Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2014

Tósambela Yehova, Mokonzi ya seko

Tósambela Yehova, Mokonzi ya seko

“Mokonzi ya seko . . . azwa lokumu ná nkembo libela na libela.”1 TIM. 1:17.

1, 2. (a) Nani azali “Mokonzi ya seko,” mpe mpo na nini titre yango ebongi mpenza? (Talá elilingi na ebandeli ya lisolo.) (b) Mpo na nini tolingaka ete Yehova ayangela biso?

MOKONZI SOBHUZA II ayangelaki ekólo Swaziland na boumeli ya mbula pene na 61. Azali moko ya bakonzi ya mikolo na biso oyo aumelaki mingi na bokonzi. Atako mokonzi Sobhuza aumelaki mingi, kasi ezali na mokonzi oyo boyangeli na ye ezali mokuse te lokola bomoi ya bato. Kutu, Biblia ebengi ye “Mokonzi ya seko.” (1 Tim. 1:17) Mokomi moko ya nzembo abengaki Mokonzi yango na nkombo na ye. Alobaki boye: ‘Yehova azali Mokonzi mpo na seko.’Nz. 10:16.

2 Ndenge oyo Boyangeli ya Nzambe ekoumela nde ekesenisi yango na biyangeli ya bato. Nzokande, lolenge oyo Yehova ayangelaka nde etindaka biso tópusana penepene na ye. Mokonzi moko oyo ayangelaki ekólo Yisraele na boumeli ya mbula 40 akumisaki Nzambe na maloba oyo: “Yehova azali na motema mawa mpe na ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto. Yehova ye moko apiki makasi kiti na ye ya bokonzi na likoló; mpe bokonzi na ye eyangeli eloko nyonso.” (Nz. 103:8, 19) Yehova azali kaka Mokonzi na biso te kasi azali mpe Tata na biso ya likoló oyo alingaka biso. Yango ebimisi mituna mibale: Na ndenge nini Yehova asalaka makambo lokola Tata? Kobanda ntango botomboki ebimaki na Edene,  ndenge nini Yehova asalelaka Bokonzi na ye? Biyano na mituna wana ekotinda biso tópusana penepene na Yehova mpe tósambela ye na motema na biso mobimba.

MOKONZI YA SEKO ABIMISI LIBOTA MOKO MONENE

3. Nani azalaki ekelamu ya liboso na libota monene ya Yehova, mpe banani mosusu oyo bakelamaki lokola “bana” ya Nzambe?

3 Yehova ayokaki esengo mpenza ntango akelaki mwana na ye se moko oyo abotamaki! Yehova azalaki komona ye te lokola moto mpamba. Kutu, lokola azalaki mwana, Yehova azalaki kolinga ye mpe abengisaki ye ayoka mpe esengo na mosala ya kokela bikelamu mosusu ya kokoka. (Kol. 1:15-17) Ebele ya baanzelu bazali mpe na kati ya bikelamu yango. Biblia ebengi bango ‘basaleli na ye oyo bazali kosala mokano na ye,’ baanzelu basalelaka Nzambe na esengo, mpe apesaka bango lokumu na ndenge abengaka bango “bana” na ye. Bazali mpe na kati ya libota monene ya Yehova.Nz. 103:20-22; Yobo 38:7.

4. Ndenge nini bato bakɔtaki na libota monene ya Nzambe?

4 Nsima ya kokela likoló mpe mabele, Yehova akómisaki libota na ye monene. Nsima ya kobongisa mpenza mabele, mpe kokómisa yango esika moko malamu ya kofanda, esika oyo ekokaki na makambo nyonso, Yehova asalaki likambo moko oyo eleki mosika makambo nyonso oyo asalaki awa na mabele, akelaki moto ya liboso, Adama na elilingi na Ye. (Eba. 1:26-28) Lokola Yehova azali Mozalisi, azalaki na mposa ete Adama azala na botosi. Lokola azali Tata, Yehova apesaki malako na ye nyonso na bolingo mpe na boboto mpenza. Kasi, malako yango ezalaki kopekisa bonsomi na bango te.Tángá Ebandeli 2:15-17.

5. Ebongiseli nini Nzambe azwaki mpo mabele etonda na bato?

5 Na bokeseni na bakonzi mingi ya bana ya bato, Yehova apesaka bato na ye mikumba mosusu, atyelaka bango motema mpe asalelaka bango makambo lokola bato ya libota na ye. Na ndakisa, atyaki Adama mokonzi ya bikelamu mosusu ya bomoi, kutu apesaki ye mpe mokumba moko ya kitoko mpe ya ntina mingi, kopesa banyama bankombo. (Eba. 1:26; 2:19, 20) Nzambe akelaki te bamilio ya bato ya kokoka mpo bátondisa mabele. Kasi, akelaki mosungi ya kokoka mpo na Adama, elingi koloba Eva. (Eba. 2:21, 22) Na nsima, apesaki mwasi ná mobali yango libaku ya kobota bana mpe kotondisa mabele. Lokola bazalaki na bomoi ya kokoka, basengelaki malɛmbɛmalɛmbɛ kokómisa mabele mobimba Paradiso. Na boyokani na baanzelu na likoló, basengelaki kosambela Yehova seko na seko na kati ya libota na ye monene. Ezalaki mpenza elikya moko kitoko! Mpe yango emonisi mpenza ete Yehova azali Tata ya bolingo!

BANA OYO BATOMBOKAKI BABOYI BOYANGELI YA NZAMBE

6. (a) Ndenge nini botomboki ebandaki na kati ya libota ya Nzambe? (b) Mpo na nini botomboki yango emonisi te ete Yehova atikaka makambo mosusu eleka ye kaka boye azali kotala?

6 Likambo ya mawa, Adama ná Eva basepelaki te ete Yehova azala Mokonzi na bango. Kutu, balandaki Satana, mwana moko ya elimo ya Nzambe, oyo akómaki motomboki. (Eba. 3:1-6) Lokola Nzambe azalaki lisusu te kotambwisa bango, yango ememelaki bango mpe bana na bango minyoko, mpasi mpe liwa. (Eba. 3:16-19; Rom. 5:12) Kobanda ntango wana, Nzambe azalaki lisusu te na bato ya botosi awa na mabele. Yango elingi nde koloba ete makambo mosusu elekaka ye kaka boye azali kotala, mpe azali lisusu na Bokonzi te likoló ya bato mpe mabele? Soki moke te! Amonisaki Bokonzi na ye na ndenge abenganaki Adama ná Eva na elanga ya Edene, mpe mpo na kopekisa bango bázonga lisusu na kati, atyaki bakeruba na porte mpo na kokɛngɛla yango. (Eba. 3:23, 24) Na ntango wana, Nzambe amonisaki ete azali Tata ya bolingo na ndenge amonisaki ete mokano na ye ya kozala na libota moko monene oyo esangisi bikelamu ya elimo mpe bato ya sembo ekokokisama.  Alakaki “momboto” moko oyo akoboma Satana mpe akolongola mabe oyo lisumu ya Adama ebimisá.Tángá Ebandeli 3:15.

7, 8. (a) Ndenge nini makambo mabe ebandaki na ntango ya Noa? (b) Yehova azwaki bibongiseli nini mpo na kopɛtola mabele mpe kobatela bato?

7 Na basiɛklɛ oyo elandaki, bato mosusu basalelaki Yehova na bosembo. Na kati na bango, tokoki kotánga Abele ná Enoka. Kasi, ebele ya bato baboyaki ete Yehova azala Tata mpe Mokonzi na bango. Na ntango ya Noa, mabele “etondaki na mobulu.” (Eba. 6:11) Yango elakisi nde ete makambo oyo elekaka na mabele eleki Yehova na nivo? Makambo oyo eleká emonisi nini?

8 Tótalela lisolo ya Noa. Yehova ayebisaki Noa atonga masuwa moko monene oyo ekokaki kobikisa ye moko ná libota na ye. Ayebisaki ye mpe ndenge mpenza oyo masuwa yango ekozala mpe apesaki ye malako oyo esengeli. Nzambe amonisaki mpe ete alingaka bato nyonso ntango apesaki Noa mokumba ya kozala “mosakoli ya boyengebene.” (2 Pe. 2:5) Na ntembe te, na nsango na ye, azalaki mpe koyebisa bato bábongola motema mpe kokebisa bango ete mosika te, Yehova akobebisa mokili, kasi nsango yango ezalaki kokɔta na litoi oyo mpe kobima na litoi mosusu. Noa ná libota na ye bafandaki na mokili oyo etondaki mpenza na mobulu mpe na makambo ya mbindo na boumeli ya bambula mingi. Lokola azali Tata, Yehova abatelaki mpe apambolaki milimo wana mwambe ya sembo. Ntango atindaki Mpela monene, Yehova amonisaki ete azali na Bokonzi likoló ya bato mpe baanzelu oyo batombokaki. Ya solo, Yehova azwaki mpenza makambo na mabɔkɔ.Eba. 7:17-24.

Yehova azali Mokonzi ntango nyonso (Talá paragrafe 6, 8, 10, 12, 17)

BOYANGELI YA YEHOVA NSIMA YA MPELA

9. Libaku nini Yehova apesaki bato nsima ya Mpela?

9 Ntango kaka Noa mpe libota na ye banyataki mabele oyo epɛtolamaki mpe bapemaki mopɛpɛ ya kitoko, na ntembe te bapesaki Yehova mersi ndenge abatelaki mpe akokisaki bamposa na bango. Noa atongaki mbala moko etumbelo mpe apesaki bambeka mpo na kosambela Yehova. Nzambe apambolaki Noa ná libota na ye mpe apesaki bango malako ete: ‘Bábota mpe bákóma mingi mpe bátondisa mabele.’ (Eba. 8:20–9:1) Bato bazalaki lisusu na libaku ya kosambela Nzambe kaka moko mpe kotondisa mabele.

10. (a) Nsima ya Mpela, epai wapi mpe ndenge nini botomboki ebimaki lisusu? (b) Likambo nini Yehova asalaki mpo na komonisa ete mokano na ye esalemaki?

10 Nzokande, Mpela elongolaki te ezaleli ya kozanga kokoka, mpe bato bakobaki kaka kobunda na makambo mabe ya Satana ná baanzelu oyo batombokaki. Eumelaki te, bato batombokelaki lisusu Bokonzi ya Yehova. Na ndakisa, Nimerode, nkɔkɔ ya Noa, abandisaki botomboki moko monene mpenza. Nimerode abengami “elombe mobomi-nyama oyo azalaki kotɛmɛla Yehova.” Atongaki bingumba ya minene, lokola Babele mpe ye moko amityaki mokonzi “na mokili ya Shinare.” (Eba. 10:8-12) Mokonzi ya seko asengelaki kosala nini mpo na mokonzi wana oyo atombokaki mpe milende na ye ya kopekisa mokano ya Nzambe ya “kotondisa mabele” esalema? Nzambe abulunganisaki monɔkɔ ya bato, mpe asalaki ete bato ya Nimerode oyo bakómaki na nkanda ‘bápalangana na mabele mobimba.’ Bakendeki na lingomba na bango ya lokuta mpe lolenge na bango ya koyangela.Eba. 11:1-9.

11. Ndenge nini Yehova amonisaki ete azali sembo epai ya moninga na ye Abrahama?

11 Atako bato mingi bazalaki kosambela banzambe ya lokuta nsima ya Mpela, bato mosusu ya sembo bakobaki kokumisa Yehova. Moko na bango ezali Abrahama, oyo andimaki kotika Ure, engumba na ye ya bomɛngo mpe afandaki na bahema na boumeli ya bambula mingi. (Eba. 11:31; Ebr. 11:8, 9) Na boumeli ya ntango oyo Abrahama azalaki kotambolatambola, bakonzi mingi bazalaki zingazinga na ye, mpe mingi na bango bazalaki kofanda na bingumba oyo ebatelami makasi. Kasi, Yehova abatelaki Abrahama mpe libota na ye. Mpo na komonisa ndenge oyo Yehova, tata na biso abatelaka biso, moko ya bakomi ya nzembo alobaki boye:  “[Nzambe] apesaki moto moko te nzela apunza bango, kasi apamelaki bakonzi mpo na bango.” (Nz. 105:13, 14) Mpo na komonisa ete azali sembo epai ya monginga na ye Abrahama, Yehova alakaki ye ete: “Bakonzi bakobima kati na yo.”Eba. 17:6; Yak. 2:23.

12. Ndenge nini Yehova amonisaki Bokonzi na ye likoló ya Ezipito, mpe yango esalaki nini epai ya bato na ye?

12 Nzambe azongelaki elaka oyo apesaki Abrahama epai ya mwana na ye Yisaka mpe nkɔkɔ na ye Yakobo ete akopambola bango; na elaka yango, amonisaki mpe ete akobimisa bakonzi na nzela ya bakitani na bango. (Eba. 26:3-5; 35:11) Nzokande, liboso ete Yehova abimisa bakonzi yango, bakitani ya Yakobo bakómaki baombo na Ezipito. Yango emonisaki ete Yehova akokokisa te mokano na ye to azalaki lisusu te kokipe makambo oyo ezali koleka na mabele? Soki moke te! Na ntango oyo ye moko alingaki, Yehova amonisaki nguya mpe Bokonzi na ye likoló ya Farao, moto ya matoi mangbongi. Atako Bayisraele bazalaki na boombo, bandimelaki Yehova mpe abikisaki bango na ndenge ya kokamwa mpenza ntango bakatisaki Mbu Motane. Emonani mpenza ete Yehova azalaki kaka Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe lokola Tata oyo akipaka bana na ye, asalelaki nguya na ye monene mpo na kobatela bato na ye.Tángá Kobima 14:13, 14.

YEHOVA AKÓMI MOKONZI YA YISRAELE

13, 14. (a) Na loyembo oyo bayembaki, Bayisraele balobaki nini mpo na Bokonzi ya Yehova? (b) Elaka nini Nzambe apesaki Davidi na likambo etali Bokonzi?

13 Ntango kaka babimaki na boombo na Ezipito na ndenge ya likamwisi, Bayisraele bayembaki loyembo ya bolongi mpo na kokumisa Yehova. Loyembo yango ezali na Kobima mokapo 15, na vɛrsɛ 18, bayembaki ete: “Yehova akoyangela mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.” Yehova akómaki mpenza Mokonzi ya ekólo moko ya sika. (Mib. 33:5) Kasi, lokola Yehova amonanaka te, bato basepelaki te ete azala Moyangeli na bango. Mbula soki 400 nsima ya kobima na Ezipito, basɛngaki Nzambe apesa bango mokonzi ndenge bikólo ya zingazinga ezalaki na bango. (1 Sa. 8:5) Atako bongo, Yehova azalaki kaka Mokonzi, likambo oyo emonanaki na boyangeli ya Davidi, mokonzi ya mibale ya Yisraele.

14 Davidi amemaki sanduku mosantu ya kondimana na Yerusaleme. Na mokolo wana ya esengo, Balevi bayembaki loyembo ya masanzoli oyo ezali na maloba ya ntina mingi, oyo ezwami  na 1 Ntango 16:31 ete: “Báloba na kati ya bikólo ete: ‘Yehova ye moko akómi mokonzi!’” Ntango mosusu okoki komituna boye: ‘Soki Yehova azali Mokonzi ya seko, ndenge nini akómaki Mokonzi na ntango wana?’ Yehova akómaka Mokonzi ntango amonisi Boyangeli na ye to ntango atye ebongiseli moko mpo emonisa ye na boumeli ya ntango moko boye to mpo na kotalela likambo moko ya sikisiki. Lolenge wana ya koyangela ya Yehova ezali na ndimbola moko monene. Liboso Davidi akufá, Yehova alakaki ye ete bokonzi na ye ekokoba seko na seko. Alobaki ete: “Nakobimisa mpenza nsima na yo momboto na yo, oyo akouta na libumu na yo; mpe nakopika makasi mpenza bokonzi na ye.” (2 Sa. 7:12, 13) Nsukansuka, “momboto” ya Davidi amonanaki mbula soki 1 000 na nsima. Ezalaki nani, mpe ntango nini asengelaki kokóma Mokonzi?

YEHOVA ATYE MOKONZI YA SIKA

15, 16. Ntango nini Yesu atyamaki mafuta na elimo lokola Mokonzi na mikolo ezali koya, mpe ntango azalaki awa na mabele, bibongiseli nini Yesu azwaki mpo na Bokonzi na ye?

15 Na mobu 29 T.B., Yoane Mobatisi abandaki kosakola ete: “Bokonzi ya likoló ekómi pene.” (Mat. 3:2) Ntango Yoane abatisaki Yesu, Yehova atyaki ye mafuta na elimo mpo akóma Masiya oyo alakamaki mpe Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na mikolo ezali koya. Yehova amonisaki bolingo na ye mpo na Yesu na maloba oyo: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.”Mat. 3:17.

16 Na boumeli ya ntango oyo asalaki mosala na ye, Yesu akumisaki Tata na ye. (Yoa. 17:4) Asalaki yango na ndenge azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Luka 4:43) Kutu, ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete Bokonzi yango eya. (Mat. 6:10) Lokola azali Mokonzi oyo aponamaki, Yesu akokaki koyebisa batɛmɛli na ye ete: “Bokonzi ya Nzambe ezali na katikati na bino.” (Luka 17:21) Na nsima, na mpokwa liboso ete akufá, Yesu asalaki ná bayekoli na ye ‘kondimana mpo na Bokonzi.’ Na ndenge yango, apesaki bayekoli na ye ya sembo elikya ya kozala bakonzi elongo na ye na Bokonzi ya Nzambe.Tángá Luka 22:28-30.

17. Ndenge nini Yesu abandaki komonisa mwa moke bokonzi na ye na siɛklɛ ya liboso, kasi mpo na nini asengelaki kozela?

17 Ntango nini Yesu asengelaki kobanda koyangela lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe? Asengelaki kozela naino. Kaka nsima ya midi ya mokolo wana, babomaki Yesu mpe bayekoli na ye bapalanganaki. (Yoa. 16:32) Nzokande, ndenge moko na ntango ya kala, Yehova asimbaki makambo na mabɔkɔ. Na mokolo ya misato, asekwisaki Mwana na ye, mpe mokolo ya Pantekote 33 T.B., Yesu abandaki koyangela lisangá ya bokristo ya bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo. (Kol. 1:13) Kasi, lokola Yesu azalaki “momboto” oyo alakamaki, asengelaki kozela tii ntango akokóma mpenza Mokonzi ya nguya ya mabele mobimba. Yehova ayebisaki Mwana na ye ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.”Nz. 110:1.

SAMBELÁ MOKONZI YA SEKO

18, 19. Ekateli nini tosengeli kozwa, mpe makambo nini tokoyekola na lisolo oyo elandi?

18 Na boumeli ya bankóto ya bambula, boyangeli ya Yehova etyamaki ntembe na likoló mpe awa na mabele. Yehova asundolá soki moke te boyangeli na ye; azali kaka na makambo na mabɔkɔ. Lokola azali Tata ya bolingo, abatelaki mpe akokisaki bamposa ya basaleli na ye ya sembo lokola Noa, Abrahama mpe Davidi. Likambo yango esengeli te kotinda biso tótosa Mokonzi na biso mpe tópusana penepene na ye?

19 Kasi sikoyo tómituna boye: Ndenge nini Yehova akómaki Mokonzi na mikolo na biso? Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali bato oyo bandimaka Bokonzi ya Yehova mpe kokóma bana ya kokoka na kati ya libota na ye monene? Ntango tobondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya, yango elimbolaka nini? Tokozwa biyano na mituna wana na lisolo oyo elandi.