mpe bazali na botɔndi mpo na libaku oyo bazali na yango ya kosala elongo na basangani ya mwasi ya libala oyo bazali naino awa na mabele. Nsima ya libala na bango, Kristo mpe baoyo akoyangela ná bango bakosopela baoyo bakofanda awa na mabele mapamboli ebele.Em. 7:17; 21:1-4.

20 Wana tozali kozela kokokisama ya “likambo moko ya malamu” oyo etali Mokonzi Masiya, omoni te ete tosengeli ‘kotánga nkombo na ye’? Tiká ete tózala na kati ya bato oyo ‘bakokumisa mokonzi mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.’