Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2014

Salelá Yehova liboso ete mikolo ya mpasi eya

Salelá Yehova liboso ete mikolo ya mpasi eya

“Kanisá Mozalisi na yo Monene.”MOS. 12:1.

1, 2. (a) Na litambwisi ya elimo santu, toli nini mokonzi Salomo akomelaki bilenge? (b) Mpo na nini toli yango etaleli mpe bakristo oyo bakómi na mbula 50 to koleka?

NA LITAMBWISI ya elimo santu, mokonzi Salomo ayebisaki bilenge boye: “Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo, liboso mikolo ya mpasi eya.” “Mikolo ya mpasi” yango ezali nini? Mokonzi Salomo asalelaki maloba ya ntoki mpo na komonisa bampasi oyo emonanaka ntango moto akómi mobange. Na ndakisa, mabɔkɔ ekómaka kolɛnga, makolo elɛmbaka, mino mosusu ekómaka kolongwa, komona ekómaka mpasi, matoi eyokaka malamu te, nsuki ya mpɛmbɛ ebimaka mpe mokɔngɔ ekómaka kogumbama. Moto moko te akoki kozela tii akóma mobange boye mpo abanda kosalela Yehova.Tángá Mosakoli 12:1-5.

2 Bakristo mingi oyo bakómi na bambula 50 to koleka, bazali naino na makasi mingi. Bakoki kobima mwa nsuki mpɛmbɛ, kasi nzoto na bango elɛmbi te ndenge mokonzi Salomo alobeli. Bakristo yango bakoki kozwa litomba na toli wana oyo epesamaki mpo na bilenge ete ‘bákanisa Mozalisi na bango Monene’? Toli yango elimboli nini?

3. Kokanisa Mozalisi na biso Monene esɛngi mpe makambo nini?

 3 Atako tosaleli Yehova bambula ebele, ekozala malamu tófanda mpe tókanisa na mozindo mpo na koyeba na nini Mozalisi na biso azali Monene. Ndenge bomoi esalemá ekamwisaka biso te? Ndenge bomoi esalemá elekelaka bato. Yehova asalá biloko ya kitoko mpenza ya ndenge na ndenge mpo bato bázala na biloko mingi mpe básepela na bomoi. Ntango tozali kokanisa na biloko oyo Yehova akelá, yango ebakisaka lisusu botɔndi na biso mpo na bolingo, bwanya mpe nguya na ye. (Nz. 143:5) Kasi kokanisa Mozalisi na biso Monene ezali kosɛnga mpe tókanisa na mikumba oyo tosengeli kokokisa mpo na ye. Ntango tozali kokanisa bongo, tokozala mpenza na ekateli ya komonisa botɔndi na biso epai ya Mozalisi na biso na kosalela ye na motema mobimba ntango nyonso oyo tozali na bomoi.Mos. 12:13.

LIBAKU MOKO YA NTINA MINGI

4. Motuna nini bakristo oyo baumeli na kati ya solo bakoki komituna, mpe mpo na nini?

4 Soki okómi na bambula 50 to koleka, osengeli komituna motuna oyo ya ntina mingi, ‘Nakosala nini sikoyo na bomoi na ngai lokola nazali naino na mwa makasi?’ Lokola ozali mokristo oyo aumeli na kati ya solo, ozali na mabaku oyo bamosusu bazali na yango te. Okoki koyebisa bilenge makambo oyo oyebi na ntina na Yehova. Okoki kolendisa basusu ntango ozali kobɛtɛla bango masolo ya makambo oyo okutani na yango na bomoi na yo ya mokristo. Mokonzi Davidi azalaki kobondela ete azala na mabaku ya kosala bongo. Akomaki boye: “Ee Nzambe, oteyi ngai banda na bolenge na ngai . . . ata kino na bobange mpe na nsuki mpɛmbɛ, ee Nzambe, kotika ngai te, kino nakoyebisa lobɔkɔ na yo na libota, nguya na yo, na baoyo nyonso bazali koya.”Nz. 71:17, 18.

5. Ndenge nini bakristo oyo bakómi mibange bakoki koyebisa bilenge makambo oyo bayebi?

5 Ndenge nini okoki komonisa bwanya oyo ozwi na boumeli ya ebele ya bambula? Okosepela kobenga bilenge bakristo na ndako na yo mpo na kolendisa bango? Okoki kosɛnga bango bóbima na mosala ya kosakola mpe omonisa bango esengo oyo oyokaka lokola ozali kosalela Yehova? Elihu alobaki ete: “Mikolo yango moko eloba, mpe ebele ya bambula eyebisa bwanya.” (Yobo 32:7) Ntoma Paulo ayebisaki basi bakristo oyo baumeli na kati ya solo ete bálendisa basusu na maloba mpe na ndakisa. Akomaki boye: “Mibange basi bázala . . . bateyi ya makambo malamu.”Tito 2:3.

SALELÁ MAKOKI OYO OZALI NA YANGO MPO NA KOSALISA BASUSU

6. Mpo na nini bakristo oyo bakómi mibange bakoki komona te ete bazali na makoki te?

6 Soki ozali mokristo oyo aumeli mingi, ozali na makoki ebele. Kanisá na makambo oyo oyebi sikoyo, kasi oyebaki yango te na mbula 30 to 40 oyo euti koleka. Okoki kosalela malamumalamu mitinda ya Biblia na bomoi na yo. Na ntembe te, ozali na makoki ya kosalela solo ya Biblia mpo na kosimba mitema ya bato. Soki ozali nkulutu, oyebi ndenge ya kosalisa bandeko oyo babandi kolanda nzela mabe. (Gal. 6:1) Ntango mosusu oyekoli ndenge ya kotambwisa makambo na lisangá, badepartema ya mayangani to kotonga Bandako ya Bokonzi. Ntango mosusu oyekoli ndenge ya kolendisa minganga básalela mayele mosusu mpo na kosalisa bandeko kozanga kozongisa makila. Ata soki oyekoli solo eumeli mingi te, oyebi makambo oyo ekoki kosalisa na bomoi. Na ndakisa, soki obɔkɔlá bana, okómi na bwanya oyo esengeli mpenza. Bakristo oyo bakómi mibange bazali mpenza liziba ya kolendisa mpo na basaleli ya Yehova na ndenge bateyaka, batambwisaka mpe bapesaka bandeko makasi.Tángá Yobo 12:12.

7. Bakristo oyo bakómi mibange bakoki kosalisa bilenge na makambo nini?

7 Ndenge nini okoki kosalela makoki na yo malamumalamu? Ntango mosusu okoki kolakisa bilenge ndenge ya kobanda mpe kotambwisa boyekoli ya Biblia. Soki ozali ndeko mwasi, okoki nde kosalisa bilenge basi oyo bazali na bana  ndenge bakoki kozala na bokatikati kati makambo ya elimo mpe kobɔkɔla bana? Soki ozali ndeko mobali, okoki nde kolakisa bilenge mibali ndenge ya koloba na esengo ntango bazali kosala badiskur mpe kozala basakoli ya nsango malamu oyo babongi? Okoki kolakisa bango ndenge osalaka mpo na kotala bandeko oyo bazali mibange mpo na kolendisa bango? Ata soki ozali te na nzoto kolɔngɔnɔ ndenge ozalaki na yango, ozali na mabaku ya kitoko mpenza mpo na kosalisa bilenge. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Kitoko ya bilenge ezali nguya na bango, mpe nkembo ya mibange ezali nsuki mpɛmbɛ na bango.”Mas. 20:29.

KOSALA EPAI MPOSA EZALI MONENE

8. Atako ntoma Paulo akómaki na mbula mingi, asalaki nini?

8 Atako akómaki na mbula mingi, ntoma Paulo asalelaki makoki mingi oyo azalaki na yango mpo na kosalela Nzambe. Ntango abimaki na bolɔkɔ na Roma na mobu soki 61 T.B., ayikaki mpiko na boumeli ya bambula ebele na mosala ya misionɛrɛ mpe atikalaki mwa moke na Roma mpo na kosakola. (2 Ko. 11:23-27) Na ntembe te, bandeko ya engumba wana monene basepelaki mpenza na lisalisi oyo ntoma Paulo azalaki kopesa bango ntango nyonso. Kasi, ntoma Paulo amonaki ete mposa ezalaki monene na bamboka mosusu. Elongo na Timote mpe Tito, akobaki mosala na ye ya misionɛrɛ, akendaki na Efese, na nsima na Krɛtɛ mpe ekoki kozala ete akómaki mpe na Masedonia. (1 Tim. 1:3; Tito 1:5) Toyebi te soki akendaki mpe na Espagne, kasi azalaki na likanisi ya kokende kuna.Rom. 15:24, 28.

9. Mbala mosusu, ntango nini ntoma Petro akendaki kosala epai mposa ezalaki monene? (Talá elilingi ya ebandeli.)

9 Ekoki kozala ete ntoma Petro azalaki na mbula koleka 50 ntango akendaki epai mposa ezalaki monene. Mpo na nini likambo yango ekoki kozala solo? Soki azalaki na mbula ndenge moko ná Yesu to ntango mosusu mokóló moke, ekoki kozala ete azalaki na mbula soki 50 ntango akutanaki na bantoma mosusu na Yerusaleme na mobu 49 T.B. (Mis. 15:7) Ntango mosusu nsima ya kokutana ná bantoma mosusu wana, ntoma Petro akendaki kofanda na Babilone, na ntembe te mpo na kosakola na engumba wana oyo ezalaki na Bayuda mingi. (Gal. 2:9) Azalaki kuna ntango akomaki mokanda na ye ya liboso na litambwisi ya elimo santu, na mobu soki 62 T.B. (1 Pe. 5:13) Kofanda na mboka mopaya ekoki kozala mokakatano, kasi atako ntoma Petro akómaki mobange, atikaki te ete bobange elongola ye esengo ya kosalela Yehova na motema mobimba.

10, 11. Lobelá ndakisa moko ya bato oyo atako bakómaki mikóló, kasi bakendaki kosala epai mposa ezalaki monene.

10 Lelo oyo, bakristo mingi oyo bakómi na bambula 50 to koleka bamonaka ete makambo ya bomoi na bango ebongwani mpe ete bakoki kosalela Yehova lisusu mingi na ntango wana. Basusu bakendaka epai mposa ezali monene. Na ndakisa, ndeko Robert akomi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tozalaki na mbula 50 na ndambo ntango toyaki komona ete mabaku kitoko ezali liboso na biso. Mwana na biso kaka moko azalaki lisusu te ná biso, tozalaki lisusu te na baboti ya mibange oyo tosengelaki kokipe mpe baboti na biso batikelaki biso biloko mingi te. Tomonaki ete soki totɛki ndako na biso, ekokoka mpo tófuta banyongo mpe mbongo mosusu ekosalisa biso tii ntango nakozwa mbongo na ngai ya pansiɔ. Toyokaki ete na Bolivie bato mingi bazali kondima koyekola Biblia mpe biloko ezali ntalo te. Tomonaki malamu tókende kuna. Komesana na ndako na biso ya sika ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Makambo ekesanaki mpenza na ndenge tomeseneki na yango na Nɔrdi ya Amerika. Kasi milende na biso ezwaki mbano.”

11 Ndeko Robert abakisi boye: “Tozali kosalela bomoi na biso mobimba mpo na makambo ya lisangá. Bato mosusu oyo tozali koyekola na bango Biblia, bazali kozwa batisimo. Libota moko oyo toyekolaka na yango bazali babola mpe bafandaka na mboka moko oyo ezali na ntaka ya bakilomɛtrɛ mingi. Kasi, pɔsɔ nyonso, bato ya libota yango basalaka mobembo ya mpasi tii na vile  mpo na koyangana na makita. Kanisá naino esengo oyo tozalaka na yango komona ndenge bato ya libota yango bazali kokende liboso mpe mwana na bango ya liboso ya mobali akómaki kutu mobongisi-nzela!”

MPOSA EZALI MONENE NA BISIKA OYO BALOBAKA MONƆKƆ YA BAPAYA

12, 13. Pesá ndakisa ya mokristo moko oyo abandaki kosalela Yehova ntango akokisaki mbula ya kozwa pansiɔ.

12 Masangá to bituluku ya minɔkɔ ya bapaya ekoki kozwa litomba monene na ndakisa ya bandeko oyo bakómi mikóló. Lisusu, bateritware yango ekoki kozala kitoko mpo na kosala kuna. Na ndakisa, ndeko Brian akomi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tokómaki na ntango mingi ntango nazwaki pansiɔ oyo ekólo Angleterre epesaka bato soki bakokisi mbula 65. Bana na biso bazalaki lisusu te ná biso, mpe tozalaki mpenza te kozwa bato ya koyekola na bango Biblia. Kasi, nakutanaki na elenge mobali moko ya Chinois oyo azalaki kosala bolukiluki na iniversite oyo ezalaki na mboka oyo nazalaki. Andimaki ntango nabengaki ye aya na makita, nabandaki koyekola na ye Biblia. Nsima ya mwa bapɔsɔ, abandaki komema moninga moko ya Chinois na makita. Pɔsɔ mibale na nsima, ayaki na moto ya misato mpe na nsima ayaki na oyo ya minei.

13 “Ntango moto ya mitano asɛngaki boyekoli ya Biblia, namonaki ete, ‘atako nazali na mbula 65, yango elingi koloba te ete nasengeli kozwa pansiɔ na mosala ya Yehova.’ Na yango, natunaki mwasi na ngai, oyo azalaki leki na ngai ya mbula mibale, soki akoki koyekola monɔkɔ ya Chinois. Tozalaki kosalela kasɛti oyo ezalaki na mateya ya Chinois. Na ntango wana, mbula zomi elekaki. Kosakola na teritware oyo balobaka monɔkɔ ya bapaya ekómisaki biso lisusu lokola bilenge. Na nsima, toyekolaki Biblia na ba-chinois 112! Mingi na bango bazalaki koyangana na makita. Moko na bango azali lelo kosala mosala ya mobongisi-nzela ná biso.”

Ata soki okómi mobange, okoki mpe kosala lisusu mingi (Talá paragrafe 12, 13)

SALÁ OYO OKOKI KOSALA

14. Bakristo oyo bakómi mibange bakoki kosepela na likambo nini, mpe ndenge nini ndakisa ya ntoma Paulo ekoki kolendisa bango?

14 Atako bakristo mingi oyo bakómi na bambula 50 bazali na mabaku kitoko ya kosalela Yehova lisusu mingi, kasi bango nyonso te nde  bakoki kosala bongo. Basusu kati na bango bazali nzoto kolɔngɔnɔ te, mpe basusu bazali kobatela baboti na bango oyo bakómi mibange to bana mosusu oyo babɔkɔlaka. Okoki kozala na esengo ya koyeba ete Yehova azwaka na motuya nyonso oyo osalaka na mosala na ye. Na esika ete omitungisa mpo na makambo oyo okokoka kosala te, sepelá na oyo ozali kosala. Landá ndakisa ya ntoma Paulo. Na boumeli ya bambula, azali na bolɔkɔ, azalaki na likoki te ya kosala mibembo na ye ya misionɛrɛ. Kasi, ntango bato bazalaki kokende kotala ye, azalaki koyebisa bango makambo oyo ezali na Makomami mpe kolendisa kondima na bango.Mis. 28:16, 30, 31.

15. Mpo na nini bakristo oyo bakómi mibange bazali na motuya mingi?

15 Yehova asepelaka mpe na oyo bandeko oyo bakómi mibange bakoki kosala na mosala na ye. Atako mokonzi Salomo alobi ete ntango oyo moto akómi mpenza mobange ezali te eleko malamu ya bomoi ya kobanda kosalela Yehova, kasi azwaka na motuya mosala oyo bakristo oyo bakómi mibange bazali kosala mpo na kosanzola ye. (Luka 21:2-4) Bandeko basepelaka mingi na ndakisa ya bandeko ya sembo oyo bazali na masangá na bango oyo basaleli Yehova ntango molai.

16. Libaku malamu nini Ana azwaki te, kasi azalaki na likoki ya kosala nini mpo na losambo ya Nzambe?

16 Biblia emonisi ete Ana, mwasi moko mobange mpe oyo mobali na ye akufá, akobaki kosanzola Yehova na bosembo tii na bobange na ye. Azalaki na mbula 84 ntango Yesu abotamaki. Kasi lokola aumelaki lisusu mingi te, akómaki te moyekoli ya Yesu, atyamaki mafuta te na elimo santu, mpe asakolaki te nsango malamu ya Bokonzi. Nzokande, oyo Ana akokaki kosala, yango nde azalaki kosala. “Azalaki kozanga te na tempelo, azalaki kosala mosala mosantu butu moi.” (Luka 2:36, 37) Ntango nganga-nzambe azalaki kotumba mpaka malasi na tempelo ntɔngɔ mpe mpokwa nyonso, ekoki kozala ete Ana azalaki na kati ya ebele ya bato oyo bazalaki koyangana na lopango ya tempelo mpe bazalaki kobondela na nse ya motema mbala mosusu na boumeli ya miniti 30. Ntango amonaki mwana Yesu, abandaki “kolobela mwana wana epai ya baoyo nyonso bazalaki kozela kosikolama ya Yerusaleme.”Luka 2:38.

17. Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko oyo bakómi mibange to oyo bazali bibɔsɔnɔ mpo bamipesaka na losambo ya solo?

17 Lelo oyo, tosengeli kotyaka likebi mpo na kosalisa bandeko oyo bakómi mibange to bazali bibɔsɔnɔ. Basusu oyo bakoki kozala na mposa makasi ya koyangana na makita to mayangani, bakoki ntango mosusu kokoka te kosala yango. Na bamboka mosusu, masangá ezwaka bibongiseli mpo ete bandeko yango balandaka makita na nzela ya telefone. Na bisika mosusu, ekoki kozala mpasi kosala bongo. Atako bongo, bakristo oyo bazali na likoki te ya koyangana na makita bakoki kopesa mabɔkɔ mpo losambo ya solo ekende liboso. Na ndakisa, mabondeli na bango esalisaka mpo ete lisangá etambola malamu.Tángá Nzembo 92:13, 14.

18, 19. (a) Mpo na nini bakristo oyo bakómi mibange bakoki mbala mosusu te koyeba ete balendisaka bandeko mosusu? (b) Nani akoki kosalela toli oyo: “Kanisá Mozalisi na yo Monene”?

18 Bakristo oyo bakómi mibange, bakoki mbala mosusu te koyeba ndenge balendisaka bandeko mosusu. Na ndakisa, Ana atikalaki sembo bambula wana nyonso na tempelo, ntango mosusu ayebaki te ete basiɛklɛ na nsima ndakisa na ye ekolendisa bato mosusu. Makomami elobeli bolingo oyo Ana azalaki na yango mpo na Yehova. Na ntembe te, bandeko ya lisangá bamonaka bolingo oyo omonisaka mpo na Nzambe. Tokoki kokamwa te ete Liloba ya Nzambe elobi ete: “Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko ntango yango ezwami na nzela ya boyengebene”!Mas. 16:31.

19 Kasi, atako tokoki kosalela Yehova, mokomoko na biso azali na esika oyo makasi na ye ekoki kosuka. Kasi, tiká ete baoyo nyonso kati na biso oyo bazali naino na mwa makasi bábosana te maloba oyo ya Biblia: “Kanisá Mozalisi na yo Monene . . . liboso mikolo ya mpasi eya.”Mos. 12:1.