Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2014

Kumisá Kristo​Mokonzi ya nkembo!

Kumisá Kristo​Mokonzi ya nkembo!

“Na nkembo na yo kende kolonga.”​NZ. 45:4.

1, 2. Mpo na nini Nzembo 45 ezali na ntina mpo na biso?

MOKONZI moko ya nkembo amati na mpunda mpo na kobundela solo mpe boyengebene mpe azali kokende mpo na kolonga banguna na ye. Nsima ya kolonga bango nyɛɛ, abali mwasi moko ya kitoko. Bato bakanisaka mpe bakumisaka mokonzi yango na bileko nyonso. Yango nde likambo ya ntina mpenza oyo Nzembo 45 elobeli.

2 Mokanda ya Nzembo ya ntuku minei na mitano, esuki te kaka na kolobela makambo ya kitoko. Makambo oyo elobelami na mokanda yango, ezali na ntina mpenza mpo na biso. Etaleli mpenza bomoi na biso ya lelo mpe ya mikolo ezali koya. Sikoyo, tótalela nzembo yango na likebi mpenza.

“MOTEMA NA NGAI EKÓMI KONINGANA MPO NA LIKAMBO MOKO YA MALAMU”

3, 4. (a) “Eloko moko ya malamu” oyo etaleli mpe biso ezali nini, mpe ekoki kosala nini na motema na biso? (b) Na ndenge nini ‘loyembo na biso ezali mpo na mokonzi moko,’ mpe ndenge nini lolemo na biso ekómi lokola ekomeli?

3 Tángá Nzembo 45:1. “Eloko moko ya malamu” oyo esimbaki motema ya mokomi ya nzembo mpe etindaki ye ‘aningana’ etaleli nde mokonzi. Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “koningana” ezalaki kolimbola na ebandeli “kotoka.” Likambo yango esalaki  ete motema ya mokomi ya nzembo etoka na esengo mpe ekómisaki lolemo na ye lokola “ekomeli ya mosali-bakopi oyo ayebi mosala malamu.”

4 Bongo tokoloba nini mpo na biso? Nsango malamu ya Bokonzi ya Masiya ezali eloko moko ya malamu oyo esimbaka mitema na biso. Nsango ya Bokonzi ekómaki mpenzampenza “malamu” na mobu 1914. Banda wana, nsango yango ezali kolobela te Bokonzi oyo ekoya kasi nde guvɛrnema ya solosolo oyo ezali sikoyo koyangela kuna na likoló. Ezali “nsango malamu ya Bokonzi” oyo tozali kosakola “na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.” (Mat. 24:14) Nsango ya Bokonzi ‘eningisaka’ motema na biso? Tosakolaka nsango malamu ya Bokonzi na molende? Ndenge moko na mokomi ya nzembo, ‘loyembo na biso ezali mpo na mokonzi moko,’ Mokonzi na biso Yesu Kristo. Tosakolaka ete azali mokonzi oyo atyami kuna na likoló na Bokonzi ya Masiya. Yango wana, tobengaka moto nyonso: ezala bakonzi ya mokili to bato oyo bango bayangelaka ete bándima bokonzi na ye. (Nz. 2:1, 2, 4-12) Mpe lolemo na biso ekómi lokola “ekomeli ya mosali-bakopi oyo ayebi mosala malamu” na ndenge tozali kosalela malamumalamu Biblia na mosala na biso ya kosakola.

Tosakolaka nsango malamu oyo etali Mokonzi na biso Yesu Kristo na esengo nyonso

‘MBƐBU YA MOKONZI EZALI KOSOPA MALOBA YA ELƐNGI’

5. (a) Nini ekómisaki Yesu “kitoko mingi”? (b) Ndenge nini ‘maloba ya elɛngi ezalaki kobima na mbɛbu ya Mokonzi,’ mpe ndenge nini tokoki kosala makasi tómekola ye?

5 Tángá Nzembo 45:2. Makomami elobeli mingi te soki Yesu azalaki kitoko to te. Na ntembe te, lokola azalaki moto ya kokoka, azalaki “kitoko.” Kasi, eloko ekómisaki ye kitoko mingi ezalaki bosembo monene oyo azalaki na yango epai ya Yehova. Lisusu, Yesu azalaki kosalela “maloba ya elɛngi” ntango azalaki kosakola nsango ya Bokonzi. (Luka 4:22; Yoa. 7:46) Tosalaka makasi tólanda ndakisa na ye na mosala na biso ya kosakola mpe tolukaka kosalela maloba oyo ekosimba mitema ya bato?​Kol. 4:6.

6. Ndenge nini Nzambe apamboli Yesu mpo na “ntango oyo etyami ndelo te”?

6 Lokola amipesaki na motema mobimba, Yehova apambolaki ye na boumeli ya mosala na ye awa na mabele mpe apesaki ye mbano nsima ya liwa na ye. Ntoma Paulo akomaki ete: “Ntango [Yesu] akómaki na lolenge ya moto, amikitisaki mpe atosaki tii liwa, ɛɛ, liwa na nzete ya mpasi. Yango wana mpe Nzambe atombolaki ye likoló koleka mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso, mpo, na nkombo ya Yesu, mabɔlɔngɔ nyonso ya baoyo bazali na likoló mpe ya baoyo bazali na mabele mpe ya baoyo bazali na nse ya mabele egumbama, mpe monɔkɔ nyonso endima polele ete Yesu Kristo azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.” (Flp. 2:8-11) Yehova apamboli Yesu “mpo na ntango oyo etyami ndelo te” na ndenge asekwisaki mpe apesi ye bomoi oyo ekufaka te.​Rom. 6:9.

MOKONZI AZWI LOKUMU MINGI KOLEKA “BANINGA” NA YE

7. Na ndenge nini Nzambe atyaki Yesu mafuta koleka “baninga” na ye?

7 Tángá Nzembo 45:6, 7. Lokola Yesu azalaki kolinga mingi boyengebene mpe azalaki koyina eloko nyonso oyo ekokaki kobebisa lokumu ya tata na ye, Yehova atyaki ye mafuta na elimo mpe akómaki Mokonzi ya Bokonzi ya Masiya. Nzambe atyaki Yesu “mafuta ya esengo” koleka “baninga” na ye, elingi koloba bakonzi ya Yuda oyo bazalaki mpe bakitani ya Davidi. Ndenge nini? Ya liboso, ezali mpo Yehova ye moko  nde atyaki Yesu mafuta na elimo. Ya mibale, Yehova atyaki ye Mokonzi mpe Nganga-nzambe monene. (Nz. 2:2; Ebr. 5:5, 6) Ya misato, Yesu atyamaki mafuta ya mafuta te, kasi na elimo santu, mpe bokonzi na ye, ezali ya mabele te kasi ya likoló.

8. Na ndenge nini tokoki koloba ete ‘Nzambe azali kiti ya bokonzi ya Yesu,’ mpe mpo na nini tokoki kondima ete bokonzi na ye ezali ya boyengebene?

8 Yehova atyaki mwana na ye Mokonzi Masiya na likoló na 1914. ‘Lingenda ya bokonzi na ye ezali lingenda ya bosembo,’ yango emonisi ete bokonzi na ye ezali ya bosembo mpe ya boyengebene. Bokonzi na ye ezali mpenza ya kobɛtɛla ntembe te, mpo ‘Nzambe azali kiti na ye ya bokonzi.’ Ezali bongo mpo bokonzi yango euti epai na Yehova. Lisusu, kiti ya bokonzi ya Yesu ekoumela mpo na “ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.” Osepeli te kosalela Yehova na nse ya litambwisi ya mokonzi ya ndenge wana ya nguya, oyo Nzambe atye?

MOKONZI ‘AKANGI MOPANGA NA YE NA LOKETO’

9, 10. (a) Ntango nini Kristo akangaki mopanga na ye na loketo, mpe ndenge nini asalelaki yango? (b) Ndenge nini Kristo akosalela lisusu mopanga na ye?

9 Tángá Nzembo 45:3. Yehova ayebisi Mokonzi na ye ‘akanga mopanga na ye na loketo,’ yango emonisi ete apesi ye nzela ya kobunda na baoyo nyonso bazali kotɛmɛla boyangeli ya Nzambe mpe apesa bango bitumbu. (Nz. 110:2) Lokola Kristo azali Mokonzi oyo ata moto moko te akoki kolonga ye na bitumba, yango wana abengami ‘Moto ya nguya.’ Yesu akangaki mopanga na ye na mobu 1914 mpe alongaki Satana ná bademo na ye, mpe abwakaki bango na mabele.​Em. 12:7-9.

10 Yango ezalaki kaka likambo ya liboso oyo alongaki ntango akómaki Mokonzi. Kasi asengeli “kolonga tii na nsuka.” (Em. 6:2) Bitumbu ya Yehova esengeli kokwela ebongiseli ya Satana awa na mabele, mpe ye ná bademo bakozala lisusu na makasi te. Ya liboso, Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba nde ekobebisama. Mokano ya Yehova ezali ya kosalela bakonzi ya politiki mpo na koboma mwasi wana mabe ya “ndumba.” (Em. 17:16, 17) Na nsima, Yesu akobunda na ebongiseli ya politiki ya Satana mpe akosilisa yango nyɛɛ. Na nsima, Kristo, oyo abengami mpe “anzelu ya libulu mozindo” akosilisa bolongi na ye ntango akobwaka Satana ná bademo na ye na libulu mozindo. (Em. 9:1, 11; 20:1-3) Tótala sikoyo ndenge mokanda ya Nzembo 45 esakolaki makambo wana ya esengo.

MOKONZI AZALI KOTAMBOLA NA MPUNDA “MPO NA KOBUNDELA SOLO”

11. Ndenge nini Kristo azali kotambola na mpunda ‘mpo na kobundela solo’?

11 Tángá Nzembo 45:4. Yesu akobunda te mpo na kobɔtɔla bamboka mpe kokonza bato. Etumba na ye ezali ya boyengebene mpe mpo na kokokisa mikano ya malamu. Azali kotambola na mpunda “mpo na kobundela solo, komikitisa ná boyengebene.” Solo oyo esengeli kolongisa ezali ete kaka Yehova nde abongi kozala Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Satana atyaki ntembe ete Yehova azali te na lotomo ya koyangela ntango atombokelaki Ye. Banda wana, bademo mpe bato mosusu bandimaka mpe likanisi yango. Sikoyo ntango ekoki mpo Mokonzi oyo Yehova atye mafuta na elimo atambola na mpunda mpo na komonisa solo oyo ete Yehova nde azali na lotomo ya koyangela mpo na libela.

12. Na ndenge nini Mokonzi azali kotambola na mpunda ‘mpo na kobundela komikitisa’?

12 Mokonzi Yesu azali mpe kotambola na mpunda ‘mpo na kobundela komikitisa.’ Lokola azali Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki, atikaki ndakisa malamu na likambo etali komikitisa mpe kotosa boyangeli ya Tata na ye. (Yis. 50:4, 5; Yoa. 5:19) Bato nyonso ya sembo oyo Mokonzi akoyangela basengeli kolanda ndakisa na ye mpe  kotosa na komikitisa nyonso boyangeli ya Yehova na makambo nyonso. Kaka baoyo bazali kosala bongo nde bakozala na bomoi na mokili ya sika oyo Nzambe alaká.​Zek. 14:16, 17.

13. Na ndenge nini Kristo abimi na mpiko ‘mpo na kobundela boyengebene’?

13 Kristo abimi lisusu na mpiko mpo na ‘kobundela boyengebene.’ Boyengebene oyo Mokonzi Yesu azali kobundela ezali “boyengebene ya Nzambe,” elingi koloba mibeko ya Yehova na oyo ezali malamu mpe mabe. (Rom. 3:21; Mib. 32:4) Yisaya alobaki boye mpo na Mokonzi Yesu Kristo: “Mokonzi moko akoyangela mpo na boyengebene.” (Yis. 32:1) Bokonzi ya Yesu ekotya “likoló ya sika” mpe “mabele ya sika,” oyo elakamaki epai “boyengebene ekozala.” (2 Pe. 3:13) Ekosɛnga ete moto nyonso oyo akofanda na mokili yango ya sika atosa mibeko ya Yehova.​Yis. 11:1-5.

MOKONZI AKOKISI “MAKAMBO YA NSƆMƆ”

14. Ndenge nini lobɔkɔ ya mobali ya Kristo ekokokisa “makambo ya nsɔmɔ”? (Talá elilingi ya ebandeli.)

14 Ntango azali kokende, mokonzi yango azalaki na mopanga na loketo na ye. (Nz. 45:3) Kasi, ntango ekoki mpo ete abimisa mopanga yango mpe asalela yango na lobɔkɔ na ye ya mobali. Mokomi ya nzembo akomaki ete: ‘Lobɔkɔ na yo ya mobali ekosala makambo ya nsɔmɔ.’ (Nz. 45:4) Wana Yesu azali kokoba kokende mpo na kopesa bitumbu ya Yehova na Armagedone, akokokisa “makambo ya nsɔmɔ” liboso ya banguna na ye. Kasi, akosalela nini mpo na kobebisa ebongiseli ya Satana? Toyebi te. Kasi likambo wana ekosala nsɔmɔ na mitema ya bato nyonso oyo baboyaki koyoka makebisi oyo Nzambe apesaki bango ete bándima boyangeli ya Yesu. (Tángá Nzembo 2:11, 12.) Na esakweli oyo apesaki mpo na ntango ya nsuka, Yesu alobaki ete bato “bakolɛmba nzoto na kobanga mpe na kozela makambo oyo ezali koya na mabele esika bato bafandi; mpo banguya ya likoló ekoningana.” Abakisaki ete: “Bongo bakomona Mwana ya moto azali koya na lipata na nguya mpe na nkembo mingi.”​Luka 21:26, 27.

15, 16. Banani bakozala na kati ya “mampinga” oyo ekozala elongo na Kristo na etumba?

15 Mpo na komonisa ndenge Mokonzi Yesu akoya “na nguya mpe na nkembo mingi” mpo na kokokisa bitumbu, mokanda ya Emoniseli elobi ete: “Namonaki likoló efungwami, mpe talá! mpunda moko ya mpɛmbɛ. Mpe moto oyo afandaki likoló na yango abengami Sembo mpe Solo, mpe asambisaka mpe abundaka etumba na boyengebene. Lisusu, mampinga ya likoló ezalaki kolanda ye na bampunda ya mpɛmbɛ, mpe balataki lini ya kitoko ya mpɛmbɛ, ya pɛto. Mpe mopanga moko ya molai oyo epeli makasi ezali kobima na monɔkɔ na ye, mpo abɛta na yango bikólo, mpe akokamba bango na lingenda moko ya ebende. Azali mpe konyata mbuma na ekamwelo ya vinyo ya nkanda makasi ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”​Em. 19:11, 14, 15.

16 Banani bakosala “mampinga” ya likoló, oyo bazali kolanda Kristo na nsima mpe bakobunda elongo na ye? Ntango alataki mopanga na ye mbala ya liboso mpo na kobengana Satana mpe bademo na ye na likoló, Yesu azalaki ná “baanzelu na ye.” (Em. 12:7-9) Tokoki mpenza koloba ete na etumba ya Armagedone, baanzelu bakozala na kati ya mampinga ya Yesu. Banani mpe bakozala na kati ya mampinga yango? Yesu apesaki bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo elaka oyo: “Moto oyo alongi mpe abateli misala na ngai tii na nsuka nakopesa ye bokonzi likoló ya bikólo, mpe akokamba bato na lingenda ya ebende bongo bakopanzana lokola bambɛki ya mabele, ndenge ngai mpe nazwaki bokonzi epai ya Tata na ngai.” (Em. 2:26, 27) Na yango, bandeko ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo na nsima bakozwa mbano na bango na likoló, bakozala na kati ya mampinga na ye ya likoló. Bakristo yango oyo  bakoyangela elongo na ye bakozala na ngambo na ye ntango azali kokokisa “makambo ya nsɔmɔ” mpe akokamba bikólo na lingenda ya ebende.

KRISTO ASILISI BOLONGI NA YE

17. (a) Mpunda ya mpɛmbɛ oyo Kristo azali kotambola na yango ezali elilingi ya nini? (b) Mopanga mpe litimbo elimboli nini?

17 Tángá Nzembo 45:5. Mokonzi amataki likoló ya mpunda ya mpɛmbɛ, oyo elimboli etumba ya pɛto mpe ya boyengebene na miso ya Yehova. (Em. 6:2; 19:11) Longola mopanga, azali mpe na litimbo. Biblia elobi boye: “Namonaki, mpe talá! mpunda moko ya mpɛmbɛ; mpe moto oyo afandi likoló na yango azali na litimbo; mpe bapesaki ye motole, mpe abimaki azali kolonga mpe mpo na kolonga tii na nsuka.” Mopanga mpe litimbo ezali komonisa biloko oyo Kristo akosalela mpo na kopesa banguna na ye bitumbu.

Bandɛkɛ ekobengama mpo na kopɛtola mabele (Talá paragrafe 18)

18. Ndenge nini “makula” ya Kristo ‘ekopela’?

18 Na ndenge ya maloba ya ntɔki, mokomi ya nzembo asakoli ete ‘makula ya Mokonzi epeli makasi, ezali kokɔta na motema ya banguna na ye’ mpe ‘bato ya bikólo bazali kaka kokwea na nse na ye.’ Na mabele mobimba, bato ebele bakobomama. Yirimia asakolaki ete: “Baoyo babomami na Yehova bakozala na mokolo yango uta nsuka moko ya mabele tii na nsuka mosusu ya mabele.” (Yir. 25:33) Esakweli mosusu elobi boye: “Namonaki mpe anzelu moko atɛlɛmi na kati ya moi, mpe agangaki na mongongo makasi mpe alobaki na bandɛkɛ nyonso oyo ezali kopumbwa na katikati ya likoló ete: ‘Bóya awa, bóyangana na fɛti monene ya mpokwa oyo Nzambe asali, mpo bólya misuni ya bakonzi mpe misuni ya bakomanda ya basoda mpe misuni ya bato ya makasi mpe misuni ya bampunda mpe ya baoyo bafandi likoló na yango, mpe misuni ya bato nyonso, ya bato ya bonsomi mpe ya baombo mpe ya bato mike mpe ya bato minene.’”​Em. 19:17, 18.

19. Ndenge nini Kristo ‘akokende mpo na kolonga’ mpe kosilisa bolongi na ye?

19 Nsima ya kobebisa ebongiseli mabe ya Satana awa na mabele, Kristo ‘na nkembo na ye akokende mpo na kolonga.’ (Nz. 45:4) Akosilisa bolongi na ye ntango akobwaka Satana ná bademo na ye na libulu mozindo na boumeli ya mbula nkóto ya boyangeli na ye. (Em. 20:2, 3) Lokola Zabolo ná baanzelu na ye bakozala lisusu na nguya te, bato oyo bakozala awa na mabele bakokosama lisusu te na mayele mabe ya Satana mpe bakozala na likoki ya kotosa na motema mobimba Yesu, Mokonzi na bango ya nkembo mpe oyo akolonga. Nzokande, liboso ete bámona ndenge oyo mabele ekokóma mokemoke paradiso, ekozala na likambo mosusu ya esengo oyo ekosala ete básepela na Mokonzi na bango mpe bato oyo bakoyangela elongo na ye. Tokotalela likambo yango na lisolo oyo elandi.