Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2014

Mituna ya Batángi

Mituna ya Batángi

Nini esalisaki Bayuda ya siɛklɛ ya liboso ‘bázela’ Masiya?

Na mikolo ya Yoane Mobatisi, “bato bazalaki kozela mpe bango nyonso bazalaki komitunatuna na mitema na bango mpo na Yoane ete: ‘Mbala mosusu ye nde Kristo?’” (Luka 3:15) Mpo na nini Bayuda bazalaki kokanisa ete Masiya akoya na ntango wana? Bantina ezali mingi.

Nsima ya kobotama ya Yesu, anzelu ya Yehova abimelaki babateli ya mpate oyo bazalaki koleisa bampate na bango na bilanga oyo ezalaki pene na Beteleme. Anzelu yango asakolaki ete: “Lelo, na engumba ya Davidi, baboteli bino Mobikisi, oyo azali Kristo Nkolo.” (Luka 2:8-11) Na nsima, “ebele ya baanzelu bayaki kosangana na anzelu yango, babandi kosanzola Nzambe mpe koloba: * ‘Nkembo na Nzambe kuna na likoló, mpe kimya na mabele na bato oyo ye andimi.’”Luka 2:13, 14.

Nsango yango ezalaki mpenza na ntina mpo na babateli wana ya mpate. Mbala moko, bakendaki na Beteleme, mpe ntango bamonaki Yozefe, Maria mpe mwana, “bayebisaki liloba oyo anzelu ayebisaki bango mpo na mwana yango.” Mpe “bato nyonso oyo bayokaki bakamwaki na makambo oyo babateli ya mpate bayebisaki bango.” (Luka 2:17, 18) Maloba “bato nyonso oyo bayokaki” emonisi ete longola Yozefe mpe Maria, babateli ya mpate bayebisaki mpe bato mosusu likambo yango. Na nsima, ntango babateli ya mpate bazalaki kozonga, bakobaki “kopesa Nzambe nkembo mpe kosanzola ye mpo na makambo nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki, kaka ndenge bayebisaki bango.” (Luka 2:20) Na ntembe te, babateli ya mpate yango babombaki te nsango kitoko oyo bayokaki na ntina na Kristo mpo na bango moko!

Ntango Maria amemaki mwana na ye wana ya liboso mpo na kolakisa ye liboso ya Yehova, ndenge Mobeko ya Moize ezalaki kosɛnga, Mosakoli Ana “abandaki kotɔnda Nzambe mpe kolobela mwana wana epai ya baoyo nyonso bazalaki kozela kosikolama ya Yerusaleme.” (Luka 2:36-38; Kob. 13:12) Na yango, nsango ya Masiya ekobaki kopanzana.

Na nsima, “banganga-minzoto bauti na ɛsti bayei na Yerusaleme, mpe balobi ete: ‘Wapi moto oyo abotami mokonzi ya Bayuda? Mpo tomonaki monzoto na ye ntango tozalaki na ɛsti, mpe toyei kogumbamela ye.’” (Mat. 2:1, 2) Ntango kaka ayokaki nsango yango, ‘Mokonzi Erode abulunganaki, ye ná Yerusaleme mobimba; mpe ayanganisaki banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli nyonso mpe  abandaki kotuna bango epai wapi Kristo asengeli kobotama.’ (Mat. 2:3, 4) Bato mingi bayebaki ete Masiya oyo alakamaki ayaki! *

Mokanda ya Luka 3:15, oyo totángaki liboso, emonisi ete Bayuda mosusu bakanisaki ete Yoane Mobatisi akoki kozala Kristo. Nzokande, Yoane asilisaki ntembe yango na maloba oyo: “Moto oyo azali koya nsima na ngai azali na makasi koleka ngai, mpe nabongi te kolongola basandale na ye. Moto yango akobatisa bino na elimo santu mpe na mɔtɔ.” (Mat. 3:11) Makanisi wana ya Yoane Mobatisi, esalisaki lisusu Bayuda mpo bákoba kozela Masiya.

Ekoki nde kozala ete Bayuda ya siɛklɛ ya liboso basalaki kalkile mpo na koyeba ntango oyo Masiya akoya na kolanda esakweli ya pɔsɔ 70 oyo elobelami na Danyele 9:24-27? Tokoki koboya likanisi yango te, kasi tokoki mpe kondima yango te. Tosengeli kosimba ete bandimbola ndenge na ndenge epesamaki na mikolo ya Yesu mpo na likambo etali pɔsɔ 70, mpe ata moko te eyokani na boyebi oyo tozali na yango lelo. *

Ba-Essene, mwa etuluku moko ya lingomba ya Bayuda, bazalaki koteya ete bamasiya mibale bakobima na nsuka ya mbula 490, kasi tokoki soki moke te kondima ete bato yango basalaki bakalkile na bango na kolanda esakweli ya Danyele. Ata soki basalaki yango, ezali mpasi kokanisa ete Bayuda nyonso bakokaki kolanda makanisi oyo mwa lingomba wana ekokaki kobimisa.

Na siɛklɛ ya mibale T.B., bayuda mosusu bandimaki ete pɔsɔ 70 etalelaki makambo oyo esalemaki kobanda kobebisama ya tempelo ya liboso na mobu 607 L.T.B. tii na kobebisama ya tempelo ya mibale na mobu 70 T.B., nzokande bato mosusu balobaka ete esakweli yango ekokisamaki na eleko ya Bamakabe na siɛklɛ ya mibale L.T.B. Emonani ete boyokani ezalaki mpenza te na lolenge oyo pɔsɔ 70 esengelaki kotángama.

Soki bato bakangaki malamu ndenge ya kotánga pɔsɔ 70 na siɛklɛ ya liboso ya T.B., moto mosusu akokaki kokanisa ete bantoma, bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso bakokaki kosalela elembeteli yango mpo na komonisa ete Yesu Kristo, Masiya oyo alakamaki ayaki mpenza na ntango oyo ebongi. Na yango, ata elembeteli moko te emonisi ete bakristo ya liboso basalaki yango.

Likambo mosusu mpe ya ntina ezali. Bakomi ya Baevanzile bamonisaki ete bisakweli mosusu oyo ezali na Makomami ya Ebre, ekokisamaki epai ya Yesu Kristo. (Mat. 1:22, 23; 2:13-15; 4:13-16) Kasi, moko te na bango amonisi ete komonana ya Yesu na mabele eyokani na esakweli ya pɔsɔ 70.

Na mokuse: Tokoki kondima te ete bato ya eleko ya Yesu bakangaki malamumalamu ndimbola ya esakweli ya pɔsɔ 70. Atako bongo, Baevanzile emonisi bantina mosusu oyo esalaki ete bato bákoba ‘kozela’ Masiya.

^ par. 4 Biblia elobi te ete baanzelu “bayembaki” ntango Yesu abotamaki.

^ par. 7 Tokoki komituna boye, ndenge nini banganga-minzoto basalaki bokokanisi kati na “monzoto” ya ɛsti mpe kobotama ya “mokonzi ya Bayuda”? Ekoki kozala ete bayokaki nsango ya kobotama ya Yesu ntango bazalaki kosala mobembo na Yisraele?

^ par. 9 Mpo na koyeba ndimbola oyo tozali na yango lelo mpo na esakweli ya pɔsɔ 70, talá buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! mokapo 11.