Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2014

Zwá bikateli ya malamu ntango ozali naino elenge

Zwá bikateli ya malamu ntango ozali naino elenge

‘Bino bilenge mibali mpe bino bangɔndɔ . . . bósanzola nkombo ya Yehova.’​—NZ. 148:12, 13.

1. Mabaku nini kitoko bilenge bakristo mingi bazali na yango?

TOZALI na eloko moko ya yikiyiki. Bamilio ya bato ya bikólo nyonso bazali koya na losambo ya solo na ndenge oyo esalemá naino te. (Em. 7:9, 10) Bilenge mingi bazali koyoka esengo mingi na ndenge bazali kosalisa bato báyeba solo ya Biblia oyo ekoki kobikisa bango. (Em. 22:17) Bilenge mosusu bazali koyekola na bato Biblia mpe kosalisa bango bázala na bomoi ya malamu. Basusu bakendaka kosakola na molende mpenza na bateritware oyo bato balobaka minɔkɔ ya bapaya. (Nz. 110:3; Yis. 52:7) Ndenge nini yo mpe okoki kosepela kopesa mabɔkɔ na mosala oyo basaleli ya Yehova bazali kosala?

2. Ndenge nini ndakisa ya Timote emonisi ete Yehova asepelaka kopesa bilenge mikumba? (Talá elilingi ya ebandeli.)

2 Lokola ozali elenge, okoki kozwa bikateli oyo ekopesa yo mabaku kitoko na mosala ya Nzambe. Na ndakisa, emonani ete Timote oyo azalaki kofanda na Listra azwaki bikateli oyo esalisaki ye akóma misionɛrɛ ntango akómaki na mbula soki 20. (Mis. 16:1-3) Emonani ete kaka mwa basanza na nsima, nsima ya botɛmɛli makasi oyo etindaki ntoma Paulo atika lisangá ya Tesaloniki oyo eutaki kosalema sika, apesaki elenge Timote mokumba ya kozonga na Tesaloniki mpo na kolendisa bandeko. (Mis. 17:5-15; 1 Tes. 3:1, 2, 6) Okoki  komona na makanisi ndenge Timote ayokaki ntango azwaki mokumba wana?

EKATELI YA NTINA MINGI MPO NA YO

3. Ekateli nini oyo eleki ntina oyo okoki kozwa na bomoi mpe ntango nini okoki kozwa yango?

3 Bolenge ezali ntango oyo moto asengeli kozwa bikateli ya ntina mingi. Kasi kosalela Yehova ezali ekateli oyo eleki bikateli mosusu nyonso na ntina. Ntango nini ebongi mpenza kozwa ekateli yango? Yehova alobi boye: ‘Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.’ (Mos. 12:1) Lolenge moko oyo eleki malamu ya ‘kokanisa’ Yehova ezali ya kosalela ye na motema mobimba. (Mib. 10:12) Kozwa ekateli ya kosalela Nzambe na motema na yo mobimba ezali ekateli ya ntina mingi koleka nyonso. Ekobongisa bomoi na yo na mikolo ezali koya.​—Nz. 71:5.

4. Longola kosalela Yehova, bikateli nini mosusu ya ntina oyo ekoki komonisa ete tokosalela Nzambe malamu to te?

4 Ya solo, longola kosalela Yehova, ezali mpe na bikateli mosusu oyo ezali na ntina mpo na avenire na yo. Na ndakisa, mbala mosusu ozali kokanisa soki okobala to te, okobalana ná nani, mpe ndenge oyo okobanda kozwa mwa eloko ya kobikela. Bikateli wana ezali na ntina, kasi osengeli libosoliboso kozwa ekateli ya kosalela Yehova na motema na yo mobimba. (Mib. 30:19, 20) Mpo na nini? Mpamba te, bikateli oyo tozwaka ezalaka na boyokani. Ekateli oyo okozwa na likambo etali libala mpe mosala ekomonisa soki okosalela Nzambe na ndenge ya malamu to te. (Talá mpe Luka 14:16-20.) Ndenge moko, mposa oyo ozali na yango ya kosalela Nzambe ekotinda yo ozwa bikateli oyo ebongi na likambo etali libala mpe mosala. Yango wana, zwá bikateli libosoliboso na makambo oyo eleki ntina.​—Flp. 1:10.

OKOSALA NINI NA BOLENGE NA YO?

5, 6. Monisá ndenge oyo kozwa bikateli ya malamu ekoki komemela biso matomba ya kitoko na nsima. (Talá mpe lisolo “Ekateli oyo nazwaki ntango nazalaki naino mwana,” na nimero oyo.)

5 Soki ozwi ekateli ya kosalela Nzambe, okoki kokanisa na likambo oyo alingi osala, mpe okoki kopona lolenge oyo okosalela ye. Ndeko moko ya Japon akomaki boye: “Ntango nazalaki na mbula 14, nazalaki kobima mosala ya kosakola ná nkulutu moko oyo amonaki ete nazalaki kosepela na mosala ya kosakola te. Na boboto mpenza, ayebisaki ngai ete: ‘Yuichiro, kende na ndako. Fandá mpe kanisá malamumalamu makambo oyo Yehova asalá mpo na yo.’ Nasalaki ndenge alobaki. Ya solo, nakobaki kokanisa mpe kobondela na boumeli ya mwa mikolo. Mokemoke, makanisi na ngai ebongwanaki. Eumelaki te, namonaki ete nakómaki kosepela kosalela Yehova. Nakómaki kosepela kotánga masolo ya bamisionɛrɛ, mpe nabandaki kokanisa na ndenge oyo nakokaki kosalela Yehova na motema mobimba.”

6 Yuichiro abakisi boye: “Nabandaki naino kozwa bikateli oyo ekosalisa ngai nakende kosalela Yehova na bikólo mosusu, na ndakisa, nazwaki ekateli ya koyekola Lingelesi. Ntango nasilisaki kelasi, nakómaki kotangisa Lingelesi mwa bangonga na mokolo mpo nazwa ntango ya kosala mosala ya mobongisi-nzela. Ntango nakokisaki mbula 20, nabandaki koyekola monɔkɔ ya bato ya Mongolie mpe nazwaki libaku ya kokende kotala etuluku moko ya basakoli oyo balobaka monɔkɔ yango. Mbula mibale na nsima, na mobu 2007, nakendaki kotala ekólo yango. Ntango nabimaki mosala ya kosakola ná babongisi-nzela mosusu mpe namonaki ete bato mingi bazali na mposa ya koyeba solo, nayokaki mposa ya kokende kuna mpo na kosalisa bango. Nazongaki na Japon mpo na komibongisa. Nazali mobongisi-nzela na ekólo Mongolie kobanda sanza ya minei mobu 2008. Awa, bomoi ezali mpasi. Kasi bato bazali kosepela na nsango malamu mpe nazali na likoki ya kosalisa bango bápusana penepene na Yehova. Namonaka ete ekateli oyo nazwaki ezali ya malamu mpenza.”

7. Bikateli nini tosengeli kozwa mpo na bomoi na biso, mpe ndakisa nini Moize apesi biso?

7 Motatoli ya Yehova mokomoko asengeli kozwa bikateli ndenge oyo akosalela bomoi na  ye. (Yos. 24:15) Tokoki te koyebisa yo soki osengeli kobala to te, to kobalana ná nani, to mosala nini osengeli kosala. Okopona mosala oyo ekosɛnga yo bambula mingi te ya kelasi? Bilenge bakristo mosusu bafandaka na bamboka ya bobola, nzokande basusu bafandaka na bingumba ya bozwi. Na mokili mobimba, bino nyonso bozali ndenge moko te, mpo bomoto, makoki, makambo oyo mokomoko akutaná na yango mpe makambo oyo mokomoko asepelaka na yango, mpe kondima ya mokomoko na bino ekeseni mpenza. Ekoki kozala ete bokeseni mpenza kaka ndenge bilenge Baebre na Ezipito bakesanaki na Moize ntango azalaki elenge. Moize azalaki na likoki ya kozwa nyonso na ndako ya mokonzi, nzokande bilenge Baebre mosusu bazalaki baombo. (Kob. 1:13, 14; Mis. 7:21, 22) Lokola yo, bango mpe bazalaki na bomoi na eleko moko ya yikiyiki. (Kob. 19:4-6) Mokomoko asengelaki kopona likambo oyo akosala na bomoi na ye. Moize azwaki ekateli ya malamu.​—Tángá Baebre 11:24-27.

8. Bilenge oyo bazali kokanisa na ntina ya bikateli oyo bakozwa na bomoi na bango bazali na lisalisi nini?

8 Yehova azali kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu ntango ozali naino elenge. Apesaka toli na ndenge ya mitinda oyo okoki kosalela na likambo oyo okutani na yango. (Nz. 32:8) Lisusu, baboti na yo oyo bazali bakristo mpe bankulutu ya lisangá bakoki kosalisa yo okanisa lolenge oyo okoki kosalela mitinda yango. (Mas. 1:8, 9) Tótalela mitinda misato ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu oyo ekosalisa yo mpo ozala na bomoi oyo ebongi na mikolo ezali koya.

MITINDA MISATO YA BIBLIA OYO EKOKI KOSALISA YO

9. (a) Ndenge nini Yehova apesá biso bonsomi ya kopona? (b) ‘Koluka liboso Bokonzi’ epesaka mabaku nini?

9 Luká liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye. (Tángá Matai 6:19-21, 24-26, 31-34.) Yehova apesá biso bonsomi ya kopona. Alobi te ntango boni osengeli kolekisa na bolenge na yo mpo na kosakola Bokonzi. Kasi, Yesu apesi biso etinda moko ya ntina mingi ete tóluka liboso Bokonzi. Lolenge oyo ozali kosalela maloba na ye wana, ekopesa yo mabaku ya komonisa ete olingaka Nzambe, omibanzabanzaka mpo na bazalani na yo mpe ozali na botɔndi mpo na elikya ya bomoi ya seko. Ntango ozali kokanisa mpo na likambo etali libala to mosala, luká koyeba soki bikateli na yo ekotinda yo omitungisa mingi mpo na biloko ya mosuni to ekomonisa ete ozali na molende mpo na Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye.

10. Nini esalaki ete Yesu azala moto ya esengo, mpe bikateli nini ekosala ete ozala na esengo?

10 Kosalela basusu epesaka esengo. (Tángá Misala 20:20, 21, 24, 35.) Na boboto nyonso, Yesu ateyá biso etinda wana ya ntina mingi. Azalaki mpenza moto ya esengo mpo asalaki mokano ya Tata na ye na esika ya kosala oyo ya ye. Yesu asepelaki mingi komona ndenge oyo bato ya komikitisa bandimaki nsango malamu. (Luka 10:21; Yoa. 4:34) Ntango mosusu yo mpe oyoká esengo oyo eutaka na kosalisa basusu. Soki ozali kosalela mitinda oyo Yesu ateyaki mpo na kozwa bikateli minene na bomoi na yo, na ntembe te okozala na esengo mpe Yehova akosepela.​—Mas. 27:11.

11. Mpo na nini Baruke abungisaki esengo na ye, mpe Yehova apesaki ye toli nini?

11 Tozwaka esengo koleka soki tozali kosalela Yehova. (Mas. 16:20) Emonanaki lokola ete Baruke, sɛkrɛtɛrɛ ya Yirimia abosanaki likambo yango. Na ntango moko boye, asepelaki lisusu te kosalela Yehova. Yehova alobaki na ye boye: ‘Ozali koluka makambo minene mpo na yo. Kokoba koluka yango te. Mpo talá nazali komema mpasi na ekelamu nyonso ya mosuni mpe nakopesa yo molimo na yo lokola eloko oyo epunzami na bisika nyonso oyo okokende.’ (Yir. 45:3, 5) Okanisi nini? Eloko nini ekokaki kopesa Baruke esengo, koluka makambo minene to kobika ntango Yerusaleme ekobomama mpe kotikala mosaleli ya Nzambe ya sembo?​—Yak. 1:12.

12. Ekateli nini esalisaki Ramiro azala na bomoi ya esengo?

 12 Ndeko Ramiro azali moko ya bandeko oyo ayokaki esengo ya kosalela basusu. Alobaki ete: “Nabotamá na libota moko ya bobola oyo ezali na mboka moko na bangomba ya Andes. Na yango, ntango yaya na ngai ya mobali alobaki afutela ngai mbongo mpo na kotánga na iniversite, ezalaki libaku monene. Kasi nautaki kozwa batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova, mpe nazwaki libaku mosusu: Mobongisi-nzela moko asɛngaki ngai tókende kosakola na mwa engumba moko moke. Nakendaki kuna, mpe nayekolaki kokata nsuki, mpe nafungolaki salon ya kokata nsuki mpo nazwaka mwa eloko ya kolya. Ntango toteyaki bato Makomami, mingi bandimaki na motema moko. Na nsuka, nakómaki koyangana na lisangá moko ya engumba wana oyo eutaki kobima. Nakokisi sikoyo mbula zomi na mosala ya ntango nyonso. Ata mosala moko te ekokaki kopesa ngai esengo oyo nazali na yango ya kosalisa bato báyeba nsango malamu na monɔkɔ na bango.”

Ramiro ayokaka esengo mpo asalelaki Yehova banda bolenge na ye (Talá paragrafe 12)

13. Mpo na nini bolenge ezali ntango ya malamu mpenza mpo na kosalela Yehova?

13 Sepelá kosalela Yehova ntango ozali naino elenge. (Tángá Mosakoli 12:1.) Kokanisa te ete esengeli ozwa naino mosala ya malamu bongo osalela Yehova. Ntango moto azali elenge, ezali ntango ya malamu mpenza ya kobanda kosalela Yehova. Bilenge mingi bazali mpenza te na mikumba ya libota mpe bazali na nzoto kolɔngɔnɔ mpe na makasi ya kokokisa mikumba minene. Okolinga kosala nini mpo na Yehova na bolenge na yo? Ntango mosusu ozali na mokano ya kozala mobongisi-nzela. To osepelaka kosala na teritware oyo balobaka monɔkɔ ya bapaya. To mpe ozali koluka balolenge ya kosala mingi na lisangá oyo ozali. Ezala ozali na mokano nini mpo na mosala ya Nzambe, na ntembe te ozali na mposa ya mwa mosala moko mpo na kozwa mwa lopata  mpo na komisalisa. Ekosɛnga otánga mbula boni? Okopona nini?

SALELÁ MITINDA YA BIBLIA MPO NA KOZWA BIKATELI YA MALAMU

14. Moto oyo azali kobongisa makambo oyo akosala na bomoi na ye asengeli kokeba na nini?

14 Mitinda ya Biblia misato oyo touti kolobela ekoki kosalisa yo oyeba kopona mosala oyo okosala. Na ntembe te, balakisi na yo bayebi oyo moto akoki kosala mpo azwa mosala na mboka oyo ozali. To mpe ekoki kozala na babiro ya Leta oyo ekoki koyebisa yo mosala nini na mboka na bino ezali koluka bato to esika oyo ozali kolinga kosala. Makambo oyo bamonisaka mpo na kozwa mosala esalisaka, kasi esengeli kozala ekɛngɛ. Bato oyo balingaka Yehova te bakoki koluka kolona bolingo ya mokili na motema na yo. (1 Yoa. 2:15-17) Soki otali makambo oyo mokili ekoki kopesa, motema na yo ekoki kokosa yo na pɛtɛɛ nyonso.​—Tángá Masese 14:15; Yir. 17:9.

15, 16. Nani akoki kosalisa yo na ndenge ya malamu mpenza na likambo etali mosala?

15 Soki oyebi malamu mosala oyo okosala, okozala na mposa ya toli oyo esengeli. (Mas. 1:5) Nani akoki kosalisa yo opona mosala oyo okosala oyo eyokani na mitinda ya Biblia? Yokelá bato oyo balingaka Yehova, mpe balingaka yo mpe bayebi yo mpe makambo na yo malamu. Bakosalisa yo otalela makoki mpe eloko oyo ezali kotinda yo osala mosala yango. Ntango mosusu makambo oyo bakoloba ekosalisa yo otalela lisusu mikano na yo. Ezali mpenza lipamboli soki ozali na baboti oyo balingaka Yehova! Lisusu, bankulutu ya lisangá na yo bazali mpenza mibali ya makoki oyo bakoki kosalisa yo. Okoki mpe kosolola na babongisi-nzela mpe bakɛngɛli batamboli. Mpo na nini bazwaki ekateli ya kosala mosala ya ntango nyonso? Ndenge nini babandaki mosala ya mobongisi-nzela, mpe ndenge nini basalaka mpo na kozwa mwa eloko ya kolya to elamba? Esengo nini bazali kozwa na mosala yango?​—Mas. 15:22.

16 Bato oyo bayebi yo malamu mpenza, bakoki kosalela bososoli mpo na kopesa yo toli. Kanisá ete olingi okata kelasi mpe obanda mosala ya mobongisi-nzela kaka mpo ozali komona ete kelasi ezali mpasi. Moto oyo alingaka yo akoki kososola makanisi na yo mpe kosalisa yo omona ete kelasi ekoki kosalisa yo oyeba koyika mpiko, ezaleli moko ya ntina mingi soki olingi kosalela Yehova bomoi mobimba.​—Nz. 141:5; Mas. 6:6-10.

17. Bikateli ya ndenge nini tosengeli koboya kozwa?

17 Moto nyonso oyo asalelaka Yehova akokutana na makambo oyo ekotya kondima na ye na likama, mpe makambo yango ekoki kotangola ye mosika na Yehova. (1 Ko. 15:33; Kol. 2:8) Kasi misala mosusu ekoki kobebisa mpenza boyokani ya moto na Nzambe. Oyebi bato mosusu na mboka na bino oyo ‘kondima na bango ebebaki lokola masuwa oyo epanzani’ mpo baponaki mosala moko boye? (1 Tim. 1:19) Ekozala malamu mpenza koboya kozwa bikateli oyo ekobebisa boyokani na yo ná Nzambe.​—Mas. 22:3.

SEPELÁ NDENGE OZALI KOSALELA NZAMBE NA BOLENGE NA YO

18, 19. Soki moto azwi naino te ekateli ya kosalela Yehova, asengeli kosala nini?

18 Soki ozali na mposa ya kosalela Yehova, sepelá na mabaku oyo ekómelaka bilenge oyo basalelaka Nzambe. Zwá bikateli oyo ekosalisa yo osalela Yehova na ntango oyo ya ntina mingi.​—Nz. 148:12, 13.

19 Kasi, osengeli kosala nini soki ozwi naino te ekateli ya kosalela Yehova? Kotika te kokómisa kondima na yo makasi. Nsima ya kolobela milende oyo azalaki kosala mpo na kozala na bomoi oyo Nzambe akoki kopambola, ntoma Paulo akomaki boye: “Soki bozali na makanisi ya ndenge mosusu na likambo moko boye, Nzambe akomonisa bino makanisi oyo ebongi. Atako boni, ezala tokei liboso ndenge nini, tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana.” (Flp. 3:15, 16) Kobá kosepela na bolingo ya Nzambe mpe toli na ye ya bwanya. Lokola Yehova azali malamu koleka bato nyonso, akosalisa yo ozwa bikateli ya malamu ntango ozali naino elenge.